Mpo na nini kotambwisama na elimo ya Nzambe?
“Ozali Nzambe na ngai. Elimo na yo ezali malamu; ekamba ngai.”—NZ. 143:10.
1. Limbolá ndenge nguya oyo emonanaka te ekoki kotambwisa moto.
OSILÁ kosalela busole mpo na koyeba nzela? Busole ezali mwa eloko moko oyo ekoki kosalisa moto ayeba nzela ya kokende. Ezalaka na likɔnga moko ya emá oyo elakisaka na ngámbo ya nɔrdi. Nguya moko oyo emonanaka te, nguya ya kobenda biloko (force magnétique) nde esalaka ete likɔnga yango elakisa kaka na nɔrdi. Banda kala, bato basalelaka busole mpo elakisa bango nzela ntango bazali kosala mobembo na mokili to na mai.
2, 3. (a) Nguya nini Yehova asalelaki kalakala mpenza? (b) Mpo na nini tosengeli kolikya ete nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala etambwisa bomoi na biso lelo oyo?
2 Ezali mpe na nguya mosusu oyo emonanaka te mpe oyo ezali na ntina kutu koleka mpo na kotambwisa biso. Nguya yango nini? Ezali nguya oyo totángaka na bavɛrsɛ mibale ya liboso na Biblia. Mpo na makambo oyo Yehova asalaki kalakala mpenza, mokanda ya Ebandeli elobi boye: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.” Toyebi ete asalelaki nde nguya moko ya makasi mpenza mpo na kozalisa, mpamba te Biblia ebakisi ete: “Nguya ya Nzambe ezalaki kokende epai na epai.” (Eba. 1:1, 2) Nguya yango nde nini? Ezali elimo santu, nguya ya Nzambe oyo esalaki mosala na ntango ya bozalisi. Tozali na bomoi mpo Yehova asalelaki elimo yango mpo na kozalisa biloko nyonso.—Yobo 33:4; Nz. 104:30.
3 Biso bato oyo Yehova akelaki na lisalisi ya elimo na ye, tosengeli nde kolikya ete nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala esala mpe na bomoi na biso? Yesu, Mwana ya Nzambe, ayebaki ete tosengeli kolikya bongo, mpo ayebisaki bayekoli na ye ete elimo ekokamba bango “na kati ya solo nyonso.” (Yoa. 16:13) Elimo yango ezali nini, mpe mpo na nini tosengeli kolinga ete etambwisa biso?
Elimo santu ezali nini?
4, 5. (a) Bato oyo bandimaka liteya ya Bosato bakanisaka nini mpo na elimo santu? (b) Elimo santu ezali mpenza nini?
4 Ekoki kozala ete bato mosusu oyo osololaka na bango na mosala ya kosakola bayebi elimo santu na ndenge oyo eyokani te na Biblia. Bato oyo bandimaka liteya ya Bosato bakanisaka ete elimo santu ezali nde moto moko ya elimo oyo akokani na Nzambe Tata. (1 Ko. 8:6) Kasi, Biblia emonisi polele ete liteya ya Bosato ezali lokuta.
5 Na yango, elimo santu ezali mpenza nini? Na Biblia, liloba ya Ebre rouah, oyo na Ebandeli 1:2 ebongolami na “elimo,” na bavɛrsɛ mosusu ebongolamaka na “mopɛpɛ” to na maloba mosusu oyo emonisi nguya moko oyo emonanaka te. (Talá mpe Ebandeli 3:8; 8:1.) Atako mopɛpɛ emonanaka te, tomonaka makambo oyo yango esalaka; ndenge moko mpe, elimo santu emonanaka te, kasi esalaka makambo. Elimo santu ezali nguya oyo euti na Nzambe mpe esalaka kati na bato to biloko mpo ekokisa mokano ya Nzambe. Ezali nde mpasi kondima ete nguya yango ya kokamwa eutaka na Nzambe oyo azali Mosantu mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso? Soki moke te!—Tángá Yisaya 40:12, 13.
6. Likambo nini ya ntina mingi Davidi asɛngaki Yehova?
6 Yehova akoki kokoba kosalela elimo na ye mpo na kotambwisa biso na bomoi? Alakaki mokomi ya nzembo Davidi boye: “Nakosala ete ozala na mayele ya kososola mpe nakoteya yo nzela oyo osengeli kokende.” (Nz. 32:8) Davidi alingaki yango? Ɛɛ, mpo abondelaki Yehova ete: “Teyá ngai nayeba kosala mokano na yo, mpo ozali Nzambe na ngai. Elimo na yo ezali malamu; ekamba ngai.” (Nz. 143:10) Biso mpe tosengeli kolinga elimo ya Nzambe etambwisa biso. Mpo na nini? Tótalela bantina minei.
