Ozali na kati ya bato oyo Nzambe alingaka?
“Ye oyo azali na mibeko na ngai mpe azali kotosa yango, ye wana nde alingaka ngai. Mpe, ye oyo alingaka ngai, Tata na ngai mpe akolinga ye.”—YOANE 14:21, NW.
1, 2. (a) Ndenge nini Yehova amonisaki ete alingaka bato? (b) Yesu abandisaki likambo nini na butu ya mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B.?
YEHOVA alingaka bato mpamba te bazali bikelamu na ye. Alingaka bango mpenza “na motindo boye ete [apesaki Mwana mobotami-bobele-moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Lokola Ekaniseli ya liwa ya Klisto ekómi pene, esengeli mpenza baklisto ya solo bándimisama mpenza ete Yehova “alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye lokola mbɔndi mpo na masumu na biso.”—1 Yoane 4:10.
2 Na butu ya mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), Yesu na bantoma na ye 12 bayanganaki na etaze na ndako moko na Yelusaleme mpo na fɛti ya Elekeli oyo Bayisalaele bazalaki kosala mpo na kokanisa kobima na bango na Ezipito. (Matai 26:17-20) Nsima ya kosala fɛti wana ya Bayuda, Yesu abimisaki Yuda Mokeliota mpe asalaki likambo moko ya sika: apesaki bango bilei mpo na Ekaniseli ya liwa ya Klisto oyo basengelaki kobanda kosala banda ntango wana.a Yesu azwaki limpa oyo batii levire te mpe alobaki ete yango ezali komonisa nzoto na ye; na nsima, azwaki vinyo ya motane mpe alobaki ete yango ezali komonisa makila na ye; akabolaki yango epai ya bantoma na ye 11 ya sembo. Ndenge oyo asalaki makambo nyonso wana ekomami na Baevanzile ya Matai, ya Malako na ya Luka; ntoma Paulo mpe alobelaki yango, mpe abengaki yango “Bolei ya mpokwa ya Nkolo.”—1 Bakolinti 11:20, NW; Matai 26:26-28, NW; Malako 14:22-25, NW; Luka 22:19, 20, NW.
3. Makambo nini ya ntina oyo ezali te na masolo ya bakomi mosusu oyo elobeli makambo elekaki ntango Yesu afandaki na bayekoli na ye mwa moke liboso ya liwa na ye, ntoma Yoane alobeli na lisolo na ye ?
3 Likambo moko esimbi likebi na biso ezali ete ntoma Yoane alobeli kokabolama ya limpa na vinyo te; ekoki kozala mpo ete ntango ye akomaki Evanzile na ye (soki na mobu 98 T.B.), baklisto basilaki koyeba mpe komesana na likambo yango. (1 Bakolinti 11:23-26, NW) Nzokande, kaka Yoane nde ayebisi biso makambo ya ntina mingi oyo Yesu alobaki mpe oyo asalaki liboso mpe nsima ya kosala Ekaniseli ya liwa na Ye mpo na mbala ya liboso. Makambo nyonso wana ezali na mikapo mitano mobimba ya Evanzile ya Yoane. Makambo yango ezali komonisa biso polelepolele lolenge ya bato oyo Nzambe alingaka. Sikoyo, tótalela naino makambo oyo ezali na Yoane mokapo 13 tii mokapo 17.
Tózwa liteya na bolingo monene ya Yesu
4. (a) Ndenge nini Yoane amonisaki likambo oyo Yesu alobelaki mingi na esika oyo azalaki na bayekoli na ye ntango asalaki Ekaniseli ya liboso? (b) Wapi ntina moko monene oyo Yehova alingaka Yesu?
