Tosakola bokonzi ya Jehovah na molende nyonso
Ayambaki na bolingo mpenza baoyo nyonso bayaki epai na ye kosakolaka bokonzi na Nzambe epai na bango.—MISALA 28: 30, 31.MN.
1, 2. Nini emonisaki epai na ntoma Paulo ete Nzambe azalaki kosunga ye, mpe ndakisa nini atikaki?
JEHOVAH azali ntango nyonso kosunga basakoli ya Bokonzi. Yango emonanaki polele epai na ntoma Paulo. Na lisalisi na Nzambe, asambaki liboso na bakonzi, ayikaki mpiko liboso na batomboki mpe asakolaki na molende Bokonzi na Jéhovah.
2 Ata azalaki mokangami, Paulo “ayambaki na bolingo mpenza baoyo nyonso bayaki epai na ye, kosakolaka bokonzi na Nzambe epai na bango”. (Misala 28:30, 31, MN.) Oyo nde ndakisa malamu mpo na ba Témoins de Jéhovah ya lelo! Tokoki koyekola makambo mingi na mosala ya Paulo oyo Luka akomaki na mikapo ya nsuka ya Misala na bantoma.—20:1 kino 28:31.
Alendisaki bandeko na ye kati na kondima
3. Paulo asalaki nini na Toloa, mpe nani azali kosala lokola ye na mikolo na biso?
3 Nsima wana mobulu na batomboki esilaki na Efese, Paulo alandaki mobembo na ye ya misato lokola misionere. (20:1-12) Wana alingaki kokota na masuwa mpo na mobembo na mokili na Sulia, ayokaki nsango ete Bayuda basalaki mwango mabe mpo na ye. Mbala mosusu bakanaki kozwa masuwa moko na ye mpo bakoka koboma ye. Na yango Paulo azwaki nzela oyo ezali koleka na Masedwane. Na Toloa, alekisaki poso moko mpo na kolendisa bandeko kati na kondima, ndenge bakengeli ya zongazonga basalaka epai na ba Témoins de Jéhovah na ntango na biso. Mokolo moko liboso ete akende, Paulo asalaki diskur na ye kino katikati ya butu. Etuki, oyo afandaki na lininisa, alembaki ntango mosusu mpo na misala oyo asalaki na moi. Lokola mpongi ezwaki ye makasi, akweaki longwa na etage ya misato mpe akufaki, kasi Paulo azongisaki ye na bomoi. Ezalaki solo esengo! Kanisa bongo na esengo oyo lisekwa ekopesa epai na ebele na bato kati na mokili ya sika oyo esili kobelema sikawa!—Yoane 5:28, 29.
4. Formation nini Paulo apesaki epai na bankulutu kati na mosala ya kosakola?
4 Na mobembo na ye mpo na koleka na Yelusaleme, Paulo ayanganaki na bankulutu ya Efese na Milete. (20:13-21) Akundwelaki bango boye ete alakisaki bango na “ndako na ndako” mpe ete “apesaki litatoli na mozindo epai na Bayuda mpe epai na Bagreke, na likambo na kobongola motema epai na Nzambe, mpe na kondima Nkolo na biso Yesu.” Baoyo bakomaki bankulutu babongolaki mitema mpe bazalaki na kondima Ntoma mpe abongisaki bango mpo ete basakola na molende Bokonzi epai na baoyo bazalaki naino bandimi te kati na mosala ya ndako na ndako lokola oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kokokisa na mikolo na biso.
5. (a) Ndenge nini Paulo apesaki ndakisa malamu mpo na oyo etali komitika kotambwisama na elimo santu? (b) Mpo na nini ezalaki ntina na kopesa toli epai mi bankulutu ete ‘bakeba na ntina na etonga mobimba’?
5 Paulo apesaki ndakisa malamu ya komitika kotambwisama na elimo santu ya Nzambe. (20:22-30) ‘Na kokangama na elimo santu’, elingi koloba ete ntoma asengelaki kolanda litambwisi ya elimo, mpo na yango alingaki kokenda na Yelusaleme, wana bikangeli mpe bolozi ezalaki kozela ye kuna. Asepelaki na bomoi, kasi oyo ezalaki ntina mingi na miso na ye ezalaki likambo ya kotikala sembo epai na Nzambe. Tosengeli komona makambo lokola ye. Paulo apesaki toli na bankulutu ete ‘bakeba na ntina na etonga mobimba oyo elimo santu esilaki kotia bango lokola bakengeli na yango’. Nsima na “kolongwa” na ye (emonani ete ntango akokufa), ‘bankoi na yauli bakosalela etonga na boboto te’. Bato yango bakobima bobele kati na bankulutu bango moko, mpe bayekoli oyo bazangi mayele bakondima mateya na bango ya lokuta.—2 batesaloniki 2:6.
