“Napesi bino ndakisa”
“Bosengelaki nde kozala bateyi na kotalela ntango.”—BAEBELE 5:12, NW.
1. Mpo na nini moklisto akoki koyoka ete asengeli komitalela soki atángi maloba ya Baebele 5:12?
NTANGO ozali kotánga vɛrsɛ oyo esimbi boyekoli na biso, ozali koyoka ete osengeli komitalela na likambo yango? Soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. Toyebi ete biso nyonso bayekoli ya Klisto tosengeli kozala bateyi. (Matai 28:19, 20) Toyebi ete na mikolo oyo tozali, ezali kosɛnga mpenza ete tózala bateyi oyo bayebi mosala yango malamumalamu. Toyebi mpe ete mosala na biso ya koteya ekoki kobikisa bato oyo bakokaki kokufa! (1 Timote 4:16) Yango wana, tokoki mpenza komituna mituna oyo: ‘Nateyaka mpenza na ndenge oyo esengeli? Ndenge nini nakoki kobongisa lisusu ndenge na ngai ya koteya?’
2, 3. (a) Moteyi moko amonisaki ete koteya malamu esɛngaka nini? (b) Yesu apesaki biso ndakisa nini na likambo etali koteya?
2 Mituna ya ndenge wana esengeli kolɛmbisa biso nzoto te. Soki tokanisaka ete mpo na kozala moteyi esengeli kaka koyekola yango na kelasi, tokoki kokanisa ete tokoki te kokóma bateyi ya malamu. Nzokande, koteya malamu ezali likambo ya koyekola mayele ya koteya te; esɛngaka likambo mosusu oyo eleki ntina. Na buku moko oyo akomaki, moteyi moko oyo asali mosala wana mingi alobelaki likambo yango boye: “Koteya malamu ezali te likambo ya mayele ya koteya, to ndenge ya koteya, to bibongiseli to makambo oyo moto azali kosala. . . . Koteya esɛngi libosoliboso kozala na bolingo.” Ezali solo ete moto yango azalaki kolobela koteya na kelasi ya mokili. Kasi, likanisi oyo alobaki ebongi, koleka kutu, na mosala ya koteya oyo biso baklisto tosalaka. Na ndenge nini?
3 Yesu Klisto azali Ndakisa na biso na mosala ya koteya. Ye alobaki na bayekoli na ye ete: “Napesi bino ndakisa.” (Yoane 13:15, NW) Alobaki mpo na ndakisa oyo apesaki na likambo etali kozala na komikitisa, kasi Yesu apesaki mpe ndakisa na mosala oyo azalaki kotya na esika ya liboso ntango azalaki awa na mabele, elingi koloba koteya bato nsango malamu ya Bokonzi. (Luka 4:43) Yango wana, soki balobi na yo osalela liloba moko mpo na kolobela mosala ya Yesu, na ntembe te okopona liloba “bolingo,” boye te? (Bakolose 1:15; 1 Yoane 4:8) Yesu alingaki libosoliboso Tata na ye Yehova. (Yoane 14:31) Kasi, na mosala na ye ya koteya, Yesu amonisaki bolingo na ndenge mosusu mibale. Ya liboso, alingaki solo oyo azalaki koteya, mpe ya mibale, alingaki bato oyo ye azalaki koteya. Tótalela naino malamumalamu ndakisa oyo apesaki biso na makambo yango mibale.
Yesu abandá kolinga solo ya Nzambe kala mpenza
4. Ndenge nini Yesu akómaki kolinga mateya ya Yehova?
4 Ndenge oyo moteyi azali kotalela mateya na ye emonanaka mpenza na ndenge oyo azali koteya yango. Soki moteyi azali kosepela na mateya na ye te, bayekoli na ye bakomona yango; ekomonana ete bango mpe bakosepela na mateya yango te. Yesu azalaki kotalela bongobongo te solo oyo azalaki koteya na ntina na Yehova mpe Bokonzi na Ye. Yesu alingaki mateya yango mingi mpenza. Bolingo yango mpo na solo ebandá na ntango oyo ye moko azalaki moyekoli. Mwana mobotami-se-moko azalaki moyekoli ya molende na boumeli ya ebele ya bambula oyo alekisaki na likoló liboso abotama lokola moto. Yisaya 50:4, 5 ezali na maloba kitoko oyo: “Nkolo [Yehova] apesi ngai lolemo ya baoyo balakisami ete nayeba kosimba na maloba ye oyo alɛmbi. Ntɔngɔ na ntɔngɔ akolamukisa, akolamukisa litoi na ngai koyoka lokola bango baoyo bakolakisama. Nkolo [Yehova] azipoli litoi na ngai, nazalaki [motomboki te, NW]; nazongaki nsima mpe te.”
