Sakolá mpe pesá litatoli malamumalamu
1 Lokola Yesu azali “motambwisi mpe komanda,” abongisaki bayekoli na ye mpo na mosala monene ya kosakola oyo basengelaki kosala. (Yis. 55:4, NW; Luka 10:1-12; Mis. 1:8) Ntoma Petelo alobelaki mokumba oyo Yesu apesaki bango na maloba oyo: “Atindaki biso tósakola epai ya bato ya ekólo mpe tópesa litatoli malamumalamu ete ye azali Moto oyo atyami na Nzambe mpo na kozala mosambisi ya bato ya bomoi mpe ya bakufi.” (Mis. 10:42) Ndenge nini tokopesa litatoli malamumalamu?
2 Tokoki koyeba makambo mingi na kotalela ndenge oyo ntoma Paulo azalaki kosakola. Ntango asalaki likita elongo na bankulutu ya lisangá ya Efese, akundwelaki bango ete: “Namipekisaki te koyebisa bino makambo nyonso oyo ezalaki na litomba to koteya bino na bisika ya bato nyonso mpe na ndako na ndako. Kasi natatolaki malamumalamu ezala epai ya Bayuda mpe epai ya Bagrɛki na oyo etali kobongola motema epai ya Nzambe mpe kondima na kati ya Nkolo na biso Yesu.” Atako Paulo ye moko azalaki koyikela komekama mpiko, asalaki makasi mpo na koyebisa bato mingi mpenza nsango malamu. Asukaki kaka te na koyebisa bato oyo bazalaki koyoka ye solo ya ebandeli, kasi alukaki koyebisa bango “mokano mobimba ya Nzambe.” Mpo na kosala bongo, azalaki mpenza kosala milende mpe komipekisa makambo mosusu. Abakisaki lisusu ete: “Nazali te kotalela molimo na ngai na motuya lokola eloko ya ntina epai na ngai, kaka nde nasilisa mbangu oyo nazali kopota mpe mosala ya ministre oyo nazwaki epai ya Nkolo Yesu, ya kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe.”—Mis. 20:20, 21, 24, 27.
3 Lelo oyo, ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Paulo? (1 Kol. 11:1) Tokolanda ndakisa ya Paulo soki tozali koluka bato mpe mabota oyo ebongi ata ntango biso moko tozali na mikakatano, soki tozali kosala makasi mpo na koyebisa bato ya bikólo nyonso mpe minɔkɔ nyonso nsango malamu, mpe soki tozali kosalisa bato oyo basepelaka na solo na molende. (Mat. 10:12, 13) Kosala bongo esɛngaka ntango, milende, mpe kolinga bato.
4 Okoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi? Basanza ya Marsi ná Aprili ekoki kozala mpo na yo libaku malamu ya kopesa litatoli malamumalamu soki ozali mobongisi-nzela mosungi. Na mbula oyo euti koleka, tolendisamaki mingi na ndenge ebele ya basakoli basalaki milende mpo bázala babongisi-nzela basungi!
5 Bilendiseli oyo ebongiseli ya Yehova epesaka esimbaki mpenza motema ya ndeko mwasi moko ya mbula 80 oyo azali nzoto kolɔngɔnɔ te. Akomaki boye: “Epelisaki mwa mɔtɔ oyo nazalaka na yango banda kala na motema, mpe mpo na yango namiyokaki ete esengeli mpenza nasala mosala ya mobongisi-nzela mosungi ata mbala moko lisusu.” Aponaki sanza ya Marsi mpo asala yango. Abakisaki ete: “Eloko ya liboso nasalaki ezalaki kofanda mpe kotánga motuya. Nasololaki likambo yango na mwana na ngai ya mwasi mpamba te ye moto asengelaki kosalisa ngai. Nakamwaki ntango namonaki ye mpe azwi formilɛrɛ mpo na ye moko.” Na sanza yango, ndeko mwasi yango ya mobange asakolaki ngonga 52. “Mbala na mbala, nabondelaki Yehova azongisela ngai makasi ntango nazalaki koyoka ete makasi na ngai esili. Na nsuka ya sanza, nazalaki na esengo mingi mpe motema na ngai etondaki na nsai, mpe napesaki Yehova matɔndi mbala mingi mpo asalisaki ngai. Nakosepela nameka kosala yango lisusu.” Likambo ya esengo oyo akutanaki na yango ekoki kolendisa basusu oyo balingi mpenza kozala babongisi-nzela basungi atako nzoto na bango ezali kolɔngɔnɔ te.
