Mokanda ya Biblia nimero 46—1 Bakolinti
Mokomi: Paulo
Esika ya bokomi: Efese
Nsuka ya bokomi: soko 55 T.B.
1. Kolinti ezalaki engumba ya ndenge nini na mikolo ya Paulo?
KOLINTI ezalaki “engumba ya lokumu mpe ya bisengo ndenge na ndenge, epai kuna makambo mabe ya Ɛ́sti mpe ya Wɛ́sti mazalaki kokutana.”a Yango ezwamaki na eteni moke ya mabelé-nkingo (Isthme) oyo ekaboli Péloponnèse mpe Grèce continentale; nzela ya mabelé oyo ezali komema na kontiná mobimba esimbami nde na Kolinti. Na mikolo ya ntoma Paulo, motuya ya bafándi na yango ezalaki soko 400 000; bobele motuya ya bafándi ya Loma, ya Alesandalia mpe ya Antiokia ya Sulia nde elekaki oyo wana. Na ɛ́sti ya Kolinti tozali kokuta mai monene ebéngami Égée, mpe na wɛ́sti, mai monene ebéngami Mer Ionienne. Elongo na mabóngo na yango mibale ya Kɛnkɛlɛa mpe ya Léchée, Kolinti, mboka-mokonzi ya etúká Akaya, ezalaki na esika moko ya malamu mpe ya ntina mingi mpo na makambo matali mombongo. Ezalaki mpe engumba ya mateya minene ya Bagreke. Elobami ete: “Bozwi na yango ekumisamaki mingi na boye ete ekómaki kosalelama lokola masese; mabe mpe kobeba ya bafándi na yango esalelamaki mpe bongo.”b Kati na misala na yango ya losambo ya bapakano, tozali kokuta mpe losambo ya Aphrodite (oyo akokani na Venus na Loma). Kindumba ezalaki eteni monene ya losambo ya Kolinti.
2. Lolenge nini lisangá ya boklisto na Kolinti lisalemaki, mpe ekanganeli nini ezalaki kati na yango mpe Paulo?
2 Ezalaki kino engumba-mokonzi wana ya Baloma, oyo etondi na bozwi mpe na misala ya mbindo, nde ntoma Paulo akendeki mobembo; yango ezalaki soko na mobu 50 T.B. Na boumeli ya sanza 18 oyo alekisaki kuna, lisangá moko ya boklisto lisalemaki na engumba yango. (Mis. 18:1-11) Oyo nde bolingo Paulo azalaki na yango mpo na bandimi wana oyo ye azalaki moto ya liboso ya kosakwela bango nsango malamu na ntina na Klisto! Na nzela ya nkomá, akundweli bango ekanganeli ya elimo oyo ezalaki kati na ye mpe bango, kolobáká ete: “Ata bozali na balakisi nkóto na nkóto, kati na Klisto, nde bozali na batata mpenza mingi te. Mpo ete ngai nabotaki bino kati na Klisto Yesu na nzela na Nsango Malamu.”—1 Kol. 4:15.
3. Nini epusaki Paulo na kokomela Bakolinti mokanda na ye ya liboso?
3 Lobanzo monene oyo Paulo azalaki na yango mpo na bolamu na bango ya elimo epusaki ye na kokoma mokanda na ye ya liboso epai na baklisto ya Kolinti, na boumeli ya mobembo na ye ya misato ya misionere. Mwa bambula esilaki koleka uta azalaki kofanda na Kolinti. Ezalaki soko na mobu 55 T.B., mpe na ntango yango Paulo azalaki na Efese. Emonani lokola ete azwaki nkomá uta na lisangá oyo liutaki kosalama sika na Kolinti, mpe na yango asengelaki kozongisa eyano. Mpe lisusu, bansango ya koyokisa motema mpasi ekómelaki Paulo. (7:1; 1:11; 5:1; 11:18) Lokola bansango yango etungisaki ye mingi, ntoma alobelaki kútu te nkomá na bango ya mituna kino na vɛrsɛ́ ya ebandeli ya mokapo 7 ya mokanda na ye. Mingimingi mpenza mpo na bansango oyo azwaki nde Paulo apusamaki na kokomela baninga na ye baklisto oyo bazalaki na Kolinti.
