Tópesa motuya mingi na bomoi ya solosolo
NYONSO esuki bobele na bomoi oyo? Na kolendisáká biso na “kosimba makasi bomoi ya solo,” Biblia ezali komonisa ete ezali na eloko mosusu. (1 Timoté 6:17-19, NW) Soki bomoi na biso ya mikolo oyo ezali bomoi ya solo te, bongo bomoi ya solo ezali nini?
Mokapo epai maloba oyo mazwami ezali komonisa ete ezali “bomoi ya seko” nde bato na kobanga Nzambe basengeli kosimba makasi. (1 Timoté 6:12) Mpo na ntalo monene ya bato, yango elimboli bomoi ya seko na mabelé. Adama, moto ya liboso, azalaki na elikya ya kofanda libela na paladiso na mabelé. (Genese 1:26, 27) Asengelaki kokufa bobele soki akolya “mbuma na njete na koyeba malamu mpe mabe.” (Genese 2:17) Kasi lokola Adama mpe mwasi na ye, Eva, balyaki na nkó nyonso mbuma ya nzeté wana, Nzambe akatelaki bango etumbu ya kufa. ‘Mokɔlɔ baliaki yango,’ bakufaki na miso na Nzambe mpe babandaki kobeba kino bakufaki na mosuni. Bomoi na bango ezalaki lisusu kitoko te lokola oyo bazalaki na yango na ebandeli.
Nzela ya “bomoi ya solo”
Mpo na kopesa “bomoi ya solo,” Yehova Nzambe azwaki bibongiseli ya kobikisa bato. Mpo na kosalisa biso na kokanga ndimbola ya ebongiseli yango, tókamata ndakisa ya kompanyi moko. Bamasini na yango nyonso ebebá mpe ezali kopesa basáli mpasi mpamba te bambula mingi na liboso, mosáli ya yambo atyaki likebi te na malako ya kotambwisa bamasini yango mpe abebisaki bamasini nyonso. Baoyo bazali kosalela bamasini yango sikawa bakoki bobele kosala nyonso oyo ekoki na bango mpo na kosalela bamasini yango. Nkóló kopanyi alingi kotya bamasini ya sika mpo na kosalisa basáli na ye, mpe azali kobomba mosolo oyo mosɛngami mpo na yango.
Adama, ‘motambwisi masini,’ ya yambo apesaki motuya mingi te na bomoi oyo bapesaki ye. Na yango, atikelaki bakitani na ye bomoi moko ya kozanga kokoka, motindo moko lokola bamasini oyo ezali kosala malamu te. (Baloma 5:12) Lokola basáli oyo bakɔtaki nsima na kompanyi, baoyo bakokaki te kobongola makambo, bakitani ya Adama bazali na makoki soko moke te ya komizwela bomoi ya solo. (Nzembo 49:7) Mpo na kobongisa ezalela oyo emonani lokola ete ezangi elikya, Yehova atindaki Mwana sé moko na ye awa na mabelé mpo na kosombela lisusu bato bomoi ya seko. (Luka 1:35; 1 Petelo 1:18, 19) Na kokufáká mpo na bato liwa ya mbeka likoló na nzete ya mpasi, Yesu Klisto, Mwana sé moko ya Nzambe, apesaki mosolo—bomoi oyo ekokanaki na oyo Adama abungisaki. (Matai 20:28; 1 Petelo 2:22) Na nzela ya mbeka wana ya motuya mingi, Yehova azali sikawa na moboko malamu mpo na kopesa bomoi ya solo.
Mpo na bato ya botosi, lisiko ya Yesu ekolimbola bomoi ya seko na paladiso na mabelé. (Nzembo 37:29) Elikya epesami na baoyo nyonso bakobika na “etumba na mokɔlɔ yango monɛnɛ na Njambe Mojui-na-Nguya Yɔnsɔ,” oyo ebéngami Armagedon. (Emɔnisɛli 16:14-16) Yango ekosilisa mabe nyonso na mabelé. (Nzembo 37:9-11) Baoyo bazali kokufa liboso na ntango yango, baoyo Nzambe azali kobomba bango kati na makanisi na ye bakosekwisama kati na Paladiso oyo ekozongisama na mabelé mpe bakosepela na elikya ya kozala na bomoi ya solo oyo ekopesama na bato oyo batosaka Nzambe.—Yoane 5:28, 29.