4 Mikapo yango oyo ezali na toli ya nsuka oyo Yesu apesaki bayekoli na ye elobeli mingi bolingo. Liloba “bolingo” mpe maloba mosusu oyo euti na liloba yango ezali mbala 31 na kati ya mikapo yango. Na koleka mikapo mosusu nyonso oyo Biblia elobeli likambo yango, mikapo yango ezali komonisa ete Yesu alingaka Tata na ye Yehova mpe bayekoli na ye mingi. Masolo mosusu ya Baevanzile oyo elobeli bomoi ya Yesu ezali mpe komonisa biso ete alingaka Yehova, kasi, kaka Yoane nde akomaki ete Yesu alobaki polele ete: “Nalingaka Tata.” (Yoane 14:31, NW) Yesu alobaki mpe ete Yehova alingaka ye mpe ayebisaki ntina oyo Yehova alingaka ye. Alobaki boye: “Ndenge Tata alingi ngai, ngai mpe nalingi bino. Soki botosi mibeko na ngai, bokotikala na bolingo na ngai, ndenge ngai natosaki mibeko ya Tata mpe natikali na bolingo na ye.” (Yoane 15:9, 10, NW) Elingi koloba ete Yehova alingaka Mwana na ye mpo Mwana yango atosaka ye na makambo nyonso. Oyo ezali mpenza liteya malamu mpo na bayekoli nyonso ya Yesu Klisto!
5. Ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaka bayekoli na ye?
5 Banda na ebandeli ya lisolo ya Yoane oyo ezali kolobela makambo oyo elekaki ntango Yesu afandaki na bantoma na ye mpo na mbala ya nsuka, tozali komona polele ete Yesu alingaki bayekoli na ye mingi. Yoane akomaki boye: “Liboso ya Elambo ya Elekeli, Yesu ayebaki ete elaka esili kokoka ete alongwa na mokili oyo kokenda epai ya Tata. Alingaki bato na ye moko baoyo bazalaki kati na mokili; alingaki bango kino nsuka.” (Yoane 13:1) Na mpokwa wana, apesaki bango liteya moko oyo bakokaki kobosana te; liteya yango emonisi ete basengeli kosalelaka basusu na bolingo. Asukolaki bango makolo. Ezalaki likambo oyo mokomoko na bango asengelaki kosepela kosalela yango Yesu mpe bandeko na ye, kasi moko te azwaki likanisi ya kosala yango. Yesu asalaki mosala wana oyo bato mpamba nde bakoki kosala yango mpe na nsima alobaki na bayekoli na ye ete: “Soko nde ngai Nkolo mpe Molakisi, nasukoli [makolo] na bino ekoki na bino ete bósukolana [makolo]; mpo ete napesi bino [ndakisa] ete bino mpe bósala [lokola] esili ngai kosalela bino.” (Yoane 13:14, 15) Baklisto ya solo basengeli kozala na mposa mpe na esengo ya kosalela bandeko na bango.—Matai 20:26, 27, NW, maloba na nse ya lokasa; Yoane 13:17.
Tótosa mobeko ya sika
6, 7. (a) Likambo nini ya ntina Yoane ayebisi biso na ntina etali Ekaniseli ya liboso? (b) Yesu apesaki bayekoli na ye mobeko nini ya sika, mpe na ndenge nini yango ezalaki mobeko ya sika?
6 Na masolo nyonso oyo elobeli makambo oyo elekaki na ndako ya etaze na butu ya mokolo ya 14 Nisana, kaka lisolo ya Yoane nde eyebisi polele ete Yuda Mokeliota abimaki. (Yoane 13:21-30) Soki totángi Evanzile mokomoko oyo elobeli makambo oyo elekaki na mpokwa wana mpe tomeki koyokanisa yango, tokomona ete Yesu asalaki Ekaniseli ya liwa na Ye nsima ya kobimisa moto oyo akabaki ye. Na nsima, ayebisaki bantoma na ye ya sembo makambo ebele, apesaki bango toli mpe malako ya nsuka. Lokola tozali komilɛngɛla mpo na Ekaniseli, tosengeli kotalela malamumalamu makambo oyo Yesu alobaki na mpokwa wana; mingimingi lokola tozali na mposa ya kozala na kati ya bato oyo Nzambe alingaka.
