MOKAPO 19
“Kobá koloba; kokanga monɔkɔ te”
Paulo azali kosala mpo na kokokisa bamposa na ye, kasi azali kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso
Euti na Misala 18:1-22
1-3. Mpo na nini Paulo akendaki na Korinti, mpe mikakatano nini akutanaki na yango?
TOKÓMI na nsuka ya mobu 50 T.B. Ntoma Paulo azali na Korinti, engumba moko ya mombongo mpe ya bozwi mingi, oyo ebele ya Bagrɛki, Baroma, mpe Bayuda bazalaki kofanda kuna.a Paulo ayei te mpo na kosomba to kotɛka biloko; ayei mpe koluka mosala te. Ayei na Korinti mpo na ntina moko ya malamu koleka: kopesa litatoli mpo na Bokonzi ya Nzambe. Atako bongo, Paulo asengeli kozala na esika ya kofanda, mpe alingi te kozala kilo mpo na bato mosusu. Alingi te ete bato bákanisa ete azali kobikela nsima ya liloba ya Nzambe. Akosala nini?
2 Paulo ayebi mosala moko ya mabɔkɔ: kosala bahema. Mosala yango ezali pɛtɛɛ te, kasi alingi kosala mosala mpo na kokokisa bamposa na ye. Akozwa mosala na engumba yango oyo moto moko te azali kokanga mabɔkɔ? Akozwa esika ya malamu mpo na kofanda? Atako Paulo azali na mikakatano wana, azali kobosana te mosala ya monene oyo asengeli kosala: kosakola nsango malamu.
3 Paulo aumelaki mwa ntango na Korinti, mpe mosala na ye ya kosakola ebotaki mbuma mingi. Liteya nini tokoki kozwa na mosala oyo Paulo asalaki na Korinti, oyo ekosalisa biso tópesa litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi ya Nzambe na teritware na biso?
“Mosala na bango ezalaki ya kotonga bahema” (Misala 18:1-4)
4, 5. (a) Paulo afandaki wapi ntango azalaki na Korinti, mpe azalaki kobikela na mosala nini? (b) Ekoki kozala ete Paulo ayekolaki kosala bahema ndenge nini?
4 Ntango Paulo akómaki na Korinti, aumelaki te kokutana na Moyuda moko oyo nkombo na ye ezalaki Akila, ná mwasi na ye Prisile, to Priska. Babalani yango bayaki kofanda na Korinti mpo Amperɛrɛ Klode abimisaki mobeko moko oyo esɛngaki ete “Bayuda nyonso bálongwa na Roma.” (Mis. 18:1, 2) Akila ná Prisile bayambaki Paulo na ndako na bango mpe bandimaki kosala ná ye. Biblia elobi boye: “Lokola bazalaki kosala mosala moko [ná Paulo], afandaki na ndako na bango, mpe azalaki kosala elongo na bango, mpo mosala na bango ezalaki ya kotonga bahema.” (Mis. 18:3) Paulo afandaki na ndako ya babalani wana ya boboto ntango nyonso oyo asakolaki na Korinti. Ekoki kozala ete Paulo akomaki mikanda na ye mosusu oyo ezali na Biblia ntango afandaki na ndako ya Akila ná Prisile.b
5 Ndenge nini Paulo, moto oyo “ Gamaliele ateyaki,” ayebaki mpe kosala bahema? (Mis. 22:3) Emonani ete Bayuda ya siɛklɛ ya liboso bazalaki komona mabe te kolakisa bana na bango mosala ya mabɔkɔ, ata soki bana yango batángi bakelasi ya milai. Lokola Paulo azalaki moto ya Tarse, na Silisia, etúká oyo eyebanaki mpo na bilamba na yango oyo ebengami cilicium oyo bazalaki kosalela bahema, na ntembe te ayekolaki mosala yango na bolenge na ye. Kosala bahema ezalaki kosɛnga nini? Mosala yango ekokaki kosɛnga kosala elamba ya hema to kokata mpe kotonga elamba ya makasi mpe ya kilo mpo na kosala bahema. Nyonso wana ezalaki misala ya makasi.
6, 7. (a) Ndenge nini Paulo azalaki kotalela mosala ya kotonga bahema, mpe nini emonisi ete Akila ná Prisile bazalaki mpe kotalela yango ndenge wana? (b) Ndenge nini bakristo ya ntango na biso balandaka ndakisa ya Paulo, Akila, ná Prisile?
