“Nzambe alingaki biso boye”
“Soko Nzambe alingaki biso boye, ekoki mpe na biso ete tólingana, moto moninga na ye.”—1 YOANE 4:11.
1. Na mokolo mwa 23 Mársi nsima ya kolala ya moi, mpo na nini bamilió ya bato bakoyangana na Bandako ya Bokonzi mpe na bisika ya makita na mokili mobimba?
NA MWALOMINGO 23 Mársi 1997, nsima ya kolala ya moi, na ntembe te, bato koleka 13 000 000 na mokili mobimba bakoyangana na Bandako ya Bokonzi mpe na bisika ya makita oyo esalelamaka na Batatoli ya Yehova. Mpo na nini? Mpamba te mitema na bango misimbami na elembeteli eleki monene ya bolingo oyo Nzambe amonisaki mpo na bato. Yesu Klisto abendaki likebi likoló na elembeteli monene wana ya bolingo ya Nzambe, na kolobáká ete: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesaki Mwana mobotami-bobele moko na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.”—Yoane 3:16, NW.
2. Mituna nini biso banso tokoki komituna na kotalela lolenge tozali koyanola na bolingo ya Nzambe?
2 Wana tozali kotalela bolingo oyo Nzambe amonisaki, ekozala malamu tómituna ete: ‘Nazali mpenza na botɔ́ndi na oyo Nzambe asili kosala? Lolenge oyo nazali kosalela bomoi na ngai ezali komonisa elembeteli ya botɔ́ndi yango?’
“Nzambe azali bolingo”
3. (a) Mpo na nini, epai na Nzambe, komonisa bolingo ezali likambo ya kokamwa te? (b) Lolenge nini nguya mpe mayele emonisami kati na biloko bizalisami?
3 Mpo na Nzambe, komonisa bolingo ezali likambo ya kokamwa te mpamba te “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Bolingo ezali ezaleli na ye oyo eleki monene. Ntango azalaki kobongisa mabelé mpo ete ezala efandelo ya bato, amonisaki elembeteli monene ya nguya na ye na kobimisáká ngomba mpe na koyanganisáká mai kati na mabeke mpe kati na mai monene. (Genese 1:9, 10) Ntango Nzambe asalaki zolongano ya kobongwana ya mai mpe zolongano ya oxygène, ntango asalaki bikelamu mikemike ya bomoi mpe bitwɛlɛ ndenge na ndenge mpo na kobongola biloko mikemike oyo bizalaka na nsé ya mabelé ete bikóma bilei oyo bato bakoki kolya mpo na kobatela bomoi na bango, wana atyaki ebongiseli ya ntango kati na nzoto na biso mpo ete eyokana na bolai ya mikolo mpe ya basanza awa na planɛ́tɛ Mabelé, yango emonisaki mayele mingi oyo azali na yango. (Nzembo 104:24; Yilimia 10:12) Nzokande, oyo eleki mpenza monene kati na biloko oyo bizali komonana ezali elembeteli ya bolingo ya Nzambe.
4. Na biloko oyo bizali komonana, elembeteli nini ya bolingo ya Nzambe biso banso tosengeli komona mpe komonisela yango botɔ́ndi?
4 Lolemo na biso emonisaka bolingo ya Nzambe na ntango tolei mbuma moko kitoko oyo eteli malamu, oyo na ntembe te, esalemaki bobele te mpo na koleisa biso kasi lisusu mpo na koyokisa biso elɛngi. Miso na biso mamonaka polelepolele elembeteli ya bolingo yango na kotaláká kolala kitoko ya moi, makoló oyo matondi na minzoto na butu, biloko ndenge na ndenge mpe balángi kitoko ya fololo, masano ya bana ya banyama, mpe kosɛka na esengo nyonso elongo na baninga. Zolo na biso emonisaka biso bolingo yango ntango tolumbuti nsolo kitoko ya fololo oyo ebandi kobima. Matoyi na biso mamonisaka biso bolingo yango ntango tozali koyoka lokito ya kokwea ya mai, nzembo ya bandɛkɛ, mpe mingongo ya balingami na biso. Tomonaka bolingo yango ntango molingami moko ayambi biso na esengo nyonso. Banyama mosusu bazali na makoki ya komona, koyoka to kolumbuta nsolo ya biloko oyo bato bakoki te komona, koyoka to kolumbuta nsolo. Kasi bato, lokola basalemá na elilingi ya Nzambe, bazali na likoki ya komona bolingo ya Nzambe na lolenge oyo banyama bakoki komona yango te.—Genese 1:27.
