MOKAPO 24
“Zalá na mpiko!”
Paulo abiki na likita oyo banguna basali mpo na koboma ye mpe akei kosamba liboso ya Feliksi
Euti na Misala 23:11–24:27
1, 2. Mpo na nini minyoko oyo Paulo azali kokutana na yango na Yerusaleme ezali kokamwisa ye te?
NSIMA ya kobikisama na mabɔkɔ ya ebele ya bato oyo bazali na nkanda na Yerusaleme, Paulo akɔti lisusu bolɔkɔ. Ntoma yango ya molende azali kokamwa te ndenge azali kokutana na minyoko na Yerusaleme. Elimo ya Yehova eyebisaki ye liboso ete na engumba yango, akokangama na “bolɔkɔ mpe [akomona] malɔzi.” (Mis. 20:22, 23) Atako Paulo ayebi te makambo oyo akokutana na yango, ayebi ete akokoba konyokwama mpo na nkombo ya Yesu.—Mis. 9:16.
2 Ata bakristo oyo bazalaki kosakola makambo ekoya bayebisaki Paulo ete akokangama mpe akokabama “na mabɔkɔ ya bato ya bikólo.” (Mis. 21:4, 10, 11) Eleki mwa mikolo, ebele ya Bayuda balingaki koboma ye, mpe mwa moke na nsima, etikalaki moke basangani ya Sanedrina “bákata [ye] bitenibiteni” ntango bazalaki kotyana ntembe mpo na ye. Sikoyo, ntoma yango azali na bolɔkɔ ya basoda ya Roma mpe akosamba liboso ya bakonzi ndenge na ndenge mpe bato bakofunda ye na makambo mingi. (Mis. 21:31; 23:10) Paulo azali mpenza na mposa ya kolendisama!
3. Epai wapi tozwaka bilendiseli mpo na kokoba kosakola?
3 Na mikolo oyo ya nsuka, toyebi ete “baoyo nyonso balandaka Yesu mpe balingi kosalela Nzambe na bosembo nyonso bango mpe bakonyokwama.” (2 Tim. 3:12) Tosengeli mbala na mbala kozwa bilendiseli mpo na kokoba kosakola. Tozali na botɔndi mingi mpo na maloba ya kolendisa oyo tozwaka na ntango ebongi na nzela ya mikanda mpe makita oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” abongisaka! (Mat. 24:45) Yehova alaki biso ete banguna ya nsango malamu bakolonga te. Bakokoka te kosilisa basaleli na ye nyonso to kopekisa mosala na bango ya kosakola. (Yis. 54:17; Yil. 1:19) Kasi, ezalaki boni mpo na ntoma Paulo? Azwaki bilendiseli mpo na kokoba kopesa litatoli malamumalamu atako bazalaki kotɛmɛla ye? Soki azwaki yango, epesamaki ndenge nini, mpe asalaki nini nsima ya kozwa yango?
‘Likita mabe’ elongi te (Misala 23:11-34)
4, 5. Paulo azwaki elendiseli nini, mpe mpo na nini yango eyaki na ntango oyo ebongi mpenza?
4 Ntoma Paulo azwaki elendiseli oyo asengelaki na yango mpenza na butu oyo elandaki mokolo oyo abikisamaki liboso ya Sanedrina. Lisolo ya Biblia elobi: “Nkolo atɛlɛmaki pene na ye mpe alobaki: ‘Zalá na mpiko! Mpo kaka ndenge opesi litatoli malamumalamu na Yerusaleme mpo na ngai, ndenge moko mpe osengeli kopesa litatoli na Roma.’” (Mis. 23:11) Lokola Paulo alendisamaki na maloba wana ya Yesu, azalaki na elikya ete akobika. Ayebaki ete akokóma tii na Roma mpe kuna akozwa libaku ya kopesa litatoli mpo na Yesu.
5 Paulo azwaki elendiseli na ntango oyo ebongi mpenza. Mokolo oyo elandaki, Bayuda koleka 40 “basalaki likita mabe mpe balapaki ndai ete mabe ekómela bango, soki balei mpe bamɛli liboso ete báboma Paulo.” “Likita wana ya mabe na ndai oyo ekangani na elakeli mabe” emonisi ete Bayuda yango bazalaki na ekateli makasi ya koboma ntoma Paulo. Balobaki ete soki mokano na bango elongi te, likambo ya mabe ekómela bango. (Mis. 23:12-15) Mayele oyo bakanisaki, oyo mpe banganga-nzambe bakonzi mpe bankulutu bandimaki, ezalaki ya kosɛnga ete Paulo akende lisusu liboso ya Sanedrina mpo bátuna ye mituna mpo emonana lokola nde balingi koyeba makambo na ye malamumalamu. Kasi, bato yango balingaki kobatama na nzela mpe ntango bazali komema Paulo na Sanedrina, balingaki kobimela ye na mbalakaka mpe koboma ye.
