Likoló
Ndimbola: Esika oyo Yehova Nzambe afandaka elongo na bikelamu ya elimo ya sembo; esika oyo moto akoki komona te. Na Biblia, liloba “likoló” ezali mpe na bandimbola mingi; na ndakisa, Biblia esalelaka liloba yango mpo na komonisa Nzambe ye moko, lisangá na ye na likoló, elingi koloba bikelamu ya elimo ya sembo, kondimama na Nzambe, molɔ́ngɔ́ mobimba longola mabele, etando oyo ezingi mabele, baguvɛrnema ya bato oyo etambwisami na Satana, mpe guvɛrnema ya sika ya sembo oyo ezali na likoló, oyo Yehova apesi Yesu ná bazwi-ya-libula báyangela.
Biso nyonso tozalaki na bomoi na mokili ya elimo liboso tóbotama?
Yoa. 8:23: “[Yesu Kristo alobaki:] ‘Bino bozali bato ya nse; ngai nazali moto ya likoló. Bino bozali bato ya mokili oyo; ngai nazali moto ya mokili oyo te.’” (Yesu autaki na mokili ya elimo. Kasi, ndenge ye moko alobaki, bato mosusu bautá na mokili yango te.)
Rom. 9:10-12: “Rebeka azwaki zemi ya mapasa . . . Ntango babotamaki naino te mpe basalaki naino likambo ata moko te ya malamu to ya mabe, mpo mokano ya Nzambe ya kopona ekoba kotalela misala te, kasi nde Moto oyo abengaka, balobaki na ye ete: ‘Mokóló akozala moombo ya leki.’” (Ya solo, soki Yakobo ná Esau bázalaka na bomoi na mokili ya elimo liboso bábotama, na ntembe te, etamboli na bango elingaki komonisa bizaleli oyo bazalaki na yango na mokili ya elimo, boye te? Kasi, Biblia elobi ete basalaki naino likambo ata moko te tii ntango babotamaki.)
Bato nyonso ya malamu bakendaka na likoló?
Mis. 2:34: “Davidi [oyo Biblia elobi ete azalaki ‘moto moko oyo azali kosepelisa motema ya Yehova’] amataki na likoló te.”
Mat. 11:11: “Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Na bato nyonso oyo basi babotá, moko oyo aleki Yoane Mobatisi abimá te; kasi moto oyo aleki moke na bokonzi ya likoló aleki ye.” (Na yango, ntango Yoane akufaki akendaki na likoló te.)
Nz. 37:9, 11, 29: “Basali-mabe bakobomama, kasi bato oyo balikyaka na Yehova nde bakozwa mabele . . . Bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi. Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”
Soki Adama asalaki lisumu te, nsukansuka alingaki nde kokende na likoló?
Eba. 1:26: “Nzambe alobaki lisusu ete: ‘Tósala moto na elilingi na biso, azala lokola biso, mpe bango bázala na bokonzi likoló ya mbisi ya mbu mpe likoló ya bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe likoló ya banyama ya mboka mpe likoló ya mabele mobimba mpe likoló ya nyama mosusu nyonso oyo etambolaka na mabele.’” (Na yango, mokano ya Nzambe mpo na Adama ezalaki ete abatela mabele mpe banyama. Eloko moko te emonisi ete asengelaki kokende na likoló.)
Eba. 2:16, 17: “Yehova Nzambe apesaki moto etinda oyo: ‘Nzete nyonso ya elanga, okoki kolya yango ndenge olingi. Kasi nzete ya koyeba malamu ná mabe osengeli kolya yango te, mpo mokolo okolya yango okokufa solo.’” (Na ebandeli, mokano ya Yehova ezalaki te ete mokolo mosusu moto akufa. Mobeko yango ya Nzambe emonisi ete Nzambe akebisaki bango nde na makambo oyo ekoki komema na liwa. Liwa ezali nde etumbu ya kozanga botosi, kasi ezali te nzela oyo ezali komema na bomoi malamu na likoló. Nzokande lifuti ya botosi ezali bomoi ezangi nsuka, bomoi ya seko na Paradiso oyo Nzambe apesaki moto. Talá mpe Yisaya 45:18.)
