MOKAPO 17
“Azalaki kosalela Makomami mpo na kosolola na bango”
Moboko mpo na koteya malamu; ndakisa malamu ya bato ya Beroya
Euti na Misala 17:1-15
1, 2. Banani bazali kosala mobembo longwa na Filipi tii na Tesaloniki, mpe ekoki kozala ete bazali kokanisa nini?
BANINGA misato: Paulo, Silasi, mpe Timote, bazali kosala mobembo ya kilomɛtrɛ koleka 130 na nzela moko oyo eleki na kati ya bangomba, oyo Baroma batongá yango malamu mpe oyo bato mingi balekalekaka. Na bantango mosusu, makɛlɛlɛ ya ndenge na ndenge eyokanaka na nzela yango: makɛlɛlɛ ya bampunda, ya makalo oyo ezali koleka likoló ya mabanga, ya bato ndenge na ndenge oyo bazali kosala mobembo, na ndakisa basoda, bato ya mombongo, mpe bato ya misala. Paulo ná baninga na ye bauti na Filipi mpe bazali kokende na Tesaloniki. Ezali mobembo moko ya mpasi, mingimingi mpo na Paulo ná Silasi. Bazali naino na bampota oyo bazokisaki bango na Filipi, ntango babɛtaki bango na mangenda.—Mis. 16:22, 23.
2 Mibali yango bazali kosala nini mpo báyika mpiko na bakilomɛtrɛ oyo etikali na mobembo na bango? Na ntembe te, bazali kobɛta masolo. Bazali naino kokanisa likambo ya esengo oyo bakutanaki na yango na Filipi ntango mokɛngɛli ya bolɔkɔ ná libota na ye bakómaki bandimi. Likambo yango epesi bato yango makasi ya kokoba kosakola liloba ya Nzambe. Nzokande, ntango bakómi pene na Tesaloniki, engumba oyo ezali pembeni ya mbu, mbala mosusu bazali komituna soki Bayuda ya engumba yango bakoyamba bango ndenge nini. Bakotɛmɛla bango to mpe bakobɛta bango, ndenge esalemaki na Filipi?
3. Ndenge nini ndakisa ya Paulo na oyo etali kozwa mpiko mpo na kosakola ekoki kosalisa biso lelo oyo?
3 Bambula mingi na nsima, Paulo amonisaki makanisi oyo azalaki na yango na mokanda oyo akomelaki bakristo ya Tesaloniki: “Atako tonyokwamaki liboso mpe tosambwisamaki mabe na Filipi, kaka ndenge boyebi, Nzambe na biso apesaki biso mpiko mpo na kolobela bino nsango malamu ya Nzambe liboso ya botɛmɛli makasi.” (1 Tes. 2:2) Na bongo, maloba yango emonisi ete Paulo azalaki kobanga ntango akómaki na Tesaloniki, mingimingi nsima ya makambo oyo ekómelaki bango na Filipi. Okoki nde komitya na esika ya Paulo? Osilá kokutana na mikakatano mpo na kosakola nsango malamu? Paulo atyaki motema epai ya Yehova mpo na kopesa ye makasi, elingi koloba kosalisa ye azwa mpiko oyo asengelaki na yango. Kotalela ndakisa ya Paulo ekoki kosalisa yo osala lokola ye.—1 Ko. 4:16.
“Azalaki kosalela Makomami mpo na kosolola” (Misala 17:1-3)
4. Mpo na nini tokoki kokanisa ete Paulo afandaki na Tesaloniki koleka pɔsɔ misato?
4 Lisolo eyebisi biso ete ntango Paulo azalaki na Tesaloniki, asakolaki na sinagoga na boumeli ya Sabata misato. Yango elingi nde koloba ete alekisaki kaka pɔsɔ misato na engumba yango? Mbala mosusu ezali bongo te. Toyebi te soki Paulo alekisaki ntango boni liboso ya kokende na sinagoga mpo na mbala ya liboso. Longola yango, mikanda ya Paulo emonisi ete ntango azalaki na Tesaloniki, ye ná baninga na ye bazalaki kosala mosala mpo na kokokisa bamposa na bango. (1 Tes. 2:9; 2 Tes. 3:7, 8) Lisusu, na ntango yango, bandeko ya Filipi batindelaki Paulo biloko mbala mibale mpo na kosunga ye. (Flp. 4:16) Nyonso wana emonisi ete mikolo oyo afandaki na Tesaloniki elekaki pɔsɔ misato.
