Mokanda ya Biblia nimero 35—Habakuku
Mokomi: Habakuku
Esika ya bokomi: Yuda
Nsuka ya bokomi: soko 628 L.T.B.(?)
1. Solo minene nini ilobelami kati na esakweli ya Habakuku?
HABAKUKU azali moko na basakoli oyo babéngamaka ete basakoli ya mike kati na Makomami ya Liebele. Nzokande, emonaneli na ye mpe maloba na ye oyo epemamaki na Nzambe ezali moke te na kotalela ndimbola na yango epai na libota ya Nzambe. Esakweli na ye ezali kolendisa mpe kokembisa basaleli ya Nzambe na ntango ya mpasi. Mokanda oyo mozali kolobela solo mibale ya minene: Yehova Nzambe azali Mokonzi Monene ya Mɔlɔ́ngɔ́, mpe moyengebene abikaka na kondima. Mokanda oyo ezali lisusu lokola likebisi epai na batɛmɛli ya basaleli ya Nzambe mpe epai na baoyo bazali komitánga na bokosi nyonso ete bazali bato na ye. Ezali komonisa ntina ya kozala na kondima makasi epai na Yehova, oyo abongi mpenza kosanzolama na nzembo.
2. Makambo nini toyebi na ntina na mokomi, Habakuku?
2 Mokanda ya Habakuku ebandi na maloba oyo: “Litatoli limonaki mosakoli Habakuku.” (Hab. 1:1) Mosakoli Habakuku (na Liebele, Chavaq·quqʹ), oyo nkombo na ye elimboli “Boyambami ya makasi” azalaki nani? Toyebi likambo moko te na ntina na libota ya Habakuku, ekólo na ye, makambo matali bomoi na ye, to liwa na ye. Soki azalaki moyembi Molevi kati na tempelo, toyebi mpenza na sikisiki te, atako likanisi yango lizali kati na maloba mazali na nsuka ya mokanda oyo ete: “Mpo na mokóló na bayembi. Na bibɛtɛlɔ na nsinga.”
3. Makambo nini mazalaki kosalema na Yuda oyo mazali kosalisa na koyeba ntango oyo mokanda ya Habakuku ekomamaki?
3 Ntango nini Habakuku apesaki litatoli na ye ya esakweli? Maloba mazali na nsuka ya mokanda, oyo touti kolobela mpe maloba “[Yehova] azali kati na ndako na ye na bulɛɛ” mamonisi ete tempelo ya Yelusaleme ezalaki naino. (2:20) Maloba wana, mpe nsango ya esakweli, emonisi ete yango elobamaki mwa moke liboso ya kobebisama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. Kasi ezalaki bambula boni liboso? Esengelaki kozala nsima na boyangeli ya Yosiya, mokonzi oyo azalaki kobanga Nzambe, na mobu 659-629 L.T.B. Esakweli yango moko emonisi elembeteli na kosakoláká mosala moko oyo bato kati na Yuda bakondima te ata soki yango elobelami. Mosala yango ezali nini? Ezali kobima ya Bakaladi (bato na Babilone) oyo bapusamaki na Nzambe mpo na kopesa etumbu na Yuda oyo ezangaki sembo. (1:5, 6) Yango eyokani malamu na eteni ya ebandeli ya boyangeli ya mokonzi Yoyakimi, oyo azalaki mosambeli na bikeko, eleko oyo kozanga kondima mpe bokesene epalanganaki mingi kati na Yuda. Yoyakimi asilaki kotyama na kiti ya bokonzi na Falo Neko, mpe libota lizalaki kati na bopusi ya Ezipito. Na ezalela motindo wana, bato bakanisaki ete bazalaki na ntina ata moko te ya kobanga kobundisama ya Babilone. Kasi Nebukadanesala alóngaki Falo Neko na etumba oyo esalemaki na Kalekemisi na mobu 625 L.T.B., na bongo akweisaki nguya ya Ezipito. Na yango, ekoki kozala ete esakweli oyo epesamaki liboso ya likambo wana. Na bongo makambo mamonisi ete ezalaki na ebandeli ya boyangeli ya Yoyakimi (oyo ebandaki na mobu 628 L.T.B.), yango esali ete Habakuku azala moto oyo azalaki na bomoi na eleko moko na Yilimia.
