Tózala na ekateli ya kopesa litatoli malamumalamu
“Atindaki biso tósakola epai ya bato ya ekólo mpe tópesa litatoli malamumalamu.”—MIS. 10:42.
1. Ntango asololaki na Koloneyi, Petelo alobelaki mokumba nini?
MOKONZI moko ya basoda ya Italie ayanganisaki bandeko mpe baninga na ye; na libaku yango, Nzambe abandisaki likambo moko ya sika na boyokani na Ye ná bato. Moto yango oyo azalaki kobanga Nzambe nkombo na ye ezalaki Koloneyi. Ntoma Petelo ayebisaki bato oyo bayanganaki ete bantoma bazwaki etinda ya ‘kosakola epai ya bato ya ekólo mpe kopesa litatoli malamumalamu’ mpo na Yesu. Litatoli ya Petelo ebotaki mpenza mbuma. Bato yango oyo bazalaki Bayuda te mpe bato bakatamá ngenga te bazwaki elimo santu ya Nzambe, babatisamaki, mpe bakómaki na likoki ya kozala bakonzi na likoló elongo na Yesu. Yango ezalaki matomba oyo Petelo azwaki na ndenge apesaki litatoli malamumalamu!—Mis. 10:22, 34-48.
2. Ndenge nini toyebi ete mokumba ya kopesa litatoli esukaki kaka te na bantoma 12?
2 Likambo yango esalemaki na mobu 36 T.B. Mbula mibale liboso, mobali moko oyo azalaki motɛmɛli makasi ya Lingomba ya boklisto akutanaki na likambo oyo ebongolaki bomoi na ye. Saulo moto ya Talasi, azalaki kokende na Damasi ntango Yesu abimelaki ye mpe alobaki na ye ete: “Kɔtá na kati ya engumba, mpe bakoyebisa yo oyo osengeli kosala.” Yesu ayebisaki moyekoli Ananiasi ete Saulo akopesa litatoli “epai ya bikólo mosusu mpe epai ya bakonzi mpe epai ya bana ya Yisalaele.” (Tángá Misala 9:3-6, 13-20.) Ntango akutanaki na Saulo, Ananiasi alobaki boye: “Nzambe ya bankɔkɔ na biso aponi yo . . . mpamba te osengeli kozala, epai ya bato nyonso, motatoli na ye.” (Mis. 22:12-16) Ndenge nini Saulo, oyo na nsima akómaki kobengama Paulo, akokisaki mokumba na ye ya kopesa litatoli?
Apesaki litatoli malamumalamu!
3. (a) Tokotalela lisolo nini? (b) Bankulutu ya Efese basalaki nini ntango bayokaki ete Paulo abengisi bango, mpe yango epesi biso ndakisa nini?
3 Tokosepela mingi soki totaleli na mozindo makambo nyonso oyo Paulo asalaki na nsima; kasi tótya naino likebi na lisukulu oyo asalaki na mobu 56 T.B., oyo ezali na Misala mokapo 20. Paulo asalaki lisukulu yango na nsuka ya mobembo na ye ya misato na mosala ya misionɛrɛ. Akómaki na Milete, engumba moko oyo ezalaki na libongo na Mbu ya Égée, mpe longwa na engumba yango, abengisaki bankulutu ya lisangá ya Efese. Efese ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 50; kasi mobembo ezalaki molai koleka mpamba te nzela ezalaki nyokanyoka. Na ntembe te, bankulutu ya Efese basepelaki mingi ntango bayokaki maloba oyo Paulo atindelaki bango. (Talá mpe Masese 10:28.) Atako bongo, basengelaki komibongisa mpo na kosala mobembo tii na Milete. Ekoki kozala ete bamosusu bazwaki konje na mosala to bakangaki bisika na bango ya mosala. Lelo oyo mpe, baklisto mingi basalaka bongo mpo bázangisa ata mokolo moko te ya liyangani ya etúká oyo esalemaka mbula na mbula.
