Bakɛngɛli na basaleli na misala baponamaka na ndenge ya Teokrasi
“Bókeba na ntina na bino mpenza mpe na ntina na etonga mobimba oyo [elimo santu, NW] esili kotya bino bakɛngɛli.”—MISALA 20:28.
1, 2. Ndenge nini Yisaya 60:22 ezali kokokisama?
YEHOVA asakoláká banda kala ete likambo moko monene ekosalema na ntango ya nsuka. Na nzela ya mosakoli Yisaya, alobaki boye: “Oyo moke akokóma nkóto mpenza, oyo eleki moke akokóma libota ya makasi. Ngai nazali [Yehova]; na ntango na yango, nakoyeisa yango mbango.”—Yisaya 60:22.
2 Lelo oyo tozali mpenza komona ete esakweli yango ezali kokokisama? Ɛɛ! Na bambula ya 1870, lisangá moko ya basaleli ya Yehova esalemaki na mboka Allegheny, na États Unis. Na ntango wana bazalaki bato moke, kasi lelo oyo, bankóto ya masangá esalemi mpe ezali se kobakisama na mokili mobimba. Bamilio ya basakoli ya Bokonzi—libota moko ya makasi mpenza—bazali lelo oyo na kati ya masangá koleka 91 000 na bikólo 235 na mokili mobimba. Yango ezali komonisa mpenza ete Yehova azali koyanganisa nokinoki basambeli ya solo liboso ya “bolɔzi monene,” oyo ezali lisusu mosika te.—Matai 24:21; Emoniseli 7:9-14.
3. Kobatisama ‘na nkombo ya Tata, ya Mwana, mpe ya elimo santu’ elimboli nini?
3 Nsima ya komipesa na Yehova, mpe na kolanda malako ya Yesu, bamilio ya bato yango bazwaki batisimo “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya [elimo santu, NW].” (Matai 28:19) Kobatisama “na nkombo ya Tata” elimboli ete bato yango oyo bamipesi bandimi Yehova lokola Tata na bango ya likoló mpe Mopesi ya bomoi mpe bazali kotosa bokonzi na ye. Kobatisama ‘na nkombo ya Mwana’ elimboli ete bazali kondima Yesu Klisto lokola Mosikoli, Motambwisi mpe Mokonzi na bango. Bazali mpe kondima mosala ya elimo santu ya Nzambe, to nguya na ye, ete etambwisa bomoi na bango. Yango ezali komonisa ete babatisami ‘na nkombo ya elimo santu.’
4. Ndenge nini baministre baklisto baponamaka?
4 Bayekoli ya sika baponamaka lokola baministre ya Yehova Nzambe na ntango bazwi batisimo. Nani aponaka bango? Maloba ya 2 Bakolinti 3:5 ebongi mpe kosalelama mpo na bango, ete: “Kobonga na biso [lokola baministre] euti na Nzambe.” Mpo na bango, ezali na lokumu moko te oyo eleki lokumu ya koponama na Yehova Nzambe ye moko! Nsima ya batisimo na bango, bakolanda kokola na elimo lokola baministre ya “nsango malamu” ntango nyonso oyo bakondima ete elimo ya Nzambe etambwisa bango mpe ntango nyonso oyo bakotosa Liloba na ye.—Matai 24:14; Misala 9:31.
Koponama ezali kosalema na ndenge ya Teokrasi, kasi lokola na demokrasi te
5. Bakɛngɛli baklisto na basaleli na misala baponamaka na ndenge ya demokrasi? Limbola.
5 Esengeli ete bakɛngɛli mpe basaleli na misala oyo bazali na makoki bázala mpo na kobatela malamu mpe kokokisa na ndenge oyo esengeli bamposa ya elimo ya baministre oyo bazali se kokóma ebele. (Bafilipi 1:1) Mibali yango ya elimo baponamaka ndenge nini? Baponamaka lokola na mangomba ya boklisto te. Na ndakisa, bakɛngɛli baklisto baponamaka na voti te, elingi koloba, bandeko na kati ya lisangá basalaka voti te mpo na kopona moto oyo bato mingi basepeli na ye. Koponama esalemaka na ndenge ya Teokrasi. Yango elingi koloba nini?
6. (a) Teokrasi ya solosolo ezali nini? (b) Mpo na nini bakɛngɛli na basaleli na misala baponamaka na ndenge ya Teokrasi?
