Libota na Jéhovah elendisami kati na kondima
Masangá malendisamaki na kondima mpe na motuya na yango ezalaki koleka monene mokolo na mokolo.—Misala 16:5.
1. Ndenge nini Nzambe asalelaki ntoma Paulo?
JÉHOVAH NZAMBE asalelaki Saulo moto na Tarse lokola “mbeki na koponama”. Wana ekomaki ye ntoma Paulo, ‘ayikaki mpiko na makambo mingi’. Kasi na nzela ya mosala na ye mpe oyo ya baklisto mosusu, lisangá ya Jéhovah ezalaki na bomoko mpe bokoli kitoko. Misala 9:15, 16,MN.
2. Mpo na nini ekozala ntina mpo na biso ete totalela Misala 13:1 kino 16:5?
2 Bapakano to bato na mabota mingi bakomaki baklisto, mpe likita monene ya college central epesaki nzela na bomoko ya basaleli na Nzambe mpe elendisaki bango kati na kondima. Ekozala ntina mingi mpo na biso na kotalela makambo yango mpe mosusu oyo makomami na Misala 13:1 kino 16:5, mpamba te lelo oyo Ba Témoins de Jéhovah mpe bazali komona bokoli mpe matomba ya elimo motindo moko. (Yisaya 60:22) (Na programme na yo ya boyekoli tosengi na yo ete otanga mikapo ya mokanda yango oyo emonisami na makomi ya moindo.)
Bamisionere babandi mosala
3. Mosala nini “basakoli mpe balakisi” bakokisaki na Antiokia?
3 Mibali oyo batindamaki longwa na lisangá ya Antiokia na Syrie basalisaki bandimi mpo ete balendisama na kondima (13:1-5) “Basakoli mpe balakisi” lokola: Barnabas, Siméon (Niger), Lucius moto na cyréne, Manaɛ̃n mpe Saulo moto na Tarse bazalaki na Antiokia. Basakoli bazalaki kolimbola Liloba na Nzambe mpe bazalaki kosakola makambo makoya, wana balakisi bazalaki kopesa mateya oyo matalaki Makomami Mosantu mpe na lolenge ya bomoi na bato oyo bakobangaka Nzambe. (1 Bakolinti 13:8; 14:4) Barnabas mpe Saulo bazwaki mosala ya sipesiale. Elongo na Malako, ndeko (cousin) ya Barnabas, bakendaki na Sipre. (Bakolose 4:10) Basakolaki kati na biyanganelo ya Salamini, libongo oyo ezali na ngambo na esanga epai na ebimelo ya ntango, kasi eloko moko te elakisi ete Bayuda bayambaki nsango oyo bamemaki Lokola Bayuda yango bazalaki na bozwi mingi, bazalaki na mposa ya Masiya te.
4. Likambo nini lisalamaki wana bamisionere bazalaki kolanda mosala ya kosakola na Sipre?
4 Nzambe apambolaki mosala ya kopesa litatoli oyo esalamaki na bisika mosusu ya Sipre. (13:6-12) Na Pafosi, bamisionere bakutanaki na Bala-Yesu (Elimasi), nganga-kisi mpe mosakoli ya lokuta, ye Moyuda. Ntango amekaki kopekisa Sergius Paulus, mokolo na esanga ete ayoka liloba na Nzambe te, Saulo abandaki kotonda na elimo santu mpe alobaki: ‘Yo moto otondi na bokosi nyonso mpe na mayele mabe nyonso, mwana na Diable, moyini na boyengebene nyonso, okotika kobebisa nzela na sembo na Jéhovah te?’ Na maloba wana, Nzambe ye moko apesaki etumbu epai na Elimasi na kobomaka ye miso mpo na mwa ntango, mpe Sergius Paulus “andimi, mpo ete akamwi na mateya ya Jéhovah”.
5, 6. (a) Paulo alobaki nini na ntina na Yesu ntango azwaki maloba kati na eyanganelo na Antiokia na Pisidia? (b) Lisolo na Paulo ebimisaki litomba nini?
