Bópota mbangu mpo bózwa libonza
“Bópota mbangu na ndenge oyo ekosala ete bózwa yango.”—1 KO. 9:24.
1, 2. (a) Ndakisa nini Paulo asalelaki mpo na kolendisa bakristo oyo bazalaki Baebre? (b) Paulo alendisi biso tósala nini?
NA MOKANDA oyo akomelaki Baebre, ntoma Paulo asalelaki ndakisa ya bapoti-mbangu mpo na kolendisa baninga na ye bakristo. Amonisaki bango ete bazali kopota bango moko te na mbangu yango mpo na bomoi. Basaleli mingi ya Nzambe ya ntango ya kala oyo bapotaki mpe balongaki, bazalaki lokola ‘lipata monene ya batatoli’ oyo ezingi bango. Kokanisa ntango nyonso misala ya kondima mpe milende ya bato yango ya sembo elingaki kolendisa bakristo wana Baebre bákoba kopota mbangu tii na nsuka.
2 Na lisolo oyo eleki, tolobelaki bato mosusu ya sembo oyo bazali na kati ya ‘lipata ya batatoli.’ Bango nyonso bamonisaki ete kondima makasi epai ya Nzambe esalisaki bango bátikala sembo bomoi na bango mobimba; bapotaki mbangu tii na nsuka. Ndakisa na bango ekoki koteya biso. Ndenge tomonaki na lisolo yango, Paulo alendisaki baninga na ye basaleli ya Nzambe, ná biso mpe ete: “Tólongola mpe kilo nyonso ná lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi, mpe tóyika mpiko ntango tozali kopota mbangu na momekano oyo etyami liboso na biso.”—Ebr. 12:1.
3. Likambo nini Paulo alingaki kolobela ntango asalelaki ndakisa ya bapoti-mbangu na masano ya Bagrɛki?
3 Mpo na lisano ya mbangu, moko ya masano oyo bato bazalaki kolinga mingi na ntango wana, buku moko (Backgrounds of Early Christianity) elobi boye: “Bagrɛki bazalaki kosala ngalasisi mpe kopota bolumbu.”a Na ntango yango, bapoti-mbangu bazalaki kolongola bilamba nyonso to eloko nyonso oyo ekoki kolɛmbisa bango. Atako soki moto asali bongo lelo bato bakomona ye ete azangi bonkonde, bango bazalaki kosala bongo mpo balingaki ete eloko moko te epekisa bango kozwa libonza. Na yango, ntango Paulo ayebisaki bakristo wana Baebre ete ‘bálongola kilo nyonso,’ alingaki koloba ete basengeli kolongola na bomoi na bango eloko nyonso oyo ekoki kopekisa bango bázwa bomoi ya seko. Ezalaki toli moko ya malamu mpo na bakristo wana, mpe mpo na biso lelo oyo. Makambo nini ekoki kozala lokola kilo na bomoi na biso mpe kopekisa biso tópota malamu na momekano ya mbangu mpo na bomoi?
‘Tólongola kilo nyonso’
4. Bato ya eleko na Noa bamipesaki na makambo nini?
4 Paulo alobaki ete ‘tólongola kilo nyonso.’ Yango esangisi eloko nyonso oyo ekoki kopekisa biso tótya likebi nyonso mpe tómipesa mobimba na mbangu oyo tozali kopota. Wapi makambo mosusu oyo ekoki kozala kilo ya ndenge wana? Yesu asalisi biso tóyeba yango; alobelaki eleko ya Noa, moko ya bato oyo Paulo atángaki. Yesu alobaki boye: “Ndenge ezalaki na mikolo ya Noa, ekozala mpe bongo na mikolo ya Mwana ya moto.” (Luka 17:26) Awa, Yesu azalaki kolobela libosoliboso te libebi oyo ekoya; azalaki kolobela nde bizaleli ya bato ya ntango wana. (Tángá Matai 24:37-39.) Na ntango ya Noa, bato mingi bazalaki kokipe makambo ya Nzambe te, to kosala makambo oyo esepelisaka ye. Bazalaki kosala makambo nini? Makambo ya minene te, kaka kolya, komɛla mpe kobala, makambo oyo esalemaka na bomoi ya bato. Kasi ndenge Yesu alobaki, mabe na bango ezalaki nde ete “batyaki likebi te.”
