Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Misala
MOKANDA ya Misala elobeli na mobimba ndenge lisangá ya baklisto ebandaki mpe bokoli monene oyo emonanaki na nsima. Mokanda yango oyo ekomamaki na monganga Luka, elobeli lisolo kitoko ya mosala oyo baklisto basalaki na boumeli ya mbula28, kobanda na mobu 33 T.B. tii na mobu 61 T.B.
Eteni ya liboso ya mokanda ya Misala elobeli mingimingi mosala ya ntoma Petelo, mpe eteni ya mibale elobeli oyo ya ntoma Paulo. Lokola Luka azali koloba na ndakisa “Nzambe asili kobengisa biso” mpe “tokómaki na Filipi,” mpe bongo na bongo, yango emonisi ete azalaki wana ntango makambo mosusu esalemaki. Soki totye likebi na nsango oyo ezali na mokanda ya Misala, yango ekosalisa biso tómona lisusu malamumalamu nguya ya Liloba ya Nzambe mpe ya elimo santu na ye. (Ebe. 4:12) Ekotinda biso mpe tómipimela makambo mosusu mpe ekolendisa elikya na biso mpo na Bokonzi ya Nzambe.
PETELO ASALELI “BAFUNGOLA YA BOKONZI”
Nsima ya kozwa elimo santu, bantoma batatolaki na mpiko mpenza. Petelo asalelaki mpo na mbala ya liboso “bafungola ya bokonzi ya likoló” mpo na kofungola ekuke oyo epesaki Bayuda ná Baprozelite oyo “bayambaki liloba na ye” nzela ya kozwa boyebi mpe libaku ya kokɔta na Bokonzi ya Nzambe. (Mat. 16:19; Mis. 2:5, 41) Lokola minyoko eyaki makasi, bayekoli bapanzanaki, kasi yango esalaki ete mosala ya kosakola ekende liboso.
Ntango bantoma na Yelusaleme bayokaki ete bato ya Samalia bandimi Liloba ya Nzambe, batindelaki bango Petelo ná Yoane. Petelo asalelaki lifungola ya mibale ntango apesaki Basamalia likoki ya kokɔta na Bokonzi ya Nzambe. (Mis. 8:14-17) Soki mbula moko nsima ya lisekwa ya Yesu, mbongwana monene esalemaki na bomoi ya Saulo, moto ya Talasi. Na mobu 36 T.B., Petelo asalelaki lifungola ya misato, mpe likabo ya ofele ya elimo santu esopanaki likoló ya bato ya bikólo mosusu.—Mis. 10:45.
Biyano na mituna ya Biblia:
2:44-47; 4:34, 35—Mpo na nini bandimi bazalaki kotɛka biloko na bango mpe kokabola mbongo oyo bazwaki na bandeko? Bato mingi oyo bakómaki bandimi bautaki mosika mpe bazalaki na biloko mingi te mpo na koumela na Yelusaleme. Kasi, bazalaki na mposa ya kotikala kuna ntango molai mpo báyeba lisusu makambo mingi ya boklisto mpe bápesa litatoli epai ya basusu. Mpo na kosalisa bango, baklisto mosusu batɛkaki biloko na bango, mpe bapesaki mbongo oyo bazwaki epai ya baoyo bazalaki na bosɛnga.
4:13—Ezali solo ete Petelo ná Yoane batángaki mingi te? Ezali bongo te. Babengaki bango ‘bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba’ mpo bakɔtaki te bakelasi ya balabi oyo ezalaki koteya makambo ya Nzambe.
5:34-39—Ndenge nini Luka ayebaki makambo oyo Gamaliele alobaki na sanedrina, epai bazuzi batikalaki kaka bango moko? Ekoki kozala na moko ya banzela misato oyo: (1) Paulo, oyo azalaki liboso moyekoli ya Gamaliele ayebisaki Luka; (2) Luka asololaki na zuzi moko oyo azalaki kolinga baklisto, na ndakisa Nikodeme; (3) Nzambe ayebisaki Luka makambo yango na nzela ya elimo santu.
