Ndenge tozwaka nguya ya kobundisa komekama mpe kolɛmba nzoto
“Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino.”—MIS. 1:8.
1, 2. Yesu alakaki bayekoli lisalisi nini, mpe mpo na nini bazalaki na mposa ya kozwa yango?
YESU ayebaki ete na makoki na bango moko, bayekoli na ye bakokoka te kotosa makambo nyonso oyo apesaki bango mitindo. Soki totali bonene ya mosala ya kosakola oyo apesaki bango, makasi ya banguna na bango, mpe bolɛmbu ya nzoto, ezalaki polele ete bazalaki na mposa ya nguya moko oyo eleki makasi. Na yango, mwa moke liboso amata na likoló, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba mpe na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.”—Mis. 1:8.
2 Elaka wana ebandaki kokokisama na Pantekote ya mobu 33 T.B. ntango elimo santu epesaki bayekoli ya Yesu Kristo nguya ya kotondisa Yerusaleme na mateya na bango. Botɛmɛli moko te ekokaki kopekisa yango. (Mis. 4:20) “Mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo,” bayekoli ya Yesu ya sembo, ata mpe biso lelo, bakozala mpenza na mposa ya nguya wana oyo euti na Nzambe.—Mat. 28:20.
3. (a) Pesá bokeseni oyo ezali kati na elimo santu mpe nguya. (b) Nguya oyo Yehova apesaka ekoki kosalisa biso tósala nini?
3 Yesu alakaki bayekoli na ye ete ‘bakozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bango.’ Liloba “nguya” mpe “elimo” ezali na ndimbola moko te. Elimo ya Nzambe, to makasi na ye oyo esalaka mosala ezali makasi oyo etindami mpe ezali kosala na kati ya bato to biloko mpo ekokisa mokano ya Nzambe. Nzokande, nguya ezali “likoki ya kosala likambo moko to kobimisa mbuma ya mosala moko.” Ekoki kofanda mpamba na kati ya moto to eloko moko tii ekosɛnga kosalela yango mpo na kosala likambo moko. Na yango, tokoki kokokanisa elimo santu na kura oyo ezali kokɔtisa mɔtɔ na bateri; nzokande, nguya ezali lokola mɔtɔ oyo efandi na kati ya bateri yango. Nguya oyo Yehova apesaka basaleli na ye na nzela ya elimo santu epesaka mokomoko na biso likoki ya kotosa elako na biso ya komipesa na Nzambe, mpe soki esengeli, ya kotɛmɛla bopusi ya mabe.—Tángá Mika 3:8; Bakolose 1:29.
4. Makambo nini tokotalela na lisolo oyo, mpe mpo na nini?
4 Ndenge nini nguya oyo elimo santu epesaka biso emonanaka? Elimo santu ekoki kotinda biso tósala makambo nini mpe tózala na bizaleli nini? Lokola tolingaka kosalela Nzambe na bosembo, tokutanaka na mikakatano mingi—oyo euti na Satana, na ebongiseli ya makambo na ye, to mpe na nzoto na biso ya kozanga kokoka. Ezali na ntina tólonga mikakatano yango mpo tókoba kozala bakristo ya solo, tóbimaka na mosala ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ, mpe tóbatela boyokani malamu na Yehova. Tótala ndenge elimo santu esalisaka biso tóbundisa komekama mpe tólonga kolɛmba ya nzoto mpe kosila makasi.
Mpo na kobundisa komekama
5. Ndenge nini libondeli ekoki kopesa biso nguya?
5 Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondela boye: “Salisá biso tókwea na komekama te, kasi bikisá biso na moto mabe.” (Mat. 6:13) Yehova akosundola te basaleli na ye ya sembo oyo bábondelaka ndenge wana. Na libaku mosusu, Yesu alobaki ete ‘Tata na likoló akopesa baoyo bazali kosɛnga ye elimo santu.’ (Luka 11:13) Elaka wana ya Yehova ya kopesa biso elimo santu mpo tósala oyo ezali malamu ekitisaka biso motema mpenza! Ya solo, yango elimboli te ete Yehova akopekisa komekama ekómela biso. (1 Ko. 10:13) Kutu, ntango tokutani na komekama nde ntango ya kobondela mingi koleka.—Mat. 26:42.
6. Biyano ya Yesu ntango Satana amekaki ye ezalaki kouta wapi?
6 Mpo na koyanola na komekama ya Zabolo, Yesu azongelaki makomami. Liloba ya Nzambe ezalaki polele na makanisi ya Yesu ntango ayanolaki ete: “Ekomamá ete . . . Ekomamá lisusu boye . . . Longwá, Satana! Mpo ekomamá ete: ‘Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.’” Bolingo oyo Yesu azalaki na yango mpo na Yehova mpe Liloba na Ye esalisaki ye atɛmɛla masɛnginya nyonso oyo Momeki atyaki liboso na ye. (Mat. 4:1-10) Ntango Yesu atɛmɛlaki komekama moko nsima ya mosusu, Satana atikaki ye.