4. Paulo asalaki makambo nini na boumeli ya mwa bambula oyo alekisaki na Efese?
4 Okanisi ete Paulo asalaki nini na Milete na boumeli ya mikolo misato to minei oyo elekaki liboso bankulutu wana bákóma kuna? Soki ezalaki yo, olingaki kosala nini? (Talá mpe Misala 17:16, 17.) Makambo oyo Paulo ayebisaki bankulutu ya Efese ezali kopesa biso mwa likanisi. Alobelaki makambo oyo azalaki kosala banda bambula mingi, ata ntango azalaki na Efese, mwa bambula liboso. (Tángá Misala 20:18-21.) Ayebaki ete moto moko te akoki kowangana maloba na ye mpe ayebisaki bango boye: “Boyebi malamu ndenge banda mokolo ya liboso oyo nanyataki etúká ya Azia . . . natatolaki malamumalamu.” Ya solo, azalaki na ekateli ya kokokisa mokumba oyo Yesu apesaki ye. Ndenge nini akokisaki yango na Efese? Liboso, apesaki litatoli epai ya Bayuda; azalaki kokende na bisika oyo akokaki kokuta bango. Luka alobi ete ntango Paulo azalaki na Efese, na mobu soki 52 tii 55 T.B., azalaki ‘kosala masukulu mpe kosalela mayele ya kondimisa’ na sinagoga. Ntango Bayuda “bakobaki kokómisa mitema na bango makasi mpe bazalaki kondima te,” Paulo alukaki bato mosusu, akómaki kofanda esika mosusu kaka na engumba yango, kasi akobaki kosakola. Na bongo, apesaki litatoli epai ya Bayuda mpe Bagrɛki na engumba wana monene.—Mis. 19:1, 8, 9.
5, 6. Nini emonisi ete ntango Paulo azalaki kokende ndako na ndako, azalaki nde kosakola epai ya bato oyo bazalaki bandimi te?
5 Bato mosusu oyo bakómaki baklisto bakokisaki masɛngami mpe baponamaki lokola bankulutu; bango nde Paulo abengisaki mpe asololaki na bango na Milete. Paulo ayebisaki bango lisusu ndenge asalaki mosala na ye: “Namipekisaki te koyebisa bino makambo nyonso oyo ezalaki na litomba to koteya bino na bisika ya bato nyonso mpe na ndako na ndako.” Lelo oyo, bato mosusu balobaka ete Paulo alobelaki ndenge oyo azalaki kotala bandeko na bandako na bango mpo na kolendisa bango. Kasi ezali bongo te. Maloba ‘koteya na bisika ya bato nyonso mpe na ndako na ndako’ ezalaki kolimbola libosoliboso kopesa litatoli epai ya bato oyo bazali bandimi te. Tokoki mpe komona yango polele na maloba oyo elandi; Paulo alobi ete azalaki kopesa litatoli “epai ya Bayuda mpe epai ya Bagrɛki na oyo etali kobongola motema epai ya Nzambe mpe kondima na kati ya Nkolo na biso Yesu.” Tomoni polele ete Paulo azalaki kopesa litatoli epai ya bato oyo bazalaki bandimi te, baoyo basengelaki kobongola motema mpe kondimela Yesu.—Mis. 20:20, 21.
6 Na buku na ye oyo elobeli na mozindo Makomami ya Grɛki ya boklisto, moto moko ya mayele alobaki boye mpo na Misala 20:20: “Paulo alekisaki mbula misato na Efese. Alekaki na ndako mokomoko, to mpe asakolaki epai ya bato nyonso (vɛrsɛ 26). Likambo yango emonisi ete Biblia elendisi mosala ya kosakola ndako na ndako mpe na bisika oyo bato bayanganaka.” Ezala ete Paulo alekaki na ndako mokomoko ndenge moto yango ya mayele alobi to te, alingaki ete bankulutu ya Efese bábosana te ndenge oyo apesaki litatoli mpe mbuma oyo yango ebotaki. Luka akomaki boye: “Baoyo nyonso bazalaki kofanda na etúká ya Azia bayokaki liloba ya Nkolo, ezala Bayuda mpe Bagrɛki.” (Mis. 19:10) Kasi, ndenge nini bato “nyonso” na etúká ya Azia bakokaki koyoka, mpe yango ezali komonisa nini mpo na mosala na biso ya kopesa litatoli?