4. Nini emonisi ete mokanda ya Habakuku epemamaki na Nzambe?
4 Lolenge nini tokoki koyeba ete mokanda oyo epemamaki na Nzambe? Bakataloge ya kala ya Makomami ya Liebele endimi kopemama ya mokanda ya Habakuku. Atako bazali kotánga mokanda oyo na nkombo na yango te, emonani polele ete yango ekɔtisamaki kati na ‘basakoli ya mike zomi na mibale,’ mpamba te soki mokanda ya Habakuku ezangaki, mbɛlɛ mikanda yango milingaki kozala 12 te. Ntoma Paulo andimaki esakweli wana lokola eteni ya Makomami mapemami mpe atángi polele Habakuku 1:5, kolobeláká yango lokola likambo “elobami na basakoli.” (Mis. 13:40, 41) Atángaki mbala mingi mokanda oyo kati na nkomá na ye. Ya solo, kokokisama ya maloba ya Habakuku mpo na Yuda mpe Babilone emonisi ete ye azali mosakoli ya solo ya Yehova, oyo alobelaki nkombo mpe nkembo na Ye.
5. Lobelá na mokuse makambo mazali kati na mokanda ya Habakuku.
5 Mokanda ya Habakuku ezali na mikapo misato. Mikapo 1, 2 mibale ya liboso mizali lisoló kati na mokomi mpe Yehova. Yango ezali kolobela nguya ya Bakaladi, mpe etumbu oyo ezali liboso na libota ya Babilone oyo ezali koyikanisa biloko na yango te, oyo emizweli litomba mabe mpo na ndako na yango, oyo etongi mboka na kosopa makila, mpe oyo ezali kosambela bikeko. Mokapo ya misato ezali kolobela bonene ya Yehova kati na mokolo ya etumba, mpe ekomeli na yango ekokani na mosusu te mpo na nguya mpe na mayoki. Mokapo oyo ezali libondeli kati na koyemba na kolela mpe esili kobéngama ete “moko kati na bapoɛmi eleki kitoko na maloba ya ntɔ́ki ya Liebele.”a
MAKAMBO MAZALI KATI NA HABAKUKU
6. Makambo nini mazalaki kati na Yuda, mpe mosala nini ya kokamwa Yehova alingaki bongo kosala?
6 Mosakoli azali kobelela Yehova (1:1–2:1). Kozanga kondima ya Yuda ebimisaki mituna kati na makanisi ya Habakuku. Atuni ete: “Ɛ [Yehova], kino ntango nini nakobyanga mpe okoyoka te? Mpo na nini okomonisa ngai mabe mpe okotala mikakatano?” (1:2, 3) Mobeko elɛmbi, moto mabe azali kozingela moyengebene, mpe bosembo esalelami na kolongobana te. Mpo na makambo wana, Yehova akosala likambo oyo ekokamwisa, likambo oyo “bato bakondima te ata soki yango elobami.” Azali mpenza “kolamukisa Bakaladi”! Esakweli oyo Yehova apesi ya libota wana ya kongala ezali mpenza nsɔ́mɔ wana yango ezali kobɛlɛma nokinoki. Emipesi na mobulu, mpe ezali koyanganisa bakangami “lokola zɛlɔ.” (1:5, 6, 9) Eloko moko te ekotɛlɛma na nzela na yango, ata bakonzi mpe bato minene, mpamba te yango ezali kosɛka bango nyonso. Ezali kobɔtɔla bisika nyonso ya makasi. Nyonso wana elakisi kosambisama mpe kopamelama euti na Yehova, “Oyo na Bulɛɛ.” (1:12) Na likebi nyonso, Habakuku azali kozela ete Nzambe aloba.
7. Lolenge nini Yehova alendisi Habakuku?
7 Emonaneli ya mawa mitano (2:2-20). Yehova ayanoli: “Komá emonaneli, monisá yango polele na bikomelo.” Ata soki emonani ete eumeli, yango ekoya solo. Yehova abɔndisi Habakuku na maloba oyo: “Nde moyengebene akobika mpo na kondima.” (2:2, 4) Monguna wana ya lolendo akokokisa mokano na ye te, ata soki akoyanganisa mabota mpe bato mpo na litomba na ye moko. Ɛɛ, bango bazali bato oyo bakosalela na ntina na ye maloba ya lisese ya mawa mitano ete:
8, 9. Mawa mitano oyo mazali kati na emonaneli matalelaki bato ya lolenge nini?
8 “Mawa na ye oyo ayanganisi yango ezali na ye te.” Ye moko akokóma eloko ya kopunza. Akobebisama “mpo na makila na bato mpe yauli oyo esalami epai na mokili.” (2:6, 8) “Mawa epai na ye oyo azwi libonza mabe mpo na ndako na ye.” Koboma oyo ye abomaki bato mingi ekosala ete mabanga mpe makonzí ya ndako na ye enganga. (2:9) “Mawa epai na ye oyo akotonga mboka moke na makila.” Bato na ye bakosala mosala bobele mpo na mɔ́tɔ mpe bakomilɛmbisa bobele mpamba, Yehova alobi bongo. “Zambi mokili ekotondisama na boyebi na nkembo na [Yehova] lokola mai ezali kozipa mai-na-monana.”—2:12, 14.