5 Longwa na Sipre, bazwi masuwa kino Pergé, na Asie Mineure. Paulo mpe Barnabas balandaki mobembo na bango epai na nord. Batambolaki katikati na bangomba, na ntembe te ezalaki kati na ‘makama na bibale mpe na makama na babotoli’, mpe bakomaki na Antiokia na mokili ya Pisidia. (2 Bakolinti 11:25, 26) Kuna, Paulo asololaki na eyanganelo. (13:13-41) Akundolaki misala na Nzambe epai na Yisraele mpe amonisaki Yesu polele, lokola mokitani na David Mobikisi. Ata bakonzi na Bayuda basengaki ete Yesu akufa, elaka oyo Nzambe apesaki na bankoko na bango ekokisamaki ntango asekwisaki ye. (Nzembo 2:7; 16:10; Yisaya 55:3) Paulo asengaki na bayoki na ye bakoka kotyola te lobiko oyo Nzambe apesaki bango na nzela ya Klisto.—Habakuku 1:5.
6 lisolo na Paulo esepelisaki bato, ndenge moko na badiskur piblike oyo ezali kopesama na mikolo na biso na ba Témoins de Jéhovah. (18:42-52) Na mokolo na sabata oyo elandaki, penepene na bato nyonso na mboka bayanganaki mpo na koyoka liloba na Jéhovah, kasi Bayuda batondaki na zuwa. Kanisa mwa moke! Bobele na poso moko, bamisionere babongolaki Bapakano to bato na mabota mingi koleka oyo Bayuda babongolaki na boumeli na bomoi na bango mobimba! Lokola Bayuda babandaki kotyana ntembe na Paulo na kotuka, ntango ekokaki mpo na kokende kongengisa pole ya elimo bisika mosusu. Na yango Paulo alobaki na bango ete: ‘Lokola boboyi liloba na Nzambe mpe bomoni ete bobongi na bomoi ya seko te, sikawa tokokende epai na bapakano.’—Yisaya 49:6.
7. Paulo mpe Barnabas basalaki nini liboso ya minyoko?
7 Na yango Bapakano babandaki kosepela, mpe baoyo nyonso bazalaki na mitema malamu mpo na kozwa bomoi ya seko bakomaki bandimi. Kasi lokola liloba na Jéhovah epalanganaki na mboka mobimba, Bayuda bapusaki basi ya lokumu (ezalaki mbala mosusu mpo ete bapusa mibali na bango to bato mosusu) mpe bato minene mpo ete banyokola Paulo na Barnabas mpe babengana bango na teritware na bango. Ata bongo bamisionere batikaki mosala na bango te. ‘Balongolaki bobele putulu na makolo na bango mpo na bato yango’ mpe bakendaki na lkoniume (lelo Konya), engumba monene ya province ya Baloma na mokili ya Galatia. (Luka 9:5; 10:11) Nini ekomelaki bayekoli oyo batikalaki na Antiokia na Pisidia? Lokola balendisamaki na kondima, “balandaki kotonda na esengo mpe na elimo santu”. Lisolo yango esalisi biso na kokanga ntina ete botemeli nyonso etiaka nkaka na bokoli na elimo te.
Batelemi ngwi kati na kondima atako minyoko mizali
8. Litatoli oyo epesamaki na lkoniume mpe ebotaki mbuma ebimisaki likambo nini?
8 Paulo na Barnabas bango moko batelemaki ngwi na kondima atako minyoko mizalaki. (14:1-7) Na nzela ya litatoli oyo bapesaki na eyanganelo ya lkoniume, Bayuda mingi mpe Bagreke mingi bakomaki bandimi. Ntango Bayuda oyo baboyaki kondima bapusaki Bapakano na kotemela bandimi ya sika, bamisionere oyo mibale na mpiko balobaki na molende na nguya na Nzambe, oyo amonisaki ete andimaki bango na kopesaka bango nguya ya kosala bilembo. Na ntango yango, bato bakabwanaki: bamosusu bazalaki mpo na Bayuda mpe bamosusu mpo na bantoma Bantoma bazalaki babangi te, kasi ntango bayebaki ete mwango ezwamaki mpo na kobeta bango mabanga, bamonisaki mayele na kolongwa na engumba mpo na kokenda kosakola na Likaonia, eteni ya mokili na Asie Mineure oyo ezali na sud ya Galatia. Na kozalaka na mayele, biso mpe tokoki kozala na molende mbala mingi kati na mosala ya kosakola atako botemeli ezali.—Matai 10:23.