5. Lolenge nini Yehova amonisaki bolingo monene mpo na Adama na Eva?
5 Ntango Yehova Nzambe azalisaki bato ya liboso, Adama na Eva, amonisaki elembeteli ya bolingo na ye zingazinga na bango. Alónaki elanga, paladiso, mpe asalaki ete nzeté ya lolenge nyonso ikóla kati na yango. Asilaki kotya ebale oyo ezalaki komwangisela yango mai mpe atondisaki yango na bandɛkɛ mpe na banyama kitoko. Atyaki biloko nyonso mpo ete yango ezala efandelo ya Adama na Eva. (Genese 2:8-10, 19) Yehova azalaki kotalela bango lokola bana na ye, eteni ya libota na ye na mokili mobimba. (Luka 3:38) Komonisáká Edene lokola ndakisa, Tata ya likoló ya bato mibale wana ya liboso atyaki liboso na bango mosala moko ya kosepelisa, mosala ya kokómisa Paladiso na mokili mobimba. Mabelé mobimba esengelaki kotonda na bakitani na bango.—Genese 1:28.
6. (a) Mayoki na yo ezali nini na ntina na botomboki ya Adama na Eva? (b) Nini ekoki komonisa ete tosili kozwa liteya na makambo oyo masalemaki na Edene mpe ete tozwi litomba na boyebi yango?
6 Nzokande, nsima ya mwa ntango, Adama na Eva bakutanaki na komekama na ntina na botosi, komekama ya bosembo. Moko nsima na mosusu, bango nyonso bazangaki komonisa botɔ́ndi mpo na bolingo oyo bamoniselaki bango. Likambo oyo basalaki ezalaki mabe mingi. Esengelaki kolimbisama te! Mpo na yango, babungisaki boyokani oyo bazalaki na yango elongo na Nzambe, balongolamaki na libota na ye, mpe babimisamaki na Edene. Lelo oyo, tozali naino komona mbuma mabe ya lisumu na bango. (Genese 2:16, 17; 3:1-6, 16-19, 24; Baloma 5:12) Kasi liteya nini tosili kozwa na makambo wana? Lolenge nini biso tozali koyanola na bolingo ya Nzambe? Bikateli oyo tozali kozwa mokolo na mokolo bizali kolakisa ete tozali komonisa botɔ́ndi na bolingo na ye?—1 Yoane 5:3.
7. Atako oyo Adama na Eva basalaki, lolenge nini Yehova amonisaki bolingo mpo na bakitani na bango?
7 Atako baboti na biso ya liboso bazangaki mpenza botɔ́ndi mpo na nyonso oyo Nzambe asalaki mpo na bango, nzokande yango elɛmbisaki bolingo ya Nzambe te. Na ntina na motema mawa oyo azalaki na yango mpo na bato oyo babotamaki naino te—bakisá mpe biso baoyo tozali na bomoi lelo oyo—Nzambe apesaki nzela na Adama na Eva ete bábota bana liboso ete bákufa. (Genese 5:1-5; Matai 5:44, 45) Soki asalaki bongo te mbɛlɛ ata moto moko te kati na biso akokaki kobotama. Na komonisáká mokemoke mokano na ye, Yehova atyaki lisusu moboko ya elikya mpo na baoyo nyonso kati na bakitani ya Adama bakomonisa kondima. (Genese 3:15; 22:18; Yisaya 9:6, 7) Ebongiseli na ye wana esangisaki nzela oyo mpo na yango bato ya mabota nyonso bakokaki kozwa lisusu oyo Adama abungisaki, elingi koloba bomoi ya kokoka lokola basangani bandimami na libota ya Nzambe na mokili mobimba. Asalaki yango na kopesáká lisiko.
