MOKAPO 9
“Nzambe aponaka bilongi te”
Nsango malamu ekómi epai ya bato ya bikólo oyo bakatami ngenga te
Euti na Misala 10:1–11:30
1-3. Petro azwaki emonaneli nini, mpe mpo na nini tosengeli koyeba ndimbola na yango?
TOZALI na mobu 36 T.B. Moi ya eleko ya ɔtɔne ezali kongɛnga wana Petro azali kobondela na nsamba ya ndako moko pembeni ya mbu, na engumba Yope. Azali kofanda na ndako yango banda mwa mikolo. Lokola andimi kofanda na ndako yango, emonisi ete alongi mwa moke makanisi ya mabe oyo azalaki na yango mpo na bato mosusu. Simo, nkolo ndako yango, azali mobongisi-mposo ya nyama; lokola asalaka mosala wana, Moyuda nyonso te nde akoki kondima kofanda na ndako na ye.a Atako bongo, mosika te Petro akoyekola liteya ya ntina mingi mpo na ezaleli oyo Yehova azali na yango ya kopona bilongi te.
2 Ntango Petro azalaki kobondela, asenzwaki. Makambo oyo amonaki na emonaneli esengeli kobulunganisa Moyuda nyonso. Amonaki eloko moko lokola elamba ekiti longwa na likoló mpe ezalaki na banyama oyo Mibeko elobaki ete ezali mbindo. Ntango bayebisaki Petro ete aboma mpe alya, ye azongisaki ete: “Nalyá naino eloko ata moko te ya bosɔtɔ to ya mbindo.” Bayebisaki ye mbala misato ete: “Tiká kobenga bosɔtɔ biloko oyo Nzambe apɛtoli.” (Mis. 10:14-16) Emonaneli yango ebulunganisaki Petro, kasi mpo na ntango mingi te.
3 Emonaneli oyo Petro azwaki elimbolaki nini? Ezali na ntina mingi tóyeba ndimbola na yango, mpo ndimbola yango ezali koteya biso likambo moko monene na ndenge oyo Yehova atalelaka bato. Lokola tozali bakristo ya solo, tokoki te kopesa litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi ya Nzambe soki tozali te kotalela bato ndenge oyo Nzambe atalelaka bango. Mpo na koyeba ndimbola ya emonaneli oyo Petro azwaki, tótalela makambo oyo esalemaki na nsima.
Azalaki “ntango nyonso kosala libondeli epai ya Nzambe” (Misala 10:1-8)
4, 5. Korneyi azalaki nani, mpe nini esalemaki ntango azalaki kobondela?
4 Petro ayebaki te ete mokolo oyo elekaki, na Kaisaria, engumba oyo ezalaki na nɔrdi, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 50, mobali moko oyo nkombo na ye ezalaki Korneyi azwaki mpe emonaneli moko. Korneyi, mokonzi ya limpinga moko ya basoda ya Roma, azalaki “moto oyo amipesá na losambo.”b Azalaki mpe tata malamu ya libota, mpamba te azalaki “kobanga Nzambe elongo na bato nyonso ya ndako na ye.” Korneyi azalaki prozelite te; azalaki moto ya ekólo mosusu oyo akatamá ngenga te. Atako bongo, azalaki kosalisa Bayuda oyo bazalaki na bosɛnga, azalaki kopesa bango makabo. Mobali yango ya sembo “azalaki ntango nyonso kosala libondeli epai ya Nzambe.”—Mis. 10:2.
5 Pene na ngonga ya misato nsima ya midi, Korneyi azalaki kobondela mpe amonaki anzelu moko na emonaneli, oyo alobaki na ye boye: “Mabondeli na yo mpe makabo oyo opesaka epai ya babola emati liboso ya Nzambe mpe akanisi yango.” (Mis. 10:4) Anzelu alobaki na Korneyi atinda bato bákende kobenga ntoma Petro, mpe Korneyi asalaki bongo. Lokola Korneyi azalaki moto ya ekólo mosusu oyo akatamá ngenga te, azwaki libaku malamu oyo liboso azalaki na likoki ya kozwa te; elingi koloba koyoka nsango ya lobiko.