7. Na ndenge nini mosala ya kosakola ya Paulo esalisaki ata bato oyo, mbala mosusu ye moko asololaki na bango te?
7 Lokola Paulo azalaki kosakola na bisika ya bato ebele mpe na ndako na ndako, bato mingi bayokaki nsango malamu. Okanisi ete bato nyonso oyo bayokaki nsango yango batikalaki kaka na Efese, mpe ete moto moko te akendaki esika mosusu mpo na kosala mombongo, kokende kotala bandeko, to kokima bomoi ya yikiyiki ya engumba monene? Na ntembe te, ezalaki na bato oyo basalaki yango. Lelo oyo mpe bato mingi basalaka mibembo mpo na bantina wana; mbala mosusu yo mpe osilá kosala yango. Lisusu, na ntango wana, bato mingi oyo bazalaki kouta bipai mosusu bazalaki kokende na Efese mpo na kotala bandeko na bango to mpo na kosala mombongo. Ntango bazalaki kuna, mbala mosusu bakutanaki na Paulo to bayokaki ye ntango azalaki kopesa litatoli. Bato yango bazalaki kosala nini ntango bazongi na bamboka na bango? Baoyo bandimaki mateya ya solo bazalaki kopesa litatoli. Ekoki mpe kozala ete bamosusu, atako bakómaki bandimi te, bazalaki koloba makambo oyo bayokaki na Efese. Na ndenge yango, bandeko, baninga ya kartye, to bakiliya bayokaki mateya ya solo, mpe ekoki kozala ete bamosusu bandimaki yango. (Talá mpe Malako 5:14.) Yango ezali komonisa nini mpo na mbuma oyo okoki kobuka soki ozali kopesa litatoli malamumalamu?
8. Ekoki kozala ete bato ya etúká ya Azia bayokaki mateya ya solo ndenge nini?
8 Mpo na mosala oyo asalaki na Efese na mbala ya liboso, Paulo akomaki ete ‘ekuke monene oyo ezali komema na mosala efungwelamaki ye.’ (1 Kol. 16:8, 9) Ekuke yango ezalaki nini mpe ndenge nini efungwelamaki ye? Mosala oyo Paulo asalaki na Efese esalaki ete nsango malamu epalangana. Tózwa ndakisa ya Kolose, Laodikia, mpe Hiyelapolisi, bingumba misato oyo ezalaki mosika te na Efese, kasi na kati mpenza ya mokili. Paulo akómaki na bingumba wana te, kasi nsango malamu ekómaki na bingumba yango. Epafalasi autaki kuna. (Kols. 2:1; 4:12, 13) Epafalasi ayokaki nde litatoli ya Paulo na Efese mpe akómaki moklisto? Biblia elobi yango te. Kasi, ekoki kozala ete Epafalasi azalaki momonisi ya Paulo na mboka na ye mpo na koteya solo. (Kols. 1:7) Ekoki mpe kozala ete nsango malamu ekómaki na bingumba lokola Filadelefia, Saladi, mpe Tyatila na boumeli ya bambula oyo Paulo azalaki kopesa litatoli na Efese.
9. (a) Paulo azalaki na mposa makasi ya kosala nini? (b) Mokapo ya mobu 2009 ezali nini?
9 Yango wana, bankulutu ya Efese bakokaki mpenza kondima maloba ya Paulo ete: “Nazali te kotalela molimo na ngai na motuya lokola eloko ya ntina epai na ngai, kaka nde nasilisa mbangu oyo nazali kopota mpe mosala ya ministre oyo nazwaki epai ya Nkolo Yesu, ya kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe.” Vɛrsɛ yango ezali na elendiseli oyo ezali mpe mokapo ya mobu 2009: ‘Pesá litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu.’—Mis. 20:24.
Kopesa litatoli malamumalamu lelo oyo
10. Ndenge nini toyebi ete biso mpe tosengeli kopesa litatoli malamumalamu?
10 Etinda ya ‘kosakola epai ya bato ya ekólo mpe kopesa litatoli malamumalamu’ ezalaki kaka mpo na bantoma te. Ntango Yesu asololaki na bayekoli na ye soki 500 oyo bayanganaki na Galilai nsima ya lisekwa na ye, apesaki bango etinda oyo: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.” Etinda yango etaleli baklisto nyonso ya solo lelo oyo, ndenge tokoki komona yango na maloba oyo ya Yesu: “Talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.”—Mat. 28:19, 20.
