Libota ya Yehova lizali na bomoko kitoko
“Talá lokola ezali malamu mpe na esengo soko bandeko bakozalana na motema moko [“na bomoko,” “NW”]!”—NZEMBO 133:1.
1. Ezalela ya mabota mingi ezali nini lelo oyo?
LELO oyo libota lizali kati na mikakatano. Kati na mabota mingi, nsinga ya mabala ezali lisusu makasi te. Motángo ya baye bazali koboma libala mozali sé komata, mpe bana mingi oyo baboti na bango babomi mabala bazali kati na mawa monene. Bamilió ya mabota mazali na esengo te mpe mazangi bomoko. Nzokande, ezali na libota moko oyo lizali na esengo ya solo mpe na bomoko ya solosolo. Ezali bongo libota ya Yehova Nzambe na molɔ́ngɔ́ mobimba. Kati na yango, ebele ya makiasi ya baanzelu bazali kokokisa misala na bango na boyokani na mokano ya Nzambe. (Nzembo 103:20, 21) Kasi ezali mpe na libota moko awa na mabelé oyo ezali na bomoko lolenge yango?
2, 3. (a) Banani bazali sikawa basangani ya libota ya Nzambe na molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe tokoki kokokanisa Batatoli ya Yehova nyonso ya mikolo na biso na eloko nini? (b) Mituna nini tokotalela yango?
2 Ntoma Paulo akomaki ete: “Nazali kokumba mabɔ́ngɔ́ na ngai liboso na Tata, oyo mabota nyonso na Likoló mpe na nsé mazwi nkombo uta na ye.” (Baefese 3:14, 15) Milɔngɔ́ ya mabota nyonso na mabelé ezwi nkombo uta na Nzambe mpamba te ye azali Mozalisi. Atako mabota ya bato mazali na likoló te, na elobeli ya elilingi Nzambe abalani na lisangá na ye ya likoló, mpe Yesu akobalana na mwasi ya elimo oyo bakozala na ye kuna na likoló. (Yisaya 54:5; Luka 20:34, 35; 1 Bakolinti 15:50; 2 Bakolinti 11:2) Bapakolami ya sembo oyo bazali awa na mabelé bazali sikawa eteni ya libota ya Nzambe na molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe “bampate mosusu” ya Yesu, oyo bazali na elikya ya bomoi na mabelé, bakokóma mpe basangani ya libota yango. (Yoane 10:16; Baloma 8:14-17; Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuáli 1996, lokasa 31) Nzokande, Batatoli ya Yehova nyonso lelo oyo bakoki kokokanisama na libota ya bomoko oyo ezwami kati na mokili mobimba.
3 Ozali mosangani ya libota wana ya kitoko ya basaleli ya Nzambe oyo lizali na mikili mingi? Soki ezali bongo, ozali kozwa mapamboli minene mpenza oyo moto akoki kozwa. Bamilió ya bato bakoki kotatola ete libota ya Yehova na mabelé mobimba—lisangá na ye oyo lizali komonana—lizali liziba ya kimya mpe ya bomoko kati na mokili oyo ekokani na mabelé makauki, esika matáta mpe bokabwani etondi. Lolenge nini tokoki kolobela bomoko ya libota ya Yehova oyo lizali na mokili mobimba? Mpe makambo nini makólisaka kimya motindo yango?
Ezali malamu mpe na esengo!
4. Na maloba na yo moko, lolenge nini okoki kolimbola oyo Nzembo 133 elobi na ntina na bomoko kati na bandeko?
4 Davidi, mokomi na Nzembo azalaki mpenza kosepela mingi na bomoko kati na bandeko. Kútu apemamaki na elimo santu mpo na koyemba na ntina na bomoko yango! Kanisá ete azali kobɛta nzɛnzɛ na ye na koyembáká ete: “Talá lokola ezali malamu mpe na esengo soko bandeko bakozalana na motema moko [“na bomoko,” NW]! Oyo ezali pelamoko na mafuta na nsolo malamu likoló na motó, oyo etangi na mandɛfu, na mandɛfu na Alona, oyo ekitanaki bobele na nsuka na nsé na bilamba na ye. Ezali pelamoko na mamwé na Helemone oyo ekokitaka na ngomba na Siona; zambi kuna [Yehova] alakaki kopambola na bomoi na lobiko.”—Nzembo 133:1-3.
