MOKAPO 22
“Mokano ya Yehova esalema”
Lokola Paulo alingi kaka kosala mokano ya Nzambe, akei na Yerusaleme
Euti na Misala 21:1-17
1-4. Mpo na nini Paulo azali kokende na Yerusaleme, mpe makambo nini akokutana na yango kuna?
PAULO ná Luka bayoki mawa mingi ntango balingi kolongwa na Milete. Ezali mpasi mingi mpo bákabwana na bankulutu ya Efese, bandeko na bango oyo balingaki mingi! Bamisionɛrɛ yango mibale batɛlɛmi na masuwa. Bisaka na bango ezali na biloko oyo basengeli na yango mpo na mobembo. Paulo ná Luka bamemi mpe makabo oyo bakɔngɔlaki mpo na bakristo ya Yudea oyo bazali kokelela; bazali na mposa makasi ete makabo yango ekóma epai ya baoyo basengeli na yango.
2 Mopɛpɛ ezali kobɛta na bilamba ya masuwa, mpe masuwa ebandi kolongwa na libongo oyo etondi na makɛlɛlɛ ya ebele ya bato. Mibali yango mibale, ná baninga mosusu nsambo oyo bazali kosala na bango mobembo, bazali kotala bilongi ya mawa ya bandeko na bango oyo batikali na libongo. (Mis. 20:4, 14, 15) Bazali kotika te kopɛpa bango mabɔkɔ tii ntango bazali komona bango lisusu te.
3 Paulo asalaki mbula pene na misato elongo na bankulutu ya Efese. Kasi, sikoyo, na kolanda litambwisi ya elimo santu, azali kokende na Yerusaleme. Azali na mwa likanisi ya makambo oyo akokutana na yango kuna. Mwa liboso, ayebisaki bankulutu yango boye: “Nazali kokende na Yerusaleme mpo na kosala oyo elimo ezali kotinda ngai nasala, atako nayebi te nini ekokómela ngai kuna. Oyo nayebi ezali kaka: na engumba na engumba, elimo santu ezali kokebisa ngai mbala na mbala ete bolɔkɔ mpe malɔzi ezali kozela ngai.” (Mis. 20:22, 23) Atako Paulo ayebi ete akokutana na mokakatano, azali komiyoka ete ‘elimo ezali kotinda ye asala’—elingi koloba ete asɛngisami, kasi ye moko mpe azali na mposa ya kolanda litambwisi ya elimo oyo ezali kotinda ye akende na Yerusaleme. Azali koluka kokufa te, kasi kosala mokano ya Nzambe nde likambo eleki ntina mpo na ye.
4 Yo mpe oyokaka ndenge yango? Ntango tomipesi na Yehova, tolapaka ndai ete kosala mokano na ye ekozala likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso. Kotalela ndakisa ya bosembo ya ntoma Paulo ekoki kosalisa biso.
Baleki na “esanga ya Shipre” (Misala 21:1-3)
5. Paulo ná baninga na ye balekaki nzela nini mpo na kokende na Tire?
5 Masuwa oyo Paulo ná baninga na ye bazwaki ‘etambolaki alima.’ Yango elingi koloba ete mopɛpɛ ezalaki kobɛta yango na nsima mpe ekendaki mopanzi te, mpe lokola mopɛpɛ ezalaki kotindika yango, ekómaki na Kosi kaka mokolo wana. (Mis. 21:1) Ekoki kozala ete masuwa yango elekisaki butu na mboka yango liboso ekóma na Rode mpe na nsima na Patara. Ntango bandeko yango bakómaki na Patara, na bokula ya sudi ya Azia Moke, bakɔtaki na masuwa moko monene oyo ezalaki komema biloko, mpe ememaki bango mbala moko tii na Tire, na etúká ya Fenisia. Ntango bazalaki kokende, balekaki na “esanga ya Shipre . . . na [libongo ya] lobɔkɔ ya mwasi.” (Mis. 21:3) Mpo na nini Luka, mokomi ya Misala, alobelaki likambo yango?
6. (a) Mpo na nini ekoki kozala ete Paulo alendisamaki ntango amonaki esanga ya Shipre? (b) Ntango ozali kokanisa ndenge oyo Yehova apambolaki yo mpe asalisaki yo, okoki koloba nini?
