Likanisi ya boklisto na ntina na bakonzi baleki liboso
“Tika ete moto na moto atosaka bango bazali na bokonzi. Mpamba te bokonzi ezali te bobele yango euti na Nzambe. Yango ezali ekangisami na Nzambe.”—BALOMA 13:1.
1, 2. a) Mpo na nini Paulo akangamaki na Rome? b) Mituna nini lisengi ya Paulo ete nsamba epai na Kaisala ezali kobimisa?
NTOMA Paulo akomaki maloba wana epai na baklisto ya Rome pene na mobu 56 ya ntango na biso. Mwa mibu na nsima, ye moko akomaki kati na engumba yango lokola mokangami. Mpo na ntina nini? Na Yelusaleme, babetaki ye na etuluku ya bato mpe basoda Baloma babikisaki ye. Nsima na komema ye na mboka Césarée, Bayuda balobaki bifundeli ya lokuta na ntina na ye, kasi asambaki na lolenge ya kokamwa liboso na guvernere moromé Felix. Nzokande, guvernere yango atikaki ye na boloko na boumeli ya mibu mibale kati na elikya ete akozwa kanyaka Nsuka na yango, Paulo asengaki epai na mokitani ya Felix, Festus, ete likambo na ye ekoma kino epai na Kaisala.—Misala 21:27-32; 24:1 kino 25:12.
2 Na kosalaka lisengi wana, Paulo azalaki kosalela lotomo na ye ya sitwaye romé. Kasi ezalaki mpenza malamu ete aluka kokende epai na mokonzi wana nzokande Yesu amonisaki Satana ete azali “mokonzi na mokili” mpe ye moko Paulo abyangaki Satana “nzambe na mokili”? (Yoane 14:30; 2 Bakolinti 4:4) To boyangeli ya rome epesamelaki nzela mpo na yango Paulo asengelaki koluka lisalisi na lolenge endimami na mibeko mpo na kobatela lotomo na ye? Maloba oyo bantoma balobaki yango liboso ete “ekoki ete totosa Nzambe, lokola mokonzi liboso na kotosa bato” epesi nzela na baklisto ete bazala na botosi epai na mikonzi ya mokili soki yango esengeli ete basala yango, kasi kozanga kobuka mibeko na Nzambe?—Misala 5:29.
3. Likanisi nini malamu Paulo amonisi, mpe mokumba nini lisosoli esengeli kozala na yango?
3 Paulo asalisi biso na koyanola na mituna yango kati na mokanda na ye epai na Baloma, epai kuna azali komonisa likanisi ya malamu mpo na bokonzi ya bato. Kati na Baloma 13:1-7, azali komonisa polele ete lisosoli ya boklisto esengeli kosalisa biso na kokesenisa kati na botosi oyo tosengeli kozala na yango mpo na makambo nyonso epai na Mokonzi monene, Jéhovah Nzambe, mpe botosi ya ndelo oyo tosengeli kozala na yango mpo na makambo mosusu epai na mikonzi ya mokili.
Bakonzi baleki liboso
4. Mbongwana nini ya makanisi esalemaki na 1962, mpe mituna nini yango ebimisi?
4 Na boumeli ya mwa mibu mpe kino na 1962, ba Témoins de Jéhovah bazalaki kokanisa ete bakonzi baleki liboso (autorités supérieures; Traduction du monde nouveau) ezalaki bongo Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto. Nzokande, na boyokani na Masese 4:18, kongenga ebakisamaki, mpe likanisi wana ebongisamaki, likambo oyo ezali mbala mosusu kobimisa mituna kati na makanisi ya bato mosusu. Sikawa tozali na ntina malamu ya koloba ete mikonzi wana ezali bongo ba rois, ba présidents, ba premiers ministres, ba guvernere, ba magistrats mpe bato minene mosusu oyo bazali na bokonzi kati na leta to na politike kati na mokili, mpe tosengeli kozala na botosi epai na bango kati na makambo mosusu?
5. Kati na ndimbola ya mikapo mizwami zingazinga na Baloma 13:1, elembo nini esalisi biso na koyeba banani wana bakonzi baleki liboso, mpe ndenge nini mabongoli ndenge na ndenge ya Biblia mazali kolongisa ndimbola yango?
