Nasalaka ete elimo santu ezala mosungi na ngai?
BATO ya teoloji, to mpe bato nyonso, bazali na makanisi ndenge na ndenge mpo na elimo santu ya Nzambe. Kasi, lokola makanisi yango ezali mpenza sikisiki te ezali na ntina te. Biblia ezali kolimbola polele soki elimo santu ezali nini. Elimo santu ezali moto te, ndenge bato mosusu bakanisaka, ezali nde nguya makasi oyo esalaka mosala mpe Nzambe asalelaka yango mpo na kokokisa mokano na ye.—Nzembo 104:30; Misala 2:33; 4:31; 2 Petelo 1:21.
Lokola elimo santu esalelamaka mingi mpo na kokokisa mikano ya Nzambe, tosengeli koyokanisa bomoi na biso na elimo yango. Tosengeli kolinga ete yango ezala mosungi na biso.
Mpo na nini tozali na mposa ya mosungi?
Liboso ete atika mokili oyo, Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Ngai nakobondela Tata mpe akopesa bino mosungi mosusu ete afanda na bino libela.” Mpe lisusu: “Nde nazali koloba solo na bino, zambi ekoyeisa bino litomba soko [nakokende]. Mpo ete, soko [nakokende] te, Mosungi akoyela bino te. Kasi soko nakokende, nakotinda ye epai na bino.”—Yoane 14:16, 17; 16:7.
Yesu apesaki bayekoli na ye mosala moko ya ntina mingi ntango alobaki na bango ete: “Boye bókende kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya [elimo santu, NW ], kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso oyo esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20) Mosala yango ezali pɛtɛɛ te, mpamba te basengelaki kokutana na botɛmɛli na mosala yango.—Matai 10:22, 23.
Botɛmɛli esengelaki kouta epai ya bato oyo bazali na lisangá te bakisa mwa mikakatano na kati ya lisangá. Soki na mobu 56 T.B., ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Loma boye: “Bandeko, nabondeli bino ete bótala malamu mpo na bango bakoyeisa nkaka mpe nsɔni kotɛlɛmɛla mateya malakisami epai na bino. [Bókima] bango.” (Baloma 16:17, 18) Likambo yango esengelaki kongala nsima ya liwa ya bantoma nyonso. Ntoma Paulo apesaki likebisi oyo: “Ngai nayebi ete na nsima na [kokende] na ngai bankoi ya yauli bakokɔta kati na bino, mpe [bakosalela etonga na boboto, NW ] te. Kati na bino mpenza mpe mibali bakotɛlɛma kolakisa mateya na kokosa ete bábenda bayekoli nsima na bango.”—Misala 20:29, 30.
Lisungi ya Nzambe ezalaki na ntina mpo na kosilisa makasi ya bipekiseli yango. Apesaki lisungi yango na nzela ya Yesu. Nsima ya lisekwa na ye, na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., bayekoli na ye soki 120, ‘bango nyonso batondaki na elimo santu.’—Misala 1:15; 2:4.
Bayekoli bayebaki ete elimo santu oyo esopamaki mokolo yango ezali mosungi oyo Yesu alakaki. Na ntembe te basosolaki malamu elembo oyo Yesu apesaki: “Mosungi, ye [elimo santu] oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ye akolakisa bino makambo nyonso mpe akokanisela bino makambo nyonso masili ngai koloba na bino.” (Biso nde totɛngisi makomi; Yoane 14:26) Abengaki yango mpe lisusu ‘mosungi, elimo ya solo.’—Yoane 15:26.
Na ndenge nini elimo ezali mosungi?
Elimo esengelaki kosala lokola mosungi na ndenge mingi. Ya liboso, Yesu alakaki ete ekozongisa na makanisi ya bantoma makambo oyo ateyaki bango. Na maloba yango, Yesu alingaki koloba kaka te ete elimo ekokundwela bango maloba. Kasi, elimo ekosalisa bango básosola na bozindo makambo oyo ateyaki bango mpe ndimbola na yango. (Yoane 16:12-14) Na mokuse, elimo esengelaki kosalisa bayekoli báyeba solo malamumalamu. Na nsima ntoma Paulo akomaki boye: “Nzambe amonisi biso yango na nzela ya elimo mpo ete elimo akolukaluka makambo nyonso, ata makambo na bozindo ya Nzambe.” (1 Bakolinti 2:10) Mpo bayekoli bapakolami ya Yesu báteya bato mosusu boyebi ya solosolo, bango moko basengelaki naino koyeba makambo yango malamumalamu.