6. Ndenge nini likita oyo esalemaki mpo na koboma Paulo eyebanaki, mpe lisolo yango elobeli ndakisa ya nani oyo bilenge bakoki kolanda lelo oyo?
6 Nzokande, mwana ya ndeko ya Paulo ayokaki mokano yango mpe akendaki koyebisa yango Paulo. Na nsima, Paulo atindaki elenge yango akende koyebisa likambo yango epai ya Klode Lisiasi, komanda ya basoda. (Mis. 23:16-22) Na ntembe te, Yehova alingaka bilenge oyo basalaka lokola mwana wana ya ndeko ya Paulo; elingi koloba bilenge oyo batyaka bolamu ya basaleli ya Nzambe liboso mpe basalaka nyonso oyo bakoki mpo matomba ya Bokonzi ekende liboso.
7, 8. Klode Lisiasi azwaki bibongiseli nini mpo na kobikisa Paulo?
7 Ntango kaka bayebisaki ye ete Bayuda basalaki likita mpo na koboma Paulo, Klode Lisiasi, oyo azalaki kokamba basoda 1 000, apesaki mitindo ete limpinga ya bato 470 (basoda, babɛti-makɔnga, mpe basoda oyo batambolaka na mpunda) bákende kotika Paulo na Kaisaria na butu wana kaka. Soki bakómi kuna, bápesa ye na mabɔkɔ ya Guvɛrnɛrɛ Feliksi.a Kaisaria ezalaki engumba-mokonzi ya etúká ya Yudea; atako Bayuda mwa mingi bazalaki kofanda kuna, bafandi na yango mingi bazalaki Bayuda te. Kuna, makambo mingi ezalaki kotambola na molɔngɔ, na bokeseni na Yerusaleme, epai bato mingi bazalaki kolakisa nkanda na bango mpo na bato ya mangomba mosusu mpe bazalaki kobimisa mobulu. Lisusu, biro monene ya basoda ya Roma mpo na etúká ya Yudea ezalaki na Kaisaria.
8 Na kolanda mibeko ya Roma, Lisiasi atindelaki Feliksi mokanda oyo kati na yango alimbolaki makambo nyonso. Lisiasi akomaki ete ntango ayokaki ete Paulo azali mwana-mboka Roma, abikisaki ye mpo Bayuda “balingaki báboma ye.” Lisiasi akomaki mpe ete amonaki ete Paulo asalaki likambo moko te oyo “ebongi na liwa to na bolɔkɔ,” kasi lokola Bayuda basalelaki Paulo likita, atindaki ye epai ya Feliksi mpo ete ye moko ayoka bafundi na ye mpe akata likambo.—Mis. 23:25-30.
9. (a) Na ndenge nini ntomo ya Paulo lokola mwana-mboka Roma etosamaki te? (b) Mpo na nini tokoki kosalela ntomo na biso lokola bana-mboka ya ekólo moko?
9 Lisiasi akomaki makambo nyonso na bosembo? Te. Emonani ete alukaki komonisa ete asalaka mosala na ye malamu. Ezali solo te ete abikisaki Paulo mpo ayokaki ete azali mwana-mboka Roma. Longola yango, Lisiasi alobaki te ete apesaki mitindo ete Paulo ‘akangama na minyɔlɔlɔ mibale’ mpe na nsima apesaki mitindo ete “bábɛta ye fimbo mpo aloba.” (Mis. 21:30-34; 22:24-29) Makambo oyo Lisiasi asalaki emonisi ete atosaki te ntomo ya Paulo oyo azalaki mwana-mboka Roma. Lelo oyo, Satana asalelaka molende mabe ya bandimi ya mangomba oyo batɛmɛlaka biso mpo na kongalisa minyoko, mpe ekoki kokóma ete bato yango báboya kotosa ntomo na biso. Kasi, na ndakisa ya Paulo, mbala mingi basaleli ya Nzambe bakoki kosalela ntomo oyo bazali na yango lokola bana-mboka ya ekólo moko mpo Leta abatela bango ndenge mibeko ezali kosɛnga.