6, 7. (a) Lobelá likambo moko oyo ezali komonisa ete Nzambe ayokaka mabondeli ya bato oyo balukaka na bosembo mpenza koyeba solo na ntina na ye. (b) Tokoki koloba nini mpo na makambo yango?
6 Lelo oyo, Nzambe ayokaka nde mabondeli ya bato ya sembo oyo balingi koyeba solo na ntina na ye? Tótalela ndakisa moko. Na ekólo Albanie, mwasi moko andimaki kozwa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezalaki na lisolo oyo epesaki batoli mpo na kobɔkɔla bana.c Mwasi yango alobaki na Motatoli oyo akendaki kotala ye na ndako ete: “Nazalaki kobondela Nzambe asalisa ngai nabɔkɔla bana na ngai ya basi malamu. Mpe talá, atindi yo! Osalisi ngai na likambo oyo nazalaki mpenza na mposa na yango!” Mwasi yango ná bana na ye ya basi bakómaki koyekola Biblia mpe na nsima, mobali na ye mpe akómaki koyekola.
7 Yango ezali kaka ndakisa moko? Te! Makambo ya ndenge wana esalemaka mbala na mbala mpe na mokili mobimba; mpe lokola esalemaka mingi mpenza, ezali mpasi tókanisa ete ezali kaka mabaku ya mbalakaka. Boye, tokoki koloba nini? Ya liboso, Yehova ayokaka mabondeli ya bato oyo balukaka ye na bosembo. (1 Bak. 8:41-43; Nz. 65:2) Ya mibale, baanzelu basungaka biso na mosala ya kosakola.—Em. 14:6, 7.
“Petro abulunganaki mpenza” (Misala 10:9-23a)
8, 9. Elimo santu eyebisaki Petro nini, mpe ye asalaki nini?
8 Petro azalaki naino kaka likoló ya nsamba, “abulunganaki mpenza” mpe azalaki komituna soki emonaneli yango elimboli nini; na ntango yango, bato oyo Korneyi atindaki bakómaki na ndako oyo azalaki. (Mis. 10:17) Petro, oyo aboyaki mbala misato mobimba kolya bilei oyo Mibeko elobaki ete ezali mbindo, alingaki nde kondima kokende ná mibali yango mpe kokɔta na ndako ya moto ya ekólo mosusu? Elimo santu esalisaki Petro asosola mokano ya Nzambe na likambo yango. Elimo santu eyebisaki Petro ete: “Talá! Mibali misato bazali koluka yo. Na yango, tɛlɛmá, kitá mpe kende elongo na bango, kotya ntembe ata moke te, mpo ngai nde natindi bango.” (Mis. 10:19, 20) Na ntembe te, emonaneli oyo Petro azwaki ya eloko oyo ezali lokola elamba, ebongisaki makanisi na ye mpo andima litambwisi ya elimo santu.
9 Ntango Petro ayokaki ete Nzambe nde ayebisaki Korneyi atinda bato bákende kobenga ye, akɔtisaki bango na ndako “mpe ayambaki bango lokola bapaya na ye.” (Mis. 10:23a) Lokola ntoma yango azalaki na botosi, andimaki makambo ya sika oyo Nzambe asalaki mpo na kokokisa mokano na ye.
10. Ndenge nini Yehova atambwisaka basaleli na ye, mpe mituna nini tosengeli komituna?
10 Tii lelo oyo, Yehova apesaka basaleli na ye pole mokemoke. (Mas. 4:18) Na lisalisi ya elimo santu, azali kotambwisa “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45) Na bantango mosusu, tokoki kozwa bingɛngiseli ya sika na oyo etali boyebi na biso ya Liloba ya Nzambe to mbongwana ekoki kosalema na ndenge ya kotambwisa makambo na lisangá. Ebongi tómitunaka boye: ‘Ndenge nini natalelaka bambongwana yango? Nandimaka litambwisi ya elimo ya Nzambe na makambo yango?’