5. Nini ekoki kosalisa biso tópota mbangu tii na nsuka?
5 Lokola Noa ná libota na ye, biso mpe tozali na mingi ya kosala mokolo na mokolo. Tosengeli koluka biloko ya kobikela mpe kokokisa bamposa na biso moko mpe ya libota na biso. Yango ekoki kozwa biso ntango mingi, mpe kosilisa biso makasi. Mpe soki tozangi mbongo, tokoki komitungisa mingi mpo na biloko ya kobikela. Lisusu, lokola tozali bakristo oyo bamipesá na Nzambe, tozalaka mpe na mikumba mosusu oyo etali losambo na biso. Kosakola, kobongisa makita mpe koyangana na makita yango, koyekola biso moko to kosala losambo na libota mpo tózala makasi na elimo. Atako Noa azalaki na mingi ya kosala na mosala ya Nzambe, “asalaki kaka bongo.” (Eba. 6:22) Na yango, soki tolingi kopota mbangu tii na nsuka, tosengeli kozala kaka na kilo oyo esengeli mpe koboya komema kilo mosusu ya mpambampamba.
6, 7. Toli nini ya Yesu tosengeli kobosana te?
6 Paulo alingaki koloba nini ntango akomaki ete tólongola “kilo nyonso”? Ya solo, tokoki te kobwaka mikumba na biso nyonso. Kasi, tóbosana mpe te ndenge Yesu alobaki ete: “Bómitungisa ata moke te mpe bóloba te ete: ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ Mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo balukaka na lokoso mpenza. Mpo Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana.” (Mat. 6:31, 32) Maloba ya Yesu emonisi mpe ete ata makambo ya ntina na bomoi, na ndakisa kolya mpe kolata, ekoki mpe kokóma kilo mpe libaku soki totye yango na esika ya liboso na bomoi na biso.
7 Tóbosana te maloba ya Yesu ete: “Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana.” Yango elakisi ete Yehova, Tata na biso ya likoló, akokokisa bamposa na biso. Nzokande, ntango mosusu “biloko nyonso wana” ekozala te oyo biso moko tosepeli na yango to tozali koluka. Atako bongo, Yesu ayebisaki biso ete tómitungisa te mpo na “biloko oyo bikólo balukaka na lokoso mpenza.” Mpo na nini? Na nsima, Yesu apesaki toli oyo: “Bókeba ete mitema na bino ekóma kilo te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi, noki na ntango wana kaka, mokolo wana ekwela bino pwasa lokola motambo.”—Luka 21:34, 35.
8. Mpo na nini sikoyo nde ntango mpenza ya ‘kolongola kilo nyonso’?
8 Ndelo ya nsuka ya mbangu oyo tozali kopota ekómi pene. Ekozala mpenza mawa soki totiki bakilo ya mpambampamba epekisa biso tókóma na ndelo yango! Na yango, toli oyo ya ntoma Paulo ebongi mpenza: “Ezaleli . . . ya kokangama na Nzambe ná ezaleli ya kosepela na oyo ozali na yango ezali nzela ya kozwa litomba monene.” (1 Tim. 6:6) Soki tolandi toli ya Paulo, ekozala mpasi te tókóma tii na nsuka mpe tózwa libonza.
“Lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi”
9, 10. (a) “Lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi” ezali nini? (b) Ndenge nini tokoki kokangama?
9 Paulo alobaki mpe ete tosengeli kolongola “lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi.” Ekoki kozala nini? Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kokanga biso kozanga mpasi” ezali kaka mbala moko na Biblia, na Baebre 12:1. Moto moko ya mayele na nkombo Albert Barnes alobaki boye: “Kaka ndenge mopoti-mbangu asengelaki kokeba mpo alata te elamba oyo ekoki kolínga ye makolo ntango azali kopota, mokristo mpe asengeli koboya eloko nyonso oyo ekoki kopekisa ye apota malamu.” Mokristo asengeli kotika eloko moko te ekanga ye, elingi koloba elɛmbisa to ebebisa kondima na ye. Ndenge nini kondima ya mokristo ebebaka?
10 Kondima ya mokristo ebebaka na mbala moko te. Ekoki kosalema mokemoke, mbala mosusu kozanga ayeba yango. Na ebandeli ya mokanda na ye, Paulo akebisaki Baebre mpo na likama ya ‘komemama mosika na nzela’ mpe ya ‘kokóma na motema mabe oyo ezangi kondima.’ (Ebr. 2:1; 3:12) Soki elamba elíngi makolo ya moto oyo azali kopota mbangu, mbala mingi moto yango akweaka. Na yango, mopoti-mbangu asengeli koyeba ete soki alati elamba oyo ebongi te, akoki kokwea. Nini ekoki kotinda ye atya likebi te na likama yango? Ekoki kozala bopɔtu, komityela motema koleka ndelo to eloko moko oyo ebendi likebi na ye. Liteya nini tokoki kozwa na toli ya Paulo?