5, 6. (a) Likambo nini Yesu akutanaki na yango na ntango ya batisimo na ye, mpe yango esalaki ye nini? (b) Bokeseni nini tozali komona kati na Yesu mpe Satana na ndenge ya kosalela Liloba ya Nzambe?
5 Ntango azalaki kokola lokola moto awa mabele, Yesu atikaki te kolinga bwanya ya Nzambe. (Luka 2:52) Na nsima, ntango azwaki batisimo, likambo moko oyo akutanaki na yango naino te esalemaki. Luka 3:21 (NW) elobi ete: “Likoló efungwamaki.” Na ntembe te, yango elingi koloba ete Yesu ayebaki lisusu ete azalaki na bomoi liboso abotama lokola moto. Na nsima, alekisaki mikolo 40 na esobe mpe kuna, azalaki kolya te. Tokanisi mpenza ete mikolo nyonso wana, Yesu ayokaki esengo mingi na komanyoláká likoló ya makambo oyo Yehova azalaki koteya ye ntango azalaki kuna na likoló. Kasi, mwa moke na nsima, bolingo na ye mpo na solo ya Nzambe emekamaki.
6 Na ntango oyo Yesu alɛmbaki mpe ayokaki nzala, Satana amekaki ye. Makambo oyo Satana asalaki ekeseni mpenza na oyo Yesu asalaki! Moto na moto alobelaki makambo oyo ezali na kati ya Makomami ya Liebele, kasi makanisi na bango ekeseneki. Satana azalaki na limemya ata moke te mpo na Liloba ya Nzambe, abongolaki yango mpo na kozwa na yango matomba na ye moko. Motomboki yango azalaki mpenza kotyola solo ya Nzambe. Nzokande, Yesu alobelaki makambo oyo ezali na kati ya Makomami na ndenge oyo emonisaki mpenza ete alingaki yango, asalelaki Liloba ya Nzambe malamumalamu mpo na kopesa eyano na likambo mokomoko oyo Satana asɛngaki ye. Yesu akelamaki ntango mingi mpenza liboso ete maloba yango ekomama; atako bongo, azalaki komemya yango. Ezalaki solo ya motuya oyo eutaki epai ya Tata na ye ya likoló! Alobaki na Satana ete maloba wana ya Yehova ezali na ntina koleka bilei. (Matai 4:1-11) Yesu alingaki mpenza solo nyonso oyo Yehova ateyaki ye. Kasi, ndenge nini amonisaki bolingo yango na mosala na ye ya koteya?
Yesu alingaki solo oyo azalaki koteya
7. Mpo na nini Yesu akanisaki koteya makanisi na ye moko te?
7 Yesu azalaki ntango nyonso komonisa polele ete alingaki solo oyo azalaki koteya. Toyebi ete azalaki na likoki ya koteya makanisi na ye moko mpamba te azalaki na boyebi mpe na bwanya mingi mpenza. (Bakolose 2:3) Nzokande, azalaki mbala na mbala koyebisa bato oyo azalaki koteya ete makambo nyonso wana eutaki epai na ye te, kasi eutaki epai ya Tata na ye ya likoló. (Yoane 7:16; 8:28; 12:49; 14:10) Alingaki solo ya Nzambe mingi na boye ete likanisi ya koteya makanisi na ye moko eyelaki ye ata moke te.