Mpo na nini lisiko?
8. Mpo na nini Nzambe akokaki te koloba bobele ete Adama na Eva nde basengelaki kokufa, kasi bakitani na bango oyo bakomonisa botosi bakozala na bomoi libela na libela?
8 Ezalaki mpenza na ntina ete lisiko na lolenge ya bomoi ya moto efutama? Nzambe akokaki te koloba bobele ete Adama na Eva bango nde basengelaki kokufa mpo na botomboki na bango, kasi bakitani na bango oyo bakomonisa botosi epai na Nzambe bakozala na bomoi libela na libela? Engebene makanisi mokuse ya bato, kosala bongo elingaki kozala malamu. Nzokande, Yehova azali oyo “alingi boyengebene mpe sembo.” (Nzembo 33:5) Bobele nsima ya kokóma basumuki nde Adama na Eva babotaki bana; na bongo moko te kati na bana wana abotamaki moto ya kokoka. (Nzembo 51:5) Bango nyonso basangolaki lisumu, nzokande etumbu ya lisumu ezali bongo kufa. Soki Yehova azangaki kotalela likambo oyo, ndakisa ya lolenge nini alingaki kopesa epai na basangani ya libota na ye na mokili mobimba? Akokaki te kozanga kotalela mibeko na ye ya boyengebene. Atosaki masɛngami ya bosembo. Moto moko te akoki kozwa Nzambe na libunga na lolenge oyo asalaki mpo na makambo oyo mabimaki.—Baloma 3:21-23.
9. Engebene mitindá ya Nzambe na ntina na bosembo, lolenge nini ya lisiko lisengelaki?
9 Na bongo, lolenge nini moboko ya malamu ekokaki kotyama mpo na kosikola baoyo kati na bakitani ya Adama basengelaki komonisa bolingo mpe botosi epai na Yehova? Soki moto ya kokoka asengelaki kokufa lokola mbeka, bosembo elingaki kopesa nzela ete motuya ya bomoi ya kokoka ezipa masumu ya baoyo balingaki komonisa kondima kati na lisiko yango. Lokola lisumu ya moto moko, Adama, esalaki ete bato nyonso bákóma basumuki, kosopana ya makila ya moto mosusu ya kokoka, oyo motuya na yango ekokani, elingaki koyokana na emekeli ya bosembo. (1 Timoté 2:5, 6) Kasi epai wapi moto motindo wana alingaki kozwama?
Lisiko ezalaki na motuya nini?
10. Mpo na nini bakitani ya Adama bakokaki te kopesa lisiko oyo lisengelaki?
10 Kati na bakitani ya mosumuki Adama, moko te azalaki oyo akokaki kopesa yango esengelaki mpo na kosomba bilikya ya bomoi oyo Adama abungisaki. “Moto akolónga kosikola ndeko na ye te to kopesa epai na Nzambe motuya na bomoi na ye te. Motuya na kosikola milimo na bango ezali monene, ekokoka kofutama te, seko na seko, ete abika libela na libela mpe amona nkunda te.” (Nzembo 49:7-9) Na esika ya kotika bato kozanga elikya, na motema mawa nyonso Yehova ye moko asalaki ebongiseli.
