MOKAPO 20
Atako botɛmɛli, liloba ekobaki “kopalangana mpe kolonga”
Ndenge oyo Apolosi ná Paulo bapesaki mabɔkɔ mpo ete nsango malamu ekoba kokende liboso
Euti na Misala 18:23–19:41
1, 2. (a) Paulo ná baninga na ye bakutanaki na likama nini na Efese? (b) Tokolobela nini na mokapo oyo?
BABALABALA ya Efese etondi na yikiyiki mpe makɛlɛlɛ, mpe ebele ya bato bazali kopota mbangu. Bato basali etuluku, mpe mobulu ebandi! Bakangi baninga mibale oyo ntoma Paulo azali kosala na bango mobembo mpe bazali kobenda bango. Nzela monene mpe oyo ezali na bamagazini ekauki mbala moko ntango ebele ya bato oyo batondi na nkanda bazali kokende na esika monene ya masano ya engumba; esika yango ekoki koyamba bato 25 000. Bato mingi bayebi ata te ntina ya yikiyiki yango, kasi bayoki kaka nungunungu ete tempelo na bango ekómi na likama, ata mpe Artemisi, nzambe na bango oyo balingaka. Yango wana, babandi koganga ete: “Artemisi ya Baefese azali Monene!”—Mis. 19:34.
2 Tomoni ete Satana ameki lisusu kosalela ebele ya bato ya mobulu mpo na kopekisa ete nsango malamu ya Bokonzi epalangana. Ya solo, mobulu ezali te mayele kaka moko oyo Satana asalelaka. Na mokapo oyo, tokolobela mayele ndenge na ndenge oyo Satana asalelaki mpo na kobebisa mosala mpe bomoko ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso. Likambo eleki ntina, tokomona ete mayele na ye nyonso elongaki te mpo “na ndenge moko ya nguya, liloba ya Yehova ekobaki kopalangana mpe kolonga.” (Mis. 19:20) Mpo na nini bakristo yango balongaki? Balongaki mpo na bantina oyo esalisaka biso mpe tólonga lelo oyo. Ya solo, makasi oyo esalisaka biso tólonga ezali ya biso te, kasi ya Yehova. Nzokande, lokola bakristo ya siɛklɛ ya liboso, biso mpe tosengeli kokanga mabɔkɔ te. Elimo ya Yehova ekoki kosalisa biso tókolisa bizaleli oyo ekosalisa biso tólonga na mosala ya kosakola. Tótalela naino ndakisa ya Apolosi.
“Ayebaki Makomami malamu mpenza” (Misala 18:24-28)
3, 4. Akila ná Prisile bamonaki likambo nini oyo ezangaki epai ya Apolosi, mpe basalaki nini mpo na yango?
3 Ntango Paulo azalaki naino na nzela mpo na kokende na Efese, na mobembo na ye ya misato na mosala ya misionɛrɛ, Moyuda moko oyo nkombo na ye ezalaki Apolosi akómaki na engumba yango. Autaki na Alezandria, engumba moko ya Ezipito oyo ekendá nsango. Apolosi azalaki na makambo mingi ya malamu. Ayebaki mpenza koloba. Lisusu, “ayebaki Makomami malamu mpenza.” Longola yango, “azalaki kopela na elimo.” Lokola Apolosi azalaki na molende mpenza, azalaki koloba na mpiko liboso ya Bayuda na kati ya sinagoga.—Mis. 18:24, 25.
4 Akila ná Prisile bayokaki ndenge Apolosi azalaki koloba. Na ntembe te basepelaki koyoka ye azali koteya “na ndenge ya sikisiki mpenza makambo oyo etali Yesu.” Makambo oyo azalaki koloba mpo na Yesu ezalaki solo. Kasi, Akila ná mwasi na ye baumelaki te komona ete ezalaki na likambo moko ya ntina oyo Apolosi ayebaki te. “Ayebaki kaka batisimo ya Yoane.” Bato yango oyo bazalaki kosala bahema babangaki te kosalisa Apolosi mpo ayebaki koloba malamu mpe azalaki moto atángá mingi. Kasi, “bazwaki ye elongo na bango mpe balimbolelaki ye malamumalamu mateya ya Nzambe.” (Mis. 18:25, 26) Ndenge nini mobali yango oyo ayebaki koloba malamu mpe atángá mingi atalelaki likambo yango? Na ntembe te, amonisaki moko ya bizaleli ya ntina mingi oyo mokristo asengeli kokolisa: komikitisa.