8. Ntango Yesu abandaki mosala na ye, ndenge nini apesaki ndakisa na likambo ya kolanda Liloba ya Nzambe?
8 Yesu apesaki ndakisa na ntango kaka abandaki mosala na ye ya koteya. Tótala ndenge oyo asalaki na mbala ya liboso oyo ayebisaki bato ya libota ya Nzambe ete ye nde Masiya oyo Nzambe alakaki. Biblia elobi te ete akendaki esika oyo ebele ya bato bazalaki mpe ayebisaki bango ete ye nde Klisto, bongo na nsima asalaki makamwisi minene mpo na kondimisa bango likambo yango. Kasi akendaki na sinagoga moko, esika oyo bato ya libota ya Nzambe bazalaki kotánga Makomami. Kuna, atángaki na mongongo makasi esakweli ya Yisaya 61:1, 2 mpe alimbolaki ete esakweli yango elobeli ye. (Luka 4:16-22) Ebele ya makamwisi oyo asalaki emonisaki ete Yehova azalaki na ye. Atako bongo, azalaki ntango nyonso kosalela Liloba ya Nzambe na mateya na ye.
9. Na ntango azali kolobana na Bafalisai, ndenge nini Yesu azalaki komonisa ete alingaki mpenza Liloba ya Nzambe?
9 Ntango bakonzi ya mangomba oyo bazalaki kotɛmɛla ye bazalaki kobɛtɛla ye ntembe, azalaki kobendana na bango te mpo na koyeba nani aleki na mayele kati na bango na ye, atako ezalaki likambo moke mpo alonga bango na likambo ya ndenge wana. Kasi, azalaki nde kotika ete Liloba ya Nzambe ekweisa bango. Na ndakisa, tókanisa lisusu likambo oyo esalemaki ntango Bafalisai balobaki ete bayekoli ya Yesu babukaki mobeko ya Sabata mpo babukaki mwa mitó ya ble mpe balyaki yango ntango bazalaki koleka na elanga moko. Yesu alobaki boye: “Botángá te oyo Davidi asalaki ntango ye ná bato oyo bazalaki elongo na ye bayokaki nzala?” (Matai 12:1-5, NW) Ekoki mpenza kozala ete bato yango oyo bazalaki komimona ete bazali sembo basilaki kotánga lisolo yango na 1 Samwele 21:1-6. Soki batángaki yango, bakangaki ntina te ya liteya oyo ezali na lisolo yango. Kasi, Yesu asukaki kaka te na kotánga lisolo yango. Akanisaki malamu makambo oyo lisolo yango elobeli mpe asimbaki liteya na yango. Alingaki mitinda oyo Yehova ateyaki na nzela ya lisolo yango. Na bongo, asalelaki lisolo yango mpe ndakisa mosusu oyo euti na Mibeko ya Moize mpo na komonisa ete Mibeko ezalaki mpenza kosɛnga bato makambo makasimakasi te. Ndenge oyo Yesu alingaki Liloba ya Nzambe esalaki mpe ete alongisa yango ntango bakonzi ya mangomba balukaki kopesa yango ndimbola mosusu mpo na matomba na bango moko mpe ntango balukaki kozongisa yango nsima mpo na kotya bonkɔkɔ na bango na esika ya liboso.
10. Ndenge nini Yesu akokisaki bisakweli oyo elobeli lolenge malamu oyo azalaki koteya?
10 Ndenge oyo Yesu alingaki solo oyo azalaki koteya ekokaki kotikela ye nzela ata moke te ete ateya yango kaka bongobongo. Bisakweli ya Makomami elobaki ete Masiya akoloba ‘na ngɔlu na bibebu na ye’; akobimisa “maloba kitoko.” (Nzembo 45:2; Genese 49:21) Yesu akokisaki bisakweli yango; mateya na ye ezalaki ntango nyonso kosepelisa, azalaki koloba “maloba kitoko” mpo na koteya solo oyo mpe alingaki mingi. (Luka 4:22, NW) Na ntembe te, esengo ezalaki komonana na elongi na ye, mpe miso na ye ezalaki kongɛnga ntango azali koloba mpo azalaki kosepela na makambo azalaki koteya. Tokanisi mpenza ete bato bazalaki na esengo mingi ntango bazalaki koyoka ye, mpe azali ndakisa malamu oyo biso tosengeli kolanda ntango tozali koyebisa bato mosusu makambo oyo toyekoli!
