Mokanda ya Biblia nimero 38—Zekalia
Mokomi: Zekalia
Esika ya bokomi: Yelusaleme
Nsuka ya bokomi: 518 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: 520–518 L.T.B.
1. Mpo na tempelo oyo ezalaki na Yelusaleme, makambo mazalaki lolenge nini ntango Zekalia abandaki kosakola?
KOTƐLƐMA! Yango nde ezalela oyo ezalaki na ntango ya mosala ya botongi tempelo ya Yehova na Yelusaleme na ntango oyo Zekalia abandaki kosakola. Atako Salomo atongaki tempelo ya liboso na boumeli ya mbula 7 na ndambo (1 Mik. 6:37, 38), Bayuda oyo bazongaki, basilaki kokóma na Yelusaleme mbula 17 kasi mosala ya kotonga ezalaki naino pene na kosila te. Mosala motɛlɛmaki mpenza na mobimba nsima na epekiseli oyo ebimisamaki na Alatazelezese (Bardiya to Gaumata). Kasi sikawa, atako epekiseli wana ya Letá, mosala mozongelamaki lisusu. Yehova asalelaki Hagai mpe Zekalia mpo na kopusa bato na kozongela mosala ya kotonga mpe kokangama na yango kino ekosila.—Ezl. 4:23, 24; 5:1, 2.
2. Mpo na nini mosala emonanaki monene lokola ngomba, kasi Zekalia asalaki nini mpo na kobenda likebi na bango?
2 Mosala oyo ezalaki liboso na bango emonanaki ete ezalaki mpenza monene. (Zek. 4:6, 7) Bazalaki bato moke, batɛmɛli bazalaki mingi, mpe atako batambwisamaki na moyangeli Zelubabele, oyo autaki na libota ya Davidi, bazalaki na mokonzi te, mpamba te bazalaki na nsé ya boyangeli ya bapaya. Ezalaki mpenza mpasi te mpo na kolɛmba mpe kokwea kati na ezaleli ya moimi, atako esengelaki na eleko wana komonisa kondima makasi mpe misala ya nguya! Zekalia asalelamaki mpo na kobenda likebi na bango likoló na mikano oyo Nzambe azalaki na yango mpo na eleko wana mpe ata likoló na mikano minene oyo azalaki na yango mpo na mikolo mizalaki koya, asalaki bongo mpo na kolendisa bango ete bámipesa na mosala. (8:9, 13) Ezalaki te ntango ya kozala lokola bankɔ́kɔ na bango oyo bazangaki botɔ́ndi.—1:5, 6.
3. (a) Lolenge nini Zekalia amonisami, mpe mpo na nini nkombo na ye ebongi mpenza? (b) Ntango nini esakweli ya Zekalia elobamaki mpe ekomamaki?
3 Zekalia azalaki nani? Kati na Biblia ezali soko na bato 30 bakeseni oyo babéngami na nkombo Zekalia. Nzokande, mokomi ya mokanda oyo momemi nkombo wana, emonisami ete, ezali “Zekalia, mwana na Belekia, mwana na mosakoli Ido.” (Zek. 1:1; Ezl. 5:1; Neh. 12:12, 16) Nkombo na ye (na Liebele, Zekhar·yahʹ) elimboli “Yehova asili komikundola.” Mokanda ya Zekalia emonisi polele ete “Yehova na bibele” akanisi lisusu bato na Ye, ete azali na boyokani malamu elongo na bango na ntina na nkombo na Ye. (Zek. 1:3) Badati oyo izali kati na mokanda oyo imonisi ete lisoló na yango liumelaki soko mibu mibale. Ezalaki na “sanza na mwambe na elanga na mibale na Dalio” (Ɔkɔtɔ́bɛ/Novɛ́mbɛ 520 L.T.B.) nde mosala ya kotonga tempelo ezongelamaki mpe Zekalia abandaki kosakola. (1:1) Lisusu, mokanda oyo elobeli “mokolo na minei na sanza na libwa, yango Kisilewe,” na “elanga na minei na mokonzi Dalio” (soko na 1 Desɛ́mbɛ 518 L.T.B.). (7:1) Na yango, ntembe ezali te ete esakweli ya Zekalia elobamaki mpe ekomamaki na boumeli ya mibu 520-518 L.T.B.—Ezl. 4:24.