5. Ndenge nini Paulo alukaki kobenda likebi ya bato?
5 Lokola Paulo azwaki mpiko mpo na kosakola, alobaki na bato oyo bayanganaki na sinagoga. Ndenge amesanaki kosala, “azalaki kosalela Makomami mpo na kosolola na bango, azalaki kolimbola mpe kopesa bilembeteli na makomi ete esengelaki Kristo anyokwama mpe asekwa uta na bakufi, mpe azalaki koloba ete: ‘ Ye azali Kristo, Yesu oyo ngai nazali kosakwela bino.’” (Mis. 17:2, 3) Tomoni ete Paulo alukaki te kokamwisa bayoki na ye; azalaki nde kosalisa bango bákanisa. Ayebaki ete bato oyo bazalaki kokende na sinagoga bamesanaki na Makomami mpe bazalaki komemya yango. Bazangaki kaka bososoli. Yango wana, Paulo azalaki kokanisa, kolimbola, mpe kopesa bilembeteli euti na Makomami ete Yesu moto ya Nazarete azali Masiya oyo alakamaki, to Kristo.
6. Ndenge nini Yesu asalelaki Makomami mpo na kosolola na bayekoli na ye, mpe nini esalemaki na nsima?
6 Paulo alandaki ndakisa ya Yesu, oyo azalaki kosalela Makomami mpo na koteya. Na ndakisa, ntango Yesu azalaki awa na mabele, ayebisaki bayekoli na ye ete na kotalela Makomami, Mwana ya moto asengelaki konyokwama, kokufa, mpe kosekwa. (Mat. 16:21) Nsima ya lisekwa na ye, Yesu amonanaki epai ya bayekoli na ye. Na ntembe te, likambo wana kaka ekokaki mpo na komonisa bango ete alobaki solo. Kasi, Yesu abakisaki makambo mosusu. Mpo na makambo oyo alobaki epai ya bamoko kati na bayekoli na ye, Biblia elobi ete: “Kobanda na Moize tii na Basakoli nyonso, alimbolelaki bango makambo oyo elobamá mpo na ye na Makomami nyonso.” Nini esalemaki na nsima? Bayekoli yango balobaki boye: “Mitema na biso ezalaki mɔtɔmɔtɔ ntango azalaki koloba na biso na nzela, ntango azalaki kolimbolela biso Makomami polelepolele, boye te?”—Luka 24:13, 27, 32.
7. Mpo na nini ezali na ntina mingi ete tósalelaka Makomami mpo na kondimisa mateya na biso?
7 Liloba ya Nzambe ezali na nguya. (Ebr. 4:12) Lelo oyo, bakristo basalelaka Liloba yango mpo na kondimisa mateya na bango, ndenge Yesu, Paulo, mpe bantoma mosusu bazalaki kosala. Biso mpe tosalelaka Makomami mpo na kosolola na bato; tolimbolaka yango, mpe tofungolaka Biblia mpo na kolakisa bayoki na biso makambo oyo elobi. Kutu, nsango oyo tomemaka ezali ya biso te. Soki tozali kosalela Biblia mingi, tokosalisa bato bámona ete toteyaka mateya ya Nzambe, kasi makanisi na biso te. Longola yango, tosengeli kobosana te ete nsango oyo tosakolaka euti mpenza na Liloba ya Nzambe. Bato bakoki mpenza kotyela yango motema. Koyeba likambo yango epesaka yo mposa ya kosakola nsango yango na molende, ndenge Paulo asalaki?
“Bamosusu . . . bakómaki bandimi” (Misala 17:4-9)
8-10. (a) Ndenge nini bato ya Tesaloniki bayambaki nsango malamu? (b) Mpo na nini Bayuda mosusu bayokelaki Paulo zuwa? (c) Bayuda oyo batɛmɛlaki nsango malamu basalaki likambo nini?
