Totambola na kobanga Jéhovah
’’Lokola (lisangá) etambolaki na kobanga Jéhovah na kobondisama na elimo santu, ezalaki kokola.’’—MISALA 9:1,MN.
1, 2. (a) Nini esalamaki ntango lisangá ezalaki na kimya? (b) Atako Jéhovah azali kopesa nzela na minyoko, azali kosala nini lisusu?
MOYEKOLI OYO akutanaki na komekama oyo nsuka na yango esengelaki kozala liwa. Akokaki kotikala sembo epai na Nzambe? Ee, ezali bongo! Ntango nyonso atambolaki na kobanga Nzambe, na nsomo epai na Mozalisi na ye, mpe alingaki kokufa lokola temwe ya sembo ya Jéhovah.
2 Moto yango na sembo na kobangaka Nzambe, ezalaki Etienne, “mobali oyo atondaki na kondima mpe na elimo santu”. (Misala 6:5.) Kobomama na ye ebimisaki minyoko makasi, kasi na nsima, lisangá lizalaki na kimya na Yuda mobimba, na Galilea, na Samarie, mpe elendisamaki na elimo. Lisusu, “lokola etambolaki na kobanga Jéhovah mpe na kobondisama na elimo santu, ezalaki kokola”. (Misala 9:31.) Lelo, biso baoyo tozali ba Témoins de Jéhovah, tokoki kondimisama ete Nzambe akopambola biso, ezala ete tozali na kimya to na minyoko, lokola tozali kotanga yango na Misala na Bantoma mikapo 6 kino 12. Na yango, totambola na kobanga mpe na limemya epai na Nzambe ntango tozali konyokwama to, soki mwa bonsomi epesameli biso, tosalela yango mpo na kolendisana na elimo mpe mpo na kosalela Nzambe na molende koleka.—Deteronome 32:11, 12, 33:27.
Atikalaki sembo kino liwa
3. Mokakatano nini ebongisamaki na Yelusaleme, mpe ndenge nini?
3 Ata soki mikakatano mibimi na ntango na kimya, ebongiseli malamu ekoki kosalisa mpo na kosilisa yango. (6:1-7) Bayuda na monoko ya greke oyo bayaki na Yelusaleme bayimayimaki ete bazalaki kobosana basi oyo bakufeli mibali kati na bango mpo na matomba ya Bayuda bandimi oyo na monoko ya hébreu na ntango ya kokabola bilei ya mokolo na mokolo. Likambo wana ebongisamaki ntango bantoma baponaki mibali nsambo mpo na “mosala oyo ya ntina”. Moko kati na mibali yango ezalaki Etienne.
4. Etienne asalaki nini liboso ya bifundeli na lokuta oyo bafundaki ye?
4 Kasi Etienne, oyo azalaki kobanga Nzambe, akutanaki noki na komekama (6:8-15) Bato batelemaki mpo na kotiana ntembe na ye. Bamosusu bazalaki bato na ‘eyanganelo na Basikolami’, mbala mosusu ezelaki Bayuda oyo Baloma bamemaki bango boombo mpe nsima basikwamaki, to bato oyo babongwanaki na lingomba ya Bayuda baoyo bazalaki baombo kala. Lokola Etienne alongaki bango na mayele mpe na elimo santu, banguna na ye bamemaki ye liboso na Sanhédrin (tribinale monene ya Bayuda). Kuna, batatoli na lokuta balobaki boye: ‘Toyokaki mobali oyo koloba ete Yesu akoboma temple mpe akobongola mitindo oyo Moise atikelaki biso.’ Nzokande, ata banguna na Etienne bakokaki komona ete azalaki moto mabe te, kasi azalaki nde na elongi na kimya lokola anzelu, motindami na Nzambe oyo azalaki na elikya ya kosungama na Ye. Oyo nde bokeseni na bilongi na bango, oyo bimonisaki motema mabe mpo bazalaki basaleli ya Satana.
