Tózwa boyebi sikoyo mpe mpo na libela
ULRICH STRUNZ, monganga moko na Allemagne, akomaki buku moko ya bavolimi mingi oyo ezalaki na motó ya likambo ete Elenge mpo na libela (na Lingelesi). Kati na yango amonisaki ete kosala ngalasisi, kolya malamu, mpe kozala na bomoi ya mindɔndɔ te, ekoki kosalisa moto azala nzoto malamu ata mpe na bomoi ya molai. Kasi, alobaki te ete soki moto alandi batoli yango, akozala na bomoi libela na libela.
Nzokande, ezali na boyebi moko oyo ekoki kopesa bomoi ya seko. Soki moto azali na bomoi libela na libela akoki koyekola makambo ya ntina libela na libela. Na libondeli moko, Yesu alobaki na Nzambe boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Tóluka naino koyeba soki maloba “bomoi ya seko” elimboli nini, na nsima tokolimbola soki boyebi yango esangisi makambo nini mpe ndenge nini tokoki kozwa yango.
Biblia emonisi ete etikali moke Mozalisi abongola mabelé paladiso, esika bato bakozala na bomoi ya molai. Liboso Mozalisi akómisa mabelé paladiso, ekosɛnga asala naino likambo moko monene lokola oyo asalaki na Mpela ya ntango ya Noa. Na Matai mokapo 24, vɛrsɛ 37 tii 39, Yesu akokanisaki ntango na biso na “mikolo ya Noa,” ntango oyo bato “batyaki likebi te” na mikolo oyo bazalaki. Baboyaki mpe koyoka nsango oyo Noa azalaki kosakola. Tii “mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa,” mpela eyaki mpe ebomaki bato nyonso oyo bakangaki matoi na makambo oyo Noa azalaki koyebisa bango. Noa ná bato oyo bazalaki na ye na masuwa babikaki.
Yesu amonisaki ete “mokolo” ya ndenge wana ekozala mpe na ntango na biso. Baoyo bazali koyoka mpe kotya likebi na boyebi ya likambo yango bakobika, lisusu bakozala na elikya ya bomoi ya libela na libela. Longola yango, bakufi oyo Nzambe abombá na makanisi na ye bakozonga na bomoi mpe kozala na elikya ya kokufa lisusu te. (Yoane 5:28, 29) Tótala ndenge Yesu amonisaki makambo yango mibale. Ntango Yesu azalaki koyebisa Malata makambo etali lisekwa, alobaki boye: “Moto oyo azali komonisa kondima na kati na ngai, ata soki akufi, akozonga na bomoi; mpe moto nyonso oyo azali na bomoi mpe azali komonisa kondima na kati na ngai akokufa ata mokolo moko te.” Makambo nyonso emonisi ete “mokolo” yango ekómi pene, ntango oyo okoki kozwa libaku ya ‘kokufa ata mokolo moko te.’—Yoane 11:25-27.
Na nsima, Yesu atunaki Malata boye: “Ondimi yango?” Azongisaki ete: “Ɛɛ, Nkolo.” Soki Yesu atuni yo motuna yango lelo oyo, okopesa eyano nini? Ntango mosusu okoki kokakatana mpo na kondima ete moto akoki kokufa ata mokolo moko te. Kasi ata soki okanisi bongo, ntembe ezali te ete likanisi yango ekosepelisa yo. Kanisá ebele ya makambo oyo okoki koyekola soki ozwi likoki ya ‘kokufa ata mokolo moko te’! Kanisá ete ozali kosala makambo nyonso oyo olingaka koyekola mpe kosala, kasi ozalaka na ntango te. Kanisá ete okutani lisusu na bandeko mpe baninga na yo oyo bakufá! Boyebi nini ekoki kosalisa yo omona makambo wana, mpe ndenge nini okoki kozwa boyebi yango?
