Jéhovah azali Mokonzi na biso!
“Ekoki ete totosa Nzambe, (lokola mokonzi, MN), liboso na kotosa bato.”—MISALA 5:29.
1, 2. Na ndakisa ya bantoma ba Témoins de Jéhovah bazali kosala nini ntango bato bazali kopesa bango bitinda oyo bizali kotemela mokano na Nzambe?
JÉHOVAH NZAMBE apesaki nzela ete mibali 12 basambisama liboso ya tribinale moko monene na mobu 33 ya ntango na biso. Tribinale monene wana ezalaki Sanhédrin ya Bayuda mpe bantoma ya Yesu Klisto nde bazalaki bafundami. Nganga monene alobaki na bango boye: ‘Topekisaki bino makasi ete boteya na kosalela nkombo oyo te, kasi bosili kotondisa Yelusaleme na mateya na bino.’ Nde Petelo na bantoma mosusu balobaki ete: “Ekoki ete totosa Nzambe, (lokola mokonzi, MN), liboso na kotosa bato.” (Misala 5:27-29). Na maloba yango bamonisaki ete: “Jéhovah azali Mokonzi na biso!”
2 Ya solo, Jéhovah azali Mokonzi na bayekoli ya solo ya Yesu. Ezali yango Misala na Bantoma emonisi polele, mokanda na Biblia oyo ekomamaki na mboka Rorne pene na mobu 61 epai na “Luka, monganga molingami”. (Bakolose 4:14.) lokola bantoma, lelo besaleli na Jéhovah bazali kotosa Mokonzi na bango ya likoló ntango bato bazali kopesa bango bitinda oyo biyokani na mokano na ye te. Kasi Misala ya Bantoma ekoki koteya biso nini lisusu? (Na boyekoli na yo moko, tosengi yo ete etonga biteni oyo bimonisami na makomi ya moindo.)
Yesu atindi batemwe
3. Nsima wana bazwaki “batisimo kati na elimo santu”, nini ezalaki mosala ya ntina mpo na bayekoli ya Yesu?
3 Bantoma bazwaki etelemelo makasi mpo na Nzambe, mpamba te balendisamaki na elimo. Ya solo, Yesu akufaki likolo ya nzete na mpasi, kasi bayebaki ete asekwaki (1:1-5). Ya solo, Yesu “amimonisaki na bomoi” mpe ateyaki solo na ntina na Bokonzi na boumeli ya mikolo 40 ntango wana ezalaki ye kolata nzoto ya mosuni. Alobaki mpe na bayekoli na ye ete bazela na Yelusaleme mpo bazwa batisimo ’’kati na elimo santu”. Na bongo mosala ya kosakola esengelaki kozala mosala ya ntina mpo na bango, lokola yango ezali mpo na Ba Témoins de Jéhovah na ntango na biso.—Luka 24:27, 49; Yoane 20:19 kino 21:24.
4. Nini esengelaki kosalema ntango bayekoli ya Yesu bakokaki kozwa elimo santu?
4 Liboso bazwa batisimo na elimo santu, bantoma bazalaki na libunga na kokanisaka mpo na bokonzi ya mabelé oyo ekolongola boyangeli ya Rome wana etunaki bango motuna oyo ete: “Nkolo, okozongisela Yisraele bokonzi na ntango oyo?’’ (1:6-8). Na yango, Yesu andimaki likanisi na bango te, mpamba te ‘ezalaki likambo na bango te koyeba ntango soko bilaka’. ‘Wana elimo santu ekoya likolo na bango’, ekopesa bango nguya mpo bakoka kotatola na ntina na Bokonzi ya likoló ya Nzambe, kasi mpo na bokonzi moko ya mabelé te. Basengelaki kosakola na Yelusaleme, na Yuda mpe na Samarie, “mpe kino nsuka na mokili”. Na lisalisi ya elimo, Ba Témoins de Jéhovah bazali kokokisa mosala yango na mokili mobimba na boumeli ya mikolo na nsuka.
