Liloba na Jehovah eleki na nguya!
“Na motindo boye, liloba na Jéhovah ekolaki mpe elendisami na nguya.’’—MISALA 19:20, MN
1. Boyekoli oyo ya Misala na bantoma ekolobela mpo na likambo nini!
NA BOYOKANI na malako na Yesu,ekuke mpo na mosala monene. Mingimingi ezali Paulo, “ntoma epai na bapakano”, nde azalaki pionnier kati na mosala yango. (Baloma 11:13) Na yango, wana ezali biso kolanda boyekoli na biso na Misala na Bantoma, tokokenda na ye elongo na mibembo ya kopalanganisa nsango malamu oyo ezali kosimba mitema.—Misala 16:6 kino 19:41.
2. (a) Longwa mobu 50 kino pene na 56, ntoma Paulo akomaki mikanda nini na kopemama na Nzambe? (b) Lokola Nzambe apambolaki mosala ya Paulo mpe oyo ya baklisto mosusu, litomba nini ezwamaki?
2 Na kopemama na Nzambe Paulo akomaki mpe mikanda Longwa mobu 50 kino pene na 56, wana ezalaki ye na Kolinti, Paulo akomaki mikanda mibale epai na Batesaloniki, na Kolinti lisusu to mpe na Antiokia ya Syrie, akomaki mokanda epai na Bagalatia, na Efese akomaki mokanda ya liboso epai na Bakolinti, na Masedwane akomaki mokanda ya mibale epai na Bakolinti, mpe na Kolinti akomaki mokanda epai na Baloma. Mpe lokola Jéhovah azalaki kopambola mosala ya Paulo mpe oyo ya baklisto mosusu, “na motindo boye, mobu na Jéhovah ekolaki mpe elendisamaki na nguya”.—Misala 19:20.
Longwa na Asie kino na Mpoto
3. Ndakisa nini ya malamu Paulo mpe baninga na ye bapesaki mpo na likambo ya kondima kotambwisama na elimo santu?
3 Paulo mpe baninga na ye bapesaki ndakisa malamu mpo na oyo etali kondima litambwisi na elimo santu. (16:6-10) Ezalaki mbala mosusu na nzela na mingongo, bandoto to bimonaneli, elimo epekisaki bango kosakola na distrike ya Asie mpe na kati ya province ya Bithynie, bisika oyo nsango malamu esengelaki kokota nsima. (Misala 18:18-21; 1 Petelo 1:1, 2) Mpo na nini elimo epekisaki bamisionere kokota na bisika yango noki? Basali bazalaki mingi te, mpe elimo ekambaki bango na bateritware oyo ekokaki kobota mbuma mingi, na Mpoto (Europe). Na bongo, soki na mikolo na biso epekiseli ezali mpo na kokota na teritware moko, ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola bipai mosusu, kondimisamaka ete elimo na Nzambe ezali kokamba bango epai na bampate’’.
4. Nsima wana Paulo amonaki na emonaneli moto moko ya Masedwane azalaki kosenga lisalisi, asalaki nini ye na baninga na ye?
4 Paulo mpe baninga na ye ‘bakomaki pene na’ Mysie, mokili ya Asie Mineure epai kuna bakanaki kokokisa mosala na bango ya misionere. Kasi, kati na emononeli, Paulo amonaki moto moko ya Masedwane oyo azalaki kosenga lisalisi. Mbala moko, bamisionere bakendaki bongo na mokili ya Masedwane. Bobele bongo na ntango na biso, elimu santu ezali kokamba ebele na Batemwe mpo na kokenda kosalela Jéhovah epai kuna mposa ya basakoli na Bokonzi ezali monene.
5. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete liloba na Jéhovah elekaki na nguya na mboka Filipe? (b) Na ntango na biso, na likambo nini Batemwe mingi bakokani na Lydie?