4, 5. (a) Mpo na nini Zekalia asakolaki kokwea ya Tulo mbula mingi nsima ya kozingelama ya mboka wana na Nebukadanesala? (b) Kokokisama ya bisakweli nini endimisi mpenza ete mokanda oyo mopemamaki?
4 Bayekoli ya mokanda ya Zekalia bakomona bilembeteli mingi oyo bimonisi bosolo na yango. Tókamata ndakisa ya Tulo. Ezalaki nsima na bozingeli ya ntango molai ya mbula 13 nde Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone abebisaki Tulo. Nzokande, yango esukisaki Tulo na mobimba na yango te. Bambula mingi na nsima, Zekalia asakolaki kobebisama ya mobimba ya Tulo. Ezalaki mboka ya Tulo, oyo ezwami na esanga nde Alesandala Monene akweisaki na ntango atongaki gbagba na ye oyo eyebanaki mingi; atumbaki mboka yango kozanga koyoka mawa, kokokisáká bongo esakweli ya Zekalia oyo esilaki kopesama soko bikeke mibale liboso.a—Zek. 9:2-4.
5 Nzokande, elembeteli eleki kondimisa ete mokanda oyo epemamaki na Nzambe ezali bongo kokokisama ya bisakweli na yango oyo bitalelaki Masiya, Klisto Yesu, lokola tokoki komona yango na bokokanisi Zekalia 9:9 mpe Matai 21:4, 5 na Yoane 12:14-16; Zekalia 12:10 na Yoane 19:34-37; Zekalia 13:7 na Matai 26:31 mpe Malako 14:27. Lisusu, bokokani ezali kati na Zekalia 8:16 na Baefese 4:25; Zekalia 3:2 na Yuda 9; mpe Zekalia 14:5 na Yuda 14. Boyokani oyo ezali kati na Liloba ya Nzambe ezali mpenza likambo ya kokamwa!
6. (a) Nini ekoki kolimbola mbongwana ya ekomeli kobanda na mokapo 9 ya Zekalia? (b) Nini ekoki kozala ntina mpo na yango Matai alobelaki Zekalia lokola “Yilimia”?
6 Banganga-batyoli mosusu ya Biblia balobaka ete mbongwana ya ekomeli oyo ezali komonana longwa na mokapo 9 emonisi ete eteni wana ekomamaki na Zekalia te. Nzokande, mbongwana ya ekomeli ekoki kolimbolama mingi na ntina na mbongwana ya makambo oyo malobelami. Ya solo, mikapo mwambe ya liboso milobeli makambo mataleli mingi bato oyo bazalaki na mikolo ya Zekalia; nzokande, kobanda mokapo 9 kino mokapo 14, mosakoli alobeli makambo oyo mazalaki mosika na mikolo mizalaki koya. Basusu bamitunaki mpo na nini Matai atángi Zekalia, nzokande alobi ete maloba na ye mauti epai na Yilimia. (Mat. 27:9; Zek. 11:12) Emonani ete na ntango wana Yilimia ayebanaki lokola mosakoli ya liboso kati na Basakoli ya Nsuka (na esika ete ezala Yisaya, ndenge yango ezali lelo kati na Biblia na biso); na bongo, na kolobeláká Zekalia lokola “Yilimia,” Matai alandaki momeseno ya Bayuda ya kotya eteni mobimba ya Makomami na nsé ya nkombo ya mokanda ya liboso ya eteni yango. Yesu ye moko asalelaki liloba “Nzembo” mpo na kolobela mikanda nyonso oyo miyebanaki lokola Makomi.—Luka 24:44.b
7. Lolenge nini mokanda ya Zekalia ebongisami?
7 Kino na mokapo 6, vɛrsɛ́ 8, mokanda oyo ezali na molɔngɔ́ ya bimonaneli mwambe, oyo ekokani na oyo ya Danyele mpe ya Ezekiele; bimonaneli yango bitalelaki mpenza kotongama lisusu ya tempelo. Yango elandani na biyambweli mpe bisakweli bitali losambo ya pɛto, kobongisama lisusu, mpe mokolo na etumba ya Yehova.