Ntina ya kosepela na bomoi na biso ya ntango oyo
Likambo yango elingi koloba te ete tokoki kozanga limemya mpo na bomoi tozali na yango sikawa oyo ezali bulɛɛ. Nkóló kompanyi akobungisa ntango mpe mosolo mpo na kosomba masini ya sika mpo na mosáli oyo ayebi kobatela yango te? Nzokande, mokóló na mosala akopesa masini ya sika epai na moto oyo amonisaki milende ya kobatela malamu masini ya kala, boye te?
Bomoi ezali likabo ya motuya mingi oyo euti epai na Yehova. Lokola azali ye oyo apesaki bomoi na bolingo na ye moko, alingi ete totalela yango na motuya. (Nzembo 36:9; Yakobo 1:17) Na ntina na komibanzabanza ya Yehova mpo na bato awa na mabelé, Yesu alobaki ete: “Ata nsuki yɔnsɔ na mito na biso itangami.” (Luka 12:7) Yehova apesaki Bayisraele etindá ete bakoboma moto te, oyo etalaki mpe kopɛngola komiboma. (Exode 20:13) Yango ezali kosalisa biso na kopɛngola likambo ya kotalela komiboma lokola moko na maponi oyo mapesameli biso.
Lokola bayebi komibanzabanza mpe bolingo oyo Yehova azali na yango mpo na bolamu na biso, bato na kobanga Nzambe basalelaka mitindá ya Biblia wana bazali kotalela mimeseno ya bato na mikolo oyo. Na ndakisa, lokola baklisto ya solo basɛngami na ‘komipɛtola na mbindo nyonso na nzoto mpe na elimo mpe na kokokisa ezaleli na biso na bulɛɛ kati na nsɔmɔ na Nzambe,’ baboyaka likaya mpe bilangwiseli mosusu oyo ezali kobebisa makanisi mpe ezali kotya bato kati na boombo na yango.—2 Bakolinti 7:1.
Komibanzabanza ya Nzambe na ntina na bomoi ya bato emonani lisusu kati na toli oyo etali kobatela “motema na kimia” mpe kokima etamboli ya mbindo. (Masese 14:30; Bagalatia 5:19-21) Na kotosáká mitindá wana mitombwami, tokobatelama na makambo mabe lokola kosilika oyo ebebisaka kolɔngɔ́nɔ́ mpe bokɔnɔ oyo bokopalanganaka na kosangisa nzoto.
Komibanzabanza ya Yehova mpo na libota na ye emonani lisusu polele na bilendiseli etali komipekisa na kolya mpe komela kolekisa ndelo. (Deteronome 21:18-21; Masese 23:20, 21) Baklisto basili kokebisama ete bato na lokoso mpe balangwi na masanga bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe te, elingi koloba ete, bakozwa bomoi ya solo soko moke te. (1 Bakolinti 6:9, 10; 1 Petelo 4:3) Na kolendisáká ezaleli ya bokatikati, Yehova azali koteya biso mpo na matomba na biso moko.—Yisaya 48:17.
Wana tozali komitambwisa engebene mitindá ya Yehova, tozali komonisa ete tozali kozwa bomoi na biso ya mikolo oyo na motuya mingi. Ya solo, eloko oyo eleki mpenza ntina ezali bomoi ya solo. Lokola yango ezali bomoi ya seko, baklisto ya solo bazali kopesa yango motuya mingi koleka na bomoi na bango ya mikolo oyo. Ntango Yesu Klisto apesaki bomoi na ye lokola mbeka, amipesaki mpo na kosala mokano ya Yehova. Botosi epai na Tata na ye ezalaki na ntina mingi koleka bomoi oyo ye azalaki na yango awa na mabelé. Etamboli kitoko ya Yesu epesaki ye mbano ya kosekwisama mpo na kozwa bomoi ezangi kufa kati na likoló. (Baloma 6:9) Kufa na ye esengeli lisusu kopesa bomoi ya seko mpo na bato na botosi oyo bazali kondimela lisiko ya mbeka na ye.—Baebele 5:8, 9; 12:2.
