Kosambisa te na kolanda oyo ezali komonana na libándá
“Bótika kosambisa na kolanda oyo ezali komonana na libándá, kasi bósambisa na kosambisa ya sembo.”—YOANE 7:24.
1. Yisaya asakolaki nini mpo na Yesu, mpe mpo na nini ezali likambo ya kolendisa?
ESAKWELI ya Yisaya oyo elobeli Yesu Kristo ekitisaka motema mpe epesaka elikya. Yisaya asakolaki ete Yesu “akosambisa te na kolanda kaka oyo ekomonana na miso na ye, mpe akopamela te na kolanda kaka likambo oyo matoi na ye eyoki. Mpe akosambisa na boyengebene mpenza bato oyo bazangá.” (Yisaya 11:3, 4) Mpo na nini ezali likambo ya kolendisa? Mpo tofandi na mokili oyo etondi na bato oyo bakaniselaka basusu mabe mpe basambisaka basusu na kolanda oyo ezali komonana na miso. Tozali mpenza na mposa ya Yesu, Mosambisi ya kokoka, oyo akosambisa te na kolanda oyo ezali komonana na libándá!
2. Etinda nini Yesu apesi biso, mpe tokotalela nini na lisolo oyo?
2 Mokolo na mokolo, tokanisaka makambo ndenge na ndenge mpo na basusu. Kasi, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki te kosambisa basusu na ndenge ya kokoka lokola Yesu. Mbala mingi tolandaka makambo oyo ezali komonana na miso. Nzokande Yesu alobaki: “Bótika kosambisa na kolanda oyo ezali komonana na libándá, kasi bósambisa na kosambisa ya sembo.” (Yoane 7:24) Na yango, Yesu alingi tózala lokola ye mpe tósambisaka basusu te na kolanda oyo ezali komonana na libándá. Na lisolo oyo, tokolobela makambo misato oyo ekoki kosala ete tósambisa basusu: loposo to ekólo ya moto, mbongo oyo azali na yango, mpe mbula na ye. Na likambo mokomoko, tokomona ndenge oyo tokoki kotosa etinda ya Yesu.
KOSAMBISA TE NA KOLANDA LOPOSO TO EKÓLO
3, 4. (a) Mpo na nini Petro abongolaki ndenge na ye ya kotalela bato ya bikólo mosusu? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Likambo nini ya sika Yehova ateyaki Petro?
3 Kanisá ndenge oyo ntoma Petro ayokaki ntango basɛngaki ye akende na Kaisaria, na ndako ya Korneyi, oyo azalaki Moyuda te! (Misala 10:17-29) Banda bomwana, Petro ayebaki ete bato ya bikólo mosusu bazalaka mbindo. Kasi, akutanaki na makambo oyo etindaki ye abongola ndenge na ye ya kokanisa. Na ndakisa, azwaki emonaneli moko oyo eutaki epai ya Nzambe. (Misala 10:9-16) Na emonaneli yango, Petro amonaki eloko moko lokola mbɛki ezali kouta likoló, etondi na banyama oyo bazalaki komona ete ezali mbindo. Mpe mongongo moko elobaki na ye: “Tɛlɛmá, Petro, bomá mpe lyá!” Mbala misato mobimba, Petro aboyaki na motema moko. Na mbala mokomoko, mongongo yango elobaki: “Tiká kobenga bosɔtɔ biloko oyo Nzambe apɛtoli.” Nsima ya emonaneli yango, Petro akangaki ntina te ya likambo oyo mongongo yango elingaki koyebisa ye. Kaka na ntango yango, bato oyo Korneyi atindaki bakómaki. Elimo santu esalisaki Petro akende na ndako ya Korneyi elongo na mibali wana.
4 Soki Petro atalelaki makambo “na kolanda oyo ezali komonana na libándá,” alingaki kokende na ndako ya Korneyi ata mokolo moko te. Bayuda bazalaki kokende na bandako ya bato ya bikólo mosusu te. Kasi, mpo na nini Petro andimaki kokende? Atako liboso azalaki kokanisela bato ya bikoló mosusu mabe, emonaneli oyo azwaki mpe litambwisi ya elimo santu ebongolaki makanisi na ye. Nsima ya koyoka Korneyi, Petro alobaki: “Ya solo mpenza namoni ete Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.” (Misala 10:34, 35) Likambo wana ya sika esepelisaki Petro makasi, mpe na nsima esalisaki bakristo nyonso. Na ndenge nini?
5. (a) Yehova alingi ete bakristo nyonso báyeba likambo nini? (b) Ata soki toyebi solo, makanisi nini ekoki kotikala na nse ya motema na biso?
