“Liloba ya Yehova ezalaki se kokola”
“Akotindaka lilako na mokili, liloba na ye ekotambolaka mbango.”—NZEMBO 147:15.
1, 2. Mosala nini Yesu apesaki bayekoli na ye, mpe yango esɛngaki nini?
MOKO na bisakweli ya kokamwa oyo ezali na Biblia ezali na Misala 1:8. Liboso amata na likoló, Yesu alobaki na bayekoli na ye ya sembo ete: “Wana ekosila [elimo santu, NW] koya na likoló na bino, bokozwa nguya, mpe bokozala batatoli na ngai . . . kino nsuka ya mokili.” Mosala monene mpenza ezalaki kozela bango!
2 Na ntembe te, mpo na mwa etuluku wana ya bayekoli, kosakola liloba ya Nzambe na mokili mobimba ezalaki likambo ya monene. Kanisá naino oyo yango esɛngaki. Basengelaki kosalisa bato mosusu báyeba nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Kotatola mpo na Yesu esɛngaki mpe koyebisa bato mosusu mateya ya ntina mingi oyo ateyaki mpe kolimbwela bango mokumba oyo Yesu azali na yango mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. Mosala yango esɛngaki mpe kokómisa bato bayekoli mpe na nsima kobatisa bango. Basengelaki kosala nyonso wana na mokili mobimba!—Matai 28:19, 20.
3. Likambo nini Yesu alakaki bayekoli na ye, mpe ndenge nini bakokisaki mosala oyo apesaki bango?
3 Atako bongo, Yesu alakaki bayekoli na ye ete elimo santu ekosunga bango mpo na kokokisa mosala oyo apesaki bango. Yango wana, atako mosala ezalaki monene mpenza mpe atako banguna bazalaki kosala nyonso mpo na kopekisa bango, bayekoli ya liboso ya Yesu basalaki oyo atindaki bango. Ezali likambo oyo moto moko te akoki kotyela yango ntembe.
4. Ndenge nini etinda ya kosakola mpe koteya basusu emonisaki bolingo ya Nzambe?
4 Mosala ya kosakola mpe ya koteya na mokili mobimba emonisaki ete Nzambe alingaki ata bato oyo bayebaki ye te. Mosala yango epesaki bango libaku ya kokóma na boyokani na Yehova mpe kolimbisama masumu na bango. (Misala 26:18) Mosala ya kosakola mpe ya koteya ezalaki mpe komonisa ete Nzambe alingaki bato oyo bazalaki komema nsango yango, mpamba te ezalaki kopesa bango libaku ya komonisa ete bamipesi mpenza na Yehova mpe ya komonisa ete balingaka bazalani na bango. (Matai 22:37-39) Mpo na komonisa ete mosala ya boklisto ezalaki na ntina mingi na miso na ye, ntoma Paulo abengaki yango “eloko ya motuya.”—2 Bakolinti 4:7.
5. (a) Epai wapi tokokuta lisolo ya solosolo ya baklisto ya liboso, mpe bokoli nini elobelami na mokanda yango? (b) Mpo na nini mokanda ya Misala ezali na ntina mingi mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo?
5 Lisolo ya solosolo ya mosala ya kosakola oyo baklisto ya liboso basalaki ezali na Misala, mokanda oyo moyekoli Luka akomaki na kopemama na elimo ya Nzambe. Lisolo yango emonisi ete mosala ezalaki kokola nokinoki mpe na ndenge ya kokamwa. Ndenge oyo boyebi ya Liloba ya Nzambe ezalaki kokola ezongisi makanisi na biso na Nzembo 147:15, oyo elobi ete: “[Yehova] akotindaka lilako na mokili, liloba na ye ekotambolaka mbango.” Lisolo ya bayekoli ya liboso, oyo bazwaki nguya ya elimo santu, ezali mpenza kosepelisa biso mpe ezali na ntina monene mpo na biso lelo oyo. Batatoli ya Yehova mpe bazali kosala mosala se moko wana ya kosakola mpe kokómisa bato bayekoli; kasi bango bazali kosala yango na mikili mingi koleka. Biso mpe tozali kokutana na mikakatano lokola oyo baklisto ya ekeke ya liboso bakutanaki na yango. Soki totaleli ndenge oyo Yehova apambolaki baklisto ya liboso mpe apesaki bango nguya, yango ekolendisa kondima na biso ete azali kosunga biso.