5. Na ndimbola nini Yesu asengelaki kozonga bobele bongo na motindo ekendaki ye?
5 Yesu apesaki na bayekoli na ye mokumba ya kokokisa mosala oyo ya kosakola na mokili mobimba ntango alingaki komata na likoló. Ntango abandaki komata, atombwamaki wana ezalaki ye kokabwana na bango mpe, nsima, akotaki liboso ya Mokonzi na ye na likoló mpe abandaki kosala kati na makoló (1:9-11). Nsima wana lipata ebombaki ye na miso na bantoma, alongolaki lolenge ya nzoto ya mosuni. Na bongo baanzelu mibale bamonanaki mpe balobaki ete ‘akozonga bobele bongo’. Mpe yango esalamaki se bongo. Lokola ezalaki bobele bayekoli na Yesu nde bamonaki ye ntango amataki, bobele bongo ezali Ba Témoins de Jéhovah nde bazali kososola kozonga na ye.
Jéhovah aponi
6. Mokitani na Yuda lscariote aponamaki ndenge nini?
6 Bantoma bazongaki noki na Yelusaleme (1:12-26). Kati na chambre moko ya likoló (mbala mosusu epai na Marie, mama na Malako), bantoma basembwi 11 balendendelaki kati na mabondeli elongo na bandeko mibali na Yesu, na bayekoli na ye mosusu mpe na mama na ye, Marie. (Malako 6:3; Yakobo 1:1) Kasi nani asengelaki kozwa “mokumba” na Yuda? (Nzembo 109:8) Pene na bayekoli 120 bazalaki wana ntango Nzambe aponaki mokitani na Yuda oyo atekisaki Yesu, yango nde ezongisaki motuya ya bantoma na 12. Esengelaki kozala moto oyo azalaki moyekoli na boumeli na mosala na Yesu mpe oyo azalaki temwe na lisekwa na ye. Ya solo, asengelaki mpe kondima Jéhovah lokola Mokonzi. Nsima na kobondela babwakaki mbese na ntina na Matias mpe Yosefe Barsabase. Nzambe aponaki Matias.—Masese 16:33.
7. (a) Na ndimbola nini Yuda “asombaki elanga na lifuti na lisumu na ye”? (b) Yuda akufaki ndenge nini?
7 Yuda lscariote andimaki Jéhovah te lokola Mokonzi. Atekisaki Mwana na Nzambe na palata 30. Yuda azongisaki mbongo yango epai na banganga minene, kasi ntoma Petelo alobi ete mopengwi oyo ‘asombi elanga na lifuti na lisumu na ye’. Elingi koloba nini? Ete Yuda apesaki mbongo mpe yango nde basalelaki mpo na kosomba elanga oyo babiangaki “Elanga na makila”, esika oyo eyaki koyebana na motindo na mabelé oyo ezali plat oyo ezalaki na sud kotalana na lobwaku ya Honnom. Lokola boyokani na ye elongo na Mokonzi na likoló ebebaki libela, Yuda “akei mpe amikakisi na nzete’’. (Matai 27:3-10.) Ekoki kozala ete nsinga to etape na nzete likolo na yango amikakisaki ekatanaki to ebukanaki, kino ‘akweyaki motó na nse, nzoto na ye epasukaki na katikati’ likoló na mabanga ya mino. Tika ete moko te kati na biso abeba kino kokoma ndeko ya lokuta!
Batondi na elimo santu
8. Ntango nini bayekoli ya Yesu bazwaki batisimo na elimo santu, mpe na yango likambo nini esalemaki?
8 Bongo, ntango nini bazwaki batisimo na elimo santu, batisimo oyo elakamaki na bango? Esalamaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33, mikolo zomi nsima wana Yesu amataki na likoló. (2:1-4). Oyo nde likambo monene na kopesa esengo! Kanisa likambo oyo esalamaki Bayekoli soko 120 bazalaki kati na chambre na likoló ntango ‘lokito ebimaki na likoló pwasa lokola lokito na kopepa na mopepe makasi, etondisaki ndako mobimba’. Ezalaki mopepe te, kasi ekokaki kolobama ete yango. Ndemo, “lokola móto”, efandaki likoló na moyekoli moko moko mpe likoló na ntoma moko moko. “Bango nyonso batondaki na elimo santu mpe babandaki koloba na minoko mosusu.” Ntango na batisimo wana, babotamaki mpe na elimo santu, bapakolamaki mpe batiamaki elembo lokola ndanga mpo na libula ya elimo.—Yoane 3:3, 5; 2 Bakolinti 1:21, 22; 1 Yoane 2:20.
