MOKAPO 21
“Nazali pɛto na makila ya bato nyonso”
Molende ya Paulo na mosala ya kosakola mpe toli na ye epai ya bankulutu
Euti na Misala 20:1-38
1-3. (a) Lobelá makambo oyo elekaki ntango Etishe akufaki. (b) Paulo asalaki nini, mpe yango emonisi nini mpo na ye?
PAULO azali elongo na ebele ya bandeko na shambrɛ moko ya likoló, na engumba Troase. Azali koloba na bango banda ntango molai, mpo yango ezali butu ya nsuka oyo akozala elongo na bango. Tokómi midi ya butu. Miinda mingi ezali kopela na kati ya shambrɛ yango mpe ezali kobakisa molunge mpe milinga na esika yango. Elenge mobali moko oyo nkombo na ye Etishe, afandi na fɛnɛtrɛ. Ntango Paulo azali koloba, Etishe alali mpɔngi mpe akwei longwa na fɛnɛtrɛ yango oyo ezali na etaje ya misato!
2 Lokola Luka azalaki monganga, na ntembe te azalaki na kati ya bato ya liboso oyo babimaki nokinoki mpo na kotala elenge yango. Bamonaki polele likambo oyo ekómelaki Etishe. “Balɔkɔtaki ye ebembe.” (Mis. 20:9) Kasi, na nsima, likamwisi moko esalemaki. Paulo amibwakaki likoló ya elenge mobali yango mpe alobaki na bandeko ete: “Bótika makɛlɛlɛ, azali na bomoi.” Paulo asekwisaki Etishe!—Mis. 20:10.
3 Likambo yango emonisaki nguya ya elimo santu. Moto moko te akokaki kopesa Paulo foti mpo na liwa ya Etishe. Atako bongo, alingaki te ete liwa ya elenge yango ebebisa likita wana ya ntina mingi to ebɛtisa moto libaku. Ndenge Paulo asekwisaki Etishe, abɔndisaki lisangá mpe alendisaki bango mpo bákoba kosakola. Tomoni mpenza ete Paulo azalaki komibanzabanza mpo na bomoi ya basusu. Yango ezongisi na makanisi na biso maloba na ye oyo: “Nazali pɛto na makila ya bato nyonso.” (Mis. 20:26) Sikoyo, tótalela ndenge oyo ndakisa ya Paulo ekoki kosalisa biso na likambo yango.
“Akendaki na Masedonia” (Misala 20:1, 2)
4. Mokakatano nini Paulo akutanaki na yango?
4 Paulo akutanaki na mokakatano moko monene, ndenge tomonaki yango na mokapo eleki. Mosala na ye na Efese ebimisaki yikiyiki. Kutu, basali ya biloko ya palata, bato oyo bazalaki kobikela na losambo ya Artemisi, babimisaki mobulu! Misala 20:1 elobi boye: “Ntango yikiyiki ekitaki, Paulo abengaki bayekoli; mpe nsima ya kolendisa bango mpe kopesa bango mbote ya bokabwani, akendaki na Masedonia.”
5, 6. (a) Ekoki kozala ete Paulo aumelaki ntango boni na Masedonia, mpe asalaki nini mpo na bandeko kuna? (b) Ndenge nini Paulo azalaki kotalela bandeko na ye bandimi?
5 Ntango Paulo azalaki kokende na Masedonia, atɛlɛmaki na Troase, engumba oyo ezalaki na libongo ya masuwa mpe alekisaki mwa ntango kuna. Paulo azalaki na elikya ete Tito, oyo atindaki na Korinti, akokutana na ye na Troase. (2 Ko. 2:12, 13) Kasi, ntango Paulo amonaki ete Tito azali koumela, akendaki na Masedonia; mbala mosusu alekisaki pene na mbula mobimba na “kolendisa baoyo bazalaki kuna na maloba ebele.”a (Mis. 20:2) Nsukansuka, Tito alandaki Paulo na Masedonia mpe amemelaki ye bansango ya malamu mpo na ndenge oyo Bakorinti bayambaki mokanda na ye ya liboso. (2 Ko. 7:5-7) Yango etindaki Paulo akomela bango mokanda mosusu, oyo tobengaka 2 Bakorinti.