Bayekoli bazalaki se kokóma ebele
6. Maloba nini oyo elobeli bokoli ezongelami mbala misato na mokanda ya Misala, mpe ezali kolobela nini?
6 Mpo na koyeba ndenge oyo Misala 1:8 ekokisamaki, tokoki kotalela maloba oyo ete “liloba ya Yehova ezalaki se kokola.” Na Biblia mobimba, maloba yango ezali kaka na bisika misato, na mokanda ya Misala; mpe bavɛrsɛ yango ekeseni kaka mwa moke. (Misala 6:7, NW; 12:24, NW; 19:20, NW) Na bavɛrsɛ yango, “liloba ya Yehova,” to “liloba ya Nzambe,” elimboli nsango malamu, nsango ya mateya ya solo oyo euti na Nzambe, nsango ya bomoi mpe ya nguya oyo ebongolaki bomoi ya bato oyo bayambaki yango.—Baebele 4:12.
7. Na Misala 6:7, liloba ya Nzambe ekolaki na oyo etali likambo nini mpe nini esalemaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B.?
7 Mbala ya liboso oyo balobi ete Liloba ya Nzambe ezalaki kokola ezali na Misala 6:7 (NW). Vɛrsɛ yango elobi boye: “Boye, liloba ya Nzambe ezalaki se kokola, mpe bayekoli bazalaki se kobakisama mingi na Yelusaleme; mpe ebele ya banganga bakómaki kotosa kondima.” Kokola oyo balobeli awa elimboli ete motángo ya bayekoli ezalaki kobakisama. Liboso, na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., Nzambe akitisaki elimo santu na ye likoló ya bayekoli 120 oyo bayanganaki na ndako moko ya likoló. Mokolo yango, ntoma Petelo asalaki lisukulu moko ya kafukafu, mpe na kati ya baoyo bayokaki yango, bato 3 000 bakómaki bandimi kaka mokolo yango. Tokanisi mpenza ete mboka eninganaki ntango bankóto ya bato bazalaki kokende na liziba to na maziba ya Yelusaleme mpe na zingazinga na yango mpo na kozwa batisimo na nkombo ya Yesu, moto oyo, elekaki mikolo 50, babakaki ye na nzete lokola moto ya mabe!—Misala 2:41.
8. Ndenge nini bayekoli babakisamaki na bambula oyo elandaki Pantekote ya mobu 33 T.B.?
8 Kasi, wana ezalaki kaka ebandeli. Milende nyonso oyo bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki kosala mpo na kopekisa mosala ya kosakola ezalaki mpamba. Likambo oyo esengelaki mpenza koswa bakonzi na mitema oyo: “Mokolo na mokolo, Yehova azalaki se kobakisa epai na [bayekoli] baoyo bazalaki kobikisama. (Misala 2:47, NW) Mosika te, ‘motuya ya mibali ekómaki soki nkóto mitano.’ Nsima na yango, ‘bandimi babakisamaki na Nkolo koleka liboso, ebele ya mibali mpe basi.’ (Misala 4:4; 5:14) Nsima ya bambula, lisolo elobi boye: “Na bongo kimya ezalaki na Lingomba na bipai nyonso na Yuda, na Galilai, na Samalia. Balendisami mpe batamboli na nsɔmɔ ya Nkolo mpe na lisungi ya [elimo santu, bazalaki se kobakisama, NW].” (Misala 9:31) Mwa bambula na nsima, ekoki kozala soki na mobu 58 T.B., balobelaki “bankóto mingi ya bandimi.” (Misala 21:20, NW) Na ntango wana, bato mingi oyo bazalaki Bayuda te bakómaki bandimi.
9. Lobelá naino ndenge oyo bayekoli ya liboso bazalaki.
9 Motuya ezalaki kobakisama mingimingi mpo bato bazalaki kobongwana. Ezalaki lingomba ya sika, kasi bazalaki na molende. Bayekoli bazalaki te bandimi oyo bakendaka kaka koyoka mateya; bamipesaki mpenza na Yehova mpe na Liloba na ye. Bamosusu bateyaki bango solo na bato oyo banyokwamaki mingi. (Misala 16:23, 26-33) Baoyo bandimaki kokóma baklisto basalaki yango nsima ya kokanisa malamu mpe batosaki lisosoli na bango mpo na kozwa ekateli. (Baloma 12:1) Bateyaki bango banzela ya Nzambe; mateya ya solo ekɔtaki na makanisi mpe mitema na bango. (Baebele 8:10, 11) Bandimaki ata kokufa mpo na kondima na bango.—Misala 7:51-60.
