MOKAPO 7
Asakolaki “nsango malamu oyo etali Yesu”
Filipe apesaki ndakisa malamu lokola mopalanganisi ya nsango malamu
Euti na Misala 8:4-40
1, 2. Na siɛklɛ ya liboso, ndenge nini milende oyo banguna basalaki mpo na kopekisa kosakolama ya nsango malamu esalisaki kutu mpo na kopalanganisa yango?
MINYOKO ekómaki makasi mpo na bakristo, mpe Saulo azalaki “konyokola” lisangá; maloba ya Grɛki oyo ebongolami na elobeli wana elimboli kosalela bato makambo mabe na nko mpenza. (Mis. 8:3) Bayekoli bakómaki kokima, mpe ekómaki komonana lokola nde Saulo akokokisa mokano na ye ya kolimwisa lisangá ya bokristo. Nzokande, kopanzana ya bakristo ebimisaki likambo oyo moto moko te akokaki kokanisa. Likambo nini?
2 Bakristo oyo bapanzanaki bakómaki “kosakola nsango malamu ya liloba” na bisika nyonso oyo bakendaki. (Mis. 8:4) Kanisá naino! Minyoko elongaki te kopekisa kosakolama ya nsango malamu; kutu, esalisaki ete nsango yango epalangana! Ndenge banyokoli bapanzaki bayekoli, kozanga ete báyeba yango, bapesaki nzela ete mosala ya kosakola Bokonzi ekóma tii na bamboka oyo ezalaki mosika. Ndenge tokomona yango, likambo ya ndenge wana esalemi mpe na ntango na biso.
“Baoyo bapalanganaki” (Misala 8:4-8)
3. (a) Filipe azalaki nani? (b) Mpo na nini bato mingi ya Samaria bayokaki naino nsango malamu te, kasi Yesu asakolaki likambo nini oyo esengelaki kosalema na teritware yango?
3 Filipe azalaki na kati ya “baoyo bapalanganaki.”a (Mis. 8:4; talá etanda “Filipe ‘mopalanganisi ya nsango malamu,’” na lokasa 53.) Ye akendaki na Samaria, engumba oyo bafandi na yango mingi bayokaki naino nsango malamu te, mpo mwa ntango liboso, Yesu alobaki na bantoma na ye ete: “Bókɔta ata na engumba moko te ya Samaria; kasi, bókoba kokende epai ya bampate oyo ebungá ya ndako ya Yisraele.” (Mat. 10:5, 6) Nzokande, Yesu ayebaki ete na nsima, litatoli ekopesama malamumalamu na Samaria, mpo liboso amata na likoló, alobaki ete: “Bokozala batatoli na ngai na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba, na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.”—Mis. 1:8.
4. Ndenge nini Basamaria bayambaki nsango oyo Filipe azalaki kosakola, mpe ekoki kozala likambo nini etindaki bango bándima yango?
4 Filipe amonaki ete Samaria “eteli mpo na kobuka mbuma.” (Yoa. 4:35) Nsango na ye ebɔndisaki mpenza bafandi ya engumba wana, mpe ezali mpasi te mpo tóyeba mpo na nini ezalaki bongo. Bayuda bazalaki koyokana te na Basamaria; kutu, Bayuda mingi bazalaki kotyola Basamaria. Nzokande, Basamaria bamonaki ete nsango malamu ezalaki kosakolama epai ya bato nyonso, mpe ekesanaki mpenza na ezaleli ya kopona bilongi oyo Bafarisai bazalaki komonisa. Lokola Filipe azalaki kosakola na molende mpe azalaki kopona bilongi te, amonisaki Basamaria ete azalaki kokanisela bango mabe te, ezaleli oyo ezalaki epai ya bato oyo bazalaki kotyola bango. Tokoki kokamwa te ete ebele ya Basamaria bayokaki Filipe “na bomoko mpenza.”—Mis. 8:6.
5-7. Pesá bandakisa oyo emonisi ete kopanzana ya bakristo esalisaki mpo nsango malamu epalangana.
5 Lelo oyo, ndenge kaka ezalaki na siɛklɛ ya liboso, monyoko oyo basaleli ya Nzambe bakutanaka na yango epekisaka bango te bákoba kosakola. Mbala na mbala, kotinda bakristo na makasi na bisika mosusu, ezala na bolɔkɔ mosusu to na mboka mosusu, esalisi mpo na kokɔtisa nsango ya Bokonzi na bisika yango. Na ndakisa, na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bazwaki likoki ya kopesa litatoli na bakaa ya bakangami ya Banazi. Moyuda moko oyo akutanaki na Batatoli na bakaa yango alobaki boye: “Mpiko ya Batatoli ya Yehova oyo bazalaki na bolɔkɔ endimisaki ngai ete kondima na bango eutaki na Biblia—mpe ngai moko nakómaki Motatoli.”