MAKAMBO MAZALI KATI NA ZEKALIA
8. Emonaneli ya batamboli-na-mpunda minei emonisi nini na ntina na Yelusaleme mpe mabota?
8 Emonaneli ya liboso: Batamboli-na-mpunda minei (1:1-17). “Bóbutwa epai na ngai . . . Ngai mpe nakobutwa epai na bino,” Yehova alobi bongo, mpe na nsima atuni ete, “Maloba na ngai mpe malako na ngai oyo nalakisaki basakoli, baombo na ngai, yango izwamaki na batata na bino te?” (1:3, 6) Bato bandimi ete basili kozwa oyo esengelaki na bango. Sikawa emonaneli ya liboso ya Zekalia emonani. Na butu batamboli-na-mpunda minei batɛlɛmi katikati na banzeté penepene na Yelusaleme, nsima wana bauti kotala mabelé mobimba, mpe bakuti yango ezali kimya mpe efandi nyɛɛ. Kasi anzelu ya Yehova, oyo azali kotuna bango mituna, azali komitungisa na ntina na ezalela ya Yelusaleme. Yehova ye moko amonisi polele nkanda na ye monene na ntina na mabota oyo mapesaki mabɔkɔ na mpasi ya Siona, mpe alobi ete ‘akobutwa epai na Yelusaleme na mawa mingi.’ Ndako na ye mpenza ekotongama kati na yango, mpe mboka na ye “ikopalangana lisusu na malamu.”—1:16, 17.
9. Lolenge nini Yehova alimboli emonaneli ya maseke mpe ya batuli?
9 Emonaneli ya mibale: Maseke mpe batuli (1:18-21). Zekalia amoni maseke minei oyo mapalanganisaki Yuda, Yisalaele, mpe Yelusaleme. Na nsima Yehova amonisi ye batuli minei, kolimbweláká ye ete bango bakoya mpo na kobuka maseke ya mabota oyo mazali kotɛmɛla Yuda.
10. Lolenge nini Yehova atalelami mpo na bolamu ya Yelusaleme?
10 Emonaneli ya misato: Bolamu ya Yelusaleme (2:1-13). Moto moko azali kopima Yelusaleme. Mboka ekopambwama mingi, mpe Yehova akozala efelo ya mɔ́tɔ zingazinga na yango mpe nkembo katikati na yango. Abeleli ete, “O kimá epai na Siona,” mpe abakisi likebisi oyo, “Ye oyo amami bino azali komama kati na liso na [ngai].” (2:7, 8) Lokola Yehova afandi kati na yango, siona ekosepela, mpe mabota mingi bakomipesa bango moko epai na Yehova. Esɛngami na nzoto nyonso ete izala nyɛɛ liboso na Yehova, “zambi amilamukisi longwa na efandelo na ye na bulɛɛ.”—2:13.
11. Lolenge nini Nganga Monene Yosua alóngisami, mpe alendisami na kolanda nzela nini?
11 Emonaneli ya minei: Kobikisama ya Yosua (3:1-10). Nganga Monene Yosua amonisami kati na komekama, Satana atɛmɛli ye mpe anzelu ya Yehova apameli Satana. Yosua azali “lokoni lobɔtɔlami na mɔ́tɔ te”? (3:2) Yosua atángami pɛto, mpe na esika ya bilamba na ye ya mbindo, apesameli “bilamba na lokumu” oyo bizali pɛto. Alendisami na kotambola kati na nzela ya Yehova, oyo ‘akobimisa mosaleli na ye, Etape’ mpe oyo azali kotya liboso na Yosua libanga lizali na miso nsambo likoló na yango.—3:4, 8.
12. Maloba nini ya kolendisa mpe ya kopesa elikya mapesami na ntina na mosala ya kotonga tempelo?
12 Emonaneli ya mitano: Etɛlɛmɛlo na mwinda mpe banzeté ya olive (4:1-14). Anzelu alamwisi Zekalia mpo na kotala etɛlɛmɛlo ya mwinda ya wolo ya miinda nsambo, oyo ezalaki katikati na nzeté mibale ya olive. Ayoki liloba oyo ya Yehova epai na Zelubabele: ‘Na nzela na makasi te, na nzela na nguya mpe te nde na [elimo, NW] na Nzambe.’ “Ngomba monene” ekotɛlɛma liboso na Zelubabele, mpe libanga ya moboko ya tempelo ekotinda bato na konganga ete: “Ngɔlu! Ngɔlu ezala na yango!” Zelubabele asili kotya miboko ya tempelo, mpe Zelubabele akosilisa mosala yango. Miinda nsambo izali bongo miso na Yehova oyo “makotambolatambola kati na mokili mobimba.” (4:6, 7, 10) Nzeté mibale ya olive izali bapakolami mibale ya Yehova.
