MOKAPO 5
“Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi”
Bantoma bazwi ekateli oyo ezali ndakisa mpo na bakristo nyonso ya solo
Euti na Misala 5:12–6:7
1-3. (a) Mpo na nini bantoma basambaki liboso ya Sanedrina, mpe motuna monene mpo na bango ezalaki nini? (b) Mpo na nini tosengeli kotya likebi na ekateli oyo bantoma bazwaki?
BAZUZI ya Sanedrina bazali na nkanda makasi mpenza! Bantoma ya Yesu bazali kosamba liboso na bango. Mpo na nini? Yozefe Kaifa, nganga-nzambe monene mpe mokambi ya Sanedrina, alobi na bango na nkanda ete: “Topesaki bino mitindo polelepolele ete bóteya te na nkombo wana.” Lokola mokambi yango azali mpenza na nkanda, alingi ata kotánga nkombo ya Yesu te. Kutu, abakisi boye: “Botondisi Yerusaleme na mateya na bino, mpe bozali na ekateli ya komemisa biso ngambo ya liwa ya moto wana.” (Mis. 5:28) Mposa na ye emonani polele: Bayekoli ya Kristo bátika kosakola, soki te bakozwa etumbu!
2 Bantoma bakosala nini? Yesu, moto oyo Nzambe apesaki bokonzi, nde atindaki bango básakola. (Mat. 28:18-20) Bantoma bakobanga bato mpe bakokanga monɔkɔ? To bakozala na mpiko mpe bakokoba kosakola? Motuna ya ntina mingi yango oyo: Bakotosa Nzambe to bato? Kozanga kokakatana, ntoma Petro azwi maloba na nkombo ya bantoma nyonso. Alobi na polele mpe na mpiko nyonso.
3 Eyano oyo bantoma bapesaki bazuzi ya Sanedrina, oyo bazalaki kokana kopesa bango etumbu, esengeli mpenza kobenda likebi na biso bakristo ya solo. Biso mpe tozali na mokumba ya kosakola. Tokutanaka mpe na botɛmɛli ntango tozali kokokisa mokumba yango oyo Nzambe apesi biso. (Mat. 10:22) Banguna bakoki koluka kotyela mosala na biso mibeko to kopekisa yango. Na ntango wana tokosala nini? Tokoki kozwa makanisi soki totaleli ekateli oyo bantoma bazwaki mpe makambo oyo ememaki bango básamba liboso ya Sanedrina.a
“Anzelu ya Yehova afungolaki baporte” (Misala 5:12-21a)
4, 5. Mpo na nini Kaifa ná Basadukai “batondaki na zuwa”?
4 Tóbosana te ete mbala ya liboso oyo bayebisaki Petro ná Yoane bátika kosakola, bantoma yango bapesaki eyano ete: “Tokoki kotika te koloba makambo oyo tomoni mpe toyoki.” (Mis. 4:20) Na ntango wana, nsima ya kosamba liboso ya Sanedrina, Petro ná Yoane, elongo na bantoma mosusu, bakobaki kosakola na tempelo. Bantoma basalaki makamwisi minene, na ndakisa babikisaki bato ya maladi mpe babenganaki bilimo mabe. Bazalaki kosala makambo yango “na veranda ya Salomo,” oyo ezalaki na ngámbo ya ɛsti ya tempelo, epai Bayuda mingi bazalaki koyangana. Kutu, bato ya maladi bazalaki kobika ata soki elili ya Petro ekweli bango! Bato mingi oyo babikaki na bamaladi na bango bandimaki mpe kobikisama na elimo. Na ndenge yango, “bato oyo bazalaki kondimela Nkolo bakobaki kobakisama, ebele ya mibali mpe ya basi.”—Mis. 5:12-15.