8 Paulo amonaki ete Yesu alobaki solo ete: “Moombo aleki nkolo na ye te. Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino; soki batosaki liloba na ngai, bakotosa mpe oyo ya bino.” (Yoa. 15:20) Na Tesaloniki, Paulo akutanaki na bato ya ndenge nyonso: bamosusu bazalaki na mposa ya kotosa liloba, nzokande bamosusu batɛmɛlaki yango. Mpo na bato oyo bayambaki nsango, Luka akomaki boye: “Bamosusu na kati na bango [Bayuda] bakómaki bandimi mpe basanganaki elongo na Paulo ná Silasi, mpe ebele mpenza ya Bagrɛki oyo bazalaki kosambela Nzambe mpe basi mingi ya lokumu basalaki mpe bongo.” (Mis. 17:4) Na ntembe te bayekoli yango ya sika bazalaki kosepela na ndenge bazalaki kolimbwela bango Makomami.
9 Atako bato mosusu basepelaki na nsango oyo Paulo ateyaki, bamosusu balyelaki ye mino. Bayuda mosusu na Tesaloniki bayokelaki Paulo zuwa lokola “ebele mpenza ya Bagrɛki” bandimaki nsango malamu. Bayuda yango oyo bazalaki na mposa ya kokómisa bato baprozelite, bateyaki Bagrɛki Makomami ya Ebre mpe bazalaki kotalela Bagrɛki yango lokola bandimi na bango. Kasi, na mbala moko, emonanaki lokola nde Paulo azalaki koyiba bango bandimi, mpe epai mosusu te, na sinagoga! Bayuda bakómaki na nkanda makasi.
10 Luka alobi na biso makambo oyo esalemaki na nsima: “Bayuda, lokola bayokaki zuwa, bazwaki elongo na bango bato ya mabe na kati ya bawayawaya ya zando, basalaki etuluku moko mpe babandaki kokɔtisa engumba na yikiyiki. Bakɔtaki na makasi na ndako ya Yasona, balukaki Paulo ná Silasi mpo na komema bango liboso ya etuluku yango. Lokola bamonaki bango te, babendaki Yasona ná bandeko mosusu epai ya bakonzi ya engumba mpe bagangaki ete: ‘Bato oyo batye mobulu esika nyonso, bakómi mpe awa, mpe Yasona ayambi bango epai na ye. Bato yango nyonso bazali kosala makambo na kotɛmɛla mibeko ya Kaisala, balobi ete mokonzi mosusu azali, Yesu.’” (Mis. 17:5-7) Yikiyiki wana etindaki Paulo ná baninga na ye básala nini?
11. Paulo ná baninga na ye bafundamaki mpo na makambo nini, mpe banguna na bango bazalaki mbala mosusu kokanisa mobeko nini? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
11 Ntango bato batomboki, basalaka mabe mingi soki bakómi etuluku. Na ntango wana bakómaka lokola mai oyo ezali kotíyola makasi—ekumbaka nyonso na nzela na yango. Bayuda basalelaki ebundeli wana mpo na kobengana Paulo ná Silasi. Nsima ya kokɔtisa engumba “na yikiyiki,” Bayuda yango balukaki kondimisa bakambi-mboka ete Paulo ná Silasi basalaki mabe monene. Ya liboso, bafundaki Paulo ná baninga na ye ete “batye mobulu esika nyonso,” atako Paulo ná baninga na ye babimisaki yikiyiki te na Tesaloniki! Efundeli ya mibale ezalaki makasi koleka. Bayuda balobaki ete bamisionɛrɛ wana bazalaki kosakola Mokonzi mosusu, Yesu, mpe na ndenge yango bazalaki kobuka mibeko ya amperɛrɛ.a
12. Nini emonisi ete makambo oyo banguna balobaki mpo na bakristo na Tesaloniki ekokaki kobimisela bango mikakatano makasi?
12 Tóbosana te ete bakonzi ya mangomba bafundaki Yesu na likambo ya ndenge wana. Balobaki boye epai ya Pilate: “Tokuti moto oyo azali kokɔtisa mobulu na ekólo na biso . . . mpe koloba ete ye nde Kristo mokonzi.” (Luka 23:2) Ekoki kozala ete Pilate andimaki báboma Yesu mpo abangaki ete amperɛrɛ aloba ete apesi etumbu te na moto oyo aboyi kondima mokonzi. Ndenge moko mpe, makambo oyo banguna balobaki ekokaki kobimisela bakristo mikakatano makasi na Tesaloniki. Buku moko elobi boye: “Moto akolekisa ndelo te soki alobi ete bazalaki mpenza na likama monene, mpo ‘mbala mingi moto oyo aboyi kondima bokonzi ya Baamperɛrɛ ata na maloba mpamba, azalaki kozwa etumbu ya liwa.’” Mayele mabe ya bato wana elingaki nde kolonga?