5, 6. Nini esalisaki Apolosi akóma mosaleli ya ntina mingi ya Yehova, mpe liteya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye?
5 Lokola Apolosi andimaki lisalisi ya Akila ná Prisile, akómaki mosaleli ya Yehova ya malamu koleka. Asalaki mobembo tii na etúká ya Akaya, epai “asalisaki mpenza” bandimi oyo bazalaki kuna. Lisusu, apesaki litatoli malamu epai ya Bayuda ya etúká yango oyo bazalaki koloba ete Yesu azali te Masiya oyo alakamaki. Luka akomaki boye: “Na molende mpenza azalaki komonisa polele ete mateya ya Bayuda ezalaki ya lokuta, wana azalaki komonisa na nzela ya Makomami ete Yesu azali Kristo.” (Mis. 18:27, 28) Apolosi akómaki lisungi monene mpo na masangá! Kutu, soki “liloba ya Yehova” ekobaki kolonga, ezalaki mpe mpo na mosala na ye. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Apolosi?
6 Ezali na ntina mingi bakristo bázala na komikitisa. Mokomoko na biso azali na makabo ndenge na ndenge—ezala makoki oyo abotamá na yango, makambo oyo akutaná na yango na bomoi, to boyebi oyo azali na yango. Nzokande, tosengeli koyebana mingi nde na ezaleli ya komikitisa. Soki te, makoki na biso ekobimisela biso mikakatano. Ekoki kotinda biso tókolisa lolendo, oyo ezali ezaleli mabe mpenza. (1 Ko. 4:7; Yak. 4:6) Soki tozali mpenza na komikitisa, tokosala makasi tómonaka ete basusu baleki biso. (Flp. 2:3) Tokoyoka mabe te soki basemboli biso mpe tokoboya te ete basusu báteya biso. Tokotingama te na makanisi na biso ntango bamonisi biso ete eyokani te na litambwisi ya elimo santu. Soki tozali na komikitisa, tokozala basaleli ya ntina mingi ya Yehova ná Mwana na ye.—Luka 1:51, 52.
7. Na ndenge nini Paulo ná Apolosi bapesaki ndakisa malamu ya komikitisa?
7 Komikitisa epekisaka mpe kowelana. Satana azalaki mpenza na mposa ya kokɔtisa bokabwani na kati ya bakristo ya liboso! Alingaki kosepela mingi soki bato mibale lokola Apolosi ná ntoma Paulo bakómaki kowelana, mbala mosusu soki mokomoko na bango alukaki kozala na lokumu mingi na miso ya bandeko na masangá! Ekokaki kozala mpasi te mpo básala yango. Na Korinti, bakristo mosusu bakómaki koloba ete, “Ngai nazali moto ya Paulo,” mpe bamosusu bazalaki koloba ete, “Kasi ngai moto ya Apolosi.” Paulo ná Apolosi balendisaki nde elimo wana ya bokabwani? Te! Kutu, na komikitisa nyonso, Paulo andimaki ete Apolosi mpe asalaki mingi mpo mosala ekende liboso, apesaki ye mikumba mosusu. Apolosi mpe andimaki litambwisi ya Paulo. (1 Ko. 1:10-12; 3:6, 9; Tito 3:12, 13) Yango ezali ndakisa malamu ya komikitisa mpe ya kopesana mabɔkɔ mpo na biso lelo oyo!
‘Asalelaki mayele ya kondimisa na oyo etali Bokonzi’ (Misala 18:23; 19:1-10)