5. Na kopesaka litatoli, Etienne alobelaki mingi mpo na makambo nini?.
5 Ntango nganga monene Kayife atunaki ye, Etienne apesaki litatoli na mpiko. (7:1-53) Lisolo na ye ya mokuse mpo na Bayisraele emonisaki ete Nzambe akanaki kolongola Mibeko ntango Masiya akoya mpe kosukisa misala oyo mizalaki kokokisama na temple. Etienne amonisaki ete Bayisraele babwakaki Moise, mosikoli oyo Bayuda nyonso bazalaki koloba ete bazali kokumisa, na lolenge moko mpe sikawa babwakaki Oyo amemelaki bango kosikolama oyo eleki monene. Na kolobaka ete Nzambe afandaka na bandako etongami na maboko na bato te, Etienne amonisaki ete temple mpe losambo na lolenge ebongisamaki kuna ekolimwa. Kasi lokola basambisi yango babangaki Nzambe te balingaki koyeba mokano na Ye te, Etienne alobaki boye: ‘Bino bato na mitó makasi, seko bino bokotemelaka elimo santu. Mosakoli nini bankoko na bino banyokolaki te? Babomaki baoyo basakolaki liboso mpo na koya na Moyengebene oyo bino bokabaki mpe bobomaki.’
6. (a) Liboso na kufa na ye, Etienne amonaki emononeli nini oyo ezali kolendisa kondima? (b) Mpo na nini Etienne alobaki na lolenge esengeli ete: “Nkolo Yesu, yamba elimo na ngai”?
6 Etienne abomamaki mpo na maloba oyo ya mpiko (7:54-60) Basambisi basilikaki makasi mpo ete ngambo na bango emonisamaki polele na ntina na liwa na Yesu. Kasi kondima ya Etienne elendisamaki makasi ntango ‘atalaki na likoló mpe amonaki nkembo na Nzambe mpe Yesu atelemi na loboko na Ye ya mobali.’ Kobanda wana Etienne akokaki kotelema na kozanga kobanga liboso na banguna na ye elongo na elikya ete asalaki mokano na Nzambe. Atako biso Ba Témoins de Jéhovah, tozali komona bimonaneli te, tokoki kozala na kimya motindo wana oyo euti epai na Nzambe ntango tonyokwami. Nsima na kobimisa Etienne na libanda ya Yelusaleme, banguna na ye babetaki ye mabanga, mpe asalaki libondeli oyo: “Nkolo Yesu, yamba elimo na ngai.” Maloba wana mabongaki, mpamba te Jéhovah apesaki nzela na Yesu mpo akoka kozongisa bato mosusu na bomoi. (Yoane 5:26; 6:40; 11:25, 26). Etienne akweaki na mabolongo mpe angangaki makasi ete: “Jéhovah, tangela bango lisumu oyo te.” Nsima akufaki lokola martyr, lokola ekufaki bayekoli mosusu ya Yesu nsima na ye, ata na ntango na biso. Minyoko epesi nzela na kopalanganisa nsango malamu
Minyoko epesi nzela na kopalanganisa nsango malamu
7. Litomba nini ebimisamaki na minyoko?
7 Ya solo, liwa ya Etienne epesaki litomba ya kopalanganisa nsango malamu. (8:1-4) Minyoko epanzaki bayekoli nyonso, na Yuda mobimba mpe na Samarie, kozanga bobele bantoma Saulo, oyo andimaki kobomama na Etienne, anyokolaki makasi lisangá. Azalaki kokoba ndako na ndako kobimisaka bayekoli na Yesu libanda mpo ete babwaka bango na boloko. Lokola bayekoli oyo bapanzanaki balandaki kosakola, mwango na Satana elongaki te oyo na nzela ya minyoko alingaki kopekisa basakoli na Bokonzi baoyo babangaki Nzambe. Na mikolo na biso mpe, mbala mingi minyoko mizali kopesa nzela na kopalanganisa nsango malamu to kobenda likebi ya bato likolo na mosala ya kosakola Bokonzi.
8. (a) Mosala ya kosakola na Samarie ebimisaki matomba nini? (b) Ndenge nini ntoma Petelo asalelaki fungola ya mibale oyo Yesu apesaki ye?
