Mateya oyo tokoki kozwa kati na makamwisi ya Yesu
“NA MOKƆLƆ na misato, libala ejalaki na Kana na Galilai . . . Yesu abiangami na libala mpe bayekoli na ye lokola. Wana ejangaki vinyo, mama na Yesu alobi na ye ete, Bajali na vinyo tɛ.” Likambo wana epesaki Yesu nzela ete asala likamwisi na ye ya liboso.—Yoane 2:1-3.
Likambo motindo wana ezalaki na ntina te, ezalaki na motuya moke, na boye ete ekokaki te koyebisama epai na Yesu? Nganga-mayele moko oyo akolimbolaka Biblia alobi ete: “Na mikili ya Ɛ́sti, ezaleli ya koyamba bapaya ezalaki likambo ya ntina monene mpenza . . . Ezaleli ya solosolo ya koyamba bapaya, mingimingi na elambo ya libala, ezalaki kosɛnga ete biloko mpe masanga ezala mingi. Soki masanga mpe bilei [esili] na boumeli ya elambo ya libala, libota mpe babalani ya sika bakooka nsɔni mpo na yango.”
Na yango, Yesu akangaki mabɔkɔ te. Amonaki “mbeki na mabanga motoba itiamaki wana pelamɔkɔ na epɛtwɛli na Bayuda.” Kosukola mabɔkɔ na molulu liboso ya kolya ezalaki momeseno epai na Bayuda, mpe ezalaki kosɛnga mai mingi mpo na kokokisa mposa na babyangami. Yesu apesaki etinda epai na baoyo bazalaki kokabola bilei epai na babyangami ete: “Botondisa mbeki na mai.” Yesu azalaki “[mokambi ya elambo, NW]” te, kasi alobaki mbala moko mpe na bokonzi nyonso. Lisoló lilobi ete: “[Sikawa, na ntango mokambi na elambo amekaki yango, ekómaki vinyo, NW].”—Yoane 2:6-9; Malako 7:3.
Ekoki komonana lokola likambo ya kobenda likebi na kotala ete Yesu asalaki likamwisi na ye ya liboso na esika ya elambo ya libala, esika oyo bato mingi bazalaki na momeseno ya kokende, kasi likambo oyo emonisi makambo mingi na ntina na Yesu. Azalaki monzemba, mpe na mabaku mosusu oyo malandaki, azalaki kosolola elongo na bayekoli na ye na ntina na matomba ya kotikala monzemba. (Matai 19:12) Nzokande, kozala na ye kati na elambo ya libala emonisi ete azalaki soko moke te kotɛmɛla likambo litali kobala. Azalaki na bokatikati, apesaki lisungi na ebongiseli ya libala; atalelaki yango lokola likambo ya lokumu na miso ya Nzambe.—Kokanisá na Baebele 13:4.
Yesu azalaki te moto na makambo makasi mpe na kozanga kosepela lolenge bato na ntɔ́ki ya mangomba bamonisaki ye na nsima. Emonani polele ete azalaki kosepela kozala elongo na bato mpe azalaki te koyina kozala elongo na bato kati na bilambo. (Kokanisá na Luka 5:29.) Makambo oyo asalaki epesaki bongo ndakisa epai na bayekoli na ye. Yesu ye moko amonisaki ete basengelaki te kozala mawamawa kozanga ntina—lokola nde boyengebene elimboli koloba kozanga esengo. Nzokande, na nsima baklisto bazwaki etinda oyo ete: “Bosepelaka ntango yɔnsɔ kati na Nkolo.” (Bafilipi 4:4) Lelo oyo baklisto bazali kosala na bokɛngi mpo ete bátya kominanola kati na bandelo oyo ebongi na yango mpenza. Bazali kozwa esengo kati na mosala ya Nzambe, kasi na ndakisa ya Yesu, bazwaka mbala mosusu ntango ya kozala elongo na basusu kati na bisika ya bilambo.
Tótalela lisusu mayoki ya boboto ya Yesu. Asɛngisamaki na makasi te ete asala likamwisi wana. Ezalaki na esakweli moko te oyo esengelaki kokokisama na boyokani na likambo oyo. Emonani polele ete Yesu apusamaki solo mpo na lobanzo ya mama na ye mpe mpo na mawa oyo ekwelaki baoyo bazalaki kobalana. Amibanzabanzaki na ntina na mayoki na bango mpe alingaki kolongola bango na mitungisi. Yango ezali kokólisa elikya na yo ete Klisto azali komibanzabanza mpenza mpo na yo—ata kati na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo, boye te?—Kokanisá na Baebele 4:14-16.