5 Liloba na Jéhovah ezalaki na nguya mingi koleka na mokili ya Masedwane. (16:11-15) Na Filipi, mboka oyo etondaki na ba citoyens romains, emonanaki lokola ete Bayuda bazalaki bobele moke mpe eyanganelo ezalaki te. Bongo bamisionere bakendaki na “esika ya kobondela” oyo ezalaki pembeni na ebale, na libanda na engumba. Bakutaki bato na esika yango, kati na bango Lydie, mbala mosusu azalaki mwasi oyo abongwanaki na lingomba ya Bayuda, ye moto na Tyatire, engumba na lokumu mingi mpo na kompanyi na yango oyo ezalaki kosala balangi na Asie Mineure. Lydie azalaki koteka bilamba na langi motane. Ntango azwaki batisimo, ye mpe bato na ndako na ye, ayambaki bamisionere na molende nyonso na boye ete Luka akomaki ete: “Asengaki biso na makasi.” (MN) Tozali kosepela kozala na bandeko basi motindo yango na mikolo na biso.
Mokengeli na boloko akomi mondimi
6. Na Filipe, mosala nini oyo etambwisamaki na bilimu mabe esalaki na boye ete Paulo mpe Silas bakangama?
6 Satana asilikaki makasi na komona bokoli ya elimo oyo ekokisamaki na mboka Filipe, mpamba te misala mosusu oyo mizalaki kotambwisama na bademo esalaki na boye ete Paulo mpe Silas bakangama. (16:16-24) Na boumeli ya mikolo mingi elenge mwasi moko oyo azalaki na “elimo mabe na kosakola” (elimboli “elimo ya python”) azalaki kolanda bango. Mbala mosusu demo yango amimonisaki lokola Apollon pythien, nzambe oyo bazalaki kokanisa ete abomaki nyoka oyo babengi Puthon. Na kosalaka soloka to kosakola, elenge mwasi azalaki kozwela bankolo na ye litomba monene. Mbala mosusu azalaki kolakisa epai na basali bilanga ntango nini basengeli kolona, epai na bilenge basi ntango nini basengeli kobala mpe epai na baluki na wolo epai kuna bakoki kotimola wolo. Akomaki kolanda bamisionere ntango nyonso mpe azalaki kongenga ete: “Bato oyo bazali baombo na Nzambe Oyo-Aleki-Likolo, bango bazali kosakwela bino nzela na lobiko!” Démo asalaki ete elenge mwasi oyo abimisa maloba yango mpo na kopesa likanisi ete bisakweli na ye bipemamaki na Nzambe. Nzokande, badémo bazali na lotomo te ya kosakola na ntina na Jéhovah mpe na ntina na bibongiseli oyo azwaki mpo na lobiko. Ntango Paulo alembaki na motungisi yango, abenganaki demo yango na nkombo na Yesu. Emonaki bango ete elikia na litomba na bango elimwaki, bankolo na mwana mwasi yango bamemaki Paulo mpe Silas na zando, epai kuna babetaki bango fimbo. (2 Bakolinti 11:25) Nsima na yango babwakaki bango na boloko mpe bakangaki makolo na bango na nkanga. Biloko yango bisalamaki na lolenge ete makolo ya mokangami epanzana makasi, mpe ezalaki kosala mpasi mingi.
7. Banani bazwaki matomba na ndenge Paulo mpe Silas bakangamaki na boloko na mboka Filipe? Na ndenge nini?
7 Kokangama na Paulo mpe Silas ememaki matomba epai na mokengeli na boloko mpe libota na ye. (16:25-40) Pene na katikati na butu (minuit), Paulo mpe Silas bazalaki kobondela mpe kokumisa Nzambe na nzembo, na elikya nyonso ete azalaki elongo na bango. (Nzembo 42:8) Na pwasa, mabelé maninganaki mpe bikuke bifungwanaki, na minyololo nyonso mikangaki bato na makonzi to na bitutu mikangwaki. Mokengeli na boloko alingaki komiboma mpo akanisaki ete bato na boloko bakimi mpe ete bakoboma ye mpo na yango. Na bongo Paulo angangaki ete: “Sala likambo mabe na nzoto na yo te, mpamba te biso nyonso tozali awa!” Mokengeli na boloko abimisaki Paulo na Silas na libanda mpe atunaki bango likambo asengelaki kosala mpo na kobika. Bango bazongiselaki ye monoko ete: “Ndimela Nkolo Yesu”. Nsima na koyoka liloba na Jéhovah, “abatisami nokinoki, na ye na bato nyonso na ndako na ye lokola”. Oyo nde esengo!
