Bakufi bazali wapi?
“MABELÉ mazali esika ya zando; likoló lizali mboka na biso,” elobi lisese moko ya ba Yoruba ya Afrika ya Wɛ́sti. Likanisi oyo lizali mpe koyokama kati na mangomba mingi. Ezali kopesa likanisi ete mabelé mazali lokola esika ya zando epai tokendaka mpo na ntango moke mpe bongo tozongaka. Engebene endimeli wana, nsima ya kufa tokendaka na likoló, oyo ezali mpenza mboka na biso.
Biblia ezali koteya ete mwa ndambo ya bato bakokende na likoló. Yesu Klisto ayebisaki na bantoma na ye ya sembo ete: “Na ndako na Tata na ngai, bifandelo bijali mingi. . . . Nakokɛnda kobɔngisɛla bino esika. Mpe sɔkɔ nakokɛndɛ kobɔngisɛla bino esika nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai ete esika, ejali ngai, bino bojala mpe wana lokola.”—Yoane 14:2, 3.
Maloba ya Yesu mamonisi te ete bato malamu nyonso bakokenda na likoló to ete likoló ezali mboka ya bato nyonso. Bato mosusu bakokamatama mpo na kokende na likoló mpo na koyangela mabelé. Yehova Nzambe ayebaki ete biyangeli ya bato bikolónga soko moke te kobongisa makambo ya mabelé. Na bongo, abongisaki boyangeli moko ya likoló, to Bokonzi, oyo na nsima ekokamba mabelé mpe ekobongola yango paladiso lokola ye akanaki yango uta na ebandeli. (Matai 6:9, 10) Yesu akozala Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. (Danyele 7:13, 14) Bato mosusu basengelaki koponama mpo na koyangela elongo na ye. Biblia esakolaki ete baoyo bakokamatama mpo na kokende na likoló basengeli kozala “bokonji na banganga mpɔ na Njambe na biso” mpe basengeli “[koyangela lokola bakonzi na mabelé, NW].”—Emɔnisɛli 5:10.
Nani akokende na likoló?
Na kotalela mokumba monene oyo bakonzi wana ya likoló bakozala na yango, ezali likambo ya kokamwa te ete basengeli kokokisa masɛngami ya makasi. Baoyo bakokende na likoló basengeli kozala na boyebi ya sikisiki ya Yehova mpe basengeli kotosa ye. (Yoane 17:3; Baloma 6:17, 18) Basɛngisami na kondimela mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto. (Yoane 3:16) Atako bongo, ezali kosɛnga makambo mingi lisusu. Basengeli kobyangama mpe koponama na Nzambe na nzela ya Mwana na ye. (2 Timoté 1:9, 10; 1 Petelo 2:9) Lisusu, basengeli kozala baklisto babatisami oyo “basili kobotama lisusu,” babotami na elimo santu ya Nzambe. (Yoane 1:12, 13; 3:3-6) Basengeli mpe kobatela bosembo na bango epai na Nzambe kino kufa.—2 Timoté 2:11-13; Emoniseli 2:10.
Ebele ya bamilió ya bato oyo bazalaki na bomoi mpe basilá kokufa bakokisaki masɛngami wana te. Mingi na bango bazalaki mpenza na mabaku mingi te ya koyekola na ntina na Nzambe ya solo. Basusu batángaki Biblia soko moke te mpe bayebaki bobele makambo moke to bayebaki mpe eloko moko te na ntina na Yesu Klisto. Ata kati na baklisto ya solo oyo bazali lelo na mabelé, bobele bato moke nde baponamaki na Nzambe mpo na bomoi ya likoló.
Na yango, motángo ya baoyo bakokende na likoló mozali moke. Yesu alobelaki bango lokola “etɔnga mokɛ.” (Luka 12:32) Na nsima, emonisamaki na ntoma Yoane ete baoyo “basombami na mabelé” mpo na koyangela elongo na Klisto na likoló bazali 144 000. (Emoniseli 14:1, 3; 20:6, NW) Soki tokokanisi bango na bamiliare ya bato oyo bazalaki na bomoi awa na mabelé, motángo yango mozali mpenza moke.
Baoyo bakokenda na likoló te
Nini ekokómela baoyo bakokenda na likoló te? Bazali nde konyokwama na esika moko ya mpasi ya seko, lokola mangomba mosusu mateyaka yango? Soko moke te, mpamba te Yehova azali Nzambe ya bolingo. Baboti ya bolingo bakobwaka bana na bango kati na mɔ́tɔ te, mpe Yehova anyokolaka bato na motindo wana te.—1 Yoane 4:8.
