“Bózala na mpiko! Ngai nasili kolonga mokili”
MOKOLO oyo Yesu akufaki—mokolo ya 14 Nisana na manaka ya Bayuda—ebandaki nsima ya kolala ya moi, na mokolo ya minei mwa 31 Marsi ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.). Na mpokwa wana, Yesu ná bantoma na ye bazalaki na likita na eteni ya likoló ya ndako moko na Yelusaleme mpo na fɛti ya Elekeli. Ntango azalaki komibongisa mpo “alongwa na mokili oyo mpe akende epai ya Tata,” Yesu alakisaki ete alingaki bantoma na ye tii na nsuka. (Yoane 13:1) Ndenge nini? Ateyaki bango mateya ya malamu mpenza mpe na ndenge yango abongisaki bango mpo na makambo oyo esengelaki koya.
Ntango butu epusanaki, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bózala na mpiko! Ngai nasili kolonga mokili.” (Yoane 16:33) Alingaki koloba nini na maloba wana ya mpiko? Ndimbola moko yango oyo: ‘Mabe oyo basali ngai na mokili oyo ebebisi motema na ngai te, etindi ngai mpe nazongisa mabe na mabe te. Natiki mpe te ete bizaleli mabe ya bato ya mokili oyo ekɔtela ngai. Bino mpe bokoki kosala yango.’ Makambo oyo Yesu ateyaki bantoma na ye ya sembo na bangonga wana ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé esengelaki kosalisa bango mpo bango mpe bálonga mokili.
Mabe etondi na mokili lelo oyo, nani akoki kobɛta ntembe na likambo yango? Ndenge nini totalelaka makambo oyo ezali komonisa ete bosembo ezali te mpe mobulu ezangi ntina oyo ezali kosalema? Makambo yango ebebisaka motema na biso to nde epesaka biso likanisi ya kozongisa mabe na mabe? Oyokaka mpe mposa ya kolanda bizaleli mabe ya bato oyo bazali pembeni na yo? Longola yango, ezaleli na biso ya bato ya kozanga kokoka mpe mposa na biso ya kosala masumu, ezali kobimisela biso etumba oyo tozali kobunda na banguna mibale: mokili ya mabe mpe bamposa na biso ya mabe. Tokoki mpenza kolonga na makasi na biso moko kozanga ete Nzambe asalisa biso? Ndenge nini Nzambe akoki kosalisa biso? Bizaleli nini tosengeli kolona mpo na kolonga bamposa mabe ya nzoto? Mpo na kozwa biyano na mituna yango, tótalela naino makambo oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye ya bolingo na mokolo ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele.
Bózala na komikitisa mpo bózala na lolendo te
Tózwa na ndakisa, lolendo to enzombo. Biblia elobi ete: “Lolendo ezalaka liboso ya kokwea, elimo ya enzombo liboso ya kobɛta libaku.” (Masese 16:18, NW) Makomami epesi biso lisusu toli oyo: “Soki moto moko boye akanisi ete azali moto ya ntina ntango azali moto mpamba, azali kokosa makanisi na ye moko.” (Bagalatia 6:3) Ya solo, lolendo ebebisaka mpe ekosaka. Tokomonisa bwanya soki toyini “enzombo mpe lolendo.”—Masese 8:13, NW.
Bantoma ya Yesu bamitombolaki nde mpe bazalaki na lolendo? Mbala mosusu bazalaki kowelana mpo na koyeba nani alekaki na kati na bango. (Malako 9:33-37) Mokolo mosusu, Yakobo ná Yoane basɛngaki Yesu ete atya bango na bisika ya lokumu koleka na kati ya Bokonzi. (Malako 10:35-45) Yesu alingaki kosalisa bayekoli na ye bábwaka mposa wana. Yango wana, ntango bazalaki kolya elambo ya Elekeli, atɛlɛmaki, akangaki esume na loketo, mpe abandaki kosukola bayekoli na ye makolo. Liteya oyo alingaki kopesa bango ezalaki polele. Yesu alobaki na bango ete: “Soki ngai, atako Nkolo mpe Moteyi, nasukoli bino makolo, bino mpe bosengeli kosukolana makolo bino na bino.” (Yoane 13:14) Lolendo esengeli kotika esika na ezaleli oyo ekeseni na yango, elingi koloba komikitisa.