Mobeko monene na ntina na makila
Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete bayekoli ya Yesu bazali komonisa lolenge na ye ya kokanisa. Balukaka kosepelisa Nzambe na makambo nyonso, motindo moko lokola Klisto asalaki. Ya liboso, likambo yango ezali kolimbola ntina oyo baboyaka kozongisa makila, oyo minganga misusu babéngaka ete eloko ya kobikisa bomoi. Tótala lolenge nini moto amonisaka ete azali kopesa ntina mingi na bomoi ya solo na koboyáká makila.
Lokola Yesu Klisto, baklisto ya solo balingi kozala na bomoi na miso ya Nzambe, mpe yango ezali kosɛnga botosi ya mozindo epai na Ye. Liloba ya Nzambe ezali kopesa bayekoli ya Klisto mobeko oyo ete: “Boboya bilɔkɔ bipɛsami na bikeko, na makila, na banyama bakamolani, na ekobo.” (Misala 15:28, 29) Mpo na nini mobeko wana na ntina na makila mokɔtaki kati na mibeko oyo baklisto basengeli kotosa?
Mibeko oyo mipesamaki na Bayisraele mizalaki kosɛnga ete baboya kolya makila. (Levitike 17:13, 14) Baklisto bazali na nse ya mibeko ya Mose te. Kasi bayebi ete etindá ya kolya makila te etyamaki nkutu liboso na Mibeko; epesamaki libosoliboso epai na Noa nsima ya Mpela. (Genese 9:3, 4; Bakolose 2:13, 14) Etindá yango etalaki bakitani nyonso ya Noa, oyo azali tata ya mabota nyonso ya mabelé. (Genese 10:32) Lisusu, Mobeko na Mose mozali kosalisa biso na komona bantina mpo na yango Nzambe azali kolobela makasi ezaleli ya bulɛɛ ya makila. Nsima ya kopekisa Bayisraele kolya makila ya lolenge nyonso, Nzambe alobaki ete: “Bomɔi na mosuni ejali na kati na makila, mpe ngai nasili kopɛsa yango na bino likolo na etumbelo mpɔ na kosala kojongisa bondeko na ntina na bomɔi, mpɔ ejali makila ekojongisa bondeko na ntina na bomɔi.” (Lewitiko 17:11) Makila ezalaki mpo na kopesa mbeka likoló na etumbelo. Mobeko na Ye na ntina na ezaleli ya bulɛɛ ya makila ezali komonisa bokonzi oyo azali na yango likoló na bomoi nyonso awa na mabelé. (Ezekiele 18:4; Emoniseli 4:11) Na kotaláká bomoi na biso na motindo oyo Yehova azali kotalela yango, tokososola ete ezali ya biso te kasi nde topesameli yango na Nzambe.
Motindo moko lokola motambwisi-masini ya ndakisa na biso apesamelaki mokumba ya kobatela masini, bobele bongo biso mpe topesamelaki bomoi oyo tozali na yango sikawa. Osengelaki kosala nini soki masini na yo mazalaki kosɛnga ete bábongisa yango mpe soki mekanisiɛ́ moko apesi yo toli ya kobongisa yango na kosaleláká mpenza bibende oyo mokanda ya malako ya kotambwisa masini mozali kopekisa? Okokende epai na bamekanisiɛ́ mosusu mpo na koluka kobongisa masini yango engebene malako oyo mazali kati na mokanda, boye te? Bomoi ya bato ezali na ntina mingi mpe na makambo mingi koleka masini. Kati na Liloba na ye lipemami, mokanda mpo na kobatela bato na bomoi, Moyemi na biso apekisi kosalela makila mpo na kobatela bomoi. (Deteronome 32:46, 47; Bafilipi 2:16) Ezali likambo ya mayele kokangama makasi na masɛngami ya mokanda wana, boye te?
Ya solo, baklisto oyo bazali na bokɔnɔ mpe bazali kosɛnga ete bapesa bango makila te baboyaka myango nyonso ya monganga te. Bazali bobele kosɛnga ete basalisa bango engebene mwango oyo ekomonisa limemya mpo na bomoi na bango—oyo ya sikawa mpe oyo ya mikolo mizali koya. Minganga oyo bazali na mpiko nyonso komemya etɛlɛmɛlo ya baklisto bapesaka litatoli na ntina na matomba ya kosalisa bango engebene masɛngi na bango. Monganga-mopasoli moko oyo azalaki kala kozongisa bato makila mingi alobi ete, “Kokutana na Batatoli ya Yehova ememelaki ngai mitindá ya sika.” Sikawa azali nkutu kosalisa ata bato oyo bazali Batatoli te kozanga kosalela makila.