5 Na ekeke ya mibale ya ntango na biso, lrénée ayebisaki kati na mikanda na ye ete na eleko na ye bamosusu bazalaki kokanisa ete na Baloma 13:1 Paulo azalaki kolobela “baanzelu na nguya (to) mikonzi oyo bazangi komonana.” Nzokande, ye moko, lrénée azalaki kolimbola bakonzi baleki liboso ete ezali “mikonzi ya mokili.” Ndimbola ya makambo mazali zingazinga na maloba ya Paulo emonisi ete lrénée azalaki kati na elonga. Kati na ba versets ya nsuka ya mokapo 12 ya mokanda na ye epai na Baloma, ntoma azali kolimbola ndenge nini baklisto basengeli kosala liboso “na bato nyonso”: kozala na bolingo mpe na boboto ata epai na ‘banguna’ na bango. (Baloma 12:17-21) Emonani polele ete, liloba “bato nyonso” elakisi baoyo nyonso bazali katina lisangá ya boklisto te. Na yango, “bakonzi baleki liboso,” oyo Paulo azali kolobela na nsima basengeli kozala, bango mpe, na libanda ya lisangá na boklisto. Na boyokani na likanisi wana, tala motindo nini ebele na mabongoli na Biblia ezali kobongola eteni ya liboso ya Baloma 13:1: “Moto nyonso osengeli kotosa bakonzi ya Leta.” (Kondimana ya Sika). “Bánso bótosa bakonzi bakoyángela mbóka.” (Biblia katolike Liloba lya Nzambe) “Tika ete moto na moto atosaka bango bazali na bokonzi.” Biblia Lingala Haut-fleuve.
6. Mpo na nini maloba na Paulo na ntina etali bofuti mpako mpe ba taxes emonisi ete bakonzi baleki liboso ezali nde bakonzi ya mokili?
6 Mwa mosika Paulo ayebisi sikisiki ete mikonzi yango bafutisaka mpako. (Baloma 13:6, 7) Lisangá na boklisto, efutisaka mpako te, ezala ata Jéhovah, to Yesu to mpe ‘mokonzi’ nini mosusu ‘azangi komonana’, bafutisaka mpako te. (2 Bakolinti 9:7) Mpako ekendaka bobele epai na mikonzi ya Leta. Nkutu, maloba na greke oyo makokani na “mpako” mpe “kofuta ba taxes” oyo Paulo asalelaki na Baloma 13:7 malimboli mpenzampenza mosolo oyo motyami na sanduku ya Leta.a
7, 8. a) Ba versets nini ya Biblia endimi ete baklisto basengeli kozala na botosi epai na bakonzi ya politike na mokili? b) Bobele na makambo nini bas klisto bazali kotosa te na mitinda ya “bakonzi”?
7 Lisusu, toli ya Paulo mpo na kozala na botosi epai na mikonzi ya mokili ezali na boyokani na etinda na Yesu oyo ezali kosenga ete topesa “biloko na Kaisala epai na Kaisala”, liloba “Kaisala” elimboli awa bokonzi ya Leta. (Matai 22:21) Toli oyo eyokani mpe na maloba na Paulo oyo alobaki yango nsima epai na Tito: “Kanisela bango ete bamisokisa liboso na mikóló mpe mikonzi; bazala na botosi mpe baselingwa mpo na misala nyonso malamu.” (Tito 3:1) Yango wana, ntango bakonzi ya Leta bazali kosenga epai na baklisto ete basangana na misala oyo mizali mpo na bolamu ya bato banso, bazali kosala yango na esengo nyonso, soki nde misala yango mikitani mosala moko te oyo ezangi kondimama na Makomami to mpe ezali kobuka ata na lolenge moko te mitinda na Biblia, na ndakisa etinda oyo ezwami kati na Yisaya 2:4.
8 Petelo mpe andimi ete tosengeli kotosa bakonzi ya Leta. Alobi ete: “Botosaka myango nyonso na bato mpo na Nkolo, soko na mokonzi monene oyo aleki nyonso, soko na mikonzi mike baoyo batindami na ye mpo na kopesaka bitumbu epai na bato na misala mabe mpe mpo na kosanzola bato na misala mibongi.” (1 Petelo 2:18, 14) Na boyokani na maloba oyo, Paulo apesaki epai na Timote toli oyo baklisto basengeli mpe kolanda yango: “Bongo, nazali kolomba liboso ete bisengeli mpe mabondeli mpe bilombeli mpe matondi mapesama mpo na bato nyonso, mpo na mikonzi nyonso baoyo bazali liboso ete totambola na bizaleli na kimya mpe na kozanga mobulu kati na losambo na Nzambe mpe na sembo na bozito.”b—1 Timote 2:1, 2.