6 Na mokuse, Teokrasi ya solosolo ezali ebongiseli oyo Nzambe azali koyangela. Batatoli ya Yehova batosaka bokonzi ya Nzambe na bolingi na bango moko mpe basalaka na bomoko mpo na kokokisa mokano na ye. (Nzembo 143:10; Matai 6:9, 10) Baponaka bakɛngɛli baklisto, to bankulutu, na basaleli na misala na ndenge ya Teokrasi mpamba te makambo nyonso, banda na kopesa bankombo tii na kopona mibali yango oyo basengeli kozwa mikumba, esalemaka na kolanda ebongiseli ya Nzambe ndenge elimbolami na kati ya Makomami Mosantu. Lokola Yehova azali “nkolo likoló ya nyonso,” ye nde azali na lotomo ya kokata ndenge oyo makambo esengeli kotambola na kati ya ebongiseli na ye oyo ezali komonana.—1 Ntango 29:11; Nzembo 97:9.
7. Ndenge nini ebongiseli ya Batatoli ya Yehova etambwisami?
7 Batatoli ya Yehova basalaka makambo lokola na mangomba ya boklisto te; bango bakataka te ndenge oyo ebongiseli ya Nzambe esengeli kotambwisama. Baklisto yango ya sembo basalaka makasi ete bálanda mitinda ya Yehova. Bakɛngɛli baponamaka na bandeko na kati ya lisangá te to na bakonzi ya lingomba te. Soki bato ya mokili balingi kozala na likambo ya koloba mpo na koponama ya bakɛngɛli na basaleli na misala, basaleli ya Yehova bandimaka yango te. Na mpiko nyonso, bazalaka na likanisi oyo bantoma bamonisaki malamu na ekeke ya liboso ntango balobaki ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola mokonzi kasi bato te.” (Misala 5:29, NW) Na ndenge yango, Batatoli batosaka Nzambe na makambo nyonso. (Baebele 12:9; Yakobo 4:7) Nzambe andimaka bango mpo batosaka bibongiseli ya Teokrasi.
8. Makambo ya demokrasi ekeseni na oyo ya Teokrasi na nini?
8 Lokola tozali basaleli ya Yehova, Motambwisi Monene ya Teokrasi, tosengeli kokesenisaka malamu demokrasi na Teokrasi. Na demokrasi, bato nyonso oyo balingi bokonzi bapesaka nkombo mpe mbala mingi bato yango basalaka propagande mpe moto oyo bato mingi baponaka nde azwaka bokonzi. Na Teokrasi, koponama esalemaka ndenge yango te. Ezali bato te nde baponaka; ezali mpe lisangá moko te oyo esalemi na kolanda mibeko ya Leta nde eponaka bakɛngɛli. Na ntembe te Paulo azalaki kolobela ndenge oyo Yesu na Yehova baponaki ye lokola “ntoma ya mabota” ntango alobaki na Bagalatia ete aponamaki “na bato te soko na nzela ya bato te kasi na nzela ya Yesu Klisto mpe Nzambe Tata oyo asekwisi ye kati na bakufi.”—Baloma 11:13; Bagalatia 1:2 (1:1, NW).
Elimo santu eponaka bango
9. Misala 20:28, elobi nini na ndenge oyo bakɛngɛli baklisto baponamaka?
9 Paulo ayebisaki bankulutu ya Efese ete Nzambe aponaki bango na lisalisi ya elimo santu. Alobaki boye: “Bókeba na ntina na bino mpenza mpe na ntina na etonga mobimba oyo [elimo santu, “NW”] esili kotya bino bakɛngɛli na yango, bózala babateli ya lingomba ya Nzambe oyo asombaki na makila [ya Mwana, NW] na ye mpenza.” (Misala 20:28) Esengelaki ete elimo santu ekoba kotambwisa baklisto yango oyo bazalaki bakɛngɛli na mikumba na bango lokola babateli ya mpate ya Nzambe. Soki moto azali na mokumba kasi azali lisusu kokokisa masɛngami ya Nzambe te, elimo santu ezalaki kolakisa yango mpo bálongola ye mokumba yango.