8. Basambisi ya bato na mboka Filipe basalaki nini, mpe soko bandimaki libunga na bango na miso ya bato, mbele yango elingaki kobimisa litomba nini?
8 Mokolo molandaki, basambisi batindaki maloba mpo na kobimisa Paulo na Silas. Kasi Paulo alobaki ete: ‘Babeti biso fimbo naino esambisi bango biso te, biso Baloma, mpe babwaki biso na boloko. Sikawa mpe balingi kobimisa biso na kobombama? Wapi! kasi baya kobimisa biso bango moko!’ Soki basambisi basengelaki kondima liboso na bato nyonso ete bamikosaki, mbala mosusu na nsima bakokaki kokakatana mpo na kobeta mpe kokanga baklisto mosusu. Lokola bakokaki te kobengana ba citoyens Baromé, basambisi babondelaki bango ete bakenda. Kasi bango balongwaki nsima na kolendisa baninga na bango kati na kondima. Na mikolo na biso, ezali mposa motindo wana nde ezali kopusa basangani ya collège central mpe bamonisi mosusu ya zongazonga na kokenda kotala basaleli ya Nzambe na mokili mobimba mpo na kolendisa bango.
Liloba na Jéhovah eleki na nguya na Tesaloniki mpe na Bérée
9. Na metode nini, oyo ezali ntango nyonso kosalelama na ba Témoins de Jéhovah, Paulo alimbolaki mpe amonisaki’ ete Masiya asengelaki komona mpasi mpe kosekwa longwa na bakufi?
9 Nsima na yango Liloba na Nzambe elekaki na nguya na Tesaloniki, engumba monene mpe libongo monene na masuwa na Masedwane. (17:1-9) Kuna, Paulo akanisaki elongo na Bayuda, “na kolimbolaka mpe komonisaka” ete esengelaki Masiya amona mpasi mpe asekwa kati na bakufi (Mpo na yango, Paulo akokisaki bisakweli na makambo oyo mazalaki kokokisa yango, lokola ba Témoins de Jéhovah bazali kosala yango na mikolo na biso.) Na ndenge yango, mwa ndambo na Bayuda, mpe ebele na baoyo babongwanaki na lingomba na Bayuda mpe bato mosusu bakomaki bandimi. Bayuda bayokaki zuwa mpe bayanganisaki bato mpo na kotomboka, kasi lokola bazwaki Paulo na Silas te, bamemaki Jason mpe baklisto mosusu liboso na bakonzi na mboka mpe bafundi bango ete bazalaki kopusa bato na botomboki, efundeli oyo bazali kosalela ntango nyonso mpo na basaleli ya Jéhovah na ntango na biso. Ata bongo, batikaki baklisto yango bobele nsima wana bafutaki “mosolo mingi”.
10. Na mokano nini Bayuda ya mboka Bérée bazalaki ‘kotanga’ Makomami?
10 Nsima na yango Paulo na Silas bakendaki na Bérée. (17:10-15) Na engumba yango, Bayuda bazalaki ‘kotanga’ Makomami, likambo oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kolendisa bato ete basala yango na ntango na biso. Bato na Bérée yango bazalaki kotya ntembe na liloba na Paulo te, kasi bazalaki kosala bolukiluki mpo na kozwa elembeteli ete Yesu azalaki solo Masiya. Yango ebimisaki matomba nini? Bayuda mingi mpe mwa Bagreke (mbala mosusu baoyo babongwanaki na lingomba ya Bayuda) bakomaki bandimi. Ntango Bayuda ya Tesaloniki bayaki kotia mobulu kati na bato, baklisto bakendaki kotika Paulo na libongo, epai kuna mwa basangani na etuluku na ye bazwaki masuwa mbala mosusu mpo na kokende na Pirée (lelo Piraiévs), libongo ya masuwa na Athènes.
Liloba na Jéhovah eleki na nguya na Athènes
11. (a) Paulo apesaki litatoli nini ya molende na Athènes, kasi banani babandaki kotyama na ye ntembe? (b) Bamosusu balingaki koloba nini ntango babyangaki Paulo ete azali “molobilobi’’?