8 Filipo mosakoli ya nsango malamu akendaki na Samarie mpo na “kosakola Klisto”. (8:5-25) Engumba yango ezalaki na esengo monene ntango nsango malamu esakolamaki kuna, Filipo abenganaki bilimo na mbindo mpe abikisaki bato. Longwa na Yelusaleme, bantoma batindaki Petelo na Yoane na Samarie, mpe ntango Petelo na Yoane bazalaki kobondela mpe kotiela maboko bayekoli ya sika oyo bazwaki batisimo, bayekoli yango bazalaki kozwa elimo santu. Simona, moto oyo liboso azalaki kosala soloka to magie, kasi azwaki batisimo uta mikolo mingi te, amekaki kosomba nguya oyo ya elimo santu, kasi Petelo alobaki na ye ete: ‘Tika ete mosolo na yo ebeba na yo esika moko! Motema na yo mozali sembo na miso na Nzambe te.’ Wana alendisamaki ete akoka kobongola motema mpe kosenga epai na Jéhovah alimbisa ye, asengaki epai na bantoma babondela mpo na ye. Tala likambo oyo esengeli kopusa baoyo nyonso babangi Jéhovah na mikolo na biso na kobondela ye ete asalisa bango bakoka kobatela mitema na bango. (Masese 4:23) (Liloba “simonie’’ liuti na likambo oyo wana, yango elimboli “kosomba to koteka mokumba kati na lingomba”.) Petelo na Yoane basakolaki nsango malamu na bamboka mingi ya Basamarité. Ezali na lolenge yango ntoma Petelo asalelaki fungola ya mibale oyo Yesu apesaki ye mpo na kofungola porte oyo ezali komema na boyebi mpe na likoki ya kokota na Bokonzi na likoló.—Matai 16:19.
9. Moetiopia oyo Filipo apesaki ye litatoli azalaki nani, mpe mpo na nini mobali yango azwaki batisimo?
9 Na nsima anzelu na Nzambe apesaki epai na Filipo mosala mosusu. (8:26-40) Mobali moko “mokube”, moto monene na mosala na Kandase mokonzi mwasi ya Etiopia, mokengeli na mosolo na ye nyonso, atambolaki na likalo na balabala elongwe na Yelusaleme kino Gaza. Azalaki mokube mpo na nzoto te lokola mikube mosusu, mpo ete soki bongo mbele akokaki kondimama te na lingomba ya Bayuda. Moto oyo na kokatama ngenga mpe abongwanaki na lingomba ya Bayuda asilaki kokende na Yelusaleme mpo na kosambela. (Deteronome 23:1) Filipo akutaki ye azali kotanga mokanda na mosakoli Yisaya. Ntango mokube oyo asengaki na ye kobuta na likalo na ye, Filipo asololaki na ye mpo na esakweli na Yisaya mpe “asakoli na ye nsango malamu na Yesu”. (Yisaya 53:7, 8.) Nsima moke, Moetiopia alobaki boye: “Tala mai; likambo nini ekopekisa ngai kobatisama?” Likambo moko ezalaki te, mpo ete ayebaki Nzambe mpe sikawa andimaki Klisto. Na yango Filipo abatisaki Moetiopia yango, oyo asimbaki nzela na ye na esengo. Boni mpo na yo, likambo nini epekisi yo kozwa batisimo?
Monyokoli na bayekoli ebongwani
10, 11. Likambo nini ekomelaki Saulo moto ya Tarse na nzela ya Damas mpe nsima na yango lisolo elobi nini?
10 Na ntango yango, Saulo azalaki koluka kopusa bayekoli bawangana kondima na bango na kokanela kokanga bango to koboma bango. (9:1-18a) Nganga monene (ekoki kozala Kayife) apesaki ye mikanda mpo na biyanganelo ya mboka Damas, mikanda oyo mipesaki ye lotomo ya kokanga mibali mpe basi na “Nzela oyo”, to lolenge na bomoi oyo etongami likolo na ndakisa na Klisto mpe komema bango na Yelusaleme. Penepene na Damasi, pene na midi, kongenga longwa na likoló engengaki lokola nkake mpe ayokaki mongongo koloba na ye ete: “Saulo, ozali konyokola ngai mpo na nini?” Baoyo bazalaki elongo na Saulo bayokaki “lokito ya mongongo”, kasi bayokaki makambo malobamaki te. (Tala Misala 22:6, 9) Kongenga ya moke oyo na Yesu kati na nkembo ekokaki mpo na koboma miso ya Saulo. Mpo akoka komona lisusu, Nzambe atindelaki ye moyekoli Anania.
11 Nsima na kozwa batisimo, monyokoli oyo na kala akomaki eloko na minyoko. (9:18b-25) Bayuda ya mboka Damas balingaki koboma ye. Kasi na butu, bayekoli bakitisaki ye na lidusu ya lopango, na kosalelaka kitunga moko monene to motete. (2 Bakolinti 11:32, 33) Kokima banguna mpe kolanda kosakola ezalaki bolembu te.
12. (a) Nini akomelaki Saulo na Yelusaleme? (b) Lisangá ezalaki na ezalela nini?