6. (a) Mpo na nini Paulo akokaki kotika bankulutu na maboko na Nzambe? (b) Ndenge nini Paulo amonaki ete maloba oyo makomami na Misala 20:35 mazalaki solo?
6 Bankulutu basengelaki kokengela ntango nyonso na elimo mpo na komibatela na lipengwi. (20:31-38) Ntoma ateyaki bango Makomami na liebele mpe malako na Yesu, oyo nguya na yango na kopetola ekokaki kosalisa bango ete bazwa Bokonzi na likoló, “libula kati na babulami nyonso”. Na kosalaka mosala ya mosuni mpo na kokokisa bamposa na ye mpe ya baninga na ye, Paulo alendisaki mpe bankulutu ete bakoka kozala basali ya mpiko. (Misala 18:1-3; 1 Batesaloniki 2:9). Soki tokosala motindo moko mpe tokosalisa bamosusu na kozwa bomoi ya seko, tokomona kokokisama ya maloba oyo na Yesu: “Esengo na kopesa eleki esengo na kozw.” Tozali kokuta makanisi ya maloba oyo kati na Baevanzile, kasi ezali bobele Paulo nde atangi yango na mobimba, ye oyo mbala mosusu ayokaki yango epai na moto mosusu to na kopemama na Nzambe. Tokoki kozala na esengo koleka soki tokomonisa elimo ya komipesa ndenge moko lokola Paulo. Amipesaki mingi kino ete kokenda na ye epesaki mpasi mingi na bankulutu ya Efese.
Tika mokano na Jéhovah esalema
7. Ndakisa nini ya malamu Paulo apesaki na ntina etali kotosa mokano na Nzambe?
7 Lokola mobembo na ye ya misato lokola misionere ekomaki na nsuka na yango (pene na mobu 56), Paulo apesaki ndakisa malamu na kotosa mokano na Nzambe. (21:1-14) Na césarée, ye mpe baninga na ye bafandaki epai na Filipo, oyo bana na ye minei ya basi, bango baseka “bazalaki kosakola” makambo na nzela na elimo santu. Kuna, mosakoli moklisto Agaba azwaki mokaba ya Paulo mpe amikangaki maboko mpe makolo mpe apusamaki na elimo na koloba ete na Yelusaleme Bayuda bakokanga nkolo na mokaba yango mpe bakokaba ye na maboko ya Bapakano. Nde Paulo alobaki ete: “Naselingwi bobele kokangama na Yelusaleme te kasi nakokufa wana mpo na nkombo na Nkolo Yesu.” Bayekoli bandimaki na maloba oyo ete: “Tika mokano na Jéhovah esalema!”
8. Soki mokolo mosusu tokozala na nkaka ya kondima toli ya malamu, tokoki komikundola nini?
8 Na Yelusaleme, Paulo ayebisaki epai na bankulutu makambo Nzambe asalaki kati na Bapakano na nzela na mosala na ye. (21:15-26) Soki mokolo mosusu tokozala na nkaka ya kondima toli ya malamu, tomikundola ete Paulo andimaki toli na libaku wana. Mpo na komonisa ete azalaki koteya “lipengwi mpo na Moise” te epai na Bayuda oyo bazalaki kofanda kati na Bapakano, alandaki toli ya bankulutu oyo basengaki ye ete amipetola engebene mibeko mpe afuta mpo na ye moko mpe mpo na mibali mosusu minei mosolo oyo esengeli mpo na yango. Atako liwa na Yesu elongolaki Mibeko na nzela, Paulo asalaki mabe te na kolanda malako oyo mibeko esengaki epai na baoyo bazalaki kokata ndai.—Baloma 7:12-14.