11. Mpo na nini Yesu akómaki na lolendo te atako azalaki moteyi ya makoki mingi?
11 Yesu akómaki nde na lolendo lokola azalaki na boyebi mingi ya solo mpe lokola azalaki molobi ya makoki? Likambo yango emonanaka mingi epai ya bato oyo bazali bateyi. Kasi, tóbosana te ete Yesu azalaki na bwanya oyo euti na Nzambe. Bwanya ya ndenge wana ekómisaka moto na lolendo te, mpamba te “bwanya ezali epai ya bato ya bopɔlɔ.” (Masese 11:2, NW) Ezali mpe na likambo mosusu oyo esalaki ete Yesu azala na lolendo te.
Yesu alingaki bato oyo azalaki koteya
12. Ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaki te ete bayekoli na ye bábangaka ntango azali na bango?
12 Ndenge oyo Yesu azalaki koteya ezalaki ntango nyonso komonisa ete alingaki bato mingi. Ndenge oyo Yesu azalaki koteya ekeseneki mpenza na ndenge ya bato ya lolendo, ye azalaki kokitisa bato te to kobangisa bango te. (Mosakoli 8:9) Ntango Petelo amonaki likamwisi moko oyo Yesu asalaki, akamwaki mingi mpe akweaki na mabɔlɔngɔ ya Yesu. Kasi, Yesu alingaki te ete bayekoli na ye bábangaka ntango azali na bango. Yesu ayebisaki Petelo na boboto mpenza ete, “Tiká kobanga” mpe amonisaki ye mosala malamu ya kokómisa bato bayekoli oyo ye mpe akosala. (Luka 5:8-10, NW) Yesu alingaki ete bayekoli na ye bálinga solo ya motuya mingi ya Nzambe mpe bolingo yango epesa bango mposa ya kosala, kasi ezala te ete bazali kosala mosala mpo bazali kobanga molakisi na bango.
13, 14. Na ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki koyokela bato mawa?
13 Bolingo oyo Yesu alingaki bato oyo azalaki koteya ezalaki mpe komonana na ndenge oyo azalaki koyokela bango mawa. “Ntango amonaki bibele wana ya bato ayokelaki bango mawa, mpo batikamaki mpamba mpe bapalanganisamaki lokola bampate ezangá mobateli.” (Matai 9:36, NW) Azalaki koyokela bango mawa mpo na bomoi ya mpasi oyo bazalaki na yango mpe asalisaki bango.
14 Tótala ndenge oyo Yesu amonisaki motema mawa na libaku mosusu. Mwasi moko oyo azalaki kotanga makila alekaki na katikati ya ebele ya bato mpe akendaki tii penepene na Yesu, asimbaki nsɔngɛ ya elamba ya Yesu mpe, likambo ya kokamwa, maladi na ye esilaki mbala moko. Yesu ayokaki ete nguya moko ebimi na nzoto na ye, kasi amonaki te moto oyo nguya yango ebikisaki. Alukaki kaka amona ye. Mpo na nini? Ezalaki te mpo agangela ye lokola abukaki Mibeko to asalaki te makambo oyo bakomeli na Bafalisai bazalaki kosɛnga, ndenge oyo mbala mosusu mwasi yango akanisaki. Kasi, alobaki na ye ete: “Mwana mwasi, kondima na yo esali ete oyoka malamu. Kende na kimya, mpe biká na maladi na yo ya mpasi.” (Malako 5:25-34, NW) Ozali komona motema mawa na maloba yango? Yesu alobaki kaka te ete, “Biká.” Kasi alobaki ete: “Biká na maladi na yo ya mpasi.” Malako asaleli liloba oyo ekoki kobongolama mpenzampenza na “kobɛta fimbo,” likambo oyo bazalaki kosala mbala mingi mpo na konyokola moto. Na bongo, Yesu andimaki ete maladi ya mwasi yango ezalaki konyokola ye, mbala mosusu ezalaki koyokisa ye mpasi mingi na nzoto mpe na makanisi. Yesu ayokelaki mwasi yango mawa.
15, 16. Ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye, makambo nini esalemaki oyo ezali komonisa ete azalaki kotya likebi na ye na bizaleli ya malamu oyo bato bazalaki na yango?