6 Paulo azalaki te kotalela kosala bahema lokola mosala ya bomoi na ye. Azalaki kosala yango kaka mpo na kokokisa bamposa na ye mpe kozala na likoki ya kosala mosala na ye ya liboso, elingi koloba kosakola nsango malamu “kozanga lifuti.” (2 Ko. 11:7) Ndenge nini Akila ná Prisile bazalaki kotalela mosala na bango? Lokola bazalaki bakristo, na ntembe te bazalaki kotalela yango ndenge moko ná Paulo. Kutu, ntango Paulo alongwaki na Korinti na mobu 52 T.B., Akila ná Prisile bakendaki na ye nzela moko na Efese, mpe makita ya lisangá ya engumba wana ekómaki kosalema na ndako na bango. (1 Ko. 16:19) Na nsima, bazongaki na Roma mpe na nsuka, bazongaki lisusu na Efese. Babalani yango ya molende bazalaki kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso mpe bandimaki komipesa mpo na kosalela basusu, mpe bandeko ya “masangá nyonso ya bikólo mosusu” bazalaki kopesa bango matɔndi mpo na ezaleli wana.—Rom. 16:3-5; 2 Tim. 4:19.
7 Bakristo ya ntango na biso balandaka ndakisa ya Paulo, Akila, ná Prisile. Lelo oyo, basakoli ya molende basalaka mosala makasi “mpo na kotyela moto moko te . . . kilo monene.” (1 Tes. 2:9) Basakoli mingi ya ntango nyonso basalaka misala oyo ezwaka bango ntango moke to oyo esalemaka na basanza nyonso te mpo na kokokisa bamposa na bango ntango bazali komipesa na mosala ya kosakola. Lokola Akila ná Prisile, basaleli mingi ya Yehova bayambaka bakɛngɛli ya zongazonga na bandako na bango. Baoyo ‘bazalaka na ezaleli ya koyamba bapaya’ ndenge wana bamonaka ete ezaleli yango elendisaka mpenza.—Rom. 12:13.
“Bakorinti mingi . . . bakómaki bandimi” (Misala 18:5-8)
8, 9. Paulo asalaki nini ntango bakómaki kotɛmɛla mosala monene ya kopesa litatoli oyo azalaki kosala, mpe akómaki kosakola epai wapi?
8 Ntango Silasi ná Timote bautaki na Masedonia ná makabo, Paulo asalaki likambo oyo emonisi mpenza ete azalaki kosala mosala ya mabɔkɔ kaka mpo na kokokisa bamposa na ye. (2 Ko. 11:9) Kozanga koumela, Paulo “abandaki komipesa mingi na mosala oyo etali liloba [‘amipesaki mobimba mpo na kosakola,’ Bible na lingala ya lelo oyo].” (Mis. 18:5) Kasi, akutanaki na botɛmɛli makasi ntango azalaki kosala mosala monene ya kopesa litatoli epai ya Bayuda. Nsima ya komonisa Bayuda ete azali na ngambo te lokola bango moko nde baboyaki kondima nsango etali Kristo oyo ekokaki kobikisa bango, Paulo apupolaki bilamba na ye mpe alobaki na Bayuda oyo bazalaki kotɛmɛla ye ete: “Makila na bino ezala na mitó na bino moko. Ngai nazali pɛto. Banda sikoyo nakokende epai ya bato ya bikólo.”—Mis. 18:6; Ezk. 3:18, 19.
9 Paulo asengelaki sikoyo kosakola epai wapi? Mobali moko oyo nkombo na ye ezalaki Titiusi Yusutusi, oyo na ntembe te azalaki prozelite mpe ndako na ye ekangamá na sinagoga, ayambaki Paulo na ndako na ye. Na yango, Paulo atikaki kosakola na sinagoga mpe akómaki kosakola na ndako ya Yusutusi. (Mis. 18:7) Paulo afandaki na ndako ya Akila ná Prisile ntango azalaki na Korinti, kasi ndako ya Yusutusi ekómaki esika oyo ntoma yango azalaki kosakola.