Moto asengeli kokende na likoló mpo na kozwa bolamu ya solosolo?
Nz. 37:11: “Bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”
Em. 21:1-4: “Namonaki likoló ya sika ná mabele ya sika . . . Nayokaki mongongo moko ya makasi euti na kiti ya bokonzi elobi ete: ‘Talá! Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.’”
Mika 4:3, 4: “Bakotombola mopanga te, ekólo moko mpo na kobunda na ekólo mosusu, mpe bakoyekola etumba lisusu te. Mpe bakofanda mpenza, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango; mpo monɔkɔ mpenza ya Yehova ya mampinga elobi yango.”
Yesu afungolaki nzela ya kokende na likoló mpo na bato oyo bakufaki liboso ye akufa?
Mokanda ya 1 Petro 3:19, 20 elimboli nini? “Ndenge wana [na elimo, nsima ya lisekwa na ye] nde [Yesu] akendaki kosakwela bilimo oyo ezali na bolɔkɔ, oyo kala batosaki te ntango motema molai ya Nzambe ezalaki kozela na mikolo ya Noa, ntango masuwa ezalaki kotongama, oyo na kati na yango bato moke, elingi koloba, milimo mwambe [“milimo,” KJ, Dy; “bato,” LNz, hf], babikaki na mai.” (“Bilimo [yango] oyo ezalaki na bolɔkɔ” ezali nde milimo ya bato oyo baboyaki kondima nsango oyo Noa asakolaki liboso ya Mpela, mpe sikoyo bafungolelaki bango nzela ya kokende na likoló? Soki tozwi 2 Petro 2:4 ná Yuda 6 tokokanisi yango na Ebandeli 6:2-4 tokomona ete bilimo yango ezalaki baanzelu ya Nzambe oyo balataki nzoto ya bato mpe babalaki basi na ntango ya Noa. Na 1 Petro 3:19, 20 liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “bilimo” ezali pneumasin, nzokande, liloba oyo ebongolami na “milimo” ezali psukhai. “Bilimo” yango ezalaki te milimo oyo etiki nzoto, kasi nde baanzelu oyo bazangaki botosi; awa, liloba “milimo” emonisi nde bato oyo bazali na bomoi, Noa ná libota na ye. Na yango, nsango oyo [Yesu] asakwelaki “bilimo oyo ezali na bolɔkɔ” ezalaki nsango ya lisambisi.)
Mokanda ya 1 Petro 4:6 elimboli nini? “Ya solo, ezali mpo na ntina wana nde nsango malamu esakolamaki mpe epai ya bakufi, mpo, na miso ya bato, básambisama na makambo oyo ezali komonana libándá kasi bázala na bomoi na elimo na miso ya Nzambe.” (“Bakufi” yango ezali nde bato oyo bakufaki liboso Kristo akufa? Ndenge tosili komona yango, bakufi yango ezali te “bilimo oyo ezali na bolɔkɔ.” Bilimo oyo ezalaki na bolɔkɔ ezali baanzelu oyo bazangaki botosi. Mpe kosakwela bato oyo bakufá ezali na litomba te mpo, ndenge Mosakoli 9:5 elobi, “bayebi ata eloko moko te,” mpe Nzembo 146:4 ebakisi ete ntango moto akufi, “makanisi na ye ekufi.” Kasi Baefese 2:1-7, 17 elobeli nde bato oyo bakufaki na elimo mpe bazongaki na bomoi na elimo ntango bandimaki nsango malamu.)
“Kondimana ya Sika” elobi ete bakristo nyonso bakokende na likoló?