Ya mibale, Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka mbala na mbala. Soki ntango mosusu bayebi mpenza te likambo oyo basengeli kosɛnga na mabondeli na bango, elimo ekolobela bango. “Bongo mpe elimo akosungaka kati na bolɛmbu na biso. Mpo ete toyebi te kobondela na motindo mokoki. Nde kati na [kolela na biso oyo eyokanaka te, NW ], elimo ye moko akobondela mpo na biso.”—Baloma 8:26.
Ya misato, elimo elingaki kosunga bayekoli ya Yesu na mosala ya koyebisa bato mateya ya solo. Yesu ayebisaki bango boye: “Bakokaba bino liboso na makita mpe bakobɛtabɛta bino na biyanganelo. Bakobenda bino liboso ya mikóló na mokili mpe ya mikonzi mpo na ngai, mpo na litatoli epai na bango mpe epai na mabota ya bapaya. Wana ekokaba bango bino, bómitungisa te soko bokoloba nini. Zambi bokozwa likambo likokoka na bino koloba bobele na ntango yango. Mpo ete bino mpenza bokoloba te kasi elimo ya Tata na bino akoloba na nzela na bino.”—Matai 10:17-20.
Elimo santu elingaki lisusu kosunga mpo na koyeba lisangá ya boklisto mpe kotinda mosangani mokomoko ya lisangá yango azwa bikateli ya malamu. Tiká tólobela mwa mingi makambo mibale ya lisolo oyo mpe tótala soki yango ezali na ntina nini mpo na biso lelo oyo.
Ezalaki elembo
Na boumeli ya bikeke mingi Bayuda bazalaki kotosa Mibeko ya Mose lokola libota oyo Nzambe aponaki. Lokola baboyaki kondima ete Yesu azali Masiya, Yesu ayebisaki bango ete nsima ya mwa ntango Nzambe akoboya bango. Alobaki boye: ‘Botángi naino te kati na [Makomami, NW ] ete, Libanga liboyaki batongi esili kokóma motó na nsuka. Likambo oyo esalemi na Nkolo mpe ezali eloko ya kokamwa na miso na biso. Bongo nazali koloba na bino ete Bokonzi ya Nzambe ekolongwa na bino mpe ekopesama na libota oyo ekobota mbuma na yango.’ (Matai 21:42, 43) Ntango lisangá ya boklisto esalamaki na Pantekote ya mobu 33 T.B., bayekoli ya Klisto bakómaki “libota oyo ekobota mbuma na yango.” Kobanda ntango yango, Nzambe akómaki kosalela lisangá yango mpo na koyebisa bato mikano na ye. Mpo na kosalisa bato báyeba ete ngɔlu ya Nzambe ekómi na esika mosusu, Nzambe apesaki elembo moko ya polele.
Na mokolo ya Pantekote, elimo santu epesaki bayekoli likoki ya koloba na minɔkɔ oyo bayebaki yango liboso te, mpe bato oyo bamonaki likambo yango bakamwaki mpe batunaki boye: “Biso tozali koyoka bango na nkota na biso ya mboka, moto na lokota na ye boni?” (Misala 2:7, 8) Likoki ya koloba na minɔkɔ ya bapaya, na ‘bilembo [oyo] bisalami na mabɔkɔ ya bantoma,’ ememaki bato soki nkóto misato na kondima ete elimo santu ezali kosala mosala.—Misala 2:41, 43.
Lisusu, lokola bazalaki komonisa “mbuma ya elimo”—bolingo, esengo, kimya, motema pɛtɛɛ, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ, kokanga motema—bayekoli ya Klisto bamonisaki polele ete bazali basaleli ya Nzambe. (Bagalatia 5:22, 23) Bolingo nde ezalaki mpenza komonisa lisangá ya boklisto ya solo. Yesu alobaki boye: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko [bozali na bolingo kati na bino].”—Yoane 13:34, 35.
Basangani ya lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso bandimaki makambo oyo elimo santu ezalaki kotinda bango básala mpe bazalaki kozwa bolamu na lisungi na yango. Baklisto bazali koyeba ete lelo oyo Nzambe azali lisusu kosekwisa bato te mpe azali lisusu kosala makamwisi te ndenge asalaki na ekeke ya liboso, kasi bazali kotika mbuma ya elimo ya Nzambe emonisa ete bazali bayekoli ya solo ya Klisto.—1 Bakolinti 13:8.
Mosungi mpo na kozwa bikateli na yo
Bakomaki Biblia na lisalisi ya elimo santu. Yango wana, ntango totiki ete Biblia endimisa biso, ezali lokola nde elimo santu ezali koteya biso. (2 Timote 3:16, 17) Elimo santu ekoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu. Kasi totikelaka yango nzela?