5 Kaifa, oyo azalaki na Lingomba ya Basadukai, elongo na bato mosusu ya lingomba yango, “batondaki na zuwa” mpe bapesaki mitindo ete bátya bantoma na bolɔkɔ. (Mis. 5:17, 18) Mpo na nini Basadukai bazalaki na nkanda makasi? Mpo bantoma bazalaki koteya ete Yesu asekwaki; nzokande, Basadukai bazalaki kondima lisekwa te. Bantoma bazalaki koloba ete moto akoki kobika kaka soki andimeli Yesu; nzokande, Basadukai bazalaki kobanga ete bakonzi ya Roma bápesa bango etumbu makasi soki bato bakómi kondimela Yesu lokola Mokonzi na bango. (Yoa. 11:48) Yango wana Basadukai bazalaki na ekateli makasi ete bantoma básakola lisusu te!
6. Lelo oyo, banani bato ya liboso oyo babimiselaka basaleli ya Yehova minyoko, mpe mpo na nini yango esengeli kokamwisa biso te?
6 Lelo oyo mpe, bato ya liboso oyo babimiselaka basaleli ya Yehova minyoko ezali bakonzi ya mangomba oyo balukaka kotɛmɛla bango. Mbala mingi, bato yango balukaka koyokana na bakonzi ya Leta mpe bapanzi-nsango mpo bápekisa mosala na biso ya kosakola. Yango esengeli nde kokamwisa biso? Te. Nsango na biso emonisaka polele mateya ya mangomba ya lokuta. Ntango bato ya mitema sembo bandimaka mateya ya solo ya Biblia, balongwaka na boombo ya mateya mpe bindimeli ya lokuta. (Yoa. 8:32) Yango wana, tokoki kokamwa te ete mbala mingi nsango na biso epesaka bakonzi ya mangomba nkanda mpe zuwa!
7, 8. Ekoki mpenza kozala ete maloba ya anzelu etindaki bantoma bákanisa nini, mpe ebongi tómituna motuna nini?
7 Ekoki kozala ete ntango bantoma bazalaki na kati ya bolɔkɔ mpe bazalaki kozela kosambisama, bazalaki kokanisa ete mbala mosusu banguna na bango bakoboma bango. (Mat. 24:9) Kasi, na kati ya butu, likambo moko oyo bakanisaki te esalemaki: “Anzelu ya Yehova afungolaki baporte ya bolɔkɔ.”b (Mis. 5:19) Anzelu yango apesaki bango malako ya polele: “Bótɛlɛma na tempelo,” mpe “bókoba koloba.” (Mis. 5:20) Na ntembe te, etinda yango endimisaki lisusu bantoma ete bazalaki kosala likambo oyo ebongi. Ekoki mpe kozala ete maloba ya anzelu elendisaki bango mpo bázonga nsima te ata soki bakutani na likambo nini. Na kondima makasi mpe na mpiko, bantoma “bakɔtaki na tempelo na ntɔngɔntɔngɔ mpe babandaki koteya.”—Mis. 5:21.
8 Ebongi ete mokomoko na biso amituna boye: ‘Nakozala na kondima mpe na mpiko oyo esengeli mpo nakoba kosakola soki nakutani na makambo ya ndenge wana?’ Koyeba ete baanzelu basungaka mpe batambwisaka biso ntango tozali kokokisa mosala ya ntina mingi ya ‘kopesa litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi ya Nzambe,’ ekoki kolendisa biso.—Mis. 28:23; Em. 14:6, 7.
“Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato” (Misala 5:21b-33)
9-11. Bantoma bapesaki eyano nini ntango bazuzi ya Sanedrina bayebisaki bango bátika kosakola, mpe na ndenge nini yango ezali ndakisa mpo na bakristo nyonso ya solo?