13-15. Nini emonani kati na emonaneli ya mokanda oyo mozali kopumbwa, ya efa na kopima, mpe ya makalo minei?
13 Emonaneli ya motoba: Mokanda oyo mozali kopumbwa (5:1-4). Zekalia amoni mokanda mozali kopumbwa, ezali na bolai soko ya mɛtɛlɛ 9 mpe bonene soko ya mɛtɛlɛ 4 na ndambo. Anzelu alimboli ete yango ezali elakeli mabe esalemi na ntina na baoyo nyonso bazali koyiba mpe kolapa ndai ya lokuta na nkombo ya Yehova.
14 Emonaneli ya nsambo: Efa ya kopima (5:5-11). Ezipeli elongolami longwa na efa ya kopima (soko balitɛlɛ 22), komonisáká mwasi moko oyo abéngami “Mabe.” Azongisamaki na efa, oyo etombwamaki na likoló na basi mibale oyo bazalaki na mapapu, mpo na komema yango na Sinala (Babilone) mpe “akotyama wana na esika na ye mpenza.”—5:8, 11.
15 Emonaneli ya mwambe: Makalo minei (6:1-8). Talá! Katikati na ngomba mibale ya motako, makalo minei mamonani, esika moko na bambalata ya lángi ikeseni. Ezali bilimo minei ya makoló. Na kolanda etindá ya anzelu, bakei kotambola na mabelé mobimba.
16. Nini esakolami na ntina na “Etape”?
16 Etape; kokila na bilei ya mpamba (6:9–7:14). Yehova atindi Zekalia ete atya motole monene likoló na motó ya Nganga Monene Yosua. Alobeli na lolenge ya esakweli na ntina na “Etape,” oyo ekotonga tempelo ya Yehova mpe oyo ekoyangela lokola nganga na kiti na ye ya bokonzi.—6:12.
17. Mpo na oyo etali losambo, Yehova alingi nini, mpe nini ekómelaki baoyo batɛmɛlaki maloba na ye?
17 Mibu mibale nsima wana Zekalia abandaki kosakola, bamonisi bauti na Betele mpo na kosɛnga epai na banganga ya tempelo soki bileko mosusu ya kolela mpe ya kokila bilei esengeli kolanda kobatelama. Na nzela ya Zekalia, Yehova atuni bato mpe banganga soki bazali mpenza sembo kati na kokila na bango ya bilei. Oyo Yehova alingi ezali ‘botosi, bosembo ya solo, motema-boboto, mpe motema mawa.’ (7:7, 9) Mpo ete Bayuda batɛmɛlaki liloba na ye ya esakweli na mapeka ya botomboki mpe na mitema makasi lokola libanga, apalanganisaki bango na nkanda na mabota nyonso.
18. Yehova apesi bilaka nini ya kitoko na ntina na kobongisama lisusu?
18 Kobongisama lisusu; “bato zomi” (8:1-23). Yehova alobi ete akozonga na Siona mpe akofanda na Yelusaleme, oyo ekobéngama “mboka na solo.” Mibangé bakofanda na nzela, mpe bana bakosakana kuna. Yango ezali likambo ya mpasi te mpo na Yehova, Nzambe ya solo mpe ya boyengebene! Yehova alaki mombóto ya kimya epai na batikali kati na bato na ye, na kolobáká ete: “Bóbanga te! Tiká ete mabɔkɔ na bino mázala na nguya!” (8:3, 13) Basengeli kosala makambo oyo: Kolobana solo moko na mosusu mpe kokata makambo na solo, kobanzabanza mabe na mitema te mpe kolapa ndai ya lokuta te. Ɛɛ, ntango ekoya wana bato na mboka mingi bakobyangana moko na mosusu ete bákenda na molende nyonso koluka Yehova, mpe “bato zomi” longwa na minɔkɔ nyonso “bakosimba elamba na moto oyo azali Moyuda” mpe bakokenda elongo na bato ya Nzambe.—8:23.