Petro “apesaki mitindo ete bábatisama” (Misala 10:23b-48)
11, 12. Petro asalaki nini ntango akómaki na Kaisaria, mpe liteya nini azwaki?
11 Mokolo oyo elandaki, Petro ná bato mosusu libwa, elingi koloba bato misato oyo Korneyi atindaki mpe ‘bandeko motoba’ oyo bazalaki Bayuda ya Yope, bakendaki na Kaisaria. (Mis. 11:12) Lokola Korneyi azalaki kozela Petro, ayanganisaki “bato ya libota na ye mpe baninga na ye ya motema”; na ntembe te bango nyonso bazalaki bato ya bikólo mosusu. (Mis. 10:24) Ntango Petro akómaki kuna, asalaki likambo moko oyo liboso akokaki kokanisa ata moke te: Akɔtaki na ndako ya moto ya ekólo mosusu oyo akatami ngenga te! Petro alobaki boye: “Boyebi malamu ndenge epekisami ete Moyuda asangana to apusana pene na moto ya ekólo mosusu, mpe atako bongo Nzambe amonisi ngai ete nasengeli kobenga moto ata moko te bosɔtɔ to mbindo.” (Mis. 10:28) Na ntango wana, Petro asosolaki ete emonaneli oyo azwaki ezalaki mpo na koteya ye likambo oyo etalelaki kaka te bilei oyo moto akoki kolya. Asengelaki “kobenga moto ata moko te [ata moto ya ekólo mosusu] bosɔtɔ.”
12 Bato nyonso oyo bayanganaki wana bazalaki mpenza na mposa ya koyoka makambo oyo Petro asengeli koloba. Korneyi alobaki boye: “Tozali biso nyonso awa liboso ya Nzambe mpo na koyoka makambo nyonso oyo Yehova apesi yo mitindo oloba.” (Mis. 10:33) Kanisá ndenge okoyoka soki moto oyo asepeli na nsango ya Bokonzi alobi na yo bongo! Petro abandaki na maloba oyo ya ntina mingi: “Sikoyo nasosoli mpenza ete Nzambe aponaka bilongi te, kasi andimaka moto nyonso oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya bosembo.” (Mis. 10:34, 35) Petro azwaki liteya ete Nzambe atalaka te mposo ya moto, ekólo na ye, to makambo mosusu ya ndenge wana. Petro apesaki litatoli na ntina etali mosala ya Yesu, liwa mpe lisekwa na ye.
13, 14. (a) Mpo na nini kobongwana ya Korneyi ná bato mosusu ya bikólo na mobu 36 T.B. ezalaki likambo ya ntina mingi? (b) Mpo na nini tosengeli te kotalela bato na kolanda makambo oyo emonanaka libándá?
13 Na ntango yango, likambo moko ya sika mpenza esalemaki: “Wana Petro azalaki naino kolobela makambo yango,” elimo santu ekitelaki bato yango oyo bazalaki “bato ya bikólo.” (Mis. 10:44, 45) Na Biblia mobimba, ezali kaka na libaku wana nde elimo santu ekitelaki bato liboso bázwa batisimo. Petro asosolaki ete Nzambe andimi bato wana ya bikólo mpe “apesaki mitindo ete bábatisama.” (Mis. 10:48) Kobongwana ya bato wana ya bikólo na mobu 36 T.B. ezalaki nsuka ya eleko oyo Nzambe azalaki kondima kaka Bayuda. (Dan. 9:24-27) Lokola Petro nde apesaki litatoli na libaku yango, asalelaki fungola ya misato mpe ya nsuka ya “bafungola ya Bokonzi.” (Mat. 16:19) Fungola yango epesaki bato ya bikólo oyo bakatami ngenga te nzela ya kokóma bakristo oyo batyami mafuta na elimo.