9 Kaifa ná bazuzi mosusu ya Sanedrina bamibongisaki mpo na kosambisa bantoma. Lokola bayebaki te makambo oyo elekaki na bolɔkɔ, batindaki bapolisi bákende kozwa bantoma. Kanisá ndenge oyo bapolisi bakamwaki ntango bamonaki ete bato yango bazali te na bolɔkɔ atako bolɔkɔ “ekangami malamu mpenza mpe bakɛngɛli batɛlɛmi na baporte.” (Mis. 5:23) Mwa moke na nsima, kapitɛni ya tempelo ayokaki ete bantoma bazongi lisusu na tempelo, bazali kopesa litatoli mpo na Yesu Kristo, likambo oyo esalaki ete bátya bango na bolɔkɔ! Kapitɛni yango akendaki nokinoki ná basoda na tempelo mpo na kokanga bantoma mpe komema bango liboso ya Sanedrina.
10 Ndenge tolobaki yango na ebandeli ya mokapo oyo, bakonzi ya mangomba oyo batondaki na nkanda bayebisaki bantoma polele ete basengeli kotika kosakola. Bantoma bapesaki eyano nini? Petro azwaki maloba na nkombo ya baninga na ye mpe alobaki na mpiko nyonso ete: “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.” (Mis. 5:29) Na ndenge yango, bantoma bapesaki ndakisa oyo bakristo nyonso basengeli kolanda. Bato oyo bazali na bokonzi balekisaka ndelo ntango bapekisaka bato makambo oyo Nzambe asɛngi to basɛngaka bato básala makambo oyo Nzambe apekisi. Lelo oyo, soki “bakonzi oyo bazali liboso” bapekisi mosala na biso ya kopesa litatoli, tokoki te kotika kokokisa mokumba ya kosakola nsango malamu oyo Nzambe apesi biso. (Rom. 13:1) Nzokande, tokoluka mayele mosusu mpo na kokoba kopesa litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi ya Nzambe.
11 Ndenge tokoki kokanisa yango, eyano ya bantoma ebakisaki nkanda ya bazuzi. Bazalaki na ekateli ya “koboma” bantoma. (Mis. 5:33) Makambo nyonso emonisaki ete batatoli yango ya mpiko mpe ya molende bakobika te. Nzokande, mwa moke na nsima bazwaki lisalisi oyo bakanisaki te!
“Bokokoka kokweisa bango te” (Misala 5:34-42)
12, 13. (a) Likanisi nini Gamaliele apesaki baninga na ye bazuzi, mpe bango basalaki nini? (b) Ndenge nini Yehova akoki kosalisa basaleli na ye lelo oyo, mpe wapi makambo oyo tosengeli kobosana te soki atiki nzela ete ‘tónyokwama mpo na bosembo’?
12 Gamaliele, “moteyi ya Mibeko oyo bato nyonso bazalaki komemya,” azwaki maloba.c Na ntembe te, bazuzi mosusu ya Sanedrina bazalaki na limemya mingi mpo na moto yango oyo ayekolá mibeko, yango wana abangaki te komonisa makanisi mosusu; kutu, “apesaki mitindo ete bábimisa bantoma mwa moke.” (Mis. 5:34) Gamaliele atángaki bato mosusu oyo, mwa bambula liboso, batindaki bato bátomboka, kasi makambo yango esilaki ntango bato yango bakufaki mpe asɛngaki baninga na ye bazuzi bázala na motema molai mpe na makambo makasi te epai ya bantoma, baoyo Nkolo na bango, Yesu, autaki kokufa. Gamaliele abimisaki makanisi oyo endimisaki mpenza: “Bókɔta na makambo ya bato oyo te, kasi bótika bango. Mpo soki liteya oyo to mosala oyo euti na bato, ekokweisama; kasi soki euti na Nzambe, bokokoka kokweisa bango te. Bókeba mpo bómonana te ete bozali kobunda na Nzambe.” (Mis. 5:38, 39) Bazuzi nyonso bandimaki likanisi na ye. Atako bongo, babɛtisaki bantoma fimbo mpe bapesaki bango mitindo ete “bátika koloba na nkombo ya Yesu.”—Mis. 5:40.