9. Bayekoli oyo batondaki na elimo santu balobaki mpo na makambo nini?
9 Likambo oyo monene ekamwisaki Bayuda mpe baoyo babongwanaki na losambo ya Bayuda, ‘bango bautaki na mabota nyonso na nse na likolo’, mpe bayaki na Yelusaleme. (2:5-13). Na kokamwa mingi, batunaki boye: “Ndenge nini moko na moko na biso azali koyoka monoko ya mboka na ye?’ Ezalaki mbala mosusu monoko oyo bazalaki koloba na bisika lokola mokili ya Médie (na est ya Yuda), mokili ya Phrygie (na Asie Mineure) mpe Rome (na Mpoto). Na koyokaka bayekoli koloba na minoko mikeseni “makambo kitoko na Nzambe”, mingi na bango bakamwaki, kasi batyoli balobaki ete balangwi masanga.
Petelo apesaki litatoli oyo esimbaki mitema
10. Likambo monene oyo esalamaki na Pantekote ya mobu 33 ekokisaki esakweli nini, mpe ezali na bokokani na ntango na biso?
10 Ntoma Petelo abandaki kopesa litatoli na komonisaka ete balangwaki masanga te mpo ezalaki naino bobele ngonga na misato ya ntongo. (2:14-21) Kasi likambo wana monene ekokisaki nde elaka oyo Nzambe apesaki ya kosopa elimo santu likoló na libota na ye. Ntoma Petelo apemamaki na Nzambe mpo na kolakisa eleko na biso na kobakisaka maloba “na mikolo na nsuka” mpe ‘bakosakola’. (Yoele 2:28-32.) Jéhovah asengelaki kopesa bikamwiseli uta na likoló mpe bilembo na mabelé liboso ya mokolo monene na ye, mpe bobele baoyo bakobianga nkombo na ye na kondima nde bakobika. Bobele bongo, na mikolo na biso, elimo esopami likoló na baklisto bapakolami mpe epesi bango nzela ya ‘kosakola’ na nguya nyonso mpe na makoki.
11. Bayuda basalaki nini mpo na Yesu, kasi Nzambe asalaki nini mpo na ye?
11 Nsima Petelo alakisaki Masiya. (2:22-28) Nzambe atatolaki ete Yesu azali nde Masiya na kopesaka ye nzela na kokokisa misala na nguya, bilembo mpe bikamwiseli. (Baebele 2:3, 4) Kasi Bayuda babambaki ye likolo na nzete ‘na maboko na batyoli na mibeko’, Baloma oyo bazalaki kotosa mibeko na Nzambe te. Yesu “apesamaki lokola Nzambe akanaki mpe mpo na boyebi boyebaki ye liboso”, elimboli ete ezalaki wana mokano na Nzambe. Kasi, Nzambe asekwisaki Yesu mpe abungisaki nzoto na ye ya bomoto na boye ete epola te.—Nzembo 16:8-11.
12. Nini David amonaki liboso, mpe esengeli kosala nini mpo na kobika?
12 Kati na litatoli na ye ntoma Petelo alandaki komonisa motuya ya bisakweli na ntina etali Masiya. (2:29-36) Alobaki ete David amonaki liboso lisekwa na moto oyo aleki monene kati na bakitani na ye, Yesu Masiya. Kuna na likoló esika afandi na loboko na mobali na Nzambe, Yesu asopaki elimo santu oyo azwaki epai ya Tata na ye. (Nzembo 110:1) Bayoki na Petelo ’bamonaki mpe bayokaki’ mosala na elimo yango na kotalaka ndemo, lokola móto, oyo efandaki likoló na motó na bayekoli mpe na koyokaka bango koloba na minoko mosusu. Ntoma Petelo amonisi lisusu ntina ya kondima Yesu lokola Nkolo mpe Masiya mpo na kobika.—Baloma 10:9; Bafilipi 2:9-11.
Jéhovah apesi bokoli
13. (a) Mpo na kozwa batisimo na lolenge ebongi, Bayuda mpe bato oyo babongwanaki na lingomba ya Bayuda basengelaki kondima nini? (b) Bato boni bazwaki batisimo, mpe likambo nini esalamaki na Yelusaleme?