6 Na mabaku mosusu, ata banyokoli bango moko bazwaki litatoli mpe bandimaki nsango malamu. Na ndakisa, ntango batindaki Motatoli moko nkombo na ye Franz Desch na kaa ya bakangami ya Gusen, na ekólo Autriche, azwaki libaku ya koyekola Biblia na mokonzi moko ya basoda ya Nazi. Kanisá esengo oyo bayokaki bambula mingi na nsima ntango bakutanaki na liyangani ya Batatoli ya Yehova mpe bango mibale bazalaki basakoli ya nsango malamu!
7 Likambo ya ndenge wana esalemaki ntango minyoko esalaki ete bakristo bákende kofanda na ekólo mosusu. Na ndakisa, na bambula ya 1970, litatoli monene epesamaki na ekólo Mozambique ntango Batatoli ya ekólo Malawi bakimaki minyoko na mboka na bango mpe bakendaki kofanda na Mozambique. Ata ntango minyoko ebandaki na Mozambique, mosala ya kosakola ekobaki kosalema. Francisco Coana alobi boye: “Ya solo, bakangaki bamosusu kati na biso mpo tozalaki kosakola. Kasi, ntango bato mingi bandimaki nsango ya Bokonzi, tondimaki ete Nzambe azalaki kosalisa biso, ndenge asalisaki bakristo na siɛklɛ ya liboso.”
8. Ndenge nini mbongwana na makambo ya politiki mpe ya nkita esalisi biso mpo na kosakola nsango malamu?
8 Ya solo, minyoko kaka te nde epesaki nzela ete mateya ya solo ekóma na bikólo mosusu. Na bambula euti koleka, mbongwana oyo esalemaki na makambo ya politiki mpe ya nkita epesaki nzela ete nsango ya bokonzi ekóma epai ya bato ya minɔkɔ mpe ya bikólo mingi. Bato mosusu oyo bautaki na bamboka oyo ezali na bitumba mpe oyo ezali na bobola makasi bakimaki na bamboka oyo ezali na kimya mpe na nkita ya malamu mpe bakómaki koyekola Biblia kuna. Koya ya ebele ya bato oyo bakimi bamboka na bango esali ete bateritware ya minɔkɔ ya bapaya efungwama. Minɔkɔ koleka 100 elobamaka na engumba San Diego, na etúká ya Californie, na États-Unis. Batatoli ya Yehova bafungoli masangá mingi ya minɔkɔ ya bapaya na engumba yango. Osalaka makasi mpo na kosakola epai ya bato “ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso” na teritware na bino?—Em. 7:9.
“Bópesa ngai mpe nguya oyo” (Misala 8:9-25)
9. Simo azalaki nani, mpe nini ebendaki ye epai ya Filipe?
9 Filipe asalaki makamwisi mingi na Samaria. Na ndakisa, abikisaki bato oyo bazalaki bibɔsɔnɔ mpe abenganaki ata bilimo mabe. (Mis. 8:6-8) Mobali moko akamwaki mpenza komona nguya ya kosala makamwisi oyo Filipe azalaki na yango. Ye azalaki kosala misala ya maji mpe nkombo na ye ezalaki Simo; bato bazalaki kokumisa ye mingi mpe koloba ete: “Moto oyo azali Nguya ya Nzambe.” Kasi, Simo amonaki na miso nguya ya solosolo ya Nzambe na makamwisi oyo Filipe asalaki, mpe Simo akómaki mondimi. (Mis. 8:9-13) Nzokande na nsima, Simo amekamaki na likambo moko. Likambo nini?
10. (a) Petro ná Yoane basalaki nini ntango bakómaki na Samaria? (b) Simo asalaki nini ntango amonaki ete bayekoli ya sika bazwaki elimo santu ntango Petro ná Yoane batyaki mabɔkɔ likoló na bango?
10 Ntango bantoma bayokaki ete bato mingi bazali kondima nsango malamu na Samaria, batindaki Petro ná Yoane kuna. (Talá etanda “Petro asaleli ‘bafungola ya Bokonzi.’”) Ntango bantoma yango mibale bakómaki kuna, batyaki mabɔkɔ likoló ya bayekoli ya sika, mpe mokomoko azwaki elimo santu.b Ntango Simo amonaki likambo yango, akamwaki mingi. Alobaki epai ya bantoma ete: “Bópesa ngai mpe nguya oyo, mpo moto nyonso oyo nakotyela ye mabɔkɔ azwa elimo santu.” Kutu, Simo alukaki kopesa bango mbongo mpo na kosomba likabo mosantu wana!—Mis. 8:14-19.
