-
“Traduction du monde nouveau” Mosala ya mayele na semboLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1991 | 1 Sanza ya 3
-
-
Kati na Traduction du monde nouveau, Yoane 1:1 ekotangamaka ete: “Liloba azalaki nzambe.” Kati na ebele na mabóngoli, liloba oyo mabongolami ete “Liloba azalaki Nzambe,” mpe bazali kosalela yango mpo na kondimisa liteya ya Trinité. Ezali likambo ya kokamwa te ete bateyi ya Trinité baboya libongoli ya Traduction du monde nouveau. Nzokande, mokapo ya Yoane 1:1 mobongolamaki te na mokano ya kondimisa ete Yesu azali Nzambe Mozwi-na-Nguya Nyonso te. Ba Témoins de Jéhovah, mpe ebele mosusu na bato, baboyaki kokoma “nzambe” na nkomá monene liboso nkutu ete babimisa Traduction du monde nouveau, libongoli oyo lizali kosala nyonso mpo na kobongola monoko ya ebandeli na sembo mpenza. Kati na verset yango, babongoli mitano ya Biblia, bango ba Allemands, basaleli motindo moko liloba “nzambe moko.”b Epai mosusu, mabongoli mosusu 13 masaleli maloba lokola “na bonzambe” to “na lolenge na Nzambe.” Maloba oyo mayokani na biteni mosusu ya Biblia mpo na komonisa mpenza ete, na etelemelo na ye ya likoló, Yesu azali nzambe na ndimbola oyo ete azali ekelamu na bonzambe. Na kokesena, Jéhovah mpe Yesu bazali moto moko te, kosaláká Nzambe bobele moko.—Yoane 14:28; 20:17.
-
-
“Traduction du monde nouveau” Mosala ya mayele na semboLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1991 | 1 Sanza ya 3
-
-
b Jürgen Becker, Jeremias Felbinger, Oskar Holtzmann, Friedrich Rittelmeyer mpe Siegfried Schulz. Emil Bock akomaki ete, “ekelamu na bonzambe.” Tala lisusu Bible du Centenaire.
-