7. Ndenge nini Biblia esalisaka biso tótɛmɛla komekama?
7 Lokola Yesu asalelaki Makomami mpo na kotɛmɛla komekama ya Zabolo, biso mpe tosengeli kosala bongo kutu mingi koleka! Ya solo, mpo tózwa likoki ya kotɛmɛla Zabolo ná bato na ye, tosengeli kozala na ekateli ya koyeba malamumalamu mitinda ya Nzambe mpe kokangama na yango. Bato mingi bakómaki kosala makambo oyo eyokani na mitinda ya Biblia ntango bayekolaki Makomami mpe bakómaki kosepela na bwanya mpe boyengebene ya Nzambe. Ya solo, “liloba ya Nzambe” ezali nguya oyo ekoki kososola “makanisi mpe mikano ya motema.” (Ebr. 4:12) Soki moto azali kotánga Makomami mpe komanyola yango mingi, akoyeba ‘kososola bosolo ya Yehova.’ (Dan. 9:13) Lokola ezali bongo, tosengeli komanyolaka mikapo oyo etali mpenza bolɛmbu na biso.
8. Na nzela ya nini tokoki kozwa elimo santu?
8 Longola boyebi ya Makomami,Yesu alongaki kotɛmɛla komekama mpo “atondaki na elimo santu.” (Luka 4:1) Mpo na kozwa makasi mpe makoki ya ndenge wana, tosengeli kopusana penepene na Yehova na kosaleláká bibongiseli nyonso oyo azwá mpo na kotondisa biso na elimo na ye. (Yak. 4:7, 8) Kati na bibongiseli yango ezali boyekoli ya Biblia, libondeli, mpe kosangana elongo na baninga bakristo. Bato mingi bazwaki matomba ya komipesa mingi na makambo ya elimo, oyo esalisaka biso tótya makanisi na makambo oyo etongaka.
9, 10. (a) Komekama nini ezali mingi na teritware na bino? (b) Ndenge nini komanyola mpe libondeli ekoki kopesa yo makasi ya kotɛmɛla komekama ata na ntango omoni ete osili makasi?
9 Osengeli kotɛmɛla masɛnginya nini? Omekamá na mposa ya kozala selesele na moto oyo azali molongani na yo te? Soki obalá te, osilá koyoka mposa ya kondima kobima na moto oyo azali mondimi te? Ntango bazali kotala televizyo to kosalela Internet, bakristo bakoki kokutana mbala moko na komekama ya kotala eloko moko ya mbindo. Soki likambo yango esilá kokómela yo, osalaki ndenge nini? Ekozala malamu kokanisa ndenge oyo libunga moko ekoki komema na mosusu mpe na nsima na mbeba monene. (Yak. 1:14, 15) Kanisá mpasi oyo likambo moko ya kozanga bosembo ekoki kosala epai ya Yehova, na lisangá mpe na libota na yo. Nzokande, moto oyo abatelaka mitinda ya Nzambe na bosembo, azalaka na lisosoli ya pɛto. (Tángá Nzembo 119:37; Masese 22:3.) Ntango nyonso oyo okutani na komekama ya ndenge wana, zalá na ekateli ya kobondela mpo na kosɛnga makasi ya kotɛmɛla yango.
10 Ezali na likambo mosusu oyo tosengeli kobosana te na ntina etali komekama ya Satana. Ntango Satana ayaki komeka Yesu, Yesu autaki kokila bilei mikolo 40 na esobe. Na ntembe te, Zabolo akanisaki ete yango ezalaki ‘ntango ya malamu’ mpo na komeka bosembo ya Yesu. (Luka 4:13) Satana alukaka mpe bantango ya malamu mpo na komeka bosembo na biso. Yango wana, ezali mpenza na ntina ete tózala ntango nyonso makasi na elimo. Mbala mingi Satana amekaka moto na ntango amoni ete moto yango azali na bolɛmbu makasi. Na yango, ntango nyonso oyo tomoni ete makasi na biso esili to tolɛmbi nzoto, tosengeli kozala na ekateli makasi mpenza ya kosɛnga Yehova abatela biso mpe apesa biso elimo santu.—2 Ko. 12:8-10.
Ntango tosili makasi mpe tolɛmbi nzoto
11, 12. (a) Mpo na nini lelo bato mingi bayokaka ete balɛmbi nzoto? (b) Nini ekoki kopesa biso nguya ya kobundisa kolɛmba nzoto?