Tokoki kozwa boyebi oyo epesaka bomoi
Kozwa boyebi ya Nzambe mpe ya Klisto eleki nde makoki na biso? Te. Ezali solo ete koyekola misala ya Mozalisi ezali na nsuka te. Kasi, ntango Yesu alobelaki “boyebi” oyo ekoki komema na “bomoi ya seko,” azalaki kokanisa na astronomi to siansi mosusu te. Masese mokapo 2 vɛrsɛ 1 mpe 5, emonisi ete “maloba” oyo ezali na Biblia ezali na ntina mingi mpo na kozwa “boyebi ya Nzambe.” Lisusu, mpo na Yesu, Yoane 20:30, 31 emonisi ete makambo nyonso oyo ekomami na Biblia ekoki mpo ‘tózwa bomoi.’
Na yango, boyebi ya Yehova mpe ya Yesu Klisto oyo ezali na Biblia ekoki komonisa yo ndenge okoki kozwa bomoi ya seko. Biblia ekokani na buku mosusu te. Mozalisi akomisaki yango na ndenge oyo ezali kopesa nzela ata na bato oyo batángá mingi te bákoka kozwa boyebi oyo ekoki komema bango na bomoi ya seko. Ndenge moko mpe, ata moto ya mayele mingi mpe oyo azali na ntango mpe bozwi mingi, akoki kaka koyekola likambo ya sika na Biblia. Lokola ozali kotánga lisolo oyo, emonisi ete ozali na likoki ya koyekola, kasi ndenge nini okoki kosalela yango?
Na mokili mobimba, emonani ete ndenge malamu oyo moto akoki kozwa boyebi yango ezali koyekola Biblia na moto moko oyo ayebi mateya na yango. Kaka ndenge Noa asalaki milende mpo na koteya bato ya ntango na ye, Batatoli ya Yehova bakosepela koya kotala yo mpo na koyekola na yo Biblia. Bakoki koyekola na yo mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.a Ata soki ezali mpasi ondima ete na Paladiso, bato ya sembo ‘bakokufa ata mokolo moko te,’ boyekoli wana ya Biblia ekoki kosalisa yo ondima elaka yango. Na yango, soki olingi kozala na bomoi libela na libela to olingi ata koyeba kaka mpo na nini okoki kondima yango, osengeli kosala nini? Ndimá koyekola Biblia.
Boyekoli yango ekozwa yo ntango boni? Mwa buku oyo tolobeli ezali na nkasa 32 mpe ebimisami na minɔkɔ ebele, ezali na mateya 16 ya mikuse. Soki ozali koyekola ata ngonga moko na pɔsɔ, ekosɛnga kaka mwa basanza mpo oyekola mateya ya ebandeli ya Biblia na buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Mikanda yango esalisi bato ebele bázwa boyebi mingi mpe bálinga Nzambe mingi. Mozalisi akopesa bato nyonso oyo balingaka ye mpenza mbano ya bomoi ya seko.
Tokoki mpenza kozwa boyebi oyo ezali komema na bomoi, kutu ekosɛnga biso makambo ya mindɔndɔ te. Biblia mobimba to mikanda na yango mosusu ebongolami na minɔkɔ koleka 2 000. Batatoli ya Yehova na mikili 235 basepelaka kosalisa bato mpe babimisaka mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo ekosalisa yo okóma na boyebi mingi.
Boyekoli na yo moko
Boyokani na yo na Nzambe ezali likambo oyo etali moto mosusu te. Kaka yo moko nde okoki kobatela boninga yango, kokómisa yango makasi, mpe kaka ye nde akoki kopesa yo bomoi ya seko. Yango wana, osengeli kotika te koyekolaka Liloba na ye. Soki moto moko azali mbala na mbala koya koyekola na yo na ndako, ekoki kozala mpasi te mpo ozwaka ntango ya koyekola.