Lokola mbeki moko na moko “ekokaki na mamɛtɛlɛ mibale to misato” ya mai, likamwisi ya Yesu ebimisaki masanga mingi mpenza—mbala mosusu balitɛlɛ 390 (105 gallons)! (Yoane 2:6) Mpo na nini masanga mingi boye? Yesu alingaki te kopesa nzela na ezaleli ya kolangwa masanga, likambo oyo Nzambe akweisaka. (Baefese 5:18) Kasi, amonisaki nde ezaleli ya bokabi oyo ekokani na oyo ya Nzambe. Lokola vinyo ezalaki masanga oyo bato mingi bazalaki komela yango na eleko wana, ndambo oyo ekokaki koleka ekokaki komelama na mabaku mosusu.—Kokanisá na Matai 14:14-20; 15:32-37.
Baklisto ya liboso bamekolaki ndakisa ya Yesu mpo na oyo etali ezaleli ya bokabi. (Kokanisá na Misala 4:34, 35.) Lelo oyo mpe basaleli ya Yehova balendisami ete ‘bápesaka.’ (Luka 6:38) Nzokande, likamwisi ya liboso ya Yesu ezalaki mpe na ndimbola ya esakweli. Ezali kobenda likebi na ntina na mikolo mizali koya wana, na bokabi nyonso, Nzambe akobongisa “elambo na bilei na mafuta, elambo na vinyo oyo esili koumela,” kolongoláká bongo Nzala mpo na libela.—Yisaya 25:6.
Kasi, tokoki koloba nini na ntina na makamwisi mingi oyo Yesu asalaki na kobikisáká bato na maladi? Liteya nini tokoki kozwa kati na yango?
Kosala malamu na mokolo ya Sabata
“Tɛlɛma, kamata litɔkɔ na yɔ mpe tambola!” Yesu alobaki maloba oyo epai na mobali moko oyo azalaki na bokɔnɔ uta mibu 38. Lisoló ya Evanzile elobi ete: “Nɔkinɔki moto yango abiki, Akamati litɔkɔ na ye mpe atamboli.” Likambo ya kokamwa ezali oyo ete, bato banso te nde basepelaki na mbongwana wana. Lisoló ekóbi na maloba oyo ete: “Mpe mpɔ na ntina yango, Bayuda babandi konyokola Yesu jambi asali makambo oyo na sabata.”—Yoane 5:1-9, 16.
Sabata ezalaki mokolo oyo ebongisamaki mpo na kopema mpe kosepela mpo na bato banso. (Exode 20:8-11) Nzokande na eleko ya Yesu, yango ekómaki mibeko ya mindɔndɔ́ mpe ya konyokola, oyo esalemi na bato. Nganga-mayele Alfred Edersheim akomaki kati na biteni milai ya Talmud na ntina na mibeko ya Sabata ete, “makambo yango masololamaki na likebi nyonso na kopesáká yango motuya lokola makambo ya losambo, oyo moto moko te akokaki kondima ete moto oyo azali na makanisi malamu akoki kotalela yango.” (The Life and Times of Jesus the Messiah) Balakisi ya mibeko ya Bayuda bazalaki kopesa motuya moleki ndelo kati na mibeko wana ya bolɛma, oyo ezangi moboko, mpe oyo ezalaki kotalela likambo moko na moko ya bomoi ya Bayuda—mingimingi kozanga kotalela mayoki ya moto. Moko na mibeko ya Sabata elobaki ete: “Soki ndako ekweli moto moko mpe bazali koyeba te soki azali kuna na kati to azali te, soki azali na bomoi to akufi, soki azali mopakano soki Moyisraele, bakoki koluka ye. Soki bamoni ete azali na bomoi bakoki kolongola mabanga likoló na ye; kasi soki bakuti [ye] akufi, bakotika ye.”—Tractate Yoma 8:7, The Mishnah, ebongolami na Herber Danby.
Lolenge nini Yesu atalelaki ezalela motindo wana ya kolekisa ndelo kati na likambo litali mibeko? Na ntango balobaki mabe na ntina na ye wana abikisaki moto na mokolo ya Sabata, alobaki ete: “Tata na ngai ajali naino kosala mosala, ngai mpe najali kosala.” (Yoane 5:17) Yesu azalaki te kosala mosala ya lifuti mpo na komikómisa mozwi. Kasi azalaki nde kosala mokano ya Nzambe. Lokola Balevi bapesamelaki nzela ya kosala mosala ya bulɛɛ na mokolo ya Sabata, bobele bongo, Yesu akokaki kokokisa na bosembo nyonso mikumba oyo Nzambe apesaki ye lokola Masiya kozanga kobuka Mibeko ya Nzambe.—Matai 12:5.