7 Lilako ya liboso oyo Yesu apesaki bayekoli na ye nsima ya kosala Ekaniseli ya liboso ya liwa na ye ezalaki likambo ya sika. Alobaki boye: “Nazali kopesa bino mobeko oyo ya sika ete, Bólinganaka; bólinganaka lokola ngai nalingi bino. Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:34, 35) Likambo nini ezalaki ya sika na mobeko yango? Mwa moke na nsima, kaka na mpokwa wana, Yesu alimbolaki likambo yango polele ntango alobaki boye: “[Mobeko, NW] na ngai ezali boye ete bólingana [lokola] ngai nasili kolinga bino. Moto te azali na bolingo boleki oyo ete moto asopa bomoi na ye mpo na baninga na ye.” (Yoane 15:12, 13) Mibeko ya Mose esɛngaki Bayisalaele ete ‘bálinga baninga na bango lokola bango moko.’ (Levitike 19:18) Kasi, mobeko ya Yesu ebakisaki likambo mosusu. Baklisto basengeli kolingana ndenge oyo Klisto alingaki bango, elingi koloba, basengeli kondima ata kokufa mpo na bandeko na bango.
8. (a) Bolingo ya boklisto esɛngaka nini? (b) Lelo oyo, ndenge nini Batatoli ya Yehova bamonisaka bolingo yango?
8 Lokola Ekaniseli ekómi pene, ebongi mpenza ete moto na moto amitalela mpe lisangá mobimba tómitalela soki tozali mpenza na bolingo lokola oyo ya Klisto; bolingo oyo ezali elembo ya boklisto ya solo. Bolingo ya ndenge wana ekoki kosɛnga, to mpe esɛngaki ntango mosusu, ete moklisto andima ata kokufa na esika akaba bandeko na ye. Kasi, mingimingi esɛngaka ete tóndima kobosana naino bolamu na biso mpo na kosalisa mpe kosalela bandeko na biso mpe bato mosusu. Ntoma Paulo apesaki ndakisa malamu na likambo yango. (2 Bakolinti 12:15; Bafilipi 2:17) Batatoli ya Yehova bayebani na mokili mobimba ete bandimaka kobosana bolamu na bango mpo na kosalisa bandeko na bango mpe bazalani na bango mpe bamipesaka mpo na koyebisa bazalani na bango mateya ya solo ya Biblia.b—Bagalatia 6:10.
Boyokani oyo tosengeli kobatela
9. Tozalaka na esengo ya kosala nini mpo na kobatela boyokani ya ntina mingi oyo tozali na yango na Nzambe mpe na Mwana na ye?
9 Na miso na biso, ezali na eloko moko te oyo ekoki kozala na motuya mingi koleka bolingo ya Yehova na ya Mwana na ye, Klisto Yesu. Kasi, mpo bálinga biso mpe biso moko tómiyoka ete balingaka biso, tosengeli kokanga mabɔkɔ te. Na butu wana ya nsuka na bayekoli na ye, Yesu alobaki boye: “Ye oyo azali na mibeko na ngai mpe azali kotosa yango, ye wana nde alingaka ngai. Mpe, ye oyo alingaka ngai, Tata na ngai mpe akolinga ye, ngai mpe nakolinga ye mpe nakomimonisa polele epai na ye.” (Yoane 14:21, NW) Lokola boyokani na biso na Nzambe mpe na Mwana na ye ezali na ntina mingi na miso na biso, tosepelaka kotosa mibeko na ye. Moko na yango ezali mobeko ya sika oyo esɛngi ete tózala na bolingo oyo ezali kosɛnga tóbosana ntango mosusu bolamu na biso mpe mosusu ezali etinda oyo Klisto apesaki nsima ya lisekwa na ye, elingi koloba “kosakola na bato mpe kotatola”; kozala na molende mpo na kosalisa bato oyo bazali kondima nsango malamu ‘bákóma bayekoli.’—Misala 10:42; Matai 28:19, 20.
10. Boyokani nini ya ntina mingi bapakolami na elimo bakoki kozala na yango, oyo mpe “bampate mosusu” bakoki kozala na yango?