11 Na Athènes Paulo apesaki litatoli na molende. (17:16-21) Lokola azalaki koloba na ntina na Yesu mpe lisekwa, bafilozofe (bato na mayele na mokili) babandaki kotyana ntembe na ye. Bamoko, ba épicuriens, bazalaki kolobela mingi mpo na bisengo; bamosusu, ba stoïcien, bazalaki kolobela mingi mpo na komipekisa makasi. Bamosusu batunaki boye: “Molobilobi oyo azali na mposa na koloba nini?” Na kobyangaka Paulo ete azali “molobilobi” (elimboli “kododa na mabelé”), balingaki koloba ete Paulo akokani na ndeke oyo azali kododadoda na mabelé, mpe azalaki kokabola ndambo na boyebi mokemoke, wana ye moko azangaki mayele. Bamosusu balobaki ete: “Amonani lokola mosakoli na banzambe na bapaya.” Ezalaki wana efundeli monene, mpo na yango Socrate abomamaki. Nsima moke, bamemaki Paulo na Aréopage (ngomba Mars), epai kuna, mbala mosusu, Tribinale monene ezalaki kokata makambo na libanda, pembeni na Acropole.
12. (a) Makambo nini matali lolenge ya koloba emonisami kati na diskur oyo Paulo apesaki na Aréopage? (b) Makanisi nini Paulo amonisaki na ntina etali Nzambe, mpe yango ebimisaki matomba nini?
12 Diskur oyo Paulo apesaki na Aréopage ezalaki ndakisa malamu na bokoteli malamu ya lisolo, na lisolo epesami na molongo ebongi kozanga kokatama mpe bantina oyo ezali kondimisa bizalela ya lolenge ya koloba oyo ezali koteyama na Eteyelo mpo na mosala ya Nzambe, eteyelo ya ba Témoins de Jéhovah. (17:22-84) Paulo alobaki ete Bato na Athènes bazalaki na ezaleli ya kosambela koleka bamosusu. Na ndakisa, batongaki nkutu etumbelo moko na lokumu “Na Nzambe oyo ayebani te”, mbala mosusu basalaki yango mpo bazalaki kobanga noki te bakoya kobosana nzambe moko! Paulo alobelaki mpo na Mozalisi, oyo na nzela ‘ya moto moko, asalaki mabota nyonso na bato’ mpe ‘na mobeko aponelaki bango bilaka mpe atyaki ndelo na bifandelo na bato’, na ndakisa ntango abenganaki Bakanana. (Genese 15:13-21; Danyele 2:21; 7:12).Paulo alobaki ete, tokoki kozwa Nzambe wana, mpamba te “tozali mpe libota na ye”, na kokundolaka kozalisama na moto epai ya Jéhovah mpe na kotangaka maloba na bapowete greke Aratos mpe cléanthe. Paulo alobaki ete lokola tozali libota na Nzambe, tokoki kokanisa te ete Mozalisi oyo na kokoka akokani na ekeko oyo esalami na moto oyo azangi kokoka. Na boumeli na ntango eleki, Nzambe atalelaki te kozanga boyebi wana, kasi sikawa alobi epai na bato ete babongola mitema, mpamba te asili kotya mokolo mpo na kosambisa bango na nsima na moto Oyo aponaki. Lokola Paulo “azalaki kosakola nsango malamu na Yesu”, bayoki na ye bayebaki ete alingaki koloba ete Klisto akozala Mosambisi. (Misala 17:18; Yoane 5:22, 30). Ba épicuriens bazalaki kolinga te koyoka likambo ya kobongola motema; mpo na bafilozofe bagreke, bakokaki kondima soki balobelaki molimo ekokufaka te, kasi bakokaki kondima te mpo na oyo etali liwa to lisekwa. Emonani ete, bobele na motindo na ezalela oyo ezali kopusa bato mingi na koboya nsango malamu na mikolo na biso, bamosusu balobaki ete: “Tokoyoka yo lisusu na ntina na likambo oyo.” Nzokande, mosambisi Denys mpe bato mosusu ya Athènes bakomaki bandimi.