6 Mbala mosusu Paulo alakisaki bango esanga yango mpe abɛtelaki bango lisolo ya makambo oyo akutanaki na yango kuna. Na mobembo na ye ya liboso na mosala ya misionɛrɛ, mbula soki libwa liboso, Paulo, elongo na Barnabasi ná Yoane Marko, bakutanaki na nganga-nkisi Elimasi oyo atɛmɛlaki mosala na bango. (Mis. 13:4-12) Ntango Paulo amonaki esanga yango mpe akanisaki lisusu makambo oyo elekaká kuna, ekoki kozala ete azwaki makasi ya koyikela makambo oyo ezalaki liboso na ye mpiko. Biso mpe tokoki kozwa litomba na kokanisa ndenge oyo Nzambe apambolaki biso mpe asalisaki biso tóyika mpiko na mikakatano. Kokanisa ndenge wana ekoki kosalisa biso tóloba lokola Davidi, oyo akomaki ete: “Bampasi ya moto ya sembo ezali mingi, kasi Yehova abikisaka ye na yango nyonso.”—Nz. 34:19.
‘Tolukalukaki bayekoli mpe tomonaki bango’ (Misala 21:4-9)
7. Bandeko oyo bazalaki na mobembo basalaki nini ntango bakómaki na Tire?
7 Paulo ayebaki ete kozala elongo na bandeko bakristo ezali na ntina mingi mpe azalaki na mposa makasi ya kokutana na bango. Luka akomi ete ntango bakómaki na Tire, ‘balukalukaki bayekoli mpe bamonaki bango.’ (Mis. 21:4) Lokola bayebaki ete bandeko na bango bakristo bazali na Tire, bato yango ya mobembo balukaki bango mpe na ntembe te, balekisaki ntango elongo na bango. Moko na mapamboli minene ya koyeba solo ezali ete ata tokei wapi, tokoki kokutana na bandeko na biso oyo bakoyamba biso. Bato oyo balingaka Nzambe mpe bazali na losambo ya solo bazali na bandeko na mokili mobimba.
8. Ndenge nini tosengeli kokanga ntina ya maloba oyo ezali na Misala 21:4?
8 Ntango Luka akomaki makambo oyo elekaki na boumeli ya mikolo nsambo oyo balekisaki na Tire, alobelaki likambo moko oyo ekoki kobimisa mituna na motó na biso: “Na nzela ya elimo santu [bandeko na Tire] bazalaki koyebisa Paulo mbala na mbala ete atya lokolo na Yerusaleme te.” (Mis. 21:4) Yango elingi nde koloba ete Yehova abongolaki makanisi? Akómaki nde komonisa Paulo ete akende na Yerusaleme te? Ezali bongo te. Elimo emonisaki ete Paulo akonyokwama na Yerusaleme, kasi emonisaki te ete asengeli koboya kokende kuna. Boye emonani ete na nzela ya elimo santu, bandeko na Tire bamonaki ete Paulo akokutana na mikakatano na Yerusaleme. Yango wana, lokola bazalaki komibanzabanza mpo na Paulo, balendisaki ye ete akende na Yerusaleme te. Tokoki komitya na esika na bango mpe komona ete bazalaki na makanisi malamu ya koluka kobatela Paulo na likama oyo ezalaki liboso na ye. Atako bongo, lokola Paulo azalaki na ekateli ya kosala mokano ya Yehova, akobaki mobembo na ye tii na Yerusaleme.—Mis. 21:12.
9, 10. (a) Ntango bandeko babondelaki Paulo na Tire, mbala mosusu akanisaki likambo nini? (b) Bato mingi basepelaka na makanisi nini lelo oyo, mpe na ndenge nini yango ekeseni na maloba ya Yesu?