10. Mpo na nini elimo santu esalaka mosala monene mpo na kopona bato mpo na mikumba ya Teokrasi?
10 Mpo na nini elimo santu ezali na mokumba ya ntina? Ya liboso, mikanda oyo emonisi masɛngami oyo bakɛngɛli ya elimo basengeli kokokisa epemamaki na elimo santu. Na mikanda oyo akomelaki Timote na Tito, Paulo amonisaki masɛngami oyo bakɛngɛli na basaleli na misala basengeli kokokisa. Na nyonso, atángaki masɛngami 16. Na ndakisa, bakɛngɛli basengelaki kozala bato oyo bafundami na likambo moko te, bazali na bokatikati, bazali na makanisi malamu, basalaka makambo na mobulu te, bayambaka bapaya, bayebi koteya, mpe bazali bakonzi ya mabota oyo bazali kopesa ndakisa malamu. Basengelaki komipesa na masanga te, basengelaki kozala na bolingo ya mbongo te, mpe basengelaki koyeba komipekisa. Baoyo bazalaki na mposa bápona bango lokola basaleli na misala basengelaki mpe kokokisa masɛngami ya ndenge yango.—1 Timote 3:1-10, 12, 13; Tito 1:5-9.
11. Wapi mwa masɛngami oyo mibali oyo balingi kozwa mikumba na kati ya lisangá basengeli kokokisa?
11 Soki totali masɛngami yango, tokomona ete bato oyo bazali kotambwisa makambo na kati ya losambo ya Yehova basengeli kozala baklisto oyo bazali kopesa ndakisa malamu na etamboli na bango. Mibali oyo bazali na mposa ya kozwa mikumba na lisangá basengeli komonisa ete elimo santu ezali kosala kati na bango. (2 Timote 1:14) Esengeli komonana polele epai ya mibali yango ete elimo ya Nzambe ezali kobota mbuma lokola “bolingo, esengo, kimya, motema pɛtɛɛ, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ, mpe komipekisa.” (Bagalatia 5:22, 23) Bizaleli yango esengeli komonana na makambo oyo bazali kosalela bandeko na kati ya lisangá mpe epai ya bato mosusu. Ya solo, ezala mbuma ya elimo to masɛngami mosusu oyo bakɛngeli basengeli kokokisa, mokɛngeli mokomoko azali na likambo oyo akokisaka yango malamu koleka. Atako bongo, na makambo nyonso ya bomoi na bango, bato nyonso oyo bakoki koponama lokola bakɛngɛli to basaleli na misala basengeli komonisa ete bazali bato ya elimo, bazali kokokisa masɛngami ya Liloba ya Nzambe.
12. Banani oyo tokoki koloba ete elimo santu eponi bango?
12 Ntango Paulo alendisaki bato mosusu bálanda ndakisa na ye, asalaki yango na kokakatana te mpamba te ye moko azalaki kolanda ndakisa ya Yesu Klisto, ye oyo ‘atikelaki biso ndakisa ete tólanda matambe na ye.’ (1 Petelo 2:21, NW; 1 Bakolinti 11:1) Yango wana, ntango bato oyo bakokisi masɛngami oyo ezali na kati ya Makomami baponami lokola bakɛngɛli to basaleli na misala, tokoloba mpenza ete elimo santu eponi bango.
13. Ndenge nini elimo santu esalisaka baoyo bazali kopesa bankombo ya baoyo bakoki kozwa mikumba na kati ya lisangá?
13 Ezali mpe na likambo mosusu oyo ezali komonisa mosala ya elimo santu na likambo ya kopona bakɛngɛli. Yesu alobaki ete ‘Tata na likoló apesaka elimo santu na baoyo basɛngaka ye yango.’ (Luka 11:13) Yango wana, ntango bankulutu ya lisangá moko bakutani mpo na kotalela banani oyo bakoki kozwa mikumba na lisangá, babondelaka mpo ete elimo ya Nzambe etambwisa bango. Batalelaka bandeko oyo bakoki kopesa bankombo na bango na kolanda Liloba epemami na Nzambe, mpe elimo santu esalisaka bango básosola soki moto na moto oyo bazali kotalela mpo na kopesa nkombo na ye ete aponama azali kokokisa masɛngami ya Makomami. Baoyo bazali kotalela bandeko oyo bakoki kopesa bankombo na bango mpo báponama batalaka mingimingi te makambo oyo ezali komonana na miso, to bakelasi oyo moto atángá, to mpe makoki na ye. Basengeli libosoliboso koluka koyeba soki moto yango azali moto ya elimo, azali moto oyo bandeko na kati ya lisangá bakokakatana te mpo na kotuna ye toli na makambo ya elimo.