11. Nini ekoki kosala ete tóbungisa kondima na biso?
11 Tóbosana te ete soki mokristo abungisi kondima na ye, mbala mosusu ezali nde mbuma ya makambo oyo azalaki kosala. Moto mosusu ya mayele mpe alobelaki “lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi.” Amonisaki ete ndenge bomoi na biso ezali, bato oyo tofandi na bango, mpe bamposa na biso ya mabe, nyonso wana ekoki kolɛmbisa to mpe kosala ete tóbungisa kondima na biso.—Mat. 13:3-9.
12. Makebisi nini tosengeli kotosa soki tolingi kobungisa kondima na biso te?
12 Mbala na mbala, moombo ya sembo mpe ya mayele akebisaka biso na makambo oyo totalaka mpe toyokaka, elingi koloba makambo oyo tokɔtisaka na mitema mpe na makanisi na biso. Akebisaka mpe biso na motambo ya koluka ntango nyonso kozwa mbongo mingi mpe biloko mingi ya mokili. Tokoki kobunga nzela soki tozali kolinga mingi masano mpe koluka kozwa aparɛyi nyonso ya sika oyo ebimi. Ekozala likama soki tozali koboya makebisi ya moombo ya sembo mpo tokanisi ete ezali makasi mingi to ete etali kaka bato mosusu, mpo biso tozali na kondima makasi. Mitambo oyo mokili ya Satana etyelaka biso ezalaka ya kobombana mpe ya mayele mabe. Bato mosusu babungisaki kondima na bango mpo bakómaki na bopɔtu, bamityelaki motema koleka ndelo, to mpo biloko ya mokili ebendaki bango. Makambo ya ndenge wana ekoki kopekisa biso tózwa libonza ya bomoi ya seko.—1 Yoa. 2:15-17.
13. Tokoki kosala nini mpo tókóma te kokanisa lokola bato ya mokili?
13 Mokolo na mokolo, bato ya mokili ya Satana balukaka kotinda biso tózala na makanisi ndenge moko na bango; tólingaka makambo oyo bango balingaka. (Tángá Baefese 2:1, 2.) Kasi biso moko tokoki kopona soki tokolanda bango to te. “Mopɛpɛ” oyo Paulo alobelaki na vɛrsɛ yango ebomaka mpenza. Na yango, kaka ndenge tokolinga te kopema mopɛpɛ oyo ezali na pwazɔ, tosengeli mpe koboya kolanda makanisi ya bato ya mokili noki tólɛmba na nzela. Nini ekoki kosalisa biso tókoba kopota mbangu? Ndakisa ya kokoka ya Yesu, moto oyo apotaki malamu tii na nsuka. (Ebr. 12:2) Tozali mpe na ndakisa ya Paulo, mpo ye moko amitángaki na molɔngɔ ya bakristo oyo bazali kopota mbangu, mpe alendisaki baninga na ye bakristo ete bámekola ye.—1 Ko. 11:1; Flp. 3:14.
Ndenge nini tokoki kozwa libonza?
14. Nini emonisi ete Paulo azalaki mpenza na mposa ya kokóma tii na nsuka?
14 Nini emonisi ete Paulo azalaki mpenza na mposa ya kokóma tii na nsuka? Ntango asololaki na bankulutu ya Efese mpo na mbala ya nsuka, alobaki boye: “Nazali kotalela molimo na ngai te ete ezali na ntina mingi mpo na ngai, eloko ya ntina nde nasilisa mbangu oyo nazali kopota mpe mosala oyo nazwaki epai ya Nkolo Yesu.” (Mis. 20:24) Paulo andimaki kobungisa eloko nyonso, ata mpe bomoi na ye, kaka mpo asilisa mbangu oyo azalaki kopota. Paulo azalaki komona ete milende na ye mpe mosala makasi oyo azalaki kosala mpo na nsango malamu ekozala mpamba soki akómi na nsuka ya momekano te. Atako bongo, amityelaki motema koleka ndelo te mpe akanisaki te ete akolonga kaka. (Tángá Bafilipi 3:12, 13.) Nzokande, mwa moke liboso akufa nde alobaki polele ete: “Nabundi etumba ya malamu mingi, napoti mbangu tii na nsuka, nabateli kondima.”—2 Tim. 4:7.