“Nandimi na motema moko kosamba makambo na ngai” (Misala 23:35–24:21)
10. Paulo afundamaki na makambo nini ya minene?
10 Na Kaisaria, Paulo ‘abatelamaki na ndako ya bokonzi ya Erode’ ntango azalaki kozela bato oyo bafundaki ye báuta na Yerusaleme. (Mis. 23:35) Mikolo mitano na nsima, bato yango bakómaki; ezalaki Nganga-nzambe Monene Ananiasi, molobeli moko oyo nkombo na ye ezalaki Tertulusi, mpe etuluku moko ya bankulutu. Tertulusi abandaki naino na kokumisa Feliksi mpo na makambo oyo azalaki kosalela Bayuda, na ntembe te mpo na kolengola ye mpe koluka ete alongisa bango.b Na nsima, Tertulusi alobelaki likambo oyo bayelaki, alobaki boye: “[Paulo] azali likama monene mpe azali kobimisa botomboki epai ya Bayuda nyonso na mabele mobimba oyo bato bafandi mpe azali mokambi ya mwa lingomba ya Banazarete. Amekaki mpe kokómisa tempelo eloko mpamba, yango wana tokangaki ye.” Bayuda mosusu mpe “bamikɔtisaki na bifundeli wana, bazalaki koloba ete makambo yango ezalaki mpenza solo.” (Mis. 24:5, 6, 9) Makambo oyo bafundaki Paulo ezalaki makambo minene oyo moto akokaki kozwela etumbu ya liwa; balobaki ete azali kobimisa botomboki, azali mokambi ya mwa lingomba moko oyo ezali likama mpo na ekólo, mpe akómisaki tempelo eloko mpamba.
11, 12. Paulo alobaki nini mpo na komonisa ete bifundeli ya banguna na ye ezalaki solo te?
11 Na nsima, bapesaki Paulo maloba. Ye abandaki boye: “Nandimi na motema moko kosamba makambo na ngai.” Amonisaki ete makambo nyonso oyo bafundaki ye na yango ezali solo te. Ntoma Paulo akómisaki tempelo eloko mpamba te, abimisaki mpe botomboki te. Amonisaki ete azalaki na Yerusaleme te “bambula mingi” mpe ayaki na “makabo ya motema mawa” mpo na bakristo oyo nzala mpe minyoko ekómisaki bango babola. Paulo amonisaki ete liboso akɔta na tempelo, ‘amipɛtolaki na ndenge oyo milulu ezali kosɛnga’ mpe ete azalaki kosala makasi mpo na “kobatela lisosoli ya pɛto liboso ya Nzambe mpe ya bato.”—Mis. 24:10-13, 16-18.
12 Kasi, Paulo andimaki ete azalaki kosalela Nzambe ya bankɔkɔ na ye mosala ya bosantu “na kotalela nzela oyo bazali kobenga ‘mwa lingomba.’” Kasi, azongelaki koloba ete azalaki kondima “makambo nyonso oyo elobelami na Mibeko mpe ekomami na Basakoli.” Longola yango, azalaki na elikya ete “lisekwa ekozala, ya bato ya sembo mpe ya bato oyo bazangi bosembo,” elikya oyo bato oyo bazalaki kofunda ye bazalaki mpe na yango. Na nsima, Paulo asɛngaki ete bato oyo bafundaki ye bápesa bilembeteli ya bifundeli na bango. Alobaki boye: “Mibali oyo bazali awa báloba bango moko mabe oyo bazwaki ngai na yango ntango natɛlɛmaki liboso ya Sanedrina, longola kaka mpo na likambo moko oyo nabelelaki ntango natɛlɛmaki na kati na bango: ‘Nazali lelo kosambisama liboso na bino mpo na lisekwa ya bakufi!’”—Mis. 24:14, 15, 20, 21.
13-15. Mpo na nini tokoki kotalela Paulo lokola ndakisa na oyo etali kopesa litatoli na mpiko liboso ya bakonzi?
13 Paulo apesaki ndakisa malamu oyo tokoki kolanda soki bamemi biso liboso ya bakonzi ya Leta mpo na losambo na biso mpe soki bakoseli biso makambo ete totindaka bato bátomboka, tokosaka bato to tozali na “mwa lingomba moko oyo ezali likama.” Paulo alukaki te kosepelisa guvɛrnɛrɛ na maloba ya kolengola, ndenge Tertulusi asalaki. Paulo azalaki koloba na kimya mpe na limemya. Na ndenge ya mayele mpenza, alobaki polele mpe solo. Paulo alobaki ete “Bayuda . . . ya etúká ya Azia” oyo bafundaki ye ete azalaki kokómisa tempelo eloko mpamba bazalaki wana te mpe ete na kolanda mibeko, asengeli kosamba ná bango mpe koyoka bifundeli na bango.—Mis. 24:18, 19.
