Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda epai ya Baloma
NA MOBEMBO na ye ya misato lokola misionɛrɛ, na mobu soki 56 T.B., ntoma Paulo akómaki na engumba Kolinti. Ayokaki ete baklisto ya Loma oyo bazalaki Bayuda mpe oyo bazalaki Bayuda te, bazalaki na makanisi ekeseni na makambo mosusu. Mpo na kosalisa bango bákóma na bomoko na kati ya Klisto, ntoma Paulo akomelaki bango mokanda.
Na mokanda yango, Paulo alimbolaki ndenge oyo bato bakoki kotángama bayengebene mpe ndenge oyo basengeli komitambwisa. Mokanda yango ezali kokolisa boyebi na biso ya Nzambe mpe ya Liloba na ye, elobeli mingi boboto monene ya Nzambe, mpe elobeli mokumba ya Klisto mpo na lobiko na biso.—Ebe. 4:12.
NDENGE NINI BATO BATÁNGAMI BAYENGEBENE?
Paulo akomaki ete: “Bato nyonso basali lisumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe, mpe ezali lokola likabo ya ofele ndenge bazali kotángama bayengebene na nzela ya boboto monene [ya Nzambe] na lisalisi ya kosikolama na nzela ya lisiko oyo Klisto Yesu afutaki.” Alobaki lisusu boye: “Moto atángamaka moyengebene na nzela ya kondima kozanga misala ya mibeko.” (Lom. 3:23, 24, 28) Na nzela ya kondima na “mosala kaka moko ya kolongisama,” ezala baklisto bapakolami to “ebele ya bato” ya “bampate mosusu” bakoki ‘kotángama bayengebene’—baklisto bapakolami mpo na bomoi na likoló lokola bazwi-ya-libula elongo na Klisto; ebele ya bato lokola baninga ya Nzambe, mpo na kobika na “bolɔzi monene.”—Lom. 5:18; Emon. 7:9, 14; Yoa. 10:16; Yak. 2:21-24; Mat. 25:46.
Paulo atunaki boye: “Tokosala nde lisumu mpo tozali na nse ya mibeko te kasi na nse ya boboto monene?” Ayanolaki ete: “Ezala bongo soki moke te!” Alobaki boye: “Bozali baombo . . . , to ya lisumu mpo na kozwa liwa to ya botosi mpo na kozwa boyengebene.” (Lom. 6:15, 16) Alobaki lisusu boye: “Soki bobomi misala ya nzoto na lisalisi ya elimo, bokozala na bomoi.”—Lom. 8:13.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:24-32—Misala ya mbindo oyo elobelami awa etalelaki Bayuda to bato oyo bazalaki Bayuda te? Atako makambo yango ekokaki kotalela bituluku yango mibale, Paulo azalaki kolobela Bayisalaele ya kala oyo bakómaki bapɛngwi. Atako Bayisalaele yango bayebaki malamu mobeko ya boyengebene ya Nzambe, “bandimaki te kozwa Nzambe na kati ya boyebi ya solosolo.” Mpo na yango, bazalaki na ekweli.
3:24, 25—Na ndenge nini “masumu oyo esalemaki kala” ekokaki kolimbisama na nzela ya “lisiko oyo Klisto Yesu afutaki” liboso ete lisiko yango efutama? Esakweli ya liboso oyo elobelaki Masiya, oyo ezali na Genese 3:15, ekokisamaki na mobu 33 T.B., ntango Yesu akufaki na nzete ya mpasi. (Gal. 3:13, 16) Nzokande, ntango Yehova alobaki esakweli yango, na miso na ye, lisiko esilaki kofutama mpamba te eloko moko te ekokaki kopekisa Nzambe akokisa likambo oyo akanaki. Na yango, na nzela ya mbeka oyo Yesu Klisto asengelaki kopesa, Yehova akokaki kolimbisa masumu ya bakitani ya Adama oyo bamonisaki kondima na elaka yango. Lisusu, lisiko ekopesa nzela na lisekwa ya basaleli ya Nzambe oyo bazalaki na bomoi liboso Klisto aya.—Mis. 24:15.