9, 10. (a) Bafandi na Lusutula bakanisaki nini ntango bamonaki kobikisama ya moto oyo azalaki ebosono? (b) Paulo mpe Barnabas basalaki nini liboso na likambo yango na Lusutula?
9 Nsima ezalaki na Lusutula, engumba ya Likaonia, nde litatoli lipesamaki. (14:8-18) Na mboka yango Paulo abikisaki moto moko oyo azalaki ebosono longwa kobotoma na ye. Na kozanga kokanga ntina ete ekamwiseli wana euti na Jéhovah, bato bangangaki boye: “Banzambe na motindo na bato bakiteli biso!” Lokola bazalaki koloba yango na monoko ya likaonia, Barnabas mpe Paulo bayebaki te likambo nini ezalaki kosalema Lokola mbala mingi ezalaki Paulo nde moto azalaki koloba, bato bamonaki ete ye nde Hermés (molobi malamu atindami na banzambe), mpe bamonaki ete Barnabas, nde Zeus, nzambe oyo aleki banzambe ya Bagreke.
10 Nganga-nzambe ya Zeus amemaki bangombe mpe biloko mosusu ya losambo mpo na kotumba mbeka epai ya Paulo mpe Barnabas. Ekoki kozala ete na monoko ya greke, monoko oyo ezalaki koyokana malamu, to na lisalisi na mobongoli, Paulo mpe Barnabas basalaki noki mpo na kolimbola ete bango mpe bazalaki bobele bato lokola bango mpe ete bazali kosakola nsango malamu mpo ete bato batika “makambo oyo na mpamba” (banzambe to bikeko ezangi bomoi) mpe bábongwana epai na Nzambe na bomoi. (1 Mikonzi 16:13; Nzembo 115:3-9; 146:6) Ee, ntango na kala, Nzambe apesaki nzela na mabota (kasi na Baebele te) ete balanda banzela na bango, kasi ata bongo amonisaki ete azali na bomoi mpe atondi na boboto, ‘na kopesaka bango mbula longwa na likoló mpe bilaka na kobota mbuma mingi, mpe atondisaki mitema na bango na biloko na kolia mpe na esengo.’ (Nzembo 147:8) Atako bapesaki makanisi wana, ezali na makasi nde Barnabas na Paulo bapekisaki bato kotumbela bango mbeka. Kasi bamisionere yango bandimaki te ete bakumisa bango lokola banzambe, mpe basalelaki te nguya oyo epesamelaki bango mpo na kobongola bato nyonso ya eteni na mokili yango ete bazala baklisto. Oyo nde ndakisa malamu mpo na biso, mingi mpenza soki tozali na mposa makasi ya kokumisama mpo na oyo Jéhovah apesi nzela ete tokokisa na mosala na ye.
11. Liteya nini tozali kozwa na maloba oyo ete: “Ekoki na biso kokota na Bokonzi na Nzambe na nzela na bolozi mingi”?
11 Minyoko mibandaki lisusu pwasa. (14:19-28) Ndenge nini likambo yango ebimaki? Na kopusama na Bayuda ya Antiokia na Pisidia mpe oyo ya lkoniune, bato babetaki Paulo na mabanga mpe babendaki ye na libanda na mboka, kokanisaka ete asili kokufa. (2 Bakolinti 11:24, 25) Kasi ntango bayekoli bazingaki ye, atelemaki mpe akotaki na nkuku na Lusutula, mbala mosusu yango ezalaki na butu. Mokolo molandaki, Paulo mpe Barnabas bakendaki na Derbe, epai kuna bazalisaki bayekoli mingi. Ntango bazongaki lisusu na Lusutula, na lkoniume mpe na Antiokia, bamisionere balendisaki bayekoli, koyikisaka bango mpiko mpo ete bakangama na kondima mpe bayebisaki bango ete: “Ekoki na biso kokota na Bokonzi na Nzambe na nzela na bolozi mingi.” Biso oyo tozali baklisto tozali mpe komizela na kozwa bolozi, mpe tosengeli te komeka komilongola na yango na kowangana kondima na biso. (2 Timoté 3:12) Ezali na eleko wana nde bankulutu batyamaki na masangá oyo mokanda ya Paulo epai na Bagalatia motindamaki.