9. Mpo na nini tozali kolongola eloko moko te na lokumu ya Jéhovah ntango tozali kobenga mikonzi ya mokili ete “baleki liboso”?
9 Na kobengaka bakonzi ya Leta ete “baoyo baleki liboso”, tozali bongo kozanga limemya epai na Jéhovah? Te, mpamba te Jéhovah azali na bokonzi boleki bokonzi nyonso. Azali “Nkolo Moyangeli na bikelamu nyonso,” “Nzambe oyo aleki-likoló.” (Nzembo 73:28; Danyele 7:18, 22, 25, 27; Emoniseli 4:11; 6:10) Botosi na biso epai na mikonzi ya mokili ezali kolongola ata eloko moko te na losambo oyo tozali kopesa epai na Mokonzi oyo-aleki-likoló, Nkolo Moyangeli na bikelamu nyonso, Jéhovah. Kasi, na meko nini bakonzi yango baleki liboso? Baleki liboso bobele epai na bato, mpe kati na ezingelo oyo bazali kokokisa misala na bango. Bazali na mokumba ya koyangela mpe ya kobatela bato, mpe mpo na yango bazali kobimisa mibeko oyo mitali batambwisi makambo na bato.
“Mpamba te bokonzi ezali te bobele yango euti na Nzambe”
10. a) Engebene Paulo, lolenge oyo bakonzi baleki liboso bapesameli bisika na bango, emonisi nini mpo na oyo etali bokonzi ya Jéhovah? b) Mikonzi nini Jéhovah apesaki nzela ete bazwa bisika, mpe mimekamo nini mibimaki mpo na basaleli na ye?
10 Bokonzi na Jéhovah Nzambe ezali bokonzi boleki likoló, mpe ata bakonzi ya Leta bango moko bazali na nse na yango; mpamba te “bokonzi ezali te bobele yango euti na Nzambe.” Maloba oyo mazali mpenza kobimisa motuna moko. Mwa mibu nsima wana Paulo autaki koloba maloba oyo, monyokoli makasi ebimelaki baklisto epai na Néron, mokonzi moromé. Nzambe nde atyaki mpenza Néron na esika wana? Soki moke te! Tosengeli kokanisa te ete mokonzi moko na moko aponamaki na Nzambe mpe ete atyami na esika yango “na ngolu na Nzambe.” Nzokande, Satana azali kosala mbala mosusu ete bato na motema mabe bakoka kozwa bokonzi. Jéhovah azali kotikela bango nzela mpe azali kokanga motema na mimekamo oyo bakonzi yango bazali kobimisela basaleli na ye ya sembo.—Tala Yobo 2:2-10.
11, 12. Na makambo nini, mayebisami na Biblia, Jéhovah ye moko atyaki to alongolaki na kiti ya bokonzi mikonzi mosusu ya mokili?
11 Nzokande, ezali solo ete, Jéhovah ye moko akotelaki na bantango mosusu mpo na kokokisa mokano na ye monene kati na likambo ya boko bakonzi to biyangeli bisusu. Na ndakisa ata atikaki Bakanané kozwa Kana na eleko ya Abrahame, na nsima alongolaki bango mpe apesaki mokili yango na libota ya Abrahame. Nzokande Jéhovah apesaki ndingisa te epai na Bayisraele ete babundisa Amone, Moabe mpe ngomba Seili na boumeli ya batamboli na bango kati na esobe. Nzokande, apesaki etinda ete baboma bokonzi ya Sihone mpe ya Oge.—Genese 15:18-21; 24:37; Exode 34:11; Deteronome 2:4, 5, 9, 19, 24; 3:1, 2.
