Mokanda ya Biblia nimero 48—Bagalatia
Mokomi: Paulo
Esika ya bokomi: Kolinti to Antiokia ya Sulia
Nsuka ya bokomi: soko 50–52 T.B.
1. Makambo oyo mazali na mokanda ya Bagalatia matindami na masangá nini, na lolenge nini mpe ntango nini masangá yango masalemaki?
MASANGÁ ya Galatia oyo Paulo alobelaki na Bagalatia 1:2 esangisaki mbala mosusu Antiokia ya Pisidia, Ikɔni, Lusutula, mpe Delebe—bisika oyo bizalaki kati na bitúká bikeseni kasi oyo bizwamaki yango nyonso na teritware wana ya Loma. Mokanda ya Misala, mokapo 13 mpe mokapo 14, elobeli mobembo ya liboso ya Paulo lokola misionere kati na teritware yango, elongo na Balanaba; mobembo yango momemaki kino kosalema ya masangá na Galatia. Masangá wana masangisaki kati na yango Bayuda mpe bato ya mabota; ntembe ezali te ete ezalaki mpe na Ba Celtes, to Ba Gaulois. Yango ezalaki mwa moke nsima ya boleki ya Paulo na Yelusaleme, soko na mobu 46 T.B.—Mis. 12:25.
2. (a) Matomba nini mabimaki kati na Galatia uta na mobembo ya mibale ya Paulo, kasi nini elandaki mwa moke na nsima? (b) Bobele na ntango yango, lolenge nini Paulo akóbaki mobembo na ye?
2 Na mobu 49 T.B., Paulo mpe Sila babandaki mobembo ya mibale ya misionere kati na teritware ya Galatia, oyo mosalaki ete ‘masangá málendisama kati na kondima mpe motuya na bango molanda kokóla mokolo na mokolo.’ (Mis. 16:5; 15:40, 41; 16:1, 2) Nzokande, mwa moke nsima na bokei na bango, balakisi ya lokuta, Bandimisi losambo ya Bayuda, babimaki mpe bapusaki bamoko, kati na masangá ya Galatia, na kondima ete kokatama-ngenga mpe kobatela Mibeko ya Mose ezalaki makambo ya ntina mingi kati na boklisto ya solo. Bobele na ntango yango, Paulo alekaki Musia kino Makedonia mpe Grèce, mpe na nsuka akómaki na Kolinti, epai afandaki sanza koleka 18 elongo na bandeko. Na nsima, na mobu 52 T.B., akendaki na Antiokia ya Sulia, efandelo na ye, kolekáká na Efese mpe akómaki kuna bobele na mbula wana.—Mis. 16:8, 11, 12; 17:15; 18:1, 11, 18-22.
3. Ekoki kozala na esika nini mpe na ntango nini mokanda ya Bagalatia ekomamaki?
3 Epai wapi mpe ntango nini Paulo akomaki mokanda epai na Bagalatia? Na ntembe te akomaki yango bobele na ntango oyo azwaki nsango ya mosala ya Bandimisi losambo ya Bayuda. Yango ekoki kozala na Kolinti, to na Efese, to na Antiokia ya Sulia. Ekoki mpenza kozala na boumeli ya sanza 18 oyo alekisaki na Kolinti, longwa na mobu 50-52 T.B., mpamba te likoki lizalaki ete nsango oyo euti na Galatia ekómela ye noki kuna. Ezali mpenza mpasi ete Efese ezala esika oyo Paulo akomaki mokanda oyo, mpamba te aumelaki kuna bobele ntango mokuse na mobembo na ye ya bozongi. Nzokande, ‘alekisaki mwa mikolo’ na Antiokia ya Sulia, efandelo na ye; emonani ete yango ezalaki na eleko ya molungé ya mobu 52 T.B., mpe lokola myango ya bomemi nsango mizalaki katikati na engumba wana mpe Asie Mineure, boye ekoki kozala ete, na ntango yango, azwaki nsango na ntina na Bandimisi losambo ya Bayuda mpe akomaki mokanda na ye epai na Bagalatia longwa na Antiokia ya Sulia.—Mis. 18:23.