12. Wana mobembo ya liboso ya Paulo na mosala ya misionere esukaki, bamisionere mibale oyo basalaki nini?
12 Wana ekatisaki bango mokili ya Pisidia, Paulo mpe Barnabas basakolaki liloba na Pergé, engumba monene na Pamfilia. Nsima na yango, bazongaki na Antiokia na Syrie. Lokola mobembo ya liboso ya Paulo esilaki, bamisionere wana mibale bayebisaki na lisangá “misala mingi misalaki Nzambe na nzela na bango elongo, mpe balobaki lisusu ete asili kozipwela bapakano ekuke na kondima”. Balekisaki mwa ntango elongo na bayekoli na Antiokia, likambo oyo, esalisaki bango mingi mpenza na kolendisama kati na kondima. Na mikolo na biso, bavizite ya bakengeli ya zongazonga ezali na matomba malamu na elimo.
Babongisi likambo moko ya ntina
13. Eloko nini ezalaki ntina mpo ete boklisto ya solo ekabwana te na biteni mibale, moko ya Baebele mpe mosusu ya bato ya mabota?
13 Kotelema ngwi kati na kondima ezali kosenga bomoko ya makanisi. (1 Bakolinti 1:10) Mpo ete boklisto ya solo ekabwana te na biteni mibale, moko ya Baebele mpe mosusu ya bato ya mabota, college central esengelaki kokata likambo soki Bapakano to Bato ya mabota oyo bazalaki se kobakisama na lisangá ya Nzambe basengelaki kotosa Mibeko ya Moise mpe kokatama ngenga.(15:1-5) Mibali longwa na Yudea bakomaki na Antiokia na Syrie mpe babandaki koteya epai na bandimi bapakano ete bakokaki kobika te soki bakatami ngenga te. (Exode 12:48) Na yango Paulo, Barnabas mpe baklisto mosusu, batindamaki epai na bantoma mpe bankulutu na Yelusaleme. Kuna mpe, bandimi oyo bazalaki Bafalisai baoyo bakangamaki na mibeko, balobaki na makasi ete Bapakano basengelaki kokatama ngenga mpe kotosa Mibeko.
14. (a) Atako ntembe makasi ezalaki ntango likita esalamaki na Yelusaleme, ndakisa nini ya malamu epesamaki? (b) Na mokuse, likanisi nini ntoma Petelo apesaki na libaku yango?
14 Likita esalamaki mpo na koluka koyeba nini ezalaki mokano na Nzambe. (15:6-11) Ya solo, ntembe makasi ezalaki, kasi koswana ebimaki te kati na mibali na bindimeli makasi oyo babimisaki makanisi na bango. Wana ezali ndakisa malamu mpo na bankulutu ya lelo. Kati na lisolo yango, Petelo alobaki ete: ‘Nzambe aponaki ngai kati na bino kala ete bapakano (lokola Korneye) bayoka nsango malamu na monoko na ngai mpe bandima. Atatolaki na bango mpo ete apesi bango elimo santu pelamoko epesaki ye na biso (misala 10:44-47). Na bongo, mpo na nini bozali sikawa komeka Nzambe na kotyela bayekoli nkanga na nkingo (kosenga bango na makasi ete batosa Mibeko), oyo batata na biso ata biso tozalaki na nguya na kokumba te? Biso (Bayuda na mosuni) tondimi ete tokobika mpo na ngolu na Nkolo Yesu na motindo moko na bango.’ Na kondimaka Bapakano oyo bakatami ngenga te, Nzambe amonisaki ete kokatama ngenga mpe kotosa Mibeko ya Moise ezalaki masengami te mpo na kozwa lobiko.—Bagalatia 5:1.
15. Makanisi nini ya moboko Yakobo apesaki, mpe asengaki ete bakoma makambo nini epai na baklisto oyo bazalaki Bayuda te?