5. Na kosaleláká Nzembo 133:1, 2, bokokanisi nini bokoki kosalema kati na Bayisalaele mpe libota ya Nzambe na mikolo na biso?
5 Maloba wana masalelamaki mpo na bomoko ya bondeko oyo Bayisalaele, libota ya Nzambe na ntango ya kala bazalaki na yango. Wana bazalaki kokenda na Yelusaleme mpo na bilambo mbala misato na mbula bazalaki kofanda elongo kati na bomoko. Atako bautaki na bitúká bikeseni, bazalaki bobele libota moko. Kozala elongo ezalaki na bopusi malamu likoló na bango nyonso, motindo moko lokola kopakolama na mafuta oyo ezongisaka nguya mpe ezali na nsolo kitoko. Ntango bazalaki kosopa mafuta motindo yango na motó ya Alona, yango ezalaki kotanga na mandefu na ye mpe kokita kino na nkingo na bilamba na ye. Mpo na Bayisalaele, kozala elongo ezalaki na bopusi malamu oyo ezalaki kokɔtela libota mobimba. Kozanga koyokana nyonso ezalaki kosilisama, mpe bomoko ezalaki koyikana. Bomoko motindo yango bozali komonana lelo kati na libota ya Yehova oyo lizwami na mokili mobimba. Koyangana mbala na mbala ezali koyeisa bopusi ya malamu likoló na basangani na yango. Kozanga koyokana to mikakatano nyonso mizali kosilisama wana bazali kosalela batoli ya Liloba ya Nzambe. (Matai 5:23, 24; 18:15-17) Libota ya Nzambe lizali kosepela mingi na kolendisana oyo euti na bomoko na bango lokola bandeko.
6, 7. Lolenge nini bomoko ya Yisalaele ezalaki lokola mamwé ya Ngomba Helemone, mpe epai wapi mapamboli ya Nzambe makoki kozwama lelo oyo?
6 Lolenge nini kofanda ya Yisalaele elongo kati na bomoko ekokanaki mpe na mamwé ya Ngomba Helemone? Lokola nsɔ́ngɛ́ ya ngomba yango ezali na bosándá koleka bamɛtɛlɛ 2800 likoló ya nivo ya mai monene, ezipamaka na mbulampɛmbɛ pene na mbula mobimba. Nsɔ́ngɛ́ ya Helemone oyo etondi na mbulampɛmbɛ ekobotisaka mbɔ́ngi na butu mpe yango ekobimisaka mamwé mingi oyo ebatelaka bitwɛlɛ na boumeli ya ntango molai ya eleko ya elanga. Mopɛpɛ ya mpiɔ oyo mozali kouta na Helemone mokoki komema mbɔ́ngi yango mosika epai na súdi kino na etúká ya Yelusaleme, epai ekopesa mamwé. Bongo, mokomi na Nzembo alobaki solo na ntina na ‘mamwé na Helemone oyo ekokitaka na ngomba na Siona.’ Oyo ezali mpenza bokundoli kitoko ete bomoko ememaka kobɔndisama kati na libota ya basambeli ya Yehova!
7 Liboso ete lisangá ya boklisto ebotama, Siona, to Yelusaleme, ezalaki ntéi ya losambo ya solo. Na yango, ezalaki kuna nde Nzambe atindaki ete kopambolama ezala. Lokola, na elobeli ya elilingi, Liziba ya mapamboli nyonso lizalaki na tempelo ya Yelusaleme, mapamboli masengelaki kouta kuna. Nzokande, lokola losambo ya solo ekangami lisusu te na esika moko ya sikisiki, mapamboli, bolingo mpe bomoko ya basaleli ya Nzambe ekoki komonana na mabelé mobimba lelo oyo. (Yoane 13:34, 35) Wapi mwa makambo oyo mazali kokólisa bomoko yango?