14 Lelo oyo, biso basakoli ya Bokonzi toyebaka ete “Nzambe aponaka bilongi te.” (Rom. 2:11) Mokano na ye ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika.” (1 Tim. 2:4) Yango wana, tosengeli te kotalelaka bato na kolanda makambo oyo emonanaka libándá. Mokumba na biso ezali ya kopesa litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi ya Nzambe, mpe yango esɛngi tósakola epai ya bato nyonso, kozanga kotala mposo, ekólo, lingomba to lolenge na bango.
“Batikaki kotya ntembe, mpe bakumisaki Nzambe” (Misala 11:1-18)
15, 16. Mpo na nini Bayuda mosusu oyo bakómaki bakristo batyanaki ntembe na Petro, mpe ndenge nini Petro alimbolaki makambo oyo asalaki?
15 Na ntembe te, lokola Petro azalaki na mposa ya koyebisa baninga na ye makambo oyo esalemaki, azongaki na Yerusaleme. Emonani ete liboso Petro akóma na Yerusaleme, nsango ekómaki kuna ete bato ya bikólo mosusu oyo bakatami ngenga te “bayambaki liloba ya Nzambe.” Ntango kaka akómaki, “bato oyo bakangamá na mobeko ya kokatama ngenga babandaki koloba mabe mpo na ye.” Bato yango batungisamaki mingi lokola Petro akɔtaki “na ndako ya bato oyo bakatamá ngenga te mpe alyaki elongo na bango.” (Mis. 11:1-3) Bayekoli yango oyo bazalaki Bayuda baboyaki te ete bato ya bikólo mosusu bákóma bayekoli ya Kristo. Kasi, bazalaki koloba ete mpo Yehova andima losambo ya bato wana, basengelaki kotosa Mibeko, ata mpe kokatama ngenga. Tomoni mpenza ete Bayuda mosusu oyo bakómaki bayekoli bazalaki na mokakatano mpo na kotika Mibeko ya Moize.
16 Ndenge nini Petro alimbolaki makambo oyo asalaki? Misala 11:4-16 elobi ete Petro apesaki bilembeteli minei oyo emonisaki ete Nzambe nde atambwisaki ye: (1) emonaneli oyo azwaki (Vɛrsɛ 4-10); (2) etinda ya elimo santu (Vɛrsɛ 11, 12); (3) anzelu oyo atindamaki epai ya Korneyi (Vɛrsɛ 13, 14); mpe (4) kosopama ya elimo santu likoló ya bato ya bikólo mosusu. (Vɛrsɛ 15, 16) Petro asukisaki na motuna oyo: “Na yango, soki Nzambe apesi bango [bato ya bikólo mosusu oyo bakómaki bandimi] likabo ya ofele [ya elimo santu] ndenge apesaki mpe biso [Bayuda] baoyo tondimelaki Nkolo Yesu Kristo, ngai nani mpo nakoka kopekisa Nzambe?”—Mis. 11:17.
17, 18. (a) Litatoli ya Petro ebimisaki komekama nini mpo na Bayuda oyo bakómaki bakristo? (b) Mpo na nini kobatela bomoko na lisangá ekoki kozala mpasi, mpe mituna nini tosengeli komituna?
17 Litatoli ya Petro ezalaki komekama monene mpo na Bayuda oyo bakómaki bakristo. Balingaki nde kolongola makanisi mabe oyo bazalaki na yango mpe kondima bato ya bikólo mosusu oyo bazwaki batisimo ete bakómi bandeko na bango bakristo? Lisolo elobi boye: “Ntango [bantoma mpe Bayuda mosusu oyo bakómaki bakristo] bayokaki makambo yango, batikaki kotya ntembe, mpe bakumisaki Nzambe, balobi: ‘Ya solo, Nzambe apesi mpe bato ya bikólo libaku ya kobongola motema mpo bázwa bomoi.’” (Mis. 11:18) Makanisi malamu wana ebatelaki bomoko ya lisangá.