10. Mokumba nini baklisto ya liboso bandimaki, mpe yango ekokani na nini lelo oyo?
10 Baoyo bandimaki mateya ya Klisto bayebaki ete bazali na mokumba ya koyebisa yango epai ya bato mosusu. Yango esalaki ete motango na bango elanda kobakisama. Molimboli moko ya Biblia alobaki ete: “Bazalaki kokanisa te ete mokumba ya koyebisa bato mosusu bindimeli na bango ezalaki kaka mpo na bato oyo bazalaki na molende mingi to bato oyo baponamaki lokola basakoli. Kosakola nsango malamu ezalaki mokumba ya mondimi nyonso. . . . Ndenge oyo baklisto nyonso bandimaki mokumba yango elamwisaki lisangá banda na ebandeli.” Akomaki lisusu boye: “Kosakola nsango malamu ezalaki mokumba oyo elekaki ntina mpo na baklisto ya liboso.” Ezali se ndenge yango epai ya baklisto ya solo lelo oyo.
Nsango malamu epalanganaki na mikili mingi
11. Misala 12:24 elobeli bokoli nini, mpe ndenge nini esalemaki?
11 Mbala ya mibale oyo balobi ete liloba ya Nzambe ezalaki kokola ezali na Misala 12:24 (NW): “Liloba ya Yehova ezalaki se kokola mpe kopalangana.” Vɛrsɛ oyo elobeli kopalangana ya nsango yango na mikili mingi. Atako bakonzi ya Leta bazalaki kopekisa, mosala ezalaki se kokende liboso. Elimo santu ekitaki mpo na mbala ya liboso na Yelusaleme, mpe banda na engumba yango, liloba epalanganaki nokinoki. Ntango bakómaki konyokola baklisto na Yelusaleme, bapalanganaki na Yudea mpe na Samalia. Likambo nini emonanaki? “Baoyo bapalanganaki bakei epai na epai kosakoláká Nsango Malamu.” (Misala 8:1, 4) Elimo etindaki Filipo akende kosakwela moto moko oyo, nsima ya kozwa batisimo, amemaki nsango malamu na Etiopia. (Misala 8:26-28, 38, 39) Nsima ya mwa ntango mateya ya solo ekɔtaki na Luda, na Salono, mpe na Yafo. (Misala 9:35, 42) Na nsima, ntoma Paulo asalaki mibembo milai na mai mpe na mokili, afungolaki masangá na mikili mingi oyo ezali pembenipembeni ya Mai Monene ya Méditerranée. Ntoma Petelo, ye akendaki na Babilone. (1 Petelo 5:13) Nsima ya mbula 30, kobanda ntango elimo santu ekitaki na Pantekote, Paulo akomaki ete nsango malamu “esili kosakolama epai ya bato nyonso na nse ya Likoló”; na ntembe te azalaki kokanisa mikili oyo eyebanaki na ntango wana.—Bakolose 1:23.
12. Maloba nini ya banguna ya Lingomba ya boklisto emonisi ete bandimaki ete liloba ya Nzambe ezalaki kopalangana na mikili mingi?
12 Ata banguna ya baklisto bandimaki ete liloba ya Nzambe ekɔtaki mpenza na mikili nyonso oyo Bokonzi ya Loma ezalaki koyangela. Na ndakisa, Misala 17:6 elobi ete na Tesaloniki, mboka oyo ezali na nɔrdi ya Grèce, banguna balobaki ete: “Bato wana, baoyo basili kobalola mokili, bakómi awa lokola.” Lisusu, na ebandeli ya ekeke ya mibale, Pline le Jeune azalaki na Bitunia epai akomelaki Trajan, amperɛrɛ ya Loma mokanda; mpo na Lingomba ya boklisto alobaki ete: “Esuki kaka na bingumba te, kasi mikrobe na yango epalangani na bamboka nyonso, tii na bamboka ya zamba.”