Makambo oyo mazali kokólisa bomoko
8. Tozali koyekola makambo nini na ntina na bomoko kati na Yoane 17:20, 21?
8 Bomoko ya basaleli ya Yehova etongami likoló na botosi ya makambo masosolami polele kati na Liloba ya Nzambe, kati na yango makambo oyo Yesu ateyaki. Na kotindáká Mwana na ye na mokili mpo na kotatola na ntina na solo mpe kokufa lokola mbeka, Yehova afungolaki nzela ete lisangá ya boklisto oyo lizali na bomoko likoka kosalema. (Yoane 3:16; 18:37) Likambo oyo ete bomoko ya solosolo bosengelaki kozala kati na basangani na yango limonanaki polele ntango Yesu abondelaki ete: “Nazali kobondela bobele mpo na bango te kasi mpo na bango bakondima ngai mpo na maloba na bango ete nyonso bázala moko pelamoko yo, Tata, ozali kati na ngai mpe ngai kati na yo ete bango mpe bázala kati na biso na ntina ete bamokili bándima ete yo otindaki ngai.” (Yoane 17:20, 21) Bayekoli ya Yesu bakómaki na bomoko lokola oyo ezali kati na Nzambe mpe Mwana na ye. Yango ezalaki bongo mpamba te bazalaki kotosa Liloba ya Nzambe mpe mateya ya Yesu. Elimo motindo yango ezali likambo ya ntina mingi oyo ezali kokólisa bomoko ya libota ya Yehova lelo kati na mokili mobimba.
9. Mokumba ya elimo santu mozali nini na oyo etali bomoko ya libota ya Yehova?
9 Likambo mosusu oyo lizali kosangisa libota ya Yehova ezali bongo elimo santu ya Nzambe, to nguya na ye oyo esalaka mosala. Yango ezali kosalisa biso na kososola solo ya Liloba ya Yehova oyo emonisami mpe na yango tokoki kosalela ye kati na bomoko. (Yoane 16:12, 13) Elimo esalisaka biso ete tópɛngola misala ya nzoto oyo mikokabolaka, lokola koswana, zúwa, nkɛlɛ mpe kowelana. Na esika na yango, elimo ya Nzambe ekólisaka kati na biso mbuma oyo etyaka bomoko lokola bolingo, esengo, kimya, motema pɛtɛɛ, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ mpe komipekisa.—Bagalatia 5:19-23.
10. (a) Bokokanisi nini tokoki kosala kati na bolingo oyo ezali kati na libota oyo lizali na bomoko mpe bolingo oyo emonani polele kati na baye bamipesi na Yehova? (b) Lolenge nini mosangani moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi amonisaki mayoki na ye na ntina na koyangana elongo na bandeko na ye ya elimo?
10 Basangani ya libota oyo ezali na bomoko balinganaka mpe bazalaka na esengo ya kozala esika moko. Bobele bongo, baoyo nyonso bazali kati na libota ya basaleli ya Yehova oyo lizali na bomoko balingi ye, balingi Mwana na ye, mpe balingi baninga na bango bandimi. (Malako 12:30; Yoane 21:15-17; 1 Yoane 4:21) Motindo moko lokola libota oyo ezali na bolingo esepelaka kolya esika moko, bobele bongo baoyo bamipesi epai na Nzambe basepelaka mingi na makita ya boklisto, na mayangani ya mike, mpe mayangani ya etúká epai kuna basepelaka na boninga ya malamu mpe na bilei ya elimo ya malamu mpenza. (Matai 24:45-47; Baebele 10:24, 25) Mokolo mosusu moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova amonisaki likambo yango boye: “Mpo na ngai, koyangana elongo na bandeko ezali moko na bisengo ya bomoi eleki monene mpe ezali liziba ya elendiseli. Nalingaka mingi kozala kati na bato oyo bakómaka liboso na Ndako ya Bokonzi, mpe kati na bato oyo bakendaka na nsuka, soki likoki lizali. Nayokaka esengo monene kati na motema na ngai ntango nasololaka elongo na basaleli ya Nzambe. Wana nazali kati na bango namiyokaka lokola nazali epai na ngai elongo na libota na ngai.” Ezali yango motindo oyo omiyokaka?—Nzembo 27:4.
11. Na mosala nini Batatoli ya Yehova bazwaka mpenza esengo, mpe kotya mosala ya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na biso ekopesa litomba nini?