12 Na Yelusaleme, Barnabas asalisaki bayekoli mpo bakoka koyamba Saulo lokola ndeko kati na kondima (9:26-31), Saulo asololaki na molende elongo na Bayuda oyo balobaki monoko ya greke, baoyo mpe balukaki koboma ye. Ntango bandeko bayokaki likambo yango, bamemaki ye na césarée mpe longwa wana batindaki ye na Tarse, engumba epai abotamaki, na mokili ya Cilicie. Bipai nyonso na Yuda, na Galilée mpe na Samarie, lisangá “ezalaki na kimya, mpe elendisamaki” na elimo. Lokola lisangá ezalaki ‘kotambola na kobanga Jéhovah mpe na kobondisama na elimo santu, ezalaki kokola’.
Bato na mabota bakomi bandimi
13. Nzambe apesaki ntoma Petelo kokokisa bikamwiseli nini na Luda mpe na Joppé?
13 Ntoma Petelo azalaki mpe na mosala mingi. (9:32-43) Na mboka Luda (lelo Lod), na esobe ya Saron, Petelo abikisaki ebosono moko na nkombo Enée. Kobikisa oyo epesaki nzela na bato mingi bakoka kobongwana epai na Nkolo. Na Joppé, Tabita (Doloka), moklisto mwasi oyo alingamaki mingi, akweaki maladi mpe akufaki. Ntango Petelo akomaki, basi bakufeli-mibali na mawa mingi balakisaki ye bilamba oyo Doloka atongaki, bilamba oyo mbala mosusu balataki Petelo azongisaki Doloka na bomoi, mpe ntango nsango wana epalanganaki, bato mingi bakomaki bandimi Petelo atikalaki na Joppé epai na Simon mobongisi na mposo na nyama, oyo ndako na ye ezalaki pembeni na la mer.
14. (a) Korneye ezalaki nani? (b) Tokoki koloba nini mpo na mabondeli ya Korneye?
14 Na mbula yango (na mobu 36), likambo monene lisalemaki na esika mosusu. (10:1-8) Na mokili ya césarée mopakano moko afandaki wana, moto na kobanga Nzambe, na nkombo Korneye; azalaki komandá ya basoda Baloma oyo azalaki kokamba etuluku oyo ezalaki na mibali nkama. Azalaki mokonzi na “limpinga oyo babiangi ltalienne”, oyo esalamaki na basoda oyo bautaki na mokili ya ltalie kati na ba citoyens Baloma, mpe baombo oyo basikwamaki. Atako azalaki kobanga Nzambe, Korneye azelaki te moto oyo abongwanaki na lingomba na Bayuda. Kati na emononeli, anzelu ayebisaki korneye ete mabondeli na ye ‘mabutaki liboso na Nzambe lokola ekaniseli’. Ya solo, naino korneye amipesaki epai na Jéhovah te, kasi libondeli na ye endimamaki. Nzokande, lokola anzelu ayebisaki ye, Korneye atindaki bato koluka Petelo.
15. Likambo nini esalamaki ntango Petelo azalaki kobondela na likoló na ndako ya Simon?
15 Na kati wana, ntoma Petelo azwaki emononeli wana ezakaki ye kobondela na likoló na ndako ya Simon. (10:9-23) Na emononeli, amonaki eloko kokita na likoló lokola elamba monene etondi na banyama na makolo minei, banyama bakolandaka na mabelé mpe bandeke. Wana mongongo elobaki na ye ete aboma mpe alya biloko yango, Petelo azongisaki monoko ete naino alya eloko na mbindo te. Mongongo elobaki na ye lisusu ete: “Eloko Nzambe apetoli, yo, tika kobyanga yango ete eloko na mbindo”. Ntoma Petelo akakatanaki mingi mpo na emononeli, kasi alandaki malako na elimo. Ezali mpo na ntina yango, Petelo elongo na bandeko motoba Bayuda balandaki bato oyo Korneye atindaki.—Misala 11:12.
16, 17. (a) Petelo alobaki nini epai na Korneye mpe na baoyo basanganaki na ndako ma ye? (b) Naino ezalaki Petelo koloba, likambo nini esalamaki?