Yoa. 14:2, 3: “Na ndako ya Tata na ngai bisika ya kofanda ezali mingi. Soki bongo te, mbɛlɛ nayebisaki bino, mpo nazali kokende kobongisela bino esika. Lisusu, soki nakei mpe nabongiseli bino esika, nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai, mpo esika ngai nazali bino mpe bózala wana.” (Yesu amonisi awa ete nsima ya mwa ntango, bantoma na ye ya sembo, oyo azalaki koloba na bango, bakozala na “ndako” ya Tata na ye na likoló, elongo na ye. Kasi na vɛrsɛ oyo alobeli te motángo ya bayekoli mosusu oyo bakokende mpe na likoló.)
Yoa. 1:12, 13: “Baoyo nyonso bayambaki ye [Yesu], apesaki bango lotomo ya kokóma bana ya Nzambe, mpo bazalaki kondimela nkombo na ye; mpe babotamaki, na makila te to na mokano ya bato ya mosuni te to na mokano ya mobali moko boye mpe te, kasi na Nzambe.” (Simbá ete vɛrsɛ 11 elobeli “bato [ya Yesu] ye moko,” elingi koloba Bayuda. Bayuda nyonso oyo bandimelaki Yesu ntango ayaki epai na bango na siɛklɛ ya liboso, bakómaki bana ya Nzambe, bazwaki elikya ya bomoi na likoló. Lokola bavɛrbɛ oyo ezali na vɛrsɛ yango ezali na ntango oyo eleki (passé), yango emonisi ete vɛrsɛ yango elobeli te bato nyonso oyo bakokóma bakristo banda na ntango wana tii lelo.)
Rom. 8:14, 16, 17: “Baoyo nyonso bazali kotambwisama na elimo ya Nzambe bazali bana ya Nzambe. Elimo yango moko etatolaka elongo na elimo na biso ete tozali bana ya Nzambe. Bongo soki tozali bana, tozali mpe bazwi-ya-libula: ɛɛ bazwi-ya-libula ya Nzambe, kasi bazwi-ya-libula elongo na Kristo, soki tomoni mpasi elongo na ye mpo tózwa mpe nkembo elongo na ye.” (Ntango bavɛrsɛ oyo ekomamaki, bato nyonso oyo batambwisamaki na elimo ya Nzambe bazalaki bana ya Nzambe, bazalaki na elikya ya kozwa nkembo elongo na Kristo. Kasi bato nyonso bazalaki na elikya wana te. Luka 1:15 elobi ete Yoane Mobatisi atondaki na elimo santu, kasi Matai 11:11 emonisi polele ete akozwa nkembo ya Bokonzi ya likoló te. Na yango, nsima ya koyanganisa bazwi-ya-libula ya Bokonzi ya likoló, ekozala na bato mosusu oyo bakosalela Nzambe mpe bakozala bayekoli ya Mwana na ye, kasi bakozwa nkembo ya likoló te.)
Bavɛrsɛ nini ya “Kondimana ya Sika” emonisi ete bakristo bakozwa bomoi ya seko awa na mabele?
Mat. 5:5: “Esengo na bato ya ezaleli ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabele.”
Mat. 6:9, 10: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama. Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini? Ebandeli 1:28 mpe Yisaya 45:18 emonisi nini?)
Mat. 25:31-33, 40, 46: “Ntango Mwana ya moto akoya na nkembo na ye mpe baanzelu nyonso elongo na ye, bongo akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo. Mpe bikólo nyonso bakoyangana liboso na ye, mpe akokabola bato, mosusu epai oyo mosusu epai oyo, ndenge mobateli ya mpate akabolaka bampate ná bantaba. Mpe akotya bampate na lobɔkɔ na ye ya mobali, kasi bantaba na lobɔkɔ na ye ya mwasi. . . . Mokonzi akozongisela bango ete: ‘Ya solo mpenza nalobi na bino: Ntango nyonso oyo bosalelaki yango moko ya bato oyo baleki mike na kati ya bandeko na ngai oyo, bosalelaki ngai.’ Mpe [bantaba] bakokufa liwa ya seko, kasi bayengebene [bampate] bakozwa bomoi ya seko.” (Simbá ete “bampate” ezali te bandeko ya Mokonzi, oyo ‘babengami mpo na kokende na likoló.’ [Ebr. 2:10–3:1] Kasi bampate yango bakozala naino na bomoi ntango oyo Kristo akozala na kiti ya bokonzi mpe na ntango oyo “bandeko” na ye bakozala naino konyokwama awa na mabele.)