5 Yehova asalelaki Petro mpo na kosalisa bakristo nyonso báyeba ete Nzambe aponaka bilongi te. Yehova akipaka te loposo, ekólo, mboka, to monɔkɔ ya moto. Andimaka moto nyonso oyo abangaka ye mpe asalaka makambo ya malamu. (Bagalatia 3:26-28; Emoniseli 7:9, 10) Na ntembe te, oyebi likambo yango. Kasi okosala nini soki okolá na ekólo to libota oyo bato bamesaná kokanisela basusu mabe? Ata soki yo moko omonaka ete oponaka bilongi te, ekoki nde kozala ete na nse ya motema okaniselaka kaka basusu mabe? Ata Petro, oyo asalisaki basusu bámona ete Nzambe aponaka bilongi te, na nsima amonisaki ezaleli ya kokanisela basusu mabe. (Bagalatia 2:11-14) Na yango, ndenge nini tokoki kotosa Yesu mpe kotika kosambisa na kolanda oyo ezali komonana na libándá?
6. (a) Nini ekoki kosalisa biso tótika kokanisela basusu mabe? (b) Lapolo oyo ndeko moko asalaki emonisaki nini mpo na ye?
6 Mpo na koyeba soki tokaniselaka basusu mabe, tosengeli komitalela na kolanda makambo oyo toyekolaka na Biblia. (Nzembo 119:105) Tokoki mpe kotuna baninga báyebisa biso soki bamonaka ete tokaniselaka basusu mabe, ata soki biso moko tozali komona yango te. (Bagalatia 2:11, 14) Mbala mosusu tomesaná na makanisi yango mpe tomonaka lisusu te ete tozalaka na yango! Yango nde ekómelaki ndeko mobali moko oyo azalaki na mikumba. Apesaki lapolo mpo na ndeko moko ya molende ná mwasi na ye, oyo bazalaki na mosala ya ntango nyonso. Ndeko mobali azalaki moto ya ekólo oyo bato mingi bazalaki kotyola. Emonani ete ndeko oyo azalaki na mikumba ayebaki te ete ye mpe azalaki kokanisela bato ya ekólo wana mabe. Akomaki makambo mingi ya malamu mpo na ndeko mobali wana, kasi abakisaki ete: “Atako azali moto ya [ekólo oyo], bizaleli na ye mpe bomoi na ye esalisi basusu bámona ete kozala moto ya [mboka wana] elimboli kaka te kozala na bosɔtɔ, to kozala moto mpamba, ndenge bato mingi oyo bautá [kuna] bazalaka.” Liteya ezali nini? Ata soki tozali na mikumba minene na ebongiseli ya Yehova, tosengeli komitalela na bosembo mpe kondima básalisa biso mpo tóyeba soki tokaniselaka kaka basusu mabe. Likambo nini mosusu ekoki kosalisa biso?
7. Ndenge nini tokoki komonisa ete “motema na biso efungwami”?
7 Soki “motema na biso efungwami,” bolingo ekosalisa biso tótika kokanisela basusu mabe. (2 Bakorinti 6:11-13) Osepelaka kolekisa ntango mingi kaka elongo na bato ya loposo, ya ekólo, ya mboka, to ya monɔkɔ moko na yo? Soki bongo, salá makasi ofungwama. Okoki kobengisa bandeko oyo bautá bisika mosusu bóbima mosala ya kosakola elongo, to okoki kobengisa bango na ndako na yo mpo bólya mwa eloko to bólekisa ntango elongo. (Misala 16:14, 15) Soki ozali kosala bongo, okolinga bato makasi, mpe makanisi ya kokanisela basusu mabe ekozala na esika te. Sikoyo, tólobela makambo mosusu oyo ekoki kosala ete tósambisa basusu na kolanda oyo ezali komonana na libándá.
KOSAMBISA TE NA KOLANDA BOZWI TO BOBOLA YA MOTO
8. Na kolanda Balevi 19:15, ndenge nini bozwi to bobola ya moto ekoki kobongola ndenge na biso ya kotalela ye?
8 Ndenge na biso ya kotalela basusu ekoki kolanda bozwi to bobola na bango. Balevi 19:15 elobi boye: “Osengeli kopona bilongi te ntango ozali kotalela likambo ya moto oyo azangá, mpe osengeli te kosepela kaka na moto monene. Okosambisa moninga na yo na bosembo.” Na ndenge nini bozwi to bobola ya moto ekoki kobongola ndenge na biso ya kotalela ye?