13, 14. (a) Mpo na nini mokano ya bato oyo babimisaki yikiyiki elongaki te? (b) Ndenge nini Paulo amonisaki makanisi ya Kristo, mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye?
13 Bato oyo babimisaki yikiyiki balongaki te kopekisa mosala ya kosakola na Tesaloniki. Mpo na nini? Ya liboso, bamonaki Paulo ná Silasi te. Longola yango, emonani ete bakambi-mboka bandimaki bifundeli na bango te. Nsima ya kozwa “ndanga oyo ekoki,” oyo mbala mosusu ezalaki mbongo, bakambi-mboka batikaki Yasona ná bandeko mosusu oyo bato bamemelaki bango. (Mis. 17:8, 9) Paulo alandaki toli ya Yesu oyo elobi ete tosengeli kozala “ekɛngɛ lokola banyoka mpe . . . na likambo te lokola bibenga” mpe akimaki likama mpo akoba kosakola na bamboka mosusu. (Mat. 10:16) Tomoni mpenza ete mpiko oyo Paulo azwaki ezalaki motó makasi te. Lelo oyo, ndenge nini bakristo bakoki kolanda ndakisa na ye?
14 Na ntango na biso, mbala mingi bakonzi ya mangomba ya bokristo bayanganisaki ebele ya bato mpo na kotɛmɛla Batatoli ya Yehova. Bato yango balukaki kokosa bakonzi na ndenge bazalaki koloba ete Batatoli bazali kokosa bato mpe kotɛka mboka. Lokola banyokoli ya siɛklɛ ya liboso, lelo oyo, banguna bazali kosala makambo na zuwa. Kasi, bakristo ya solo bamityaka na likama te. Toboyaka kowelana na etuluku ya bato oyo bazali na nkanda mpe tolukaka kokoba kosala mosala na biso na kimya; na ndakisa, tozelaka kimya ezonga naino liboso tózonga kosakola na bisika mosusu.
Bazalaki “na makanisi ya malamu koleka” (Misala 17:10-15)
15. Ndenge nini bato ya Beroya bayambaki nsango malamu?
15 Mpo na kokima likama, Paulo ná Silasi bakendaki na Beroya, engumba oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 65. Ntango bakómaki kuna, Paulo akendaki na sinagoga mpe asololaki na bato oyo bayanganaki kuna. Asepelaki mingi komona ete bato bayokaki ye! Luka akomaki ete Bayuda ya Beroya “bazalaki na makanisi ya malamu koleka baoyo ya Tesaloniki, mpo bayambaki liloba na mposa makasi mpenza, bazalaki kotalela Makomami malamumalamu mokolo na mokolo mpo na koyeba soki makambo yango ezali bongo.” (Mis. 17:10, 11) Maloba yango ezali nde komonisa ete Bayuda oyo bayambaki solo na Tesaloniki bazalaki na makanisi ya malamu te? Te. Na nsima, Paulo akomaki na ntina na bango boye: “Tozali mpe kotika te kopesa Nzambe matɔndi, mpo ntango boyambaki liloba ya Nzambe, oyo boyokaki epai na biso, bondimaki yango, lokola liloba ya bato te, kasi, ndenge yango ezali mpenza, lokola liloba ya Nzambe, oyo ezali mpe kosala mosala na kati na bino bandimi.” (1 Tes. 2:13) Kasi, na ndenge nini Bayuda ya Beroya bazalaki na makanisi ya malamu?
16. Mpo na nini ebongaki koloba ete bato ya Beroya bazalaki na “makanisi ya malamu”?
16 Atako bato ya Beroya bazalaki koyoka makambo ya sika, bazalaki kotyela yango ntembe te, bazalaki mpe kondima yango bindimelá te. Bayokaki naino na likebi makambo oyo Paulo alobaki na bango. Na nsima, batalelaki Makomami oyo Paulo alimbwelaki bango mpo na koyeba soki ezali mpenza bongo. Longola yango, bazalaki koyekola Liloba ya Nzambe na molende, kaka na mokolo ya Sabata te, kasi mokolo na mokolo. Bazalaki mpe kosala yango “na mposa makasi”; bazalaki komipesa mpo na koyeba soki mateya ya sika oyo bazwaki eyokanaki na Makomami. Na nsima, na komikitisa nyonso bandimaki kobongwana, mpo “mingi na bango bakómaki bandimi.” (Mis. 17:12) Yango wana Luka alobi ete bazalaki na “makanisi ya malamu”!