10. Nini emonisi ete Paulo azwaki te ekateli ya kosakola kaka epai ya bato ya bikólo?
10 Lokola Paulo alobaki ete akokende epai ya bato ya bikólo, yango emonisi nde ete alingaki lisusu te kosakola epai ya Moyuda to prozelite moko, ata oyo asepeli na nsango malamu? Ezali bongo te. Na ndakisa, “Krispusi mokambi ya sinagoga andimelaki Nkolo, ezala mpe bato nyonso ya ndako na ye.” Emonani ete bato mingi oyo bazalaki koyangana na sinagoga balandaki Krispusi, mpo Biblia elobi ete: “Bakorinti mingi oyo bayokaki, bakómaki bandimi mpe bazwaki batisimo.” (Mis. 18:8) Na yango, bakristo ya lisangá oyo esalemaki sika na Korinti bakómaki koyangana na ndako ya Titiusi Yusutusi. Soki lisolo ya Misala ekomamaki ndenge Luka akomaki masolo na ye mingi, elingi koloba, na ndenge makambo elandanaki, boye Bayuda mpe baprozelite yango babongwanaki nsima ya ntango oyo Paulo apupolaki bilamba na ye. Boye, likambo yango emonisaki polele ete Paulo azalaki makambo makasimakasi te.
11. Lelo oyo, ndenge nini Batatoli ya Yehova balandaka ndakisa ya Paulo ntango bakutani na bandimi ya mangomba ya bokristo?
11 Na mikili mingi, mangomba ya bokristo ekɔtá banda kala mpe bandimi na yango bamipesá makasi na mangomba yango. Na bikólo mpe bisanga mosusu, bamisionɛrɛ ya mangomba yango bakómisaki bato mingi bandimi. Mbala mingi, bato oyo bamibengaka bakristo balandaka mpe makambo ya bonkɔkɔ, lokola Bayuda oyo bazalaki na Korinti na siɛklɛ ya liboso. Atako bongo, lokola Paulo, biso Batatoli ya Yehova tosakolaka na molende epai ya bato yango, tolukaka kosalisa bango báyeba malamu Makomami. Ata soki batɛmɛli biso to ntango bakonzi ya mangomba na bango bazali konyokola biso, tolɛmbaka te. Kati na baoyo “bazali na molende mpo na Nzambe, kasi na boyebi ya solosolo te,” ezali na bato ya komikitisa oyo tosengeli koluka mpe tokozanga te komona bango.—Rom. 10:2.
“Nazali na bato ebele na engumba oyo” (Misala 18:9-17)
12. Elendiseli nini Paulo azwaki na emonaneli moko?
12 Soki Paulo akobaki kosakola na Korinti, ezalaki mpo Nkolo Yesu abimelaki ye na emonaneli na butu mpe alobaki na ye ete: “Kobanga te, kasi kobá koloba; kokanga monɔkɔ te, mpo nazali elongo na yo mpe moto moko te akoyela yo mpo na kosala yo mabe; mpo nazali na bato ebele na engumba oyo.” (Mis. 18:9, 10) Emonaneli yango elendisaki mpenza Paulo! Nkolo ye moko andimisaki ye ete akobatela ye mpe ete bato mingi ya mitema sembo bazalaki na engumba yango. Paulo asalaki nini nsima ya kozwa emonaneli yango? Biblia elobi boye: “Afandaki kuna mbula moko na sanza motoba, azalaki koteya liloba ya Nzambe na kati na bango.”—Mis. 18:11.
13. Mbala mosusu, likambo nini Paulo azalaki kokanisa ntango bazalaki komema ye liboso ya kiti ya kosambisa, kasi mpo na nini akokaki kokanisa ete ekokómela ye te?