4. Nini emonisi ete Paulo akomaki mokanda ya Bakolinti ya Liboso na Efese?
4 Kasi ndenge nini toyebi ete Paulo akomaki mokanda ya liboso ya Bakolinti na Efese? Ya liboso, ntango asukisaki mokanda na ye na kopesáká bambote, ntoma alobeli mpe bambote oyo Akula mpe Pilisikia (Pilisikila) batindaki. (16:19) Misala 18:18, 19 emonisi ete balongwaki na Kolinti mpe bakendaki na Efese. Lokola Akula mpe Pilisikila bazalaki na Efese mpe lokola Paulo alobelaki bango kati na bambote ya bosukisi mokanda ya Bakolinti ya Liboso, boye azalaki na Efese ntango akomaki mokanda yango. Nzokande, eloko oyo esilisi ntembe nyonso ezali maloba ya Paulo oyo mazwami na 1 Bakolinti 16:8, NW, ete: “Kasi nakotikala na Efese kino elambo ya Pantekote.” Na yango, mokanda ya Bakolinti ya Liboso ekomamaki na Paulo na mboka Efese; ekoki kozala pene na nsuka ya mikolo oyo afandaki kuna.
5. Nini emonisi bosolo ya mikanda ya Paulo epai na Bakolinti?
5 Bosolo ya mokanda ya Bakolinti ya Liboso, mpe ya Bakolinti ya Mibale, etyami ntembe ata moke te. Emonisamaki ete Paulo azalaki mokomi ya mikanda yango mpe baklisto ya liboso, oyo bandimaki yango lokola mikanda mipemami, batángaki yango kati na bisangiseli na bango ya mikanda. Kútu, elobami ete mokanda ya Bakolinti ya Liboso elobelami mpe etángami koleka mbala motoba kati na nkomá moko oyo etindamaki uta na Loma kino Kolinti, oyo ekomamaki soko na mobu 95 T.B. mpe oyo ebéngamaki Clément ya Liboso. Na kolobeláká polele Bakolinti ya Liboso, mokomi ya mokanda Clément alobi epai na baoyo ye atindelaki nkomá yango ete “bákamata lisusu mokanda ya mopambwami ntoma Paulo.”c Maloba oyo mazali kati na mokanda ya Bakolinti ya Liboso matángami mpe na Justin le Martyr, na Athénagore, na Irénée mpe na Tertullien. Ezali na bilembeteli ya solosolo oyo bimonisi ete liboké moko to kosangisama ya mikanda ya Paulo, na kati na yango Bakolinti ya Liboso mpe ya Mibale, “esalemaki mpe ebimisamaki na boumeli ya mbula zomi oyo esukisaki ekeke ya liboso.”d
6. Mikakatano nini mizalaki na lisangá ya Kolinti, mpe likebi ya Paulo lityamaki mingimingi likoló na likambo nini?
6 Mokanda ya liboso ya Paulo epai na Bakolinti epesi biso likoki ya kotalela makambo mazalaki kati na lisangá yango ya Kolinti. Baklisto wana bazalaki na mikakatano oyo basengelaki kobundisa, mpe bazalaki na makambo oyo masengelaki kosilisama. Bokabwani ezalaki kati na lisangá, mpamba te basusu bazalaki kolanda bato. Likambo moko ya mbindo mpenza oyo litali kosangisa nzoto libimaki. Bamoko bazalaki kofanda kati na mabota makabwani na makambo matali losambo. Basengelaki kotikala na babalani na bango oyo bazalaki bandimi te to basengelaki nde kokabwana na bango? Mpe ezali boni mpo na likambo litali kolya biloko bipesami mbeka na bikeko? Basengelaki nde kolya yango? Bakolinti bazalaki na mposa ya toli na likambo litali kotambwisa makita na bango, bakisá mpe lolenge ya kosala na mokolo ya Elambo ya Nkolo. Etɛlɛmɛlo nini basi basengeli kozala na yango kati na lisangá? Na kati na bango, ezalaki mpe na baoyo bazalaki koboya kondima lisekwa. Mikakatano mizalaki mingi. Nzokande, ntoma atalelaki mingimingi likambo ya kozongisa elimo malamu kati na lisangá ya Kolinti.