14 Likambo ya ntina mingi ezali ete Paulo abangaki te kopesa litatoli mpo na bindimeli na ye. Na mpiko nyonso, amonisaki lisusu ete andimaka lisekwa, likambo oyo ekɔtisaki mobulu na kati ya Sanedrina. (Mis. 23:6-10) Ntango Paulo azalaki kosamba, alobelaki mingi elikya ya lisekwa. Mpo na nini? Mpamba te Paulo azalaki kopesa litatoli mpo na Yesu mpe komonisa ete asekwaki, likambo oyo banguna na ye bakokaki kondima te. (Mis. 26:6-8, 22, 23) Likambo mpenza oyo ebimisaki ntembe ezalaki nde liteya ya lisekwa, mingimingi, kondimela Yesu mpe lisekwa na ye.
15 Lokola Paulo, biso mpe tokoki kopesa litatoli na mpiko mpe tokoki kolendisama na maloba oyo Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bato nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai. Kasi moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka, ye nde akobika.” Tosengeli nde komitungisa mpo na makambo oyo tokoloba? Te, mpo Yesu alobaki boye: “Ntango bakomema bino mpo na kokaba bino, bómitungisa liboso te mpo na oyo bosengeli koloba; kasi oyo ekopesama epai na bino na ngonga wana bóloba yango, mpo ezali bino te nde bato bozali koloba, kasi nde elimo santu.”—Mrk. 13:9-13.
“Feliksi akómaki kobanga” (Misala 24:22-27)
16, 17. (a) Ndenge nini Feliksi asambisaki likambo ya Paulo? (b) Ekoki kozala mpo na nini Feliksi akómaki kobanga, kasi mpo na nini azalaki kokutana na Paulo na mabaku mingi?
16 Yango ezalaki mbala ya liboso te oyo Guvɛrnɛrɛ Feliksi ayokaki bindimeli ya bakristo. Lisolo elobi boye: “Feliksi, lokola ayebaki malamu makambo oyo etali Nzela [nkombo oyo bazalaki kobenga na yango lingomba ya bokristo na ebandeli], abandaki kozongisazongisa bato wana ete báya nsima mpe alobaki: ‘Ntango Lisiasi komanda ya basoda akokita, nakokata makambo na bino.’ Mpe apesaki mokonzi ya basoda mitindo ete bákɛngɛla Paulo kasi bátikela ye mwa bonsomi, mpe apesa nzela ete baninga na ye básalisa ye.”—Mis. 24:22, 23.
17 Nsima ya mwa mikolo, Feliksi ayaki elongo na mwasi na ye Drusila, oyo azalaki Moyuda, mpe apesaki mitindo ete báya na Paulo mpe “ayokaki ye na likambo etali kondimela Kristo Yesu.” (Mis. 24:24) Nzokande, ntango Paulo alobelaki “bosembo, komipekisa mpe lisambisi oyo ekoya, Feliksi akómaki kobanga,” mbala mosusu mpo makambo yango etungisaki lisosoli na ye mpo na etamboli mabe oyo azalaki na yango. Yango wana, azongisaki Paulo mpe alobaki na ye ete: “Sikoyo kende na yo, kasi soki nazwi ntango nakobengisa yo lisusu.” Na nsima, Feliksi asololaki na Paulo na mabaku mingi; nzokande, ezalaki te mpo alingaki koyeba solo, kasi azalaki kolikya ete Paulo akopesa ye kanyaka.—Mis. 24:25, 26.
18. Mpo na nini Paulo alobaki na Feliksi ná mwasi na ye makambo etali “bosembo, komipekisa mpe lisambisi oyo ekoya”?
18 Mpo na nini Paulo alobaki na Feliksi ná mwasi na ye makambo etali “bosembo, komipekisa mpe lisambisi oyo ekoya”? Tóbosana te ete Feliksi ná mwasi na ye balingaki koyeba makambo oyo esɛngami na moto oyo azali “kondimela Kristo Yesu.” Lokola Paulo ayebaki ete bango mibale bazalaki na etamboli ya mbindo, bazalaki na makambo ya nko, mpe na kozanga bosembo, amonisaki bango polele makambo oyo esɛngami mpo na kokóma bayekoli ya Yesu. Makambo oyo Paulo alobaki emonisaki ete mitinda ya bosembo ya Nzambe eyokanaki te na etamboli ya Feliksi ná mwasi na ye. Na ntembe te, yango esalisaki bango bámona ete moto nyonso akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na makanisi, maloba, mpe misala na ye mpe ete, ekateli oyo Nzambe akozwa mpo na moto mokomoko ezali na ntina koleka ekateli oyo Feliksi akozwa mpo na Paulo. Tokoki kokamwa te ete Feliksi “akómaki kobanga”!