11 Libota oyo lizali na bomoko lizalaka na esengo ya kosala makambo esika moko. Bobele bongo, baoyo bazali kati na libota ya basaleli ya Yehova bazalaka na esengo wana bakokisaka kati na bomoko mosala na bango ya kosakola Bokonzi mpe ya kozalisa bayekoli. (Matai 24:14; 28:19, 20) Kosangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ kati na yango ebendaka biso penepene na baninga na biso mosusu Batatoli ya Yehova. Kotya mosala ya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na biso mpe kopesa mabɔkɔ na misala nyonso ya libota na ye ekólisaka elimo ya libota kati na biso.
Ebongiseli ya Teokrasi ezali na ntina mingi
12. Wapi makambo mamonisaka ete libota moko lizali na esengo mpe na bomoko, mpe ebongiseli nini ekólisaki bomoko kati na masangá na ekeke ya liboso?
12 Libota oyo mokonzi na yango azali ngwi, kasi azali mpe na bolingo, mpe ete ayebi kosala bibongiseli malamu ekoki mpenza kozala na bomoko mpe na esengo. (Baefese 5:22, 33; 6:1) Yehova azali Nzambe ya kimya mpe oyo asalaka makambo na molɔngɔ́, yango wana basangani nyonso ya libota na ye batalelaka ye lokola “Oyo-Aleki-Nyonso.” (Danyele 7:18, 22, 25, 27, NW; 1 Bakolinti 14:33) Bandimaka mpe ete aponaki Mwana na ye, Yesu Klisto, mosangoli ya biloko binso mpe asili kopesa bokonzi nyonso na likoló mpe na mabelé na mabɔkɔ na ye. (Matai 28:18; Baebele 1:1, 2) Lokola Klisto nde azali Mokonzi na yango, lisangá ya boklisto libongisami malamu mpe lizali na bomoko. (Baefese 5:23) Mpo na kokamba malamu misala ya masangá na ekeke ya liboso, ezalaki na lisangani ya mikóló-bakambi oyo esangisaki bantoma mpe “bankulutu” mosusu oyo bakɔmɛli na elimo. Kati na lisangá, bakɛngɛli to bankulutu oyo baponami, bazalaki elongo na basaleli na misala. (Misala 15:6; Bafilipi 1:1) Kotosa baye bazalaki kokamba ezalaki kokólisa bomoko.—Baebele 13:17.
13. Lolenge nini Yehova abendaka bato epai na ye, mpe yango ebimisaka matomba nini?
13 Kasi litambwisi nyonso wana limonisi ete bomoko ya basaleli ya Yehova euti na boyangeli makasi, ezangi bolingo? Soko moke te! Likambo moko te ya kozanga bolingo ekoki komonana epai na Nzambe to na lisangá na ye. Yehova abendaka bato na komonisáká bolingo, mpe mbula na mbula, na bolingo na bango moko mpe na esengo nyonso, ebele ya bankóto bakómaka bamoko kati na lisangá ya Yehova na kozwáká batisimo lokola elembo ya komipesa na bango epai na Nzambe na motema mobimba. Bazali na elimo motindo moko na Yosua, oyo alendisaki Bayisalaele ete: “Bópona lelo ye oyo bokosalela . . . Kasi mpo na ngai mpe ndako na ngai, biso tokosalela [Yehova].”—Yosua 24:15.
14. Mpo na nini tokoki koloba ete lisangá ya Yehova lizali ebongiseli ya Teokrasi?
14 Lokola tozali basangani ya libota ya Yehova, tozali bobele na esengo te kasi lisusu tozali na libateli. Ezali bongo mpamba te lisangá na ye litambwisami na Teokrasi. Bokonzi ya Nzambe ezali Teokrasi (na Greke the·osʹ, nzambe, mpe kraʹtos, boyangeli). Yango ezali boyangeli ya Nzambe, oyo ye moko aponi mpe atye yango. “Libota mosantu” ya bapakolami ya Yehova lizali kotosa bokonzi na ye mpe na yango ezali lisangá ya Teokrasi. (1 Petelo 2:9, NW) Lokola Mokonzi monene ya Teokrasi, Yehova, azali Mosambisi, Mopesi-mibeko, mpe Mokonzi na biso, tozali na ntina malamu ya komiyoka ete tozali na libateli. (Yisaya 33:22) Nzokande, ezali boni soki mwa kozanga koyokana ebimi mpe ebebisi esengo, libateli mpe bomoko na biso?
Lisangani ya mikóló-bakambi lizwi ekateli
15, 16. Kowelana nini ebimaki na ekeke ya liboso, mpe mpo na nini?