6 Tomoni ete Luka asalelaki liloba “kolendisa” mpo na kolobela mibembo oyo Paulo asalaki mpo na kokende kotala bandeko na Efese mpe na Masedonia. Liloba yango ezali komonisa malamumalamu ndenge oyo Paulo azalaki kotalela bandeko na ye bandimi! Paulo azalaki lokola Bafarisai te, oyo bazalaki kotyola bato mosusu; ye azalaki kotalela bampate lokola baninga na ye ya mosala. (Yoa. 7:47-49; 1 Ko. 3:9) Paulo abatelaki makanisi wana ata ntango asengelaki kopamela bango.—2 Ko. 2:4.
7. Lelo oyo, ndenge nini bakɛngɛli bakoki kolanda ndakisa ya Paulo?
7 Lelo oyo, bankulutu mpe bakɛngɛli ya zongazonga basalaka makasi bálanda ndakisa ya Paulo. Ata ntango bazali kopamela, basalaka yango na mokano ya kolendisa baoyo bazali na mposa ya lisalisi. Bakɛngɛli balukaka kolendisa, kasi kosambisa te. Mokɛngɛli ya zongazonga moko oyo aumeli na mosala yango amonisaki likanisi yango na maloba oyo: “Bandeko mingi bazalaka na mposa ya kosala oyo ezali malamu, kasi mbala mingi bamonaka lokola nde eloko moko ezali kokanga bango, babangaka, mpe bakanisaka ete bakoki te kosala makambo mosusu bango moko.” Bakɛngɛli bakoki kolendisa bandeko ya ndenge wana.—Ebr. 12:12, 13.
“Basalelaki ye likita” (Misala 20:3, 4)
8, 9. (a) Nini ebongolaki mokano ya Paulo ya kozwa masuwa mpo na kokende na Siri? (b) Ekoki kozala mpo na nini Bayuda bazalaki koyokela Paulo nkanda makasi?
8 Paulo alongwaki na Masedonia mpe akendaki na Korinti.b Nsima ya kolekisa sanza misato kuna, akómaki na mposa ya kokende na Kenkrea, epai azalaki na mokano ya kozwa masuwa mpo na kokende na Siri. Longwa kuna, akokaki kokende na Yerusaleme mpo na kotika makabo epai ya bandeko oyo bazalaki na bosɛnga.c (Mis. 24:17; Rom. 15:25, 26) Nzokande, likambo moko ya mbalakaka ebongolaki mikano ya Paulo. Misala 20:3 elobi boye: “Bayuda basalelaki ye likita”!
9 Tokoki kokamwa te ete Bayuda bayokelaki Paulo nkanda makasi, mpamba te bazalaki komona ete azali mopɛngwi. Ntango Paulo ayaki na Korinti mbala ya liboso, Krispusi, oyo azalaki mokambi ya sinagoga ya Korinti, abongwanaki nsima ya koyoka mateya na ye. (Mis. 18:7, 8; 1 Ko. 1:14) Na libaku mosusu, Bayuda ya Korinti bafundaki Paulo epai ya Galio, prokonsule ya Akaya. Kasi, Galio andimaki bifundeli yango te mpe likambo yango ebakisaki nkanda ya banguna ya Paulo. (Mis. 18:12-17) Ekoki kozala ete Bayuda ya Korinti bayebaki to bakanisaki ete mosika te Paulo akokende kozwa masuwa na Kenkrea, engumba oyo ezalaki mosika te; yango wana, basalaki mwango ya kokanga ye kuna. Paulo asalaki nini?
10. Tokoki nde koloba ete Paulo azalaki bibangabanga lokola aboyaki kokende na Kenkrea? Limbolá.
10 Mpo na kokima likama mpe kobatela biloko oyo bapesaki ye, Paulo amonaki malamu akende lisusu na Kenkrea te, kasi azongaki na nzela ya Masedonia. Ya solo, kosala mobembo na nzela ya mokili ezalaki mpe na makama. Mbala mingi, miyibi bazalaki kobombama na banzela. Baotɛlɛ mpe ezalaki na makama. Atako bongo, Paulo aponaki makama ya nzela ya mabele, na esika ya likama oyo akokaki kokutana na yango na Kenkrea. Likambo ya malamu mpo na ye ezali ete azalaki kosala mobembo ye moko te. Kati na baninga oyo Paulo asalaki na bango mobembo na eteni wana na mosala ya misionɛrɛ, tokoki kotánga Aristarke, Gayusi, Sekundusi, Sopatere, Timote, Trofime, mpe Tishike.—Mis. 20:3, 4.