9 ‘Mawa epai na moto oyo kati na nkanda azali komelisa mozalani na ye mpo na kotala bolumbu na ye.’ Yehova akomelisa ye kɔ́pɔ ya lobɔkɔ na Ye ya mobali, koyokisáká ye nsɔ́ni na esika ya kopesa ye nkembo “mpo na makila na bato mpe yauli esalami na mokili.” Ekeko esalemi ezali na ntina nini epai na mokeli na yango—banzambe oyo balobaka te, oyo bazangi ntina? (2:15, 17) “Mawa epai na ye oyo alobi na eloko na nzeté ete, Lamuká! na libanga emimi ete, Tɛlɛmá! Oyo ekolakisa nde?” Na bokeseni na banzambe wana oyo bazangi bomoi, “[Yehova] azali kati na ndako na ye na bulɛɛ, tiká ete mokili mobimba bázala nyɛɛ liboso na ye.”—2:19, 20.
10. Mosala nini ya nsɔ́mɔ mozali kotambola nzela moko na komonana ya Yehova kati na mokolo ya etumba?
10 Yehova kati na mokolo ya etumba (3:1-19). Na libondeli moko monene, Habakuku akundoli misala ya kokamwa ya Yehova. Na komonana ya Yehova “nkembo na ye ezipi lola, mokili etondi na kosanzolama na ye.” (3:3) Kongɛnga na ye ezalaki lokola pole, mpe maladi mabe ezalaki kotambola liboso na ye. Atɛlɛmaki ngwi, aningisaki mabelé, kolɛngisáká mabota mpe kopalanganisáká ngomba ya kala. Yehova amataki likoló na mbalata lokola elombe-mobundi na litimbo lizangi ezipelo mpe na makalo ya lobiko. Ngomba mpe mai na mobulu ikómaki na yikiyiki. Moi mpe sanza etɛlɛmaki ngwi, mpe pole ya mbanzi na ye mpe kongɛnga ya likɔnga na ye emonanaki wana azalaki kotambola na mabelé, kotutáká mabota na nkanda. Abimaki mpo na lobiko ya bato na ye mpe mpo na lobiko ya mopakolami na ye mpe mpo na kozalisa moto mabe bolumbu longwa na miboko “kino nkingo.”—3:13.
11. Lolenge nini emonaneli ezali na bopusi likoló na Habakuku, kasi ekateli na ye ezali nini?
11 Mosakoli atungisami mingi na emonaneli wana ya nguya ya misala ya Yehova na ntango ya kala mpe na misala ya koningisa mokili oyo akosala na mikolo mizali koya. “Nazali koyoka mpe libumu na ngai elɛngalɛngi; bibɛbu na ngai itetemi mpo na mongongo; kopela ekɔti kati na mikuwa na ngai, nazali kotetema na nsé na ngai moko; nakozela na kimya mpo na mokolo na mpasi ete eya likoló na bato baoyo bakotɛmɛla biso na bibele.” (3:16) Nzokande, Habakuku azwi ekateli, ete atako ntango wana ya mabe esengeli kobima—ata nzeté na mosuke ekobimisa fololo te, nzeté na miwiti ekobota te, etongá ekozala na ebatelelo te—kasi ye akosepela kati na Yehova mpe akozala na esengo kati na Nzambe ya lobiko na ye. Asukisi loyembo na ye ya mayoki makasi na maloba oyo: “[Yehova Nkolo-Mokonzi, NW] azali nguya na ngai, ye akozalisa makolo na ngai lokola makolo na mboloko; ye akotambolisa ngai na bisika na ngai na likoló.”—3:19.
