Engumba Kolinti “ezalaki kotambwisa mabongo mibale”
SOKI otali na karte ya Grèce, okomona ete eteni monene ya ekólo yango ezali na kati ya mai mpe emonanaka lokola esanga moko monene na ngámbo ya sudi. Eteni ya mabelé ya kilomɛtrɛ soki 6 oyo ebengami Isthme de Corinthe nde ekabolá biteni mibale ya ekólo yango. Isthme yango esangisá Péloponnèse oyo ezali na sudi mpe eteni monene ya ekólo yango oyo ezali na nɔrdi.
Isthme ezali na ntina mpo na likambo mosusu. Bazalaki kobenga yango gbagba ya mbu mpo na ngámbo na yango ya ɛsti ezali na golfe Saronique oyo ekendá na Mbu Égée mpe na ɛsti ya Mbu ya Méditerranée mpe na ngámbo na yango ya wɛsti ezali na golfe de Corinthe, oyo ekendá na Mbu ya Ionie, na Mbu Adriatique mpe na wɛsti ya Méditerranée. Engumba Kolinti, esika oyo Paulo azalaki kotɛlɛma mbala mingi ntango azalaki kosala mibembo na ye ya misionɛrɛ, ezalaki na katikati ya bisika wana nyonso. Na ntango wana, engumba yango eyebanaki mpo na bomɛngo mpe makambo na yango ya mbindo.
Kolinti ezalaki na esika oyo ebongi mpenza
Engumba Kolinti ezalaki pembeni ya wɛsti ya Isthme de Corinthe. Biloko ya engumba yango ezalaki kouta na mabongo mibale: Léchée oyo ezalaki na wɛsti ya Isthme mpe Kenkelea (Cenchrées) oyo ezalaki na ɛsti. Yango wana, Strabo, Mogrɛki mpe moto ya mayele na Géographie alobaki ete Kolinti “ezalaki kotambwisa mabongo mibale.” Lokola engumba Kolinti ezalaki na esika oyo ebongi mpenza, ekómaki esika oyo bato ya mimbongo ya nɔrdi mpe sudi oyo bazalaki koya na nzela ya mokili mpe bato ya masuwa oyo bazalaki kouta na ɛsti mpe wɛsti ya bamboka ndenge na ndenge bazalaki kokutana.
Banda na ntango ya kala, bamasuwa oyo ezalaki kouta na ɛsti (Asie Mineure, Syrie, Phénicie mpe Égypte) mpe na wɛsti (Italie mpe Espagne) ezalaki koya na biloko, ezalaki kokitisa yango na libongo moko mpe ezalaki kolekisa yango na nzela ya mabelé ya ntaka ya mwa bakilomɛtrɛ tii na ngámbo mosusu ya Isthme. Kuna, bazalaki kotya biloko yango na bamasuwa mosusu mpo ekoba mobembo na yango. Bamasuwa ya mike ezalaki kokatisa Isthme na nzela moko ya moke oyo bazalaki kobenga diolkos.—Talá etanda na lokasa 27.
Mpo na nini bato ya masuwa bazalaki kosepela kokatisa Isthme? Mpo bazalaki kobanga kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 320 na mbu, na mipɛpɛ makasi oyo ezalaki kobɛta na sudi ya Péloponnèse. Bato ya mai bazalaki koboya koleka na nzela ya Cap Malée mingimingi mpo bato bazalaki koloba ete soki oleki na nzela wana, okozonga te.
Kenkelea—Libongo oyo ezindá eyebani
Libongo ya Kenkelea, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 11 na ɛsti ya Kolinti, ezalaki libongo ya nsuka ya bamasuwa oyo ezalaki kouta na Asie. Lelo oyo, ndambo na yango ezindá na mai mpo na koningana ya mabelé makasi oyo ezalaki kosalema kuna na nsuka ya ekeke ya minei ya ntango na biso (T.B.). Strabo alobaki ete Kenkelea ezalaki libongo oyo bamasuwa ezalaki koya mingi mpe ezalaki kokɔtisa mbongo mingi, mpe Apulée, moto ya filozofi ya Loma, abengaki libongo yango “esika monene mpe kitoko oyo bamasuwa ya bikólo mingi ezalaki kosɛma ntango nyonso.”