13 Maloba na ntoma Petelo mabimisaki litomba monene. (2:37-42) Bayoki na ye, baoyo bandimaki kobomama ya Yesu, bayokaki mpasi na mitema. Petelo alendisaki bango na maloba oyo ete: “Bobongola mitema, mpe moko na moko na bino abatisama na nkombo na Yesu Klisto mpo na kolimbisama na masumu na bino, mpe bokozwa likabo na elimo santu.” Bayuda mpe bato oyo babongwanaki na lingomba ya Bayuda basilaki kondima ete Jéhovah azali Nzambe na bongo mpe ete bazalaki na mposa na elimo na ye. Sikawa esengelaki na bango kobongola mitema mpe kondima Yesu lokola Masiya mpo na bazwa batisimo na nkombo na Tata (elingi koloba na koyebaka to kondimaka mokumba mpe misala na Tata), na Mwana mpe na elimo santu. (Matai 28:19, 20) Na kopesaka litatoli epai na Bayuda mpe bato oyo babongwanaki na lingomba ya Bayuda, ntoma Petelo asalelaki fungola ya liboso ya elimo oyo Yesu apesaki ye mpo na kofungola epai na Bayuda bandimi porte oyo ezali kopesa nzela na kozwa boyebi mpe likoki ya kokota na Bokonzi na likoló. (Matai 16:19) Na mokolo yango, bato 3 000 bazwaki batisimo! Kanisa ba témoins de Jéhovah oyo nyonso babandaki kosakola kati na teritware moke ya Yelusaleme!
14. Mpo na nini mpe ndenge nini bandimi bazalaki “na biloko na bango nyonso esika moko”?
14 Mingi na baoyo bautaki mosika bazangaki biloko ya kolya mpo na koumela ntango molai na Yelusaleme, kasi bazalaki na mposa ya koyekola makambo mingi matali kondima na bango ya sika mpe kosakola epai na bazalani. Na yango, bayekoli ya liboso ya Yesu basalisanaki na bolingo, lokola Ba Témoins de Jéhovah bazali kosala yango na ntango na biso. (2:43-47). Mpo na ntango mokuse bandimi batyaki’’ biloko na bango nyonso esika moko”. Bamosusu batekisaki bilanga na bango mpe biloko mosusu, mpe mbongo oyo basangisaki ekabolamaki epai na moto nyonso oyo azalaki kati na bosenga. Ezali na motindo yango nde lisangá ezwaki ebandeli malamu, wana ‘Jéhovah azalaki kobakisa baoyo bazalaki kobikisama mokolo na mokolo’.
Kobikisama mpe makambo oyo ebimisaki
15. Lokola Petelo na Yoane bazalaki kokota na temple, likambo nini lisalemaki mpe ndenge nini bato ayambaki yango?
15 Jéhovah asungaki bayekoli ya Yesu na nzela ya “bilembo”. (3:1-10) Na yango, lokola Petelo na Yoane bazalaki kokota na temple na ngonga oyo mabondeli mazalaki kolobama na ntango ya kopesa mbeka na mpokwa, na ngonga na libwa (ekokani na 15 heures), balekaki pembeni ya moto moko, ye ebosono banda babota ye, afandaki penepene na porte oyo babiangaki Kitoko mpe azalaki kosenga “makabo na mawa”. Petelo alobaki na ye ete: ’’Nazali na mbongo to wolo te, kasi oyo ezali na ngai, napesi yo yango: na nkombo na Yesu Klisto na Nasalete, tambola!” Bobele na ntango wana, mobali wana abikaki. Ntango akotaki kati na temple, “kotambolaka, kopombwaka mpe kokumisa Nzambe”, bato ‘bakamwaki mingi’. Mbala mosusu bato mosusu bamikundolaki maloba oyo: “Ebosono akopombwa lokola mboloko.”—Yisaya 35:6.
16. Nini epesaki nzela na bantoma mpo na kobikisa moto oyo azalaki ebosono?
16 Na kokamwa nyonso, bato bayanganaki na veranda ya Salomon, veranda oyo ezalaki na mopanzi ya temple na est. Ntoma Petelo apesaki litatoli na esika yango. (3:11-18) Alimbolaki ete Nzambe apesaki na bantoma nguya ya kobikisa moto oyo azalaki ebosono na nzela na Yesu, mosaleli na Ye oyo akumisamaki (Yisaya 52:13 kino 53:12) Bayuda baboyaki “mobulami mpe moyengebeni yango”, kasi Jéhovah asekwisaki ye. Ya solo, bato mpe bakonzi na bango bayebaki te ete babomaki Masiya, kasi Nzambe akokisaki bongo maloba na esakweli oyo masakolaki ete “Mopakolami (Klisto) na ye akonyokwama”.—Danyele 9:26.