Kasi, kobwaka lolendo ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te. Mwa moke nsima, kaka na mpokwa wana, nsima wana Yesu abimisaki Yuda Mokeliota oyo asilaki kotɛka ye, ntembe makasi ebimaki na kati ya bantoma 11. Balingaki nini? Balingaki koyeba soki nani na bango amonani ete aleki bango nyonso! Na mbala yango lisusu, Yesu agangelaki bango te, alakisaki motema molai mpe amonisaki bango ete ezali malamu kosalela basusu. Alobaki boye: “Bakonzi ya bikólo mosusu bamityaka bankolo likoló na bango, mpe baoyo bazali na bokonzi likoló na bango babengami Basali-Bolamu. Nde, bino bosengeli kozala bongo te. Kasi tiká ete moto oyo aleki na kati na bino akóma lokola leki ya nsuka mpenza, mpe moto oyo azali kosala lokola mokonzi azala lokola mosali.” Atindaki bango bákanisa lisusu ndakisa oyo apesaki bango ntango abakisaki ete: “Ngai nazali na katikati na bino lokola mosali.”—Luka 22:24-27.
Bantoma bakangaki ntina ya liteya yango? Emonani bongo. Bambula mingi na nsima, ntoma Petelo akomaki ete: “Bino nyonso bózalaka na likanisi moko, bómityaka na esika ya bamosusu, bózalaka na bolingo ya bondeko, bato oyo bayokelaka bamosusu mawa mingi, bato ya elimo ya komikitisa.” (1 Petelo 3:8) Ezali mpenza na ntina ete biso mpe tóbwaka lolendo mpe tólona komikitisa! Tokomonisa ete tozali na bwanya soki tomipesi te na koluka lokumu, nguya, to bokonzi. Biblia elobi ete “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amonisaka boboto monene epai ya bato ya komikitisa.” (Yakobo 4:6) Ndenge moko mpe, lisese moko ya kala elobi ete: “Komikitisa mpe kobanga Yehova ememaka bozwi mpe lokumu mpe bomoi.”—Masese 22:4, NW.
Ndenge nini tokoki koboya koyina bato?
Tólobela mpe ezaleli mosusu oyo ezali komonana mingi na mokili—koyinana. Bipai nyonso tozali komona bato bazali koyinana mpo bazali kobanga, mpo na kozanga koyeba, kokanisela bato mosusu mabe, konyokwama, kozanga bosembo, bolingo ya ekólo, koboya bato ya ekólo mosusu to ya mposo mosusu. (2 Timote 3:1-4) Koyina ezalaki mpe mingi na ntango ya Yesu. Bayuda bazalaki mpenza koyina bato oyo bazalaki kofutisa mpako. Bayuda ná Basamalia bazalaki koyokana te. (Yoane 4:9) Bayuda bazalaki mpe kotyola bato ya bikólo mosusu. Kasi, losambo oyo Yesu abandisaki esengelaki kosangisa bato ya bikólo nyonso. (Misala 10:34, 35; Bagalatia 3:28) Na yango, ateyaki bayekoli na ye likambo moko ya sika.
Yesu alobaki boye: “Nazali kopesa bino komandema ya sika, ete bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino, mpo bino mpe bólingana bino na bino.” Basengelaki kokóma na bolingo ya ndenge yango, mpamba te abakisaki boye: “Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:34, 35) Ezalaki komandema ya sika mpo elekaki kutu oyo ezalaki kosɛnga ete olinga “moninga na yo lokola yo mpenza.” (Levitike 19:18) Elekaki yango na ndenge nini? Yesu alimbolaki likambo yango polele mpe alobaki ete: “Komandema na ngai yango oyo, ete bólinganaka ndenge ngai nalingi bino. Ata moto moko te azali na bolingo koleka oyo, ete moto akaba molimo na ye mpo na baninga na ye.” (Yoane 15:12, 13) Basengelaki kondima kokaba bomoi na bango mpo na bandeko na bango mpe mpo na bato mosusu.