18 Lelo oyo, lokola basambeli ya solo bauti na “bikólo nyonso, na mabota nyonso, na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso,” kobatela bomoko ekoki kozala mokakatano monene. (Em. 7:9) Na masangá mingi tokoki kokuta bato ya mposo, mimeseno, mpe mikili ndenge na ndenge. Yango wana, tosengeli komituna boye: ‘Natiki mpenza kokanisela bato mosusu mabe? Nazwi mpenza ekateli ete makambo oyo ekabolaka bato na mokili oyo, na ndakisa bolingo ya ekólo, lolendo, mpe koyina bato ya mposo mosusu, ebebisa te ndenge oyo natalelaka bandeko na ngai bakristo?’ Tóbosana te likambo oyo ekómelaki Petro (Kefa), mwa bambula na nsima. Lokola alandaki makanisi mabe ya bandeko mosusu, “abendaki nzoto” liboso ya bakristo oyo bazalaki bato ya bikólo mosusu mpe Paulo apamelaki ye mpo na yango. (Gal. 2:11-14) Tókebaka ntango nyonso mpo tókwea te na motambo ya kokanisela basusu mabe.
“Bato mingi bakómaki bandimi” (Misala 11:19-26a)
19. Bayuda oyo bakómaki bakristo babandaki kosakola epai ya banani, mpe mosala na bango ebotaki mbuma nini?
19 Bayekoli ya Yesu bakómaki nde kosakola epai ya bato ya bikólo oyo bakatami ngenga te? Tótalela likambo oyo esalemaki na nsima, na Antiokia ya Siri.d Bayuda mingi bazalaki kofanda na engumba wana, kasi matata ezalaki mingi te kati na bango ná bato ya bikólo. Na yango, Antiokia ezalaki esika malamu mpo na kosakola epai ya bato ya bikólo. Ezali na engumba yango nde Bayuda mosusu oyo bakómaki bakristo babandaki kosakola nsango malamu epai ya “bato oyo balobaka monɔkɔ ya Grɛki.” (Mis. 11:20) Bazalaki kosakola kaka te epai ya Bayuda oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki, kasi bazalaki mpe kosakola epai ya bato ya bikólo oyo bakatamá ngenga te. Yehova apambolaki mosala na bango mpe “bato mingi . . . bakómaki bandimi.”—Mis. 11:21.
20, 21. Ndenge nini Barnabasi amonisaki komikitisa ya solosolo, mpe ndenge nini tokoki komonisa ezaleli yango na mosala ya kosakola?
20 Lokola Antiokia ezalaki elanga oyo eteli, bandeko ya lisangá ya Yerusaleme batindaki Barnabasi kuna. Lokola bato mingi mpenza bazalaki kosepela, akokaki kosala mosala nyonso ye moko te. Saulo, moto oyo akómaki ntoma mpo na bikólo, nde abongaki mpenza mpo na kosalisa ye! (Mis. 9:15; Rom. 1:5) Barnabasi alingaki nde kotalela Saulo lokola mbanda? Te, Barnabasi azalaki na komikitisa ya solosolo. Ye moko akendaki koluka Saulo na Tarse mpe amemaki ye na Antiokia mpo asalisa ye. Bango mibale balekisaki mbula mobimba kuna mpo na kolendisa bayekoli na lisangá oyo ezalaki kuna.—Mis. 11:22-26a.
21 Ndenge nini tokoki komonisa ezaleli ya komikitisa na mosala ya kosakola? Tosengeli kondima ete tozali makasi na makambo nyonso te. Biso nyonso tozali na makoki mpe mayele ndenge moko te. Na ndakisa, bato mosusu bazali makasi mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu to kosakola ndako na ndako, kasi bazalaka na mokakatano mpo na kozongela bato mpe kobanda koyekola na bango Biblia. Soki olingi kokolisa mayele na yo na lolenge moko ya mosala ya kosakola, ekozala malamu osɛnga lisalisi. Soki osali yango, mosala na yo ekobota mbuma mingi mpe ekopesa yo esengo mingi.—1 Ko. 9:26.
