Yokáká mongongo ya motema na yo
“Bato ya bikólo mosusu oyo bazalaka na mibeko [ya Nzambe] te bazali kosala makambo ya mibeko bango moko ndenge bazalisamá.”—Baloma 2:14.
1, 2. (a) Bato mingi basalaki nini mpo na kosalisa basusu? (b) Tángá bandakisa oyo Biblia elobeli ya bato oyo basalisaki basusu.
ELENGE moko ya mbula 20 oyo abɛlaka maladi ya ndɛkɛ akweaki na gare moko likoló ya bibende oyo engbunduka elekelaka. Moto moko oyo amonaki ye, atikaki mbala moko bana na ye mpe akitaki na esika oyo elenge yango akweaki. Akitisaki ye na terase na katikati ya bibende oyo engbunduka elekelaka mpe alalaki likoló na ye mpo na kobatela ye wana engbunduka ezalaki koleka. Bato mosusu bakoki koloba ete mobali yango azali elombe; kasi ye moko alobaki boye: “Tosengeli kosalaka oyo ezali malamu. Nasalaki yango na motema malamu. Ezalaki te mpo nazwa lokumu.”
2 Mbala mosusu oyebi moto moko oyo atyaki bomoi na ye na likama mpo na kosalisa basusu. Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bato mingi bazalaki kobomba bapaya mpo na kobikisa bango na liwa. Tókanisa mpe likambo oyo ekómelaki ntoma Paulo ná bato mosusu 275 oyo bazalaki na masuwa oyo ezindaki na Esanga Malta, pembeni ya Sisili. Bato ya esanga yango basalisaki bapaya wana, bamoniselaki bango “boboto moko ya koloba te.” (Misala 27:27–28:2) Tókanisa mpe ndakisa ya elenge mwasi moko Moyisalaele; atako atyaki bomoi na ye na likama te, amibanzabanzaki mpo na nkolo na ye oyo azalaki moto ya Asulia, bato oyo bakangaki ye. (2 Mikonzi 5:1-4) Tókanisa mpe lisese eyebani mingi oyo Yesu apesaki ya Mosamalia ya motema malamu. Nganga-nzambe moko mpe Molevi moko balekaki ndeko na bango Moyuda oyo babandi batikaki pene ya liwa; kasi, Mosamalia moko asalaki nyonso mpo na kosunga ye. Banda kala, lisese yango esimbaka mitema ya bato ya bikólo nyonso.—Luka 10:29-37.
3, 4. Mposa oyo etindaka bato básalisa basusu emonisi nini mpo na liteya ya evolisyo?
3 Ya solo, tozali na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza”; bato mingi bazali “bato ya kongala” mpe “bazangi bolingo ya makambo ya malamu.” (2 Timote 3:1-3) Atako bongo, tomonaka bato oyo basalisaka basusu na motema malamu, ntango mosusu mpe basalisaka biso. Bato mingi balukaka kosalisa basusu, ata soki ekotya bomoi na bango na likama; bato mosusu kutu balobaka ete yango nde bomoto.
4 Koluka kosalisa bato mosusu, ata soki ekotya bomoi na biso na likama emonanaka epai ya bato ya bikólo mpe mposo nyonso, mpe ekweisi likanisi oyo elobaka ete moto autá na nyama. Francis Collins, moto moko ya siansi mpe mwana-mboka États-Unis, alobaki boye: “Bato oyo balobaka ete moto autá na nyama bazali na mokakatano monene mpo na kolimbola ntina oyo bato balukaka kosalisa basusu. . . . Tokokaki kozala na ezaleli yango te soki nzoto na biso ebongisamaki kaka mpo elukaka kotikala na bomoi.” Abakisaki boye: “Bato mosusu bamipesaka na kosalisa bato oyo bazali na bango libota moko te, ekólo moko te, mboka moko te, to mpe oyo bazali na bango na boyokani na likambo moko te. . . . Liteya ya evolisyo ekoki ata moke te kolimbola mpo na nini bato bazalaka na ezaleli yango.”