Ndenge nini bato ya kozanga kokoka bakoki kosilisa koyinana na bomoi na bango? Soki na esika ya koyinana, bazali kolona bolingo oyo elukaka libosoliboso bolamu ya basusu. Ebele ya bato ya sembo oyo bauti na bikólo, na bamboka, na mangomba mpe na mikili ndenge na ndenge bazali kosala likambo yango. Bazali sikoyo kokɔta na lisangá moko ya bato oyo bafandi na bomoko mpe bazali koyinana te—lisangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. Bazali mpenza kotosa maloba epemami na Nzambe oyo ntoma Yoane akomaki ete: “Moto nyonso oyo azali koyina ndeko na ye azali mobomi, mpe boyebi ete mobomi ata moko te azali na bomoi ya seko efandi na kati na ye.” (1 Yoane 3:15) Baklisto ya solosolo baboyaka kosimba mindoki mpo na kobunda bitumba; basalaka mpe makasi mpo na kolingana.
Kasi, ndenge nini tosengeli kotalelaka baoyo bazali bandimi te mpe bayinaka biso? Ntango azalaki likoló ya nzete, Yesu abondelaki mpo na bato oyo babomaki ye mpe alobaki ete: “Tata, limbisá bango, mpo bazali koyeba oyo bazali kosala te.” (Luka 23:34) Ntango bato oyo batondaki na zuwa babambaki moyekoli Setefano mabanga tii babomaki ye, maloba na ye ya nsuka yango oyo: “Yehova, kotya mokumba ya lisumu oyo likoló na bango te.” (Misala 7:60) Yesu ná Setefano balakelaki bato oyo bayinaki bango mabe te. Bazalaki na nkanda na mitema na bango te. Biblia epesi biso toli oyo: “Tiká tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu.”—Bagalatia 6:10.
‘Mosungi mpo na libela’
Ntango Yesu ná bayekoli na ye ya sembo 11 bazalaki kokoba lisolo na bango, ayebisaki bango ete mosika te akozala lisusu na bango te. (Yoane 14:28; 16:28) Kasi, akitisaki bango mitema mpe alobaki ete: “Nakosɛnga Tata mpe ye akopesa bino mosungi mosusu mpo azala elongo na bino mpo na libela.” (Yoane 14:16) Mosungi yango oyo ye alakaki bango ezalaki elimo santu ya Nzambe. Esengelaki koteya bango makambo mozindo ya Makomami mpe kokundolela bango makambo oyo Yesu ateyaki bango ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabelé.—Yoane 14:26.
Ndenge nini elimo santu ekoki kosunga biso lelo? Biblia ezali Liloba oyo epemami na Nzambe. Bato oyo Nzambe asalelaki mpo na kopesa bisakweli mpe mpo na kokoma Biblia “bazalaki kopusama na elimo santu.” (2 Petelo 1:20, 21; 2 Timote 3:16) Soki tozali koyekola Makomami mpe kosalela makambo oyo yango ezali koyebisa biso, tokokóma na boyebi, bwanya, mayele, bososoli, makoki ya koyeba kokesenisa malamu na mabe mpe likoki ya kokanisa. Tobongisami malamu mpenza mpo na kolonga mitungisi ya mokili oyo mabe, boye te?
Elimo santu esungaka biso mpe na lolenge mosusu. Elimo santu ya Nzambe ezali nguya oyo etindaka bato básala malamu, esalisaka baoyo bazali kotika yango etambwisa bango na komonisa bizaleli oyo Nzambe asepelaka na yango. Biblia elobi ete: “Mbuma ya elimo ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, motema malamu, bolamu, kondima, boboto, komipekisa.” Yango nde bizaleli oyo tozali na mposa na yango mpo na kolonga bamposa ya nzoto lokola pite, koswana, zuwa, nkanda mpe makambo oyo ekokani na oyo wana, boye te?—Bagalatia 5:19-23.