Na ntango ya Baloma, libongo yango ezalaki na banzela mibale oyo ekendá tii na mbu, oyo ezalaki na bonene ya mɛtrɛ 150-200. Libongo yango ekokaki koyamba bamasuwa oyo ezali na bonene ya mɛtrɛ 40. Na ngámbo na yango ya sudi-wɛsti, bato ya arkeoloji bakundolaki biteni ya tempelo moko oyo balobaki ete mbala mosusu ezalaki tempelo ya nzambe-mwasi Isis. Mbala mosusu bandako minene oyo bakundolaki na ngámbo mosusu ya libongo yango ezalaki tempelo ya nzambe-mwasi Aphrodite. Bato bazalaki koloba ete banzambe-basi wana mibale bazalaki babateli ya bato ya masuwa.
Ekoki kozala ete mimbongo oyo ezalaki kosalema na libongo yango nde etindaki ntoma Paulo asala mosala ya kotonga bahema na Kolinti. (Misala 18:1-3) Buku moko (In the Steps of St. Paul) elobi boye: “Ntango eleko ya malili ezalaki kopusana, bato oyo bazalaki kotonga bahema na Kolinti, oyo bazalaki mpe kosala bilamba ya masuwa bazalaki kokóma na mosala mingi koleka. Na eleko ya malili bamasuwa ezalaki kosala mibembo te; lokola ezalaki kotonda na mabongo nyonso mibale mpe esengelaki kobongisa yango, bato oyo bazalaki kotɛka biloko na libongo ya Léchée mpe ya Kenkelea bazalaki kozanga mosala te mpo na moto nyonso oyo azalaki kotonga bilamba ya masuwa.”
Nsima ya kofanda sanza koleka 18 na Kolinti, Paulo azwaki masuwa na Kenkelea mpe akendaki na Efese na mobu soki 52 T.B. (Misala 18:18, 19) Ekoki kozala ete lisangá esalemaki na Kenkelea na boumeli ya mbula minei oyo elandaki. Biblia elobi ete Paulo asɛngaki baklisto ya Loma básalisa ndeko mwasi moko na nkombo Foebe oyo azalaki na “lisangá oyo ezali na Kenkelea.”—Baloma 16:1, 2.
Lelo oyo, bato bakendeke kobɛta mai na esika oyo libongo Kenkelea ezalaki. Mingi kati na bango bayebaka te ete bikeke mingi liboso, mosala ya kosakola mpe mimbongo ezalaki kosalema kuna. Ezali mpe bongo mpo na Léchée, libongo mosusu ya Kolinti, oyo ezalaki na wɛsti ya Isthme.
Léchée—Nzela ya kokende na wɛsti
Balabala moko kitoko, oyo bazalaki kobenga Nzela ya Léchée ezalaki kolongwa na agora, to wenze ya Kolinti tii na libongo ya Léchée oyo ezalaki na wɛsti na ntaka ya kilomɛtrɛ 2. Ba-ingénieur batimolaki pembeni ya ebale mpo na kotonga libongo mpe batyaki mabanga mpe bibende ebele pembenipembeni mpo na kobatela bamasuwa na mipɛpɛ makasi ya golfe. Kala, libongo yango ezalaki moko na mabongo ya minene ya Mbu ya Méditerranée. Bato ya arkeoloji bakundolaki bitika ya ndako moko molai oyo ezalaki na miinda, ekeko ya Poéidon esimbi mɔtɔ.
Pembenipembeni ya Nzela ya Léchée oyo batongá bifelo mibalemibale mpo na kobatela yango, ezalaki na banzela oyo bato bazalaki koleka, bandako ya Leta, batempelo, mpe bamagazini. Na bisika yango, Paulo akutanaki na bato ndenge na ndenge oyo akokaki koteya nsango malamu: basombi, bato oyo batɛlɛmaka kaka mpo na kobɛta masolo, batɛki, baombo, bato ya mimbongo, mpe bato mosusu.