Lisosoli ya moto
5. Likambo nini emonanaka epai ya bato mingi?
5 Profesɛrɛ Collins alobelaki likambo mosusu oyo etindaka biso tósalisa basusu: “Lisosoli etindaka biso tósalisa basusu ata soki tokozwela yango lifuti te.” Liloba “lisosoli” ezali kotinda biso tókanisa likambo moko oyo ntoma Paulo amonisaki; alobaki boye: “Ntango bato ya bikólo mosusu oyo bazalaka na mibeko te bazali kosala makambo ya mibeko bango moko ndenge bazalisamá, bato yango, atako bazalaka na mibeko te, bazali mobeko epai na bango moko. Bango nde bato oyo bazali komonisa ete makambo ya mibeko ekomamá na kati ya mitema na bango, wana lisosoli na bango ezali kopesa litatoli elongo na bango mpe, na kati ya makanisi na bango moko, bazali kofundama to ata mpe kolongisama.”—Baloma 2:14, 15.
6. Mpo na nini bato nyonso bakoki kowangana te ete Mozalisi azali?
6 Na mokanda oyo Paulo akomelaki Baloma, amonisaki ete bato bakoki kowangana te ete Nzambe azali, mpamba te biloko oyo emonanaka elakisaka yango polele mpe emonisaka bizaleli na Ye. Ezalaka bongo “banda kozalisama ya mokili.” (Baloma 1:18-20; Nzembo 19:1-4) Ya solo, bato mingi bazali kokipe Mozalisi na bango te mpe bazali komipesa na makambo ya mbindo. Nzokande, mokano ya Nzambe ezali ete bato bándima ete Ye nde azali moyengebene mpe bátika misala ya mabe. (Baloma 1:22–2:6) Bayuda bazalaki na ntina moko monene ya kosala yango: Nzambe apesaki bango Mibeko na nzela ya Moize. Kasi, ata bato oyo bazalaki na “maloba mosantu ya Nzambe” te, bazalaki na makambo mingi oyo esengelaki kondimisa bango ete Nzambe azali.—Baloma 2:8-13; 3:2.
7, 8. Na meko nini mposa ya komona makambo esalemaka na bosembo emonanaka epai ya bato, mpe yango elakisaka nini?
7 Ntina monene oyo bato nyonso basengeli kondima ete Nzambe azali mpe kotosa ye ezali ete bazali na likoki ya kokesenisa mabe ná malamu. Mposa ya komona makambo esalemaka na bosembo emonisaka ete tozali na lisosoli. Tókamata ndakisa moko: Ntango bana bazali kosala lisano oyo esɛngi ete mokomoko akɔtaka na ngala na ye, nini emonanaka soki mwana moko alongwe na nsima mpe aleki baninga oyo bazali liboso? Bana mosusu balobaka mbala moko, ‘Te, osali mabe!’ Sikoyo, tómituna, ‘Mpo na nini ata bana mike bamonisaka mbala moko ete balingaka makambo esalema na bosembo?’ Yango emonisaka ete na mitema na bango, balingaka makambo ya malamu mpe baboyaka oyo ya mabe. Paulo akomaki boye: “Ntango bato ya bikólo mosusu oyo bazalaka na mibeko te bazali kosala makambo ya mibeko bango moko ndenge bazalisamá.” Alobaki te ete, “Soki,” lokola nde ezali likambo oyo esalemaka mingi te. Alobaki nde “ntango,” to “ntango nyonso,” mpo na komonisa ete likambo yango esalemaka mingi. Elingi koloba ete bato ‘basalaka makambo ya mibeko bango moko ndenge bazalisamá,’ to mitema na bango etindaka bango básala makambo oyo totángaka na Liloba ya Nzambe.
8 Mposa wana ya kosala malamu emonanaka epai ya bato ya mikili ndenge na ndenge. Profesɛrɛ moko na Iniversite ya Cambridge alobaki ete bato ya Babilone, Baezipito, Bagrɛki, ata mpe bafandi ya liboso ya Australie mpe Ba-Indiens ya Amerika bazalaki na mibeko oyo “epekisaki konyokola bato, koboma, koyiba mpe kokosa; ezalaki mpe kosɛnga komonisela mibange, bilenge, mpe babola boboto.” Profesɛrɛ Collins akomaki boye: “Emonani ete bato ya mokili mobimba bazalaka na likoki ya kokesenisa mabe ná malamu.” Makanisi yango eyokani mpenza na oyo ezali na Baloma 2:14.