Mosala ya kobikisa oyo Yesu asalaki na mokolo ya Sabata emonisaki mpe polele ete bakomeli Bayuda mpe Bafalisai bazalaki “na boyɛngɛbɛnɛ na koleka”—na makambo makasi mpe na kozanga bokatikati na makanisi na bango. (Mosakoli 7:16) Na ntembe te, ezalaki mokano ya Nzambe te, ete misala malamu esengelaki kosalema bobele na mikolo misusu ya pɔ́sɔ; mokano ya Nzambe ezalaki mpe te ete Sabata ezala mosala mpamba na kolandáká ebele ya mibeko. Yesu alobaki kati na Malako 2:27 ete: “Sabata esalami mpɔ na bato; bato basalami mpɔ na sabata tɛ.” Yesu azalaki kolinga bato, kasi te mibeko mizangi moboko.
Lelo oyo, ezali malamu te ete baklisto bázala ngwi na kolekisa ndelo to bákangama bobele na mibeko na kolekisa ndelo kati na makanisi na bango. Baoyo bazali na bokonzi kati na lisangá bazali komipekisa mpo na kotyela basusu mibeko mileki ndelo oyo misalemi na bato mpe kozala lokola bapolisi na bango. Ndakisa ya Yesu elendisi biso lisusu ete tólukaka mabaku ya kosala malamu. Na ndakisa, moklisto akokanisa te ete akoteya solo ya Biblia bobele na ntango oyo azali kati na mosala ya ndako na ndako to na ntango azali kosala lisukúlu. Ntoma Petelo alobi ete, biso baklisto tosengeli ‘koselingwaka mikɔlɔ yɔnsɔ mpɔ na kojongisa monɔkɔ na moto na moto oyo akotuna biso mpɔ na ntina na elikia ejali kati na biso.’ (1 Pɛtɛlɔ 3:15) Kosala malamu eponi ntango te.
Liteya kati na ezaleli ya motema mawa
Likamwisi mosusu ya kobenda likebi eyebisami kati na Luka 7:11-17. Engebene lisoló oyo eyebisami na ntina na yango, Yesu “akɛndaki na mboka mɔkɔ, nkombo na yango Naina. Bayekoli na ye, na ebele monɛnɛ, bakɛndaki na ye njela mɔkɔ.” Kino na mikolo oyo, bisika ya bokundi ekoki komonana na súdi-ɛ́sti ya Naina oyo ezali lelo mboka ya ba Arabes. “Wana ebɛlɛmaki ye na monɔkɔ na mboka,” akutanaki na bato oyo bazalaki kotya makelele. “Bajalaki komɛma mokufi na libanda, ye mwana na likinda na mama na ye, mama mpe akufeli mobali. Ebele monɛnɛ na bato na mboka bajalaki na mwasi elɔngɔ.” H. B. Tristram amonisaki ete uta kala “lolenge ya kokunda bibembe ebongwani te,” abakisi ete: “Namonaki basi bazali kotambola liboso na sanduku ya ebembe, ezalaki kokambama na basi-baleli. Bakotombolaka mabɔkɔ na bango na likoló, babendaka nsuki na bango, na bilembo makasi ya komonisa mawa, mpe konganga makasi na nkombo ya mowei.”—Eastern Customs in Bible Lands.
Mwasi moko mokufeli-mobali azalaki kotambola kati na makelele wana ya bato mingi, bobele elongi na ye ekokaki mpenza komonisa mawa na ye monene. Lokola asilaki kokufela mobali, engebene maloba ya mokomi Herbert Lockyer, azalaki kotalela mwana na ye lokola “lisungi kati na bobangé na ye, mpe libɔndisi mpo na bomoi na ye ya kofanda bobele ye moko—lisungi mpe likonzi ya ndako. Lokola abungisaki mwana na ye bobele moko, lisungi ya nsuka oyo azalaki na yango elongolamaki.” (All the Miracles of the Bible) Yesu asalaki nini? Kati na maloba kitoko ya Luka, ekomami ete: “Emɔnaki Nkolo ye, ayokelaki ye mawa, mpe alobaki na ye ete, Lela tɛ!” Liloba oyo ete “ayokelaki ye mawa” euti na liloba ya Greke oyo elimboli mpenzampenza “nsɔpɔ́.” Elimboli “kopusama na mayoki uta na kati mpenza.” (Vine’s Expository Dictionary of Old and New Testament Words) Ya solo, Yesu apusamaki uta na bozindo mpenza ya mayoki na ye.