Anyokwami kasi abangi te
9. Lokola mpo na ba Témoins de Jéhovah na ntango na biso, komekama nini Paulo azwaki eutaki epai na batomboki?
9 Na mabaku mingi, ba Témoins de Jéhovah basili kotikala sembo epai na Nzambe atako bakutanaki na mobulu na ebele na bato. (Na ndakisa, tala Annuaire des Temoins de Jehovah 1975, nkasa 180-190.) Bayuda ya Asie Mineure bapusaki bibele na kotombokela Paulo. (21:27-40) Wana emonaki bango Trofime moto na Efese elongo na Paulo, bafundaki Paulo ete atyaki mbindo na temple na kokotisaka Mogreke na kati na yango. Bazalaki pene na koboma ye wana mokonzi na basoda na Baromé claudius Lysias mpe bato na ye basilisaki mobulu yango. lokola esakolamaki (kasi na ntina na Bayuda), Lysias akangaki Paulo na minyololo. (Misala 21:11) Balingaki kokotisa ntoma kati na ndako ya basoda oyo ekangamaki na temple wana Lysias ayebaki ete Paulo apusaki bato na kotomboka te, kasi azali Moyuda oyo azali na lotomo ya kokota na temple. Wana ezwaki ye ndingisa ya koloba, Paulo alobaki na bato na monoko ya liebele.
10. Diskur ya Paulo ebimisaki nini epai na Bayuda na Yelusaleme, mpe mpo na nini ntoma abetamaki fimbo te?
10 Paulo apesaki litatoli ya molende. (22:1-30) Amimonisaki lokola Moyuda oyo ayekolaki epai na Gamaliele, molakisi oyo bango bazalaki komemya ye mingi. Ntoma alimbolaki ete ezalaki ye kokende na Damas mpo na konyokola baoyo balandaki Nzela oyo, emononeli na Yesu Klisto oyo akembisami ebomaki ye miso, kasi Ananias asalisaki ye mpo akoka komona. Nsima na yango, ayokaki Nkolo koloba na ye ete: “Kenda na yo, mpamba te ngai nakotinda yo na bapakano mosika.” Maloba yango ematisaki nkanda ya Bayuda. Bangangaki ete Paulo asengelaki kotikala na bomoi te, batomboki basilikaki mpe bazalaki kobwaka bilamba na bango mpe kobwaka mputulu na likoló. Na yango Lysias akotisaki Paulo kati na camp na basoda mpo ete babeta ye fimbo mpe batuna ye ntina oyo Bayuda bazalaki kotemela ye. Paulo abetamaki fimbo te (fimbo yango ezalaki eloko oyo esalami na basinga na mposo na nyama mpe na songe na yango bakangisaki bibende to mikuwa) mpo atunaki ete: ‘Soki basambisi Moloma te, epesameli bino nzela na kobeta ye fimbo?’ Ntango ayokaki ete Paulo azalaki citoyen romain, Lysias abangaki mpe amemaki ye liboso ya Sanhédrin (tribinale monene ya Bayuda) mpo na koyeba ntina na efundeli ya Bayuda.
11. Na likambo nini Paulo azalaki Mofalisai?
11 Ntango Paulo abandaki kosamba liboso na Sanhédrin na kolobaka ete ‘atambolaki na lisosoli malamu nyonso liboso na Nzambe’, nganga monene Anania apesaki etinda ete babeta ye. (23:1-10) Na yango Paulo alobaki makasi ete: “Nzambe akobeta yo, etutu etyami mpembe!” Bamosusu na baoyo batelemaki wana batunaki boye: “Ozali kofinga nganga monene?” Lokola azalaki komona malamu te, mbala mosusu Paulo ayebaki lisusu Anania te. Kasi wana emonaki ye ete likita esangisaki Bafalisai mpe Basadukai, alobaki ete: ‘Nazali Mofalisai, mpe nazali kosambisama na ntina na elikya na lisekwa!’ Maloba yango matyaki bokabwani kati na Sanhédrin, mpamba te Bafalisai bazalaki kondima lisekwa, kasi Basadukai bandimaki lisekwa te. Matata oyo mabimaki masalaki ete Lysias akoka kosalisa ntoma Paulo.