13 Nsima ya kolekisa mbula soki moko na Korinti, Paulo amonaki makambo mosusu oyo endimisaki ye ete Nkolo azalaki kosalisa ye. “Bayuda bayokanaki mpo na kosala Paulo mabe, mpe bamemaki ye na esika ya kosambisa,” oyo ebengami bêma. (Mis. 18:12) Bato mosusu balobaka ete ezalaki estrade moko ya marbre ya langi ya bulé mpe ya mpɛmbɛ oyo ezalaki na ebele ya mayemi, ekoki kozala ete bêma ezalaki pembeni ya zando ya Korinti. Liboso ya bêma ezalaki na esika moko monene oyo ebele ya bato bakokaki koyangana. Biloko oyo bato ya arkeoloji bakundolaki emonisi ete kiti ya kosambisa ezalaki mosika mingi te na sinagoga mpe ndako ya Yusutusi. Ntango bazalaki komema Paulo liboso ya bêma, mbala mosusu azalaki kokanisa ndenge oyo Stefano, mokristo ya liboso oyo akufaki liwa ya martiri, abomamaki na mabanga. Paulo andimaki “kobomama ya Stefano”; na ntango wana, Paulo ayebanaki na nkombo ya Saulo. (Mis. 8:1) Likambo ya ndenge wana elingaki mpe kokómela Paulo? Te, mpo Yesu apesaki ye elaka ete moto moko te akosala ye mabe.—Mis. 18:10.
14, 15. (a) Bayuda bafundaki Paulo mpo na likambo nini, mpe mpo na nini Galio abenganaki bango? (b) Nini ekómelaki Sostene, mpe ekoki kozala ete asukaki ndenge nini?
14 Nini esalemaki ntango Paulo akómaki liboso ya kiti ya kosambisa? Galio nde azalaki zuzi ya tribinale yango; azalaki prokonsule ya Akaya mpe yaya ya Sénèque, oyo azalaki Moroma mpe moto ya filozofi. Bayuda bafundaki Paulo boye: “Moto oyo azali kondimisa bato básambela Nzambe na ndenge oyo eyokani na mibeko te.” (Mis. 18:13) Maloba ya Bayuda emonisaki ete Paulo azalaki kokómisa bato bandimi na ndenge oyo eyokani na mibeko te. Kasi, Galio amonaki ete Paulo asalaki “mbeba” moko te, akweaki mpe na “likambo moko ya mabe mpenza” te. (Mis. 18:14) Galio alingaki te kokɔta na ntembe ya Bayuda. Kutu, liboso Paulo afungola monɔkɔ mpo na kosamba, Galio abenganaki bato yango! Bato yango bayokaki nkanda makasi. Basilisaki nkanda na bango epai ya Sostene, oyo mbala mosusu akómaki mokambi ya sinagoga na esika ya Krispusi. Bakangaki Sostene “mpe babandaki kobɛta ye liboso ya esika ya kosambisa.”—Mis. 18:17.
15 Mpo na nini Galio apekisaki te bato oyo babandaki kobɛta Sostene? Mbala mosusu akanisaki ete Sostene azalaki motambwisi ya bato oyo bafundaki Paulo; yango wana, ebongaki bábalukela ye mpe bábɛta ye. Ezala bongo to te, ekoki kozala ete likambo yango ebotaki mbuma malamu. Na mokanda ya liboso epai ya Bakorinti, oyo Paulo akomaki bambula mingi na nsima, atángaki ndeko moko oyo azalaki na nkombo Sostene. (1 Ko. 1:1, 2) Ezali kaka Sostene moko oyo abɛtamaki na Korinti? Soki ezali bongo, kobɛtama wana esalisaki ye akóma mokristo.
16. Maloba oyo ya Nkolo ete, “Kobá koloba; kokanga monɔkɔ te, mpo nazali elongo na yo,” ezali na ntina nini na mosala na biso ya kosakola?
16 Tóbosana te ete ezali nsima ya ntango oyo Bayuda baboyaki koyoka nsango oyo Paulo azalaki kosakola nde Nkolo Yesu alobaki na ye boye: “Kobanga te, kasi kobá koloba; kokanga monɔkɔ te, mpo nazali elongo na yo.” (Mis. 18:9, 10) Ekozala malamu tóbosanaka te maloba yango, mingimingi ntango bato baboyi koyoka nsango na biso. Tóbosanaka te ete Yehova atángaka na kati ya mitema mpe abendaka epai na ye bato ya mitema sembo. (1 Sa. 16:7; Yoa. 6:44) Likanisi yango ezali kolendisa biso tómipesa mingi na mosala ya kosakola! Mbula na mbula ebele ya bato bazali kozwa batisimo, elingi koloba bankama ya bato mokolo na mokolo. Yesu alaki bato oyo bazali kotosa etinda ya ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso’ ete: “Nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na eleko ya nsuka ya mokili.”—Mat. 28:19, 20.