9. Likambo nini ya mawa Salomo alobelaki, mpe yango ezali koteya biso nini?
9 Elimo santu esalisaki Salomo akoma likambo moko ya mawa oyo bato ya kozanga kokoka basalaka; alobaki: “Moto oyo akelelá azalaka eloko ya koyinama ata epai ya moninga na ye, kasi baninga ya mozwi bazalaka ebele.” (Masese 14:20) Vɛrsɛ yango ezali koteya biso nini? Na lisangá soki tokebi te, tokoki kolinga kosala boninga kaka na bandeko oyo bazali na bozwi, kasi te na baoyo bazali babola. Mpo na nini ezali likama mpenza kosambisa moto na kolanda bozwi to bobola na ye?
10. Yakobo akebisaki bakristo mpo na likambo nini?
10 Soki tozali kosalela bandeko makambo na kolanda bozwi to bobola na bango, tokoki kokɔtisa bokabwani na lisangá. Likambo yango esalemaki na masangá mosusu na siɛklɛ ya liboso, mpe Yakobo akebisaki bakristo mpo na yango. (Tángá Yakobo 2:1-4.) Tosengeli kokeba ete bokabwani ekɔta te na lisangá na biso. Tokoki kosala nini mpo tósambisa basusu te na kolanda biloko oyo bazali na yango?
11. Boyokani ya moto na Yehova ekipaka biloko ya mosuni oyo azali na yango? Limbolá.
11 Tosengeli komona bandeko ndenge Yehova amonaka bango. Soki moto azali na motuya na miso ya Yehova, ezalaka te mpo azali mozwi to mpo azali mobola. Boninga na biso na Yehova ezali na boyokani ata moke te na bozwi to bobola na biso. Ezali solo ete Yesu alobaki ete “ekozala mpasi mozwi akɔta na bokonzi ya likoló,” kasi alobaki te ete ekoki kosalema te. (Matai 19:23) Yesu alobaki mpe ete: “Esengo na bino babola, mpo bokonzi ya Nzambe ezali ya bino.” (Luka 6:20) Kasi, yango elingi koloba te ete babola nyonso bazalaki kondima koyoka Yesu mpe bazwaki mapamboli minene. Babola mingi balandaki Yesu te. Mpo na koloba solo, boyokani ya moto na Yehova etalelaka te biloko ya mosuni oyo azali na yango.
12. Toli nini Biblia epesi bazwi mpe babola?
12 Na ebongiseli ya Yehova, bandeko mosusu bazali bazwi mpe basusu bazali babola, kasi bango nyonso balingaka Yehova mpe basalelaka ye na motema mobimba. Biblia eyebisi bazwi ete “bátya elikya na bango te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe.” (Tángá 1 Timote 6:17-19.) Biblia ekebisi mpe basaleli nyonso ya Yehova, bazwi to babola, ete bázala na bolingo ya mbongo te. (1 Timote 6:9, 10) Soki tozali komona bandeko ndenge Yehova amonaka bango, tokosambisa bango te na kolanda biloko oyo bazali na yango to oyo bazali na yango te. Bongo mbula oyo moto azali na yango? Ezali malamu kosambisa moto na kolanda mbula na ye?
KOSAMBISA TE NA KOLANDA MBULA YA MOTO
13. Biblia elobi nini na oyo etali komemya mikóló?
13 Na bisika mingi, Biblia elobi ete tosengeli komemya mikóló. Balevi 19:32 elobi: “Okotɛlɛma liboso ya nsuki mpɛmbɛ, mpe osengeli kopesa moto oyo azali mobange lokumu, mpe osengeli kobanga Nzambe na yo.” Ndenge moko mpe, Masese 16:31 elobi: “Nsuki mpɛmbɛ ezalaka motole ya kitoko ntango yango ezwami na nzela ya boyengebene.” Na nsima, ntoma Paulo ayebisaki Timote ete apamela makasi te mibali oyo bakoli, kasi atalela bango lokola batata. (1 Timote 5:1, 2) Atako Timote azalaki na mwa bokonzi likoló ya bandeko mibali ya mikóló, asengelaki komonisela bango motema mawa mpe kopesa bango limemya.
