Teyá bana na yo bázala na limemya
LISESE moko ya monɔkɔ ya Allemand elobaka boye: “Moto oyo asimbi ekɔti na ye na mabɔkɔ, atambolaka mboka mobimba.” Na mimeseno ya bamboka mingi, bamonaka ete moto oyo alongolaka ekɔti na ye liboso akɔta na ndako ya bato to ntango azali kopesa moto mbote azali na bonkonde mpe etindaka bato bápesa ye limemya. Na yango, lisese wana elimboli ete bato basepelaka komonisela baoyo bazalaka na bonkonde boboto mingi mpe bazalaka na makanisi ya malamu mpo na bango.
Ezalaka mpenza esengo soki bilenge bazali na bonkonde! Mokɛngɛli ya zongazonga moko na ekólo Honduras oyo abimaka na mosala ya kosakola ndako na ndako elongo na basakoli ya mbula ekeseni alobi boye: “Mbala mingi soki nabimi mosala ya kosakola ná mwana oyo abɔkwamá malamu mpe oyo azali na limemya, namonaka ete ye nde abendaka likebi mingi ya moto oyo tozali kosolola na ye koleka maloba na ngai.”
Na mikolo na biso oyo bato mingi bazali lisusu na limemya te, koyeba kofanda na bato ezali na ntina mingi mpe esalisaka. Lisusu, Biblia elendisi biso ‘tómitambwisa na ndenge oyo ebongi na nsango malamu ya Kristo.’ (Flp. 1:27; 2 Tim. 3:1-5) Ezali na ntina mingi tóteya bana na biso bápesaka basusu limemya. Ndenge nini tokoki koteya bango bázala na bokonde ya lokuta te, kasi nde na limemya oyo euti na motema?a
Yo moko pesáká ndakisa
Bana balandaka makambo oyo bazali komona epai ya basusu. Na yango, mpo baboti bákoka koteya bana na bango bonkonde, bango moko basengeli libosoliboso kozala na bonkonde. (Mib. 6:6, 7) Ezali na ntina kosolola na mwana makambo etali bonkonde, kasi kosuka kaka wana te. Longola maloba na yo, osengeli mpe kopesa ndakisa ya malamu.
Tózwa ndakisa ya Paula,b oyo abɔkwamaki kaka na moboti moko mpe moboti yango azalaki mokristo. Kopesa bato nyonso limemya ekómá momeseno na ye. Mpo na nini? Alobi boye: “Mama azalaki kopesa ndakisa, na yango biso bana mpe tokómaki komonisa limemya kozanga mokakatano.” Mokristo moko na nkombo Walter ateyaki bana na ye ya mibali bámemyaka mama na bango oyo azali mokristo te. Alobi boye: “Nasalaki makasi mpo ndakisa na ngai moko eteya bana na ngai ete basengeli komemya mama na bango; nazalaki soki moke te koloba mabe mpo na ye.” Walter akobaki koteya bana na ye Liloba ya Nzambe, mpe azalaki kobondela Yehova asalisa ye. Mwana na ye moko azali lelo kosala na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova, mpe mosusu azali mobongisi-nzela. Bana yango balingaka baboti nyonso mibale mpe bapesaka bango limemya.
Biblia elobi boye: “Nzambe azali Nzambe, ya mobulu te, kasi ya kimya.” (1 Ko. 14:33) Likambo nyonso oyo Yehova asalaka ezalaka na molɔngɔ. Bakristo basengeli kosala makasi bámekola ezaleli wana ya Nzambe mpe bábatelaka biloko nyonso ya ndako na molɔngɔ. Baboti mosusu bateyaki bana na bango kobongisa mbeto mikolo nyonso liboso bákende kelasi, kozongisa bilamba na esika na yango, mpe kosalisa na misala ya ndako. Soki bana bazali komona ete biloko nyonso ya ndako ezali na esika na yango mpe ezali pɛto, bakosala makasi mpo bashambrɛ mpe biloko na bango mpe ezalaka pɛto.
Ndenge nini bana na yo batalelaka makambo oyo bayekolaka na kelasi? Bamonisaka botɔndi mpo na makambo oyo balakisi na bango basalaka mpo na bango? Yo moboti, omonisaka botɔndi ya ndenge wana? Bana na yo bakobanda kotalela badevuare mpe balakisi na bango ndenge moko na yo. Mpo na nini te kolendisa bango bápesaka balakisi na bango mersi? Kopesa mersi mpo na mosala oyo basaleli yo ezali lolenge ya malamu ya komonisa limemya, ezala epai ya molakisi, ya monganga, ya motɛki, to ya moto mosusu nyonso. (Luka 17:15, 16) Tozali kopesa longonya mingi na bilenge bakristo oyo bakesanaka na baninga na bango ya kelasi mpo na bonkonde mpe etamboli na bango ya malamu.
Bandeko na kati ya lisangá basengeli kopesa ndakisa ya malamu na oyo etali kozala na bonkonde. Ezalaka mpenza esengo komona bilenge ya lisangá bazali komonisa bonkonde na maloba lokola “pardon” mpe “mersi”! Ntango mikóló bazali komonisa limemya epai ya Yehova mpe bazali kolanda na likebi malako oyo epesamaka na makita, ndakisa na bango ekolendisa bilenge bámekola bango. Bana bakoki koyekola kozala na limemya epai ya baninga ya kartye soki bazali komona bandakisa malamu ya bonkonde na Ndako ya Bokonzi. Na ndakisa, Andrew, mwana moko ya mbula minei asilá koyekola koloba, “Limbisá ngai,” soki aleki esika mikóló bazali.