17. (a) Bayuda basengelaki kosala nini? (b) Nini ezali kosalema uta ntango ‘Klisto atindamaki’ na eleko na biso?
17 Ntoma Petelo monisaki eloko nini Bayuda basengelaki kosala mpo na mpasi oyo bamonisaki Masiya. (3:19-26) Esengelaki na bango ‘kobongola mitema’, to kolela mabe na bango, mpe kotika bizaleli na bango ya mabe, kokamataka etamboli oyo elongobani. Soki bakozala na kondima epai na Yesu, Masiya, kondimaka bongo lisiko, bakokaki kozwa kopema epai na Jéhovah, mpamba te masumu na bango makokaki kolimbisama (Baloma 5:6-11) Petelo akundolaki epai na Bayuda ete bazalaki bana na kondimana oyo Nzambe asalaki elongo na bankoko na bango na kolobaka na Abrahame ete: “Na kati na libota na yo mabota nyonso na nse makopambwama.” Na yango, Nzambe atindaki liboso mosaleli na Ye Masiya mpo na kosikola Bayuda oyo babongolaki mitema. Uta ntango ‘Klisto atindamaki’ kati na nguya ya Bokonzi na likoló na 1914, tozali komona lisusu kozongisama ya mateya ya solo mpe ya lisangá ya teokratike kati na ba Témoins de Jéhovah, likambo oyo ezali kolendisa mpenza.—Genese 12:3; 18:18; 22:18.
Baboyi kokanga monoko
18. “Libanga” nini “batongi” Bayuda baboyaki, mpe lobiko ekouta bobele epai na nani?
18 Wana emonaki bango Petelo na Yoane kosakola lisekwa na Yesu, banganga minene, kapitene ya temple mpe Basadukai basilikaki makasi mpe batyaki bango na boloko. (4:1-12) Basadukai bazalaki kondima lisekwa te, nzokande Bayuda mosusu mingi bakomaki bandimi, motuya bobele ya mibali ekomaki pene na 5 000. Ntango basambisi ya tribinale monene na Yelusaleme batunaki ye, Petelo alobaki ete ebosono abikisamaki na “nkombo na Yesu Klisto na Nasalete”, oyo bango babambaki likoló na nzete, kasi Nzambe asekwisaki ye. “Libanga” liboyaki “batongi” Bayuda ekomaki “libanga likokumba ndako mobimba”. (Nzembo 118:22.) Petelo abakisaki ete: “Lobiko mpe ezali na moto mosusu te.”
19. Ntango bapekisaki bango kosakola bantoma bazongisaki eyano nini?
19 Bamekaki kopekisa bantoma ete basakola lisusu te. (4:13-22) Lokola moto oyo abikisamaki azalaki wana, kowangana “elembo monene” yango ekokaki kosimba te, kasi Petelo na Yoane bazwaki etinda “ete basolola mpe balukisa na nkombo na Yesu soko moke te”. Eyano na bango ezalaki nini? ‘Mpo na makambo mamonaki biso mpe mayokaki biso tokoki kotika kosolola yango te.’ Bazalaki kotosa Jéhovah, Mokonzi na bango!
Mabondeli na bango mandimami
20. Bayekoli basengaki nini kati na libondeli, mpe likambo nini esalamaki?
20 Lokola Ba Témoins de Jéhovah babondelaka ntango na makita na bango, bayekoli babondelaki ntango bantoma oyo babimaki na boloko bayebisaki bango makambo makomelaki bango. (4:23-31) Bayebaki ete Hérode Antipas na Ponce Pilate, mpe Baloma oyo bazalaki Bayuda te mpe bato na Yisraele, bayanganaki kotemela Masiya. (Nzembo 2:1, 2; Luka 23:1-12) Mpo na koyanola na libondeli wana, Jéhovah atondisaki bayekoli na elimo santu, kino ete basakolaki “liloba na Nzambe na molende nyonso”. Basengaki epai na Mokonzi na bango asilisa minyoko te, kasi apesa bango nzela ya kosakola na molende atako minyoko mizali.