13. Ndenge nini kopalangana ya nsango malamu na mikili mingi emonisi bolingo ya Nzambe mpo na bato?
13 Ndenge oyo nsango malamu epanzanaki na bikólo mingi ezalaki komonisa bolingo ya Yehova mpo na bato oyo bakoki kobikisama. Ntango Petelo amonaki ete Koloneli, moto oyo azalaki Moyuda te, azwi elimo santu, alobaki ete: “Ya solo namoni ete Nzambe akokabolaka bato te; kasi na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.” (Misala 10:34, 35) Nsango malamu ezalaki mpe ezali mpo na moto nyonso, mpe ndenge oyo liloba ya Nzambe ezalaki kopanzana na bikólo mingi epesaki bato ya bisika nyonso likoki ya kondima to koboya bolingo oyo Nzambe amonisaki. Lelo oyo, na ekeke ya 21, liloba ya Nzambe epalangani na mokili mobimba mpenza.
Ekolaki mpe elongaki
14. Misala 19:20 elobeli bokoli nini, mpe liloba ya Nzambe elongaki nini?
14 Mbala ya misato oyo balobi ete liloba ya Nzambe ezalaki kokola ezali na Misala 19:20 (NW): “Na nguya mpenza, liloba ya Yehova ezalaki se kokola mpe kolonga.” Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kolonga” ezali kopesa likanisi ya “komonisa nguya.” Bavɛrsɛ oyo ezali liboso elobi ete bato ebele bakómaki bandimi na Efese, mpe mingi na baoyo bazalaki bato ya maji, batumbaki mikanda na bango na miso ya bato nyonso. Na ndenge yango, liloba ya Nzambe elongaki bindimeli ya mangomba ya lokuta. Nsango malamu elongaki mpe mikakatano mosusu, na ndakisa minyoko. Eloko moko te ekokaki kopekisa yango. Na likambo yango mpe tozali komona bokokani na boklisto ya solo na ntango na biso.
15. (a) Moto moko ya mayele na istware ya Biblia alobaki nini mpo na baklisto ya liboso? (b) Mpo na bayekoli, soki balongaki ezalaki mpo na nani?
15 Bantoma na baklisto mosusu ya ekeke ya liboso bazalaki kosakola liloba ya Nzambe na molende. Moto moko ya mayele na istware alobaki boye: “Ntango bato bazali na mposa ya koloba mpo na Nkolo na bango, bayekolaka mayele mingi ya kosala yango. Ezali mposa oyo basi mpe mibali yango bazalaki na yango nde ezali kokamwisa biso koleka mayele oyo bazalaki kosalela.” Kasi, baklisto ya liboso bayebaki ete soki mosala na bango ezalaki kobota mbuma, ezalaki na makasi na bango moko te. Nzambe nde apesaki bango mosala wana mpe azalaki kosunga bango mpo na kokokisa yango. Nzambe nde akolisaka na elimo. Ntoma Paulo andimaki likambo yango na mokanda oyo akomelaki baklisto ya Kolinti. Akomaki boye: “Ngai nakonaki, Apolo amwangisaki mai kasi Nzambe akolisaki. Zambi tozali basalani na Nzambe elongo.”—1 Bakolinti 3:6, 9.
Mosala ya elimo santu
16. Nini emonisi ete elimo santu elendisaki bayekoli na koloba na mpiko?
16 Tóbosana te ete Yesu alakaki bayekoli na ye ete elimo santu ekosala mosala monene mpo ete liloba ya Nzambe ekola. Elimo santu esengelaki mpe kopesa bayekoli makasi ya kosakola. (Misala 1:8) Esalemaki ndenge nini? Mwa moke nsima wana elimo santu ekitelaki bayekoli na Pantekote, bamemaki Petelo na Yoane liboso ya Sanedrina, tribinale monene ya mboka oyo ekatelaki Yesu Klisto etumbu ya liwa. Bantoma balingaki nde kobanga liboso ya bato minene wana oyo bazalaki mpe kopekisa mosala na bango? Eloko te! Elimo santu epesaki Petelo na Yoane makasi ya koloba na mpiko oyo ekamwisaki banguna na bango, mpe ‘basosolaki ete bazalaki na Yesu esika moko.’ (Misala 4:8, 13) Elimo santu epesaki mpe Setefano mpiko ya kosakola liboso ya Sanedrina. (Misala 6:12; 7:55, 56) Liboso na yango, elimo santu esalisaki bayekoli na kosakola na mpiko. Luka akomi boye: “Ezalaki bango kolɔmba, esika eyangani bango eningani. Bango nyonso batondaki na [elimo santu, NW], mpe na molende basakoli liloba ya Nzambe.”—Misala 4:31.