11. Na nzela nini Yehova apesaki bomoi ya moto ya kokoka oyo esengelaki mpo na lisiko likokani?
11 Yehova atindaki te anzelu moko awa na mabelé mpo na koloba ete akufa na kotikáká nzoto na ye atako azalaki na bomoi lokola elimo. Nzokande, na kosaláká likamwisi oyo bobele Nzambe, Mozalisi, akokaki kokana, abongolaki nguya ya bomoi mpe lolenge ya bomoto ya mwana na ye ya likoló kino na libumu ya mwasi moko, Malia, mwana mwasi ya Eli, na libota ya Yuda. Nguya ya Nzambe oyo ekosalaka mosala, elimo santu na ye, ekɛngɛlaki bokóli ya mwana kati na libumu ya mama na ye, mpe abotamaki moto ya kokoka. (Luka 1:35; 1 Petelo 2:22) Mwana yango nde azalaki na motuya mosɛngɛlaki mpo na kopesa lisiko oyo eyokanaki mpenza na masɛngami ya bosembo ya Nzambe.—Baebele 10:5.
12. (a) Na ndimbola nini Yesu azali “Mwana mobotami-bobele moko” ya Nzambe? (b) Lolenge nini kotinda oyo Nzambe atindaki ye mpo na kopesa lisiko emonisi mpenza bolingo na Ye mpo na biso?
12 Kati na ebele ya bana na ye oyo bazali na likoló, epai na nani Yehova apesaki mokumba wana? Epai na ye oyo alobelami kati na Makomami lokola “Mwana mobotami-bobele moko” na ye. (1 Yoane 4:9, NW ) Liloba wana lisalelami mpo na kolobela te bobele oyo ye akómaki ntango abotamaki lokola moto, kasi oyo ye azalaki na likoló liboso ete abotama. Azali moto oyo Yehova asalaki ye moko kozanga lisungi ya moto mosusu. Azali mobotami ya liboso kati na bikelamu nyonso. Azali ye oyo asalelamaki na Nzambe mpo na kozalisa biloko nyonso mosusu. Baanzelu bazali bana na Nzambe, motindo moko Adama azalaki mwana na Nzambe. Kasi Yesu alobelami ete azalaki na “nkembo lokola mwana oyo abotami lokola [mwana mobotami-bobele moko, NW] longwa na Tata.” Elobami mpo na ye ete azali “na ntolo na Tata.” (Yoane 1:14, 18) Boyokani na ye elongo na Tata ezali ya penepene, ya kotyela motema, mpe ya bolingo. Akaboli elongo na bato bolingo ya Tata na ye. Masese 8:30, 31 emonisi lolenge ya mayoki oyo Tata na ye azali na yango mpo na Mwana wana mpe lolenge ya mayoki Mwana wana azali na yango mpo na bato: “Mokolo na mokolo nazalaki esengo na [Yehova], kosepela liboso na ye ntango nyonso; . . . mpe esengo na ngai [Yesu, Kapita-mosáli, mayele oyo emonisami lokola moto] ezalaki kati na bana na bato.” Ezalaki Mwana wana ya motuya mingi nde Nzambe atindaki awa na mabelé mpo na kopesa lisiko. Na yango, maloba oyo ya Yesu mazali mpenza na ntina: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana mobotami-bobele moko na ye.”—Yoane 3:16, NW.
13, 14. Na nini lisoló ya Biblia oyo elobeli lolenge Abalayama alingaki kopesa Yisaka lokola mbeka ezali kosalisa biso na komonisa botɔ́ndi mpo na oyo Yehova asalaki? (1 Yoane 4:10)
13 Mpo na kosalisa biso ete tósosola mwa moke ndimbola na yango, uta kala liboso ete Yesu aya awa na mabelé, esili koleka sikawa mibu 3 890, Nzambe alobaki na Abalayama ete: “Kamatá mwana na yo, mwana na yo [bobele moko, NW], Yisaka, oyo yo olingi, mpe kendá na mokili na Moliya mpe kabá ye pelamoko mbeka na kotumba kuna na likoló na ngomba ekolobela ngai yo.” (Genese 22:1, 2) Mpo na kondima, Abalayama atosaki. Omitya naino na esika ya Abalayama. Elingaki kozala boni soki ezalaki nde mwana na yo, mwana na yo bobele moko oyo olingaka mingi? Mayoki na yo malingaki kozala nini wana ozali kokata nkoni mpo na mbeka na kotumba, wana ozali kosala mobembo ya mikolo mingi mpo na kokende na mokili ya Moliya, mpe wana ozali kotya mwana na yo na etumbelo?