Baboti bakoki mpe kosala nini mpo na kosalisa bana báyeba etamboli oyo basengeli kozala na yango? Baboti bakoki mpe basengeli kozwa ntango ya koteya bana na bango makambo oyo bayekolá na bandakisa ndenge na ndenge oyo ezali na Liloba ya Nzambe.—Rom. 15:4.
Salelá bandakisa ya Biblia
Ntango Yakobo ná libota na ye bazongaki na mokili ya Kanana mpe basengelaki kokutana na Esau, na ntembe te ayebisaki bana na ye ete basengeli kogumbama liboso ya Esau. (Eba. 33:3,6, 7) Yo mpe okoki kolakisa bana na yo ya mike ndenge ya koloba “mbote na bino,” “mpokwa malamu,” to maloba mosusu ya ndenge wana oyo basalelaka na esika bofandi? Bana oyo bazali na bonkonde bapesaka Yehova nkembo mpe basepelisaka baboti na bango.
Mpo na nini te kosalela masolo ya Biblia mpo na komonisa bokeseni kati na limemya mpe kozanga limemya? Na ndakisa, ntango Ahazia, mokonzi ya Yisraele oyo azangaki bosembo, alingaki kokutana na mosakoli Eliya, atindelaki ye “mokonzi ya bato ntuku mitano (50) ná bato na ye ntuku mitano” mpo na kobenga ye. Mokonzi yango ya basoda asɛngaki mosakoli alanda ye. Wana ezalaki ndenge ya malamu te ya koloba na moto oyo azalaki momonisi ya Nzambe. Eliya alobaki nini? Alobaki boye: “Soki nazali moto ya Nzambe, mɔtɔ euta na likoló, ekita mpe elya yo ná bato na yo ntuku mitano.” Esalemaki kaka bongo. “Mɔtɔ eutaki na likoló, ekiti mpe elei ye ná bato na ye ntuku mitano.”—2 Bak. 1:9, 10.
Ahazia atindaki mokonzi mosusu ya bato 50 akende kozwa Eliya. Ye mpe alukaki kopesa Eliya mitindo ete akende elongo na ye. Na mbala oyo mpe, mɔtɔ eutaki na likoló mpe ekitelaki bango. Kasi na nsima, moto ya misato, oyo azalaki mpe mokonzi ya bato 50 ayaki mpe epai ya Eliya. Moto yango amonisaki limemya. Na esika apesa Eliya mitindo, atyaki mabɔlɔngɔ na nse mpe abondelaki ye ete: “Moto ya Nzambe ya solo, nabondeli yo, tiká molimo na ngai mpe molimo ya basaleli na yo oyo ntuku mitano ezala na motuya na miso na yo. Talá! mɔtɔ euti na likoló, ekiti mpe elei bakonzi mibale ya bato ntuku mitano (50) oyo bayaki liboso na ngai ná bato na bango ntuku mitano ntuku mitano, kasi sikoyo, tiká molimo na ngai ezala na motuya na miso na yo.” Mosakoli ya Nzambe akokaki kosɛnga mɔtɔ ekitela moto oyo alobaki na limemya ndenge wana, atako mbala mosusu azalaki kobanga? Ekokaki kokanisama te! Kutu, anzelu ya Yehova ayebisaki Eliya akende elongo na mokonzi yango. (2 Bak. 1:11-15) Omoni te ete lisolo yango emonisi ntina ya kozala na limemya?
Ntango basoda ya Roma bakangaki ntoma Paulo na tempelo mpe bakɔtisaki ye na bolɔkɔ, amonaki te ete azali na lotomo ya koloba. Na limemya nyonso, atunaki mokonzi oyo azalaki wana ete: “Nakoki koloba na yo mwa likambo?” Na yango, bapesaki Paulo libaku ya koloba mpo na ye moko.—Mis. 21:37-40.
Ntango bazalaki kosambisa Yesu, babɛtaki ye mbata na elongi. Atako bongo, ayebaki ndenge ya koyanola; alobaki ete: “Soki nalobi mabe, monisá mabe yango; kasi soki nalobi malamu, mpo na nini obɛti ngai?” Moto moko te akokaki komona ete Yesu alobi mabe.—Yoa. 18:22, 23.
Liloba ya Nzambe ezali mpe na bandakisa oyo emonisi ndenge tokoki kosala soki tozwi mpamela ya makasi mpe ndenge tokoki kondima na limemya mabe moko to bopɔtu oyo tosalaki. (Eba. 41:9-13; Mis. 8:20-24) Na ndakisa, Abigaile asɛngaki Davidi bolimbisi mpo na ndenge mobali na ye Nabale asalelaki ye makambo na kozanga limemya. Abakisaki mpe likabo ya biloko ebele. Likambo oyo Abigaile asalaki esimbaki mpenza motema ya Davidi mpe nsima ya liwa ya Nabale, Davidi aponaki ye akóma mwasi na ye.—1 Sa. 25:23-41.
Teyá bana bázala na limemya, ezala ntango bakutani na mikakatano to kaka mpo na komonisa bonkonde. ‘Kotika pole na biso engɛnga liboso ya bato’ ndenge wana ‘epesaka Tata na biso oyo azali na likoló nkembo.’—Mat. 5:16.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Baboti basengeli kosalisa bana na bango bámona bokeseni oyo ezali kati na kopesa mikóló limemya mpe kotosa moto oyo akoki kozala na likanisi ya kosala bango mabe. Talá Lamuká! ya Yanuali-Marsi 2008, nkasa 3-11.
b Bankombo mosusu ezali ya bango te.