7. Na elimo ya lolenge nini tosengeli kotalela Bakolinti ya Liboso, mpe mpo na nini?
7 Lokola makambo oyo mazalaki koleka kati na lisangá ya kala na Kolinti mpe na libándá, zingazinga na yango, bakisá mpe bozwi ya engumba yango elongo na ezaleli na yango ya mbindo, ezali na bokokani na oyo ezali kosalema na mikolo na biso, boye toli kitoko oyo Paulo akomaki wana apemamaki na Nzambe ebongi ete tótyela yango likebi. Makambo Paulo alobaki mazali mpenza na ntina mpo na mikolo na biso na boye ete soki totaleli na likebi mozindo mokanda na ye ya liboso epai na bandeko mibali mpe bandeko basi balingami oyo bazalaki na Kolinti, tokozwa mpenza matomba na yango. Bómikundwela sikawa elimo ya ntango yango mpe ya esika yango. Motindo moko na baklisto ya Kolinti, bókanisa na bozindo mpenza wana tozali kozongela maloba ya Paulo mapemami, ya mozindo mpe ya kolendisa, oyo akomelaki baninga na ye bandimi oyo bazalaki na Kolinti ya kala.
MAKAMBO MAZALI KATI NA BAKOLINTI YA LIBOSO
8. (a) Lolenge nini Paulo atɔndɔli bozoba ya mikabwano kati na lisangá? (b) Likambo nini Paulo amonisi oyo lizali na ntina mpo na kososola makambo ya Nzambe?
8 Paulo atɔndɔli ezaleli ya kokabwana na bituluku mikemike mpe alendisi bomoko (1:1–4:21). Paulo azali na mikano malamu mpo na Bakolinti. Kasi tokoloba boni mpo na bokabwani, kozanga bomoko, kati na bango? “Klisto akabwani nde?” (1:13) Ntoma azali na botɔ́ndi ete abatisaki bobele bato moke kati na bango; na bongo bakoki te koloba ete babatisamaki na nkombo na ye. Paulo azali kosakola Klisto oyo akakisamaki na nzeté. Yango ezali libaku mpo na Bayuda mpe bolema mpo na mabota. Kasi Nzambe aponaki biloko ya bolema mpe ya bolɛmbu oyo bizali kati na mokili mpo na koyokisa bato ya mayele mpe bato ya makasi nsɔ́ni. Na yango, Paulo asaleli elobeli ya koleka ndelo te, kasi asali na boye ete bandeko bámona elimo mpe nguya ya Nzambe na nzela ya maloba na ye, na ntina ete kondima na bango ekoka kotongama likoló na nguya ya Nzambe, kasi likoló na mayele ya bato te. Paulo alobi ete, tozali koloba makambo oyo elimo ya Nzambe emonisaki, “mpo ete [elimo ekolukaluka] makambo nyonso, ata makambo na bozindo na Nzambe.” Bobele moto ya elimo nde akoki kokanga ntina ya makambo yango, kasi moto ya mosuni te.—2:10.
9. Na ndimbola nini Paulo amonisi ete moto moko te asengeli komikumisa kati na bato?
9 Bazali kolanda bato—bamoko Apolo, basusu Paulo. Kasi Apolo mpe Paulo bazali banani? Bazali bobele basáli oyo na nzela na bango Bakolinti bakómaki bandimi. Moto oyo azali kolóna mpe oyo azali komwangisa mai bazali eloko te, mpo ete ezali ‘Nzambe nde akólisaki yango,’ mpe bango bazali “basalani” na ye. Komekama na mɔ́tɔ ekomonisa soki misala ya nani mikoumela. Paulo ayebisi bango ete: “Bino bato bozali tempelo ya Nzambe,” elimo na Ye efandi kati na bino. “Mayele ya mokili oyo mazali bozoba liboso na Nzambe.” Na yango, tiká ete moto moko te amikumisa kati na bato, mpamba te biloko nyonso bizali solo biloko ya Nzambe.—3:6, 9, 16, 19, NW.
10. Mpo na nini komikumisa ya Bakolinti ebongi te, mpe bibongiseli nini Paulo akamati mpo na kobongisa likambo yango?
10 Paulo mpe Apolo bazali basaleli ya komikitisa oyo bazali komonisa mabombami mosantu ya Nzambe, mpe mokóló-ndako asengeli kokuta basaleli wana bazali sembo. Bandeko kati na Kolinti bazali banani mpo na komikumisa, mpe eloko nini bazali na yango oyo euti na bango moko? Bakómi nde bato na bozwi, babandi nde koyangela lokola bakonzi, mpe bakómi nde na mayele mpe na makasi mingi, wana bantoma, oyo bakómi eloko na masɛki mpo na baanzelu mpe mpo na bato, bazali naino bazoba mpe bato na bolɛmbu mpe bato baboyami na biloko binso? Paulo atindi Timoté akende kosalisa bango ete bámikundwela banzela na ye mpo na Klisto mpe bázala bamekoli na ye. Soki Yehova alingi, mosika te Paulo ye moko akokende koyeba, bobele maloba ya baoyo batondi na lolendo te, kasi lisusu nguya na bango.