8. Paulo alandaki nzela nini mpo na kozonga na Efese, mpe mpo na nini?
8 Paulo alakaki ete akozonga na Efese, mpe akokisaki elaka na ye.a (Mis. 18:20, 21) Kasi, tótalela ndenge oyo azongaki. Mbala ya nsuka oyo tolobelaki ye, azalaki na Antiokia ya Siri. Mpo na kokóma na Efese, akokaki kosala mobembo mokuse tii na Selukia, azwi masuwa kuna, mpe akei mbala moko na Efese. Nzokande, ye asalaki mobembo “na nzela oyo eleki na kati ya mokili.” Moto moko alandelaki mobembo ya Paulo ndenge elobelami na Misala 18:23 mpe 19:1 mpe amonaki ete yango nyonso ezwaki ntaka ya kilomɛtrɛ soki 1 600! Mpo na nini Paulo aponaki nzela wana ya mpasi? Mpamba te azalaki na mokano ya “kolendisa bayekoli nyonso.” (Mis. 18:23) Ayebaki ete mobembo na ye ya misato na mosala ya misionɛrɛ ekosɛnga ye makambo mingi, lokola mobembo ya liboso mpe ya mibale, kasi amonaki ete ezali na ntina asala yango. Bakɛngɛli ya zongazonga ná basi na bango bamonisaka elimo ya ndenge wana. Osepelaka te na elimo na bango ya komipesa na bolingo nyonso?
9. Mpo na nini etuluku moko ya bayekoli bazwaki lisusu batisimo, mpe ezaleli na bango ekoki koteya biso nini?
9 Ntango Paulo akómaki na Efese, akutaki mibali soki zomi na mibale oyo bazalaki bayekoli ya Yoane Mobatisi. Bato yango bazwaki batisimo oyo ezalaki lisusu na ntina te. Longola yango, emonanaki ete bayebaki mpenza te to mpe ata moke te soki elimo santu ezali nini. Paulo alimbwelaki bango makambo yango, mpe lokola Apolosi, bato yango bamonisaki komikitisa mpe mposa ya koyekola. Nsima ya kobatisama na nkombo ya Yesu, bazwaki elimo santu mpe makabo ya kosala makamwisi. Na bongo, tomoni ete kolanda ebongiseli ya Yehova oyo ezali kokende liboso ememaka mapamboli.—Mis. 19:1-7.
10. Mpo na nini Paulo alongwaki na sinagoga mpe akómaki koteya na ndako ya eteyelo, mpe yango ezali koteya biso nini mpo na mosala ya kosakola?
10 Mbongwana mosusu esalemaki mwa moke na nsima. Paulo asakolaki na mpiko na sinagoga na boumeli ya sanza misato. Atako azalaki “kosalela mayele ya kondimisa na oyo etali Bokonzi ya Nzambe,” bato mosusu bakómisaki mitema na bango makasi mpe bakómaki batɛmɛli mpenza. Na esika Paulo abebisa ntango na ye na bato oyo bazalaki “koloba mabe mpo na Nzela,” azwaki bibongiseli mpo akóma kosala badiskur na ndako ya eteyelo moko. (Mis. 19:8, 9) Baoyo bazalaki na mposa ya kokola na elimo basengelaki kotika kokende na sinagoga mpo na kokende na ndako ya eteyelo. Lokola Paulo, biso mpe tosengeli ntango mosusu kokata masolo soki tomoni ete moto oyo tozali kosolola na ye alingi koyoka te to alingi bantembe ya mpambampamba. Bampate oyo bazali na mposa ya koyoka nsango na biso ya kolendisa bazali naino mingi!
11, 12. (a) Na ndenge nini Paulo apesaki ndakisa ya molende mpe ya komesana na makambo ya sika? (b) Ndenge nini Batatoli ya Yehova bamonisaka molende mpe bamesanaka na makambo ya sika na mosala ya kosakola?
11 Ekoki kozala ete Paulo azalaki kosala badiskur na ndako yango ya eteyelo mokolo na mokolo banda na ngonga ya 11 tii pene na ngonga ya 4 nsima ya midi. (Mis. 19:9, nwtsty-F) Ekoki mpenza kozala ete bangonga yango ezalaki bangonga oyo ezalaki kimya mingi, kasi mpe oyo molunge ezalaki makasi; bato mingi bazalaki kokata misala na bango mpo na kolya mpe kopema. Soki Paulo alandaki programɛ ya mpasi ndenge wana na boumeli ya mbula mibale mobimba, boye asalaki ngonga koleka 3 000, elingi koloba ngonga 125 na sanza, na koteya.b Yango mpe ezali ntina mosusu oyo liloba ya Yehova ekobaki kopalangana mpe kolonga. Paulo azalaki mosali ya molende mpe ayebaki komesana na makambo ya sika. Azalaki kobongisa programɛ na ye mpo asakolaka na ntango oyo ebongi mpo na bato ya teritware wana. Yango ebotaki mbuma nini? “Baoyo nyonso bazalaki kofanda na etúká ya Azia bayokaki liloba ya Nkolo, Bayuda ná Bagrɛki.” (Mis. 19:10) Apesaki mpenza litatoli malamumalamu!