15. Paulo alendisaki baninga na ye bakristo básala nini?
15 Paulo azalaki na mposa makasi ete baninga na ye bakristo mpe bápota mbangu tii na nsuka. Na ndakisa, alendisaki bakristo ya Filipi ete básala makasi mpo bázwa lobiko. Ayebisaki bango ‘bákangama makasi na liloba ya bomoi.’ Mpo na nini? Alobaki boye: “Mpo nazwa likambo ya komikumisa na mokolo ya Kristo, ete napotaki mbangu mpamba te mpe nasalaki mosala makasi mpamba te.” (Flp. 2:16) Alendisaki mpe bakristo ya Korinti boye: “Bópota mbangu na ndenge oyo ekosala ete bózwa [libonza].”—1 Ko. 9:24.
16. Mpo na nini tosengeli komona ete libonza na biso ezali mpenza solo?
16 Ntango mopoti-mbangu abandi kopota na momekano ya mbangu oyo ezali molai, amonaka ndelo ya nsuka te. Kasi ntango azali kopota, atyaka makanisi na ye na ndelo yango ya nsuka. Mpe soki amoni ete akómi pene na nsuka, akómaka lisusu na ekateli makasi ya kosilisa. Esengeli mpe kozala bongo mpo na biso. Tosengeli komona ete libonza na biso ezali mpenza solo. Yango ekosalisa biso tósala makasi mpo tózwa yango.
17. Ndenge nini kondima ekoki kosalisa biso tótya makanisi na libonza?
17 Paulo akomaki boye: “Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa, ezali elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo atako ezali komonana te.” (Ebr. 11:1) Abrahama ná Sara bandimaki kotika bomoi ya malamu mpe kofanda “bapaya mpe bato oyo bafandi na mokili yango mpo na ntango mokuse.” Nini esalisaki bango? “Bamonaki [kokokisama ya bilaka ya Nzambe] na mosika.” Moize aboyaki “esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu,” mpe “biloko ya motuya ya Ezipito.” Ndenge nini azwaki kondima mpe makasi ya kosala bongo? “Azalaki kotala na likebi mpenza epai mbano ekofutama.” (Ebr. 11:8-13, 24-26) Yango wana, liboso Paulo alobela mokomoko ya bato yango, azalaki kobanda na maloba “na kondima.” Kondima esalisaki bango báyikela mikakatano mpe bampasi mpiko, mpe bámona oyo Nzambe azalaki kosalela bango, mpe oyo akanaki kosala na nsima.
18. Mpo ‘tólongola lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi,’ tosengeli kosala nini?
18 Soki tomanyoli ndakisa ya mibali mpe basi ya kondima oyo Baebre mokapo 11 elobeli mpe tomekoli bango, tokoki kokóma na kondima mpe kolongola “lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi.” (Ebr. 12:1) Lisusu, soki tozali koyangana elongo na bato oyo bazali mpe kosala makasi bákóma na kondima makasi, ‘tokotyelana likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu.’—Ebr. 10:24.
19. Mpo na nini ezali na ntina tókoba kopota na momekano ya mbangu?
19 Tokómi pene na nsuka ya momekano na biso ya mbangu. Ezali lokola tokómi komona ndelo ya nsuka. Na kondima mpe na lisalisi ya Yehova, biso mpe tokoki ‘kolongola kilo nyonso ná lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi.’ Ya solo, tokoki kopota mbangu na ndenge oyo ekosala ete tózwa libonza, elingi koloba mapamboli oyo Nzambe mpe Tata na biso Yehova, alaki biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bayuda na ntango ya kala bamonaki yango mabe. Mokanda ya 2 Makabe, oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe te, elobi ete Bayuda mingi basilikaki ntango nganga-nzambe monene Jason, oyo azalaki mopɛngwi, alobaki ete bátonga esika ya masano na Yerusaleme.—2 Mak. 4:7-17.
Ozali koyeba lisusu?
• Kolongola “kilo nyonso” esɛngi kosala nini?
• Nini ekoki kotinda mokristo abungisa kondima na ye?
• Mpo na nini tosengeli kotya makanisi na biso kaka na libonza?
[Elilingi na lokasa 23]
“Lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi” ezali nini, mpe ndenge nini ekoki kokanga biso?