15 Bayangani nyonso bazalaki nyee ntango Petelo asukisaki, kasi makanisi mosusu masengelaki kopesama. (15:12-21) Barnabas mpe Paulo balobelaki mpo na bilembo oyo Nzambe asalaki kati na Bapakano na nzela na bango. Nsima na yango, Yakobo, ndeko na Yesu, oyo azalaki kokamba likita, alobaki boye: ‘Siméon (nkombo ya Petelo na Liebele) asili kolimbola motindo Nzambe ayei kotala bapakano liboso ete akamata bato mpo na nkombo na ye kati na bango.’ Yakobo alimbolaki ete esakweli esakolaki kotongama lisusu na “ndako na David” (kozongisama ya bokonzi kati na bakitani ya Davidi) ezalaki kokokisama na koyanganisama na bayekoli na Yesu (basangoli na Bokonzi) baoyo baponamaki kati na Bayuda mpe kati na Bapakano lokola. (Amosa 9:11, 12; Baloma 8:17) Lokola koyanganisama wana ekanamaki na Nzambe, bayekoli basengelaki kondima yango. Yakobo apesaki toli ete bakoma mokanda epai na baklisto oyo bazalaki Bayuda te ete baboya 1) biloko bipesami na bikeko, 2) pite, na 3) makila mpe banyama bakamolami. Bipekiseli yango bizalaki kati na makomi ya Moise oyo bazalaki kotanga kati na biyanganelo na mokolo na sabata nyonso.—Genese 9:3, 4; 12:15-17; 35:2, 4.
16. Makambo misato nini oyo mazwami na mokanda ya college central ya ekeke ya liboso mazali kino lelo oyo kopesa litambwisi epai na baklisto?
16 Na yango college central etindaki mokanda epai na baklisto na Antiokia, na Syrie mpe na cilicie, oyo bazalaki Bayuda te. (15:22-35) Elimo santu mpe bakomi na mokanda yango basengaki na bango ete baboya biloko bipesameli mbeka na bikeko, na makila (oyo bato mosusu bazalaki kolya mbala mingi), banyama bakamolami (bapakano mingi bazalaki kotalela misuni na nyama oyo ebimisami makila te lokola bilei kitoko), mpe na pite (pornéïa na monoko ya greke, liloba oyo elimboli kosangisa nzoto na lolenge oyo endimami te na libanda na libala oyo ezali na boyokani na Biblia). Na koboyaka makambo oyo, baklisto yango bakokaki kozala na bolamu na elimo, lokola ezali bongo mpo na ba Témoins de Jéhovah na ntango na biso mpo ete bazali kotosa ‘makambo yango ya ntina’. Kosalela liloba “Bomibatela malamu!, (MN”) ezali ndenge moko na koloba “Botikala malamu”; na bongo esengeli kosukisa te ete masengami yango ezalaki libosoliboso myango mpo na kozala na nzoto kolongono. Ntango mokanda etangamaki na Antiokia, lisangá esepelaki na elendiseli oyo bazwaki. Basaleli na Nzambe oyo bafandaki na Antiokia balendisamaki mpe lisusu kati na kondima na maloba na kolendisa oyo ya Paulo, ya Silas, ya Barnabas mpe ya bamosusu. Biso mpe tosengeli kosala makasi mpo na koyikisa mpiko mpe kolendisa bandeko na biso baklisto.
Ebandeli na mobembo ya mibale na mosala ya misionere
17. (a) Matata nini mabimaki ntango balingaki kokenda na mobembo ya mibale na mosala na misionere? (b) Paulo mpe Barnabas basilisaki matata na bango ndenge nini?
17 Matata mabimaki wana bazalaki kobongisa mobembo ya mibale ya mosala na misionere. (15:36-41) Paulo asengaki na Barnabas ete bakende lisusu elongo na ye na masangá ya Sipre mpe ya Asie Mineure. Barnabas andimaki, kasi alingaki bakenda na ndeko na ye Malako. Paulo aboyaki likanisi yango, mpamba te Malako atikaki bango na Pamfilia. Na yango “koswana makasi ebimaki”. Kasi, ezala Paulo to Barnabas moko te alukaki komilongisa na komeka kokotisa bankulutu mosusu to college central na matata na bango mibale. Oyo nde ndakisa malamu!