12 Batatoli ya Yehova ya ntango na biso bazalaka mpe na molende na mosala mpe bayebaka ndenge ya komesana na makambo ya sika. Tosalaka makasi tókutana na bato na bisika mpe na bangonga oyo tokoki kozwa bango. Topesaka litatoli na babalabala, na bazando, mpe na baparkingi. Ntango mosusu tosololaka na bato na telefone to mpe tokomelaka bango mikanda. Lisusu, na mosala ya ndako na ndako, tosalaka makasi tókende epai ya bato na bangonga oyo tokoki kokuta bango.
Liloba “ekobaki kopalangana mpe kolonga” atako bilimo mabe (Misala 19:11-22)
13, 14. (a) Yehova apesaki Paulo nguya ya kosala nini? (b) Libunga nini bana ya Sekeva basalaki, mpe ndenge nini bato mingi oyo bazali na mangomba ya bokristo basalaka libunga yango?
13 Luka alobi ete na eleko oyo elandaki, makambo minene esalemaki; Yehova apesaki Paulo likoki ya kosala “misala minene ya nguya.” Bato bazalaki kozwa biteni ya bilamba mpe bilamba ya mosala oyo Paulo alataki, komemela yango bato ya maladi, mpe bazalaki kobika. Bazalaki mpe kosalela bilamba yango mpo na kobengana bilimo mabe.c (Mis. 19:11, 12) Bolongi monene wana likoló ya bilimo mabe ebendaki likebi ya bato mingi; kasi, bato mosusu bazwaki yango na ndenge ya malamu te.
14 “Bayuda [mosusu] oyo bazalaki kotambolatambola mpo na kobimisa bademo,” bamekaki kosala makamwisi oyo Paulo azalaki kosala. Bayuda yango mosusu babelelaki nkombo ya Yesu mpe ya Paulo mpo na komeka kobengana bademo. Luka atángi ndakisa ya bana nsambo ya Sekeva—oyo bazalaki na libota ya banganga-nzambe—oyo balukaki kosala bongo. Demo alobaki na bango ete: “Nayebi Yesu mpe nayebi soki Paulo azali nani; kasi bino banani?” Na nsima, moto oyo azalaki na demo abɛtaki bato yango ya lokuta, apumbwelaki bango lokola nyama ya zamba, akimisaki bango bolumbu mpe bazokizoki bampota. (Mis. 19:13-16) “Liloba ya Yehova” elongaki mpenza mpamba te bokeseni emonanaki polele kati na Paulo mpe bato wana ya lokuta. Lelo oyo, ebele ya bato bazali komikosa ete kobelela kaka nkombo ya Yesu to kolata nkombo “mokristo” ekoki mpo na kosalisa bango. Nzokande, Yesu amonisaki ete kaka baoyo bazali kosala mokano ya Tata na ye nde bazali na elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya.—Mat. 7:21-23.
15. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya bato ya Efese mpo na makambo mpe biloko oyo ezali na boyokani na bilimo mabe?
15 Bato mingi babangaki Nzambe ntango bamonaki ndenge oyo elimo mabe esambwisaki bana ya Sekeva, mpe mingi bakómaki bakristo mpe batikaki misala ya bilimo mabe. Bato mingi ya Efese bamipesaki na misala ya maji. Bato mingi bazalaki kobelela bilimo mabe mpe bazalaki kolata bikelakela; bazalaki mpe na mikanda oyo ezalaki na maloba ya kobelela bilimo mabe. Nsima ya komona makambo wana, bato mingi ya Efese babimisaki babuku na bango ya maji mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso, atako ezalaki babuku oyo ekoki kotɛkama na bankóto ya badolare lelo oyo.d Luka alobi boye: “Na yango, na ndenge moko ya nguya, liloba ya Yehova ekobaki kopalangana mpe kolonga.” (Mis. 19:17-20) Mateya ya solo elongaki mpenza mateya ya lokuta mpe misala ya bademo! Bato yango ya sembo bapesaki ndakisa malamu mpo na biso. Biso mpe tozali na mokili oyo bato mingi bamipesi na misala ya bilimo mabe. Soki tomoni ete tozali na eloko moko oyo ezali na boyokani na misala ya bilimo mabe, tosengeli kosala lokola bato ya Efese, elingi koloba ete tosengeli kobwaka to kotumba yango nokinoki! Tósala nyonso mpo na kokima misala wana ya mabe.