Tozali na makoki te ya komitambwisa biso moko
7, 8. (a) Mpo na nini tokoki te komitambwisa biso moko? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ete koluka komitambwisa biso moko na mokili oyo mabe ezali likama.
7 Ya liboso, tosengeli kolinga ete elimo ya Nzambe etambwisa biso mpo tozali na makoki te ya komitambwisa biso moko. “Kotambwisa” moto elimboli “kokamba ye to kolakisa ye nzela oyo asengeli kolanda.” Nzokande, Yehova akelaki biso na likoki ya komitambwisa biso moko te, mingimingi mpe ndenge tozali bato ya kozanga kokoka. Mosakoli na ye Yirimia akomaki boye: “Ee Yehova, nayebi malamu ete nzela ya moto ya mabele ezali ya ye te. Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.” (Yir. 10:23) Mpo na nini? Nzambe ayebisaki Yirimia ntina oyo tosalaka mabunga ntango toluki komitambwisa biso moko. Mpo na lolenge ya bato oyo tozali na kati, Yehova alobaki boye: “Motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso mpe ezali eloko ya kosakana na yango te. Nani akoki koyeba yango?”—Yir. 17:9; Mat. 15:19.
8 Ekozala bozoba soki moto oyo ayebi nzela te akei kotambola to asali mobembo ye moko na esobe kozanga lisalisi ya moto oyo ayebi nzela malamu to ya busole, boye te? Soki moto ayebi te ndenge ya kosala mpo na kobika na esika ya ndenge wana mpe ndenge ya koluka nzela oyo ebongi, akotya bomoi na ye na likama. Ndenge moko mpe, moto oyo akanisi ete akoki komitambwisa ye moko na mokili oyo ya mabe mpe aboyi kotika Nzambe alakisa ye nzela ya malamu, azali na likama monene. Mpo tóbunga nzela te tii na nsuka na mokili oyo mabe, tosengeli kobondela Yehova ndenge Davidi abondelaki ye ete: “Tiká makolo na ngai ekangama na banzela na yo, oyo kati na yango makolo na ngai ekotengatenga ata moke te.” (Nz. 17:5; 23:3) Tokoki kosala nini mpo Nzambe atambwisa biso?
9. Ndenge elilingi ya lokasa 17 emonisi yango, ndenge nini elimo ya Nzambe etambwisaka biso?
9 Soki tozali na komikitisa mpe totyeli Yehova motema, akopesa biso elimo santu na ye mpo etambwisa biso. Ndenge nini nguya yango oyo esalaka mosala ekosalisa biso? Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Mosungi yango, elimo santu, oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ye nde akoteya bino makambo nyonso mpe akozongisa na makanisi na bino makambo nyonso oyo nayebisaki bino.” (Yoa. 14:26) Ntango tozali koyekola Liloba ya Nzambe mbala na mbala mpe kobondela mpo na makambo oyo toyekoli, kati na yango mateya ya Kristo, elimo santu ekosalisa biso tóyeba malamu bwanya monene ya Yehova, mpo tókoka kosala mpenza mokano na ye. (1 Ko. 2:10) Longola yango, soki makambo ebongwani na mbalakaka, elimo ekolakisa biso nzela oyo tosengeli kolanda. Ekozongisa na makanisi na biso mitinda ya Biblia oyo toyekolá mpe ekosalisa biso tóyeba ndenge ya kosalela yango mpo na kozwa bikateli ya malamu.
Yesu atambwisamaki na elimo ya Nzambe
10, 11. Yesu ayebaki ete elimo santu ekosala nini epai na ye, mpe ndenge nini esalisaki ye?
10 Ntina ya mibale oyo tosengeli kolinga elimo santu etambwisa biso ezali ete Nzambe atambwisaki Mwana na ye moko na elimo yango. Liboso aya awa na mabele, Yesu, Mwana se moko ya Nzambe oyo abotamaki ayebaki esakweli oyo: “Elimo ya Yehova ekofanda mpenza likoló na ye, elimo ya bwanya mpe ya mayele, elimo ya toli mpe ya nguya, elimo ya boyebi mpe ya kobanga Yehova.” (Yis. 11:2) Kanisá ndenge Yesu azalaki na mposa makasi ya kozwa elimo santu ya Nzambe mpo esalisa ye na kotalela makambo oyo akutanaki na yango awa na mabele!