17. Mpo na nini ndakisa ya bato ya Beroya ezali mpenza malamu, mpe ndenge nini tokoki kokoba komekola yango ata nsima ya kokóma bandimi?
17 Bato wana ya Beroya bayebaki te ete ndenge oyo bayambaki nsango malamu ekokomama na Liloba ya Nzambe mpe bakotángama lokola ndakisa ya bato oyo bazalaki na makanisi ya malamu. Basalaki likambo oyo Paulo azalaki na elikya ete bakosala mpe oyo Yehova Nzambe alingaki ete básala. Biso mpe tolendisaka ezaleli yango epai ya bato, elingi koloba tolendisaka bango bátalela Biblia malamumalamu mpo kondima na bango esimbama makasi na Liloba ya Nzambe. Kasi, yango elingi nde koloba ete soki tokómi bandimi, ezali lisusu na ntina te tózala na makanisi ya malamu? Te, kutu tosengeli kokóma na mposa makasi ete Yehova ateya biso mpe tósalela nokinoki mateya yango. Na ndenge yango, tokopesa Yehova nzela ya kobongisa biso mpe kopesa biso formasyo mpo na kosala mokano na ye. (Yis. 64:8) Na ndenge yango tokozala ntango nyonso bato oyo Tata na biso ya likoló akoki kosalela na mosala na ye mpe tokosepelisa ye.
18, 19. (a) Mpo na nini Paulo alongwaki na Beroya, kasi ndenge nini amonisaki molende oyo ebongi mpenza tómekola? (b) Na nsima Paulo asengelaki kosakola epai wapi mpe epai ya banani?
18 Paulo aumelaki ntango molai te na Beroya. Biblia elobi boye: “Ntango Bayuda ya Tesaloniki bayokaki ete Paulo asakoli mpe liloba ya Nzambe na Beroya, bayaki mpo na kopusa mpe kotombokisa ebele ya bato. Bongo na mbala moko bandeko batindaki Paulo akende na nzela ya mbu, kasi Silasi ná Timote batikalaki kuna. Nzokande, baoyo bakendaki kotika Paulo bamemaki ye tii na Atene, mpe bazongaki nsima ya kozwa malako ya koyebisa Silasi ná Timote ete báya nokinoki epai ya Paulo.” (Mis. 17:13-15) Bato yango oyo bazalaki kotɛmɛla nsango malamu bazalaki mpenza mbamba! Basukaki kaka te kobengana Paulo na Tesaloniki; bakendaki tii na Beroya mpe balukaki kobimisa mobulu ndenge basalaki na Tesaloniki, kasi balongaki te. Paulo ayebaki ete teritware na ye ezalaki monene; na yango, akendaki na mboka mosusu. Biso mpe tózala na ekateli ya ndenge wana lelo oyo mpo na kosukisa baoyo bazali koluka kopekisa mosala ya kosakola!
19 Nsima ya kopesa litatoli malamumalamu epai ya Bayuda na Tesaloniki mpe na Beroya, na ntembe te Paulo amonaki ete kosakola na mpiko mpe kosalela Makomami mpo na kosolola na bato ezali na ntina mingi. Biso mpe tosengeli kosala bongo. Kasi, na nsima Paulo asengelaki kosakola epai ya bato ya ndenge mosusu: bato ya Atene, oyo bazalaki baprozelite te. Makambo elekaki ndenge nini kuna? Tokomona yango na mokapo oyo elandi.
a Moto moko ya mayele alobi ete na ntango wana, mobeko moko ya Kaisala epekisaki kosakola “koya ya mokonzi to bokonzi ya sika, mingimingi, oyo akoki kozwa esika ya amperɛrɛ oyo azali koyangela to kosambisa ye.” Mbala mosusu banguna ya Paulo balukaki komonisa ete ntoma yango abukaki mobeko wana. Talá etanda “Ba-Kaisala mpe mokanda ya Misala,” na lokasa 137.