14. Ntango nini ekoki kosɛnga tósembola moto oyo azali mokóló na biso?
14 Bongo soki moto oyo azali mokóló azali kosala masumu na nko to azali kolendisa likambo moko oyo esepelisaka Yehova te? Yehova akosambisa te na kolanda oyo ezali komonana na libándá mpe akokanga miso te soki moto azali kosala masumu na nko, ata soki azali mokóló. Talá maloba oyo ezali na Yisaya 65:20: “Mosumuki, atako akómi na mbula nkama moko, bakolakela ye mabe.” Emonaneli ya Ezekiele mpe elobeli likambo ya ndenge wana. (Ezekiele 9:5-7) Na yango, tosengeli koluka libosoliboso komemya Yehova, oyo azali “Mokóló na Mikolo.” (Danyele 7:9, 10, 13, 14) Soki tozali komemya Yehova, tokozala na mpiko mpo na kosembola moto oyo asengeli kozwa lisalisi, ata soki azali na mbula boni.—Bagalatia 6:1.
15. Liteya nini tozwi epai ya ntoma Paulo na oyo etali komemya bandeko mibali oyo bazali bilenge?
15 Bongo bandeko mibali oyo bazali bilenge? Ndenge nini tosengeli kotalela bango? Ntoma Paulo akomelaki elenge Timote boye: “Moto atyola bolenge na yo te. Nzokande, zalá ndakisa epai ya bato ya sembo na maloba, na etamboli, na bolingo, na kondima, na bizaleli ya pɛto.” (1 Timote 4:12) Ntango Paulo akomaki maloba yango, mbala mosusu Timote azalaki na mbula soki 30. Kasi Paulo apesaki ye mikumba minene. Liteya ezali nini? Tosengeli te kosambisa bandeko mibali oyo bazali bilenge na kolanda mbula na bango. Ekozala malamu tóbosana te ete ata Nkolo na biso Yesu azalaki kaka na mbula 33 ntango asilisaki mosala na ye nyonso awa na mabele.
16, 17. (a) Nini esalisaka bankulutu báyeba soki ndeko mobali akoki kokóma mosaleli na misala to nkulutu? (b) Ndenge nini makanisi ya bato to mimeseno ya mboka ekoki kotɛmɛla makambo oyo Biblia elobi?
16 Na mimeseno ya bamboka mosusu, bato bamemyaka bilenge mibali te. Na yango, bankulutu mosusu bakoki kokakatana mpo na kopona bilenge mibali bákóma bankulutu to basaleli na misala, ata soki bakokisi masɛngami. Kasi, Biblia epesi te mbula oyo ndeko mobali asengeli kokokisa liboso atyama mosaleli na misala to nkulutu. (1 Timote 3:1-10, 12, 13; Tito 1:5-9) Soki nkulutu alandi mimeseno ya mboka mpe atye mobeko na likambo yango, asali makambo na boyokani na Liloba ya Nzambe te. Bankulutu basengeli te kosambisa bilenge mibali na kolanda makanisi na bango moko to mimeseno ya mboka; basengeli kolanda Liloba ya Nzambe.—2 Timote 3:16, 17.
17 Soki bankulutu bazali kolanda mimeseno ya mboka, bakoki kozelisa kaka mpamba bilenge oyo bakokisi masɛngami. Na mboka moko, ndeko moko oyo azalaki mosaleli na misala azalaki kokokisa malamu mikumba oyo bazalaki kopesa ye, mpe bankulutu bamonaki ete akokisi masɛngami ya Biblia mpo na kokóma nkulutu. Kasi, bankulutu mosusu ya mikóló balobaki ete azali komonana elenge mingi mpo azala nkulutu; na yango, baponaki ye te. Likambo ya mawa, ndeko mobali yango atyamaki nkulutu te, kaka mpo balandaki ndenge oyo azalaki komonana. Wana ezali kaka ndakisa moko, kasi emonani ete makanisi yango ezali na bisika mingi na mokili. Ezali na ntina mingi tólanda Biblia na esika ya kolanda makanisi na biso moko to mimeseno ya mboka. Soki tosali bongo, tokotosa Yesu mpe tokotika kosambisa basusu na kolanda oyo ezali komonana na libándá.
SAMBISÁKÁ NA BOSEMBO
18, 19. Nini ekosalisa biso tómona bandeko ndenge Yehova amonaka bango?
18 Atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki koyekola komona basusu ndenge Yehova amonaka bango. (Misala 10:34, 35) Na yango, tosengeli ntango nyonso kotya likebi na batoli oyo ezali na Liloba ya Nzambe. Soki tozali kosalela batoli yango, tokotosa etinda ya Yesu oyo elobi ete ‘tótika kosambisa na kolanda oyo ezali komonana na libándá.’—Yoane 7:24.
19 Mosika te, Mokonzi na biso Yesu Kristo akosambisa bato nyonso mpe lisambisi na ye ekolanda mibeko ya sembo ya Nzambe, kasi te oyo amoni to ayoki. (Yisaya 11:3, 4) Ekozala malamu mpenza!