Lokola ‘boyebi ya Nzambe’ ezali na Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango, esengeli tóbatelaka mikanda yango. (Masese 2:5) Soki tosali bongo, ekoumela bambula ebele. Soki ofandaka na mokili ya bobola, mbala mosusu na eteyelo osalelá mpenza babuku mingi te, bozalaki koyekola kaka na koyoka mpe na komona. Na ndakisa, na Bénin mobimba balobaka minɔkɔ koleka 50. Bato mingi bayebi koloba malamu minɔkɔ minei to mitano, atako batángá naino mikanda na minɔkɔ yango te. Makoki oyo ozali na yango ya koyekola na koyoka, kotala, mpe kokanisa ezali likabo ya Nzambe. Kasi, okomona ete babuku ekoki kosalisa yo mingi mpo na koyekola.
Ata soki ofandaka na ndako ya moke, bongisá mwa esika moko ya malamu mpo na kotya Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia. Tyaká yango na esika oyo okoki komona yango noki mpe ekobeba te.
Boyekoli ya libota
Soki ozali na bana, osengeli mpe kosalisa bango bázwa boyebi oyo yo ozali kozwa. Na mikili ya bobola, baboti bateyaka bana na bango makambo mingi oyo ekoki kosalisa bango na bomoi. Na ndakisa, balakisaka bango kolamba, kokata nkoni, kotoka mai, kosala bilanga, koboma mbisi, mpe koyeba kokakola biloko na zando. Mateya wana esalisaka bango mpenza na bomoi. Nzokande, baboti mingi babosanaka koteya bana na bango boyebi oyo ekoki komema na bomoi ya seko.
Ata soki bomoi na yo ezali ndenge nini, ekoki mpenza kozala ete omonaka ete ozali na ntango mingi te. Nzambe mpe ayebi yango. Mpo na oyo etali koteya bana banzela na ye, yoká oyo alobaki na ntango ya kala: “Okolakisa yango na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛlɛma yo.” (Deteronome 6:7) Na kolanda makanisi yango, meká kosala programɛ ya koteya oyo ekoki kozala boye:
1. “Wana ekofanda yo na ndako”: Salá makasi oyekolaka Biblia mingi, ata pɔsɔ na pɔsɔ, ná bana na yo na ndako, ndenge Motatoli moko asalaki na yo. Batatoli ya Yehova babimisaka mikanda oyo elimbolaka Biblia, oyo ebongi mpenza mpo na koteya bana, ezala ya mike to oyo bakoli mwa moke.
2. “Wana ekotambola yo na nzela”: Teyáká bana na yo makambo ya Yehova, ndenge kaka oteyaka bango makambo ya bomoi to opesaka bango malako.
3. “Wana ekolala yo”: Bondeláká ná bana na yo mpokwa nyonso.
4. “Wana ekotɛlɛma yo”: Mabota mingi bamonaka ete kotalela mokapo moko ya Biblia ntɔngɔ nyonso ezali na matomba mingi. Batatoli ya Yehova basalelaka mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolob mpo na kosala yango.
Na mikili ya bobola, baboti mingi basalaka makasi mpo mwana na bango ata moko atánga kelasi ya malonga. Na ndenge yango, mwana wana akosalisa baboti na ye ntango bakokóma mibange. Nzokande, soki oyekoli Biblia mpe osalisi bana na yo báyekola yango, yo ná bango bokozwa boyebi oyo ekosalisa bino bózala na bomoi ya seko.
Mokolo mosusu tokoyeba makambo nyonso? Te. Lokola mabelé ezali kotambola na kati ya molɔ́ngɔ́ oyo ezali na nsuka te, tokozala ntango nyonso na makambo ya koyekola. Kutu, Mosakoli 3:11 elobi boye: “[Nzambe] asalaki nyonso na kitoko na ntango na yango; atye mpe [likanisi ya seko, NW] kati na mitema na bango, nde moto te ayebi kososola mosala mosalaki Nzambe longwa na ebandeli kino nsuka.” Koyekola ezali likambo ya esengo oyo ekosuka te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mikanda yango ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
“Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba . . .”
[Bililingi na lokasa 7]
Salisá libota na yo bázwa boyebi sikoyo mpe mpo na libela