4. Mokanda ya Bagalatia emonisi nini na ntina na mosala ya Paulo lokola ntoma?
4 Mokanda yango molobeli Paulo ete azalaki “[ntoma, NW] epai na bato te soko na nzela na bato te kasi na nzela na Yesu Klisto mpe na Nzambe Tata.” Ezali mpe komonisa makambo mingi polele na ntina na bomoi ya Paulo mpe bontoma na ye, kolakisáká ete, na motindo na ye ya ntoma, asalaki na boyokani elongo na bantoma oyo bazalaki na Yelusaleme mpe ete asalelaki kútu etɛlɛmɛlo na ye wana mpo na kosembola ntoma mosusu, Petelo.—Gal. 1:2, [1:1, NW], Gal. 1:13-24; 2:1-14.
5. Makambo nini mazali kopesa bilembeteli ya bosolo ya mokanda ya Bagalatia mpe mamonisi ete yango ezali mpenza eteni ya Makomami mapemami?
5 Makambo nini mazali kondimisa bosolo ya mokanda ya Bagalatia mpe komonisa ete yango ezali mpenza eteni ya Makomami mapemami? Nkombo na yango etángami kati na makomi ya Irénée, ya Clément moto na Alesandalia, ya Tertullien, mpe ya Origène. Mpe lisusu, yango ezwami kati na molɔngɔ́ molandi ya bamaniskri ya ntina oyo izali na makambo ya Biblia kati na yango: Sinaïticus, Alexandrinus, Vaticanus No. 1209, Codex Ephraemi Syri rescriptus, Codex Claromontanus, mpe papirise Chester Beatty No. 2 (P46). Lisusu, mokanda yango mozali na boyokani ya kokoka mpenza na Makomami mosusu ya Greke, mpe na Makomami ya Liebele oyo malobelami mbala na mbala kati na yango.
6. (a) Wapi makambo mibale oyo mokanda ya Bagalatia ezali komonisa polele? (b) Wapi likambo oyo lizalaki ya momeseno te na ntina na kokomama ya mokanda ya Bagalatia, mpe mokanda yango mozali kolobela mingi mpenza likambo nini?
6 Kati na mokanda na ye ya nguya mpe ya bokasi mingi ‘epai na masangá ya Galatia,’ Paulo amonisi polele (1) ete azali ntoma ya solo (likambo oyo Bandimisi losambo ya Bayuda balukaki kotyola) mpe (2) ete kolóngisama ezali kozwama na nzela ya kondima kati na Klisto Yesu, kasi na misala ya Mibeko te, mpe, na yango, kokatama-ngenga ezali lisusu na ntina te mpo na baklisto. Atako Paulo azalaki na momeseno ya kozwa mokomeli mpo na kokoma mikanda na ye, nzokande mokanda ya Bagalatia mokomamaki na ye moko na ‘makomi minene ya lobɔkɔ na ye mpenza.’ (6:11) Makambo mazali kati na mokanda yango mazalaki na motuya monene mpo na Paulo mpe mpo na Bagalatia. Mokanda yango mozali kolobela mingi likambo ya kopesa motuya na bonsomi oyo baklisto ya solo bazwi na nzela ya Yesu Klisto.
MAKAMBO MAZALI KATI NA BAGALATIA
7, 8. (a) Paulo amonisi nini na ntina na nsango malamu? (b) Lolenge nini Paulo atindamaki lokola ntoma epai na bato bazangi kokatama ngenga, mpe na lolenge nini amonisaki etɛlɛmɛlo na ye epai na Kefa?
7 Paulo amonisi ete azali ntoma ya solo (1:1–2:14). Nsima ya kopesa mbote na masangá oyo mazalaki na Galatia, Paulo akamwi mingi ete basili kobaluka nokinoki kino na lolenge mosusu ya nsango malamu, mpe alobi na mpiko nyonso ete: “Nde soko biso, soko anzelu na Likoló, akosakwela bino nsango ekeseni na oyo esakwelaki biso bino, tiká ete alakelama mabe.” Nsango malamu oyo asakolaki euti na bato te, mpe moto moko te alakisaki ye yango, “nde eyei na nzela na emoniseli na Yesu Klisto.” Liboso, ntango azalaki mokɔteli ya lingomba ya Bayuda, Paulo anyokolaki lisangá ya Nzambe, kasi na nsima Nzambe abyangaki ye na nzela ya ngɔlu na Ye ete asakola nsango malamu na ntina na Mwana na ye epai na mabota. Pene na mbula misato nsima na kobongwana na ye, akendeki na Yelusaleme mpe, kati na bantoma, amonaki bobele Petelo elongo na Yakobo, ndeko ya Nkolo. Bayebaki elongi na ye te kati na masangá ya Yudea, atako bazalaki koyoka nsango na ye mpe ‘bakumisaki Nzambe’ na ntina na ye.—1:8, 12, 24.