11. Likambo nini ya mbindo libimi kati na bango, nini esengeli kosalema mpo na yango, mpe na ntina nini?
11 Na oyo etali kobatela lisangá pɛto (5:1–6:20). Eyebisamaki ete likambo moko ya kosangisa nzoto ya mbindo esalemi epai na Bakolinti! Mobali moko akamati mwasi ya tata na ye. Asengeli kopesama epai na Satana mpo ete mwa mfulu moke evimbisaka pɔtɔpɔ́tɔ mobimba ya mampa. Basengeli kokata bosangani nyonso na moto oyo abéngami ndeko, kasi azali mosáli na mabe.
12. (a) Paulo alobi nini na ntina na kofundana bamoko na bamosusu na esambiselo? (b) Mpo na nini Paulo alobi ete, “Bókima pite”?
12 Ah, Bakolinti bakómaki kino kofundana bamoko na bamosusu na esambiselo! Ekokaki kozala malamu komitika ete basusu básalela bango makambo na bokɛsɛnɛ, boye te? Lokola bakosambisa mokili mpe baanzelu, bakoki te koluka moto moko ya makoki kati na bango ete akata makambo oyo mazali kobima kati na bandeko? Epai mosusu, basengeli kozala pɛto mpamba te basáli na pite, basambeli na bikeko, mpe bato nyonso ya motindo wana bakosangola Bokonzi ya Nzambe te. Bamoko na bango bazalaki bato ya lolenge wana, kasi basili kosukwama, bakómi pɛto mpe babulisami. Paulo alobi ete: “Bókima pite. Zambi bosikwi na motuya. Boye bókumisa Nzambe na nzoto na bino.”—6:18, 20.
13. (a) Mpo na nini Paulo apesi toli na bato mosusu ete bábala? Kasi soki babali, basengeli kosala nini? (b) Na ndimbola nini moto oyo atikali monzemba “asali malamu koleka”?
13 Batoli likoló na bonzemba mpe libala (7:1-40). Paulo ayanoli na motuna moko motali libala. Lokola pite eyikani mingi, ekozala malamu ete mobali to mwasi abala, mpe baoyo basili kobala basengeli te kopimelana lotómo oyo mobalani moko asengeli kopesa na mobalani mosusu. Ezali malamu mpo na minzemba mpe basi-bakufeli mibali ete bátikala minzemba, lokola Paulo; kasi soki bayebi komikanga motema te, tiká ete bábala. Soki babali, basengeli kokabwana te. Ata soki mobalani na ye azali mondimi te, moklisto asengeli kokabwana na ye te; mpamba te na kofandáká na oyo azali mondimi te, moklisto akoki kobikisa ye. Na oyo etali kokatama-ngenga mpe boombo, tiká ete moto na moto atikala na ezalela kati na yango abyangamaki. Mpo na moto oyo abali, ye akabwani mpo ete azali na mposa na kondimama na mobalani na ye, nzokande monzemba azali komibanzabanza bobele mpo na makambo ya Nkolo. Baoyo bazali kobala basali lisumu te, kasi baoyo bazali kobala te ‘basali malamu koleka.’—7:38.
14. Paulo alobi nini na ntina na “banzambe” mpe “bankolo,” mpe na ntango nini ezali likambo ya mayele ete moto aboya biloko bipesami na bikeko?
14 Kosala makambo manso mpo na nsango malamu (8:1–9:27). Ezali boni mpo na biloko bipesami na bikeko? Ekeko ezali eloko mpamba! Ezali na “banzambe” mingi mpe na “bankolo” mingi kati na mokili, kasi mpo na moklisto, ezali bobele na “Nzambe moko, Tata” mpe na “Nkolo moko, Yesu Klisto.” (8:5, 6, NW) Nzokande, moto moko akoki kotungisama soki amoni yo ozali kolya bilei bipesami na ekeko. Kati na makambo motindo wana, Paulo apesi toli ete oboya kolya yango na ntina ete obɛtisa ndeko na yo libaku te.