11 Maloba ya Yehova ekokisamaki. Evanzile ya Luka elobeli likambo oyo esalemaki mbala moko nsima ya batisimo ya Yesu: “Sikoyo ntango Yesu atondaki na elimo santu, alongwaki na Yordani, mpe elimo ememaki ye epai na epai na esobe.” (Luka 4:1) Kuna, wana Yesu azalaki kokila bilei, kobondela mpe komanyola, emonani ete Yehova apesaki ye malako mpe ayebisaki ye makambo oyo ezalaki kozela ye. Nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala esalaki na bɔɔngɔ mpe na motema ya Yesu; etambwisaki makanisi na ye mpe bikateli na ye. Na yango, Yesu ayebaki nini asengeli kosala na likambo nyonso oyo ebimi, mpe asalaki kaka ndenge Tata na ye alingaki ete asala.
12. Mpo na nini ezali na ntina tósɛnga elimo ya Nzambe etambwisa biso?
12 Lokola Yesu ayebaki malamu ndenge elimo ya Nzambe esalisaki ye mingi na bomoi na ye, amonisaki bayekoli na ye ntina ya kosɛnga elimo yango mpe ya kotika yango etambwisa bango. (Tángá Luka 11:9-13.) Mpo na nini elimo yango ezali na ntina mingi mpo na biso? Mpamba te ekoki kobongola makanisi na biso mpo ekokana na makanisi ya Kristo. (Rom. 12:2; 1 Ko. 2:16) Soki totiki elimo ya Nzambe etambwisa biso, tokoki kokanisa lokola Kristo mpe komekola ndakisa na ye.—1 Pe. 2:21.
Elimo ya mokili ekoki kobungisa biso nzela
13. Elimo ya mokili ezali nini, mpe esalaka nini epai ya bato?
13 Ntina ya misato oyo tosengeli kolinga ete elimo santu etambwisa biso ezali ete soki yango te, elimo ya mokili, oyo ezali kosala na bomoi ya bato mingi lelo oyo, ekoki kobungisa biso nzela. Elimo ya mokili ezali nguya oyo etindaka bato básala makambo oyo eyokani ata moke te na makambo oyo elimo santu etindaka biso tósala. Na esika esalisa bato bákóma na makanisi ya Kristo, elimo ya mokili etindaka nde bango bákanisa mpe básala makambo oyo ekokani na oyo ya Satana, moyangeli ya mokili. (Tángá Baefese 2:1-3; Tito 3:3.) Soki moto andimi elimo ya mokili etambwisa ye mpe abandi komipesa na misala ya nzoto, akokóma na mikakatano makasi; yango ekopekisa ye azwa libula ya Bokonzi ya Nzambe.—Gal. 5:19-21.
14, 15. Ndenge nini tokoki kolonga kotɛmɛla elimo ya mokili?
14 Yehova apesi biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kotɛmɛla elimo ya mokili. Ntoma Paulo alobaki ete ‘tókoba kozwa nguya na kati ya Nkolo mpe na bonene ya nguya na ye mpo tókoka kopika mpende na mokolo ya mabe.’ (Ef. 6:10, 13) Na nzela ya elimo na ye, Yehova apesaka biso makasi ya kotɛmɛla milende oyo Satana asalaka mpo na kokosa biso. (Em. 12:9) Elimo ya mokili ezali makasi, mpe tokoki kokima yango nyonso te. Kasi, tokoki kotɛmɛla yango. Elimo santu eleki yango kutu na makasi, mpe ekosalisa biso!
15 Mpo na bato oyo batikaki lisangá ya bokristo na ekeke ya liboso, ntoma Petro alobaki boye: “Batiki nzela ya semba, babungi.” (2 Pe. 2:15) Tozali mpenza na botɔndi mingi ndenge tozwá “elimo ya mokili te, kasi elimo oyo euti na Nzambe”! (1 Ko. 2:12) Soki totiki elimo santu etambwisa biso mpe tozali kosalela malamu bibongiseli nyonso oyo Yehova azwi mpo na kosalisa biso mpo tóbatela boyokani na biso na ye, tokoki kolonga kotɛmɛla elimo ya mokili, oyo euti na Satana.—Gal. 5:16.