11. Batatoli ya Yehova bayebani mpo na mosala nini ya ntina mingi oyo basalaka?
11 Baklisto ya molende batosaka ntango nyonso etinda yango, basalaka makasi ‘bápesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu.’ Basalaka yango libosoliboso na kolanda ndenge oyo Paulo ayebisaki bankulutu ya Efese: na kosakola ndako na ndako. Na buku moko oyo ebimaki na mobu 2007, na ntina etali ndenge malamu ya kosala mosala ya misionɛrɛ, David Stewart alobaki boye: “Lolenge oyo Batatoli ya Yehova balakisaka mosakoli mokomoko ndenge ya koteya bato mosusu bindimeli na bango ezali malamu koleka maloba mpamba [ya kolendisa longwa na estrade]. Batatoli ya Yehova mingi batyaka na esika ya liboso mosala ya koyebisa bato mosusu bindimeli na bango.” Mosala yango eboti mbuma nini? Moto yango abakisi boye: “Na 1999, kaka bato 2 to 4 likoló ya monkama oyo natunaki na bingumba-mokonzi ya bikólo mibale ya Mpoto ya Ɛsti balobaki ete basololaki na bamisionɛrɛ ya Lingomba ya Mormon. Nzokande, bato 70 likoló na monkama (70 %) balobaki ete Batatoli ya Yehova basololaki na bango, bamosusu kutu mbala ebele.”
12. (a) Mpo na nini tozongaka “mbala ebele” na bandako ya bato na teritware na biso? (b) Okoki koloba na mokuse lisolo ya moto moko oyo azalaki kosepela koyoka biso te, kasi na nsima abongwanaki?
12 Ekoki mpe kozala bongo na bato ya mboka na bino. Na ntembe te yo mpe opesaki mabɔkɔ mpo mosala yango esalema. Ntango ozalaki kokutana na bato na mosala ya ndako na ndako, osololaki na mibali, basi, mpe bilenge. Ekoki kozala ete bamosusu basepelaki koyoka te atako omekaki kosolola na bango “mbala ebele.” Bamosusu bayokaki yo kaka mwa moke ntango otángelaki bango vɛrsɛ to omonisaki bango likanisi moko ya Biblia. Kasi, ozwaki mpe libaku ya kopesa bato mosusu litatoli ya malamu mpe bayokaki yo. Tokoki kokutana na makambo nyonso wana ntango tozali ‘kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu.’ Na ntembe te, oyebi ete ezali na bato mingi oyo bazalaki kosepela te atako Batatoli bazalaki kokutana na bango “mbala ebele,” kasi na nsima, babongwanaki. Mbala mosusu likambo moko ekómelaki bango moko, ndeko na bango to moninga na bango, mpe yango etindaki bango báfungola motema mpo na koyoka mateya ya solo. Lelo oyo bazali bandeko na biso ya elimo. Yango wana, kolɛmba nzoto te soki okutani naino te na bato oyo bazali kosepela. Tomizelaka te ete bato nyonso bákɔta na lingomba ya solo. Kasi, Nzambe alingi ete biso tókoba kopesa litatoli malamumalamu na molende mpe na mpiko.
Matomba oyo mbala mosusu tokoyeba yango te
13. Ndenge nini mosala na biso ya kopesa litatoli ekoki kobota mbuma oyo mbala mosusu tokoyeba yango te?
13 Mosala ya Paulo ebotaki mbuma kaka te epai ya bato oyo ye moko asalisaki mpo bákóma baklisto; ezali mpe bongo mpo na mosala na biso. Tosalaka makasi tósanganaka mbala na mbala na mosala ya ndako na ndako mpo na kopesa litatoli epai ya bato mingi. Toyebisaka nsango malamu epai ya baninga ya kartye, ya mosala, ya kelasi mpe bandeko na biso. Toyebaka matomba nyonso oyo yango ebotaka? Epai ya bato mosusu, matomba yango ekoki komonana mbala moko. Kasi, epai ya bato mosusu, mateya ya solo eumelaka mpo na kobota mbuma. Ata soki esalemi bongo te, bato oyo tosololi na bango bakoki mpe koyebisa bato mosusu makambo oyo tolobi, mateya na biso, to mpe kolobela etamboli na biso. Kozanga báyeba yango, ekoki kosalema ete bango nde baloni mboto ya solo na mitema ya malamu, epai ekobota mbuma.