11. Lelo oyo, ndenge nini bakristo bazwaka bibongiseli mpo na kokima makama, mpe ndakisa nini Yesu atikelaki bango?
11 Lokola Paulo, lelo oyo bakristo bazwaka bibongiseli mpo na kokima makama ntango bazali na mosala ya kosakola. Na bisika mosusu, na esika moto abima ye moko, babimaka nde na bituluku—to babimaka ata mibalemibale. Ezali boni mpo na minyoko? Bakristo bayebaka ete minyoko ekoki kozanga te. (Yoa. 15:20; 2 Tim. 3:12) Atako bongo, balukaka te makambo oyo ekoki kobendela bango mindɔndɔ. Tótalela ndakisa ya Yesu. Na libaku moko, ntango banguna na ye na Yerusaleme balingaki kobamba ye mabanga, “Yesu abombanaki mpe abimaki na tempelo.” (Yoa. 8:59) Na nsima, ntango Bayuda bazalaki kosala mwango mpo na koboma ye, “Yesu azalaki lisusu kotambola na polele te na kati ya Bayuda, kasi alongwaki wana mpe akendaki na etúká moko pene ya esobe.” (Yoa. 11:54) Yesu azwaki bibongiseli oyo esengeli mpo na kokima makama soki yango epekisi ye te kosala mokano ya Nzambe. Lelo oyo mpe bakristo basalaka ndenge yango.—Mat. 10:16.
“Babɔndisamaki mingi mpenza” (Misala 20:5-12)
12, 13. (a) Bandeko bayokaki ndenge nini nsima ya lisekwa ya Etishe? (b) Elikya nini euti na Biblia ebɔndisaka baoyo bazali kobungisa bandeko na bango lelo oyo?
12 Paulo ná baninga na ye balekaki na Masedonia mpe na nsima, emonani ete bakabwanaki nzela. Na ntembe te, bango nyonso bakutanaki lisusu na Troase.d Lisolo elobi boye: “Toyaki epai na bango na Troase mikolo soki mitano na nsima.”e (Mis. 20:6) Ezali na engumba yango nde Paulo asekwisaki elenge Etishe, ndenge tomonaki yango na ebandeli. Kanisá esengo oyo bandeko bayokaki ntango bamonaki ndeko na bango Etishe azongi na bomoi! Ndenge lisolo elobi yango, “babɔndisamaki mingi mpenza.”—Mis. 20:12.
13 Ya solo, lelo oyo makamwisi ya ndenge wana esalemaka lisusu te. Atako bongo, baoyo bandeko na bango bakufá ‘babɔndisamaka mingi mpenza’ na elikya ya lisekwa oyo euti na Biblia. (Yoa. 5:28, 29) Tókanisa likambo oyo: Lokola Etishe azalaki moto ya kozanga kokoka, nsukansuka akufaki lisusu. (Rom. 6:23) Kasi, baoyo bakosekwa na mokili ya sika ya Nzambe bakozala na likoki ya kotikala na bomoi libela na libela! Longola yango, baoyo bakosekwa mpo na koyangela elongo na Yesu na likoló bakozwa nzoto oyo ekoki kokufa te. (1 Ko. 15:51-53) Lelo oyo, bakristo oyo batyami mafuta na elimo ná “bampate mosusu” bazali na ntina malamu ya ‘kobɔndisama mingi mpenza.’—Yoa. 10:16.
“Na bisika ya bato nyonso mpe na ndako na ndako” (Misala 20:13-24)
14. Paulo alobaki nini epai ya bankulutu ya Efese ntango akutanaki na bango na Milete?
14 Paulo ná baninga na ye basalaki mobembo longwa na Troase tii na Asose, na nsima bakendaki na Mitilene, na Kiosi, na Samosi, mpe na Milete. Paulo azalaki na mokano ya kokóma na Yerusaleme na ntango mpo na Fɛti ya Pantekote. Lokola Paulo azalaki na mposa ya kokóma na Yerusaleme na eleko ya Pantekote, yango wana azwaki masuwa oyo etɛlɛmaki te na Efese. Kasi, lokola mpe azalaki na mposa ya kosolola na bankulutu ya Efese, abengisaki bango bákutana na Milete. (Mis. 20:13-17) Ntango bankulutu yango bakómaki, Paulo alobaki na bango boye: “Boyebi malamu ndenge namitambwisaki kati na bino, banda mokolo ya liboso oyo nanyataki etúká ya Azia, nazalaki kosalela Nkolo lokola moombo na komikitisa nyonso, na mai ya miso mpe na komekama oyo ekómelaki ngai mpo na makita mabe ya Bayuda, wana namipekisaki te koyebisa bino makambo nyonso oyo ezalaki na litomba to koteya bino na bisika ya bato nyonso mpe ndako na ndako. Kasi napesaki litatoli malamumalamu epai ya Bayuda mpe Bagrɛki mpo na makambo etali kobongola motema epai ya Nzambe mpe kondimela Nkolo na biso Yesu.”—Mis. 20:18-21.