18. Bokabwani na Paulo mpe Barnabas ebimisaki likambo nini, mpe likambo yango esengeli kokundwela biso nini?
18 Ata bongo, matata wana mabimisaki bokabwani. Barnabas azwaki Malako elongo na ye mpe bakendaki na Sipre. Paulo azwaki Silas elongo na ye, “akatisi kati na Syrie mpe cilicie, kolendisaka masangá”. Mbala mosusu, Barnabas apusamaki na bikanganeli ya bondeko, kasi asengelaki mpenza kotalela likambo oyo ete Paulo azalaki ntoma mpe “mbeki na koponama”. (Misala 9:15.) Ezali boni mpo na biso? Likambo oyo lisengeli kokundwela biso ntina ya kondima bokonzi ya teokratike mpe kosala na boyokani mpenza elongo na “moombo na sembo mpe na mayele”.—Matai 24:45-47.
Bokoli oyo ezwamaki kati na kimya
19. Timoté azali kopesa ndakisa nini epai na bilenge baklisto ya lelo?
19 Matata wana mabebisaki kimya ya lisangá te. Libota na Nzambe elandaki kolendisama kati na kondima. (16:1-5) Paulo mpe Silas bakendaki na Derbé mpe bakomaki kino na Lusutula, epai kuna Timoté azalaki kofanda, ye mwana na mondimi moko Moyuda, Eunice, mpe tata na ye Mogreke, azalaki mondimi te. Timoté azalaki elenge, mpamba te ata nsima na mbula 18 to 20, Paul akomeli ye lisusu ete: “Tika te ete moto atyola bolenge na yo.” (1 Timoté 4:12), Soki “bandeko wana na Lusutula mpe na lkoniume (bingumba mibale oyo ekabwani soko na ntaka na bakilometres 30) batatolaki malamu na ntina na ye”, yango elimboli ete ayebanaki mpo na mosala na ye ya malamu mpe mpo na bizaleli na ye kitoko na miso na Nzambe. Na mikolo na biso, bilenge baklisto basengeli koluka lisalisi ya Jehovah mpo na komisalela lokumu malamu motindo wana. Ntoma Paulo akataki Timoté ngenga, mpamba te alingaki kokenda kati na mabota mpe biyanganelo na Bayuda baoyo bayebaki ete tata na Timoté azalaki Mopakano, mpe alingaki ete eloko moko te ezala lokola libaku mpo na Bayuda mibali mpe basi baoyo bazalaki na mposa ya koteyama na ntina na Masiya. Na mikolo na biso, kozanga kobuka mitinda na Biblia, ba Témoins de Jéhovah bazali kosala nyonso oyo bakoki mpo ete bato ya lolenge nyonso bakoka kondima nsango malamu.—1 Bakolinti 9:19-23.
20. Matomba nini masangá mazwaki na kotosa mókanda ya collége central na ekeke ya liboso, mpe mpo na yo, liteya nini tokoki kozwa na ndakisa na bango?
20 Na lisalisi ya Timoté, Paulo mpe Silas bapesaki na bayekoli mibeko ya college central mpo ete bakoka kotosa yango. Epesaki matomba nini? Na kokanisaka mbala mosusu mpo na Syrie, cilicie mpe mpo na Galatia, Luka akomaki boye: “Masangá malendisamaki kati na kondima mpe motuya na yango ezalaki koleka monene mokolo na mokolo.” Ya solo, kotosa mokanda ya college central epesaki nzela na bomoko mpe bokoli na elimo. Oyo nde ndakisa malamu na ntango na biso oyo ya mpasi mpo na libota ya Jéhovah oyo esengeli kotikala na bomoko mpe kotelema ngwi kati na kondima!
Bozongeli
◻ Paulo mpe Barnabas basalaki nini liboso ya minyoko?
◻ Liteya nini tokoki kozwa na maloba oyo ete: “Ekoki na biso kokota na Bokonzi na Nzambe na nzela na bolozi mingi”?
◻ Makambo misato na mokanda moutaki na college central ya ekeke ya liboso mazali koteya biso nini.
◻ Lokola na ekeke ya liboso, nini ezali kolendisa kondima ya ba Témoins de Jéhovah?