15 Yesu amonisaki mpe ete alingaki bato na ndenge azalaki kotya likebi na bizaleli ya malamu oyo bazalaki na yango. Talá likambo oyo elekaki ntango akutanaki na Natanaele, oyo akómaki mpe ntoma na ye na nsima. “Yesu amonaki Natanaele azali koya epai na ye mpe alobaki na ntina etali ye ete: ‘Talá, Moyisalaele ya solosolo, oyo na kati na ye bokosi ezali te.’ ” Na ndenge ya likamwisi, Yesu atalaki na motema ya Natanaele, mpe ayebaki mbala moko makambo mingi oyo azalaki na yango. Ya solo, Natanaele azalaki moto ya kokoka te. Azalaki mpe kosala mabunga ndenge biso nyonso tosalaka. Kutu, ntango bayebisaki ye nsango ya Yesu, alobaki mbala moko ete: “Likambo ya malamu ekoki nde kobima na Nazalete?” (Yoane 1:45-51, NW) Nzokande, na bizaleli nyonso oyo Natanaele akokaki kozala na yango, Yesu asepelaki kotya likebi na ye na ezaleli moko ya malamu: bosembo na ye.
16 Lisusu, ntango mokonzi moko ya basoda, oyo ekoki mpenza kozala ete azalaki Moloma, kasi Moyuda te, akutanaki na Yesu mpe asɛngaki ye ete abikisela ye moombo na ye oyo azalaki na maladi, Yesu ayebaki malamu ete soda yango azalaki mpe na mabe na ye. Na ntango wana, mokonzi ya basoda azalaki moto oyo, na ntembe te, asalaki makambo ya mabe mingi na bomoi na ye, asopaki makila, mpe azalaki kosambela banzambe ya lokuta. Kasi, Yesu atyaki likebi na ye na likambo moko ya malamu: kondima makasi ya moto yango. (Matai 8:5-13) Na nsima, ntango Yesu asololaki na moto ya misala mabe oyo babakaki ye na nzete pene na ye, Yesu apamelaki moto yango te mpo na misala mabe oyo asalaki na bomoi na ye, kasi alendisaki ye na ndenge apesaki ye elikya mpo na mikolo ezali koya. (Luka 23:43) Yesu ayebaki malamu ete kotala kaka mabe ya basusu to kosambisa bango, elɛmbisaka bango nzoto. Na ntembe te, lokola azalaki kotya likebi na bizaleli ya malamu ya bato, elendisaki bato mingi na kosala malamu koleka.
Mposa ya kosalela bato
17, 18. Lokola andimaki koya awa na mabele, ndenge nini Yesu amonisaki mposa ya kosalela basusu?
17 Likambo mosusu oyo ezali komonisa polele ete Yesu alingaki mpenza bato oyo azalaki koteya ezali mposa na ye ya kosalela bango. Ntango oyo Mwana ya Nzambe azalaki na bomoi lokola ekelamu ya elimo alingaki bato mingi. (Masese 8:30, 31) Lokola azalaki “Liloba,” to molobeli ya Yehova, ekoki kozala ete azalaki kosala makambo mingi mpo na bato. (Yoane 1:1) Nzokande, soki ayaki awa na mabele ezalaki mpe mpo bato bámona ye na miso ntango azali koteya bango; yango wana ‘amikómisaki mpamba mpe akamataki motindo ya moombo,’ atikaki esika na ye ya lokumu kuna na likoló. (Bafilipi 2:7, NW; 2 Bakolinti 8:9) Ntango azalaki awa na mabele, Yesu alukaki te ete básalela ye. Kutu, alobaki boye: “Mwana ya moto ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28, NW) Yesu akokisaki mpenza maloba yango na bomoi na ye.
18 Na komikitisa mpenza, Yesu akokisaki bamposa ya bato oyo azalaki koteya, azalaki kokakatana te mpo na kosalela bango. Atambolaki na makolo na Mokili ya Ndaka mobimba, asalaki mibembo mingi mpo na kokutana na bato mingi koleka mpe kosakwela bango. Azalaki na lolendo te lokola Bafalisai na bakomeli, azalaki na komikitisa mpe bato bazalaki kobanga te kopusana penepene na ye. Bato ya lolenge nyonso: bakonzi, basoda, bato ya mibeko, basi, bana, babola, bato ya maladi, ata bato oyo bazalaki kondima bango te ete báfanda esika moko na bato mosusu na mboka, bazalaki kosolola na ye kozanga kobanga. Atako azalaki moto ya kokoka, Yesu azalaki na nzoto lokola moto nyonso, azalaki kolɛmba mpe koyoka nzala. Kasi, ata na ntango oyo alɛmbi to azali na mposa ya kopema to alingi kotikala mwa moke kimya mpo na kobondela, azalaki kotalela naino bamposa ya basusu.—Malako 1:35-39.
