Oyebaki yango?
Longolá vinyo, masanga nini mosusu ya makasi bazalaki kosala na ntango ya kala?
▪ Mbala mingi, Biblia elobelaka esika moko “vinyo ná masanga oyo elangwisaka.” (Kolimbola Mibeko 14:26; Luka 1:15) Maloba “masanga” elakisi te ete bazalaki kosala masanga yango ndenge basalaka masanga na baizini lelo oyo, mpamba te baizini ya kosala masanga esalemaki nde bikeke mingi na nsima. Masanga oyo elangwisaka ezalaki kosalema te kaka na bambuma lokola vinyo, date, figi, pomɛ, mpe mbuma ya grenade; kasi ezalaki mpe kosalema na mafuta ya nzoi.
Kutu, maloba “masanga oyo elangwisaka” ekoki kosalelama mpe mpo na bière. Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “masanga oyo elangwisaka” eyokani na liloba moko ya Akkadien oyo esalelami mpo na kolobela bière moko ya Mésopotamie oyo bazalaki kosala na ɔrje, oyo eyebanaki mingi. Masanga yango ezalaki na alcool mingi te, kasi ezalaki kolangwisa soki moto amɛli yango mingi. (Masese 20:1) Na malita ya kala ya Ezipito, bamonaki bambɛki ya mabele mpe mayemi ya bisika oyo bazalaki kosala masanga. Na Babilone, bazalaki komɛla bière mikolo nyonso na bandako ya bakonzi mpe ya babola. Bato ya Filistia bazalaki mpe komɛla bière mingi. Na Palestine mobimba, bato ya arkeoloji bakutaki bambɛki ya minene oyo ezalaki na kiyungulu na minɔkɔ na yango. Bambɛki yango ezalaki koyungula bière, mpo na kopekisa ete bamɛli bámɛla te basalite ya mposo ya ɔrje oyo basalaki na yango masanga.
Na mikolo ya Paulo, mpo na nini ezalaki likama kosala mobembo na masuwa na ntango mosusu na mbula?
▪ Mpo na mipɛpɛ ya makasi, masuwa oyo ntoma Paulo azalaki kosala na yango mobembo elekisaki ntango molai mpo na kosɛma na wɛsti na bokula ya Azia Moke. Ntango bakómaki na esika moko boye ndenge Biblia elobi, ekómaki “likama kotambola na masuwa mpo kokila bilei ya mokolo ya kozipa masumu kutu esilaki koleka.” Paulo ayebisaki baninga na ye ya mobembo ete soki tokobi kaka mobembo likama ekoki kobima ya kobungisa ‘kaka biloko ná masuwa te, kasi mpe milimo na biso.’—Misala 27:4-10.
Kokila bilei ya mokolo ya kozipa masumu, ezalaki kosalema na nsuka ya Sɛtɛmbɛ to na ebandeli ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ. Bakapitɛni ya masuwa ya Baroma bayebaki ete mbala mingi ezalaki likama te kosala mobembo kobanda na mokolo ya 27 Mai tii na 14 Sɛtɛmbɛ. Katikati na 14 Sɛtɛmbɛ mpe 11 Novɛmbɛ, kosala mobembo ezalaki likama, mpe kobanda na mokolo ya 11 Novɛmbɛ tii 10 Marsi, bazalaki kopekisa masuwa etambola na mbu. Likambo yango emonani na likama oyo Paulo akutanaki na yango na mobembo oyo basalaki mpo na mopɛpɛ makasi oyo ebɛtaki. (Misala 27:13-44) Bakapitɛni ya masuwa bazalaki kokutana na mipɛpɛ makasi mpe mikakatano mpenza ntango bazali kotambwisa masuwa. Mapata ezalaki kozipa moi mpe na butu, ezalaki kobomba minzoto. Londende mpe mbula ezalaki mpe kopekisa bango bámona malamu makama oyo ezalaki liboso.
[Elilingi na lokasa 23]
Milangi ya bière oyo esalemi na mabaya oyo bazalaki kosalela na Ezipito
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Erich Lessing/Art Resource, NY
[Elilingi na lokasa 23]
Masuwa ya Baroma c. 100-200 ntango na biso
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.