“Mobulu monene ebimaki” (Misala 19:23-41)
16, 17. (a) Lobelá ndenge oyo Demetriusi atindaki bato bábimisa yikiyiki na Efese. (b) Ndenge nini bato ya Efese bamonisaki ete bazalaki na molende mabe?
16 Tólobela sikoyo mayele mabe ya Satana oyo Luka alobelaki ntango akomaki ete “mobulu monene ebimaki mpo na Nzela.” Luka alekisaki ndelo te ntango akomaki bongo.e (Mis. 19:23) Demetriusi, mosali moko ya biloko ya palata, nde abandisaki mobulu yango. Abendaki likebi ya baninga na ye basali ya biloko ya palata mpe ayebisaki bango ete bozwi na bango ezalaki kouta na mombongo ya bikeko. Na nsima amonisaki ete nsango oyo Paulo azalaki koteya ezalaki mabe mpo na mosala na bango, mpamba te bakristo bazalaki kosambela bikeko te. Na nsuka, alamusaki lolendo mpe bolingo ya ekólo ya bato yango, akebisaki bango ete nzambe-mwasi Artemisi oyo bazalaki kosambela azali na likama mpe ete tempelo na ye ya lokumu ‘bato bakopesa yango lisusu lokumu te.’—Mis. 19:24-27.
17 Maloba ya Demetriusi ekokisaki mokano na ye. Basali ya biloko ya palata babandaki koganga ete “Artemisi ya Baefese azali Monene!” mpe mboka mobimba ekɔtaki yikiyiki oyo ebimisaki makambo oyo tolobelaki na ebandeli ya mokapo oyo.f Lokola Paulo azalaki moto oyo abangaka likama te, alingaki kokende na esika monene ya masano mpo na koloba na ebele wana ya bato, kasi bayekoli bapekisaki ye makasi ete atya bomoi na ye na likama te. Mobali moko oyo nkombo na ye ezalaki Alezandre atɛlɛmaki liboso ya ebele ya bato mpe amekaki koloba. Lokola azalaki Moyuda, ekoki kozala ete azalaki na mposa makasi ya kolimbwela bango ete Bayuda bakeseni na bakristo. Kasi, bokeseni wana elobaki eloko te mpo na ebele ya bato wana. Ntango kaka bayebaki ete azali Moyuda, bawololaki ye, bazongelaki koganga ete: “Artemisi ya Baefese azali monene!” mpe basalaki bongo na boumeli ya ngonga mibale. Bandimi ya mangomba oyo bazalaka na molende mabe basalaka kaka bongo. Ezaleli yango ekómisaka bato lokola banyama.—Mis. 19:28-34.
18, 19. (a) Na Efese, mokomi-makambo ya engumba asalaki nini mpo bato báfanda nyɛɛ? (b) Ndenge nini bakonzi mosusu babatelaki basaleli ya Yehova, mpe ndenge nini etamboli na biso ekoki kosalisa mpo tózwa libateli ya ndenge wana?
18 Na nsuka, mokomi-makambo ya engumba amekaki kofandisa bato nyɛɛ. Mokonzi yango oyo azalaki na makanisi malamu ayebisaki bato ete bakristo bakokaki te kotya na likama tempelo na bango mpe nzambe-mwasi na bango; alobaki mpe ete Paulo ná baninga na ye basalaki likambo moko ya mabe te na tempelo ya Artemisi; mpe alobaki ete ezali na nzela oyo endimami na mibeko mpo na kolandela makambo ya ndenge wana. Mbala mosusu, likambo oyo elɛmbisaki bango nzoto ezali ete ayebisaki bango ete bakonzi ya Roma bakokaki kopesa bango etumbu mpo na koyangana wana oyo mibeko epesi nzela te mpe oyo ekɔtisaki mobulu. Nsima ya koloba bongo, asɛngaki na bato bápanzana. Maloba wana ya mayele mpe oyo ebongi ekitisaki bango nkanda mpe makambo nyonso esilaki.—Mis. 19:35-41.