8 Nsima ya mbula 14, Paulo akendaki lisusu na Yelusaleme mpe, na nkuku, alimbolaki nsango malamu oyo azalaki kosakola. Atako moninga na ye, Tito, azalaki Mogreke, nzokande asɛngisamaki te ete akatama ngenga. Ntango Yakobo, Kefa mpe Yoane bamonaki ete Paulo apesamelaki nsango malamu mpo na baoyo bazangi kokatama ngenga, lokola Petelo apesamelaki nsango malamu mpo na baoyo bakatami ngenga, bapesaki Paulo mpe Balanaba lotómo mpo na kosangana elongo mpe kokende epai na mabota, wana bango moko bakendaki epai na baoyo bakatami ngenga. Ntango Kefa akómaki na Antiokia mpe wana azangaki kotambola sembo “na solo na nsango malamu,” Paulo apamelaki ye liboso na bato banso.—2:14.
9. Likoló na moboko nini moklisto atángami moyengebene?
9 Batángami bayengebene mpo na kondima, kasi mpo na mibeko te (2:15–3:29). Paulo amonisi polele ete, biso Bayuda toyebi ete “moto akolónga na nzela na Mibeko te kasi na nzela na kondima Klisto Yesu.” Azali sikawa kobika na bomoko kati na Klisto mpe azali na bomoi na nzela ya kondima mpo na kosala mokano ya Nzambe. “Soko boyengebene ekoya na nzela na Mibeko, [boye, NW] Klisto akufaki mpamba.”—2:16, 21.
10. Moto asengeli kosala nini mpo na kozwa mapamboli ya Nzambe, mpe ntina ya Mibeko ezalaki nini?
10 Bagalatia bazali nde bato bazangi mayele mpo na kondima ete nsima na kozwa elimo santu ya Nzambe na nzela ya kondima, bákóma lisusu kosalela Nzambe na misala ya Mibeko? Eloko ya ntina ezali nde koyoka mpe kondima, lokola Abalayama, oyo “andimaki Nzambe mpe etángameli ye lokola boyengebene.” Boye, engebene elaka ya Nzambe, “bato na kondima bazali kopambwama esika moko na Abalayama oyo azalaki mondimi.” Basikwami na elakeli mabe ya Mibeko na nzela ya liwa ya Klisto likoló na nzeté. Yesu azali Mombóto ya Abalayama, mpe Mibeko oyo mipesamaki mibu 430 na nsima mizali kolongola elaka wana te na ntina na Mombóto. Na bongo, ntina na Mibeko ezalaki nini? Yango ezalaki “Molakisi na biso kino ekoya Klisto, ete tólóngisama [“tótángama bayengebene na nzela,” NW] na kondima.” Sikawa, tozali lisusu na nsé na molakisi yango te, mpe sikawa bokeseni ezali te kati na Moyuda mpe Mogreke, mpamba te banso bazali moko kati na bomoko elongo na Klisto Yesu mpe bazali “[mombóto, NW] na Abalayama, basangoli na libula na elaka.”—3:6, 9, 24, 29.
11. (a) Kosikwama nini Bagalatia bazali kotyola? (b) Paulo asaleli elakiseli nini mpo na komonisa bonsomi ya boklisto?