11. Toli nini Petro apesaki Simo, mpe Simo asalaki nini?
11 Na mbala moko, Petro apamelaki Simo. Alobaki na ye boye: “Palata na yo ebeba elongo na yo, mpo okanisi kozwa likabo ya ofele ya Nzambe na mbongo. Ozali na likabo te mpe na libula te na likambo oyo, mpo motema na yo ezali sembo te na miso ya Nzambe.” Na nsima, Petro ayebisaki Simo ete abongola motema mpe abondela mpo na kosɛnga bolimbisi. Petro alobaki boye: “Bondelá Yehova mpo, soki likoki ezali, makanisi mabe ya motema na yo elimbisama.” Emonani ete Simo azalaki mpenza moto mabe te; alingaki kosala oyo ezali malamu, kasi abungaki nzela mpo na mwa ntango. Yango wana alobaki na bantoma ete: “Bóbondela Yehova mpo na ngai ete ata likambo moko te ya makambo oyo bolobi ekómela ngai.”—Mis. 8:20-24.
12. “Simonie” ezali nini, mpe ndenge nini ebebisi mangomba ya bokristo?
12 Mpamela oyo Petro apesaki Simo ezali likebisi mpo na bakristo lelo oyo. Kutu, liloba ya Lifalanse “simonie” eutá na nkombo ya moto yango mpe likambo oyo asalaki. Liloba “simonie” elimboli kosomba to kotɛkisa mokumba moko, mingimingi na kati ya lingomba. Banda kala, likambo yango esalemaka mingi na mangomba ya bokristo oyo epɛngwá. Kutu, buku moko (Encyclopædia Britannica [1878], ebimeli ya mbala ya libwa) elobaki boye: “Moto oyo ayekoli masolo ya makita mpo na kopona bapápa akomona ete liponami ata moko te esalemaki kozanga ete moto oyo alingi koponama apesa kanyaka. Kutu, mbala mingi, kati na makita yango, kanyaka epesamaki na ndenge ya polele mpe ya kozanga nsɔni.”
13. Makambo nini bakristo basengeli kosala mpo bákwea te na motambo ya “simonie”?
13 Bakristo basengeli kokeba na lisumu yango. Na ndakisa, basengeli soki moke te kopesa makabo epai ya bandeko mosusu na lisangá to kokumisa bango mpo na nsima, bandeko yango bápesa bango mikumba. Esengeli mpe ete baoyo bakoki kopesa bandeko mosusu mikumba bázala te na ezaleli ya kopona bilongi mpe ya kosepela mingi na bandeko oyo bazali na bozwi. Bizaleli yango nyonso ezali “simonie.” Mosaleli mokomoko ya Nzambe asengeli komitambwisa lokola “moto oyo azali mpenza moke,” mpe kozela ete elimo ya Yehova epona ye mpo na mikumba na lisangá. (Luka 9:48) Na lisangá ya Nzambe, esika ezali te mpo na baoyo ‘bazali koluka nkembo na bango moko.’—Mas. 25:27.
“Ozali mpenza kokanga ntina ya makambo oyo ozali kotánga?” (Misala 8:26-40)
14, 15. (a) “Mokube moto ya Etiopi” azalaki nani, mpe ndenge nini Filipe akutanaki na ye? (b) Moto ya Etiopi asalaki nini nsima ya koyoka nsango oyo Filipe ateyaki ye, mpe mpo na nini tokoki te koloba ete awelaki kozwa batisimo? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
14 Na nsima, anzelu ya Yehova atindaki Filipe akende na nzela oyo ezalaki kokita uta na Yerusaleme tii na Gaza. Soki Filipe amitunaki mpo na nini asengelaki kokende kuna, azwaki eyano nokinoki ntango akutanaki na mokube moko moto ya Etiopi oyo azalaki “kotánga na mongongo makasi makomi ya mosakoli Yisaya.” (Talá etanda “‘Mokube’ na ndimbola nini?” na lokasa 57.) Elimo santu ya Yehova etindaki Filipe apusana penepene ya likalo ya moto yango. Ntango Filipe azalaki kotambola mbangu pembeni ya likalo, atunaki moto yango boye, “Ozali mpenza kokanga ntina ya makambo oyo ozali kotánga?” Mobali yango ayanolaki ete: “Ndenge nini nakoki kokanga ntina, soki moto alakisi ngai te?”—Mis. 8:26-31.
15 Moto ya Etiopi asɛngaki Filipe amata na likalo. Na ntembe te, basololaki mingi mpenza! Banda kala, “mpate” to “mosaleli” oyo esakweli ya Yisaya elobeli azalaki koyebana te. (Yis. 53:1-12) Kasi, ntango bazalaki kokoba mobembo, Filipe alimbwelaki mokube yango ete Yesu Kristo nde akokisaki esakweli yango. Lokola bato oyo bazwaki batisimo na Pantekote ya mobu 33 T.B., mobali yango oyo azalaki prozelite asosolaki mbala moko likambo oyo asengelaki kosala. Alobaki na Filipe: “Talá! mai yango oyo; nini ezali kopekisa ngai kobatisama?” Mbala moko, Filipe abatisaki ye!c (Talá etanda “Batisimo na kati ya mai.”) Na nsima, elimo ya Yehova ememaki Filipe na Ashedode, mpe kuna akobaki kosakola nsango malamu.—Mis. 8:32-40.