15. Lolenge nini Paulo azali komitambwisa kati na mosala?
15 Paulo azali komipimela biloko mingi mpo na mosala ya kosakola. Lokola azali ntoma, azali na lotómo ya “kobikela na nzela ya nsango malamu,” kasi aboyi kosala bongo. Nzokande, mokumba ya kosakola mozali likoló na ye; kútu alobi ete, “Mawa na ngai soki nasakoli nsango malamu te!” Bongo, amikómisi moombo epai na bato nyonso, kokómáká “mitindo minso mpo na bato ya lolenge nyonso” ete “na milende makasi, akoka kobikisa bamoko,” kosaláká makambo manso “mpo na nsango malamu.” Mpo na kolónga mamekani mpe kozwa motole mokobebaka te, Paulo azali konyata bamposa mabe ya nzoto na ye mpo ete, nsima na kosakwela basusu, ye moko ‘akoka koboyama te na lolenge moko to mosusu.’—9:14, 16, 19, 22, 23, 27, NW.
16. (a) Liteya nini baklisto basengeli kozwa na oyo ekómelaki “bankɔ́kɔ”? (b) Na ntina na losambo ya bikeko, lolenge nini baklisto bakoki kosala makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe?
16 Makebisi na ntina na makambo mabe (10:1–33). Ezali boni mpo na “bankɔ́kɔ”? Bazalaki na nsé na lipata mpe babatisamaki kati na Mose. Mingi kati na bango bandimamaki na Nzambe te kasi bakufaki kati na mokili mokauki. Mpo na nini? Balingaki makambo mabe. Baklisto basengeli kotalela likambo yango lokola likebisi mpe basengeli koboya pite mpe losambo ya bikeko, basengeli komipekisa ete bátya Yehova na komekama te, mpe basengeli te koimaima. Moto oyo akanisi ete azali kotɛlɛma ngwi asengeli kokeba ete akwea te. Komekama ekoya, kasi Nzambe akotika te ete basaleli na ye bámekama koleka makoki na bango; akopesa bango nzela oyo ekosalisa bango ete bákoka koyikela yango mpiko. Paulo akomi ete: “Na bongo, bókima losambo ya bikeko.” (10:1, 14, NW) Tokoki te kolya na mesa ya Yehova mpe na mesa ya bademó. Nzokande, soki ozali kolya na ndako moko boye, kotunatuna te epai bilei yango biuti. Kasi, soki moto moko ayebisi yo ete yango epesamaki lokola makabo epai na bikeko, boye osengeli koboya kolya yango na ntina na lisosoli ya moto wana. Paulo akomi ete, ‘Bósalaka makambo manso mpo na nkembo ya Nzambe.’—10:31.
17. (a) Etindá nini Paulo amonisi na ntina na bokonzi? (b) Ndenge nini ayokanisi likambo ya bokabwani kati na lisangá mpe lisoló moko na ntina na Elambo ya Nkolo?
17 Bokonzi; Elambo ya Nkolo (11:1-34). Paulo alobi ete: “Bózala bamekoli na ngai, lokola ngai nazali momekoli ya Klisto,” mpe na nsima akóbi na kolobeláká etindá ya Nzambe na oyo etali bokonzi: Motó ya mwasi ezali bongo mobali, motó ya mobali ezali bongo Klisto, motó ya Klisto ezali bongo Nzambe. Na yango, mwasi asengeli kozala na “elembo ya bokonzi” likoló ya motó na ye na ntango azali kobondela to wana azali kosakola kati na lisangá. Paulo aboyi kokumisa Bakolinti, mpamba te bokabwani ezali kati na bango na ntango bayangani esika moko. Kati na ezalela motindo wana, ndenge nini bakoki kolya Elambo ya Nkolo na lolenge lobongi? Azongeli makambo oyo masalemaki ntango Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye. Moto na moto asengeli komisosola malamumalamu liboso ya kolya limpa mpe komela vinyo, na boye ete amibendela kosambisama te na ntina na kozanga kososola “nzoto.”—11:1, 10, 29, NW.
18. (a) Atako ezali na makabo mpe misala ndenge na ndenge, mpo na nini bokabwani esengeli te kozala kati na nzoto? (b) Mpo na nini bolingo eleki nyonso?