6:3-5—Kobatisama na kati ya Klisto Yesu mpe kobatisama na kati ya liwa na ye elimboli nini? Ntango Yehova apakoli bayekoli ya Klisto na elimo santu, bakómi na bomoko elongo na Yesu mpe bakɔti na lisangá oyo ezali nzoto ya Klisto, ye oyo azali Motó. (1 Kol. 12:12, 13, 27; Kols. 1:18) Yango nde kobatisama na bango na kati ya Klisto Yesu. Baklisto bapakolami bazali mpe ‘kobatisama na kati ya liwa ya Klisto’; elingi koloba ete bomoi na bango ezali bomoi ya bato oyo bandimi komipesa lokola mbeka mpe balongoli na makanisi na bango elikya nyonso ya bomoi ya seko awa na mabelé. Na ndenge yango, liwa na bango ezali ya mbeka, ndenge moko na oyo ya Yesu, atako oyo ya bango ekoki kosikola te. Batisimo na bango na kati ya liwa ya Klisto esukaka ntango bakufi mpe basekwisami mpo na bomoi na likoló.
7:8-11—Na ndenge nini ‘lisumu ezwaka nzela na lisalisi ya komandema’? Mibeko ezalaki kosalisa bato bámona nguya ya lisumu mpe báyeba ete bazali basumuki. Mpo na yango, bamonaki ete makambo mingi oyo basalaki ezalaki masumu, mpe bato mingi bayebaki ete bazali mpenza basumuki. Na ndenge yango nde tokoki koloba ete lisumu ezwaki nzela na lisalisi ya Mibeko.
Mateya mpo na biso:
1:14, 15. Tozali na bantina mingi ya kosakola nsango malamu na molende. Moko na yango ezali ete tozali na nyongo ya bato oyo basombamaki na makila ya Yesu mpe tozali na mokumba ya kosalisa bango báyeba Nzambe mpe mikano na Ye.
1:18-20. Bato oyo batyolaka Nzambe mpe bazangi boyengebene bazali na “likambo ya koloba te,” mpamba te bizaleli ya Nzambe emonanaka polelepolele na biloko akelá.
2:28; 3:1, 2; 7:6, 7. Nsima ya kosalela maloba oyo emonanaki lokola nde atyoli Bayuda, Paulo abakisaki maloba ya boboto mpo na kokitisa bango motema. Yango eteyi biso ete tosengeli kozala na mayele ntango tozali kolobela makambo oyo ekoki kosilikisa basusu.
3:4. Ntango maloba ya moto eyokani te na oyo Nzambe alobi na Liloba na ye, ‘totikaka Nzambe amonana ete alobaka solo,’ na ndenge tondimaka oyo Biblia elobi mpe tosalaka oyo Nzambe asɛngi. Soki tozali molende na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli, tokoki kosalisa basusu bámona ete Nzambe alobaka solo.
4:9-12. Abalayama atángamaki moyengebene mpo na kondima na ye liboso akatama ngenga ntango akómaki na mbula 99. (Gen. 12:4; 15:6; 16:3; 17:1, 9, 10) Na ndenge yango, Yehova amonisaki likambo oyo esalaka ete moto atángama moyengebene na miso na ye.
4:18. Elikya ezali na ntina mingi mpo na kondima. Kondima na biso esimbami na elikya.—Ebe. 11:1.
5:18, 19. Paulo amonisaki polele mpe na maloba mokuse bokokani oyo ezali kati na Yesu mpe Adama mpo na kolimbola ndenge oyo moto moko akoki “kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Mat. 20:28) Kosalela makanisi oyo ebongi mpe koloba na mokuse ezali mayele ya koteya oyo tosengeli komekola.—1 Kol. 4:17.
7:23. Binama ya nzoto lokola mabɔkɔ, makolo, mpe lolemo ekoki ‘komema biso bakangami epai ya mobeko ya lisumu’; yango wana, tosengeli kosalelaka yango na ndenge ya malamu.
8:26, 27. Ntango tokutani na mikakatano mpe toyebi te nini tokoki koloba na libondeli, “elimo yango moko elobelaka biso.” Na ndenge yango, Yehova, ye oyo ‘ayokaka mabondeli’ andimaka mabondeli oyo ezali na kati ya Liloba na ye lokola nde euti epai na biso.—Nz. 65:2.
8:38, 39. Mikakatano, bilimu mabe, mpe baguvɛrnema ya bato ekoki te kopekisa Yehova alinga biso; esengeli mpe te kopekisa biso tólinga ye.