Soki totyeli elimo ya Nzambe motema, tokoki mpe kozwa “nguya oyo eleki makasi” mpo na kolonga ata mokakatano to mpasi ya ndenge nini. (2 Bakolinti 4:7) Ata soki elimo santu elongoli komekama to masɛnginya te, ekoki mpenza kosalisa biso na koyikela yango mpiko. (1 Bakolinti 10:13) Ntoma Paulo akomaki ete: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.” (Bafilipi 4:13) Nzambe apesaka makasi yango na nzela ya elimo santu. Tosengeli kozala na botɔndi mpenza mpo na elimo santu! Nzambe alaki yango na bato oyo ‘balingaka Yesu mpe batosaka bakomandema na ye.’—Yoane 14:15.
“Bókoba kozala na kati ya bolingo na ngai”
Na butu ya nsuka ya bomoi na ye lokola moto, Yesu alobaki mpe na bayekoli na ye ete: “Moto oyo azali na bakomandema na ngai mpe azali kotosa yango, moto wana nde alingaka ngai. Mpe moto oyo alingaka ngai akolingama na Tata na ngai.” (Yoane 14:21) Alobaki na bango ete: “Bókoba kozala na kati ya bolingo na ngai.” (Yoane 15:9) Ndenge nini kokoba kozala na kati ya bolingo ya Tata mpe ya Mwana ekoki kosalisa biso na etumba oyo tozali kobunda mpo na kolonga bamposa ya masumu oyo ezali na kati na biso, mpe mokili oyo ya mabe?
Tokanisi ete tokoki mpenza kolonga bamposa mabe soki likambo moko ya ntina ezali te oyo ezali kotinda biso tótika yango? Likambo nini mosusu ezali na ntina koleka mposa ya kozala na boyokani malamu na Yehova Nzambe mpe na Mwana na ye? Ernesto,a elenge mobali moko oyo abundaki etumba makasi mpo na kotika pite oyo amipesaki na yango banda bolenge na ye, alobi boye: “Nazalaki na mposa ya kosepelisa Nzambe, mpe nayekolaki na kati ya Biblia ete asepelaka te na lolenge ya bomoi oyo nazalaki na yango. Na yango, nazwaki ekateli ya kobongwana, ya kotosa mitinda ya Nzambe na bomoi na ngai. Mokolo na mokolo, nasengelaki kobundisa makanisi ya mabe mpe ya mbindo oyo ezalaki kokoba koyela ngai. Kasi, nazwaki ekateli makasi ya kolonga etumba yango, mpe nazalaki ntango nyonso kosɛnga na Nzambe asalisa ngai. Nsima ya mbula mibale, nalongaki likambo oyo elekaki makasi, atako nasengeli naino kobunda makasi.”
Mpo na oyo etali etumba oyo tozali kobunda na mokili, tótalela libondeli ya nsuka oyo Yesu asalaki liboso atika eteni ya ndako ya likoló na Yelusaleme. Abondelaki Tata na ye mpo na bayekoli na ye ete: “Nazali te kosɛnga yo olongola bango na mokili, kasi okɛngɛla nde bango mpo na moto mabe. Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:15, 16) Ezali maloba ya kolendisa mpenza! Yehova abatelaka bato oyo alingaka mpe alendisaka bango ntango bazali kokabwana na mokili.
“Bómonisa kondima”
Kotosa bakomandema ya Yesu ekoki kosalisa biso tólonga na etumba oyo tozali kobunda na mokili oyo ya mabe mpe na bamposa na biso ya masumu. Kasi, atako kolonga wana ezali na ntina, ekoki kolongola mokili te, ata mpe lisumu te. Kasi tóbwaka elikya te.
Biblia elobi ete: “Mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoane 2:17) Yesu akabaki bomoi na ye mpo na kobikisa na lisumu mpe na liwa “moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye.” (Yoane 3:16) Ntango boyebi na biso ya makambo oyo Nzambe azali kosɛnga biso mpe ya mikano na ye ezali kokola, tiká tólanda toli ya Yesu oyo elobi ete: “Bómonisa kondima na kati ya Nzambe, bómonisa mpe kondima na kati na ngai.”—Yoane 14:1.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi ye nkombo mosusu.
[Elilingi na lokasa 7]
Yesu alobaki na bantoma na ye ete: “Bókoba kozala na kati ya bolingo na ngai”
[Elilingi na lokasa 7]
Mosika te tokosikolama mpenza na lisumu mpe na makambo oyo yango ememaka