Ndenge ya kopona libongoli malamu ya Biblia
BIBLIA ekomamaki na Liebele, na Aramɛyɛ mpe na Grɛki. Yango wana, moto oyo alingi kotánga Biblia lelo oyo asengeli kaka kosalela libongoli na yango.
Lelo oyo, Biblia ezali buku oyo ebongolami mingi koleka; ebongolami na mobimba to na ndambo na minɔkɔ koleka 2400. Minɔkɔ mosusu ezali na mabongoli mingi ya Biblia. Soki monɔkɔ na bino ezali na mabongoli mingi ya Biblia, na ntembe te okolinga kopona libongoli oyo eleki malamu.
Mpo na kopona libongoli oyo eleki malamu, osengeli komituna mituna oyo: Mabongoli ya ndenge nini ezali na monɔkɔ na biso? Makambo nini ya malamu to ya mabe ezali na motindo mokomoko ya libongoli? Mpo na nini nasengeli kokeba ntango nazali kotánga mabongoli mosusu?
Mitindo ndenge na ndenge ya mabongoli
Mabongoli ya Biblia ezali ndenge na ndenge, kasi tokoki kokabola yango nyonso na mitindo misato. Motindo ya liboso ezali libongoli ya liloba na liloba. Mabongoli yango ezalaka na makomi na monɔkɔ oyo Biblia ekomamaki mpe na pembeni libongoli ya liloba na liloba na monɔkɔ mosusu.
Motindo mosusu ya libongoli ezali oyo babengi paraphrase. Bato oyo basalaka mabongoli yango babongolaka nsango ya Biblia na ndenge oyo bango bakangi ntina na yango mpe na ndenge oyo bamoni ete ekosepelisa batángi.
Motindo ya misato ezali mabongoli oyo ezali na katikati ya mitindo mibale ya mabongoli oyo touti kolobela. Mabongoli yango elukaka kobimisa likanisi mpenza oyo ezalaki na monɔkɔ ya ebandeli, kasi na lolenge oyo ezali polele mpo na motángi.
Mabongoli ya liloba na liloba nde eleki malamu?
Mbala mingi, libongoli ya liloba na liloba esalisaka te mpo na kokanga ntina ya vɛrsɛ mokomoko ya Biblia. Mpo na nini? Bantina ezali mingi. Tólobela kaka mibale.
1. Monɔkɔ na monɔkɔ ezalaka na gramɛrɛ, maloba, mpe ndenge na yango ya kobongisa bafraze. Samuel Driver, profesɛrɛ ya Liebele, alobi ete minɔkɔ “ekesanaka kaka na gramɛrɛ mpe na maloba te, kasi mpe . . . na ndenge na yango ya kobongisa bafraze.” Bato oyo balobaka monɔkɔ moko te bakanisaka mpe ndenge moko te. Profesɛrɛ yango abakisi boye: “Yango wana, monɔkɔ na monɔkɔ ezalaka na ndenge na yango ya kobongisa bafraze.”
Lokola monɔkɔ ata moko te ezali na maloba mpe gramɛrɛ oyo ekokani na oyo ya Liebele mpe ya Grɛki oyo bakomelaki Biblia, libongoli ya liloba na liloba ezalaka polele te; kutu, ekoki kopesa ndimbola mosusu na nsango ya Biblia. Tótalela mwa bandakisa.
Na mokanda oyo akomelaki Baefese, ntoma Paulo asalelaki elobeli moko oyo soki tobongoli yango na kolanda liloba na liloba, ekotángama boye: “Na mbuma (ya lisano) ya bato.” (Baefese 4:14, The Kingdom Interlinear Translation of the Greek Scriptures)a Maloba yango euti na momesano ya kokosa basusu na lisano oyo esɛngaka kobwaka mbuma na nse. Na minɔkɔ mingi, kosalela maloba yango ebimisaka likanisi polele te. Nzokande, kobongola yango na “bokosi ya bato,” emonisaka likanisi polele.
Ntango akomelaki Baloma, Paulo asalelaki maloba ya Grɛki oyo soki tobongoli yango na kolanda liloba na liloba, ekotángama boye: “Na elimo kotoka.” (Baloma 12:11, Kingdom Interlinear) Maloba yango elobi eloko te na monɔkɔ na biso, boye te? Nzokande, Paulo alingaki kaka koloba ete tosengeli “kopela na elimo.”