12. Nini ebikisaki paulo na mwango mabe oyo bakanaki mpo na koboma ye na Yelusaleme?
12 Paulo abikaki na mwango mosusu ya mabe oyo ekanamaki mpo na koboma ye. (23:11-35) Bayuda ntuku minei bakataki ndai ete bakolia te mpe bakomela te liboso baboma ye. Kasi mwana ya ndeko ya Paulo ayebisaki Paulo likambo yango, mpe ayebisaki yango Lysias. Na yango bamemaki ntoma Paulo na libateli na basoda epai na guvernere Antonius Félix, na césarée, kapitale na misala ya Leta ya Loma na mokili ya Yuda. Nsima na kopesa elaka epai na Paulo ete akoyoka ye, Félix apesaki nzela ete babatela ye na ndako monene ya mokonzi Hérode le Grand, na kartye général ya guvernere. Azalaki na molende liboso na bakonzi
13. Litatoli nini Paulo apesaki epai na Félix, mpe guvernere yango asalaki nini?
13 Mwa ntango moke na nsima, ntoma asambaki mpo na bifundeli ya lokuta euti na banguna na ye mpe apesaki litatoli na molende epai na Félix. (24:1-27) Liboso na Bayuda oyo bafundaki ye, Paulo amonisaki ete apusaki bato na kotomboka te. Alobaki ete andimaki Mibeko mpe Basakoli, mpe azalaki na elikya ete “lisekwa ekozala na bato sembo mpe bato sembo te”. Ayaki na Yelusaleme elongo na “makabo na mawa” (makabo mpo na bayekoli na Yesu oyo mbala mosusu bazalaki babola mpo na minyoko) mpe amipetolaki engebene mibeko. Atako Félix atyaki kosambisama na ye mokolo mosusu, nsima na yango Paulo ateyaki ye mpe mwasi na ye Drusille (mwana—mwasi na Hérode Agrippa l er), na ntina na Klisto, na boyengebene, na komipekisa mpe na kosambisama oyo ekoya. Na koyokaka maloba yango, Félix abangaki mpe azongisaki Paulo. Kasi, na nsima, azalaki kobengisa ye mbala na mbala, na kolikyaka kozwa kanyaka Félix ayebaki ete Paulo azali na likambo te, kasi atikaki ye na boloko mpo na kosepelisa Bayuda. Mbula mibale nsima, Porcius Festus akitanaki ye.
14. Ebongiseli nini endimami na mibeko Paulo asalelaki ntango azalaki kosamba liboso na Festus, mpe bokokani nini tokoki kosala mpo na likambo yango?
14 Liboso ya Festus mpe, Paulo asambaki na molende. (25:1-12) Soki esengelaki ete ntoma akufa, akokaki koboya yango te, kasi moto moko te akokaki kokaba ye na Bayuda mpo na kosepelisa bango. Paulo alobaki boye: “Nalingi kokenda na Kaisala!”, na kosalela lotomo oyo citoyen romain azalaki na yango ya kosambisama na Rome (na eleko wana liboso ya Néron). Lisengi na ye endimamaki. Na yango Paulo asengelaki kokenda na Rome ‘kopesa litatoli’, lokola esakolamaki. (Misala 23:11) Ba Témoins de Jéhovah bazali mpe kosalela bibongiseli oyo bikoki mpo na ‘kolobela mpe kolendisama na nsango malamu na nzela ya mibeko.’—Bafilipi 1:7.
15. (a) Esakweli nini ekokanaki ntango Paulo asambaki liboso na Agrippa mpe liboso na Kaisala? (b) Ndenge nini Paulo azalaki ‘kotuta makolo na makonga’?
15 Hérode Agrippa ll, mokonzi na Yuda na nord, mpe ndeko na ye ya mwasi Bérénice (oyo ye akamataki ye lokola mwasi na ye) bayokaki Paulo na boumeli na ntango oyo bayaki kotala Festus, na césarée.(25:13 kino 26:23) Na kopesaka litatoli epai na Agrippa mpe epai na Kaisala, Paulo akokisaki esakweli oyo esakolaki ete akomema nkombo na Nkolo epai na mikonzi. (Misala 9:15) Na koyebisaka epai na Agrippa makambo oyo masalamaki na nzela ya Damas, Paulo atangaki maloba oyo Yesu ayebisaki ye: “Ezali na yo mpasi kotuta makolo na yo na makonga.” Lokola ngombe oyo na motó makasi akomizokisa na fimbo ya nzubenzube, Saulo azalaki komizokisa na kobundisaka bayekoli na Yesu, baoyo bazalaki kosimbama na Nzambe.