17. Na ndenge nini mosusu elimo santu esungaki bayekoli na mosala ya kosakola?
17 Yehova na Yesu oyo asekwaki basalelaki nguya monene ya elimo santu mpo na kotambwisa mosala ya kosakola. (Yoane 14:28; 15:26) Ntango elimo yango ekitelaki Koloneli, na bandeko mpe baninga na ye, ntoma Petelo asosolaki ete bato ya bikólo mosusu oyo bakatami ngenga te bakoki kozwa batisimo na nkombo ya Yesu Klisto. (Misala 10:24, 44-48) Na nsima, elimo esalisaki mingi mpo na kopona Balanaba na Saulo (ntoma Paulo) na mosala ya misionɛrɛ mpe mpo na kolakisa bango bipai oyo basengelaki kokende mpe bipai oyo basengelaki kokende te. (Misala 13:2, 4; 16:6, 7) Elimo santu etambwisaki bantoma na mikóló na Yelusaleme mpo na kozwa bikateli. (Misala 15:23, 28, 29) Bakɛngɛli na kati ya lisangá ya boklisto bazalaki mpe koponama na lisalisi ya elimo santu.—Misala 20:28.
18. Ndenge nini baklisto ya liboso bazalaki komonisa bolingo?
18 Elimo santu ezalaki mpe kosala epai ya baklisto bango moko, ezalaki kobota bizaleli malamu lokola bolingo. (Bagalatia 5:22, 23) Bolingo etindaki bayekoli básalisanaka. Na ndakisa, nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., basalaki kɛsi moko mpo na kosalisa bayekoli oyo bazalaki na bosɛnga na Yelusaleme. Biblia elobi boye: “Na kati na bango moto te azalaki mozangi, mpo ete baoyo nyonso bazalaki na elanga, soko na ndako, batɛki yango, mpe bayei na mosolo na motuya ya biloko bitɛkami, mpe batii yango na makolo ya bantoma. Bongo bakaboli yango na moto na moto lokola ezalaki ye na bosɛnga.” (Misala 4:34, 35) Bolingo yango esukaki te kaka epai ya bandeko na bango bandimi, balingaki mpe bato mosusu; bazalaki koteya bango nsango malamu mpe bazalaki kosalela bango boboto. (Misala 28:8, 9) Yesu alobaki ete bato bakoyeba bayekoli na ye na bolingo oyo ekozala kati na bango. (Yoane 13:34, 35) Ya solo, bolingo ebendaki bato epai ya Nzambe mpe esalaki ete lisangá ekola na ekeke ya liboso, ndenge mpe ezali kosalema lelo oyo.—Matai 5:14, 16.
19. (a) Tángá ndenge misato oyo liloba ya Yehova ekolaki na ekeke ya liboso. (b) Tokolobela nini na lisolo elandi?
19 Na mokanda ya Misala, liloba “elimo santu” ezongelami mbala 41. Emonisi polele ete nguya mpe litambwisi ya elimo santu esalaki ete lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso ekola mpenza. Bayekoli babakisamaki mingi, liloba ya Nzambe epalanganaki na bisika ebele mpe elongaki mangomba mpe mateya ya filozofi ya ntango wana. Ndenge oyo lisangá ekolaki na ekeke ya liboso ezali mpe komonana na mosala ya Batatoli ya Yehova na mikolo na biso. Na lisolo oyo elandi, tokotalela ndenge ya kokamwa oyo liloba ya Nzambe ezali mpe kokola na ntango na biso.
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini bayekoli bazalaki kobakisama?
• Ndenge nini liloba ya Nzambe epalanganaki na mikili mingi?
• Na ekeke ya liboso, ndenge nini liloba ya Nzambe elongaki?
• Elimo santu esalaki mosala nini mpo liloba ya Nzambe ekola?
[Elilingi na lokasa 12]
Filipo ateyaki Moetiopia, na nzela na yango nsango malamu ekɔtaki na mokili mosusu
[Elilingi na lokasa 13]
Elimo santu etambwisaki bantoma na mikóló na Yelusaleme
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 10]
Likoló na lobɔkɔ ya mobali: Yelusaleme ndenge ezalaki na eleko ya tempelo ya mibale; elilingi oyo ezali na otɛlɛ Holyland, na Jérusalem