Elikya mpo na ebele ya baoyo basilá kokufa ezali bongo lisekwa na paladiso awa na mabelé. Biblia elobi ete Yehova azalisaki mabelé ete “bato báfanda.” (Yisaya 45:18, NW) Mokomi ya Nzembo alobaki ete: “Lola mpe likolo-na-lola ejali na [Yehova], kasi apɛsaki mokili na bana na bato.” (Njembo 115:16) Mabelé nde ezali efandelo ya seko mpo na bato, kasi likoló te.
Yesu asakolaki ete: “Ntango ekoya wana yɔnsɔ bajali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye [oyo ya Yesu, “Mwana na moto”] mpe bakobima.” (Yoane 5:27-29) Ntoma moklisto Paulo ayebisaki ete: “Najali na elikia na Njambe . . . ete lisekwa ekojala na bato sembo mpe na bato sembo tɛ.” (Misala 24:15) Likoló ya nzeté na mpasi, Yesu apesaki na mosáli na mabe moko oyo abongolaki motema elikya ya bomoi na nzela ya lisekwa na paladiso ya mabelé.—Luka 23:43.
Bongo, ezalela ya bakufi oyo bakosekwisama mpo na bomoi na mabelé ezali nini? Likambo moko oyo lisalemaki na boumeli ya mosala ya Yesu ezali kopesa nzela na koyanola na motuna oyo. Moninga na ye, Lasalo akufaki. Liboso ete Yesu akende kosekwisa ye, alobaki na bayekoli na Ye ete: “Moninga na biso Lasalo asili kolala mpɔngi; kasi nakokɛnda [kolamwisa ye na mpɔngi, NW].” (Yoane 11:11) Na bongo, Yesu akokanisaki kufa na mpɔngi, mpɔngi ya mozindo oyo ezangi ndɔ́tɔ.
Kolala kati na kufa
Mikapo misusu mizali na boyokani na likanisi oyo ya kolala kati na kufa. Ezali koteya te ete bato bazali na molimo oyo mozangi kokufa oyo nsima ya kufa ekendaka na mokili ya bilimu. Nzokande, Biblia eyebisi ete: “Bakufi bayebi [eloko moko te, NW] . . . Bolingo na bango mpe koyina na bango mpe jua na bango isili kobeba . . . Ejali na mosala tɛ, to mwango tɛ, to mayɛlɛ tɛ, to boyebi tɛ kati na esika na bakufi [nkunda] esika ekokɛnda yɔ.” (Mosakoli 9:5, 6, 10) Lisusu, mokomi ya Nzembo alobaki ete moto “akojonga na mabele lisusu; bobɛlɛ na mokɔlɔ yango kokanisa na ye esili.”—Njembo 146:4.
Mikapo oyo mimonisi polele ete baoyo bazali kolala kati na kufa bakoki te komona biso to koyoka biso. Bazali na makoki te ya kopesa mapamboli to kopesa mpasi. Bazali na likoló te, to bazali mpe na mboka ya bankɔ́kɔ te. Bazali na bomoi te, bazali epai moko te.
Na ntango ebongisami na Nzambe, baoyo bazali kolala sikawa kati na kufa mpe baoyo bazali kati na makanisi na ye bakolamuka mpo na kozala na bomoi na paladiso awa na mabelé. Ekozala mabelé mapɛtolami na kobebisama, na bampasi mpe na mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango lelo. Ekozala ntango moko ya kitoko! Kati na paladiso wana, bakozala na elikya ya kozala na bomoi ya seko, mpamba te Njembo 37:29 endimisi biso ete: “Bayɛngɛbɛni bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”
[Etanda na lokasa 6, 7]
NATIKAKI KOSAMBELA BAKUFI
“Ntango nazalaki elenge, nazalaki kosunga tata na ngai wana ezalaki ye mbala na mbala kopesa mbeka epai na tata na ye oyo asilaki kokufa. Mokolo moko, ntango tata na ngai abikaki na bokɔnɔ moko makasi, nganga-nkísi alobaki na ye ete mpo na komonisa botɔ́ndi asengelaki kobonzela tata na ye oyo asilaki kokufa ntaba moko, mbomá, makáso, mpe masanga makasi. Nganga-nkísi alobaki mpe na tata na ngai ete abelela bankɔ́kɔ na ye oyo bakufá mpo ete bákoka kobatelama na likámá ya bokɔnɔ mpe na mpasi mosusu.
“Mama na ngai asombaki biloko oyo bisɛngamaki mpo na mbeka yango, oyo esengelaki kopesama likoló na nkunda ya nkɔ́kɔ na ngai ya mobali. Nkunda yango ezalaki penepene na ndako na biso, engebene momeseno ya mboka.