19. Biyambweli nini ya makasi bipesami na nsima, kasi nini elobami na ntina na mokonzi ya Yelusaleme?
19 Biyambweli na ntina na mabota, mpe babateli na mpate ya lokuta (9:1–11:17). Kati na eteni ya mibale ya mokanda oyo, na mokapo 9 kino na mokapo 14, Zekalia alongwi na bimonaneli ya bililingi ya makambo mpo na koleka na ekomeli mpenza ya bisakweli. Abandi na eyambweli makasi na ntina na mboka ikeseni, bakisá mpe Tulo, mboka na mabanga oyo ezwami na esanga. Elobami na Yelusaleme ete anganga na esengo monene, mpamba te, “talá mokonzi na yo akoyela yo, ye azali na boyengebene mpe na kobikisa; na bopɔlɔ mpe atamboli likoló na mpunda.” (9:9) Akobebisa makalo na etumba mpe litimbo, ye akolobela kimya epai na mabota mpe akoyangela kino na nsuka ya mabelé. Yehova akobundisa Grèce na ntina na bato na ye, mpe akobikisa bango. “Mpo ete malamu na ye ezali monene boni! Mpe kitoko na ye ezali boni!” (9:17) Yehova, Mopesi-Mbula, akweisi baoyo bakoyebisaka mabombami mpe babateli na mpate ya lokuta. Akoyeisa ndako na Yuda monene mpe bato na Efelaima lokola elombe na makasi. Mpo na basombami, “mitema na bango mikozala na esengo kati na Yehova . . . mpe kati na nkombo na ye bakotambola epai na epai.”—10:7, 12, NW.
20. Lingenda ya “Ngɔlu” mpe ya “Kokangana” ezali elilingi ya nini?
20 Zekalia azwi sikawa mokumba ya koleisa etongá, oyo esilaki kotɛkisama mpo na kobomama na babateli na mpate oyo bazangi motema mawa oyo bazali koloba ete: “[Yehova] apambolama mpo ete nazali mozwi.” (11:5) Mosakoli akamati mangenda mibale mpe apesi yango nkombo “Ngɔlu” mpe “Kokangana.” (11:7) Na kobukáká “Ngɔlu,” amonisi ete kondimana ebukani. Na nsima asɛngi lifuti na ye, mpe bapesi ye mosolo, palata 30. Yehova apesi etindá na Zekalia ete abwaka yango kati na ebombelo na mosolo mpe, alobi na maloba ya kotyola mpenza ete, “oyo motuya malamu motángami ngai na bango.” (11:13) Sikawa lingenda “Kokangana” ebukani, kobebisáká bongo bondeko oyo ezalaki kati na Yuda mpe Yisalaele. Mopanga mokokómela babateli na mpate ya lokuta oyo bazali komibanzabanza te mpo na bampate ya Yehova.
21. (a) Ekateli ya Yehova ezali nini likoló na baoyo bazali kobundisa Yelusaleme? (b) Kopalangana nini mpe kopɛtolama nini esakolami?
21 Yehova azali kobunda, akómi mokonzi (12:1–14:21). Eyambweli mosusu ebandi. Yehova akokómisa Yelusaleme kɔ́pɔ oyo ezali kotelenganisa bato mpe libanga ya bozito oyo lizali kozokisa baoyo bazali kotombola yango. Akosukisa mabota nyonso oyo mazali kotɛmɛla Yelusaleme. Likoló na ndako ya Davidi, Yehova akosopa elimo ya ngɔlu mpe ya malɔmbɔ, mpe bato bakolikya epai na moto oyo batɔbɔlaki, bakolela ye “lokola moto akolela mpo na mwana na likinda na ye.” (12:10) Yehova na bibele alobeli kolongolama ya bikeko nyonso mpe kobomama ya basakoli ya lokuta; tata mpe mama mpenza ya moto wana nde basengeli kozokisa ye na boye ete kati na nsɔ́ni wana alongola elamba na ye ya mosakoli. Mobateli na mpate oyo asangani elongo na Yehova akobɛtama mpe etongá ekopalangana, kasi Yehova akopɛtola “ndambo na misato” mpo na kobelela nkombo na ye. Yehova akoloba ete: “Bazali bato na ngai,” mpe bango bakoloba ete, “[Yehova] azali Nzambe na ngai.”—13:9.