19. Na ndenge na ye ya kozala na bayekoli na ye, ndenge nini Yesu apesaki ndakisa ya komikitisa, ya motema molai, mpe ya boboto?
19 Yesu andimaki mpe kosalela bayekoli na ye. Azalaki kosalela bango na ndenge azalaki koteya bango na boboto mpe na motema molai. Na ntango oyo azali koteya bango mateya mosusu ya ntina mingi, soki bazali kokanga ntina noki te, azalaki kolɛmba nzoto te, azalaki kosilika te, to mpe kogangela bango te. Azalaki ntango nyonso kosalela mayele mosusu mpo na kosalisa bango bákanga ntina. Kanisá, na ndakisa, mbala boni bayekoli baswanaki bango na bango mpo na koluka nani kati na bango nde alekaki baninga. Mbala na mbala, tii kutu na butu oyo bakangaki ye, Yesu asalelaki mayele mosusu mpo na koteya moto na moto azala na komikitisa liboso ya moninga na ye. Na likambo etali komikitisa mpe na makambo mosusu, Yesu akokaki mpenza koloba ete: “Napesi bino ndakisa.”—Yoane 13:5-15, NW; Matai 20:25; Malako 9:34-37.
20. Koteya ya Yesu na koteya ya Bafalisai ekeseneki na nini, mpe mpo na nini koteya na ye ezalaki kobota mbuma?
20 Tomoni ete Yesu asukaki kaka te na koyebisa bayekoli na ye ndakisa yango; ye moko ‘apesaki bango ndakisa.’ Ye moko mpe azalaki kosala makambo oyo azalaki koteya bango. Azalaki koloba na bango te lokola mokonzi oyo, ye moko akoki te kosala makambo oyo azalaki kosɛnga bango. Bafalisai nde bazalaki kosala ndenge wana. Yesu alobaki ete bango “balobaka kasi bakokisaka te.” (Matai 23:3, NW) Na komikitisa mpenza, Yesu amonisaki bayekoli na ye ndenge oyo basengeli kosalela mateya oyo azalaki koteya na ndenge oyo ye moko azalaki kosalela yango. Yango wana, ntango alendisaki bayekoli na ye ete bálukaka kozala na bomoi ya mindɔndɔ te, elingi koloba bálukaka ebele ya biloko ya mokili te, bazalaki na mposa ya kokanisa naino te soki yango elimboli nini. Bango moko bazalaki komona ndenge oyo azalaki kokokisa maloba na ye moko: “Bagambala bazalaka na mabulu mpe bandɛkɛ ya likoló bazalaka na bazumbu, kasi Mwana ya moto azali na esika ya kolalisa motó na ye te.” (Matai 8:20, NW) Yesu asalelaki bayekoli na ye na ndenge oyo apesaki bango ndakisa na komikitisa nyonso.
21. Tokolobela nini na lisolo oyo ekolanda?
21 Ya solo, Yesu azalaki Moteyi oyo aleki bateyi nyonso oyo baleká na mokili oyo! Bato nyonso ya sembo oyo bamonaki mpe bayokaki ye bamonaki ete alingaki makambo oyo azalaki koteya mpe alingaki bato oyo azalaki koteya. Lelo oyo, biso baoyo tozali koyekola ndakisa oyo apesaki tozali mpe komona yango. Kasi, ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya kokoka ya Klisto? Lisolo oyo ekolanda ekopesa eyano na motuna yango.
Okopesa eyano nini?
• Koteya malamu esɛngaka likambo nini, mpe nani amonisaki yango?
• Na ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaki solo oyo azalaki koteya?
• Ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaki bato oyo azalaki koteya?
• Bandakisa nini emonisi mposa oyo Yesu azalaki na yango ya kosalela bato oyo azalaki koteya na komikitisa mpenza?
[Elilingi na lokasa 12]
Ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaki mitinda oyo ezali na Liloba ya Nzambe?