Liloba na Nzambe eleki na nguya na Kolinti
13. Ndenge nini Paulo azalaki kokokisa bamposa na ye ya mosuni kati na mosala ya kosakola, mpe banani na mikolo na biso bazali kosala lokola ye?
13 Nsima na yango Paulo akendaki na Kolinti, kapitale ya province ya Akai. (18:1-11) Akutamaki na Akila mpe Prisile, baoyo bafandaki na engumba yango ntango mokonzi claude abenganaki na mokili ya Rome Bayuda oyo bazalaki ba citoyens romains te. Mpo na kokokisa bamposa na ye ya mosuni wana ezalaki ye kolanda kosala mosala na ye ya kosakola, Paulo azalaki kotonga hema (lolenge na bandako ya kapo) elongo na babalani wana baklisto. (1 Bakolinti 16:19; 2 Bakolinti 11:9) Ezalaki mosala moko makasi ya kokata mpe kotonga elamba ya makasi oyo esalami na pwale ya ntaba. Bobele bongo, ba Témoins de Jéhovah bazali kokokisa bamposa na bango na kosalaka mosala ya mosuni, kasi likambo ya liboso kati na bomoi na bango, ezali nde mosala ya kosakola.
14. (a) Paulo asalaki nini na ntina na botemeli makasi na Bayuda ya Kolinti? (b) Nini emonisaki na Paulo ete asengelaki kotikala na Kolinti, kasi ndenge nini basaleli ya Jéhovah bazali kotambwisama na mikoki na biso?
14 Bayuda ya Kolinti bazalaki ntango nyonso koloba mabe na ntina na Paulo mpamba te azalaki kosakola ete Yesu azali Masiya. Apupolaki bongo bilamba na ye mpo na kokitisa mokumba nyonso epai na bango mpe abandaki kosala makita epai ya Titus Justus, oyo akokaki kozala Moromé. Bato mingi (kati na bango crispus, oyo azalaki mokambi na eyanganelo mpe bato na ndako na ye) bakomaki bandimi mpe bazwaki batisimo. Botemeli ya Bayuda epusaki Paulo na komituna soki asengelaki kotikala na Kolinti to te; kokakatana nyonso elongwaki na makanisi na ye ntango Nkolo ayebisaki ye kati na emonaneli ete: ‘Banga te, kasi loba mpe zala nyee te, mpamba te ngai nazali na yo elongo, mpe moto te akotemela yo mpo na kosala yo mabe. Bato mingi bazali na ngai na mboka oyo.’ Na yango Paulo alandaki kolakisa liloba na Nzambe na Kolinti na boumeli ya mbula moko na sanza motoba. Atako basaleli na Jéhovah bazali komona bimonaneli te, kasi mabondeli mpe litambwiseli na elimo santu ezali kosalisa bango mpo na kozwa makatami oyo mazali kotalela matomba na Bokonzi.
15. Likambo nini esalamaki ntango bamemaki Paulo liboso na mokonzi Gallion?
15 Bayuda bamemaki Paulo liboso na mokonzi Junius Gailion. (18:12-17) Bafundaki paulo ete azali kobongola bato na lolenge endimami na mibeko te, efundeli ya lokuta oyo bakonzi ya mangomba na mokili ya Gréce bazali kino lelo kofunda ba Témoins de Jéhovah. Gallion ayebaki ete Paulo asalaki likambo moko ya mabe te mpe ete Bayuda bazalaki komibanzabanza mpenza te mpo na matomba mpe mibeko ya Rome; bongo abenganaki bango. Ntango bato oyo bamonaki makambo nyonso wana babandaki kobeba Snsthene, mokambi ya sika ya eyanganelo, Gallion ekotelaki ye te. Akanisaki mbala mosusu ete ye nde azalaki mobandisi na botomboki basalemaki mpo na kotemela Paulo, na yango azalaki kozwa mbano na ye.