22. Nini ekokómela mabota mpe Yelusaleme na ‘mokolo ya Yehova’?
22 “Talá, mokolo na [Yehova] ezali koya.” Mabota nyonso makobundisa Yelusaleme, mpe ndambo na mboka ekokende na boombo, kasi batikali bakozala. Na nsima Yehova akobima mpe akobundisa mabota yango, “lokola wana abunani na mokolo na etumba.” (14:1, 3) Ngomba ya olive, na ɛ́sti ya Yelusaleme, ekopaswana longwa na ɛ́sti kino na wɛ́sti, kosaláká lobwaku mpo na kobombama. Na mikolo wana mai na bomoi makotiyola longwa na Yelusaleme na ɛ́sti kino na wɛ́sti, ezala na eleko ya molungé to na eleko ya mpiɔ, mpe “[Yehova] akozala mokonzi likoló na mokili mobimba.” (14:9) Wana Yelusaleme ezali na kimya, Yehova akoningisa baoyo bazali kobundisa yango. Wana bazali nzoto kolɔngɔ́nɔ́, mosuni na bango, miso na bango, mpe ndemo na bango ekopɔla. Mobulungano ekozala kati na bango. Lobɔkɔ na moko na moko ekobalukela mozalani na ye. Baoyo bakotikala na bomoi kati na mabota nyonso basengeli ‘kobuta mbula na mbula mpo na kosambela Mokonzi Yehova na bibele.’—14:16.
LITOMBA NA YANGO
23. Lolenge nini esakweli ya Zekalia ezali kolendisa kondima?
23 Baoyo nyonso bazali koyekola mpe komanyola likoló na esakweli ya Zekalia bakozwa litomba kati na boyebi oyo ezali kolendisa kondima. Koleka mbala 50, Zekalia azali kobenda likebi likoló na “Yehova na bibele” lokola Ye oyo azali kobunda mpo na bato na Ye mpe azali kobatela bango, kopesáká bango nguya oyo basengeli na yango. Ntango botɛmɛli oyo ekokani na ngomba ekanelaki kotya nsuka na mosala ya kotonga tempelo, Zekalia alobaki ete: “Oyo ezali liloba na [Yehova] epai na Zelubabele ete, Na nzela na makasi te, na nzela na nguya mpe te nde na [elimo, NW] na ngai. Yehova na bibele alobi bongo. Ɛ ngomba monene, yo nani? Liboso na Zelubabele okobongwana mokili na nsé.” Tempelo esilaki kotongama na lisungi ya elimo ya Yehova. Bobele bongo lelo oyo, mikakatano mikolimwa soki tozali kobundisa yango na kozaláká na kondima epai na Yehova. Ezali lokola Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Soko bozali na kondima ata lokola mombuma na sinapi, bokoloba na ngomba oyo ete, Tambolá longwa awa kino esika kuna mpe ekotambola. Likambo moko te likoleka nguya na bino.”—Zek. 4:6, 7; Mat. 17:20.
24. Elakiseli nini ya bosembo epesami kati na mokapo 13 ya Zekalia?
24 Na mokapo 13, vɛrsɛ́ 2 kino 6, Zekalia amonisi bosembo oyo ezali kosalisa na koyeba lisangá ya Yehova na mikolo oyo. Yango esengeli koleka boyokani nyonso oyo ezalaka kati na bato, na ndakisa bikanganeli ya makila kati na bandeko. Soki ndeko moko mpenza na biso asakoli makambo ya lokuta na nkombo ya Yehova, elingi koloba, koyebisa makambo oyo makeseni na nsango ya Bokonzi mpe ameki kosala bopusi mabe likoló na basusu kati na lisangá ya libota ya Nzambe, basangani ya libota ya moto yango basengeli na bosembo nyonso kosimba bikateli bikamatami na lisangá. Etɛlɛmɛlo motindo moko esengeli kokamatama epai na moninga ya penepene oyo azali kosakola makambo na lokuta, mpo ete akoka koyoka nsɔ́ni mpe azoka na motema na ntina na likambo mabe oyo ye asali.
25. Lolenge nini esakweli ya Zekalia ezali na boyokani na mikapo mosusu mpo na komonisa Masiya, “Etape,” mpe mosala na ye lokola Nganga Monene mpe Mokonzi oyo atambwisami na Yehova?