Léchée ezalaki kaka libongo ya mimbongo te, kasi ezalaki mpe esika bamasuwa ya bitumba ezalaki kosɛma. Bato mosusu balobaka ete trirème, moko ya bamasuwa ya makasi ya bitumba ya ntango wana, esalemaki na Ameinocles, moto moko ya Kolinti. Asalaki yango na esika oyo basalaka bamasuwa na Léchée, na mobu soki 700 liboso ya ntango na biso (L.T.B). Bato ya Atene basalelaki masuwa yango mpo na kolonga basoda ya Perse na etumba oyo esalemaki na Salamisi na mobu 480 L.T.B.
Soki okómi esika libongo wana ezalaki kala, okoyeba te ete makambo minene ezalaki kosalema wana. Eloko moko te emonisaka ete na bikeke oyo eleki, Léchée, moko ya mabongo oyo elekaki minene na Mbu ya Méditerranée ezalaki esika wana.
Kolinti ezalaki mokakatano mpo na baklisto
Atako ezalaki esika oyo mimbongo ezalaki kosalema mingi, mabongo ya Kolinti ezalaki mpe kokɔtisa makambo ya mabe oyo ebebisaki mpenza bato ya engumba yango. Na ndakisa, mabongo yango ezalaki kobenda bato ya mimbongo mpe ya bomɛngo. Kolinti ekómaki na bomɛngo mingi na ndenge ezalaki kofutisa mbongo mingi na libongo mpe mpo na biloko mpe bamasuwa oyo ezalaki koleka na Isthme. Engumba yango ezalaki mpe kofutisa mpako epai ya bato oyo bazalaki kosala mimbongo na banzela ya mokili. Pene na nsuka ya ekeke ya nsambo L.T.B., engumba yango ezwaki mbongo mingi na misala oyo esalemaki na bazando mpe na mabongo, yango wana bana-mboka bazalaki lisusu kofuta mpako te.
Kolinti ezalaki kozwa mbongo mosusu epai ya bakomelesa oyo bakómaki kofanda na engumba yango. Mingi kati na bango bamipesaki na bisengo mpe makambo ya mbindo. Bato mingi ya masuwa oyo bazalaki kosopana na Kolinti mpe bakɔtiselaki engumba yango mbongo mingi. Ndenge Strabo amonisaki yango, bazalaki kosalela mbongo lokola nguba. Bato ya engumba yango bazalaki kosala misala mingi, na ndakisa kobongisa bamasuwa.
Na ntango ya Paulo, bazalaki koloba ete engumba yango ezalaki na bato soki 400 000; kaka Rome, Alexandrie mpe Antionche de Syrie nde elekaki yango na bato. Bagrɛki, Baloma, bato ya Syrie, bato ya Égypte, mpe Bayuda bazalaki kofanda na Kolinti. Na nzela ya mabongo na yango mibale, bato ya mibembo, bato oyo bazalaki kokende kotala masano, bato ya misala ya ntɔki, bato ya filozofi, bato ya mimbongo mpe bato mosusu bazalaki kokɔta na Kolinti. Bato yango bazalaki kopesa makabo na batempelo mpe bambeka epai ya banzambe. Nyonso esalaki ete Kolinti ezala engumba moko ya bomɛngo mpe ya loyenge, kasi ememaki mpe makambo ya mabe.
Buku moko (In the Steps of St. Paul) elobi boye: “Kolinti, oyo ezalaki na kati ya mabongo wana mibale, ekómaki na bizaleli ya mabe ya bato ya bikólo mosusu oyo bamasuwa na bango ezalaki kosɛma na mabongo na yango.” Bato ya ɛsti mpe wɛsti bamemaki bizaleli na bango ya mbindo na Kolinti. Yango wana, na Grèce mobimba, Kolinti ekómaki engumba oyo elekaki na makambo ya mbindo. Bato bakómaki koloba ete kosala makambo lokola bato ya Kolinti elimboli kozala na etamboli ya mbindo makasi.