9 Ntango bandeko babondelaki Paulo, mbala mosusu akanisaki ete Yesu mpe ayokaki maloba ya ndenge wana ntango ayebisaki bayekoli na ye ete akokende na Yerusaleme, akonyokwama mingi, mpe akobomama. Na ntango wana, Petro alobaki na Yesu boye: “Zalá na boboto epai na yo moko, Nkolo; likambo wana ekokómela yo te.” Yesu azongisaki ete: “Leká nsima na ngai, Satana! Ozali eloko oyo ezali kobɛtisa ngai libaku, mpo lolenge na yo ya kokanisa ezali ya Nzambe te, kasi ya bato.” (Mat. 16:21-23) Yesu azalaki na ekateli ya kondima minyoko oyo Nzambe atikaki nzela ete ekómela ye. Paulo mpe azalaki na makanisi ndenge wana. Na ntembe te, bandeko na Tire, lokola mpe ntoma Petro, bazalaki na makanisi ya malamu, kasi basosolaki mokano ya Nzambe te.
10 Lelo oyo, bato mingi basepelaka na likanisi ya komitungisa te to ya koboya kominyokola. Bato mingi balukaka lingomba oyo ekotika bango básala makambo oyo balingaka mpe ekosɛnga bango makambo ya makasi te. Nzokande, Yesu alendisaki elimo mosusu. Ayebisaki bayekoli na ye boye: “Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mpe akoba kolanda ngai.” (Mat. 16:24) Kolanda Yesu nde nzela ya bwanya mpe oyo ebongi, kasi ezali pɛtɛɛ te.
11. Ndenge nini bayekoli na Tire bamonisaki ete balingaki Paulo mpe balendisaki ye na mosala na ye?
11 Mwa moke na nsima, Paulo, Luka, mpe bandeko mosusu basengelaki kokoba mobembo na bango. Ndenge oyo lisolo elobeli kokabwana na bango ezali mpenza kosimba motema. Emonisi ete bandeko ya Tire balingaki mpenza Paulo mpe balendisaki ye na mosala na ye. Mibali, basi, mpe bana bakendaki kotika Paulo ná baninga na ye ya mobembo tii na libongo. Bango nyonso bafukamaki mpe babondelaki mpe na nsima, bapesaki bango mbote ya bokabwani. Na nsima, Paulo, Luka, mpe baninga na bango ya mobembo bazwaki masuwa mosusu mpe bakendaki tii na Potolemaisi, epai bakutanaki na bandeko mpe balekisaki mokolo moko na bango.—Mis. 21:5-7.
12, 13. (a) Na ndenge nini Filipe asalelaki Nzambe na bosembo na boumeli ya bambula? (b) Na makambo nini Filipe azali ndakisa malamu mpo na batata bakristo lelo oyo?
12 Luka akomi ete na nsima, Paulo ná baninga na ye ya mobembo bakendaki na Kaisaria. Ntango bakómaki kuna, ‘bakɔtaki na ndako ya Filipe, mopalanganisi ya nsango malamu.’a (Mis. 21:8) Na ntembe te, basepelaki mingi komona Filipe. Mbula soki 20 liboso, na Yerusaleme, bantoma baponaki Filipe mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kokabola bilei epai ya bandeko ntango lisangá ya bokristo ebandaki sika. Filipe azalaki mosakoli ya molende na boumeli ya bambula mingi. Tóbosana te ete ntango bandeko bapanzanaki mpo na kokima minyoko, Filipe akendaki na Samaria mpe abandaki kosakola kuna. Na nsima, ateyaki mokube moto ya Etiopi mpe abatisaki ye. (Mis. 6:2-6; 8:4-13, 26-38) Asalelaki mpenza Nzambe na bosembo na boumeli ya bambula!
13 Filipe azalaki kaka na molende na mosala ya kosakola. Na ntango wana akómaki kofanda na Kaisaria. Emonani ete Filipe azalaki kaka komipesa na mosala ya kosakola mpo Luka abengi ye “mopalanganisi ya nsango malamu.” Luka alobi mpe ete Filipe azalaki na bana minei ya basi oyo bazalaki kosakola; yango emonisi ete balandaki ndakisa ya tata na bango.b (Mis. 21:9) Boye, emonani ete Filipe asalaki mosala monene mpo na kotonga libota na ye na elimo. Lelo oyo, ezali malamu ete batata bakristo bálanda ndakisa ya Filipe, elingi koloba bápesa ndakisa na mosala ya kosakola mpe básalisa bana na bango bálinga mosala yango.
14. Ntango Paulo azalaki kokutana na baninga na ye bakristo, na ntembe te nini ezalaki kosalema, mpe mabaku nini ya ndenge wana ezali lelo oyo?