16 Bapakano ya liboso bakomaki pene na koyoka nsango malamu (10:24-48) Ntango Petelo na baninga na ye bakomaki na Césarée, Korneye, na bandeko na ye mpe baninga na ye ya bolingo basilaki komilengela mpo na kozela bango. Korneye ekweyaki na makolo ya ntoma Petelo, kasi Petelo na komikitisa nyonso aboyaki lokumu wana. Alimbolaki ete Jéhovah apakolaki Yesu na elimo santu mpe na nguya lokola Masiya mpe moto nyonso oyo akondima ye akozwa lilimbisi na masumu.
17 Na ntango wana nde Jéhovah asalaki likambo. (10:44-48) Naino ezalaki Petelo koloba, Nzambe akweisaki elimo santu likoló na bato na mabota oyo bakomaki bandimi. Nzambe abotaki bango mbala moko mpe apemisaki bango mpo ete bakoka koloba na minoko mosusu mpe kopesa ye nkembo. Na bongo, bazwaki batisimo na nkombo ya Yesu Klisto. Ezali na lolenge yango nde Petelo asalelaki fungola ya misato mpo na kofungola porte epai na bato na mabota oyo bazalaki kobanga Nzambe, porte oyo epesaki nzela na boyebi mpe likoki ya kokota na Bokonzi na likoló.—Matai 16:19.
18. Bandeko Bayuda balobaki nini ntango Petelo alimbolaki ete bato na Mabota “bazwaki batisimo na elimo santu”?
18 Nsima na yango, na Yelusaleme, baoyo bakangamaki na likanisi ya kokata ngenga batianaki ntembe elongo na ntoma Petelo. (11:1-18) Ntango alimbolaki ete bato na mabota to Bapakano “bazwaki batisimo na elimo santu”, bandeko na ye Bayuda bandimaki mpe bakumisaki Nzambe na kolobaka ete: “Na boye, Nzambe asili kopesa bapakano kobongwana na motema kino bomoi.”
Lisangá esalami kati na Bapakano
19.Ndenge nini bayekoli bayaki kobyangama baklisto?
19 Na yango lisangá ya yambo kati na Bato na Mabota to bapakano esalamaki. (11:19-26) Ntango bayekoli bapanzanaki mpo na minyoko oyo ebimaki na ntina na Etienne, bamosusu bakendaki na mboka Antioche, na mokili ya Syrie. Bayekoli basakolaki wana nsango malamu epai na bato na monoko ya greke, mpe ’’loboko na Jéhovah ezalaki na bango elongo”, kino ete bato mingi bakomaki bandimi. Barnabas mpe Saulo bateyaki wana na boumeli ya mbula moko, mpe “(na mokano na Nzambe, MN) bayekoli babiangamaki baklisto, liboso kuna na Antioche.” Ezali solo Jéhovah nde asalaki ete babyanga bango ndenge wana, mpamba te liloba na greke khrématizo elimboli “kobyangama na mokano na Nzambe”, mpe Makomami mazali kosalela liloba yango mpo na kolobela na ntina na likambo euti epai na Nzambe.
20. Agabus asakolaki likambo nini, mpe na ntango yango lisangá ya Antioche lisalaki nini?
20 Basakoli oyo bazalaki kobanga Nzambe balongwaki na Yelusaleme kino na Antioche. (11:27-30) Moko na bango, na nkombo ya Agabus, amonisaki “na elimo santu ete nzala monene ekoya na mokili mobimba”. Esakweli yango ekokanaki ntango mokonzi Moloma ‘Claude azalaki koyangela (na mibu 41-54), mpe mokomi na masolo na bato Josèphe akomaki mpo na “nzala monene” yango. Mpo na bolingo, lisangá ya Antioche etindaki lisalisi epai na bandeko ya Yuda oyo bazalaki na bosenga.—Yoane 13:35.
Minyoko milongi te
21. Agrippa l er akanaki nini mpo na Petelo, kasi likambo nini esalamaki?
21 Eleko ya kimya esilaki ntango mokonzi Hérode Agrippa l er abandaki konyokola baoyo bazalaki kobanga Jéhovah na Yelusaleme. (12:1-11) Hérode abomisaki Yakobo na mopanga, mbala mosusu na kokataka ye motó, ye oyo azalaki ntoma ya liboso oyo akufaki mpo na kondima. Na komonaka ete likambo yango esepelisaki Bayuda, Hérode akangisaki Petelo na boloko. Emonani lokola ete, bakangaki ntoma Petelo na minyololo oyo basoda mibale bakangamaki mpe ngambo na ngambo, wana basoda mibale mosusu bazalaki kokengela boloko na ye. Hérode akanelaki koboma ye nsima na Paque mpe nsima na mikolo na Mampa ezangi mfulu (14-21 Nisan), kasi mabondeli oyo lisangá esalaki mpo na ye mayokamaki na ntango ebongi, lokola mpe ezalaka bongo mbala mingi mpo na mabondeli na biso. Mpamba te, na ndenge ya ekamwiseli anzelu na Nzambe abikisaki ntoma Petelo.