14. Liteya nini tozali kozwa na Misala 6:1-3?
14 Atako ezali bankulutu ya lisangá nde bapesaka bakɛngɛli-batamboli bankombo ya bandeko oyo bakoki kozwa mikumba lokola bankulutu mpe basaleli na misala, baponamaka mpenza na ndenge oyo ezalaki kosalema na ekeke ya liboso. Mbala moko, bazalaki na mposa ya mibali ya elimo oyo bazali na makoki mpo na mokumba moko ya ntina mpenza. Lisangani ya mikóló-bakambi epesaki malako oyo: “Bóluka mibali nsambo na kati na bino, bato ya lokumu malamu, baoyo batondi na [elimo santu, NW] mpe na mayele, mpe tokotya bango na lotomo oyo.” (Misala 6:1-3) Atako bato oyo batindaki bapesaki bankombo ya bato oyo bango bamonaki ete babongi, kasi ezali mibali oyo bazalaki na mokumba ya kopona na Yelusaleme nde baponaki bango. Lelo oyo mpe makambo ezali kosalema kaka ndenge yango.
15. Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali na mokumba nini mpo na koponama ya mibali oyo bazali kozwa mikumba?
15 Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova baponaka bandeko nyonso oyo bazali na Bakomite ya Filiale. Ntango bazali kopona nani oyo akoki kozwa mokumba monene ndenge wana, Mikóló-Bakambi babosanaka te maloba ya Yesu oyo: “Soko mingi epesami na moto, mingi ekolukama epai na ye; soko mpe batii mingi na mabɔkɔ na moto, bakolɔmba yango eleki mingi na mabɔkɔ na ye.” (Luka 12:48) Longola kopona bandeko oyo bazali na Bakomite ya Filiale, Lisangani ya Mikóló-Bakambi baponaka bankulutu ya Betele na bakɛngɛli-batamboli. Kasi, bapesi mokumba ya kopona bankulutu to basaleli na misala na bandeko mosusu oyo bakoki kotyela bango motema. Makomami ezali komonisa ete na ntango ya kala mpe ezalaki kosalema bongo.
“Opona . . . lokola elaki ngai yo”
16. Mpo na nini Paulo atikaki Tito na Kelete, mpe likambo yango ezali komonisa nini mpo na oyo etali koponama na ndenge ya Teokrasi lelo oyo?
16 Paulo ayebisaki Tito, moninga na ye ya mosala, boye: “Mpo na ntina yango, natiki yo na Kelete ete obongisa makambo matikali mpe ete opona mibange na mboka na mboka [lokola] elaki ngai yo.” (Tito 1:5) Na nsima, Paulo amonisaki masɛngami oyo Tito asengelaki kotalela mpo na kopona bato. Yango wana, lelo oyo, na kati ya bafiliale, Lisangani ya Mikóló-Bakambi eponi bandeko oyo babongi mpenza mpo na kosala na esika na yango na mokumba ya kopona bankulutu na basaleli na misala. Batalaka malamu ete bato oyo bazali kosala na esika ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpo na kopona bato oyo bakoki kozwa mikumba, bákanga mpenza ntina ya makambo oyo Makomami elobi mpo na koponama yango mpe ete bátosa yango. Na bongo, ezali nde Lisangani ya Mikóló-Bakambi nde etambwisaka koponama ya mibali oyo bakokisi masɛngami mpo na kozwa mikumba na masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba.
17. Na biro ya filiale basalaka nini ntango bazwi bankombo ya bandeko oyo batindeli bango mpo báponama lokola bakɛngɛli mpe basaleli na misala?
17 Ntango bankombo ya bandeko etindami na biro ya filiale ya la Société mpo báponama lokola bakɛngɛli mpe basaleli na misala, mibali oyo baumeli na mosala oyo bazali kuna, basɛngaka elimo ya Nzambe etambwisa bango mpo na kopona bandeko yango. Mibali yango bayebaka ete bazali na ngambo monene na mitó na bango, babosanaka te ete basengeli kokende mbangu te kotya mabɔkɔ likoló ya moto, mpo básangana na masumu ya moto yango te.—1 Timote 5:22.
18, 19. (a) Ntango mosusu makambo esalemaka ndenge nini mpo na koyebisa lisangá bandeko oyo baponami? (b) Makambo nyonso banda na kopesa bankombo tii na koponama ya bandeko esalemaka ndenge nini?
18 Soki baponi bandeko, ntango mosusu bayebisaka bankombo na bango na lisangá na nzela ya mokanda oyo ezali na tampo ya la Société. Bakoki kosalela mokanda ya ndenge yango mpo na koyebisa bankombo ya bandeko mingi oyo bazwi mikumba na lisangá.