12 Nsima wana Bayisraele bafandaki na Kana, Jéhovah alandaki kotya likebi mingi epai na bakonzi oyo bazalaki na likambo elongo na libota na ye. Mbala mosusu, ntango Bayisraele bazalaki kosala mabunga, Jéhovah azalaki kotika mokonzi moko mopakano ete akamata bango na boombo. Ntango bazalaki kobongola mitema, azalaki kobikisa mokili na bango na boombo ya mokonzi yango. (Basambisi 2:11-23) Mibu mingi na nsima, atikaki nzela ete Yuda mpe mikili mingi misusu bakwea kati na boombo na maboko ya Babilone. (Yisaya 14:28 kino 19:17; 23:1-12; 39:5-7) Nsima wana Yisraele ekumbamaki na boombo na Babilone, Jéhovah ayebisaki kobima mpe kokwea ya bikonzi ya mokili oyo bisengelaki kozala na bopusi likoló na libota na ye kobanda eleko yango kino na mikolo na biso.—Danyele, mikapo 2, 7, 8 mpe 11.
13. a) Engebene loyembo na Moise, mpo na nini Jéhovah etyaki bandelo mpo na mabota? b) Mpo na nini Nzambe azongisaki lisusu Yisraele na mokili na bango?
13 Moise ayembaki maloba oyo na ntina na Jéhovah: “Na mokolo Oyo-Aleki-Likoló apesaki mabota libula na bango, na mokolo ye akabolaki bana na bato, ye atyaki ndelo na mabota kokokana na motuya na bato na Yisraele. Ndambo na biloko na Jéhovah ezali bato na ye; Yakobo azali libula eponami mpo na ye.”(Deteronome 32:8, 9; tala Misala 17:26) Na yango, mpo na kokokisa mikano na ye, Nzambe azwaki ekateli bikonzi nini bikoumela mpe bikonzi nini bikobomama. Yango wana apesaki mokili moko lokola libula epai na libota ya Abrahame, mpe nsima azongisaki bango na mokili yango, mpo ete Libota elakamaki ekoka kobima na mokili yango, lokola esilaki kosakolama.—Danyele 9:25, 26; Mika 5:2.
14. Kati na makambo mingi, na ndimbola nini Jéhovah azali kotya bakonzi kati na bitelemelo oyo bazali na yango bamoko liboso na bamosusu?
14 Nzokande, soki elobami ete bokonzi nyonso euti na Nzambe, ezali mpo ete Jéhovah azali kotikela bato kokamata bisika ya bokonzi, bamoko liboso na bamosusu, kasi bango nyonso bazali na nse na ye. Yango wana, ntango asambaki liboso na Pilate, Yesu akokaki koloba na ye ete: “Ozali na bokonzi likoló na ngai te soko epesameli yo uta na likolo te.” (Yoane 19:11) Yesu alingaki koloba te na wana ete Pilate aponamaki mpenzampenza na Nzambe mpo na kotyama na ebonga na ye; alingaki nde koloba ete soko Pilate azalaki na lotomo ya koboma to kobikisa ye, ezali mpo ete Nzambe alingaki yango esalema motindo wana.
“Nzambe na mokili oyo”
15. Bokonzi nini Satana azali kosalela likoló na mokili?
15 Kasi tokanisi boni na maloba na Biblia oyo ete Satana azali nzambe, mokonzi, ya mokili? (Yoane 12:31; 2 Bakolinti 4:4) Tokoloba boni mpo na maloba oyo Satana alobaki na lolendo nyonso epai na Yesu na kolakisaka ye bikonzi nyonso ya mokili: “Bokonzi oyo nyonso . . . esili kopesama na ngai, mpe soko nandimi kopesa nani yango, nakopesa yango na ye.” (Luka 4:6) Yesu atyaki ntembe te na maloba wana ya Satana, maloba oyo mayokani na oyo Paulo akomaki na nsima epai na Baefese: “Mpo ete tozali kobunda na mosuni mpe na makila te, kasi na bisika na lokumu mpe na nguya na bilimu mabe kati na likoló.” (Baefese 6:12) Lisusu, mokanda na Emoniseli ezali komonisa Satana lokola dalagona monene oyo azali kopesa “nguya na ye mpe kiti na bokonzi na ye, mpe bokonzi monene” epai na nyama moko ya elilingi na ebongiseli ya politike ya mokili mobimba.—Emoniseli 13:2.
16. a) Nini emonisi ete bokonzi na Satana ezali na ndelo? b) Mpo na nini Jéhovah atiki nzela na Satana ete azala na bokonzi likoló na bato?