Ndenge oyo lisosoli esalaka
9. Lisosoli ezali nini, mpe ndenge nini ekoki kosalisa moto liboso asala likambo moko?
9 Biblia elobi ete lisosoli ya moto ezali likoki na ye ya kotalela malamumalamu makambo oyo asalaka. Ezali lokola mongongo oyo elobaka na kati ya motema mpo na koyebisa soki likambo moko ezali mabe to malamu. Paulo amonisaki ete mongongo yango ezalaki koloba kati na ye; alobaki boye: “Lisosoli na ngai ezali kopesa litatoli elongo na ngai na kati ya elimo santu.” (Baloma 9:1) Mongongo yango ekoki koloba na moto liboso, elingi koloba ntango azali kotalela soki likambo oyo alingi kosala ekomonana malamu to mabe. Lisosoli ya moto ekoki kosalisa ye atalela likambo moko oyo akani kosala mpe komonisa ye ndenge akoyoka soki asali yango.
10. Mbala mingi, lisosoli ya moto esalaka ndenge nini?
10 Kasi, mbala mingi lisosoli elobaka na moto nsima ya kosala likambo. Ntango azalaki kokimakima Mokonzi Saulo, mokolo moko Davidi asalaki mopakolami ya Nzambe likambo moko ya kozanga limemya. Na nsima, “motema ya Davidi eyokaki mabe.” (1 Samwele 24:1-5; Nzembo 32:3, 5) Vɛrsɛ yango esaleli liloba “lisosoli” te; kasi, ntango elobi ete motema ya Davidi eyokaki mabe, elakisi ete lisosoli na ye etungisamaki. Esilá kokómela moto nyonso ete lisosoli na ye etungisama. Mbala mosusu tosalaki likambo moko, mpe na nsima toyokaki mabe, tokómaki kotungisama. Bato mosusu bakimaki kofuta mpako; na nsima, lisosoli na bango etungisamaki mpe nsukansuka bafutaki mpako yango. Lisosoli etindaki mpe bato mosusu báyambola epai ya balongani na bango ete basalaki ekobo. (Baebele 13:4) Nzokande, moto oyo ayokelaka lisosoli na ye, azalaka motema mpiɔ mpe na kimya.
11. Mpo na nini kotika kaka ete lisosoli etambwisa biso ekoki kozala likama? Pesá ndakisa.
11 Yango elingi nde koloba ete tosengeli kotika kaka lisosoli etambwisa biso? Ezali malamu tóyokaka lisosoli na biso; kasi, ntango mosusu ekoki komema biso na nzela ya mabe. Mongongo ya “bomoto na biso ya kati” ekoki kokosa biso. (2 Bakolinti 4:16) Tótalela ndakisa moko. Biblia elobeli Setefano, moyekoli moko ya Klisto oyo “atondaki na boboto mpe na nguya.” Etuluku moko ya Bayuda babimisaki Setefano libándá ya Yelusaleme mpe babambaki ye mabanga tii akufaki. Saulo (oyo na nsima akómaki ntoma Paulo) atɛlɛmaki pembeni wana mpe “andimaki kobomama” ya Setefano. Emonani ete Bayuda wana bazalaki kokanisa ete bazali kosala malamu; yango wana lisosoli na bango ezalaki kotungisama te. Na ntembe te lisosoli ya Saulo mpe ezalaki kotungisama te, mpamba te na nsima, “azalaki kaka kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Nkolo.” Tomoni mpenza ete lisosoli na ye ezalaki kolakisa ye nzela oyo ebongi te.—Misala 6:8; 7:57–8:1; 9:1.
12. Wapi lolenge moko oyo lisosoli ya moto ekoki kobeba?
12 Makambo nini ebebisaki lisosoli ya Saulo? Moko na yango ekoki kozala boninga na ye na bato mosusu. Mingi kati na biso tosilá kosolola na telefone na moto moko oyo mongongo na ye ezalaki koyokana lokola oyo ya tata na ye. Soki mingongo na bango ekokani, ezali mpo tata yango nde abotá ye; kasi ekoki mpe kozala ete mwana yango azalaki komekola elobeli ya tata na ye. Ndenge moko mpe, ekoki kozala ete Saulo alandaki makanisi ya baninga na ye, Bayuda oyo bazalaki koyina Yesu mpe koboya mateya na ye. (Yoane 11:47-50; 18:14; Misala 5:27, 28, 33) Baninga ya Paulo babebisaki mongongo ya motema na ye, to lisosoli na ye.