25 Lokola baparagrafe na biso ya ebandeli emonisaki yango, bokɔti ya Yesu na Yelusaleme lokola mokonzi, “na bopɔlɔ mpe atamboli likoló na mpunda,” kotɛkisama na ye na “ndambo ntuku misato na palata,” kopalangana ya bayekoli na ye na ntango yango, mpe kotɔbɔlama na ye likoló na nzeté ya mpasi na likɔnga ya sodá, makambo oyo nyonso masilaki kosakolama na bosikisiki mpenza na Zekalia. (Zek. 9:9; 11:12; 13:7; 12:10) Lisusu, esakweli etángi “Etape” lokola motongi na tempelo ya Yehova. Bokokanisi ya Yisaya 11:1-10; Yilimia 23:5; na Luka 1:32, 33 emonisi ete moto yango ezalaki Yesu Klisto, oyo “akozala mokonzi na ndako na Yakobo libela, mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.” Zekalia alobeli “Etape” lokola “nganga likoló na kiti na ye na bokonzi,” yango eyokani na maloba ya ntoma Paulo oyo ete: “Yesu . . . ye Nganga Monene libela kobila molɔngɔ́ na Melikisedeke,” mpe, “afandi na lobɔkɔ na mobali na kiti na bokonzi na Nguya Monene kuna na Likoló.” (Zek. 6:12, 13; Ebe. 6:20; 8:1) Na bongo, esakweli emonisi “Etape” lokola Nganga Monene mpe Mokonzi oyo afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe kati na makoló, atako ezali mpe kosakola ete Yehova azali Mokonzi Monene likoló na nyonso: “Mpe [Yehova] akozala mokonzi likoló na mokili mobimba; na mokolo yango, [Yehova] akozala moko mpe nkombo na ye moko.”—Zek. 14:9.
26. “Mokolo” nini ya nkembo Zekalia alobeli yango mbala na mbala?
26 Kolobeláká ntango yango, mosakoli azongeli maloba “na mokolo yango” soko mbala 20, mpe kútu yango nde esukisi esakweli na ye. Botaleli ya bisika mingi oyo elobeli yango, emonisi ete ekozala mokolo oyo Yehova akolongola nkombo ya bikeko mpe akoboma basakoli ya lokuta. (13:2, 4) Ezali bongo mokolo oyo Yehova akobundisa mabota ya mobulu mpe akopalanganisa mobulungano kati na bango mpe akosilisa bango mpe akopesa ‘lobwaku ya ngomba na ye’ lokola ebombamelo mpo na bato na ye. (14:1-5, 13; 12:8, 9) Ɛɛ, “Yehova Nzambe na bango akobikisa bango na mokolo yango, mpo ete bazali lokola etongá na bato na ye,” mpe bakobyanga moto na moto mozalani na ye na nsé na miwiti mpe na nsé na nzeté na mosuke. (Zek. 9:16; 3:10; Mika 4:4) Ezali mokolo na nkembo ntango Yehova na bibele “akofanda katikati” ya bato na ye mpe ntango oyo “mai na bomoi ekobima na Yelusaleme.” Maloba wana ya Zekalia mamonisi makambo makosalema “na mokolo yango” lokola bilembo oyo bizali komonisa “likoló ya sika mpe mabelé ya sika” na boyokani na elaka ya Bokonzi.—Zek. 2:11; 14:8; Emon. 21:1-3, NW; 22:1.
27. Lolenge nini esakweli ya Zekalia ezali kobenda likebi likoló na kosantisama ya nkombo ya Yehova?
27 “Nani atyoli mokolo na makambo mike?” ezali motuna Yehova atuni. Talá! Bolamu oyo ekozala na mabelé mobimba: ‘Bato mingi mpe mabota na nguya bakoya mpenza koluka Yehova na bibele kati na Yelusaleme, mpe bato zomi longwa na mabota na minɔkɔ nyonso, bakosimba elamba na moto oyo azali Moyuda, bakoloba ete, Tokokenda na yo elongo, zambi toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.’ “Na mokolo yango” ata ngɛlɛngɛlɛ ya mbalata ekozala na maloba oyo “Bulɛɛ epai na Yehova.” Bisakweli oyo ya kosimba motema bizali na litomba mingi koleka na boye ete tosengeli kotalela yango, mpamba te bizali komonisa ete nkombo ya Yehova ekosantisama mpenza na nzela ya Mombóto ya Bokonzi na ye.—Zek. 4:10; 8:22, 23; 14:20.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 531, 1136.
b Encyclopaedia Judaica, 1973, Vol. 4, col. 828; búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 1080-1081.