19 Na Teokrasi, ezali Yehova nde aponaka na nzela ya Mwana na ye mpe na nzela ya ebongiseli na ye oyo ezali komonana awa na mabele, elingi koloba “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpe Lisangani ya Mikóló-Bakambi. (Matai 24:45-47) Elimo santu nde etambwisaka makambo nyonso banda na kotinda bankombo ya bandeko tii na koponama na bango mpenza. Ezali bongo mpamba te masɛngami emonisami na kati ya Liloba ya Nzambe oyo epemami na elimo santu, mpe moto oyo aponami amonisaka ete azali kobota mbuma ya elimo yango. Yango wana, tosengeli mpenza komonaka ete ezali elimo santu nde eponaka bandeko. Na ekeke ya liboso, bakɛngɛli na basaleli na misala bazalaki koponama na ndenge ya Teokrasi, lelo oyo mpe ezali se ndenge yango.
Tozali kotɔnda Yehova mpo na litambwisi na ye
20. Mpo na nini tozali na makanisi lokola oyo Davidi amonisaki na Nzembo 133:1?
20 Lelo oyo, lokola ebongiseli ya elimo ezali se kokola mpe mosala ya kosakola Bokonzi ezali se kokende liboso, tozali na botɔndi ete mokumba ya kopona bakɛngɛli na basaleli na misala ezali libosoliboso na mabɔkɔ ya Yehova ye moko. Ebongiseli yango oyo euti na Makomami ezali kosalisa biso tóbatela mitinda ya bosembo oyo Nzambe azali kosɛnga biso Batatoli na ye. Longola yango, elimo ya boklisto mpe milende oyo bakɛngɛli na basaleli na misala bazali kosala, ezali mpenza kobatela kimya mpe bomoko na biso basaleli ya Yehova. Yango wana, na ndakisa ya mokomi ya nzembo Davidi, motema na biso ezali kotinda biso tóyemba ete: “Talá lokola ezali malamu mpe na esengo soko bandeko [bakofanda elongo na bomoko!, NW].”—Nzembo 133:1.
21. Ndenge nini Yisaya 60:17 ezali kokokisama lelo oyo?
21 Tozali na botɔndi mingi mpo na litambwisi ya Yehova na nzela ya Liloba na ye mpe ya elimo santu na ye! Maloba ya Yisaya 60:17, ezali mpe na ndimbola monene, elobi ete: “Na esika ya motako nakoyeisa wolo mpe na esika ya ebende nakoyeisa palata; na esika ya mabaya, motako, na esika ya mabanga, ebende. [Nakotya kimya lokola bakɛngɛli na yo mpe boyengebene lokola bakapita ya mosala na yo, NW].” Lokola Batatoli ya Yehova balukaki mokemoke ete makambo nyonso etambwisama na ndenge ya Teokrasi, tomoni mapamboli oyo yango epesi na ebongiseli mobimba ya Nzambe awa na mabele.
22. Tozali na botɔndi mpo na likambo nini, mpe tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini?
22 Tozali na botɔndi mpo na ebongiseli na biso ya Teokrasi. Tozali mpe kosepela mingi na mosala monene mpe ya esengo oyo bakɛngɛli na basaleli na misala oyo baponami na ndenge ya Teokrasi bazali kosala. Tozali mpenza kokumisa Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo, ye oyo apesi biso bozwi ya elimo mpe asopeli biso ebele ya mapamboli. (Masese 10:22) Yango wana, tózala na ekateli ya kotambola elongo na ebongiseli ya Yehova. Na koleka, tólanda kosala na bomoko mpo na lokumu, masanzoli mpe nkembo ya nkombo monene mpe mosantu ya Yehova.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini tokoki koloba ete kopona bakɛngɛli na basaleli na misala esalemaka na ndenge ya Teokrasi, kasi na ndenge ya demokrasi te?
• Ndenge nini elimo santu eponaka baklisto mpo na kozwa mikumba na lisangá?
• Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali na mokumba nini na koponama ya bakɛngɛli na basaleli na misala?
• Mpo na nini tosengeli kotɔnda Yehova na ndenge bato oyo basengeli kozwa mikumba baponamaka na kati ya Teokrasi?
[Bililingi na lokasa 15]
Bankulutu na basaleli na misala bazali na libaku malamu ya koponama na kolanda Teokrasi