18 Makabo ya elimo; bolingo mpe makambo oyo yango elandaka (12:1–14:40). Ezali na mitindo ndenge na ndenge ya makabo ya elimo, nzokande nyonso euti na elimo moko; ezali na mitindo ndenge na ndenge ya misala mpe ya makabo, kasi ezali na Nkolo bobele moko mpe na Nzambe bobele moko. Bobele bongo, ezali na binama mingi kati na nzoto ya bomoko ya Klisto, enama mokomoko ezali na mposa ya enama mosusu, lokola na nzoto ya moto. Nzambe asili kotya enama mokomoko kati na nzoto na lolenge Ye asepeli, mpe enama mokomoko ezali na mosala na yango, boye “bokabwani esengeli kozala te kati na nzoto.” (12:25, NW) Baoyo bazali kosalela makabo ya elimo bazali na ntina te soki bazangi bolingo. Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto, ezali na zúwa te mpe evimbi na lolendo te. Esepelaka bobele na solo. “Bolingo ekosuka te.” (13:8) Makabo ya elimo, lokola kosakola mpe koloba na nkótá ndenge na ndenge, ekolongolama, kasi kondima, elikya mpe bolingo ekotikala. Kati na yango, oyo eleki ezali bolingo.
19. Toli nini Paulo apesi mpo na kotonga lisangá mpe mpo na kosala makambo na molɔngɔ́?
19 Paulo apesi elendiseli ete, “Bólanda bolingo.” Makabo ya elimo masengeli kosalelama kati na bolingo mpo na kolendisa lisangá. Na ntina yango, kosakola eleki koloba na nkótá ndenge na ndenge na malamu. Mpo na koteya basusu, eleki malamu kobimisa maloba mitano oyo ntina na yango eyebani, na esika ya kobimisa nkóto zomi ya maloba na lokótá oyo loyebani te. Koloba na nkótá ndenge na ndenge ezali elembo ya bapakano, kasi kosakola ezali mpo na bandimi. Basengeli te kozala “bana mike” na oyo etali kososola makambo. Na oyo etali basi, basengeli kozala na botosi kati na lisangá. “Tiká ete makambo yango nyonso másalema na motindo mozali na nsɔ́ni te mpe na mobulu te.”—14:1, 20, 40.
20. (a) Elembeteli nini Paulo apesi na ntina na lisekwa ya Klisto? (b) Lisekwa ekolandana ndenge nini, mpe bayini nini basengeli kokitisama?
20 Bosolo ya elikya ya lisekwa (15:1–16:24). Yesu oyo asekwisami abimelaki Kefa, abimelaki ba 12, abimelaki bandeko koleka 500 mbala moko, abimelaki Yakobo, bantoma nyonso, mpe na nsuka abimelaki Paulo. Paulo akomi ete, ‘Soki Klisto asekwisamaki te, boye kosakola na biso mpe kondima na biso ezali mpamba.’ (15:14) Moto na moto asekwisami na ngala na ye, Klisto mbuma ya liboso, na nsima baoyo bazali bato na ye na boumeli ya kozala na ye. Na nsuka, azongisi Bokonzi epai na Tata na ye, nsima ya kotyama ya banguna nyonso na nsé ya makolo na ye. Ezala liwa, monguna ya nsuka, asengeli kolongolama nyɛɛ. Litomba nini Paulo azali na yango ya kondima makámá ya liwa mbala na mbala soki lisekwa lizali te?
21. (a) Lolenge nini baoyo basengeli kozwa libula ya Bokonzi bakosekwisama? (b) Libombami mosantu nini Paulo amonisi, mpe alobi nini na ntina na elónga likoló na liwa?
21 Kasi lolenge nini bakufi bakosekwisama? Mpo ete nzeté ebima, molóna oyo molonami mosengeli naino kokufa. Ezali mpe bongo mpo na lisekwa ya bakufi. “Elónami nzoto ya mosuni, esekwisami nzoto ya elimo. . . . Mosuni mpe makila ekoki kosangola bokonzi ya Nzambe te.” (15:44, 50, NW) Paulo ayebisi libombami moko mosantu: Ezali banso te nde bakolala kati na kufa, kasi na koyulama ya kelelo ya nsuka, bakobongwana bobele na kobweta mpamba ya liso. Wana oyo esengeli kokufa ekolata kozanga kokufa, liwa likomelama libela na libela. “Ɛ liwa, wapi elónga na yo? Ɛ liwa, wapi ntonga na yo?” Na mayoki mauti na motema mpenza, Paulo alobi ete: “Kasi matɔ́ndi na Nzambe, mpamba te apesi biso elónga na nzela na Nkolo na biso Yesu Klisto!”—15:55, 57, NW.