16. Mpo na nini Paulo asalaki mabe te na kokokola motó mpo ete akataki ndai?
16 Paulo azwaki masuwa na Kenkelea, libongo ezali na la mer Egée, mpe akendaki na Efese, na Asie Mineure. (18:18-22) Liboso ya kosala mobembo yango, ‘akokolaki moto mpo ete azalaki na ndai’. Lisolo eyebisi sikisiki te soki akataki ndai yango liboso akoma moyekoli na Yesu, eyebisi mpe te soki ezalaki na ebandeli to na nsuka na eleko oyo akangamaki na ndai na ye. Baklisto bazali na nse ya Mibeko te, kasi yango epesamaki na Nzambe mpe ezalaki mosantu, mpe ezalaki lisumu te na kokata ndai motindo yango. (Baloma 6:14; 7:6, 12; Bagalatia 5:18) Na Efese, Paulo asololaki na Bayuda mpe apesaki bango elaka ya kozonga lisusu, soki Jéhovah akolinga (Akokisaki elaka na ye.) Kozonga na ye na Antiokia na Sulia etyaki nsuka na mobembo na ye ya mibale ya kopalanganisa nsango malamu.
Liloba na Jéhovah eleki na nguya na Efese
17. Apolo mpe bamosusu basengelaki koyekola nini na ntina na batisimo?
17 Nsima na mwa ntango, Paulo abandaki lisusu mobembo na ye ya misato lokola misionere (pene na 52-56) (18:23 kino 19:7) Na ntango yango, na Efese, Apolo azalaki kolakisa na ntina na Yesu. Kasi, ayebaki bobele batisimo ya Yoane oyo ezalaki elembo ya kobongola motema mpo na masumu oyo masalamaki likoló na kondimana na Mibeko. Prisila na Akila ‘balimboleli ye malamu mpenza nzela na Nzambe’. Mbala mosusu balimbwelaki ye ete kozwa batisimo lokola Yesu elimbolaki kozindisama kati na mai mpe kozwa elimo santu. Nsima na batisimo na elimo santu oyo esalamaki na Pantekote ya mobu 33, moto nyonso oyo azwaki batisimo ya Yoane asengelaki kobatisama lisusu na nkombo na Yesu. (Matai 3:11, 16; Misala 2:38) Nsima, na Efese, Bayuda soki zomi na mibale baoyo bazwaki batisimo ya Yoane ‘bazwaki batisimo na nkombo ya Nkolo Yesu’, Ezali bobele likambo oyo moko nde ekomamaki kati na Makomami mpo na bato oyo bazwaki batisimo mpo na mbala ya mibale. Ntango Paulo atyaki maboko likoló na bango, bazwaki elimo santu mpe bilembo mibale na kokamwisa oyo emonisaki ete bandimami na Nzambe: babandaki koloba na minoko misusu mpe kosakola.
18. Epai wapi Paulo apesaki litatoli na boumeli na mikolo oyo asalaki na Efese mpe yango ebimisaki matomba nini?
18 Paulo azalaki mpenza na mosala mingi ya kokokisa na Efese, engumba oyo ezalaki na bato pene na 300 000. (19:8-10) Temple na nzambe mwasi Artémis oyo etongamaki wana ezalaki moko na biloko nsambo ya kitoko na mokili ya kala, mpe esika ya kosala masano na engumba ekokaki koyamba bato 25 000. Na eyanganelo, Paulo ‘amekaki kondimisa bato’ na kopesaka bantina oyo ezali kondimisa kasi abimaki ntango bato mosusu babandaki koloba mabe mpo na Nzela yango, to lolenge na bomoi oyo etongami likoló na kondima na Klisto. Na boumeli na mbula mibale, Paulo apesaki diskur mokolo na mokolo kati na salle ya eteyelo ya Tyrannus, mpe “liloba” epalanganaki na distrike ya Asie.