15 Mpo na kobatela bomoko ya libota moko, na bantango mosusu esengeli kosilisa kowelana. Bongo, kanisá ete, mokakatano moko ya elimo mosengelaki kosilisama mpo na kobatela bomoko ya libota ya basaleli ya Nzambe na ekeke ya liboso T.B. Bongo esengelaki kosala nini? Lisangani ya mikóló-bakambi lisengelaki kozwa ekateli, na kokamatáká meko likoló na makambo ya elimo. Tozali na bandakisa ya bikateli motindo yango oyo bizwami kati na Makomami.
16 Pene na mobu 49 T.B., lisangani ya mikóló-bakambi liyanganaki na Yelusaleme mpo na kosilisa mokakatano moko monene mpe bongo kobatela bomoko ya “ndako na Nzambe.” (Baefese 2:19) Mibu soko 13 na liboso, ntoma Petelo asilaki kosakola epai na Korneye, mpe bapakano ya liboso, to bato ya mabota, bakómaki bandimi oyo babatisami. (Misala, mokapo 10) Na boumeli ya mobémbo ya liboso ya Paulo lokola misionere, bapakano mingi bandimaki losambo ya boklisto. (Misala 13:1–14:28) Ya solo, lisangá moko ya baklisto oyo bautaki na mabota ya bapakano lisilaki kotyama na Antiɔkia, na Sulia. Baklisto mosusu oyo bazalaki Bayuda bakanisaki ete bapakano oyo babongwanaki basengelaki kokatama ngɛnga mpe kotosa Mibeko ya Mose, kasi basusu bandimaki likanisi yango te. (Misala 15:1-5) Kowelana wana ekokaki komema bokabwani mpenza, kino na kokabola masangá kati na Bayuda mpe bapakano. Lisangani ya mikóló-bakambi lizwaki bongo ekateli nokinoki mpo na kobatela bomoko ya boklisto.
17. Mwango nini oyo mozali na boyokani na Teokrasi molobelami na Misala mokapo 15?
17 Engebene Misala 15:6-22, “bantoma, na mikóló na lingomba, bayangani kokanisa ntina na likambo yango.” Bato mosusu bazalaki mpe wana, elongo na bamonisi oyo bautaki na Antiɔkia. Liboso Petelo alimbolaki ete ‘na monɔkɔ na ye bapakano bayokaki nsango malamu mpe bakómaki bandimi.’ Na nsima, “ebele mobimba na bato” bayokaki wana Balanaba na Paulo bayebisaki “bilembo na bikamwiseli nyonso bisalaki Nzambe kati na bapakano [to bato na mabota] na mabɔkɔ na bango.” Bongo Yakobo apesaki likanisi mpo na oyo etali lolenge ya kosukisa mokakatano yango. Nsima wana lisangani ya mikóló-bakambi lizwaki ekateli, bayebisi biso boye: “Emonanaki malamu na bantoma, mpe na mikóló, elongo na lingomba mobimba, kopona mibali na kati na bango kotinda bango na Antiɔkia nzela moko na Paulo na Balanaba.” Baoyo ‘baponamaki’—Yuda mpe Sila—bamemaki mokanda moko ya kolendisa mpo na baninga na bango bandimi.
18. Lisangani ya mikóló-bakambi ezwaki ekateli nini oyo etalaki Mibeko ya Mose, mpe lolenge nini yango etalelaki baklisto oyo bazalaki Bayuda mpe baye bazalaki bapakano?
18 Nkomá oyo ezalaki koyebisa ekateli ya lisangani ya mikóló-bakambi ebandaki na maloba oyo: “Bantoma mpe mikóló, bandeko na bino, epai na bandeko bauti na bapakano kuna na Antiɔkia, na Sulia, na Kilikia, Mbote!” Bandeko mosusu bazalaki na likita wana ya ntina mingi, kasi emonani polele ete lisangani ya mikóló-bakambi lisalemaki bobele na “bantoma mpe mikóló.” Elimo ya Nzambe ekambaki bango, mpamba te nkomá yango elobaki ete: “Mpo ete emonanaki malamu na [“elimo santu,” “NW”] mpe na biso kotyela bino mikumba mosusu te, bobele makambo oyo mabongi, ete bóboya biloko bipesameli bikeko, na makila, na banyama bakamolami, na ekobo.” (Misala 15:23-29) Esɛngamaki na baklisto te ete bákatama ngɛnga mpe bátosa Mibeko ya Mose. Ekateli wana esalisaki baklisto oyo bazalaki Bayuda mpe baoyo bazalaki bapakano na kosala makambo mpe na koloba na bomoko. Masangá masepelaki, mpe bomoko kitoko ekóbaki kati na yango, motindo moko lokola ezali kosalema lelo kati na libota ya Nzambe oyo ezali na mabelé mobimba na nsé na litambwisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova.—Misala 15:30-35.