22. Toli nini mpe bilendiseli nini Paulo apesi na nsuka?
22 Mpo na kosukisa, Paulo apesi toli na oyo etali lolenge malamu ya kosangisa makabo ya kotinda na Yelusaleme mpo na kosunga bandeko oyo bazali na bosɛngá. Ayebisi ete akoya kotala bango na kolekáká na Makedonia mpe ete, ntango mosusu, Timoté na Apolo mpe bakoya kotala bango. Paulo apesi elendiseli ete, “Bósɛnzɛla ntango nyonso, bótɛlɛma ngwi kati na kondima, bókóba komitambwisa lokola mibali mpenza, bókóla na nguya. Tiká ete makambo na bino manso másalema na bolingo.” (16:13, 14, NW) Paulo atindi bambote euti na masangá oyo mazali na Azia, mpe na nsima akomi mbote ya nsuka na lobɔkɔ na ye moko, komoniseláká bango bolingo na ye.
LITOMBA NA YANGO
23. (a) Elakiseli nini Paulo apesi na ntina na mbuma mabe oyo ezali kouta na mposa mabe mpe na ezaleli ya komityela motema? (b) Paulo asaleli makambo nini lokola moboko mpo na kondimisa toli na ye na ntina na Elambo ya Nkolo mpe bilei ya pɛto?
23 Mokanda oyo ya ntoma Paulo mozali na ntina mingi mpamba te yango ekólisi bososoli na biso ya Makomami ya Liebele, oyo mikapo na yango mingi etángami na kati. Na mokapo ya zomi, Paulo amonisi ete Bayisalaele, na litambwisi ya Mose, bamelaki mai na libanga monene ya elimo, oyo ezalaki bongo Klisto. (1 Kol. 10:4; Mit. 20:11) Na nsima, akóbi na komonisa mbuma mabe oyo euti na kolinga makambo mabe, lokola yango emonisamaki na ndakisa ya Bayisalaele oyo bazalaki na nsé ya litambwisi ya Mose, mpe abakisi ete: “Makambo oyo eyeli bango lokola bikebiseli, ikomami mpo na kolakisa biso mpo ete nsuka na bikeke eyei na biso.” Tókóma soko moke te bato oyo bamityelaka motema bango moko, kokanisáká ete tokoki te kokwea! (1 Kol. 10:11, 12; Mit. 14:2; 21:5; 25:9) Mpo na mbala ya mibale, abimisi elakiseli moko kati na Mibeko. Alobeli mbeka ya boyokani oyo ezalaki kopesama kati na Yisalaele mpo na komonisa lolenge basangani na Elambo ya Nkolo basengeli kolya na mesa ya Yehova na lolenge lobongi. Na nsima, mpo na kondimisa bandimbola na ye oyo emonisi ete ezali likambo libongi ya kolya eloko nyonso oyo etekami na zando, Paulo atángi maloba ya Nzembo 24:1, NW, kolobáká ete, “Mabelé mpe biloko binso bitondisi yango izali ya Yehova.”—1 Kol. 10:18, 21, 26; Ex. 32:6; Lev. 7:11-15.
24. Mpo na kosimba bandimbola na ye, Paulo atángi mikapo nini mosusu ya Makomami ya Liebele?
24 Mpo na komonisa motuya monene ya ‘makambo oyo Nzambe abongisi mpo na baoyo balingaka ye’ mpe kozanga ntina ya ‘makanisi ya bato na mayele’ ya mokili oyo, Paulo atángi lisusu Makomami ya Liebele. (1 Kol. 2:9; 3:20; Yis. 64:4; Nz. 94:11) Mpo na kosimba malako na ye oyo mazwami na mokapo 5 na ntina na kobimisa mosáli na mabe na lisangá, Paulo atángi mobeko ya Yehova motali ‘kolongola oyo ezali mabe kati na bino.’ (Det. 17:7) Na kolobeláká lotómo na ye ya kobikela na lisalisi ya mosala na ye ya kosakola, Paulo alobeli lisusu Mibeko ya Mose, oyo elobaki ete esengeli te kokanga monɔkɔ ya banyama ya mosala, mpamba te yango elingaki kopekisa bango kolya bilei na bango mpe oyo elobaki ete Balevi kati na mosala ya tempelo basengelaki kozwa bilei na bango uta na etumbelo.—1 Kol. 9:8-14; Det. 25:4; 18:1.