Elimo santu ebimisaka mbuma ya malamu
16. Mbuma nini elimo santu ekoki kobimisa na bomoi na biso?
16 Ntina ya minei oyo tosengeli kolinga ete elimo ya Nzambe esala kati na biso ezali ete ebimisaka mbuma moko ya malamu na bomoi ya baoyo batiki yango etambwisa bango. (Tángá Bagalatia 5:22, 23.) Na ntembe te, biso nyonso tosepelaka mingi kolinga bato, kozala na esengo mpe na kimya mingi koleka. Biso nyonso tolingaka kokóma na motema molai koleka mpe komonisela basusu boboto mpe bolamu. Ekozala malamu mingi soki tokómi na kondima makasi, na motema pɛtɛɛ, mpe komipekisa, boye te? Elimo ya Nzambe esalisaka biso tókóma na bizaleli oyo ekosalisa biso moko mpe bandeko na biso ya libota mpe ya lisangá. Tosengeli kokoba kosala makasi mpo na kokolisa bizaleli wana oyo emonisaka mbuma ya elimo, mpamba te bizaleli yango ezalaka na ndelo te.
17. Ndenge nini tokoki komonisa mwa mingi koleka ezaleli moko boye ya mbuma ya elimo?
17 Ekozala malamu tómitalela mpo tóyeba soki maloba mpe misala na biso emonisaka ete totambwisami na elimo santu mpe soki tomonisaka bizaleli ya mbuma na yango. (2 Ko. 13:5a; Gal. 5:25) Soki tomoni ete tosengeli kolona bizaleli mosusu ya mbuma ya elimo, tosengeli kosala makasi koleka mpo tótika elimo santu etambwisa biso mpo tómonisa bizaleli yango. Tokoki kosala yango na koyekoláká ezaleli mokomoko ya elimo santu ndenge Biblia mpe mikanda ya moombo ya sembo emonisi yango. Yango nde ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge oyo tosengeli komonisa mbuma ya elimo na bomoi na biso ya mokolo na mokolo; na nsima, tósala makasi mpo na komonisa bizaleli yango mingi koleka.a Ntango tomonaka makambo oyo elimo santu ezali kosala na bomoi na biso moko mpe na oyo ya baninga na biso bakristo, tomonaka mpenza ntina ya kotambwisama na yango.
Otikaka elimo ya Nzambe etambwisa yo?
18. Na ndenge nini Yesu azali ndakisa na biso na oyo etali kondima litambwisi ya elimo ya Nzambe?
18 Lokola Yesu azalaki “mosali ya mayele” ntango Nzambe azalisaki molɔ́ngɔ́, ayebaki malamu ete mabele ezali na nguya ya kobenda biloko, lokola nguya oyo esalaka na busole mpo na kosalisa bato nzela. (Mas. 8:30; Yoa. 1:3) Kasi, Biblia emonisi ata na esika moko te ete Yesu asalelaki nguya yango mpo etambwisa ye ntango azalaki awa na mabele. Biblia elobi nde ete ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonaki ete elimo santu ezalaki mpenza kosala makasi na bomoi na ye. Andimaki litambwisi na yango, mpe soki etindi ye asala likambo moko, azalaki kosala kaka bongo. (Mrk. 1:12, 13; Luka 4:14) Yo mpe osalaka bongo?
19. Tosengeli kosala nini mpo elimo santu ezala nguya oyo ezali kotambwisa biso?
19 Nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala ezali kokoba kosala na mitema mpe na makanisi ya bato oyo balingi ete etambwisa bango. Ndenge nini okoki kotika yango esala kati na yo mpo etambwisa yo na nzela ya malamu? Bondelá Yehova ntango nyonso mpo apesa yo elimo na ye mpe asalisa yo ondima litambwisi na yango. (Tángá Baefese 3:14-16.) Mpo na komonisa ete olingi elimo ya Nzambe etambwisa yo, yekolá Liloba ya Nzambe, Biblia, mpo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe. (2 Tim. 3:16, 17) Tosá malako ya Biblia mpe ndimá litambwisi ya elimo santu. Soki osali makambo wana, okomonisa ete ozali kondima ete Yehova akoki kotambwisa bomoi na yo malamu mpenza na mokili oyo mabe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba ndenge ya komonisa ezaleli mokomoko ya mbuma ya elimo, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 2007 nkasa 21-25 mpe ya 15 Aprili 2011 nkasa 18-27.
Osimbi makambo ya ntina?
• Ndenge nini elimo santu ekoki kotambwisa bomoi na biso?
• Mpo na bantina nini minei tosengeli kolinga ete elimo ya Nzambe etambwisa biso?
• Ndenge nini tokoki kotika elimo santu etambwisa biso na bomoi na biso mobimba?
[Elilingi na lokasa 15]
Elimo ya Nzambe nde ezalaki kotambwisa Yesu
[Elilingi na lokasa 17]
Elimo ya Nzambe esalaka na mitema mpe na makanisi ya bato mpo na kotambwisa bango