16 Tosimba ete na kolobaka na Yesu: “Bokonzi oyo nyonso . . . esili kopesamela ngai,” Satana andimaki ete azali kosalela bokonzi na ye bobele mpo ete Nzambe atikeli ye nzela. Mpo na nini Nzambe atikeli ye yango? Satana akomaki mokonzi ya mokili na Edene ntango afundaki Nzambe polele ete azali mokosi mpe azali kosalela bokonzi na Ye na lolenge mabe. (Genese 3:1-6) Adam mpe Eva balandaki ye mpe baboyaki kotosa Jéhovah Nzambe. Jéhovah mbele akokaki nokinoki, na boyengebene nyonso, koboma Satana mpe bato na ye mibale. (Genese 2:16, 17) Kasi, Satana abetaki ntembe liboso na Jéhovah. Na mayele nyonso, Nzambe atikaki ye bongo koumela mwa ntango mpe apesaki nzela na Adam mpe Eva ete babota bana liboso ya liwa na bango. Na bongo, Nzambe apesaki ntango mpe mabaku mpo ete lokuta ya Satana emonana kati na ntembe oyo ye abimisaki.—Genese 3:15-19.
17, 18. a) Mpo na nini tokoki koloba ete Satana azali nzambe na mokili? b) Na ndimbola nini “bokonzi nyonso euti epai na Nzambe”?
17 Makambo masili koleka uta botomboki na Edene mamonisi ete bifundeli ya Satana bizali mpenza lokumu. Bakitani ya Adam bazwi bolamu ata na nse na boyangeli ya Satana te ata mpe na oyo ya moto te. (Mosakoli 8:9) Nzokande, lolenge ya kosala ya Nzambe epai na libota na ye emonisi ete boyangeli na Nzambe eleki. (Yisaya 33:22) Nzokande, na kobwakaka bokonzi na Jéhovah, na boyebi nyonso to na kozanga koyeba, bakitani mingi ya Adam bazali kokomisa Satana nzambe na bango.—Nzembo 14:1; 1 Yoane 5:19.
18 Mosika te, ntembe oyo ebimisamaki kati na Edene ekosukisama, Bokonzi na Nzambe ekokamata mobimba na maboko na yango botambwisi ya makambo na bato, mpe Satana akobwakama kati na libulu mozindo. (Yisaya 11:1-5; Emoniseli 20:1-6) Kasi, na kozelaka, esengelaki ete mwango moko, to eyangeli, etyama kati na bato mpo ete bazala na bomoi kati na ebongiseli moko. Jéhovah “azali Nzambe na mobulu te, kasi na kimya.” (1 Bakolinti 14:33) Yango wana apesaki nzela ete bibongiseli bityama kati na bato oyo babotamaki na libanda ya elanga na Edene, mpe apesaki nzela ete bato basalela bokonzi kati na bibongiseli yango. Ezali nde na ndimbola wana “bokonzi nyonso euti epai na Nzambe.”
Mikonzi na kolongobana
19. Mikonzi ya mokili bazali bango nyonso mpenzampenza kotambwisama na Satana?
19 Kobanda makambo oyo malekaki na Edene, Satana azwaki bonsomi monene liboso na bato, mpe asalelaki bonsomi yango mpo na kotambwisa makambo awa na mabelé engebene maloba na lolendo oyo alobaki yango na lolendo nyonso epai na Yesu. (Yobo 1:7; Matai 4:1-10) Kasi tosengeli kosukisa te ete mokonzi nyonso atambwisami mpenzampenza na Satana. Bamosusu lokola Néron na ekeke ya liboso mpe Adolf Hitler na ekeke ya ntuku mibale bamonisaki mpenza elimo ya Satana. Kasi bamosusu te. Selegi Paulo, guvernere ya chypre, azalaki “mobali na mayele” oyo “azalaki na mposa na koyoka liloba na Nzambe.” (Misala 13:7) Galio, guvernere ya Akaya, aboyaki kondima bifundeli oyo Bayuda bafundaki na yango Paulo. (Misala 18:12-17) Ebele mosusu na batambwisi basalelaki bokonzi na bango na lolenge ya lokumu mpe na lisosoli malamu.—Tala Baloma 2:15.
20, 21. Makambo nini ya ntango na biso mamonisi ete mikonzi na mokili basalaka ntango nyonso mokano ya Satana te?