21. Barnabas azalaki nani, mpe azalaki moto na bizaleli nini?
21 Bandimi balandaki kotya biloko na bango nyonso esika moko, mpe moko te azalaki na bosenga. (4:32-37) Yosefe Molewi moto na chypre azalaki kati na baoyo bapesaki makabo. Bantoma bapesaki ye nkombo mosusu Barnabas, oyo elimboli ete “Mwana na Kobondisa”, ezali mpo ete azalaki kosalela bamosusu mpe azalaki kolendisa bango na móto nyonso. Biso tokolinga kozala bato na lolenge oyo, boye te?—Misala 11:22-24.
Babuki na lokuta bamonisami polele
22, 23. Anania na Safira basalaki lisumu nini, mpe liteya nini tokoki kozwa na ntina na likambo oyo akomelaki bango?
22 Anania na mwasi na ye, Safira, batikaki kondima Jéhovah lokola Mokonzi na bango. (5:1-11) Batekaki elanga mpe babombaki ndambo na mosolo na kokosaka ete bapesaki motuya nyonso epai na bantoma. Na nzela ya boyebi oyo azwaki na elimo na Nzambe, Petelo asosolaki bokosi na bango, oyo ebomisaki bango. Oyo nde likebisi epai na baoyo Satana azali kopusa na kozala na mayele mabe!—Masese 3:32; 6:16-19.
23 Nsima na likambo wana, moto nyonso oyo azalaki na mikano mabe azwaki makasi te ya kosangana elongo na bayekoli Bato mosusu bakomaki bandimi. (5:12-16) Lisusu, bato na maladi na bato oyo batungisamaki na bilimu mabe bandimaki nguya ya Nzambe, “mpe bango nyonso babikaki”.
Totosa Nzambe liboso na kotosa bato
24, 25. Mpo na nini bakonzi ya mangomba ya Bayuda banyokolaki bantoma kasi ekateli nini mibali oyo ya sembo bazwaki mpo na basaleli nyonso ya Jéhovah?
24 Na yango nganga monene mpe Basadukayi bamekaki kopekisa bokoli oyo na kokamwisa na kotiaka bantoma nyonso na boloko. (5:17-25) Kasi anzelu na Nzambe abimisaki bango na butu, mpe na kotana na ntongo bazalaki koteya na temple. Minyoko mikoki kotelemisa mosala ya basaleli ya Jéhovah te.
25 Kasi, bantoma bamekamaki lisusu ntango bamemaki bango liboso ya Sanhédrin (tribinale monene ya Bayuda). (5:26-42) Atako bapekisaki bango ete batika koteya, balobaki boye: “Ekoki ete totosa Nzambe, (lokola mokonzi, MN), liboso na kotosa bato.” Na yango, balakisaki etinda mpo na bayekoli ya Yesu, etinda oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kotosa ntango nyonso. Nsima na koyoka likebisi na Gamaliele, ye molakisi na Mibeko, bakonzi na mangomba babetisi bantoma fimbo, bapekisi bango kosakola, nsima batikaki bango.
26. Na likambo nini mosala na bantoma ekokani na oyo Ba Témoins de Jéhovah bazali kokokisa na ntango mn biso?
26 Bantoma basepelaki ete batangami babongi kozwa nsoni mpo na nkombo na Yesu. “Nde batiki te koteya mpe kosakola nsango malamu mikolo nyonso kati na temple mpe na ndako na ndako.” Ee, bakokisaki mosala na bango ya kosakola ndako na ndako. Na ntango na biso, ezali yango mpe ba Témoins de Jéhovah bazali kosala, baoyo bazwaki mpe elimo na ye mpo ete bazali kotosa ye mpe balobi ete: ’’Jéhovah azali Mokonzi na biso!”
Bozongeli
◻ Ntango nyonso bayekoli ya Yesu bazali kokokisa mosala nini.
◻ Likambo nini esalamaki na mokolo ya Pantekote na mobu 33?
◻ Ntango nini mpe ndenge nini ntoma Petelo asalelaki fungola ya liboso ya elimo oyo Yesu apesaki ye?
◻ Liteya nini tokoki kozwa na ntina na likambo oyo ekomelaki Anania na Safira?
◻ Ntango bapekisaki bango kosakola, ekateli nini bantoma bazwaki mpo na ba Témoins de Jehovah nyonso?