16. Ntango Paulo apesaki litatoli, festus na Agrippa bayambaki yango ndenge nini?
16 Ndenge nini Festus na Agrippa bayambaki nsango yango? (26:24-32) Bakokaki kokanga ntina ya lisekwa te mpe bakamwaki na kondima na Paulo, na yango Festus ayebisaki ye ete: “Koyekola na yo mingi na mikanda ezali kobelisa yo ligboma!” Bobele bongo, na ntango na biso, bamosusu bazali komona ba Témoins de Jéhovah lokola bato na ligboma, atako lokola Paulo, tozali ‘koloba makambo na solo mpe mabongi’. Agrippa, ye oyo akataki likita, kasi andimaki ete bakokaki kotika Paulo soki asengaki te kokende epai na Kaisala, alobaki ete: “Etikali moke ekopusa ngai ete nakoma moklisto”.
Makama kati na mai na monana
17. yebisa makama oyo Paulo azwaki na mai na monana na boumeli ya mobembo na ye na Rome?
17 Na mobembo oyo ememaki ye na Rome, Paulo azwaki “makama kati na mai na monana”. (2 Bakolinti 11:24-27.) Mokonzi na basoda na nkombo Julius azwaki mokumba ya komema bakangami na masuwa longwa na césarée kino Rome. (27:1-26) Ntango masuwa esemaki na Sidona, Paulo apesamaki nzela ya kokenda kotala bandimi, baoyo balendisaki ye na elimo. (Tala 3 Yoane 14) Na Myre, na mokili ya Asie Mineure, Julius amatisaki bakangami kati na masuwa oyo etondaki na masango oyo mazalaki kokenda na ltalie. Atako mopepe mozalaki kozongisa bango na nsima, bakomaki na esika oyo ebyangami Beaux—Ports, penepene na mboka Lasee, na mokili na crète. Kolongwa kuna, bakendaki na Phénix, kasi mopepe makasi ya nord-est mobimaki. Lokola babangaki kotutana na zelo kuna na Syrte, na ndelo na nord ya Afrike, batambwisi na masuwa ‘bakitisaki biloko bizalaki likoló’, ekokaki kozala bilamba oyo batyaka liboso na masuwa mpo na kotambwisa yango (voiles) mpe bikangiseli (mãts). Balekisaki nsinga nzingazinga ya linzanza ya libanda na masuwa mpo ebukana te. Lobi elandaki wana masuwa ezalaki se kobetama na mopepe makasi, babwakaki masango ezalaki kati na masuwa Mokolo na misato babwakaki biloko na masuwa na mai (biloko oyo bitambwisaka masuwa). Wana elikya nyonso na kobikisa bomoi ezalaki kosila, anzelu amonanaki epai na Paulo mpe ayebisaki ye ete abanga te, mpamba te akosamba liboso na Kaisala. Mitema na bato mikitaki ntango ntoma ayebisaki bango ete masuwa makokangama elongo na baoyo nyonso bazali kati na yango na esanga moko.
18. Esukaki ndenge nini mpo na Paulo elongo na baninga na ye ya mobembo?
18 Ya solo, bato nyonso bazalaki na mobembo yango babikaki. (27:27-44) Katikati na butu, na mokolo ya zomi na minei, batambwisi na masuwa bamonaki ete masuwa ezalaki kobelema na mokili. Bimekeli bindimisaki yango, babwakaki longo mpo ete masuwa matutana na mabanga te. Na kolandaka toli ya Paulo, bato yango 276 balyaki mwa ndambo na bilei. Nsima babwakaki masango na mai mpo na kolongola kilo na masuwa Na ntongontongo, batambwisi na masuwa bakataki nsinga na longo nyonso, bakangelaki minyololo na yenda mpe batombolaki elamba na liboso na masuwa ekokangaka mopepe. Masuwa ekangamaki na zelo mpe nsonge ya nsima na masuwa ebukanaki. Kasi bato nyonso bakomaki malamu na mokili.
