Bóbatela na bolingo nyonso bampate ya motuya mingi ya Jéhovah
BANKULUTU bayokaki na likebi mingi. Batambolaki penepene na bakilometele 50 longwa na Efese kino na Milete mpo na kozwa malako ya ntoma Paulo. Sikawa bazalaki na mawa ya koyoka ete bazalaki komona ye mpo na mbala ya nsuka. Yango wana bayebi ete maloba oyo masengeli kolanda makozala na ntina mingi: “Bokeba na ntina na bino mpenza mpe na ntina na etónga, mobimba na Nzambe oyo elimo santu esili kotya bino bakɛngɛli na yango; bozala babateli na lisangá na Nzambe oyo asombaki na makila ya Mwana na ye mpenza.”—Misala 20:25, 28, 38.
Maloba mokuse oyo Paulo ayebisi babateli na bampate, epesaki solo boyebi mingi epai na bankulutu wana ya Efese. Bayebaki malamu mosala ya kobatela bampate oyo ezalaki kosalema pembeni na mboka wana. Bamesenaki mpe na Makomami ya Liebele, oyo ezali kolobela mbala na mbala babateli na bampate. Mpe bayebaki ete Jéhovah azalaki komikokanisa ye moko na Mobateli na mpate mpo na libota na ye.—Yisaya 40:10, 11.
Paulo alobelaki bango lokola “bakɛngɛli” kati na “etónga,” mpe lokola “babateli na bampate” ya “lisangá.” Wana liloba “bakɛngɛli” emonisi oyo ezali mokumba na bango, liloba “babateli na bampate” elakisi lolenge oyo bazali kokokisa mosala ya kokɛngɛla. Ya solo, bakɛngɛli basengelaki komibanzabanza mpo na mosangani mokomoko ya lisangá na bolingo lolenge moko na oyo mobateli na bampate azalaki kobatela na yango etónga na ye.
Lelo oyo, bankulutu mingi te bayebi mosala ya kobatela bampate mpenza. Kasi Biblia elobeli mingi mpenza bampate mpe babateli na bampate, mingimingi na ndimbola ya elilingi, na motindo boye ete maloba na Paulo mazali na bopusi mingi ezala na eleko nini. Mpe tokoki koyekola makambo mingi likoló na babateli na bampate, oyo Nzambe asepelaki na bango na ntango ya kala. Ndakisa na bango oyo ezali na ntina mingi ekoki kosalisa bankulutu ya mikolo na biso na komona bizaleli nini basengeli kokólisa mpo na kobatela lisangá na Nzambe.
Davidi, mobateli na mpiko na bampate
Ntango tozali kokanisa babateli na bampate ya ntango na kala, mbala mingi tomikundolaka Davidi, mpamba te abandaki lokola mobateli na bampate. Moko na makambo ya liboso oyo toyebi na ntina na bomoi ya Davidi ezali ete kozala mobateli na bampate etaleli etelemelo ya lokumu te. Ya solo, ntango mosakoli Samwele akendeki kopakola moko na bana ya Yese mpo azala mokonzi oyo akoyangela nsima likoló na Yisraele, babosanaki mpenza Davidi. Ezalaki bobele ntango Jéhovah aboyaki bandeko na ye ya mibali nsambo baoyo babotamaki liboso na ye nde balobelaki Davidi, oyo azalaki “koleisa bampate,” na bilanga. (1 Samwele 16:10, 11) Nzokande, mibu mingi oyo Davidi alekisaki lokola mobateli na bampate ebongisaki ye mpo na mosala makasi ya kobatela libota ya Yisraele. Nzembo 78:70, 71 elobi ete: “[Jéhovah] aponaki Davidi mosaleli na ye mpe abimisaki ye na kati na lopango na mpate . . . mpo na kobokola Yakobo bato na ye.” Na lolenge ebongi, Davidi akomaki Nzembo 23 oyo ezali kitoko mpe eyebani malamu, oyo ebandaka na maloba oyo: “Jéhovah azali Mobateli na ngai.”
Lokola Davidi, bankulutu kati na lisangá ya boklisto basengeli kozala babateli na bampate balandi ya komikitisa mpe basengeli te koluka etelemelo ya lokumu. Lokola ntoma Paulo akomaki epai na Timoté, baoyo bazali koluka mokumba wana ya kobatela bampate bazali na “mposa ya mosala malamu,” kasi lokumu te.—1 Timoté 3:1.