Na lisolo na ye moko oyo eyebani mingi, Yesu asalelaki maloba oyo mbala mingi ebongolamaka boye: “Mapamboli epai na babola na elimo.” (Matai 5:3) Kasi, na minɔkɔ mingi, kobongola yango bongo ebimisaka likanisi polele te. Kutu, na minɔkɔ mosusu kobongola ndenge yango epesaka likanisi ete “babola na elimo” ezali bato oyo bazali mayele te, bazangi mpiko to bakokaka kozwa bikateli te. Nzokande, Yesu azalaki koteya ete mpo moto azala na esengo ya solosolo, asengeli kaka te kokokisa bamposa na ye ya mosuni, kasi mpe kondima ete azali na mposa ya litambwisi ya Nzambe. (Luka 6:20) Yango wana, kobongola maloba yango boye: “Baoyo bayebi bobola na bango ya elimo” (NW) to “baoyo batiaka mitema bobele na Nzambe” emonisaka polele likanisi oyo Yesu ateyaki.—Matié 5:3, Bible na lingala ya lelo oyo.
2. Ndimbola ya liloba to ya maloba ekoki kobongwana na kotalela ndenge oyo esalelami na lisolo. Na ndakisa, na Liebele, liloba lobɔkɔ ekoki kozala na bandimbola mingi. Na bisika mosusu,liloba yango ekoki kolimbola “bokonzi,” “bokabi,” to “nguya.” (2 Samwele 8:3; 1 Mikonzi 10:13, NW; Masese 18:21) Kutu, liloba yango ebongolami na balolenge koleka 40 na Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu na Lingelesi.
Lokola ndenge ya kobongola liloba moko ekoki kokesana na kotalela lisolo epai basaleli yango, Libongoli ya Mokili ya Sika esaleli maloba ya Lingelesi soki 16 000 mpo na kobongola maloba ya Grɛki soki 5 500, mpe esaleli maloba ya Lingelesi koleka 27 000 mpo na kobongola maloba ya Liebele soki 8500.b Mpo na nini babongolaki maloba na ndenge ekeseni? Komite ya bobongoli emonaki ete kobongola likanisi mpenza oyo liloba moko ezali komonisa ezali na ntina koleka kobongola na kolanda liloba na liloba. Atako bongo, na bisika mingi, Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingelesi ebongoli maloba mingi ndenge moko, ezala ya Liebele to ya Grɛki.
Tomoni ete kobongola Biblia na monɔkɔ moko elimboli te kotya liloba moko boye ya monɔkɔ yango na bisika nyonso oyo basalelaki yango na minɔkɔ oyo Biblia ekomamaki. Babongoli basengeli kozala na bososoli mpo na kopona maloba oyo ezali kobimisa likanisi mpenza oyo emonisami na minɔkɔ oyo Biblia ekomamaki. Lisusu, basengeli kobongisa maloba mpe bafraze na ndenge oyo eyokani na gramɛrɛ ya monɔkɔ na bango.
Kobongola kaka makanisi nde eleki malamu?
Mabongoli oyo ebengamaka paraphrase elandaka mpenza te ndenge oyo makambo elobami na minɔkɔ oyo Biblia ekomamaki. Na ndenge nini? Babongoli na yango bakomaka oyo bango bamoni ete ezali likanisi ya malamu to mpe balongolaka makambo mosusu oyo ezali na makomi ya ebandeli. Mabongoli yango ekoki kosepelisa bato mosusu mpamba te ezalaka mpasi te na kotánga. Kasi, lokola babongoli basalaka nyonso mpo libongoli yango ezala pɛtɛɛ na kotánga, mbala mingi babungisaka likanisi mpenza oyo ezalaki na makomi ya ebandeli.