“Baninga, bandeko, mpe bato ya mpembeni babyangamaki na molulu yango ya kopesa mbeka. Tata na ngai, oyo alataki bilamba kitoko mpo na libaku wana, afandaki na kiti liboso ya esámbelelo ya libota epai ebele na mikuwa ya mitó ya ntaba oyo ebonzelamaki liboso etandamaki na molɔngɔ́. Mokumba na ngai mozalaki ya kosopa masanga kati na kɔ́pɔ moko moke, oyo nazalaki kopesa epai na tata na ngai. Na nsima, ye azalaki kosopa yango na mabelé lokola mbeka. Tata na ngai abéngaki nkombo ya tata na ye mbala misato mpe abondelaki ye ete abikisa ye na mpasi na mikolo mizali koya.
“Makáso mabonzelamaki, mpe babomaki mpate mobali, balambaki yango mpe baoyo nyonso bazalaki wana balyaki yango. Ngai mpe nalyaki yango mpe nabinaki wana bazalaki koyemba mpe kobɛta mbonda. Tata na ngai abinaki mpenza mingi, atako azalaki komonana ete asili konuna. Mbala na mbala azalaki kobondela bankɔ́kɔ na ye ete bápambola bato nyonso oyo bazalaki wana, mpe biso banso tozalaki koyanola Ise, oyo elimboli ‘Ezala sé bongo.’ Natalaki tata na ngai na likebi mingi mpe nazalaki kozela na motema likoló mokolo oyo nakokokisa mbula ya kopesa mbeka epai na bankɔ́kɔ oyo basilá kokufa.
“Atako mbeka mingi epesamaki, kimya ezalaki mpenza te na libota na biso. Wana bana mibali misato oyo mama abotaki bazalaki na bomoi, mwana na ye ya mwasi ata moko te aumelaki ntango molai; bango nyonso bakufaki na bomwana na bango. Ntango mama azwaki lisusu zemi, tata abonzelaki biloko mingi mpo ete mwana yango abotama kozanga likámá.
“Mama abotaki mwana mosusu ya mwasi. Mibu mibale na nsima mwana yango azwaki bokɔnɔ mpe akufaki. Tata na ngai akendeki epai na nganga-nkísi, oyo alobaki ete monguna moko nde ayeisaki liwa wana. Nganga-nkísi alobaki ete mpo ‘molimo’ ya mwana ekoka kobundisa monguna wana, esengelaki komema nkoni oyo ezali na mɔ́tɔ, molangi ya masanga makasi, mpe mwana ya mbwa mpo na kopesa mbeka. Nkoni ya mɔ́tɔ esengelaki kotyama likoló ya nkunda, masanga makasi masengelaki komwangisama likoló ya nkunda, mpe basengelaki kokunda mwana ya mbwa oyo azali na bomoi penepene ya nkunda. Bakanisaka ete mwana ya mbwa akolamwisa molimo ya mwana mwasi wana mpo na kobekola kufa na ye.
“Ngai namemaki molangi ya masanga makasi mpe nkoni ya mɔ́tɔ kino na nkunda, mpe tata na ngai amemaki mwana ya mbwa, oyo akundaki yango engebene maloba ya nganga-nkísi. Biso banso tokanisaki ete nsima na mikolo nsambo molimo ya mwana mwasi oyo akufaki ekoboma moto oyo ayeisaki liwa na ye nokinoki. Sanza mibale elekaki, kasi toyokaki nsango moko te ya liwa ya moto zingazinga na biso. Nalongolaki motema na likambo yango.
“Nazalaki na mibu 18 na ntango wana. Mwa moke na nsima nakutanaki na Batatoli ya Yehova, baoyo bamonisaki ngai kati na Makomami ete bakufi bakoki te kosala malamu to kosala mabe epai na bato oyo bazali na bomoi. Wana boyebi ya Liloba ya Nzambe ezalaki kozwa mosisa kati na motema na ngai, nayebisaki tata na ngai ete nakokaki lisusu te kokende elongo na ye kopesa mbeka mpo na bakufi. Liboso asilikelaki ngai mpo ete natikaki ye, ndenge amonisaki yango. Kasi ntango amonaki ete nalingaki te kotika kondima na ngai ya sika, atɛmɛlaki lisusu te losambo na ngai epai na Yehova.
“Na Apríli 18, 1948, namonisaki komipesa na ngai na nzela ya batisimo ya mai. Kobanda wana, nazali kolanda kosalela Yehova na esengo mpe na bosepeli nyonso, kosalisáká basusu na komisikola na losambo ya bankɔ́kɔ oyo bakufá, baoyo bakoki te kosalisa biso soko mpe kosala mabe epai na biso.”—Euti na J. B. Omiegbe, Benin City, Nigeria.
[Elilingi na lokasa 6]
Esengo monene ekozala ntango bakufi bakosekwisama na paladiso awa na mabelé