14 Na bisika nyonso oyo balekaki, Paulo azalaki koluka bandeko na ye bandimi mpe azalaki kolekisa ntango elongo na bango. Na ntembe te bandeko ya bisika yango bazalaki na esengo ya koyamba misionɛrɛ yango ná baninga na ye. Ntembe ezali te ete bokutani wana ezalaki kopesa bango libaku ya ‘kolendisana.’ (Rom. 1:11, 12) Mabaku ya ndenge wana emonanaka mpe lelo oyo. Bandeko oyo bayambaka bakɛngɛli ya zongazonga ná basi na bango, ata soki bazali na bozwi mingi te, bazwaka mapamboli mingi.—Rom. 12:13.
“Namibongisi . . . mpo na kokufa” (Misala 21:10-14)
15, 16. Agabusi asakolaki nini, mpe yango esalaki nini epai ya bato oyo bayokaki yango?
15 Na ntango oyo Paulo azalaki epai ya Filipe, mopaya mosusu ya monene oyo nkombo na ye ezalaki Agabusi, ayaki. Bandeko oyo bayanganaki na ndako ya Filipe bayebaki ete Agabusi azalaki mosakoli; asakolaki nzala monene oyo eyaki na boyangeli ya Amperɛrɛ Klode. (Mis. 11:27, 28) Mbala mosusu bamitunaki: ‘Mpo na nini Agabusi ayei? Nsango nini amemeli biso?’ Ntango bazali kotalatala ye, azwaki mokaba ya Paulo (eteni ya elamba oyo ezali lokola mokaba, oyo moto akokaki kotya mbongo mpe biloko mosusu na kati, mpe kolata yango na loketo). Agabusi amikangaki na yango makolo mpe mabɔkɔ. Na nsima alobaki. Nsango na ye ezalaki ya esengo te: “Elimo santu elobi boye: ‘Nkolo mokaba oyo, Bayuda bakokanga ye boye na Yerusaleme mpe bakokaba ye na mabɔkɔ ya bato ya bikólo.’”—Mis. 21:11.
16 Esakweli yango endimisaki ete Paulo akokende na Yerusaleme. Emonisaki mpe ete ntango akosakola epai ya Bayuda, bango bakokanga ye mpe bakokaba ye “na mabɔkɔ ya bato ya bikólo.” Esakweli yango epesaki bato oyo bazalaki wana mawa mingi. Luka akomaki boye: “Ntango toyokaki bongo, biso ná bato oyo bazalaki wana tobandaki kobondela ye ete amata na Yerusaleme te. Kasi Paulo ayanolaki: “Mpo na nini bozali kolela mpe koluka kolɛmbisa ngai motema? Bóyeba likambo oyo: Namibongisi kaka mpo na kokangama te, kasi mpe mpo na kokufa na Yerusaleme mpo na nkombo ya Nkolo Yesu.’”—Mis. 21:12, 13.
17, 18. Ndenge nini Paulo amonisaki ekateli makasi oyo azalaki na yango, mpe bandeko basalaki nini?
17 Kanisá naino. Bandeko nyonso, ata mpe Luka, bazali kobondela Paulo ete akende te. Bamosusu bazali kolela. Lokola Paulo amoni bolingo mpe komibanzabanza na bango, alobi na bango na boboto ete bazali “kolɛmbisa [ye] motema.” Atako bongo, azali na ekateli makasi, mpe ndenge kaka asalaki ntango akutanaki na bandeko na Tire, atiki te ete maloba mpe mpisoli na bango ezongisa ye nsima. Kutu, amonisi bango ntina oyo asengeli kokende. Amonisaki mpenza ete azalaki na mpiko! Na ndakisa ya Yesu, Paulo atalisaki elongi na ye na Yerusaleme mpe azalaki na ekateli makasi ya kokende kuna. (Ebr. 12:2) Paulo azalaki koluka kokufa lokola martiri te; kasi soki esɛngi ete akufa mpo azali moyekoli ya Yesu Kristo, akomona yango lokumu.