Yoa. 10:16: “Nazali na bampate mosusu, oyo ezali ya lopango oyo te; yango mpe nasengeli komema yango, mpe ekoyoka mongongo na ngai, mpe ekokóma etonga kaka moko, na mobateli kaka moko.” (“Bampate mosusu” yango ezali banani? Ezali bayekoli ya Yesu Kristo, Mobateli ya mpate oyo aleki malamu, kasi bazali te na kati ya lopango ya bampate ya “kondimana ya sika,” oyo bazali na elikya ya bomoi na likoló. Atako bongo, bazali na boyokani malamu mpenza na baoyo bazali na kati ya lopango yango.)
2 Pe. 3:13: “Tozali kozela likoló ya sika mpe mabele ya sika ndenge alakaki, mpe kuna, boyengebene ekozala.” (Talá mpe Emoniseli 21:1-4.)
Em. 7:9, 10: “Nsima ya makambo wana [nsima ya komona motángo ya bato oyo ‘batyamaki elembo,’ oyo “basombamaki na mabele” oyo bazali elongo na Kristo na Ngomba Siona ya likoló; talá Emoniseli 7:3, 4; 14:1-3] namonaki, mpe talá! ebele mpenza ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso, batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate, balati bazambala ya mpɛmbɛ; mpe basimbi mandalala na mabɔkɔ. Mpe bazali kokoba koganga na mongongo makasi ete: ‘Lobiko na biso euti na Nzambe na biso, oyo afandi na kiti ya bokonzi, mpe na Mwana-Mpate.’”
Biblia elobi ete bato boni bakokende na likoló?
Luka 12:32: “Bóbanga te, etonga moke, mpo Tata na bino andimi kopesa bino bokonzi.”
Em. 14:1-3: “Mpe namonaki, mpe talá! Mwana-Mpate [Yesu Kristo] atɛlɛmi likoló ya Ngomba Siona [na likoló; talá Baebre 12:22-24], mpe elongo na ye bato nkóto nkama moko na ntuku minei na minei (144 000) oyo nkombo na ye mpe nkombo ya Tata na ye ekomamá na bilongi na bango. . . . Mpe bazali koyemba lokola nde loyembo moko ya sika . . . mpe moto moko te akokaki koyeba loyembo yango malamumalamu longola kaka bato yango nkóto nkama moko na ntuku minei na minei (144 000), oyo basombamaki na mabele.”
Bato 144 000 yango bazali bango nyonso Bayuda?
Em. 7:4-8: “Nayokaki motángo ya bato oyo batyamaki elembo, nkóto nkama moko na ntuku minei na minei (144 000), oyo batyamaki elembo na mabota nyonso ya bana ya Yisraele: . . . Yuda . . . Rubene . . . Gade . . . Ashere . . . Nafatali . . . Manase . . . Simeone . . . Levi . . . Isakare . . . Zebulone . . . Yozefe . . . Benyamina.” (Mabota oyo ekoki kozala ya Yisraele ya mosuni te mpo libota ya Yozefe ezalaki te, mabota ya Efraime ná Dane etángami te na mabota oyo, mpe Balevi batyamaki pembeni mpo na misala ya tempelo mpe batángamaki te na mabota 12. Talá Mitángo 1:4-16.)
Rom. 2:28, 29: “Moyuda ezali te moto oyo azali bongo na libándá, ndenge moko mpe kokatama ngenga ezali te oyo ezali komonana na libándá na nzoto. Kasi Moyuda ezali nde moto oyo azali bongo na kati, mpe kokatama ngenga na ye ezali oyo ya motema na elimo, kasi te na mibeko oyo ekomami.”