25. Wapi mwa matomba minene mauti na mateya mazwami kati na mokanda ya Bakolinti ya Liboso?
25 Oyo nde matomba tozwi na malako mapemami oyo mauti na mokanda ya liboso ya Paulo epai na Bakolinti! Bómanyola likoló na batoli oyo epesami na ntina na koboya bokabwani mpe ezaleli ya kolanda bato. (Mikapo 1-4) Bómikundola likambo litali pite mpe lolenge Paulo alobelaki makasi ntina ya bizaleli malamu mpe ya bopɛto kati na lisangá. (Mikapo 5, 6) Bótalela toli na ye likoló na bonzemba, libala mpe kokabwana. (Mokapo 7) Bókanisa likoló na lolenge oyo ntoma alobeli bilei bipesami na bikeko mpe lolenge likambo ya koboya kobɛtisa basusu libaku mpe ya kokwea na losambo ya bikeko elobelamaki makasi. (Mikapo 8-10) Batoli etali botosi oyo ebongi, kotalelama ya makabo ya elimo, lisoló malamu likoló na bolingo oyo ezali ezaleli eleki ntina, oyo ekoyikaka mpiko mpe oyo ekosuka te—makambo nyonso wana masili kotalelama. Mpe ntoma alobeli mingi mpenza ntina ya kosala na molɔngɔ́ kati na makita ya boklisto! (Mikapo 11-14) Oyo nde lolenge malamu ya kokɔtela lisekwa ntoma Paulo akomaki na nsé na kopemama! (Mokapo 15) Nyonso wana mpe makambo mingi mosusu mazali komonana kati na makanisi—mpe ezali na motuya mingi mpo na baklisto na mikolo na biso!
26. (a) Mosala nini mosakolamaki uta kala oyo Klisto asekwisami azali kokokisa uta abandi koyangela? (b) Likoló na moboko ya elikya ya lisekwa, elendiseli nini ya nguya Paulo apesi?
26 Mokanda oyo mobakisi na lolenge ya polele mpenza bososoli na biso likoló na motó na likambo ya Biblia, oyo ezali bongo Bokonzi ya Nzambe. Epesi likebisi makasi ete bato bazangi boyengebene bakokɔta na Bokonzi te, mpe etángi molɔngɔ́ ya makambo mingi ya mabe oyo makoki kosala ete moto azanga kokokisa masɛngami. (1 Kol. 6:9, 10) Kasi likambo ya ntina koleka ezali ete yango elimboli boyokani kati na lisekwa mpe Bokonzi ya Nzambe. Emonisi ete Klisto, “mbuma na liboso” ya lisekwa, asengeli ‘koyangela lokola mokonzi kino Nzambe akosila kotya bayini nyonso na nsé na makolo na ye.’ Na nsima, ntango akitisi bayini nyonso, sangisá mpe liwa, boye ‘akozongisa bokonzi epai na Nzambe mpe Tata na ye, . . . ete Nzambe azala nyonso mpo na bato banso.’ Na nsuka, mpo na kokokisama ya elaka ya Bokonzi oyo epesamaki na Edene, Klisto, elongo na bandeko na ye ya elimo oyo basekwisami, akotuta motó ya Nyoka na mobimba na yango. Ya solo, elikya ya lisekwa ya baoyo basengeli kozwa nzoto oyo ekobebaka te elongo na Klisto kati na Bokonzi ya likoló ezali mpenza elikya monene. Ezali likoló na moboko ya elikya ya lisekwa nde Paulo apesi elendiseli oyo: “Na yango, bandeko na ngai balingami, bózala ngwi, bato bazangi koningana, bózala ntango nyonso na mingi ya kosala kati na mosala ya Nkolo, koyebáká ete mosala makasi na bino ezali ya mpamba te epai na Nkolo.”—1 Kol. 15:20-28, 58, NW; Gen. 3:15; Lom. 16:20.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Halley’s Bible Handbook, 1988, H. H. Halley, lokasa 593.
b Smith’s Dictionary of the Bible, 1863, Vol. 1, lokasa 353.
c The Interpreter’s Bible, Vol. 10, 1953, lokasa 13.
d The Interpreter’s Bible, Vol. 9, 1954, lokasa 356.