10 Nsima ya mwa ntango, kaka na butu wana, Yuda (Tadai), ntoma moko ya sembo, atunaki Yesu motuna moko mpe Yesu apesaki ye eyano ete: “Soko moto nani akolingaka ngai, akotosa liloba na ngai; mpe Tata na ngai akolinga ye mpe tokoya epai na ye mpe tokobongisa efandelo epai na ye.” (Yoane 14:22, 23) Ata ntango bazali naino awa na mabele, baklisto bapakolami, baoyo bakoyangela elongo na Klisto na likoló, bazalaka na boyokani malamu na Yehova mpe na Mwana na ye. (Yoane 15:15; 16:27; 17:22; Baebele 3:1; 1 Yoane 3:2, 24) Baninga na bango, “bampate mosusu” oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabele, bango mpe bazalaka na boyokani malamu na “mobateli moko,” Yesu Klisto, mpe na Tata na bango Yehova ntango bazali kotosa mibeko na bango.—Yoane 10:16; Nzembo 15:1-5; 25:14.
‘Bozali bato ya mokili te’
11. Yesu ayebisaki bayekoli na ye likambo nini?
11 Na butu wana oyo Yesu afandaki esika moko na bayekoli na ye ya sembo mpo na mbala ya nsuka liboso akufa, ayebisaki bango likambo moko: alobaki ete moto oyo Nzambe alingi ye, bato ya mokili bakoyina ye. Alobaki mpenza boye: “Soko bamokili bazali koyina bino, bóyeba ete basili koyina ngai liboso naino bayinaki bino te. Soko bozalaki bato ya mokili, [mbɛlɛ] bamokili balingaki bato na bango mpenza. Nde awa ezali bino na mokili te, kasi nasili kopona bino longwa na mokili, bongo bamokili bazali koyina bino. Bókanisa liloba lilobi ngai na bino ete, Moombo aleki nkolo na ye te. Soko basili konyokola ngai, bakonyokola bino lokola. Soko batosi liloba na ngai, bakotosa oyo ya bino lokola.”—Yoane 15:18-20.
12. (a) Mpo na nini Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bato ya mokili bakoyina bango? (b) Lokola Ekaniseli ekómi pene, ekozala malamu biso nyonso tótalela likambo nini?
12 Yesu alobaki bongo mpo bantoma na ye 11 mpe baklisto nyonso ya solo oyo bakoya nsima bálɛmba nzoto te mpe bázonga nsima te mpo bato ya mokili bazali koyina bango. Alobaki lisusu boye: “Nasololi bino makambo oyo ete [bóbɛta] libaku te. Bakobimisa bino na Biyanganelo. Ɛɛ, ntango ekoya wana moto na moto oyo akoboma bino, akobanza ete azali kosalela Nzambe mosala. Bakosalela bino makambo oyo mpo ete, bayebi Tata te soko ngai te.” (Yoane 16:1-3) Mokanda moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia emonisi ete verbe oyo ebongolami na ‘kobɛta libaku’ elimboli “kotinda moto ete abanda kolongola elikya mpe atika moto oyo asengeli kotyela elikya mpe kotosa; kosala ete moto akata boninga.” Lokola Ekaniseli ekómi pene, biso nyonso tosengeli kozwa ntango ya kotalela malamumalamu bomoi ya bato ya sembo ya ntango ya kala mpe ya lelo, mpe kolanda ndakisa na bango ndenge batikalaki sembo ntango bamekamaki. Kotika nzela te ete botɛmɛli to monyoko emema yo na kotika Yehova na Yesu, zalá nde na mokano ya kotyela bango elikya mpe kotosa bango.