Ya solo, mosala ya mobateli na bampate esɛngi komikitisa, kasi na bantango mosusu Davidi asengelaki komonisa mpiko mingi. Na ndakisa, mokolo oyo nkosi amemaki mpate moko ya etónga, ya tata na ye mpe na libaku mosusu ngombolo nde amemaki yango, na mpiko nyonso, Davidi abundisaki banyama wana mabe mpe abomaki bango. (1 Samwele 17:34-36) Davidi amonisaki mpenza mpiko mingi soki tokanisi ete nkosi akoki koboma banyama minene koleka ye. Mpe ngombolo ya Sulia oyo na langi ya chocolat, oyo ezali na Palestine, oyo ekómaka na kilo 140, ekoki koboma mbuli bobele na mbata moko mpamba ya lobɔkɔ na yango ya nguya.
Lolenge oyo Davidi azalaki komibanzabanza mpo na bampate ya tata na ye ezali ndakisa kitoko mpo na babateli na bampate kati na lisangá ya boklisto. Ntoma Paulo akebisaki bankulutu ya Efese mpo na “mbwa ya zámba na yauli” oyo “bakobatela etónga, na bolingo te.” (Misala 20:29) Bobele bongo na ntango na biso, ezali na mabaku oyo babateli na bampate basengeli komonisa mpiko mpo na koluka bolamu ya bampate ya Jéhovah.
Ezali na ntina ete babateli na bampate babatela bampate na mpiko, kasi basengeli lisusu kosalela bango na bolingo mingi, lokola esalaki yango Davidi, mobateli na bampate na bolingo, mpe Yesu Klisto, Mobateli na bampate aleki malamu. (Yoane 10:11) Lokola bayebi ete etónga ezali ya Jéhovah, bankulutu basengeli te kosala makambo makasi epai na bampate, “lokola mpo na kozala mikonzi likoló na baoyo bazwi libula na Nzambe te.”—1 Petelo 5:2, 3; Matai 11:28-30; 20:25-27.
Bosengeli kozongisa monoko
Yakobo, tata na mabota azali ndakisa mosusu ya mobateli na bampate oyo ayebani malamu. Amitalelaki ete azali na mokumba na mpate moko na moko oyo etyami na maboko na ye. Yango wana abatelaki bitónga ya bokilo na ye, Labana, na bolingo nyonso, kino Yakobo alobaki nsima na mibu 20 ya mosala, ete: “Bampate na yo basi mpe bantaba na yo basi esopi zemi te, mpe ngai nalei bampate babali na etónga na yo te. Oyo epaswami na nyama na zámba nazongisi na yo te. Ngai moko nafuti yango. Yo osengaki yango na maboko na ngai soki eyibamaki na moi to na butu.”—Genese 31:38, 39.
Bakɛngɛli baklisto bazali komonisa komibanzabanza mingi koleka mpo na bampate oyo Mobateli na milimo na biso, Jéhovah Nzambe, “asombaki na makila ya Mwana na ye mpenza.” (Misala 20:28; 1 Petelo 2:25; 5:4) Paulo alobelaki makasi mokumba wana ya ntina ntango akundwelaki baklisto Baebele ete mibali oyo bazali kokamba lisangá “bazali kokɛngɛla milimo na bino lokola bato oyo bakozongisa monoko na ntina na makambo na bango.”—Baebele 13:17.
Ndakisa ya Yakobo emonisi mpe lisusu ete mosala ya mobateli na bampate ekosɛngaka kolekisa ntango mingi. Ezali likambo ya kosala butu na moi mpe mbala mingi ezali kosenga komipimela makambo mosusu. Alobelaki Labana ete: “Mosala na ngai ezalaki boye. Moi esilisi nguya na ngai mikolo nyonso mpe mpio na butu. Mpongi ekimi miso na ngai.”—Genese 31:40.
Likambo yango lizali mpe solo mpo na bankulutu mingi ya boboto ya mikolo na biso, lokola lisoló oyo lilandi lizali komonisa yango. Bakotisaki ndeko moko na ndako ya lopitalo epai batalelaka bato ya maladi butu na moi, ntango bokono na ye eyaki makasi nsima ya lipaso moko mpo na kolongola cancer ya bɔɔngɔ́. Libota na ye esalaki ebongiseli mpo na kozala elongo na ye na lopitalo butu na moi. Mpo na kolendisa mpe koyikisa ye mpiko, nkulutu moko ya lisangá na bango oyo azalaki na misala mingi ayokanisaki ebongiseli ya ntango na ye mpo na kokende kotala mobɛli mpe libota na ye mikolo nyonso. Nzokande, mpo ete na moi mosala ya lopitalo mozalaki mingi, ntango nyonso likoki ezalaki te mpo na kotala ye na moi. Yango elimbolaki ete nkulutu wana asengelaki mbala mingi kokende na lopitalo na butu mpenza. Kasi azalaki na esengo ya kokende kuna butu nyonso. Nkulutu yango alobaki ete: “Nasosolaki ete nasengelaki kokende na ntango oyo ebongi na mobɛli, kasi te na ntango oyo ebongi mpo na ngai.” Ntango kolongono na ndeko ebongaki mwa malamu mpo bakoka kotinda ye na esika mosusu ya lopitalo, nkulutu wana alandaki kokende kotala ye mokolo na mokolo mpo na kolendisa ye.