14, 15. Litatoli oyo ndeko mobali moko apesaki ebotaki mbuma nini?
14 Tózwa ndakisa ya Ryan ná mwasi na ye Mandi, oyo bafandaka na etúká ya Floride, na États-Unis. Ryan apesaki litatoli ya libaku malamu epai ya moninga na ye ya mosala. Mobali yango oyo azalaki na Lingomba ya Hindu, azalaki kosepela na ndenge oyo Ryan azalaki kolata mpe koloba. Na masolo na bango, Ryan alobelaki lisekwa mpe liwa. Mokolo moko na mpokwa, na sanza ya Yanuali, mobali yango atunaki mwasi na ye Jodi soki ayebi Batatoli ya Yehova. Mwasi yango oyo azalaki na Lingomba ya Katolike, alobaki ete ayebi kaka ete Batatoli basakolaka ndako na ndako. Na nsima, Jodi akomaki “Batatoli ya Yehova” na Internet, mpe akɔtaki na adrɛsi na biso (www.watchtower.org). Na boumeli ya mwa basanza, Jodi azalaki kotánga makambo ekomami na esika yango; azalaki mpe kotánga Biblia mpe mikanda oyo ezalaki kosepelisa ye.
15 Na nsima, Jodi akutanaki na Mandi, mpamba te bango mibale bazali balifulumɛ. Mandi asepelaki mingi koyanola na mituna ya Jodi. Nsima ya mwa ntango, basololaki lisolo oyo Jodi abengaka lisolo oyo “ebandi na Adama tii na Armagedona.” Jodi andimaki bákóma koyekola Biblia na ndako. Mosika te, akómaki koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi. Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ, Jodi akómaki mosakoli, mpe na sanza ya Febwali, azwaki batisimo. Akomi boye: “Sikoyo, lokola nayebi solo, nakómi na bomoi ya esengo mpe ya ntina.”
16. Likambo oyo ndeko moko na etúká ya Floride akutanaki na yango ezali komonisa nini na oyo etali milende na biso mpo na kopesa litatoli malamumalamu?
16 Ryan akokaki koyeba te ete litatoli oyo apesaki mobali moko ekokaki kosalisa moto mosusu aya na losambo ya solo. Kutu, ye ayebaki na nsima mbuma oyo ekateli na ye ya ‘kopesa litatoli malamumalamu’ ebotaki. Kasi, ekoki kosalema ete opesi litatoli na ndako moko, na mosala, na eteyelo, to na libaku malamu, mpe kozanga ete oyeba yango, epesi bato mosusu nzela ya koyoka nsango malamu. Se ndenge Paulo ayebaki te mbuma nyonso oyo mosala na ye ebotaki na “etúká ya Azia,” yo mpe okoki koyeba te mbuma nyonso oyo mosala na yo ya kopesa litatoli malamumalamu ekoki kobota. (Tángá Misala 23:11; 28:23.) Kasi ezali na ntina mingi okoba kopesa litatoli!
17. Ozali na ekateli ya kosala nini na boumeli ya mobu 2009?
17 Tiká ete na boumeli ya mobu 2009, tókokisa malamu mosala na biso ya kopesa litatoli ndako na ndako mpe na bisika mosusu. Na ndenge yango, tokoloba lokola Paulo ete: “Nazali te kotalela molimo na ngai na motuya lokola eloko ya ntina epai na ngai, kaka nde nasilisa mbangu oyo nazali kopota mpe mosala ya ministre oyo nazwaki epai ya Nkolo Yesu, ya kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe.”
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini ntoma Petelo, ntoma Paulo mpe baklisto mosusu ya ekeke ya liboso bapesaki litatoli malamumalamu?
• Mpo na nini mosala na biso ya kopesa litatoli ekoki kobota mbuma oyo mbala mosusu tokoyeba te?
• Mokapo ya mobu 2009 ezali nini, mpe mpo na nini okanisi ete ebongi mpenza?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]
Mokapo ya mobu 2009: ‘Pesá litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu.’—Mis. 20:24.
[Elilingi na lokasa 17]
Bankulutu ya Efese bayebaki ete Paulo azalaki kopesa litatoli ndako na ndako
[Elilingi na lokasa 18]
Mosala na yo ya kopesa litatoli malamumalamu ekoki komema matomba nini?