11 Kotɛlɛma ngwi kati na bonsomi ya boklisto (4:1–6:18). Nzambe atindaki Mwana na ye mpo na kokangola baoyo bazalaki na nsé na Mibeko, ete ‘bákamata lokumu na bana.’ (4:5) Na yango, mpo na nini kozongela lisusu boombo ya makambo ya liboso ya pɛtɛpɛtɛ mpe mazangi ntina? Lokola Bagalatia bakómi sikawa kotalela mikolo, basanza, bileko mpe bambula, Paulo abangi mpo ete mosala na ye mpo na bango molingi kokende mpamba. Mbala ya liboso, ntango Paulo akendeki kotala bango, bayambaki ye lokola anzelu ya Nzambe. Akómi sikawa monguna na bango mpo ete azali koyebisa bango solo? Tiká ete baoyo balingi kozala na nsé na Mibeko báyoka oyo Mibeko elobi: Abalayama azwaki bana babali mibale uta na basi mibale. Mwasi moko, Agala oyo azalaki moombo mwasi, akokani na libota ya Yisalaele ya mosuni, oyo ekanganaki na Yehova na nzela ya kondimana ya Mibeko ya Mose, kondimana oyo ezali kobota bana mpo na boombo. Nzokande, mwasi nsomi, Sala, akokani na Yelusaleme na likoló, oyo Paulo alobi mpo na yango ete “azali nsomi, ye wana Mama na biso.” Paulo atuni ete, “Nde Likomi elobi nini?” Elobi boye: “Mwana na moombo akosangola libula esika moko na mwana na nsomi te.” Mpe biso tozali bana na mwasi moombo te, “kasi bana na mwasi nsomi.”—4:30, 31.
12. (a) Bagalatia basengeli sikawa kotambola na nini? (b) Likeseni nini ya makasi Paulo asali?
12 Paulo alimboli ete kokatama-ngenga to kokatama-ngenga te ezali likambo mpamba, kasi kondima oyo ekosalaka kati na bolingo nde ezali na ntina. Mibeko nyonso mikokisami kati na liloba oyo ete: “Olinga mozalani na yo lokola yo moko.” Bólanda kotambola na elimo, mpamba te “soko bokambami na [elimo, NW] bozali na nsé na Mibeko te.” Na oyo etali misala ya nzoto, Paulo apesaki likebisi “ete baoyo bakosalaka makambo yango bakosangola Bokonzi na Nzambe te.” Kati na likeseni makasi, alobeli mbuma ya elimo, oyo mobeko moko te motɛmɛli yango, mpe abakisi ete: “Soko tozali kobika [na nzela na elimo, boye tókóba mpe kotambola alimá na elimo, NW],” tóbwaka lolendo mpe bilulela.—5:14, 18, 21, 25.
13. Ndenge nini mobeko ya Klisto mokokisami, mpe nini ezali na ntina mingi?
13 Soki moto asali litambe mabe, liboso ete ayeba yango, baoyo bazali bato bakɔmeli na elimo basengeli kozongisa ye na nzela “na elimo ya bopɔlɔ.” Baklisto bazali kokokisa mobeko ya Klisto na kokumbanáká mikumba bamoko na bamosusu, kasi moto na moto asengeli komema bozito na ye moko na komonisáká lolenge mosala na ye mozali. Moto akobuka bobele oyo akónaki; yango ekoki kozala libebi uta na nzoto to bomoi ya seko longwa na elimo. Baoyo balingi ete Bagalatia bákatama ngenga bazali bobele koluka kosepelisa bato mpe kopɛngola minyoko. Bozalisi ya sika nde ezali likambo ya ntina mingi, kasi kokatama ngenga to kozanga kokatama ngenga ezali makambo mpamba. Kimya mpe koyokela mawa ekozala likoló na baoyo bazali kotambola alimá engebene etamboli oyo, mpe likoló na “Yisalaele na Nzambe.”—6:1, 16.
LITOMBA NA YANGO
14. Ndakisa nini Paulo apesi epai na bakɛngɛli?
14 Mokanda ya Bagalatia emonisi Paulo ete azalaki monyokoli monene oyo akómaki ntoma ya molende epai na mabota, oyo azalaki ntango nyonso pene mpo na kokɔtela matomba ya bandeko na ye. (1:13-16, 23; 5:7-12) Paulo apesaki ndakisa oyo emonisi ete mokɛngɛli asengeli kosilisa mikakatano nokinoki, kokweisáká makanisi ya lokuta na nzela ya bandimbola ibongi mpe na Makomami.—1:6-9; 3:1-6.
15. Na lolenge nini mokanda ya Bagalatia mozalaki na litomba epai na masangá ya Galatia, mpe litambwisi nini yango ezali kopesa epai na baklisto na mikolo na biso?