13 Lelo oyo, ndenge kaka ezalaki na ntango wana, Yehova akoki kosala ete moto moko ya lokumu lokola Gamaliele akɔtela basaleli na Ye. (Mas. 21:1) Yehova akoki kosalela elimo na ye mpo na kotinda bakonzi minene, bazuzi, to bato oyo babimisaka mibeko básala makambo oyo eyokani na mokano na ye. (Neh. 2:4-8) Kasi, soki atiki nzela ete ‘tómona mpasi mpo na bosembo,’ ezali na makambo mibale oyo tosengeli kobosana te. (1 Pe. 3:14) Ya liboso, Nzambe akoki kopesa biso makasi ya koyika mpiko. (1 Ko. 10:13) Ya mibale, banguna ‘bakokoka te kokweisa’ mosala ya Nzambe.—Yis. 54:17.
14, 15. (a) Bantoma basalaki nini nsima ya kobɛtama fimbo, mpe mpo na nini? (b) Lobelá ndakisa moko oyo ezali komonisa ndenge basaleli ya Yehova bayikaka mpiko na esengo.
14 Bantoma balɛmbaki to bakitisaki molende na bango mpo babɛtaki bango fimbo? Soki moke te! “Balongwaki liboso ya Sanedrina, bazalaki kosepela.” (Mis. 5:41) Mpo na nini bazalaki “kosepela”? Ezali te mpo na mpasi oyo bazalaki koyoka na ndenge babɛtaki bango fimbo. Bazalaki kosepela mpo bayebaki ete banyokwamaki mpo batikalaki sembo epai ya Yehova mpe balandaki matambe ya Yesu, Ndakisa na bango.—Mat. 5:11, 12.
15 Lokola bandeko na biso ya siɛklɛ ya liboso, biso mpe toyikaka mpiko na esengo ntango tozali konyokwama mpo na nsango malamu. (1 Pe. 4:12-14) Yango elingi koloba te ete tosepelaka bákanela biso, bányokola biso, to bátya biso na bolɔkɔ. Kasi, tosepelaka na ndenge totikalaka sembo. Tózwa ndakisa ya Henryk Dornik, ndeko oyo anyokwamaki bambula mingi na mabɔkɔ ya bakonzi ya mabe. Ndeko yango alobaki ete na sanza ya 08/1944, bakonzi bazwaki ekateli ya kotinda ye ná ndeko na ye na kaa ya bakangami. Bakonzi yango balobaki: “Tokoki te kondimisa bango básala likambo moko. Kokufa lokola bamartiri epesaka bango esengo.” Ndeko Dornik alobi boye: “Nazalaki na mposa ya kokufa lokola martiri te, kasi komonisa mpiko mpe kobatela lokumu na biso na ntango ya minyoko mpo na kotikala sembo epai ya Yehova nde epesaki ngai esengo.”—Yak. 1:2-4.
16. Ndenge nini bantoma bamonisaki ete bazalaki na ekateli ya kopesa litatoli malamumalamu, mpe ndenge nini tolandaka ndakisa na bango mpo na kosakola?
16 Bantoma balekisaki ntango te, bazongelaki mbala moko mosala ya kopesa litatoli. Kozanga kobanga, “mikolo nyonso na tempelo mpe na ndako na ndako,” bakobaki “koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Kristo.”d (Mis. 5:42) Basakoli yango ya molende bazalaki na ekateli makasi ya kopesa litatoli malamumalamu. Tomoni mpe ete bazalaki komema nsango yango na bandako ya bato, ndenge Yesu Kristo alobaki na bango. (Mat. 10:7, 11-14) Na ntembe te, basalelaki mayele wana mpo na kotondisa Yerusaleme na mateya na bango. Lelo oyo, eyebani malamu ete Batatoli ya Yehova basakolaka na kolanda ndakisa ya bantoma. Lokola tokendaka na ndako mokomoko ya teritware na biso, tomonisaka polele ete biso mpe tolingi kopesa litatoli malamumalamu mpo moto nyonso azwa libaku ya koyoka nsango malamu. Tokoki nde koloba ete Yehova apamboli mosala na biso ya kosakola ndako na ndako? Ɛɛ! Bamilio ya bato bandimi nsango ya Bokonzi na ntango oyo ya nsuka, mpe mingi bayokaki yango mpo na mbala ya liboso ntango Motatoli moko abɛtaki na porte na bango.