Tópesa motuya na bomoi ya solo
Wapi mitindá ya sika oyo monganga-mopasoli wana azwaki ntango asalisaki Batatoli ya Yehova? Sikawa ayebi ete kosalisa mobɛli esuki te bobele na kosalisa eteni ya nzoto oyo etungisami na bokɔnɔ kasi elimboli kosalisa moto mobimba. Mobɛli azali na lotómo te ya kosɛnga kosalisama oyo eleki malamu mpo na bolamu na ye ya nzoto, ya elimo, mpe ya maoki?
Mpo na Kumiko, oyo azalaki na mibu 15, kozongisa makila mpo na kosalisa ye na bokɔnɔ mabe oyo ebéngami leucémie ezalaki mpenza liponi lileki mabe. Litomba ya koluka kobakisa mwa bapɔ́sɔ, basanza, to ata mwa bambula na bomoi na ye na motindo yango ekokani te na libebi monene oyo yango elingaki komemela ye na nsima. Lokola asilaki kopesa bomoi na ye epai na Yehova Nzambe lokola moko na Batatoli na ye, atosaki ezaleli ya bulɛɛ ya makila. Atako tata na ye mpe bandeko na ye batɛmɛlaki makasi ekateli na ye, Kumiko atɛlɛmaki ngwi. Mokolo moko monganga na ye atunaki ye ete: “Soki Nzambe na yo alimbisaka mabunga, akolimbisa yo te ata soki ondimi ete bazongisela yo makila?” Kumiko aboyaki koangana mpe kotika bindimeli na ye oyo etongami likoló ya Biblia. “Kokangamáká makasi na liloba ya bomoi,” abatelaki etɛlɛmɛlo na ye. (Bafilipi 2:16, NW) Lokola nkɔ́kɔ na ye ya mwasi oyo azalaki mondimi te alobaki yango, “Kumiko atikaki bosembo na ye soko moke te.” Nokinoki, tata na ye elongo na nkɔ́kɔ na ye ya mwasi mpe minganga oyo basalisaki ye babongolaki lolenge na bango ya kokanisa.
Kondima makasi oyo Kumiko azalaki na yango epai na Yehova Nzambe, oyo akoki kosekwisa ye longwa na kufa, ezalaki na bopusi monene likoló na mitema ya bato mingi. Naino ezalaki ye na bomoi, abondelaki tata na ye ete: “Ata soki nakufi, nakosekwisama kati na Paladiso. Kasi soki bino bobomami na Armagedon, nakomona bino te. Na yango, bóyekola Biblia.” Tata na ye atikaki te koloba ete: “Ntango okooka malamu, nakobanda koyekola.” Kasi ntango Kumiko akufaki na bokɔnɔ na ye ya mpasi, atyaki kati na sanduku na ye mwa maloba oyo ete: “Kumiko, nakomona yo kati na Paladiso.” Nsima ya lisukúlu ya bokundi, alobaki na baoyo bazalaki na lisukúlu yango ete: “Nalakaki na Kumiko ete nakomona ye kati na Paladiso. Atako nandimi naino yango te mpo ete nayekoli naino makambo mingi te, nazali na ekateli makasi ya kotalela yango malamumalamu. Bosalisa ngai.” Basangani mosusu ya libota na ye babandaki mpe koyekola Biblia.
Kumiko azalaki na limemya ya solo mpo na bomoi mpe alingaki kozala na bomoi. Amonisaki botɔ́ndi mpo na nyonso oyo minganga basalaki mpo na kobikisa bomoi na ye na ntango oyo. Nzokande, na kotosáká mokanda ya malako ya Mozalisi, amonisaki ete azalaki kosimba makasi bomoi ya solo. Mpo na bamilió ya bato, yango ekolimbola bomoi ya seko kati na Paladiso na mabelé. Okozala kati na bango?