20 Emoniseli esakolaki ete na boumeli ya “mokolo na Nkolo,” oyo ebandaki na 1914, Jéhovah akosalela ata mikonzi ya mokili mpo na kokweisa mikano ya Satana. Mokanda yango elobi ete ebele na minyoko oyo Satana asanzolaki baklisto bapakolami esengelaki komelama na “mabelé.” (Emoniseli 1:10; 12:16) Na yango, bafandi na “mokili”, libota na bato ya lelo, basengelaki kobikisa libota na Jéhovah liboso na monyoko oyo ebimisamaki na Satana.
21 Esalemaki motindo wana? Ee. Na Etats-unis, na ndakisa kati na bamibu 1930 mpe 1940, ba Témoins de Jéhovah bakutanaki na botemeli makasi. Mingi babetamaki na bibele na bato mpe bakangamaki na lolenge ezangi kondimama na mibeko. Ezalela na bango ebongwanaki ntango Esambiselo monene to cour supreme ya mboka ekamataki mwa ndambo na bikateli oyo elongisaki bonsomi ya mosala na bango. Kati na mikili misusu mpe, bakonzi basalisaki libota na Nzambe. Esili koleka mibu ntuku minei Batemwe mibale babetamaki na etuluku moko ya bakatolike na mboka cork, na lrlande. Policier moko akendaki kobikisa bango, mpe esambiselo moko ekweisaki batomboki wana. Kala mingi te na mobu moleki, na Fidji, bamekaki kopekisa mosala ya ba Témoins de Jéhovah na boumeli ya likita moko ya mikonzi minene ya mboka. Moko na bango alobaki na molende nyonso mpo na kokotela Batemwe, mpe likanisi yango ebwakamaki kozanga nkaka.
22. Mituna nini mitalelami mwa mosika kati na zulunalo oyo?
22 Emonani ete, mikonzi ya mokili basalelaka ntango nyonso mikano ya Satana te. Baklisto bakoki kotosa bango kozanga kokanisa ete bazali bongo kotosa Satana ye moko. Na yango, bakozala na botosi epai na mikonzi wana baleki liboso ntango nyonso oyo Nzambe akotikela bango nzela ete bazala naino. Kasi kotosa bango elimboli nini? Mpe na nini baklisto basengeli komizela na nsima epai na bakonzi oyo baleki liboso? Mituna oyo mikotalelama kati na masolo ya boyekoli oyo mabandi na lokasa 18 mpe na lokasa 23 ya zulunalo oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala, na ndakisa, kosalelama ya liloba “mpako” (phoros) kati na Luka 20;22. Tala lisusu Matai 17:25, (Traduction du monde nouveau) epai kuna liloba na greke télos, oyo ebongolami na Baloma 13:7 na “mpako”, ebongolami ete “taxes.”
b Liloba na greke oyo ebongolami na “baoyo bazali liboso”, hupérokhe, ezali na boyokani na verbe hupérékho. Ezali liloba wana ya greke nde ebimisi adjectif “baoyo baleki liboso” oyo ezali komonana kati na liloba “bakonzi baleki liboso”. Likambo yango endimisi ete bakonzi yango bazali bakonzi ya leta. Kobongola ya Baloma 13:1 kati na la Nouvelle Bible anglaise, “Moto nyonso asengeli kozala na botosi epai na mikonzi baleki likoló”, ezali na libunga. Mpamba te, atako baleki bato mosusu mpo na bokonzi, nzokande bazali bakonzi baleki likoló te
Bozongeli?
◻ Banani bazali bakonzi baleki liboso?
◻ Mpo na nini tokoki koloba ete “bokonzi nyonso bouti na Nzambe”?
◻ Mpo na nini Jéhovah apesi nzela ete mokili ezala na nse na bokonzi ya Satana?
◻ Na lolenge nini Nzambe azali kotika esika na mikonzi ya mokili kati na “bitelemelo na bango bamoko liboso na bamosusu”?
[Elilingi na lokasa 13]
Nsima na móto oyo epelaki na Rome, Néron amonisaki mpenza elimo motindo moko na Satana
[Elilingi na lokasa 15]
Selegi Paulo, guvernere ya chypre, azalaki na mposa ya koyoka liloba na Nzambe