Batindeli bandeko “biloko ya lisungi” (Misala 11:26b-30)
22, 23. Ndenge nini bandeko ya Antiokia bamonisaki bolingo mpo na bandeko, mpe ndenge nini basaleli ya Nzambe bamonisaka yango lelo oyo?
22 “Bayekoli babengamaki mpo na mbala ya liboso bakristo na litambwisi ya Nzambe” na Antiokia. (Mis. 11:26b) Nkombo yango oyo Nzambe andimaki ebongi mpenza mpo na bato oyo balandaka ndakisa ya Kristo na bomoi na bango. Lokola bato ya bikólo bakómaki bakristo, tokoki nde koloba ete bondeko ekolaki kati na bango mpe baninga na bango oyo bazalaki Bayuda? Tótalela likambo oyo esalemaki ntango nzala makasi ekɔtaki na mobu soki 46 T.B.e Na ntango ya kala, soki nzala ekɔti na mboka moko, babola bazalaki konyokwama makasi, mpo bazalaki kobomba mbongo te to biloko ya kolya. Ntango nzala wana ekɔtaki na Yudea, Bayuda mingi oyo bakómaki bakristo bakómaki kokelela biloko ya kolya mpo mingi kati na bango bazalaki babola. Ntango bakristo ya Antiokia, ata mpe baoyo bazalaki bato ya bikólo, bayokaki nsango yango, batindelaki “bandeko oyo bazalaki kofanda na Yudea biloko ya lisungi.” (Mis. 11:29) Yango ezalaki elembo ya bolingo ya solosolo!
23 Lelo oyo, makambo esalemaka mpe bongo na kati ya basaleli ya Nzambe. Ntango toyoki ete bandeko na biso—na ekólo mosusu to na mboka na biso—bakutani na likama, tozwaka bibongiseli mpo na kosalisa bango. Bakomite ya filiale ebongisaka nokinoki formasyo ya bakomite mpo na kosunga bandeko oyo bazwi likama, lokola mopɛpɛ makasi to koningana ya mabele. Nyonso oyo esalemaka mpo na kosunga bandeko emonisaka ete bolingo ya solosolo esangisi biso.—Yoa. 13:34, 35; 1 Yoa. 3:17.
24. Ndenge nini tokoki komonisa ete toyebaka ete emonaneli oyo Petro azwaki ezali na ntina mingi?
24 Biso bakristo ya solo toyebaka ete emonaneli oyo Petro azwaki na nsamba ya ndako moko na Yope, na siɛklɛ ya liboso, ezali na ntina mingi. Nzambe na biso aponaka bilongi te. Mokano na ye ezali ete tópesa litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi na ye, likambo oyo esɛngi kosakola epai ya bato nyonso kozanga kotala mposo, bikólo, to makambo mosusu. Yango wana, tózala na ekateli ya kopesa moto nyonso oyo akondima koyoka biso libaku ya kondima nsango malamu.—Rom. 10:11-13.
a Bayuda mosusu bazalaki kotyola babongisi-mposo ya nyama mpo mosala wana ezalaki kosɛnga moto asimbaka bamposo mpe banyama oyo ekufá mpe asimbaka biloko ya mosala oyo ezali mbindo. Babongisi-mposo ya nyama bakokaki kokɔta na tempelo te, mpe esika na bango ya mosala esengelaki kozala libándá ya engumba, na ntaka ya mɛtrɛ 22 to koleka. Ekoki kozala mpo na yango nde ndako ya Simo ezalaki “pene na mbu.”—Mis. 10:6.
b Talá etanda “Korneyi mpe basoda ya Roma.”
c Lisolo oyo ezali na motó ya likambo “Batoli ya solosolo mpo na kobɔkɔla bana,” ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/11/2006, nkasa 4-7.
d Talá etanda “Antiokia ya Siri,” na lokasa 73.
e Josèphe, Moyuda moko oyo azalaki mokomi ya makambo ya kala, alobelaki “nzala makasi” oyo ezalaki na ntango ya Amperɛrɛ Klode (41-54 T.B.).