9:22-28; 11:1, 5, 17-26. Bisakweli mingi oyo elobelaki kozongisama ya Yisalaele ekokisami na lisangá ya baklisto bapakolami, baoyo Nzambe “abengaki uta na kati ya Bayuda kaka te kasi mpe uta na kati ya bikólo mosusu.”
10:10, 13, 14. Longola bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na biso, kondima makasi epai ya Yehova mpe na bilaka na ye ekoki mpe kotinda biso tózala molende na mosala ya kosakola.
11:16-24, 33. “Motema malamu ya Nzambe mpe ezaleli na ye ya bikateli makasi” ezali na boyokani mpenza! Ya solo, “Ye libanga, mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene.”—Det. 32:4.
TÓZALA NA BOMOI OYO EMONISI ETE TOTÁNGAMI BAYENGEBENE
Paulo alobaki boye: “Na bongo nazali kobondela bino na mawa ya Nzambe, bandeko, ete bókaba banzoto na bino mbeka moko ya bomoi, ya bosantu, oyo ekoki kondimama epai ya Nzambe.” (Lom. 12:1) “Na bongo,” to lokola baklisto batángami bayengebene mpo na kondima na bango, makambo oyo Paulo alobaki na nsima, esengeli kobongola ndenge oyo bamitalelaka bango moko, ndenge oyo batalelaka basusu, mpe ndenge oyo batalelaka bakonzi ya Leta.
Paulo akomaki boye: “Nazali koyebisa moto nyonso akanisa mpo na ye moko te koleka ndenge oyo esengeli kokanisa.” Abakisaki boye: “Tiká bolingo na bino ezanga bokosi.” (Lom. 12:3, 9) “Tiká molimo nyonso etosaka bakonzi oyo bazali liboso.” (Lom. 13:1) Na makambo oyo etaleli lisosoli ya moto, alendisaki baklisto ete ‘básambisanaka lisusu te.’—Lom. 14:13.
Biyano na mituna ya Biblia:
12:20—Ndenge nini tokoki ‘kotya makala ya mɔtɔ’ na motó ya monguna? Na ntango ya kala, mpo na konyangwisa ebende bazalaki kotya makala ya mɔtɔ na likoló mpe na nse na yango. Makala oyo bazalaki kotya na likoló ezalaki kobakisa mɔtɔ mpo na konyangwisa ebende mpe kolongola yango bosɔtɔ. Ndenge moko mpe, tokoki kotya makala ya mɔtɔ na motó ya monguna ntango tozali kosalela ye makambo na boboto oyo ekoki konyangwisa motema makasi na ye mpe komonisa bizaleli na ye ya malamu.
12:21—Ndenge nini tokoki ‘kokoba kolonga mabe na kosaláká malamu’? Ndenge moko oyo tokoki kosala yango ezali na kokoba kokokisa mokumba oyo Nzambe apesi biso ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi tii ntango Yehova akomona ete ekoki bongo.—Mko. 13:10.
13:1—Na ndenge nini bakonzi oyo bazali liboso “batyami na bibonga na bango oyo elandaná na nzela ya Nzambe”? Bakonzi ya Leta “batyami na bibonga na bango oyo elandaná na nzela ya Nzambe” mpamba te Nzambe atiki ete báyangela, mpe asakolaki boyangeli ya bakonzi yango mosusu. Tokoki komona yango na makambo oyo Biblia esakolaki mpo na bakonzi mosusu.
Mateya mpo na biso:
12:17, 19. Kozongisa mabe na mabe ezali kosala likambo oyo kaka Yehova nde azali na lotomo ya kosala. Ekozala mpenza lolendo soki tozali ‘kozongisa mabe na mabe’!
14:14, 15. Tosengeli te kozokisa ndeko na biso to kobɛtisa ye libaku na eloko ya kolya to ya komɛla oyo topesi ye.
14:17. Boyokani malamu na Nzambe esimbami libosoliboso te na oyo tolyaka mpe tomɛlaka to na oyo toboyaka kolya mpe komɛla. Kasi, esimbami nde na boyengebene, kimya mpe esengo.
15:7. Na lisangá, tosengeli koyamba moto nyonso ya motema sembo oyo azali koluka solo mpe tosengeli kosakola nsango ya Bokonzi epai ya bato nyonso kozanga kopona bilongi.
[Bililingi na lokasa 31]
Lisiko ekoki mpe kolimbisa masumu oyo esalemaki liboso efutama?