Mituna ya batángi
Baevanzile misato elobi ete bantoma baimaimaki ntango mwasi moko apakolaki Yesu mafuta moko ya ntalo na motó. Bantoma mingi baimaimaki to ezalaki mpenzampenza nde Yuda?
Lisolo yango ezali na Evanzile ya Matai, ya Malako mpe ya Yoane. Emonani lokola ete Yuda nde moto abandaki koimaima mpe na nsima mwa bantoma mosusu basalaki mpe bongo. Lisolo yango ezali komonisa ntina oyo tosengeli kozala na botɔndi lokola tozali na Baevanzile minei. Makambo oyo mokomi mokomoko akomaki ezalaki solo, kasi bango nyonso balobelaki yango ndenge moko te. Soki tokokanisi masolo yango, tokoyeba malamu mpenza ndenge makambo yango esalemaki.
Lisolo ya Matai 26:6-13 eyebisi esika oyo likambo yango esalemaki: na ndako ya Simona, moto na maba, na mboka Betania, kasi eyebisi nkombo ya mwasi oyo asopaki mafuta-na-malasi na motó ya Yesu te. Matai alobi boye: “Nde emoni bayekoli bongo, bayoki mabe” mpe baimaimaki ete mbɛlɛ batɛkaki mafuta wana mpo bápesa babola mbongo yango.—Biso nde totɛngisi makomi.
Lisolo ya Malako elobeli mpe makambo yango. Kasi ebakisi ete mwasi wana abukaki mbeki moko. Mbeki yango ezalaki na mafuta-na-malasi oyo “euti na nzete babengaka ‘nard’ ” (Boyokani ya Sika) oyo, mbala mosusu eutaki na ekólo Inde. Mpo na likambo ya koimaima, Malako alobi ete “bamosusu na bango balobi na nkanda,” mpe “bazalaki kosilika mpo na mwasi.” (Biso nde totɛngisi makomi; Malako 14:3-9) Na yango, masolo nyonso mibale emonisi ete bantoma mingi baimaimaki. Kasi likambo yango ebandaki ndenge nini?
Ntoma Yoane moto amonaki makambo wana, abakisi makambo mosusu ya ntina mpenza. Apesi nkombo ya mwasi yango: Malia, ndeko ya Malata na Lasalo. Yoane abakisi lisusu likambo oyo ekoki kosalisa biso tóyeba malamu mpenza nini esalemaki mpe likambo yango ezali bongolabongola te soki tokokanisi yango na masolo mosusu. Alobi boye: “Apakoli yango na makolo ya Yesu, bongo apangusi yango na nsuki na ye.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Soki totii masolo nyonso esika moko, tokomona ete ekoki mpenza kozala ete Malia asopaki mafuta yango—oyo Yoane mpe amonisi ete “basalaki” yango “na nzete ya nard,” (Boyokani ya Sika)—na motó mpe na makolo ya Yesu. Yoane alingaki Yesu mingi mpe azalaki kosepela te soki moto azangi limemya epai na Ye. Akomaki boye: “Yuda Mokeliota, moko na bayekoli na ye, oyo alingaki kokaba ye, alobi ete, Mpo na nini malasi oyo etɛkisami na denali nkama misato te ete epesamela babola?”—Yoane 12:2-8.
Yuda azalaki mpenza “moko na bayekoli na ye,” kasi okoki kokanga ntina oyo Yoane asepelaki te ete moto oyo azali moyekoli ya Yesu azala na mokano ya kokaba ye. Doktɛrɛ Howard Matheny, ye azali mobongoli ya Biblia, alobaki boye mpo na Yoane 12:4: “Verbe ya Greke oyo ebongolami na Lingala ‘alingaki,’ ekomamaki na participe présent, mpe verbe oyo ebongolami na ‘alingaki kokaba,’ ekomamaki na infinitif présent; nyonso mibale emonisi likambo oyo ezali kolandana. Yango emonisi ete kokaba oyo Yuda akabaki Yesu, ezalaki likambo oyo eyelaki ye na mbalakaka te kasi akanisaki yango mpe abongisaki yango na boumeli ya mikolo mingi.” Yoane abakisi likambo mosusu ya ntina ete Yuda aimaimaki “te mpo ete alingaki babola, kasi mpo ete azalaki moyibi mpe abateli ebombelo ya mosolo mpe abɔtɔli yango ebwakami wana.”
Makambo oyo nyonso etindi biso na kokanisa ete Yuda, moto oyo azalaki moyibi nde abimisaki koimaima wana mpo azalaki na mposa ya kozwa mbongo ya koyiba mingi soki batɛkaki mafuta wana ya ntalo mpe batyaki mbongo yango na kɛsi oyo azalaki kobatela. Ntango Yuda abimisi koimaima wana, ekoki kozala ete mwa bantoma mosusu baimaimaki mpo na kondima likambo oyo emonanaki malamu na miso na bango. Na ntembe te, Yuda nde moto ya liboso oyo abandaki koimaima.