7:59—Setefano abondelaki Yesu? Te. Moto asengeli kosambela mpe kobondela kaka Yehova Nzambe. (Luka 4:8; 6:12) Soki akutanaka na mokakatano wana te, Setefano alingaki kobondela Yehova na nkombo ya Yesu. (Yoa. 15:16) Kasi, na mbala wana, Setefano amonaki emonaneli ya “Mwana ya moto atɛlɛmi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe.” (Mis. 7:56) Lokola ayebaki ete Nzambe apesá Yesu nguya ya kosekwisa bakufi, Setefano alobaki na Yesu ete abatela elimo na ye, kasi abondelaki ye te.—Yoa. 5:27-29.
Mateya mpo na biso:
1:8. Soki na lisalisi ya elimo santu te, basambeli ya Yehova bakoki te kosakola na mokili mobimba.
4:36–5:11. Bapesaki Yozefe moto ya Sipele nkombo Balanabasi, oyo elimboli “Mwana ya Libɔndisi.” Ntango mosusu bantoma bapesaki ye nkombo wana mpo azalaki moto ya boboto mpe azalaki kosalisa basusu. Tosengeli kozala lokola ye, kasi te lokola Anania ná Safila, oyo basalelaki lokuta mpe mayele mabe.
9:23-25. Kokima banguna na biso mpo na kokoba kosakola ezali bibangabanga te.
9:28-30. Soki tomoni ete kosakola na bisika mosusu to epai ya bato mosusu ekoki kozala likama mpo na biso, ezala na nzoto to na elimo, tosengeli kozala ekɛngɛ mpe kopona bisika mpe ntango oyo tokoki kosakola.
9:31. Soki mwa kimya ezali na mboka, tosengeli kosala makasi tóyekolaka mpe tókanisaka na mozindo mpo na kolendisa kondima na biso. Yango ekotinda biso tósalelaka makambo oyo tozali koyekola mpe tózala na molende na mosala ya kosakola mpo na komonisa ete tobangaka Yehova.
PAULO ASAKOLAKI NA MOLENDE
Na mobu 44 T.B., Agabusi akómaki na Antiokia, epai Balanabasi ná Saulo bateyaki na boumeli ya “mbula mobimba.” Agabusi asakolaki ete “nzala moko monene” ekozala, mpe esakweli yango ekokisamaki mbula mibale na nsima. (Mis. 11:26-28) Balanabasi ná Saulo bazongaki na Antiokia “nsima wana basilisaki malamumalamu mosala ya kopesa biloko ya lisungi na Yelusaleme.” (Mis. 12:25) Na mobu 47 T.B., mbula soki 12 nsima ya kobongwana ya Saulo, elimo santu etindaki Balanabasi ná Saulo na mosala ya misionɛrɛ. (Mis. 13:1-4) Na mobu 48 T.B., bazongaki na Antiokia, “epai batyamaki na mabɔkɔ ya boboto monene ya Nzambe.”—Mis. 14:26.
Sanza soki libwa na nsima, Paulo (oyo ayebanaki mpe na nkombo Saulo) aponaki Silasi mpo básala na ye mobembo ya mibale ya misionɛrɛ. (Mis. 15:40) Na nzela, bazwaki Timote ná Luka. Luka atikalaki na Filipi mpe Paulo akobaki tii na Atene, mpe na nsima akendeki na Kolinti, epai akutanaki na Akila mpe Pilisila mpe asalaki na bango mbula moko ná sanza motoba. (Mis. 18:11) Paulo atikaki Timote ná Silasi na Kolinti, azwaki masuwa elongo na Akila mpe Pilisila mpo na kokende na Silia na ebandeli ya mobu 52 T.B. (Mis. 18:18) Akila ná Pilisila batambolaki elongo na ye tii na Efese, mpe batikalaki wana.
Nsima ya kolekisa mwa ntango na Antiokia ya Silia, Paulo abandaki mobembo na ye ya misato na mobu 52 T.B. (Mis. 18:23) “Liloba ya Yehova ekobaki kokola mpe kolonga” na Efese. (Mis. 19:20) Paulo alekisaki mbula soki misato kuna. (Mis. 20:31) Pantekote ya mobu 56 T.B. ekutaki Paulo na Yelusaleme. Ntango bakangaki ye, apesaki bakonzi litatoli kozanga kobanga. Ntango azalaki mokangami na Loma na boumeli ya mbula mibale (soki na mobu 59-61 T.B.), Paulo afandaki na ndako moko oyo azalaki kofutela, mpe kuna asakolaki Bokonzi ya Nzambe mpe ateyaki “makambo oyo etali Nkolo Yesu Klisto.”—Mis. 28:30, 31.