“Soki Yehova alingi” (Misala 18:18-22)
17, 18. Ekoki kozala ete Paulo azalaki kokanisa nini ntango azalaki na masuwa oyo ezalaki kokende na Efese?
17 Toyebi te soki likambo oyo Galio asalaki epai ya bato oyo bafundaki Paulo nde esalaki ete lisangá ya sika ya Korinti ekóma na kimya. Ezala bongo to te, Paulo afandaki “mwa mikolo mingi lisusu” liboso akabwana na bandeko ya Korinti. Na mobu 52 T.B., azwaki bibongiseli mpo asala mobembo na masuwa tii na Siri, banda na libongo ya Kenkrea, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 11 na ɛsti ya Korinti. Kasi, liboso alongwa na Kenkrea, Paulo “akatisaki nsuki . . . , mpo asalaki elako.”c (Mis. 18:18) Na nsima, azwaki masuwa elongo na Akila ná Prisile mpe bakatisaki Mbu ya Égée mpo na kokende na Efese, na etúká ya Azia Moke.
18 Ntango masuwa elongwaki na Kenkrea, na ntembe te Paulo azalaki kokanisa ntango oyo alekisaki na Korinti. Azalaki kokanisa makambo mingi ya malamu oyo akutanaki na yango, mpe yango ezalaki kopesa ye esengo. Mosala oyo asalaki kuna na boumeli ya sanza 18 ebotaki mbuma. Lisangá ya liboso na Korinti efungwamaki, mpe bazalaki koyangana na ndako ya Yusutusi. Yusutusi, Krispusi ná libota na ye, mpe ebele ya bato mosusu bazalaki na kati ya bato oyo bakómaki bandimi. Paulo azalaki na bolingo mingi mpo na bandimi yango ya sika, mpo asalisaki bango bákóma bakristo. Na nsima, akomelaki bango mpe alobaki ete bazali mokanda mpo na kolobela ye, oyo ekomami na motema na ye. Biso mpe tolingaka mingi bato oyo tosalisaki mpo báya na losambo ya solo. Ezalaka mpenza esengo komona bato wana oyo bazali ‘mikanda oyo ezali kolobela’ biso!—2 Ko. 3:1-3.
19, 20. Paulo asalaki nini ntango akómaki na Efese, mpe liteya nini tozwi na oyo etali mikano ya elimo?
19 Ntango Paulo akómaki na Efese, abandaki mbala moko kosakola. “Akɔtaki na sinagoga mpe azalaki kokanisa na Bayuda.” (Mis. 18:19) Na mbala wana, Paulo aumelaki te na Efese. Atako basɛngaki ye atikala mwa ntango molai, “andimaki te.” Ntango akabwanaki na bandeko ya Efese, alobaki na bango ete: “Nakozongela bino lisusu, soki Yehova alingi.” (Mis. 18:20, 21) Na ntembe te, Paulo amonaki ete mosala ezalaki naino monene na Efese. Paulo azalaki na mokano ya kozonga lisusu na Efese, kasi atikaki Yehova atambwisa makambo. Yango ezali ndakisa malamu oyo tosengeli kolanda! Tozwaka bikateli ntango tozali kokokisa mikano ya elimo. Kasi, tosengeli ntango nyonso kolanda litambwisi ya Yehova mpe kosala makambo na ndenge oyo eyokani na mokano na ye.—Yak. 4:15.
20 Paulo atikaki Akila ná Prisile na Efese mpe azwaki masuwa mpo na kokende na Kaisaria. Ekoki mpenza kozala ete “amataki” na Yerusaleme mpe apesaki bandeko oyo bazalaki kuna mbote. (Talá nɔti ya boyekoli na Mis. 18:22, nwtsty-F) Na nsima, Paulo akendaki na Antiokia ya Siri, epai azalaki kobanda mibembo na ye. Mobembo na ye ya mibale esukaki na ndenge moko ya malamu. Makambo nini alingaki kokutana na yango na mobembo na ye ya nsuka na mosala ya misionɛrɛ?
a Talá etanda “Korinti—Engumba oyo ezalaki na kati ya mbu mibale,” na lokasa 149.
b Talá etanda “Mikanda oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe mpo na kolendisa,” na lokasa 150.
c Talá etanda “Elako ya Paulo,” na lokasa 152.