19. Nini akomelaki Paulo na esanga ya Melita, mpe esalaki nini na mboka yango mpo na bazalani na ye?
19 Elubwaki bango na masuwa, nzoto nyonso epolaki na mai mpe balembaki, bongo bayebisaki bango ete bazalaki na esanga ebyangami Melita, epai kuna bamonisaki bango “boboto mpenza”. (28:1-16) Wana Paulo azalaki kotya nkoni na mɔ́to, nyoka (vípére) ebimaki mpo na molunge mpe ekangamaki na loboko na ye. (Na mikolo na biso, nyoka motindo wana ezali komonana te na esanga ya Malte, kasi ezalaki nde “nyama moko oyo ezali na pwazó.) Bato na Melita bakanisaki ete Paulo azalaki mobomi na bato oyo “boyengebene” ekokaki te kotika ye na bomoi, kasi ntango bamonaki ete akufi te to avimbi te, balobaki ete azalaki nzambe. Na nsima, Paulo abikisaki bato mingi, mpe tata ya Publius, moto monene na esanga wana. Sanza misato nsima, Paulo, Luka mpe Aristarke bazwaki masuwa oyo na liboso na yango ezalaki na elongi ya “Bana na Zeus” (castor mpe Pollux, banzambe mapasa oyo bazalaki kokanisa ete bazalaki kosalisa batambwisi na masuwa). Nsima na kokita na Puteoli, mokonzi na basoda Julius asimbaki lisusu nzela elongo na bato baoyo azalaki kokamba Paulo akumisaki Nzambe mpe azwaki mpiko ntango baklisto oyo bautaki na Rome, oyo ezalaki capitale, bakutanaki na ye na Zando ya Appius mpe na esika na Trois-tavernes na nzela. Na nsuka ntango akomaki na Rome, bapesaki ye ndingisa ya kozwa esika ya kofanda na ndako na ye moko, kasi soda moko azalaki kokengela ye.
Alandi kosakola Bokonzi na Jéhovah
20. Mosala nini Paulo abandaki kokokisa na ndako na ye, na Rome?
20 Na ndako na ye na Rome, Paulo asakolaki Bokonzi na Jéhovah na molende. (28:17-31) Alobaki epai na bakonzi minene na Bayuda boye: “Monyololo oyo ekangami na ngai na ntina na elikya na Yisraele.” Kozala na elikya yango elimbolaki kondima Masiya, ezali mpo na yango biso mpe tosengeli kozala pene mpo na komona mpasi (Bafilipi 1:29) Ya solo, mingi na Bayuda yango bandimaki te, kasi bamosusu kati na bango mpe Bapakano mingi to Bato na Mabota bazalaki na ezaleli na motema oyo esengami. (Yisaya 6:9, 10). Na boumeli na mbula mibale (pene na mobu 59-61), Paulo azalaki koyamba bato epai na ye, “kosakolaka Bokonzi na Nzambe mpe kolakisaka makambo na ntina na Nkolo Yesu Klisto polele mpenza, moto mpe te apekisaki ye”.
20 Ezali komonana ete mokonzi Néron atikaki Paulo mpo ete azwaki ye na likambo te. Ntoma abandelaki lisusu mosala na ye elongo na Timoté mpe na Tito. Kasi, akangamaki lisusu na Rome (pene na mobu 65) mpe ezali komonana ete mokonzi Néron abomisaki ye mpo na kondima na ye. (2 Timoté 4:6-8) Kino na nsuka, Paulo apesaki ndakisa malamu ya mosakoli na Bokonzi ya mpiko. Na kozalaka na elimo motindo moko na mikolo na nsuka, tika ete baoyo nyonso bamipesi epai na Jéhovah basakola Bokonzi na ye na molende.
Bozongeli
◻ Paulo apesaki formation nini na ntina etali mosala ya kosakola epai na bankulutu ya Efese?
◻ Ndakisa nini Paulo apesaki na ntina etali kotosa mokano na Nzambe?
◻ Komekama nini Paulo azwaki na ntina etali batomboki mpe ekokani na oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kokutana na yango lelo?
◻ Ebongiseli nini engebene mibeko Paulo asalelaki yango ntango asambaki liboso ya guvernere Festus, mpe bokokani nini tokoki kosala mpo na yango lelo?
◻ Mosala nini Paulo alandaki kokokisa na ndako na ye, na Rome, mpe kosalaka bongo atikaki ndakisa nini?
21. Kino na nsuka na bomoi na ye na mabelé, ndakisa nini Paulo apesaki?