6 Ndeko mobali moko oyo balongolaki ye na mosala mbalakaka, atalelaki likambo yango lokola libaku ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Na kati ya sanza yango oyo azalaki mobongisi-nzela mosungi, akómaki kosakola na milende mpenza, mpe liboso sanza esila abandaki koyekola Biblia na moto moko. Ntango akanisaki likambo yango, alobaki ete: “Oyo nde sanza ya esengo!” Oyo nde esengo azwaki ya kotambwisama mpe kosalisama na Yehova! Ɛɛ, Yehova asopelaki ndeko mobali yango lipamboli mpo na milende oyo asalaki na mosala ya kosakola, akosala mpe bongo mpo na yo.—Mki. 3:10.
7 Mpo na basakoli mingi, kozala mobongisi-nzela mosungi ezali pɛtɛɛ te. Nzokande, ebele ya bandeko basi mpe mibali basalaki mosala yango atako bazali na mikumba mingi na misala na bango mpe na mabota na bango mpe lisusu bazali na mikakatano na bango moko. Mbala mingi, kopesa litatoli malamumalamu esɛngaka mpe kopesa ntango ná makasi na biso, atako tozalaka na yango mingi te; kasi mapamboli oyo tokozwa eleki makambo nyonso mosusu.—Mas. 10:22.
8 Sanza ya Marsi ná Aprili ezali basanza oyo ebongi mpenza mpo na kozala mobongisi-nzela mosungi. Sanza ya Marsi ezali na bawikende mitano. Baoyo bakendeke mosala mokolo mobimba bakoki kozala babongisi-nzela basungi soki basaleli malamu bawikende yango mpe soki bazali kobima na mosala ya kosakola na mpokwa. Lisusu, bakoki kosalela malamu mikolo ya konje oyo ezalaka na sanza ya Aprili. Bamosusu bakoki kosalela mikolo ya bopemi ya eteyelo to ya mosala; yango ekosalisa bango bákokisa ngonga 50 oyo esɛngami. Mpo na kokokisa ngonga 50 na mosala ya kosakola na sanza ya Marsi mpe Aprili, okoki kolanda manaka moko kati na oyo epesami na lisolo oyo mpo na kozala mobongisi-nzela mosungi? Bótalela manaka yango elongo na baninga mosusu; na ntembe te, bandeko mosusu bakolendisama mpe bakondima kosala elongo na yo na mosala ya kosakola. Soki okoki kozala mobongisi-nzela mosungi te, omityela mokano mosusu ya malamu mpo na basanza yango, mpe sungá baoyo bakoki kozala babongisi-nzela. Bongisá programe na yo sikoyo mpo osala mingi koleka na sanza ya Marsi ná Aprili.
9 Monisá ete ozali na botɔndi mpo na Ekaniseli: Mbula na mbula, na eleko ya Ekaniseli, bankóto ya basakoli bamonisaka botɔndi na bango ndenge ‘bamisombelaka ntango oyo ebongi’ mpo na kozala babongisi-nzela basungi. (Ef. 5:15, 16) Na mbula oyo euti koleka, na Congo-Kinshasa, babongisi-nzela basungi bazalaki 5879 na sanza ya Marsi mpe 6507 na sanza ya Aprili. Yango elingi koloba ete basanza yango mibale ezalaki na mwayene ya babongisi-nzela basungi 6193. Kokanisá motuya yango na mwayene ya babongisi-nzela basungi 3298 oyo basalaki mosala yango na basanza mosusu nyonso oyo ezalaki liboso na mobu ya mosala yango. Na mbula oyo euti koleka, na Congo-Brazzaville, babongisi-nzela basungi bazalaki 424 na sanza ya Marsi mpe 199 na sanza ya Aprili. Yango elingi koloba ete basanza yango mibale ezalaki na mwayene ya babongisi-nzela basungi 312. Kokanisá motuya yango na mwayene ya babongisi-nzela basungi 129 oyo basalaki mosala yango na basanza mosusu nyonso oyo ezalaki liboso na mobu ya mosala yango. Eleko ya Ekaniseli oyo ezali libaku mosusu ya malamu mpo tómonisa botɔndi ya solosolo mpo na mbeka oyo Klisto apesaki; tokosala yango soki tosali lisusu mingi na mosala ya kosakola.