Tósala kati na bomoko ya Teokrasi
19. Mpo na nini bomoko esili koyikana kati na libota ya basaleli ya Yehova?
19 Bomoko eyikanaka ntango basangani ya libota moko bazali kosala na boyokani moko elongo na mosusu. Ezali mpe bongo kati na libota ya basambeli ya Yehova. Lokola bazalaki kotambola engebene Teokrasi, bankulutu mpe bandeko mosusu na lisangá ya ekeke ya liboso basalelaki Nzambe na boyokani mpenza elongo na lisangani ya mikóló-bakambi mpe bandimaki bikateli na yango. Na lisalisi ya lisangani ya mikóló-bakambi, bankulutu ‘basakolaki liloba’ mpe basangani nyonso ya lisangá ‘balobaki na motindo moko.’ (2 Timoté 4:1, 2; 1 Bakolinti 1:10) Na yango, mateya ya solo motindo moko oyo mazwami na Makomami mateyamaki na mosala ya kosakola mpe na makita ya boklisto, ezala na Yelusaleme, na Antiɔkia, na Loma, na Kolinti to na esika mosusu nyonso. Bomoko ya Teokrasi motindo yango ezali mpe lelo oyo.
20. Mpo na kobatela bomoko na biso ya boklisto, tosengeli kosala nini?
20 Mpo na kobatela bomoko na biso, biso banso baye tozali basangani ya libota ya Yehova oyo lizali na mabelé mobimba tosengeli kosala molende mpo na komonisa bolingo mpo na Teokrasi. (1 Yoane 4:16) Tosengeli kotosa mokano ya Nzambe mpe komonisa botosi mozindo epai na ‘moombo na sembo’ mpe epai na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Motindo moko na komipesa na biso epai na Nzambe, botosi na biso euti na bolingo na biso moko mpe esalemi na esengo. (1 Yoane 5:3) Oyo nde likambo libongi mokomi na Nzembo asalaki wana akangisaki esengo elongo na botosi! Ayembaki ete: “Aleluya! Esengo ezali na moto oyo akobangaka [Yehova], oyo akosepelaka mibeko na ye mingi.”—Nzembo 112:1.
21. Lolenge nini tokoki komonisa ete tozali kotambola engebene Teokrasi?
21 Yesu, Motó ya lisangá, azali mpenza kotambola engebene Teokrasi mpe asalaka ntango nyonso mokano ya Tata na ye. (Yoane 5:30) Na yango, tiká ete tólanda Ndakisa na biso na kosaláká mokano ya Yehova na boyokani na Teokrasi mpe na bomoko elongo na lisangá na Ye mobimba. Bongo na esengo ya solosolo mpe na botɔ́ndi, tokoki kozongela maloba ya mokomi na Nzembo ete: “Talá lokola ezali malamu mpe na esengo soko bandeko bakozalana na motema moko [“na bomoko,” NW]!
Okopesa eyano nini?
◻ Lolenge nini tokoki koyokanisa bomoko na biso ya boklisto na Nzembo 133?
◻ Wapi makambo mosusu oyo makólisaka bomoko?
◻ Mpo na nini kosala makambo engebene Teokrasi ezali na ntina mingi mpo na bomoko ya libota ya Nzambe?
◻ Lolenge nini lisangani ya mikóló-bakambi ya ekeke ya liboso esalaki mpo na kobatela bomoko?
◻ Mpo na yo, kosalela Nzambe kati na bomoko ya Teokrasi ezali na ntina nini?
[Elilingi na lokasa 13]
Lisangani ya mikóló-bakambi ezwaki ekateli mpo na kobatela bomoko