Oyo Moize, mobateli na bampate, ayekolaki
Biblia elobi ete Moize “azalaki na komikitisa mingi, na koleka bato nyonso bazalaki na nse.” (Mituya 12:3) Nzokande, engebene lisoló ezalaki ntango nyonso bongo te. Wana azalaki naino elenge, abomaki Moezipito moko oyo azalaki kobeta moninga na ye Moyisraele. (Exode 2:11, 12) Oyo ezali mpenza ezaleli ya moto na komikitisa te! Nzokande, na nsima Nzambe asengelaki kosalela Moize mpo na kotambwisa libota ya bamilió mingi ya bato kati na mokili mokauki mpo na komema bango na Mokili na Ndaká. Ya solo, Moize azalaki na mposa ya kobongisama malamu.
Atako Moize asilaki koyekola makambo mingi “na mayele nyonso na Baezipito,” makambo mingi masengamaki na ye mpo akoka kobatela etónga, ya Jéhovah. (Misala 7:22) Kobongisama wana esengelaki kozala ya lolenge nini? Na boumeli ya mibu 40, Nzambe atikaki Moize asala lokola mobateli na bampate ya komikitisa na mokili ya Madiani. Lokola azalaki kobatela bitónga ya Yetelo, bokilo na ye, Moize akólisaki bizaleli ya kitoko lokola motema pɛtɛɛ, komikitisa, motema molai, bopɔlɔ, mpe komipekisa. Ayekolaki mpe kotya motema epai na Jéhovah. Ya solo, kobatela bampate ebongisaki Moize mpo azala mobateli ya makoki mingi mpo na libota ya Yisraele.—Exode 2:15 kino 3:1; Misala 7:29, 30.
Yango ezali mpenza bizaleli oyo nkulutu moko azali na yango mposa mpo na kobatela libota na Nzambe lelo oyo, boye te? Ya solo, mpamba te Paulo akundwelaki Timoté ete “moombo na Nkolo . . . asengeli kozala na bopɔlɔ epai na bato nyonso, molakisi malamu, moto ayebi kokanga motema na mpasi, mpe akopamela batɛmɛli na bopɔlɔ.”—2 Timoté 2:24, 25, MN.
Ekoki kozala ete nkulutu moko azali na mawa mpo ete azali kolónga te kolóna mpenza bizaleli oyo. Nzokande, asengeli kolemba te. Lokola Moize, ekoki kosenga ntango molai mpo na kokólisa bizaleli nyonso oyo esengeli mpo na kozala mobateli malamu ya bampate. Nzokande, na nsima, molende wana ya solo ekozwa mbano.—Tala 1 Petelo 5:10.
Soki ozali nkulutu, mbala mosusu bazali mpenza kosalela yo mingi te lokola basusu. Ekoki kozala ete, lokola Moize, Jéhovah azali kotika ete okólisa mingi bizaleli mosusu ya ntina? Kobosana te ete Jéhovah “azali kokanisa mpo na yo.” Nzokande, tosengeli te kobosana ntina ya ‘komikangela kosɔkɛma lokola elamba, moko asunga mosusu, mpo ete Nzambe akotemelaka bato na lolendo, nde akopesaka basokemi ngolu.’ (1 Petelo 5:5-7) Soki yo mpe okomipesa ete ondima kobongisama oyo Jéhovah atiki nzela ete ozwa, okozala na ntina mingi mpo na ye.
Bampate nyonso ya Jéhovah bazali na motuya
Babateli na bampate batóndi na bolingo mpe bato na kotyela motema ya ntango na kala bayebaki mokumba na bango epai na mpate moko na moko. Esengeli kozala lolenge moko mpo na babateli na bampate ya elimo. Yango emonani polele kati na maloba ya Paulo: “Bokeba na ntina na . . . etónga mobimba.” (Misala 20:28) Nani oyo azali kati na “etónga mobimba”?