14 Mpo na nini moboti ya motema mawa azalaka na mayoki motindo wana? Genese 1:27 elobi ete Nzambe azalisaki moto na elilingi na Ye. Mayoki na biso ya bolingo mpe ya motema mawa ezali komonisa na meko moke bolingo mpe motema mawa ya Yehova. Na likambo ya Abalayama, Nzambe akɔtaki, na boye ete Yisaka apesamaki te lokola mbeka. (Genese 22:12, 13; Baebele 11:17-19) Nzokande, mpo na likambo oyo litalaki ye moko, Yehova amipekisaki te mpo na kopesa lisiko, atako yango ezalaki mpasi mingi ezala mpo na ye moko mpe mpo na Mwana na ye. Oyo esalemaki ezalaki te likambo oyo Nzambe asengelaki bobele kosala yango, kasi ezalaki nde, elembeteli monene ya ngɔlu na ye. Tozali mpenza komonisa botɔ́ndi mpo na yango?—Baebele 2:9.
Oyo yango ezali kokokisa
15. Lolenge nini lisiko ezali na bopusi ata likoló na bomoi ya bato na ebongiseli ya biloko oyo?
15 Ebongiseli wana ya bolingo oyo esalemi na Nzambe ezali na bopusi monene likoló na bomoi ya baoyo bazali koyamba yango na kondima nyonso. Na ntango ya kala, batangwaki mosika na Nzambe na ntina na masumu. Lokola Liloba na ye ezali koloba, bazalaki ‘banguna mpamba te makanisi na bango ezalaki likoló na misala ya mabe.’ (Bakolose 1:21-23, NW ) Kasi ‘bazongi na bondeko na Nzambe mpo na kufa na mwana na ye.’ (Baloma 5:8-10) Lokola babongoli etamboli na bango mpe lokola bandimi bolimbisi oyo Nzambe azali kopesa epai na baoyo bakomonisa kondima kati na mbeka ya Klisto, bazwi lisosoli ya pɛto.—Baebele 9:14; 1 Petelo 3:21.
16. Mapamboli nini mapesami epai na etonga moke na ntina na kondima na bango kati na lisiko?
16 Yehova asili kopesa epai na bato moke kati na bango, etonga moke, ngɔlu ya kozala elongo na Mwana na ye na Bokonzi ya likoló, mpo na kokokisa mokano ya ebandeli oyo Nzambe azalaki na yango mpo na mabelé. (Luka 12:32) Bango bauti na ‘mikili nyonso, na minɔkɔ nyonso, na bikólo nyonso, na mabota nyonso . . . mpo ete bázala bokonzi na banganga mpo na Nzambe na biso, mpe bakozala bakonzi na mokili.’ (Emoniseli 5:9, 10) Epai na bango, ntoma Paulo akomaki ete: “Boyambi [e]limo oyo [e]pesi lokumu na bana; na yango mpe tokobelelaka ete Aba! Tata! [E]limo yango [e]kosangana na [e]limo na biso kotatola ete tozali bana na Nzambe. Soko tozali bana, mbɛ tozali basangoli na libula. Tozali basangoli na libula na Nzambe, basangani na Klisto mpo na kosangola libula na ye elongo.” (Baloma 8:15-17) Awa Nzambe andimi bango lokola bana na ye, bazwi libaku ya kozala na boyokani ya ntina mingi oyo Adama abungisaki; nzokande mabaku mosusu ya mosala kuna na likoló ekopesama epai na bana wana—eloko oyo Adama azwaki yango soko moke te. Likambo ya kokamwa ezali te soki ntoma Yoane alobaki ete: “Talá motindo na bolingo bosili Tata kopesa biso ete tóbyangama bana na Nzambe.” (1 Yoane 3:1) Epai na bato wana Nzambe azali komonisa bobele te bolingo oyo etambwisami na mibeko (a·gaʹpe) kasi lisusu bolingo ya motema (phi·liʹa), oyo emonisami na ekanganeli oyo ezalaka kati na baninga ya solosolo.—Yoane 16:27.