11 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tolɛmbaka nzoto na bantango mosusu. Ezali bongo mingimingi lelo mpo tozali na eleko oyo ezali na mitungisi mingi. Mbala mosusu eleko oyo tozali na yango ezali eleko ya mpasi koleka bileko nyonso. (2 Tim. 3:1-5) Lokola Armagedone ezali kokóma pene, mikakatano ya mbongo, mpe mitungisi mosusu ezali komata. Na yango, esengeli kokamwisa biso te soki bato mosusu bazali komona ete ekómi mpasi mingi mpo bákokisa mikumba na bango ya kokokisa bamposa ya mabota na bango. Bazali koyoka ete makasi na bango esili, ata kutu koyoka ete mikumba na bango eleki kilo. Soki ezali bongo mpo na yo, ndenge nini okoki kobundisa mitungisi yango?
12 Kobosana te, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete akopesa bango mosungi—elimo santu ya Nzambe. (Tángá Yoane 14:16, 17.) Ezali nguya oyo eleki nguya nyonso mosusu na molɔ́ngɔ́ mobimba. Yehova akoki kosalela nguya yango mpo na kopesa biso makasi “mingi mpenza” mpo tóyika mpiko na mokakatano ya ndenge nyonso. (Ef. 3:20) Ntoma Paulo alobaki ete soki totyeli elimo yango motema, tokozwa “nguya oyo eleki makasi,” ata soki “tokamolami na ndenge nyonso.” (2 Ko. 4:7, 8) Yehova alaki te ete akolongola mitungisi, kasi ayebisi biso ete na nzela ya elimo na ye, akopesa biso makasi ya kobundisa yango.—Flp. 4:13.
13. (a) Ndenge nini elenge moko azwaka makasi ya koyika mpiko na likambo moko ya mpasi? (b) Oyebi mpe bandakisa mosusu ya ndenge wana?
13 Tózwa ndakisa ya ndeko mwasi Stephanie, mobongisi-nzela oyo azali na mbula 19. Ntango azalaki na mbula 12, akangamaki mpe bamonaki ete azali na kanser ya bɔɔngɔ. Banda wana, basalaki ye lipaso mbala mibale, basalisaki ye na masini; akangamaki lisusu mbala mibale mpe mpo na yango, ngámbo na ye ya lobɔkɔ ya mwasi esalaka malamu lisusu te mpe amonaka malamu te. Esɛngaka Stephanie abatela makasi na ye mpo na kosala makambo oyo amonaka ete ezali na ntina mingi, na ndakisa makita ya lisangá mpe mosala ya kosakola. Kasi, amonaka ete elimo ya Yehova esalisaka ye ayika mpiko na balolenge mingi. Mikanda ya moombo ya sembo oyo elobeli mikakatano oyo baninga bakristo bazali kokutana na yango epesaka ye makasi na bantango oyo alɛmbi nzoto. Bandeko mibali mpe basi bazali kosunga ye na ndenge batindelaka ye mikanda mpe balobaka na ye maloba ya kolendisa liboso mpe nsima ya makita. Bato oyo basepelaka na nsango malamu bango mpe bamonisaka botɔndi mpo na makambo oyo Stephanie azali koteya bango na ndenge bayaka na ndako ya Stephanie mpo na koyekola Biblia. Mpo na nyonso wana, Stephanie amonaka ete azali na nyongo monene ya komonisela Yehova botɔndi. Asepelaka mingi na vɛrsɛ ya Nzembo 41:3, mpo andimaka ete ekokisamaka na bomoi na ye.
14. Likambo nini tosengeli kosala te ntango tolɛmbi nzoto, mpe mpo na nini?
14 Ntango tosili makasi to tozali na mitungisi, tosengeli soki moke te kokanisa ete ndenge ya kobundisa mitungisi yango ezali nde kotika komipesa mingi na makambo ya elimo. Kosala bongo ezali likambo oyo eleki mabe. Mpo na nini? Mpamba te makambo lokola boyekoli ya biso moko to na libota, mosala ya kosakola, mpe koyangana na makita, nde esalisaka biso tózwa elimo santu, oyo epesaka biso makasi. Makambo ya elimo epesaka ntango nyonso makasi. (Tángá Matai 11:28, 29.) Mbala boni tomonaka bandeko mibali mpe basi bayei na makita balɛmbi, kasi na ntango ya kozonga na ndako, bakómi koyoka lokola makasi na bango ezongi, ba bateri na bango ya elimo ekɔti lisusu mɔtɔ!