13. Ndenge nini lisosoli ya moto ekoki kolanda makanisi mpe mimeseno ya esika oyo afandi?
13 Lisosoli ekoki mpe kolanda makanisi to mimeseno ya bato ya esika moko boye, ndenge kaka esika oyo moto afandi ekoki kobongola ndenge na ye ya koloba to mpe ekoki kosala ete ayeba koloba monɔkɔ ya mboka wana. (Matai 26:73) Na ntembe te ezalaki bongo mpo na Baasulia. Eyebani ete bato ya ekólo wana balingaki bitumba, mpe mayemi oyo basalaki ezali komonisa bango bazali konyokola bato ya bikólo mosusu oyo bakangaki. (Nahumu 2:11, 12; 3:1) Biblia elobi ete na ntango ya Yona, bato ya Ninive bayebaki “kokabola kati na lobɔkɔ na bango ya mobali mpe lobɔkɔ na bango ya mwasi te.” Yango elingi koloba ete bayebaki te makambo nini ezali malamu mpe makambo nini ezali mabe na miso ya Nzambe. Kanisá ndenge oyo lisosoli ya moto oyo akolaki na Ninive ekokaki kozala! (Yona 3:4, 5; 4:11) Ndenge moko mpe lelo oyo, lisosoli ya moto ekoki kobongolama na makanisi ya bato ya esika oyo afandi.
Ndenge ya kobongisa mongongo ya motema na biso
14. Ndenge nini lisosoli na biso emonisaka likambo oyo elobami na Genese 1:27?
14 Yehova apesaki bankɔkɔ na biso Adama ná Eva lisosoli, yango wana biso mpe tozali na lisosoli. Genese 1:27 elobi ete bato basalemaki na elilingi ya Nzambe. Yango elingi koloba te ete tozali na nzoto lokola ya Nzambe, mpamba te Ye azali elimo mpe biso tozali na nzoto ya mosuni. Koloba ete tosalemi na elilingi ya Nzambe elimboli ete tozali na bizaleli lokola oyo ya ye, bakisa mpe likoki ya kokesenisa mabe ná malamu mpe lisosoli. Yango emonisi biso lolenge moko oyo tokoki kobongisa lisosoli na biso. Tosengeli koyeba malamu Mozalisi mpe kopusana penepene na ye.
15. Litomba nini tokoki kozwa na koyeba Tata na biso?
15 Biblia elobi ete Yehova azali Tata na biso nyonso. (Yisaya 64:8) Baklisto ya sembo, ezala baoyo bazali na elikya ya kokende na likoló to baoyo bakofanda na paladiso awa na mabelé, bakoki kobenga Nzambe Tata na bango. (Matai 6:9) Tosengeli kozala na mposa ya kopusana ntango nyonso penepene na Tata na biso mpe koyekola makanisi mpe mitinda na ye. (Yakobo 4:8) Bato mingi bakanisaka kosala yango te. Bato yango bazali lokola Bayuda oyo Yesu ayebisaki boye: “Boyoká mongongo na ye ata mbala moko te mpe bomoná te motindo na ye; mpe liloba na ye efandi na kati na bino te.” (Yoane 5:37, 38) Ata biso mpe toyoká naino mongongo ya Nzambe te, kasi tokoki koyekola liloba na ye mpe na ndenge yango, koyokanisa makanisi na biso na oyo ya ye.
16. Lisolo ya Yozefe emonisi nini na oyo etali koteya lisosoli na biso mpe koyokela yango?
16 Lisolo ya Yozefe na ndako ya Potifala emonisi yango. Mwasi ya Potifala alukaki ete Yozefe asangisa na ye nzoto. Atako mokanda moko te ya Biblia ekomamaki na ntango wana mpe Mibeko Zomi epesamaki naino te, Yozefe alobaki boye: “Nakoka kosala mabe monene oyo mpe kosala lisumu epai ya Nzambe boni?” (Genese 39:9) Alobaki bongo, kaka te mpo na kosepelisa bandeko na ye; kutu, bazalaki na mboka mosika mpenza. Alingaki libosoliboso kosepelisa Nzambe. Yozefe ayebaki likanisi ya Nzambe mpo na libala: mwasi moko, mobali moko; mpe bango mibale bakokóma “mosuni moko.” Lisusu, ekoki mpenza kozala ete Yozefe ayokaki lisolo ya Abimeleke mpe likambo oyo asalaki ntango ayokaki ete Lebeka azali mwasi ya libala—alobaki ete ekozala mabe akómisa ye mwasi na ye mpe akomema ekweli mpo na bato na ye. Yehova apambolaki ekateli ya Abimeleke; yango emonisaki ndenge oyo Yehova atalelaka ekobo. Makambo nyonso wana elendisaki ekateli ya Yozefe ya koyokela lisosoli na ye mpe na bongo, aboyaki kosala pite.—Genese 2:24; 12:17-19; 20:1-18; 26:7-14.