22. Ntango Petelo akendaki na ndako ya Marie, mama na Malako, eloko nini esalamaki?
22 Mbala moko Petelo akendaki na ndako ya Marie (mama na Yoane Malako), epai kuna emonani ete makita ya boklisto mazalaki kosalama.(12:12-19) Kati na molili, mosali ya mwasi na nkombo ya Rhode asosoli mongongo na Petelo, kasi afungoli ekuke te. Na ebandeli, bayekoli bakanisaki ete mbala mosusu Nzambe atindaki anzelu momemi nsango momonisi na Petelo oyo azalaki koloba na mongongo lokola ya ye. Kasi ntango bakotisaki Petelo, ye alobaki na bango bayebisa kobika na ye epai na Yakobo mpe bandeko (mbala mosusu bankulutu). Nsima, atikaki bango mpe akendaki kobombama. Ayebisaki bango epai akendaki te, mpo na kotya bomoi na bango mpe bomoi na ye na likama te ntango bakoki kotunatuna bango. Hérode alukaki Petelo kasi amonaki ye te, mpe bakengeli bazwaki etumbu, mbala mosusu babomamaki.
23. Boyangeli ya Hérode Agrippa l er esukaki ndenge nini, mpe liteya nini tokoki kozwa ma likambo yango?
23 Na mobu 44, boyangeli ya Hérode Agrippa l er esukaki mbala moko na mboka césarée, wana ezalaki ye na mibu 54. (12:20-25) Asilikaki makasi na Bafenisié ya mboka Tyr mpe Sidon, mpe bango bafutaki Blastus, mosali na ye, mpo abongisa bokutani, na ntango yango bakokaki koyokana mpo na kimya. Na “mokolo motyamaki” (mokolo mokokanaki lisusu na eyenga ezalaki kosalama mpo na lokumu ya mokonzi claude), Hérode oyo alataki bilamba na bokonzi, afandaki na kiti na kosambisa mpe abandaki kopesa diskur liboso na bato mingi. Na ntango yango bayoki na ye bangangaki ete: “Oyo mongongo ya nzambe kasi ezali mongongo ya moto te!” Bobele na ntango yango, anzelu ya Jéhovah abetaki ye, ’’mpamba te apesaki Nzambe lokumu te”. Hérode aliamaki na “nkiso mpe akufaki”. Tika ete ndakisa oyo ezala likebisi epai na biso mpe epusa biso na kolanda kotambola na kobanga Jéhovah, kobwaka lolendo mpe kokumisa ye mpo na oyo tozali kokokisa kati na mosala na ye.
24. Lisolo oyo ekolanda ekomonisa nini na ntina etali bokoli?
24 Atako minyoko oyo ebimisamaki na Hérode, “liloba na Jéhovah ekolaki mpe epalanganaki”. Lokola lisolo oyo ekolanda ekomonisa yango, bayekoli bakokaki kolikya ete bokoli ekolandana. Mpo na ntina nini? Mpo ete ‘bazalaki kotambola na kobanga Jéhovah’.
Bozongeli
◻ Ndenge nini Etienne amonisaki ete azali kobanga Jéhovah, lokola basaleli mingi ya Nzambe bamonisaki yango nsima na ye?
◻ Liwa ya Etienne ebimisaki litomba nini mpo na mosala ya kosakola Bokonzi, mpe tomonaki likambo motindo wana na ntango na biso?
◻ Ndenge nini Saulo moto na Tarse, monyokoli na bayekoli akomaki kobanga Jehovah?
◻ Banani bazalaki Bapakano ya yambo na kokoma bandimi?
◻ Misala ya bantoma mokapo 12 ezali komonisa ndenge nini ete minyokoli ezali kolonga te kopekisa baoyo bazali kobanga Jehovah?
[Elilingi na lokasa 16, 17]
Kongenga longwa na likoló engengaki lokola nkake mpe mongongo elobaki na ye ete: “Saulo, Saulo, ozali konyokola ngai mpo na nini?”