15. Wapi mwa matomba ya kosakola ndako na ndako?
15 Lelo oyo, ezali na balolenge mingi oyo tokoki kokutana na bato mpo na koyebisa bango nsango malamu. Lokola Paulo, tosalaka makasi ete tókende na bisika oyo bato bazali, ezala na bisika oyo bato bazelaka bisi, na babalabala oyo bato mingi balekaka, to na bazando. Kasi, kokende ndako na ndako ezali lolenge ya libosoliboso oyo Batatoli ya Yehova basakolaka. Mpo na nini? Ya liboso, kosakola ndako na ndako epesaka moto nyonso libaku ya koyoka nsango ya Bokonzi na ndenge oyo esengeli, mpe yango emonisaka ete Nzambe aponaka bilongi te. Lisusu, epesaka bato ya mitema sembo libaku ya kozwa lisalisi oyo ebongi na kotalela bamposa na bango. Longola yango, kosakola ndako na ndako elendisaka kondima mpe mpiko ya baoyo basalaka mosala yango. Kutu, lelo oyo, molende mpo na kopesa litatoli “na bisika ya bato nyonso mpe ndako na ndako” ezali elembo oyo emonisaka bakristo ya solo.
16, 17. Ndenge nini Paulo amonisaki ete azalaki kobanga te, mpe ndenge nini Bakristo bakoki kolanda ndakisa na ye?
16 Paulo ayebisaki bankulutu ya Efese ete ayebaki te makambo nini akokutana na yango na Yerusaleme. Alobaki na bango boye: “Atako bongo, nazali kotalela bomoi na ngai te ete ezali na ntina mingi; eloko ya ntina nde nasilisa mbangu oyo nazali kopota mpe mosala oyo nazwaki epai ya Nkolo Yesu, ya kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe.” (Mis. 20:24) Paulo azalaki kobanga te, apesaki nzela na eloko moko te, ezala maladi to botɛmɛli makasi, ete epekisa ye kokokisa mokumba na ye tii na nsuka.
17 Lelo oyo mpe, bakristo bazali koyika mpiko na makambo ya mabe ndenge na ndenge. Na bamboka mosusu, Leta azali kopekisa mpe konyokola bango. Bamosusu bazali kobunda na bamaladi ndenge na ndenge. Bilenge bakristo bazali kosala makasi mpo bálanda te makambo mabe ya baninga na bango na kelasi. Lokola Paulo, Batatoli ya Yehova batɛlɛmaka ngwi, ata soki bakutani na makambo ya ndenge nini. Bazalaka na ekateli ya “kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu.”
“Bókeba mpo na bino moko mpe mpo na etonga mobimba” (Misala 20:25-38)
18. Ndenge nini Paulo atikalaki pɛto na makila ya bato nyonso, mpe ndenge nini bankulutu ya Efese bakokaki kosala lokola ye?
18 Na nsima, Paulo alobelaki ndakisa na ye moko mpo na kopesa bankulutu yango likebisi ya polele. Ya liboso ayebisaki bango ete ntango mosusu yango ezalaki mbala ya nsuka oyo bazalaki komona ye. Na nsima alobaki: “Nazali pɛto na makila ya bato nyonso, mpo namipekisaki te koyebisa bino mokano mobimba ya Nzambe.” Ndenge nini bankulutu ya Efese bakokaki kolanda ndakisa ya Paulo mpo bázala pɛto na makila ya bato nyonso? Ayebisaki bango: “Bókeba mpo na bino moko mpe mpo na etonga mobimba, oyo elimo santu etye bino bakɛngɛli na kati na yango, mpo na kobatela lisangá ya Nzambe, oyo ye asombaki na makila ya Mwana na ye moko.” (Mis. 20:26-28) Paulo akebisaki bango ete “bambwa mabe ya zamba” bakokɔta na kati ya etonga mpe “bakoteya mateya ya lokuta mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” Bankulutu basengelaki kosala nini? Paulo alobaki na bango boye: “Bólala mpɔngi te, mpe bóbosana te ete mbula misato, butu moi, natikaki te kokebisa mokomoko na bino na mai ya miso.”—Mis. 20:29-31.