13. Na libondeli na ye epai ya Tata na ye, Yesu asɛngaki nini mpo na bayekoli na ye?
13 Ntango asalaki libondeli ya nsuka liboso bábima na ndako ya etaze oyo bazalaki na Yelusaleme, Yesu alobaki na Tata na ye ete: “Ngai napesi bango liloba na yo mpe bamokili basili koyina bango zambi bazali bato na mokili te [lokola] ngai nazali moto ya mokili te. Nalɔmbi te ete olongola bango na mokili kasi ete obatela bango na ye mabe. Bazali bato na mokili te [lokola] ngai nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:14-16) Tokoki kozala na elikya ete miso ya Yehova ezali likoló ya bato oyo alingaka mpo na kolendisa bango lokola bakabwani na mokili.—Yisaya 40:29-31.
Tótikala na bolingo ya Tata mpe na bolingo ya Mwana
14, 15. (a) Yesu amikokanisaki na nini, oyo ekeseni na nini oyo ezali ‘nzete ya vinyo oyo ebebi’? (b) Banani bazali “bitape” ya “nzete ya vinyo ya solosolo”?
14 Na butu wana ya mokolo ya 14 Nisana, ntango azalaki kosolola kaka ye na bayekoli na ye ya sembo, Yesu amikokanisaki na “nzete ya vinyo ya solosolo,” oyo ekeseni na ‘nzete ya vinyo oyo ebebi,’ elingi koloba ekólo Yisalaele oyo ezalaki lisusu sembo epai ya Nzambe te. Yesu alobaki boye: “Ngai nazali nzete ya vinyo ya solosolo, mpe Tata na ngai azali mosali-elanga.” (Yoane 15:1, NW) Kala mpenza, mosakoli Yilimia akomaká maloba oyo Yehova ayebisaki bato na ye oyo bakómaki motó makasi, ete: “Ngai nakonaki yo lokola nzete kitoko mpe motane ya vinyo . . . Ndenge nini obongwani na miso na ngai, okómi bitape oyo ebebi ya nzete ya vinyo ya mboka mopaya?” (Yilimia 2:21, NW) Mosakoli Hosea, ye mpe akomaká ete: “Yisalaele azali nzete ya vinyo oyo ezali kobeba. Azali kobota mbuma mpo na ye moko. . . . Motema na yango ekómi na lokuta.”—Hosea 10:1, 2, NW.
15 Na esika ebota mbuma ya losambo ya solo, ekólo ya Yisalaele epɛngwaki mpe ebotaki mbuma mpo na yango moko. Mikolo misato liboso Yesu afanda na bayekoli na ye ya sembo mpo na mbala ya nsuka, alobaki na bakonzi ya Bayuda oyo bazalaki kosala makambo na liso na nse ya lokasa boye: “Bokonzi ya Nzambe ekolongwa na bino mpe ekopesama na libota oyo likobota mbuma na yango.” (Matai 21:43) Libota yango ya sika ezali “Yisalaele ya Nzambe,” elingi koloba baklisto 144 000 oyo bapakolami na elimo, oyo bakokanisi bango na “bitape” ya “nzete ya vinyo ya solosolo,” elingi koloba Klisto Yesu ye moko.—Bagalatia 6:16; Yoane 15:5, NW; Emoniseli 14:1, 3.
16. Yesu alendisaki bantoma na ye 11 ya sembo na kosala nini, mpe likambo nini tokoki koloba mpo na bapakolami ya sembo oyo bazali naino awa na mabele na ntango oyo ya nsuka?
16 Yesu ayebisaki bantoma 11 oyo bazalaki na ye na kati ya ndako wana ete: “Etape nyonso oyo ezali kati na ngai oyo ebotaka mbuma te, alongolaka yango, mpe etape nyonso oyo ebotaka mbuma, apɛtolaka yango mpo ebota mbuma mingi lisusu. Bótikala na bomoko na ngai, mpe ngai na bomoko na bino. Lokola etape ekoki kobota mbuma yango moko te kozanga ete ekangama na nzete ya vinyo, bino mpe ndenge moko soki botikali na bomoko na ngai te.” (Yoane 15:2, 4, NW) Makambo oyo basaleli ya Yehova bakutani na yango na mikolo na biso ezali komonisa ete mwa ndambo ya baklisto bapakolami na elimo oyo bazali naino awa na mabele batikalaki na bomoko na Mokonzi na bango, Klisto Yesu. (Baefese 5:23) Bandimaki kopɛtolama mpe kobongisama. (Malaki 3:2, 3) Kobanda 1919, bazali kobota mbuma mingi ya Bokonzi; ebandaki na ndambo ya baklisto bapakolami na elimo oyo batikalaki mpe, banda 1935, baninga na bango “ebele monene” oyo bazali se kobakisama.—Emoniseli 7:9; Yisaya 60:4, 8-11.