Mibali oyo babongi mpo na ‘mokumba ya ntina’ (Misala 6:1-6)
17-19. Likambo nini oyo ekokaki kokabola bandeko ebimaki na lisangá, mpe bantoma bapesaki malako nini mpo na kosilisa yango?
17 Likambo moko ya mabe elingaki kobima na lisangá oyo eutaki kosalema sika. Ezalaki likambo nini? Bayekoli mingi oyo bazwaki batisimo bazalaki bapaya na Yerusaleme mpe balingaki koyeba makambo mingi liboso bázonga na bamboka na bango. Bayekoli oyo bazalaki kofanda na Yerusaleme bazalaki kopesa mbongo na bolingo na bango moko mpo básalisa bapaya wana mpo na kolya mpe mpo na bamposa mosusu. (Mis. 2:44-46; 4:34-37) Na ntango yango, mokakatano moko ebimaki. “Na ntango ya kokabola biloko ya mokolo na mokolo,” “bazalaki kobosana” basi oyo mibali na bango bakufá, oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki. (Mis. 6:1) Nzokande, basi oyo mibali na bango bakufá, oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Ebre, bazalaki kobosana bango te. Tomoni ete mokakatano etalelaki kopona bilongi. Yango ezali moko na makambo minene oyo ekoki mpenza kokabola bato.
18 Lokola bantoma bazalaki kokamba lisangá mobimba, bamonaki ete ekozala malamu te ‘bátika liloba ya Nzambe mpo na kokabola biloko ya kolya.’ (Mis. 6:2) Mpo na kosilisa likambo yango, basɛngaki bayekoli báluka mibali nsambo “oyo batondi na elimo mpe na bwanya,” baoyo bantoma bakoki kopesa “mokumba [wana] ya ntina.” (Mis. 6:3) Esengelaki bápona mibali oyo bakokisi masɛngami wana mpo mokumba yango ezalaki kaka te ya kokabola bilei, kasi mpe ya kobomba mbongo, kosomba biloko, mpe kokoma makambo nyonso malamumalamu. Mibali nyonso oyo baponamaki bazalaki na bankombo ya Grɛki, likambo oyo mbala mosusu ekitisaki mitema ya basi oyo bazalaki komilelalela. Bantoma baponaki mibali nsambo mpo na “mokumba [wana] ya ntina” nsima ya kotalela bato oyo bayekoli bapesaki bankombo na bango mpe nsima ya kobondela.e
19 Lokola mibali nsambo yango bazwaki mokumba ya kokabola bilei, yango elimbolaki nde ete basengelaki kotika kosakola nsango malamu? Te! Stefano azali moko na mibali oyo baponamaki, mpe na nsima, amonisaki ete azalaki motatoli ya mpiko mpe ya molende. (Mis. 6:8-10) Filipe mpe azalaki na kati ya mibali wana nsambo; nzokande abengami “mopalanganisi ya nsango malamu.” (Mis. 21:8) Na yango, tomoni polele ete mibali yango nsambo bazalaki ntango nyonso basakoli ya molende.