19. Lipɛngwi nini ebimaki na nsuka ya siɛklɛ ya liboso, mpe yango ememaki nini na basiɛklɛ oyo elandaki?
19 “Bambwa mabe ya zamba” bakómaki komonana na nsuka ya siɛklɛ ya liboso. Na mobu soki 98 T.B., ntoma Yoane akomaki boye: “Ebele ya batɛmɛli ya Kristo babimi . . . Babimaki na kati na biso, kasi bazalaki baoyo ya biso te; mpo soki bazalaki baoyo ya biso, balingaki kotikala elongo na biso.” (1 Yoa. 2:18, 19) Na siɛklɛ ya misato, lipɛngwi ebimisaki bokristo ya nkombo mpamba mpe bakonzi na yango; longola yango, na siɛklɛ ya minei, Amperɛrɛ Constantin andimaki “bokristo” wana. Lokola bakonzi ya mangomba bandimaki milulu ya bapakano mpe bakómisaki yango “ya bokristo,” bakómaki mpenza ‘koteya makambo ya lokuta.’ Lipɛngwi wana ezali tii lelo komonana na mateya mpe mimeseno ya mangomba ya bokristo.
20, 21. Ndenge nini Paulo amonisaki elimo ya komipimela, mpe ndenge nini bankulutu bakoki komekola ye?
20 Ndenge oyo Paulo amitambwisaki ekeseni mpenza na bizaleli ya bato oyo na nsima bakómaki kolyela bampate na lisangá. Azalaki kosala mosala mpo na kokokisa bamposa na ye, mpo azala mokumba te mpo na lisangá. Azalaki kosalisa bandeko na ye mpo na koluka litomba na ye te. Paulo alendisaki bankulutu ya Efese ete bámonisa ezaleli ya komipimela. Alobaki boye: “Bosengeli kosalisa bato ya bolɛmbu. Mpe bosengeli kokanisa maloba oyo Nkolo Yesu alobaki: ‘Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.’”—Mis. 20:35.
21 Lelo oyo, bankulutu bamonisaka elimo ya komipimela lokola Paulo. Bakonzi ya mangomba ya bokristo balyelaka bandimi na bango; nzokande, bandeko oyo bazali “kobatela lisangá ya Nzambe” bakokisaka mikumba na bango mpo na kozwa lifuti te. Lolendo mpe mposa ya bokonzi ezali na esika te na lisangá ya bokristo ya solo, mpamba te baoyo ‘balukalukaka nkembo na bango moko’ bakosuka mabe. (Mas. 25:27) Moto ya lofundu asukaka kaka na nsɔni.—Mas. 11:2.
22. Nini esalaki ete bankulutu ya Efese bálinga Paulo?
22 Bandeko balingaki Paulo mingi mpo ye mpe alingaki bango mingi. Yango wana, ntango Paulo alingaki kokende, “bango nyonso balelaki makasi, bayambaki Paulo mpe bapwɛpwaki ye na boboto mpenza.” (Mis. 20:37, 38) Bakristo balingaka mpe basepelaka na bandeko oyo, lokola Paulo, bamipesaka mpo na etonga kozanga koluka litomba. Nsima ya kotalela ndakisa malamu ya Paulo, omoni te ete azalaki komikumisa te to kolekisa ndelo te ntango alobaki ete: “Nazali pɛto na makila ya bato nyonso”?—Mis. 20:26.
a Talá etanda “Mikanda oyo Paulo akomaki na Masedonia,” na lokasa oyo.
b Ekoki kozala ete ntango Paulo akendaki na Korinti na mbala wana nde akomaki mokanda na ye epai ya Baroma.
c Talá etanda “Paulo amemi makabo mpo na kosalisa bandeko,” na lokasa 169.
d Lokola Luka asaleli liloba “biso” na Misala 20:5, 6, yango emonisi ete akutanaki lisusu na Paulo na Filipi nsima ya kotikala kuna mwa ntango.—Mis. 16:10-17, 40.
e Mobembo ya kolongwa na Filipi tii na Troase eumelaki mikolo mitano. Ekoki kozala ete mipɛpɛ ezalaki kobɛta liboso ya masuwa, mpamba te na mbala mosusu, mobembo kaka wana eumelaki mikolo mibale mpamba.—Mis. 16:11.