17, 18. (a) Yesu alobaki nini oyo ezali kosalisa bapakolami na elimo na bampate mosusu na kotikala na bolingo ya Yehova? (b) Koyangana na Ekaniseli ekosalisa biso na nini?
17 Maloba oyo Yesu alobaki na nsima etaleli baklisto nyonso, ezala bapakolami to baninga na bango, ete: “Tata na ngai akumisami na likambo oyo: ete bóbotaka mbuma mingi mpe bólakisa ete bozali bayekoli na ngai. Se lokola Tata alingi ngai, ngai mpe nalingi bino. Soki botosi mibeko na ngai, bokotikala na bolingo na ngai, se lokola ngai natosaki mibeko ya Tata mpe natikali na bolingo na ye.”—Yoane 15:8-10, NW.
18 Biso nyonso tozali na mposa ya kotikala na bolingo ya Nzambe; yango wana tolingi kozala baklisto oyo bazali kobota mbuma. Ezali komonana na ndenge tozali kosakola ‘nsango malamu ya bokonzi’ na libaku nyonso oyo tozwi. (Matai 24:14) Tozali mpe kosala makasi ete tómonisa “mbuma ya elimo” na kati ya bomoi na biso. (Bagalatia 5:22, 23) Soki tokoyangana na Ekaniseli ya liwa ya Klisto, mposa na biso ya kosala bongo ekolendisama, mpamba te, kuna bakomonisa biso lisusu bolingo monene oyo Nzambe mpe Klisto bazali na yango epai na biso.—2 Bakolinti 5:14, 15.
19. Lisungi mosusu nini tokolobela na boyekoli ya pɔsɔ ezali koya?
19 Nsima ya kosala Ekaniseli ya liboso, Yesu alakaki ete Tata na ye akotindela bayekoli na ye ya sembo “mosungi, ye [elimo santu, NW].” (Yoane 14:26) Na boyekoli na biso ya pɔsɔ ekoya tokolobela ndenge oyo elimo yango ezali kosalisa bapakolami na elimo mpe bampate mosusu mpo bátikala na bolingo ya Yehova.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na mobu 2002, mokolo ya minei, 28 Marsi, nsima ya kolala ya moi, nde ekokani na dati ya 14 Nisana na manaka ya Biblia. Mokolo wana na mpokwa, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bakoyangana mpo na kokanisa liwa ya Nkolo Yesu Klisto.
b Talá mokanda Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, ebimisami na Batatoli ya Yehova, mokapo 19 tii mokapo 32.
Mituna ya bozongel
• Yesu apesaki bayekoli na ye liteya nini mpo na oyo etali kosalela basusu na bolingo?
• Lokola Ekaniseli ekómi pene, oyo ezali mikolo malamu ya komitalela na likambo nini?
• Mpo na nini maloba oyo Yesu alobaki ete bato ya mokili bakoyina biso mpe bakonyokola biso esengeli kobɛtisa biso libaku te?
• Nani azali “nzete ya vinyo ya solosolo”? Banani bazali “bitape,” mpe likambo nini basengeli kosala?
[Elilingi na lokasa 15]
Yesu ateyaki bantoma na ye likambo oyo bakokaki kobosana te: kosalela basusu na bolingo
[Bililingi na lokasa 16]
Bayekoli ya Klisto batosaka etinda na ye ya kozala na bolingo oyo esɛngaka bándima kobosana bolamu na bango