20. Lelo oyo, ndenge nini basaleli ya Nzambe balandaka ndakisa ya bantoma?
20 Lelo oyo, basaleli ya Yehova balandaka ndakisa ya bantoma. Mibali oyo baponami mpo na kokokisa mikumba na kati ya lisangá basengeli komonisa bwanya oyo euti na Nzambe mpe komonisa ete elimo santu ezali kosala mosala epai na bango. Na kolanda litambwisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, mibali oyo bakokisi masɛngami ya Biblia baponamaka lokola bankulutu mpe basaleli na misala na masangá.f (1 Tim. 3:1-9, 12, 13) Tokoki koloba ete baoyo bakokisi masɛngami baponamaka na elimo santu. Mibali yango ya molende bakokisaka mikumba ndenge na ndenge “ya ntina mingi.” Na ndakisa, bankulutu bakoki kozwa bibongiseli mpo na kosunga mibange ya sembo oyo bazali na mposa ya lisalisi. (Yak. 1:27) Bankulutu mosusu bamipesaka na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi, kobongisa mayangani, to kosala elongo na komite ya boyokani na minganga ya mboka na bango. Basaleli na misala bakokisaka mikumba mingi oyo etali mpenza te kobatela bampate to koteya. Mibali yango nyonso oyo bakokisi masɛngami basengeli kozala na bokatikati mpo bákokisa mikumba wana na lisangá mpe mokumba oyo Nzambe apesi bango ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi.—1 Ko. 9:16.
“Liloba ya Nzambe ekobaki kopalangana” (Misala 6:7)
21, 22. Nini emonisi ete Yehova azalaki kopambola lisangá oyo esalemaki sika?
21 Na lisalisi ya Yehova, lisangá oyo esalemaki sika elongaki minyoko oyo ezalaki kouta epai ya bato mosusu mpe mokakatano oyo ebimaki kati na bango, oyo ekokaki kokabola bango. Ezalaki polele ete Yehova azalaki kopambola bango, mpo lisolo elobi boye: “Liloba ya Nzambe ekobaki kopalangana, mpe motángo ya bayekoli ekobaki kobakisama mingi mpenza na Yerusaleme; mpe ebele ya banganga-nzambe babandaki kotosa kondima.” (Mis. 6:7) Yango ezali kaka moko na bisika ndenge na ndenge oyo mokanda ya Misala elobeli bokoli oyo ezalaki kosalema. (Mis. 9:31; 12:24; 16:5; 19:20; 28:31) Lelo oyo, biso mpe tolendisamaka mpenza ntango toyokaka ete mosala ya kosakola Bokonzi ezali kokende liboso na bisika mosusu!
22 Na siɛklɛ ya liboso, bakonzi ya mangomba oyo batondaki na nkanda balɛmbaki te. Mosika te babandaki konyokola mpenza bakristo. Mwa moke na nsima, banyokolaki Stefano makasi, ndenge tokomona yango na lisolo elandi.
a Talá etanda “Sanedrina—Tribinale monene ya Bayuda,” na lokasa 39.
b Oyo ezali esika ya liboso kati na bisika soki 20 oyo mokanda ya Misala elobeli baanzelu. Misala 1:10 elobeli mpe baanzelu kasi ebengi bango “mibali . . . na bilamba ya mpɛmbɛ.”
c Talá etanda “Gamaliele—Moto ya lokumu na kati ya Barabi,” na lokasa 41.
d Talá etanda “Kosakola ‘ndako na ndako,’” na lokasa 42.
e Ekoki kozala ete mibali yango bazalaki na bizaleli mpe makambo mosusu oyo esɛngami mpo na bankulutu, mpo kokokisa “mokumba [wana] ya ntina mingi” ezalaki pɛtɛɛ te. Nzokande, Biblia emonisi te ntango nini mpenza mibali bakómaki koponama lokola bankulutu to bakɛngɛli na lisangá ya bokristo.
f Na siɛklɛ ya liboso, mibali oyo bakokisaki masɛngami bapesamaki nzela ya kotya bankulutu. (Mis. 14:23; 1 Tim. 5:22; Tito 1:5) Lelo oyo, Lisangani ya Mikóló-Bakambi etyaka bakɛngɛli ya zongazonga, mpe bakɛngɛli yango bazali na mokumba ya kotya bankulutu ná basaleli na misala.