Tótalela ndenge oyo Biblia moko ebongolaki libondeli oyo Yesu apesaki lokola ndakisa: “Tata na biso na likoló, lakisá soki ozali nani.” (Matai 6:9, The Message: The Bible in Contemporary Language) Libongoli ya malamu ya maloba yango ya Yesu ezali boye: “Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama.” Tótalela mpe ndenge oyo Yoane 17:26 ebongolami na Babiblia mosusu. Biblia moko elobi ete na butu oyo bakangaki Yesu, abondelaki Tata na ye ete: “Nalakisi bango báyeba yo.” (Today’s English Version) Nzokande, ndenge malamu ya kobongola libondeli yango ezali boye: “Nayebisi bango nkombo na yo.” Omoni ete babongoli mosusu babombaka ete Nzambe azali na nkombo oyo tosengeli kosalela mpe oyo tosengeli kokumisa!
Mpo na nini kozala ekɛngɛ?
Babiblia mosusu emonisaka polele te mibeko ya Nzambe ndenge ezalaki na makomi ya ebandeli. Na ndakisa, Biblia moko (The Message: The Bible in Contemporary Language) ebongoli 1 Bakolinti 6:9, 10 boye: “Bomoni te ete oyo ezali bomoi oyo ebongi te? Bato bazangi sembo oyo bakipaka Nzambe te bakokɔta na Bokonzi na ye te. Baoyo basalanaka makambo ya mabe mingi, basalaka pite na ndenge ya bosɔtɔ, babebisaka mabelé mpe biloko oyo ezali na kati na yango, babongi kokɔta na Bokonzi ya Nzambe te.”
Nzokande, talá ndenge Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli vɛrsɛ yango: “Boni! Boyebi te ete bato bazangi boyengebene bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te? Bómikosa te. Bato ya pite, mpe basambeli ya bikeko, mpe bato ya ekobo, mpe mibali oyo bazwamá mpo na kosangisaka nzoto na ndenge oyo ebongisamá te, mpe mibali oyo balalaka na mibali, mpe miyibi, mpe bato ya lokoso, mpe balangwi-masanga, mpe bafingi, mpe babɔtɔli bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” Tomoni ete bizaleli oyo tosengeli koboya, oyo ntoma Paulo atángaki na vɛrsɛ yango, ezali te na Biblia wana oyo ebongoli kaka likanisi.
Bato mosusu mpe babongolaka Biblia na ndenge oyo ekolongisa bindimeli na bango. Na ndakisa, Biblia moko (Today’s English Version) elobi ete Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bókɔta na ekuke ya moke, mpamba te ekuke oyo ememaka na lifelo ezali monene mpe nzela oyo ememaka kuna ezali pɛtɛɛ, mpe ezali na bato mingi oyo balandaka yango.” (Matai 7:13) Babongoli bakɔtisaki liloba “lifelo” atako Evanzile ya Matai elobeli polele “libebi.” Mpo na nini basalaki bongo? Na ntembe te balingaki kolongisa likanisi oyo elobaka ete bato mabe bakonyokwama libela na libela, na esika ya koloba ete bakobebisama.c
Ndenge ya koyeba libongoli ya malamu
Bato oyo bakomaki Biblia basalelaki elobeli ya pɛtɛɛ oyo, ata basali-bilanga, babateli ya mpate, mpe babomi-mbisi bakoki kokanga ntina na yango. (Nehemia 8:8, 12; Misala 4:13) Yango wana, libongoli ya malamu esengeli komonisa nsango ya Biblia na ndenge oyo ekosimba mitema ya bato ya sembo, ata ya mboka to ya mimeseno nini. Libongoli ya malamu esengeli mpe kokokisa makambo oyo:
◼ Esengeli kobimisa mpenza nsango oyo ezalaki na ebandeli, oyo epemami na Nzambe.—2 Timote 3:16.
◼ Esengeli kobongola maloba na ndimbola na yango mpenza soki kosala bongo ekobungisa te likanisi oyo ezalaki na makomi ya ebandeli.
◼ Esengeli kobimisa likanisi oyo ezali na liloba to na fraze moko soki emonani ete kobongola maloba na kolanda ndimbola na yango mpenza ekomonisa likanisi polele te to ekopesa likanisi mosusu.
◼ Esengeli kosalela elobeli ya polele mpe ya pɛtɛɛ, oyo ekopesa bato mposa ya kotánga.