Ekoki mpenza kozala ete mama ya Yesu azalaki mwasi mokufeli-mobali na eleko wana, na yango, mbala mosusu Yesu ayebaki malamu mpasi ya kokufela moto wana abungisaki tata-mobɔkɔli na ye, Yosefe. (Kokanisá na Yoane 19:25-27.) Esengelaki te bobele ete mwasi wana mokufeli-mobali alela epai na Yesu. Nokinoki, “akɛndaki epai na sanduku mpe amamaki yango,” atako na nsé ya Mibeko ya Mose kosimba ebembe ezalaki kokómisa moto mbindo. (Mituya 19:11) Na lisalisi ya makamwisi na ye ya nguya, Yesu akokaki kolongola eloko oyo epesaka mbindo! “Alobaki ete, Elɛngɛ mobali, nalobi na yɔ ete, sekwa! Mokufi afandaki mpe abandaki kosolola, mpe apɛsaki ye na mama na ye.”
Lisoló oyo ezali mpenza liteya moko ya kobenda likebi na ntina etali koyokela mawa! Baklisto basengeli te komekola ezaleli ya kozanga bolingo, ezaleli ya motema makasi oyo ezali komonana na ‘mikolo oyo ya nsuka.’ (2 Timoté 3:1-5) Nzokande, 1 Pɛtɛlɔ 3:8 ezali kolendisa biso ete: “Mpɔ na kosuka, bino yɔnsɔ bojala na motema mɔkɔ, kobɔndisana, kolingana, lokola bandeko, na mitema na mawa, na kosɔkɛma.” Na ntango baninga na biso bazwi likambo na ntina etali liwa to bokɔnɔ makasi, tokoki te kosekwisa to kobikisa moto oyo azali na bokɔnɔ. Kasi tokoki kopesa lisungi mpe libɔndisi, mbala mosusu na kozaláká wana mpe na koleláká elongo na bango.—Baloma 12:15.
Likamwisi ya kosekwisa oyo Yesu asalaki ezali mpe komonisa makambo matali mikolo mizali koya—wana “yɔnsɔ bajali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye, mpe bakobima”! (Yoane 5:28, 29) Na mabelé mobimba, bato oyo bakufelá bato bakomona motema mawa ya Yesu na ntango bamama, batata, bana, mpe bandeko na bango oyo bakufaki bakobima na nkunda!
Mateya oyo tokoki kozwa kati na makamwisi wana
Na bongo, emonani polele ete, makamwisi ya Yesu mazalaki bobele te kolakisama ya misala minene ya nguya. Ekumisaki Nzambe, etikaki elakiseli mpo na baklisto oyo balendisami ete ‘bákumisa Nzambe.’ (Baloma 15:6) Elendisaki ezaleli ya kosalela bato malamu, ya kozala na elimo ya bokabi, ya komonisa motema mawa. Lisusu, ezalaki mpo na komonisa biso misala ya nguya oyo ekosalema na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto.
Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu asalaki misala ya nguya bobele kati na etando moko ya moke. (Matai 15:24) Lokola Mokonzi oyo akembisami, etando ya mosala na ye ekozwa mabelé mobimba! (Nzembo 72:8) Na ntango wana ya kala, baoyo babikisamaki na nzela ya makamwisi na ye mpe basekwisamaki, na nsuka bakufaki. Na nsé ya bokonzi na ye ya likoló, lisumu mpe liwa ekolongolama mpenza, kopesáká bongo nzela na bomoi ya seko. (Baloma 6:23; Emoniseli 21:3, 4) Ya solo, makamwisi ya Yesu mamonisaki ete mikolo mizali koya mikozala ya esengo. Batatoli ya Yehova basili kosalisa bamilió ya bato ete bákólisa elikya ya solosolo ya kozala kati na yango. Liboso ete ntango yango eya, na nzela ya makamwisi ya Yesu Klisto, tosili kobanda komona makambo oyo makosalema mosika te!
[Elilingi na lokasa 7]
Yesu azali kobongola mai vinyo