15. (a) Yehova alaki biso ete akokómisa bomoi ya mokristo pɛtɛɛ? Limbolá na kolanda Makomami. (b) Nzambe alaki biso nini, mpe yango ebimisi motuna nini?
15 Ya solo, yango elingi koloba te ete kozala mokristo ezali likambo ya pɛtɛɛ. Esɛngaka milende mpo na kozala mokristo ya sembo. (Mat. 16:24-26; Luka 13:24) Atako bongo, na nzela ya elimo santu, Yehova akoki kopesa makasi na moto oyo alɛmbi. Mosakoli Yisaya akomaki boye: “Baoyo bazali kotyela Yehova elikya bakozwa nguya ya sika. Bakomata likoló na mapapu lokola bampongo. Bakopota mbangu mpe bakosila makasi te; bakotambola mpe bakolɛmba te.” (Yis. 40:29-31) Lokola ezali bongo, tosengeli komituna boye: Nini mpenza etindaka biso tólɛmba kosala makambo ya elimo?
16. Tokoki kosala nini mpo tólongola makambo mosusu oyo ekoki kotinda biso tósila makasi to tólɛmba nzoto?
16 Liloba ya Yehova elendisi biso ‘tóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.’ (Flp. 1:10) Ntoma Paulo akokanisaki bomoi ya mokristo na momekano ya mbangu; na litambwisi ya elimo ya Nzambe, apesaki toli oyo: “Tólongola mpe kilo nyonso . . . , mpe tóyika mpiko ntango tozali kopota mbangu na momekano oyo etyami liboso na biso.” (Ebr. 12:1) Likanisi na ye ezalaki ete tosengeli koboya kolanda mikano ya mpambampamba, bakilo ya mpambampamba, oyo ekoki kolɛmbisa biso. Ekoki kozala ete bamosusu kati na biso bazali kaka koluka kobakisa mindɔndɔ na bomoi oyo etondi kutu na makambo. Na yango, soki mbala mingi oyokaka ete makasi esili mpe ozali na mitungisi, ekozala malamu otala soki mosala ya mosuni ezali kosilisa yo makasi, mbala boni osalaka mibembo mpo na bisengo, mpe soki osalaka masano ya makasi to kominanola oyo elɛmbisaka mingi. Bokatikati mpe bopɔlɔ esengeli kotinda biso nyonso tóyeba esika makasi na biso esuki mpe tólongola makambo mosusu ya mpambampamba.
17. Mpo na nini bamosusu bakoki kolɛmba nzoto, kasi Yehova andimisi biso nini mpo na likambo yango?
17 Basusu kati na biso bakoki mpe kolɛmba nzoto mwa moke mpo nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo eyei noki te ndenge bazalaki kokanisa. (Mas. 13:12) Nzokande, moto nyonso oyo azali koyoka ndenge wana, akoki kolendisama na maloba ya Habakuku 2:3 oyo elobi ete: “Emonaneli ezali naino mpo na ntango oyo etyamá, mpe ezali koya mbangumbangu kino na nsuka, mpe ekobuka lokuta te. Ata soki eumeli, zelá yango kaka; mpo ete kozanga ntembe yango ekokokisama. Ekokóma nsima ya ngonga te.” Yehova andimisi biso ete nsuka ya ebongiseli oyo ekoya na ngonga mpenza oyo Ye moko atyá!
18. (a) Bilaka nini epesaka yo makasi? (b) Lisolo oyo elandi ekosalisa biso na nini?
18 Ya solo, basaleli nyonso ya sembo ya Yehova bazelaka mokolo oyo kosila makasi mpe kolɛmba nzoto ekozala lisusu te, ntango bato nyonso bakozala na “makasi ya bolenge.” (Yobo 33:25) Ata sikoyo tokoki kozala na nguya kati na biso na makasi oyo elimo santu ekopesa biso ntango tozali komipesa na makambo ya elimo. (2 Ko. 4:16; Ef. 3:16) Kotika te ete kolɛmba ezangisa yo mapamboli ya seko. Mokakatano nyonso—ezala mpo tomekami, tosili makasi to tolɛmbi nzoto—ekoleka, soki sikoyo te, na mokili ya sika ya Nzambe. Na lisolo oyo elandi, tokomona ndenge oyo elimo santu epesaka bakristo nguya ya kotɛlɛma liboso ya minyoko, kotɛmɛla bopusi mabe ya baninga, mpe koyika mpiko na mikakatano mosusu.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini botángi ya Biblia epesaka biso nguya?
• Ndenge nini kobondela mpe komanyola epesaka biso nguya?
• Ndenge nini okoki kolongola makambo oyo ekoki kolɛmbisa yo?
[Elilingi na lokasa 24]
Makita ya bokristo ekoki kopesa biso makasi na elimo