18 Bandeko basalaki nini? Na mokuse, bandimaki makanisi na ye. Biblia elobi: “Lokola azalaki kaka kondimela biso te, totikaki kotya ye mbamba mpe tolobaki: ‘Mokano ya Yehova esalema.’” (Mis. 21:14) Baoyo balukaki kondimisa Paulo ete akende na Yerusaleme te batingamaki na likanisi na bango te. Bayokelaki Paulo mpe bandimaki makanisi na ye, basosolaki mpe bandimaki ete ezali mokano ya Yehova, atako ezalaki mpasi mpo na bango. Paulo andimaki likambo oyo nsukansuka esengelaki komema ye na liwa. Makambo elingaki kozala mwa pɛtɛɛ mpo na Paulo soki bandeko balukaki te kondimisa ye ete akende te na Yerusaleme.
19. Liteya nini ya ntina mingi tozwi na likambo oyo Paulo akutanaki na yango?
19 Likambo oyo Paulo akutanaki na yango ezali na liteya moko ya ntina mingi mpo na biso: Tosengeli soki moke te kolɛmbisa bandeko mosusu oyo balingi kosalela Nzambe na elimo ya komipimela. Tokoki kosalela liteya yango na makambo mingi; kasi ezali te kaka na makambo oyo ekoki komema na liwa. Na ndakisa, atako bakristo mingi oyo bazali na bana bayokaka mawa ntango bana na bango balongwe na ndako mpo na kokende kosalela Yehova na mboka mosika, balukaka te kolɛmbisa bana yango nzoto. Phyllis, oyo afandaka na ekólo Angleterre, azali koyeba mawa oyo ayokaki ntango mwana na ye kaka moko ya mwasi akómaki misionɛrɛ na Afrika. Phyllis alobi boye: “Nayokaki mawa mpenza. Ezalaki kosala ngai mpasi koyeba ete akozala na mboka mosika. Ezalaki mawa mpe esengo mpo na ngai. Nabondelaki mingi mpo na yango. Kasi ezalaki ekateli na ye, mpe namekaki ata moke te kobongola yango. Kutu, ngai moko nde nateyaki ye ete atyaka Bokonzi na esika ya liboso! Alekisi mbula 30 na mosala na mboka mopaya, mpe mokolo na mokolo natɔndaka Yehova na ndenge mwana na ngai azali kosalela ye na bosembo.” Ezali mpenza malamu ntango tozali kolendisa bandeko na biso mpo na elimo na bango ya komipimela!
“Bandeko bayambaki biso na esengo” (Misala 21:15-17)
20, 21. Nini emonisi ete Paulo azalaki na mposa ya kozala elongo na bandeko, mpe mpo na nini azalaki na mposa ya kozala elongo na bango?
20 Bibongiseli ezwamaki mpo na mobembo; na nsima, Paulo akobaki nzela na ye mpe bandeko mosusu ya Kaisaria bakendaki na ye, likambo oyo emonisi ete bandimaki na motema moko ekateli na ye. Na esika nyonso oyo Paulo ná baninga na ye batɛlɛmaki na mobembo na bango mpo na kokende na Yerusaleme, balukaki bandeko na bango bakristo. Na Tire, bamonaki bayekoli mpe balekisaki elongo na bango mikolo nsambo. Na Potolemaisi, bapesaki bandeko na bango mbote mpe balekisaki na bango mokolo moko. Na Kaisaria, bafandaki mwa mikolo na ndako ya Filipe. Na nsima, bayekoli mosusu ya Kaisaria bakendaki kotika Paulo ná baninga na ye na Yerusaleme, mpe kuna, Manasona, moyekoli moko ya liboso, ayambaki bango. Na nsuka, ntango bakómaki na Yerusaleme, Luka alobi ete: “bandeko bayambaki biso na esengo.”—Mis. 21:17.
21 Tomoni polele ete Paulo alingaki kozala elongo na bandeko na ye bakristo. Bandeko yango bazalaki kolendisa ye mingi, ndenge biso mpe tosalaka yango lelo oyo. Na ntembe te, bilendiseli wana epesaki Paulo makasi ya kobanga te banguna oyo basengelaki koluka koboma ye.
a Talá etanda “Kaisaria—Engumba-mokonzi ya etúká ya Yudea,” na lokasa 174.
b Talá etanda “Basi bakristo bakoki nde kokendaka kosakola?” na lokasa oyo.