Gal. 3:26-29: “Ya solo, bozali bino nyonso bana ya Nzambe na nzela ya kondima oyo bondimelaka Kristo Yesu. . . . Moyuda azali te, Mogrɛki mpe te, moombo azali te, moto ya bonsomi mpe te, mobali azali te, mwasi mpe te; mpo bozali bino nyonso moto kaka moko na bomoko na Kristo Yesu. Lisusu, soki bozali bato ya Kristo, bozali mpenza momboto ya Abrahama, bazwi-ya-libula ya elaka.”
Motángo 144 000 ezali motángo ya elilingi?
Eyano na motuna yango ezali na likambo oyo: nsima ya kopesa motángo ya sikisiki 144 000, Emoniseli 7:9 elobeli “ebele mpenza ya bato, oyo ata moto moko te akoki mpenza kotánga.” Soki motángo 144 000 ezalaka ya elilingi, ntina ya kokesenisa yango na “ebele mpenza ya bato” elingaki kozala te. Koloba ete motángo yango ezali ya elilingi te eyokani na maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 22:14 oyo elobeli Bokonzi ya likoló: “Bato mingi babengisami, kasi moke nde baponami.”
“Ebele mpenza ya bato” oyo Emoniseli 7:9, 10 elobeli bakokende mpe na likoló?
Emoniseli elobeli bango te ndenge elobeli bato 144 000, ete “basombamaki na mabele” mpo na kozala elongo na Kristo na Ngomba Siona ya likoló.—Em. 14:1-3.
Lokola vɛrsɛ yango elobi ete “batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate,” yango emonisi mpenzampenza esika moko boye te, kasi emonisi nde ete bandimami na Nzambe. (Talá Emoniseli 6:17; Luka 21:36.) Maloba “liboso ya kiti ya bokonzi” (Grɛki, enopion tou thronou; elimboli mpenzampenza, “na miso ya kiti ya bokonzi”) emonisi te ete bazali na likoló. Batɛlɛmi nde “na miso” ya Nzambe, oyo alobi ete amonaka bana ya bato longwa na likoló.—Nz. 11:4; talá Matai 25:31-33; Luka 1:74, 75; Misala 10:33.
“Ebele ya bikelamu na likoló” oyo Emoniseli 19:1, 6 elobeli ekeseni na “ebele mpenza ya bato” oyo Emoniseli 7:9 elobeli. Biblia elobi te ete “ebele ya bikelamu” yango “bauti na bikólo nyonso,” elobi mpe te ete lobiko na bango euti na Mwana-Mpate; ebele ya bikelamu yango ezali nde baanzelu. Na Biblia, maloba “ebele mpenza ya bato” ezali na bandimbola mingi.—Mrk. 5:24; 6:34; 12:37.
Baoyo bakokende na likoló bakosala nini kuna?
Em. 20:6: “Bakozala banganga-nzambe ya Nzambe mpe ya Kristo, mpe bakoyangela elongo na ye mbula nkóto moko (1 000).” (Talá mpe Danyele 7:27.)
1 Ko. 6:2: “Boyebi te ete basantu bakosambisa mokili?”
Em. 5:10: “Okómisi bango bokonzi mpe banganga-nzambe mpo na Nzambe na biso, mpe bakoyangela mabele.”
Nani aponaka baoyo bakokende na likoló?
2 Tes. 2:13, 14: “Biso tosengeli kopesa Nzambe matɔndi ntango nyonso mpo na bino, bandeko oyo Yehova alingi, mpamba te Nzambe aponaki bino banda na ebandeli mpo na lobiko na ndenge asantisaki bino na elimo mpe na nzela ya kondima na bino na kati ya solo. Mpo na ntina yango mpenza nde ye abengaki bino na nzela ya nsango malamu oyo tozali kosakola, mpo na kozwa nkembo ya Nkolo na biso Yesu Kristo.”
Rom. 9:6, 16: “Ezali te bato nyonso oyo bazali kobotama na Yisraele nde bazali mpenzampenza Bayisraele. . . . Ezali kotalela te moto oyo alingi to moto oyo azali kopota mbangu, kasi nde Nzambe, oyo azali na motema mawa.”