15 Mokanda yango mozalaki na litomba mpo na masangá ya Galatia mpamba te momonisaki polele bonsomi na bango kati na Klisto mpe mokweisaki babebisi na nsango malamu. Emonisaki polele ete ezali na nzela ya kondima nde moto atángami moyengebene mpe ete kokatama-ngenga ezali lisusu na ntina te mpe ekoki te kokanga nzela na moto mpo na kozwa lobiko. (2:16; 3:8; 5:6) Na kotyáká pembeni mikabwano wana ya mosuni, mokanda yango mosangisaki Bayuda mpe Bapakano kati na lisangá bobele moko. Bonsomi wana longwa na Mibeko esengelaki te kozwama lokola ndingisa mpo na kokokisa bamposa ya nzoto, mpamba te etindá ezali ntango nyonso koloba ete: “Olinga mozalani na yo lokola yo moko.” Kino lelo, etindá yango ezali kopesa litambwisi na baklisto.—5:14.
16. Wapi bandimbola ya Makomami ya Liebele oyo izali kolendisa kondima mpe izwami kati na mokanda ya Bagalatia?
16 Mokanda yango ya Paulo esalisaki Bagalatia likoló na bingɛngiseli mingi bitali mateya, kosaleláká bilakiseli ya nguya uta na Makomami ya Liebele. Yango elimbolaki na kopemama mpenza Yisaya 54:1-6, komonisáká mwasi na Yehova lokola “Yelusaleme na Likoló.” Elimbolaki “lisese” ya Agala na Sala, komonisáká ete basangoli na libula ya bilaka ya Nzambe bazali baoyo basikolami na nzela na Klisto, kasi ezali te baoyo bakangami na Mibeko. (Gal. 4:21-26; Gen. 16:1-4, 15; 21:1-3, 8-13) Ezali kolimbola polele ete kondimana ya Mibeko ebomaki kondimana na Abalayama te kasi ebakisamaki nde likoló na yango. Yango emonisaki lisusu ete ntango oyo ekabolaki kondimana mibale wana ezalaki mbula 430, oyo ezali na ntina mingi mpo na kronoloji to kolandana ya ntango kati na Biblia. (Gal. 3:17, 18, 23, 24) Lisoló ya makambo yango libatelamaki mpo na kotonga kondima ya baklisto lelo.
17. (a) Mokanda ya Bagalatia ezali komonisa likambo nini ya ntina? (b) Toli malamu nini epesami epai na basangoli ya libula ya Bokonzi mpe na basalani na bango?
17 Likambo lileki ntina ezali ete mokanda ya Bagalatia ezali komonisa polele Mombóto ya Bokonzi, oyo epai na ye basakoli nyonso bazalaki kotala. “Bilaka bisalami epai na Abalayama mpe na [mombóto NW] na ye. . . . Ye wana Klisto.” Baoyo bakómi bana na Nzambe na nzela ya kondima kati na Klisto Yesu bamonisami ete bakómi na lokumu ya bana kati na mombóto yango. “Soko bozali bato na Klisto, bozali libota [“mombóto,” NW] na Abalayama, bozali basangoli na libula na elaka.” (3:16, 29) Toli malamu oyo epesami na mokanda ya Bagalatia esengeli kolandama na basangoli yango ya libula ya Bokonzi mpe na baoyo bazali kosala makasi elongo na bango: ‘Bótɛlɛma ngwi kati na bonsomi mpo na yango Klisto asikoli bino!’ ‘Bótika te kosala oyo ezali malamu, mpamba te na ntango ebongi bokobuka soki bolɛmbi te.’ ‘Bósalaka malamu, mingimingi epai na baoyo bazali bandeko na biso kati na kondima.’—5:1; 6:9, 10.
18. Wapi likebisi ya nguya mpe elendiseli ya nguya oyo epesami na nsuka ya mokanda epai na Bagalatia?
18 Na nsuka, ezali na likebisi ya nguya ete bato oyo basalaka misala ya nzoto “bakosangola Bokonzi na Nzambe te.” Na yango, tiká ete banso bátangwa mosika mpenza na mbindo mpe kowelana ya mokili mpe bápusa mitema na bango ete mibota mbuma ya elimo, oyo ezali bongo “bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ mpe komipekisa.”—5:19-23.