19 Yango ezalaki mbala ya liboso mpe ya nsuka te, oyo mokonzi moko oyo azali moto ya kimya mpe ya makanisi malamu akɔtela bayekoli ya Yesu. Kutu, ntoma Yoane amonaki na emonaneli moko ete na mikolo ya nsuka, ebongiseli ya mokili oyo efandi makasi, oyo emonisami na elilingi ya mabele, ekomɛla minyoko oyo ezali lokola ebale, oyo Satana akobimisela bayekoli ya Yesu. (Em. 12:15, 16) Likambo yango emonani solo. Mbala mingi, bazuzi oyo bazali na makanisi ya malamu balongisaki ntomo ya Batatoli ya Yehova ya koyangana mpe kosakola nsango malamu. Ya solo, etamboli na biso esalisaki mingi mpo na bolongi yango. Ekoki kozala ete etamboli malamu ya Paulo esalaki ete bakonzi mosusu ya Efese básepela na ye mpe bámemya ye, yango wana babatelaki ye. (Mis. 19:31) Biso mpe tósala ete bato oyo tokutanaka na bango bámonaka ete tozali bato ya sembo mpe ya limemya. Tokoki koyeba te matomba nini yango ekopesa.
20. (a) Oyokaka ndenge nini soki okanisi ndenge liloba ya Yehova elongaki na siɛklɛ ya liboso mpe ezali kolonga lelo oyo? (b) Mokano na yo ezali nini mpo na bolongi ya Yehova na ntango na biso?
20 Ezali mpenza esengo komona ndenge oyo “liloba ya Yehova ekobaki kopalangana mpe kolonga” na siɛklɛ ya liboso! Ezali mpe esengo komona ndenge oyo Yehova asali ete bolongi ya ndenge wana emonana na mikolo na biso. Okolinga kozala na libaku malamu ya kopesa mabɔkɔ, ata moke, na bolongi ya ndenge yango? Boye, zwá liteya na bandakisa oyo touti kolobela. Zalá ntango nyonso na komikitisa, tambolá elongo na ebongiseli ya Yehova oyo ezali kokende liboso, zalá na molende na mosala, boyá misala ya bilimo mabe, mpe salá nyonso oyo okoki mpo na kopesa litatoli malamu na nzela ya bosembo mpe limemya.
a Talá etanda “Efese—Engumba-mokonzi ya etúká ya Azia,” na lokasa 161.
b Paulo akomaki mpe mokanda ya 1 Bakorinti ntango azalaki na Efese.
c Biteni ya bilamba yango ekoki kozala mwa elamba oyo Paulo azalaki kokanga na elongi mpo motoki ekitela ye na miso te. Lokola Paulo azalaki na bilamba ya mosala na bantango wana, yango emonisi ete mbala mosusu azalaki kosala mosala na ye ya kotonga bahema na bangonga oyo azalaki kosakola te, mbala mosusu na ntɔngɔntɔngɔ.—Mis. 20:34, 35.
d Luka alobi ete mikanda yango ezalaki na motuya ya mbongo ya palata 50 000. Soki mbongo ya palata oyo alobelaki ezali nde denari, mpo na kozwa yango, moto oyo azalaki kosala mikolo nsambo na pɔsɔ na ntango wana asengelaki kosala mosala mikolo 50 000, elingi koloba mbula soki 137.
e Bato mosusu balobaka ete Paulo azalaki kokanisa likambo yango ntango akomelaki Bakorinti ete “tozalaki ata kobanga mpo na bomoi na biso.” (2 Ko. 1:8) Kasi, ekoki mpe kozala ete azalaki kokanisa likambo mosusu oyo ezalaki likama monene koleka. Ntango Paulo akomaki ete ‘abundaki na banyama mabe na Efese,’ ekoki kozala ete azalaki kokanisa banyama mabe na libándá ya masano to bato oyo batɛmɛlaki ye. (1 Ko. 15:32) Ekoki kozala ete Paulo abundaki na banyama ya solo mpenza to asalelaki kaka maloba ya elilingi.
f Bamoziki, to masangá ya bato ya misala ya mabɔkɔ ezalaki makasi. Na ndakisa, mbula soki nkama na nsima, lisangá moko ya basali-mampa ebimisaki yikiyiki ya ndenge wana na Efese.