Kofanda na esika ya ndenge wana oyo bato bamipesaki na konduka biloko ya mokili mpe na etamboli ya mbindo ezalaki mpenza likama mpo na baklisto. Esengelaki kolendisa bayekoli ya Yesu oyo bazalaki na Kolinti mpo bábatela etamboli ya malamu liboso ya Nzambe. Yango wana, na mikanda oyo Paulo akomelaki Bakolinti apekisaki mpenza lokoso, kobɔtɔla mpe etamboli ya mbindo. Soki otángi mikanda yango okomona ete baklisto ya Kolinti bazalaki na esika ya mbindo mpenza mpe basengelaki kobunda makasi.—1 Bakolinti 5:9, 10; 6:9-11, 18; 2 Bakolinti 7:1.
Atako bongo, lokola Kolinti ezalaki na bato oyo bazalaki kouta bisika ndenge na ndenge, ezalaki mpe na makambo na yango ya malamu. Makanisi ya sika ezalaki ntango nyonso kobima na engumba yango. Na bokeseni na bato ya bingumba mosusu epai Paulo atambolaki, bato ya Kolinti bazalaki kondima makanisi ya bato mosusu. Moto moko oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobi ete: “Bato ya bikólo ya ɛsti mpe ya wɛsti bayaki na engumba wana ya kala oyo ezalaki na mabongo mpe bamemelaki bato makanisi ya sika, filozofi mpe makambo ya losambo.” Yango wana bato ya Kolinti bazalaki kondima mangomba ndenge na ndenge mpe yango esalaki ete Paulo asakola kozanga mokakatano.
Mabongo mibale ya Kolinti—Kenkelea mpe Léchée—esalaki ete engumba yango ekóma na bomɛngo mpe eyebana mingi. Kaka mabongo yango mpe esalaki ete bomoi ya baklisto ya engumba yango ezala na likama. Mokili na biso ezali mpe bongo. Makambo ya mabe lokola lokoso ya biloko ya mokili, pite mpe ekobo ezali mpenza likama mpo na basaleli ya Yehova. Na yango, biso mpe tosengeli kolanda toli oyo ntoma Paulo apesaki baklisto ya Kolinti.
[Etanda/Elilingi na lokasa 27]
DIOLKOS—Nzela ya mokili oyo bamasuwa ezalaki koleka
Na nsuka ya ekeke ya nsambo liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ntango mokano ya kotonga mwa nzela moko ya mai elongaki te, Periander, mokonzi ya Corinthe, atongaki nzela moko mpo bamasuwa ekatisaka Isthme.a Nzela yango oyo bazalaki kobenga diolkos ezalaki balabala oyo basalá na mabanga mpe ezalaki na barayi ya mabaya oyo bazalaki kopakola mafuta. Soki bamasuwa esɛmi na libongo moko, bazalaki kotya biloko na yango na pusupusu ya mabaya, mpe baombo bazalaki kotindika yango na mwa balabala wana tii na ngámbo mosusu. Ntango mosusu, bazalaki mpe kotya biloko na bamasuwa ya mike mpe kotindika yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba ndenge nzela yango etongamá mikolo oyo, talá lisolo “Le canal de Corinthe—hier et aujourd’hui,” na Lamuká! ya 22 Marsi 1985, nkasa 25-27 (na Lifalanse).
[Karte na lokasa 25]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
GRÈCE
Golfe de Corinthe
Libongo ya Léchée
Kolinti ya kala
Kenkelea
Isthme de Corinthe
Golfe Saronique
Péloponnèse
MBU YA IONIE
Cap Malée
MBU YA ÉGÉE
[Elilingi na lokasa 25]
Bamasuwa ya biloko elekaka na nzela ya Kolinti tii lelo
[Elilingi na lokasa 26]
Libongo ya Léchée
[Elilingi na lokasa 26]
Libongo ya Kenkelea
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]
Todd Bolen/Bible Places.com