17. (a) Libaku nini epesami epai na baoyo nyonso bazali komonisa kondima kati na lisiko? (b) “Nkembo ya bonsomi ya bana na Nzambe” ekolimbola nini mpo na bango?
17 Epai na basusu mpe—baoyo nyonso bamonisaka kondima kati na ebongiseli ya bolingo mpo na bomoi oyo Nzambe apesi na nzela ya Yesu Klisto—Yehova apesi biso likoki ya kokóma na boyokani ya malamu oyo Adama abungisaki. Ntoma Paulo alimbolaki ete: “Na mposa monene, mokili mobimba [bato oyo bauti na Adama] ezali kotalela ete Nzambe amonisa emoniseli na bana na ye [elingi koloba, bazali kozela ntango oyo ekomonisama polele ete bana na Nzambe oyo bazali basangoli na libula elongo na Klisto na Bokonzi ya likoló bazali kotambwisa makambo na lolenge lobongi mpo na bolamu ya bato]. Nzambe azalisaki mokili mpamba [babotamaki kati na masumu koyebáká ete basengelaki kokufa, mpe nzela ezalaki te mpo na bango ete bákoka komisikola bango moko], mpo na mokano na yango mpenza te nde mpo na mokano na ye oyo azalisaki yango boye. Kasi ezalaki na elikya [oyo Nzambe apesaki] ete ekosikwa na boombo na libebisi kino lisiko na nkembo na bana na Nzambe.” (Baloma 8:19-21) Bonsomi yango ekolimbola nini? Ete basikwami na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Bakokóma na ezalela ya kokoka na makanisi mpe na nzoto, Paladiso ekozala efandelo na bango, mpe bakozala na bomoi ya seko, oyo kati na yango, bakosepela na ezalela na bango ya kokoka mpe bakomonisa botɔ́ndi na bango epai na Yehova, Nzambe bobele moko ya solo. Kasi lolenge nini nyonso wana ekosalema? Na nzela ya mbeka ya lisiko ya Mwana mobotami-bobele moko ya Nzambe.
18. Na mokolo mwa 23 Mársi nsima ya kolala ya moi, biso tokosala nini mpe mpo na nini?
18 Na mokolo mwa 14 Nisana 33 T.B., kati na eteni ya ndako moko ya likoló na Yelusaleme, Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye. Kokanisama ya liwa na ye mbula na mbula ezali molulu ya ntina mingi na bomoi ya baklisto nyonso ya solo. Yesu ye moko apesaki etindá oyo elobi ete: “Bósalaka boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19, NW ) Na 1997, Ekaniseli ekosalema nsima ya kolala ya moi na mokolo mwa 23 Mársi (oyo ekokani na ntango oyo 14 Nisana ekobanda). Na mokolo wana, ekozala na eloko mosusu te ya ntina mingi oyo ekosala ete tózangisa libaku ya kozala na Ekaniseli.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Na makambo nini Nzambe asili komonisa bolingo mingi mpo na bato?
◻ Mpo na nini esengelaki bomoi ya moto ya kokoka mpo na kosikola bakitani ya Adama?
◻ Nini esalemaki mpo ete Yehova apesa lisiko?
◻ Makambo nini lisiko epesi nzela ete másalema?
[Elilingi na lokasa 10]
Nzambe apesaki Mwana mobotami-bobele moko na ye