Ezali boni ntango toponaka mosala? Elimo santu ekosalisa biso tótalela mosala oyo tolingi kosala ndenge Yehova azali kotalela yango. Mosala na biso esengeli koyokana na mitinda ya Biblia, mpe ebongi mpenza epesa biso nzela ya kolanda mikano ya Teokrasi. Lifuti to koyebana mpe lokumu ya mosala ezali mpenza na ntina mingi te. Soki mosala ezali kopesa biso oyo tosengeli na yango na bomoi mpe ezali kotikela biso ntango mpo na kokokisa mikumba na biso ya boklisto, yango nde likambo oyo eleki ntina.
Moto nyonso azalaka na mposa ya kosepela na bomoi mpe yango ezali mabe te. (Mosakoli 2:24; 11:9) Yango wana moklisto oyo azali na bokatikati akoki kominanola mpo na kozwa mwa mopɛpɛ mpe mpo na kosepela. Kasi asengeli kopona kominanola oyo ezali komonisa mbuma ya elimo, oyo ezali komonisa “misala ya nzoto” te. Ntoma Paulo alobi boye: “Misala na nzoto imonani polele, yango oyo: ekobo, makambo na bosɔtɔ, pite, kosambela bikeko, ndɔki, nkaka, kowelana, zuwa, nkanda, kolulela, kokabwana, koponapona, koboma bato, kolangwa masanga, bilambo ya lokoso mpe makambo na motindo yango.” Tosengeli kokóma ‘na lolendo te, kotungisana te, kolulana mpe te.’—Bagalatia 5:16-26.
Ezali mpe ndenge moko mpo na kopona baninga. Mpo na kopona baninga ebongi kotalela elimo na bango, kasi kotalela te kitoko to biloko oyo bazali na yango. Tomoni ete Davidi azalaki moninga ya Nzambe, mpo Nzambe alobaki ete Davidi azalaki “mobali [oyo] abongi na motema na [ye].” (Misala 13:22) Nzambe atalaki kitoko ya Davidi te mpo na kopona ye mokonzi ya Yisalaele, kasi alandelaki nde likambo oyo: “[Yehova] akotalaka lokola ekotalaka moto te. Moto akomonaka lolenge ya libándá nde [Yehova] akotalaka kati na motema.”—1 Samwele 16:7.
Boninga ya bato mingi ebebaka mpamba te esalemaki nde na kotalela kitoko ya nzoto to biloko oyo moto azali na yango. Boninga oyo moto asali mpo na bozwi oyo eumelaka te ekoki kokufa mbala moko. (Masese 14:20) Liloba ya Nzambe oyo bakomaki na lisalisi ya elimo santu ezali kopesa biso toli ete ntango tozali kopona baninga, tózwa baoyo bakoki kosalisa biso na kosalela Yehova. Ezali koyebisa biso tólinga mingi kopesa kasi kozwa te mpo kopesa ememaka esengo mingi. (Misala 20:35) Ntango mpe bolingo ezali kati na biloko ya motuya koleka oyo tokoki kopesa baninga na biso.
Epai na moklisto oyo azali koluka molongani, Biblia ezali kopesa toli oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo santu. Na lolenge mosusu ezali lokola koloba boye: ‘Kosuka kaka te na kotala elongi mpe ndenge elongi yango ezali. Talá na makolo.’ Makolo? Ɛɛ, yango elingi koloba ete: Makolo yango ezali kosalelama mpo na kosala mosala ya Yehova oyo etali kosakola nsango malamu, mpe ezali komonana kitoko na miso ya Yehova? Makolo yango elati sapato ya nsango ya solo mpe nsango malamu ya kimya? Tozali kotánga boye: “Kitoko boni likoló ya ngomba ezali makolo na ye oyo akoyeisa nsango malamu, ye oyo akosakola kimya mpe akoyeisa nsango malamu ya kosepela, ye oyo akosakola kobikisama, ye oyo akoloba na Siona ete, Nzambe na yo azali mokonzi.”—Yisaya 52:7; Baefese 6:15.
Lokola tozali na bomoi na “ntango ya mpasi,” tozali na mposa ya lisungi mpo na kosala mokano ya Nzambe. (2 Timote 3:1) Mosungi, elimo santu ya Nzambe, esalisaki baklisto ya ekeke ya liboso mingi na mosala na bango, ezalaki mpe mosungi ya mokomoko na bango. Koyekola na molende Liloba ya Nzambe, oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo santu, ezali likambo ya liboso oyo biso mpe tokoki kosala mpo elimo santu ezala mosungi na biso. Tosalaka yango?
[Elilingi na lokasa mobimba 23]