Yesu apesaki lisese ya moto moko oyo azalaki na bampate monkámá, kasi akendeki nokinoki koluka mpate moko oyo abungaki, mpo na kozongisa ye kati na etónga. (Matai 18:12-14; Luka 15:3-7) Bobele bongo, mokɛngɛli asengeli komibanzabanza mpo na mosangani moko na moko ya lisangá. Soki mpate moko atiki kosangana na mosala ya kosakola mpe na makita ya boklisto, yango elimboli te ete mpate yango azali lisusu na etónga, te. Azali bobele mosangani ya “etónga mobimba” oyo mpo na yango bankulutu “basengeli kozongisa monoko” epai na Jéhovah.
Lisangani moko ya bankulutu batyaki likebi mingi epai na basangani ya lisangá oyo basilaki kotika kosakola. Bankulutu basalaki liste ya bato yango mpe basalaki mpenza molende mpo na kotala bango mpe kosalisa bango ete bazonga kati na etónga, ya Jéhovah. Bankulutu yango bazalaki mpenza na botɔndi epai na Nzambe ete na boumeli ya mibu mibale na ndambo, bakokaki kosalisa bato koleka 30 na kozongela lisusu mosala na bango mpo na Jéhovah. Moko na bato oyo basalisaki atikaki kosakola na boumeli ya mibu soko 17!
Mokumba yango mozali mpenza monene na miso na bankulutu soki bakanisi ete bampate yango “basombamaki na makila ya Mwana na ye [Nzambe] mpenza.” (Misala 20:28) Eloko moko te esengelaki kopesama mpo na kosomba bampate wana ya motuya mingi. Mpe kanisa mpo na ntango mpe milende nyonso oyo esengamaki na mosala ya kosakola mpo na kozwa mpe kosalisa moko na moko na bato oyo bakokani na bampate! Esengeli te kosala milende motindo yango mpo na kobatela bango kati na etónga na Nzambe? Ya solo, mpate moko na moko ya lisangá ezali na motuya mingi.
Atako mosangani moko ya etónga, asali lisumu monene, mokumba ya bankulutu mobongwani te. Bakolanda komimonisa bankulutu oyo bazali na komibanzabanza, bakosala milende na bolingo mpe na bopɔlɔ mpo na kobikisa mosumuki soki yango ekoki. (Bagalatia 6:1, 2) Na mawa nyonso, na bantango mosusu ekómaka polele ete mosangani moko ya lisangá azangi komonisa mawa mpenza mpo na masumu minene oyo asali. Na yango, engebene Makomami, babateli na bampate na bolingo bazali na mokumba ya kobatela etónga, na bopusi mabe oyo ekoki kobebisa yango.—1 Bakolinti 5:3-7, 11-13.
Atako bongo, Jéhovah Nzambe apesi ndakisa ya kokoka kati na kolakisama monene ya mawa na ye epai na bampate oyo babungi. Mobateli na biso ya motema mawa alobi ete: “Nakoluka oyo abungi, mpe nakozongisa oyo akimisami, mpe nakokanga oyo abukani, mpe nakokembisa oyo abɛli.” (Ezekiele 34:15, 16; Yilimia 31:10) Mpo na komekola ndakisa wana kitoko, bibongiseli ya bolingo bizwamaki mpo ete babateli na bampate ya mikolo na biso bakoka kotala bato oyo babimisami na lisangá, baoyo bakoki kondima lisalisi na bango. Milende wana mitondi na mawa mpo na koluka bampate yango oyo babungi mibotaki mbuma malamu. Ndeko mwasi moko oyo azongisamaki na lisangá alobaki ete: “Ntango bankulutu bayaki kotala ngai, ezalaki elendiseli oyo nazalaki na yango mposa mpo na kozonga.”
Na ntembe te, maloba ya Paulo epai na bankulutu ya Efese, baoyo bazalaki na Milete ezalaki na ndimbola monene—mpo na bango mpe mpo na bakɛngɛli ya mikolo na biso. Elilingi ya babateli na bampate oyo asalelaki, ezalaki bokundoli ya bizaleli ya ntina mingi oyo esengeli kozala polele epai na bakɛngɛli—bizaleli lokola komikitisa mpe mpiko, ndenge emonanaki epai na Davidi, mokonzi-mobateli na bampate; koyeba ntina ya mokumba mpe ya komibanzabanza oyo emonanaki butu na moi kati na mosala ya Yakobo; mpe kondima na kobongisama lisusu na motema molai, lokola emonanaki epai na Moize. Ya solo, bandakisa ya Biblia ekosalisa bankulutu ya masangá na kokólisa mpe komonisa bizaleli oyo bisengeli mpo ete bakoka na bolingo nyonso “kobatela lisangá na Nzambe, oyo asombaki yango na makila ya Mwana na ye mpenza.”