16, 17. Mokumba nini baanzelu bazali kokokisa na mosala ya kosakola lelo oyo?
16 Lelo oyo, bakristo bazali na libaku malamu ya kosala mosala oyo Filipe asalaki. Mbala mingi, bayebisaka nsango ya Bokonzi epai ya bato oyo bakutani na bango na libaku malamu, na ndakisa ntango bazali kosala mobembo. Mbala mingi, basakoli bamonaka ete Nzambe nde atambwisaka makambo mpo bákutana na moto oyo asepeli na nsango malamu na mabaku ya ndenge wana. Yango ezali likambo ya kokamwa te, mpo Biblia emonisi polele ete baanzelu batambwisaka mosala ya kosakola mpo bato ya “bikólo nyonso, mabota nyonso, minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso” báyoka nsango malamu. (Em. 14:6) Yesu asakolaki ete baanzelu bakotambwisa mosala ya kosakola. Na lisese ya blé ná matiti mabe, Yesu alobaki ete na ntango ya kobuka mbuma, elingi koloba na eleko ya nsuka ya mokili oyo, “babuki-mbuma ezali baanzelu.” Abakisaki ete bikelamu yango ya elimo “bakolongola na bokonzi na ye nyonso oyo ebɛtisaka libaku mpe bato oyo babukaka mibeko.” (Mat. 13:37-41) Kaka na ntango yango, baanzelu bakoyanganisa baoyo bakozwa libula ya Bokonzi ya likoló mpe na nsima “ebele mpenza ya bato” ya “bampate mosusu”—oyo Yehova asepeli kobenda na lisangá na ye.—Em. 7:9; Yoa. 6:44, 65; 10:16.
17 Likambo yango ezali solo mpo bato mosusu oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola balobaka ete bazalaki kobondela Nzambe asalisa bango báyeba ye. Tótalela ndakisa ya basakoli mibale oyo babimaki na mosala ya kosakola elongo na mwana moko ya moke. Ntango bakómaki pene na midi, basakoli yango mibale balingaki kokata mosala, kasi mwana yango azalaki na mposa ya kokende na ndako oyo elandi. Kutu, akendaki ye moko mpe abɛtaki porte! Ntango elenge mwasi moko afungolaki porte, basakoli yango mibale bapusanaki mpo na kosolola na ye. Bakamwaki ntango mwasi yango ayebisaki bango ete autaki kobondela mpo na kosɛnga ete moto moko asalisa ye ayeba Biblia. Andimaki koyekola Biblia.
18. Mpo na nini tosengeli kozwa mosala na biso ya kosakola na lisɛki te?
18 Lokola ozali na lisangá ya bokristo, ozali na libaku malamu ya kosala elongo na baanzelu na eleko oyo mosala ya kosakola ezali kosalema na ndenge oyo esalemá naino te. Osengeli kozwa libaku yango na lisɛki te. Soki ozongi nsima te, okozala na esengo mingi wana ozali kokoba kosakola “nsango malamu oyo etali Yesu.”—Mis. 8:35.
a Filipe oyo ezali te ntoma Filipe. Ezali nde Filipe oyo, ndenge tomonaki na Mokapo 5, azalaki na kati ya “mibali nsambo ya lokumu malamu” oyo baponamaki mpo na kokabola biloko ya kolya epai ya basi oyo mibali bakufá, oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki ná baoyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Ebre.—Mis. 6:1-6.
b Emonani ete na ntango wana, mbala mingi bayekoli bazalaki kotyama mafuta na elimo, to kozwa elimo santu ntango bazwi batisimo. Yango ezalaki kopesa bango elikya ya koyangela lokola bakonzi mpe banganga-nzambe elongo na Yesu na likoló. (2 Ko. 1:21, 22; Em. 5:9, 10; 20:6) Kasi, na libaku wana, bayekoli batyamaki mafuta na elimo te ntango bazwaki batisimo. Kozwa elimo santu—mpe makabo ya elimo—esalemaki kaka ntango Petro ná Yoane batyaki mabɔkɔ likoló ya bakristo yango oyo bazwaki batisimo.
c Moto ya Etiopi awelaki te kozwa batisimo. Lokola azalaki prozelite, ayebaki Makomami, ata mpe bisakweli oyo elobelaki Masiya. Ntango ayebaki mokumba ya Yesu na mokano ya Nzambe, akokaki kozwa batisimo kozanga koumela.