LITOMBA NA YANGO
12. Litomba nini lizali na kosalela Habakuku 2:4 lokola Paulo amonisaki yango?
12 Koyebáká ete esakweli ya Habakuku ezali na litomba mpo na mateya, ntoma Paulo atángaki mokapo 2, vɛrsɛ́ 4, na bisika misato bikeseni. Wana alobelaki mingi ete nsango malamu ezali nguya ya Nzambe mpo na lobiko ya moto nyonso oyo azali na kondima, Paulo akomelaki baklisto ya Loma ete: “Mpo ete boyengebene na Nzambe emonisami polele kati na yango. Boyengebene yango bokobimaka na kondima, bokobendaka kino kondima, lokola esili kokomama ete, Moyengebene akobika mpo na kondima.” Wana akomelaki Bagalatia, Paulo alobelaki makasi likambo yango ete mapamboli mazwamaka na nzela ya kondima: “Emonani polele mpe ete moto akozala moyengebene liboso na Nzambe na nzela na Mibeko te, mpo ete, Moyengebene akobika na kondima.” Paulo akomaki lisusu kati na nkomá na ye oyo atindelaki Baebele ete baklisto basengeli komonisa kondima oyo ezali na bomoi, oyo ebikisaka molimo, mpe atángaki lisusu maloba ya Yehova epai na Habakuku. Nzokande, asuki te bobele na kotánga maloba ya Habakuku oyo ete, “moyengebene na ngai akobika na kondima,” kasi abakisi lisusu maloba oyo engebene Kondima na sika: “Soko mpe akozonga nsima, molimo na ngai ekosepela ye te.” Na nsima, asukisi na kolobáká ete: Tozali “kati na bango bakondimaka mpe bakobikisa milimo.”—Lom. 1:17; Gal. 3:11; Ebe. 10:38, 39.
13. Kokokisama ya sikisiki ya bisakweli ya Habakuku na ntina na Yuda mpe Babilone emonisi nini mpo na bikateli ya Nzambe?
13 Esakweli ya Habakuku ezali na litomba mingi lelo oyo epai na baklisto, mpamba te bazali mpenza na mposa ya kozala na nguya. Ezali koteya kotya motema epai na Nzambe. Ezali lisusu na litomba mpo na kokebisa basusu na ntina na bikateli ya Nzambe. Liteya mpo na kokebisama ezali na nguya: Tótalela te bikateli ya Nzambe ete ezali koumela; yango “ekoya solo.” (Hab. 2:3) Na ntembe te, esakweli ya kobebisama ya Yuda na Babilone ekokisamaki solo, mpe na ntembe te Babilone yango moko ekamatamaki, Bamede mpe Baperse bakamataki mboka wana na mobu 539 L.T.B. Oyo nde likebisi mpo na kondima maloba ya Nzambe! Na yango, ntoma Paulo amonaki ntina ya kotánga Habakuku wana azalaki kokebisa Bayuda oyo bazalaki na mikolo na ye ete bábungisa kondima te: “Na bongo bókeba ete yango elobami na basakoli eya na bino te, ete, Bótala, bino batyoli, bókamwa mpe bólimwa! Mpo ete ngai nazali kosala mosala moko na mikolo na bino—mosala mokondima bino te ata moto akolimbola yango na bino polele.” (Mis. 13:40, 41; Hab. 1:5, LXX) Bayuda oyo bazangaki kondima balandaki maloba ya Paulo te, motindo moko bandimaki te likebisi ya Yesu na ntina na kobebisama ya Yelusaleme; bazwaki mpasi na ntina na kozanga na bango ya kondima ntango mapinga ya Loma mabebisaki Yelusaleme na mobu 70 T.B.—Luka 19:41-44.
14. (a) Lolenge nini esakweli ya Habakuku ezali kolendisa baklisto lelo oyo na kobatela kondima makasi? (b) Lokola yango elobami na esakweli, elikya nini ya esengo baoyo balingaka boyengebene bakoki kozala na yango uta sikawa?
14 Bobele bongo, lelo oyo, esakweli ya Habakuku ezali kolendisa baklisto na kozala na kondima makasi atako bafandi kati na mokili oyo motondi na mobulu. Ezali kosalisa bango na koteya basusu mpe na koyanola na motuna oyo bato nyonso kati na mokili batunaka, Nzambe akoyeisa kobekola likoló na moto mabe? Tótalela lisusu maloba ya esakweli: ‘Zelá yango; ekoya solo mpenza, ekoumela mingi te.’ (Hab. 2:3) Atako lolenge nini ya mobulungano oyo mozali na mabelé, batikali bapakolami ya basangoli na libula ya Bokonzi bazali komikundola maloba ya Habakuku na ntina na misala ya kala oyo Yehova asalaki mpo na kobekola: “Obimaki mpo na lobiko na bato na yo, mpo na lobiko na mopakolami na yo.” (3:13) Ya solo, mpo na bango, Yehova azali longwa na kalakala “Oyo na Bulɛɛ,” mpe “Libanga” oyo akopesa etumbu na bato mabe mpe akopesa bomoi epai na baoyo azali koyamba kati na bolingo na ye. Baoyo nyonso balingaka boyengebene bakoki kosepela kati na Bokonzi na ye mpe na lotómo oyo azali na yango ya kozala mokonzi, na kolobáká ete: ‘Nakosepela na Yehova, nakoyoka esengo na Nzambe na lobiko na ngai. Yehova, Nkolo-Mokonzi azali nguya na ngai.’—1:12; 3:18, 19.
[Maloba na nse ya lokasa]
a The Book of the Twelve Minor Prophets, 1868, E. Henderson, lokasa 285.