Libongoli ya ndenge wana ezali? Bamilio ya bato oyo batángaka zulunalo oyo basepelaka na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika. Mpo na nini? Mpamba te bandimaka makanisi ya babongoli ya Biblia yango ndenge emonisami na maloba ya ebandeli ya Biblia ya liboso na Lingelesi ete: “Toluki te kobongola na mokuse makanisi ya Makomami. Tosali makasi ya kobongola liloba mokomoko soki esengeli, na bisika oyo elobeli ya Lingelesi epesaki biso nzela mpe na bisika oyo ebebisaki te likanisi.”
Lelo oyo, Libongoli ya Mokili ya Sika ezali na mobimba to na ndambo na minɔkɔ koleka 60, mpe motángo ya Babiblia oyo ebimisami ezali koleka milio 145! Soki ezali na monɔkɔ moko oyo oyebi, tolendisi yo osɛnga Batatoli ya Yehova bápesa yo Biblia yango mpe okomona yo moko ete libongoli yango ezali malamu mpenza.
Bayekoli ya Biblia oyo bazali mitema sembo balingaka koyeba mpenza nsango oyo Nzambe akomisaki na Biblia mpe kosalela yango. Soki yo mpe ozali motema sembo, osengeli kozala na libongoli malamu ya Biblia. Yango nde ebongi mpenza mpo na kosalisa yo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Libongoli ya liloba na liloba esalisaka motángi amona ndenge liloba mokomoko ya monɔkɔ ya ebandeli ebongolami.
b Mabongoli mosusu ya Biblia na Lingelesi esaleli maloba mingi koleka mpo na kobongola liloba moko; na ndenge yango elandelaki te maloba lokola Libongoli ya Mokili ya Sika.
c Biblia eteyaka ete soki moto akufi azongaka putulu, molimo ekufaka, mpe ayebaka lisusu likambo te. (Genese 3:19; Mosakoli 9:5, 6; Ezekiele 18:4) Ata na esika moko te Biblia elobi ete milimo ya bato mabe enyokwamaka libela na libela na mɔtɔ ya lifelo.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]
Mabongoli oyo babengi paraphrase ekoki kosepelisa bato mosusu mpamba te ezalaka mpasi te na kotánga. Kasi, lokola babongoli basalaka nyonso mpo ezala na elobeli ya pɛtɛɛ, mbala mingi babungisaka likanisi mpenza oyo ezalaki na makomi ya ebandeli
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]
Lelo oyo, Libongoli ya Mokili ya Sika ezali na mobimba to na ndambo na minɔkɔ koleka 60, mpe motángo ya Babiblia oyo ebimisami ezali koleka milio 145!
[Etanda/Elilingi na lokasa 20]
NDAKISA MOKO YA KALA
Kobongola makanisi ya Biblia na mokuse ezali likambo ya sika te. Na ntango ya kala, Bayuda bayanganisaki makomi oyo ebengamaka lelo Targumu; na kati ya mabongoli yango bakomaki kaka makanisi ya Makomami. Atako mabongoli yango ezali sikisiki te, emonisaka ndenge oyo Bayuda bakangaki ntina ya makomi mosusu mpe esalisaka babongoli báyeba ndimbola ya bavɛrsɛ mosusu oyo ezali polele te. Na ndakisa, na Yobo 38:7, ‘bana ya Nzambe’ ebongolami na “bituluku ya baanzelu.” Na Genese 10:9, Targumu emonisi ete liloba ya Liebele oyo esalelami mpo na kolobela Nimilodi ezali na likanisi ya “kotɛmɛla” Yehova, kasi kaka te ya kozala “liboso” na ye. Bazalaki kotya bandimbola yango pembeni ya makomi ya Biblia, kasi ezalaki te kozwa esika na yango.
[Elilingi]
ETENI YA “BIBLIA POLYGLOTTA” YA WALTON, NA MOBU 1657 YOBO 38:1-15
Makomi ya Biblia na Liebele (ná libongoli ya liloba na liloba na Latin)
Makomi yango na Aramɛyɛ
[Elilingi na lokasa 19]
ETENI YA BIBLIA “THE KINGDOM INTERLINEAR TRANSLATION OF THE GREEK SCRIPTURES,” BAEFESE 4:14
Na lobɔkɔ ya mwasi ezali libongoli ya liloba na liloba. Na lobɔkɔ ya mobali ezali libongoli na kolanda ndimbola
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 18]
Makomi oyo ezali na nsima ya bililingi: Shrine of the Book, Israel Museum, Jerusalem