Biyano na mituna ya Biblia:
14:8-13—Mpo na nini bato ya Lisitala babengaki “Balanabasi, Zeusi, kasi Paulo Helemesi”? Na masapo ya Bagrɛki, bazalaki koloba ete Zeusi azali mokonzi ya banzambe mpe ete mwana na ye Helemesi ayebaki mpenza koloba. Lokola Paulo nde azalaki koloba mingi na kati ya bango mibale, bato ya Lisitala babengaki ye Helemesi mpe Balanabasi Zeusi.
16:6, 7—Mpo na nini elimo santu epekisaki Paulo ná baninga na ye kosakola na etúká ya Azia mpe na Bitinia? Mpo basali bazalaki kaka moke. Yango wana, elimo santu etindaki bango epai mosala na bango ekokaki kobota mbuma mingi.
18:12-17—Ntango Bayuda babɛtaki Sositene, mpo na nini Pronkosili Galio apekisaki bango te? Ntango mosusu Galio akanisaki ete Sositene azwaki etumbu oyo ebongaki na ye, mpo ekoki kozala ete ye nde atindaki bato bátombokela Paulo. Nzokande, likambo yango ebotaki mbuma malamu, mpo esalisaki Sositene akóma moklisto. Bambula na nsima, Paulo abengaki Sositene “ndeko na biso.”—1 Kol. 1:1.
18:18—Paulo alapaki ndai nini? Bato mosusu ya mayele balobaka ete Paulo alapaki ndai ya Monasili. (Mit. 6:1-21) Kasi, Biblia elobi te soki alapaki ndai ya ndenge nini. Lisusu, Makomami eyebisi te soki alapaki ndai yango liboso to nsima ya kobongwana na ye to soki azalaki na ebandeli to na nsuka ya ndai yango. Ezala ndenge nini, kolapa ndai ya ndenge wana ezalaki lisumu te.
Mateya mpo na biso:
12:5-11. Tokoki, mpe tosengeli, kobondelaka mpo na bandeko na biso.
12:21-23; 14:14-18. Elode akakatanaki te kondima lokumu oyo ebongaki kaka na Nzambe. Akesanaki mpenza na Paulo ná Balanabasi oyo baboyaki básanzola bango mpe bákumisa bango! Tosengeli te kolukaka bákumisaka biso mpo na oyo tosali na mosala ya Yehova.
14:5-7. Kozala na bokɛngi ekoki kosalisa biso tótika kosakola te.—Mat. 10:23.
14:22. Baklisto bayebaka ete bakokutana na minyoko. Bakakolaka kondima na bango te mpo na koluka kokima minyoko yango.—2 Tim. 3:12.
16:1, 2. Bilenge baklisto basengeli komipesa na mosala ya Nzambe mpe kosɛnga Yehova asalisa bango bázala na etamboli malamu.
16:3. Tosengeli kosalaka nyonso oyo tokoki, na boyokani na mitinda ya Biblia, mpo na kosalisa basusu bándima nsango malamu.—1 Kol. 9:19-23.
20:20, 21. Kopesa bato litatoli na bandako na bango ezali na ntina mingi na mosala na biso ya kosakola.
20:24; 21:13. Kotikala sembo epai ya Nzambe ezali na ntina mingi koleka kobatela bomoi na biso.
21:21-26. Soki bapesi biso toli ya malamu, tosengeli kokakatanaka te mpo na kondima yango.
25:8-12. Lelo oyo, baklisto bakoki mpe basengeli “kokɔtela mpe kondimisa nsango malamu” na boyokani na mibeko ya mboka.—Filp. 1:7.
26:24, 25. Tosengeli kosakola “maloba ya solo mpe ya makanisi malamu” atako “moto ya mosuni” akoki komona yango lokola bozoba.—1 Kol. 2:14.
[Elilingi na lokasa 30]
Ntango nini Petelo asalelaki “bafungola ya bokonzi”?
[Elilingi na lokasa 31]
Soki na lisalisi ya elimo santu te, mosala ya kosakola ekoki kosalema te na mokili mobimba