19. Likambo nini esalaki ete ‘liloba na Jéhovah ekolaki mpe elendisamaki na nguya’ na Efese?
19 Nzambe amonisaki ete andimaki mosala ya Paulo na kopesaka ye nguya ya kobikisa mpe kobengana bilimu mabe. (19:11-20) Kasi, bana nsambo ya nganga monene Scéva bakokaki kobengana démo te na kosalelaka nkombo na Yesu, mpo ete bazalaki bamonisi ya Nzambe to ya Klisto te. Nkutu bazokisamaki na moto oyo azalaki na démo yango. Na yango bato babangaki, mpe “nkombo na Nkolo Yesu ekumisamaki mingi”. Baoyo bakomaki bandimi bayambolaki misala na bango ya bilimu mabe mpe batumbaki mikanda na bango oyo mizalaki na makambo ya bondoki mpe maji liboso na bato nyonso. Luka akomi boye: “Na motindo boye liloba na Jéhovah ekolaki mpe elendisami na nguya.” Na mikolo na biso mpe, basaleli na Nzambe bazali kosalisa bato na komisikola na bilimu mabe.—Deteronome 18:10-12.
Botemeli mpo na solo elongi te
20. Mpo na nini batuli na bibende na Efese basalaki etuluku na yikiyiki, mpe ndenge nini etuluku yango epanzanaki?
20 Mbala mingi ba Témoins de Jéhovah bazali kokutana na bituluku na bato na nkanda, mpe likambo yango ekomelaki baklisto ya Efese. (19:21-41) Motuya na bandimi ezalaki kokola, yango nde ekweisaki mosala ya Démétrius oyo ya kotula bibende elongo na bamosusu, mpamba te bato mingi bazalaki lisusu kosomba bikeko ya Artémis te, nzambe mwasi na kobota oyo ekeko na ye ezalaki na mabele mingi. Na bopusi ya Démétrius, batomboki babendaki na esika ya masano Gaius mpe Aristarke, baoyo basalaki mobembo elongo na Paulo, kasi bayekoli bapekisaki Paulo na kokota na esika na masano. Ata bamoko kati na mikolo na bafeti mpe masano basengaki na ye ete akoka komitya na likama te. Na boumeli ya ngonga soko mibale, bibele bazalaki konganga boye: “Nzambe Artémis na Baefese azali monene!” Na nsuka, mosambisi ya liboso ya Efese (oyo azalaki kokamba likita na mikolo ya engumba) alobaki ete batuli na bibende bakokaki kofunda liboso na mokonzi, mosambisi oyo apesami ndingisa ya kosambisa, to likambo na bango ekokaki kokatama na ‘likita oyo endimami na mibeko’ ya ba citoyens. Soki bongo te, Rome ekokaki kotalela bayangani kati na likita oyo endimami na mibeko te lokola bato bazali kotya mobulu. Nsima na koloba bongo, apanzaki bato.
20 Nzambe asalisaki Paulo na koyika mpiko na komekama ya ndenge na ndenge mpe apambolaki milende oyo misionere yango asalaki mpo na kosalisa bato ete babwaka lokuta ya mangomba mpe bandima solo. (Tala Yilimia 1:9, 10) Tozali kosepela mingi ete Tata na biso na likoló azali kopambola mosala na biso ndenge asalaki mpo na Paulo. Na yango, na mikolo na biso lokola na ekeke ya liboso, ’liloba na Jehovah ezali kokola mpe elendisami na nguya.’
Bozongeli
◻ Ndakisa nini Paulo apesaki mpo na likambo etali komitika kotambwisama na elimo santu?
◻ Metode nini oyo ezali ntango nyonso kosalelama na basaleli ya Jéhovah Paulo asalelaki yango mpo na kolimbola mpe kondimisa’ maloba na ye?
◻ Lokola mpo na mosala ya kosakola oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kosala na ntango na biso, diskur ya Paulo na ngomba na Mars ebimisaki likambo nini?
◻ Ndenge nini Paulo akokisaki bamposa na ye ya mosuni kati na mosala na ye ya kosakola, mpe nani azali kosala lokola ye na mikolo na biso?
◻ Lokola Nzambe asalaki yango mpo na mosala ya Paulo na lolenge nini azali kopambola mosala ya ba Témoins de Jéhovah na mikolo na biso?
21. Ndenge nini Nzambe apambolaki mosala ya Paulo, mpe ndenge nini azali kopambola mosala ya ba Témoins de Jéhovah na ntango na biso?
[Bililingi na lokasa 16, 17]
Liloba na Jehovah elekaki na nguya na mboka
1. Filipe
2. na, 3. Athènes
4. na, 6. Efese
5. Rome