19, 20. (a) Na mosala ya kosakola, tosengeli kosala nini ntango tokutani na bato oyo bazali komonana lokola bazali kosepela na solo, kasi bazali nde koluka matomba na bango? (b) Ndenge nini toyebi ete Feliksi azalaki moninga ya Paulo te?
19 Na mosala na biso ya kosakola, tokoki kokutana na bato oyo bazali lokola Feliksi. Na ebandeli, bakoki komonana lokola nde bazali kosepela na solo, nzokande bazali koluka matomba na bango. Tosengeli kozala na bokɛngi ntango tozali kosalisa bato ya ndenge wana. Kasi, na ndakisa ya Paulo, tokoki komonisa bango na mayele mitinda ya Nzambe mpo na bosembo. Mbala mosusu solo ekosimba mitema na bango. Nzokande, soki tomoni polele ete bazali na mposa te ya kotika banzela na bango ya mabe, tokotika bango mpe tokoluka bato oyo bazali mpenza koluka solo.
20 Makanisi ya motema ya Feliksi emonanaki polele. Biblia elobi boye: “Ntango mbula mibale elekaki, Porkiusi Festusi akitanaki Feliksi na ebonga; mpe lokola Feliksi alingaki ete Bayuda básepela na ye, atikaki Paulo na bolɔkɔ.” (Mis. 24:27) Feliksi azalaki moninga ya Paulo te. Feliksi ayebaki ete bato oyo bazalaki kolanda “Nzela” bazalaki te kotinda bato bátomboka to bábimisa mobulu. (Mis. 19:23) Feliksi ayebaki mpe ete Paulo abukaki ata mobeko moko te ya Baroma. Kasi, Feliksi atikaki Paulo na bolɔkɔ mpo “Bayuda básepela na ye.”
21. Makambo nini Paulo akutanaki na yango ntango Porkiusi Festusi akómaki guvɛrnɛrɛ, mpe ekoki mpenza kozala ete nini ezalaki kopesa Paulo makasi?
21 Ndenge bavɛrsɛ ya nsuka ya Misala mokapo 24 emonisi yango, Paulo azalaki kaka na bolɔkɔ ntango Porkiusi Festusi akitanaki Feliksi na ebonga ya guvɛrnɛrɛ. Na nsima, Paulo akómaki kosamba na kosamba, mpe bazalaki kotinda ye epai ya bakonzi ndenge na ndenge. Ya solo, ntoma yango ya mpiko ‘amemamaki liboso ya bakonzi mpe baguvɛrnɛrɛ.’ (Luka 21:12) Ndenge tokomona yango, azwaki libaku ya kopesa litatoli epai ya mokonzi oyo alekaki bakonzi nyonso na ntango wana. Na makambo nyonso wana, kondima ya Paulo elɛmbaki te. Na ntembe te, akobaki kozwa makasi na maloba ya Yesu oyo: “Zalá na mpiko!”
a Talá etanda “Feliksi—Guvɛrnɛrɛ ya Yudea,” na lokasa 193.
b Tertulusi apesaki Feliksi longonya mpo na “kimya monene” oyo akɔtisaki na ekólo. Nzokande, likambo ya solo ezalaki ete kimya ezalaki moke na Yudea na eleko oyo Feliksi azalaki guvɛrnɛrɛ koleka na eleko ya guvɛrnɛrɛ mosusu nyonso tii ntango Bayuda batombokelaki bokonzi ya Roma. Alobaki mpe solo te ntango alobelaki “matɔndi mingi” oyo Bayuda bapesaki mpo na mbongwana oyo Feliksi asalaki na ekólo na bango. Likambo ya solo ezali ete Bayuda mingi bazalaki kosepela na Feliksi te mpo akómisaki bomoi na bango mpasi mpe azalaki konyata botomboki nyonso na kozanga mawa mpenza.—Mis. 24:2, 3.