17. Na ndenge nini biso tozali na makambo mingi oyo Yozefe azangaki, oyo ekoki kosalisa biso tózala na makanisi ya Tata na biso?
17 Yozefe azangaki makambo mingi oyo biso tozali na yango lelo oyo. Na ndakisa, biso tozali na Biblia oyo ezali koteya biso makanisi ya Tata na biso, makambo oyo alingaka mpe oyo aboyaka. Soki tozali komipesa na koyekola Biblia, tokopusana lisusu penepene ya Nzambe mpe tokomekola ye malamumalamu. Na ndenge yango, lisosoli na biso ekoyokana mpenza na makanisi mpe mokano ya Tata na biso.—Baefese 5:1-5.
18. Ata soki lisosoli na biso elandaki makambo ya bato to ya esika moko boye, ndenge nini tokoki kobongisa yango?
18 Ezali boni soki lisosoli na biso eteyamaki na mimeseno ya esika oyo tokolá? Ekoki kozala ete tolandaki makanisi mpe misala ya bandeko to bato mosusu na esika oyo tokolá. Mpo na yango, mbala mosusu lisosoli na biso ebebá to ekufá mpenza. Ezali lokola nde ekómá koyokana lokola mongongo ya moto mosusu. Ya solo, tokoki te kobongola makambo oyo tokutaná na yango; kasi, tokoki kozwa ekateli ya kopona baninga na biso mpe esika oyo ekobongisa lisosoli na biso. Tokoki kobanda na kosangana na baklisto ya sembo oyo, banda kala basalaka makasi ete bámekola Tata na bango. Koyangana na makita, bakisa mpe kozwa momeseno ya kosolola na bandeko liboso mpe nsima ya makita, epesaka biso libaku ya kosala yango. Tokoki kotya likebi na makanisi mpe misala ya baklisto oyo balandaka toli ya Biblia, mpe komekola ezaleli na bango ya koyokela nokinoki lisosoli ntango emonisi bango likanisi ya Nzambe mpe banzela na ye. Nsima ya ntango, yango ekoki kosalisa biso tóyokanisa lisosoli na biso na mitinda ya Biblia, mpe na ndenge yango, tómonisa bizaleli ya Nzambe. Soki toyokanisi lisosoli na biso na mitinda ya Tata na biso mpe tozali kolanda ndakisa malamu ya bandeko na biso baklisto, tokokóma na lisosoli oyo tokoki kotyela motema mpe tokobanda koyokela yango mingi.—Yisaya 30:21.
19. Wapi makambo mosusu tokotalela na ntina na lisosoli?
19 Kasi, bandeko mosusu bazali na etumba monene mpo na koyokela lisosoli na bango na bomoi ya mokolo na mokolo. Lisolo oyo elandi ekolobela makambo oyo baklisto mosusu bakutanaki na yango. Makambo yango ekosalisa biso tómona malamumalamu ntina ya lisosoli, mpo na nini lisosoli ya moto moko ekoki kokesana na oyo ya moto mosusu, mpe nini tokoki kosala mpo tóyokelaka lisosoli na biso mingi.—Baebele 6:11, 12.
Oyekoli makambo nini?
• Mpo na nini bato ya bikólo nyonso bazalaka na lisosoli, to likoki ya kokesenisa mabe ná malamu?
• Mpo na nini tosengeli te kolanda kaka lisosoli na biso?
• Wapi mwa balolenge oyo tokoki kobongisa lisosoli na biso?
[Bililingi na lokasa 23]
Lisosoli ya Davidi etungisamaki . . .
kasi ezalaki bongo te mpo na Saulo, moto ya Talasi
[Elilingi na lokasa 24]
Tokoki koteya lisosoli na biso