10 Lokola mokolo ya 16 Aprili ezali kobɛlɛma, kanisá ntina ya Ekaniseli yango mpo na yo. Kanisá makambo oyo elandanaki tii na liwa ya Klisto mpe makambo oyo ezalaki kotungisa makanisi mpe motema na ye. Kanisá mpe esengo oyo etyamaki liboso ya Yesu mpe ndenge oyo esalisaki ye ayikela minyoko ya ndenge wana mpiko. Kanisá mpenza esika monene azali na yango sikoyo: Mokonzi ya lisangá, oyo azali kokɛngɛla mosala ya kosakola mpe ya kozalisa bayekoli. (1 Kol. 11:3; Ebe. 12:2; Emon. 14:14-16) Na nsima, monisá ete ozali na botɔndi mpo na nyonso oyo Klisto asalá. Na yango, salá mingi mpenza na mosala ya kosakola na kotalela makoki na yo.
11 Lendisá bamosusu bátatola malamumalamu: Soki bankulutu ná basaleli na misala basali mosala ya mobongisi-nzela mosungi, bakolendisa basakoli mosusu ya lisangá mingi mpenza. Ntango bazali kosala elongo na basakoli mosusu na mosala ya kosakola mpe ntango bazali kosala mosala ya babateli ya mpate, bango moko bakokoka kosunga basusu mpo básala mingi koleka na mosala oyo eleki misala mosusu nyonso. Tiká ete biso nyonso tótya likambo yango na mabondeli, yango ekolendisa biso nyonso mpo na kosakola malamumalamu.
12 Atako bankulutu ná basaleli na misala nyonso basengeli kopesa mabɔkɔ na bibongiseli oyo lisangá ekozwa mpo na kosakola mingi koleka na boumeli ya sanza ya Marsi mpe ya Aprili, kasi mokɛngɛli na mosala ya kosakola nde asengeli mpenza kosala makasi mpo bibongiseli ya malamu ezwama mpo na mosala ya kosakola. Asengeli kobongisa bisika oyo makita mpo na kobima na mosala ya kosakola ekosalema, mikolo, mpe bangonga oyo ebongi mpo na basakoli mingi mpe asengeli kokebaka ete báyebisaka yango mbala na mbala na Likita ya Mosala. Esengeli kobongisa ete likita mpo na kobima na mosala ya kosakola esalema na bangonga ndenge na ndenge mpo bato nyonso na lisangá bákoka kosalela mitindo ndenge na ndenge ya kosakola. Ekoki kozala kosakola na bisika ya mombongo, kopesa litatoli na balabala, kosakola ndako na ndako, kosala bozongeli ya sika, mpe kosakola na telefone. Lisusu, asengeli kobongisa mpo ete mikanda, bazulunalo mpe teritware ezanga te na boumeli ya basanza wana.
13 Na sanza ya Marsi tokolakisa buku Boyebi mpo na kobanda boyekoli ya Biblia na bato. Makanisi ya malamu mpenza mpo na lolenge ya kolakisa buku Boyebi ebimaki na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2002. Na sanza ya Aprili, tokolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Salá makasi mpo osalela lolenge ya kolakisa bazulunalo yango ndenge balobelaki yango na lisolo: “Ndenge ya kolakisa bazulunalo.” Basakoli nyonso basengeli komibongisa malamu mpo bákoka kopesa litatoli malamumalamu.
14 Oyo nde lipamboli tozali na yango ya kotambwisama na Motó ya lisangá, Klisto Yesu, mpe ya kozala na libaku ya koyebisa bato mosusu nsango malamu! Awa sanza ya Marsi mpe ya Aprili ezali kobɛlɛma, tiká ete mbala oyo lisusu tósala milende mpenza mpo sanza yango mibale ezala basanza oyo eleki basanza nyonso mosusu, wana tozali kotosa etinda ya Klisto ya kopesa litatoli malamumalamu.
[Etanda na lokasa 4]
Manaka ndenge na ndenge mpo na mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Marsi ná Aprili 2003
Mokolo Ngonga
Mwayambo 1 2 — — 2 —
Mwamibale 1 — 3 — — —
Mwamisato 1 2 — 5 — —
Mwaminei 1 — 3 — — —
Mwamitano 1 2 — — — —
Mwapɔsɔ 5 4 3 5 6 7
Mwalomingo 2 2 3 2 2 3
Marsi 56 56 54 55 50 50
Aprili 50 50 51 53 — —
Ezali na manaka moko oyo ebongi na yo?