Mabondeli na yo emonisaka nini?
“Ee Moyoki ya libondeli, ɛɛ bato ya lolenge nyonso bakoya epai na yo.”—NZ. 65:2.
1, 2. Mpo na nini basaleli ya Yehova bakoki kobondela ye na elikya nyonso?
YEHOVA akangaka matoi te na malɔmbɔ ya basaleli na ye ya sembo. Tokoki kotya motema ete ayokaka biso. Ata soki bamilio ya Batatoli ya Yehova babondeli bango nyonso na ntango moko, Yehova akoyoka libondeli ya mokomoko.
2 Davidi andimaki ete Nzambe azalaki koyoka mabondeli na ye; ayembaki boye: “Ee Moyoki ya libondeli, ɛɛ bato ya lolenge nyonso bakoya epai na yo.” (Nz. 65:2) Lokola Davidi azalaki sembo, Yehova azalaki koyanola na mabondeli na ye. Yango wana, tosengeli komituna boye: ‘Mabondeli na ngai emonisaka ete natyelaka Yehova motema mpe ete natyaka losambo ya pɛto na esika ya liboso? Mabondeli na ngai emonisaka nini?’
Bondeláká Yehova na komikitisa
3, 4. (a) Ezaleli nini tosengeli kozala na yango ntango tozali kobondela Nzambe? (b) Soki mpo na lisumu moko monene, tozali na ‘makanisi oyo etungisaka biso’ tosengeli kosala nini?
3 Soki tolingi ete Nzambe ayoka mabondeli na biso, tosengeli kobondela ye na komikitisa. (Nz. 138:6) Tosengeli kosɛnga Yehova atala biso malamumalamu, ndenge Davidi asalaki ntango abondelaki boye: “Ee Nzambe, talá ngai malamumalamu mpe yebá motema na ngai. Talá ngai malamumalamu mpe yebá makanisi oyo etungisaka ngai, mpe moná soki kati na ngai ezali na nzela moko oyo eyokisaka mpasi, mpe kambá ngai na nzela ya seko.” (Nz. 139:23, 24) Tósukaka kaka te na kobondela Nzambe, kasi tóndimaka mpe ete Nzambe atala biso malamumalamu mpe tóndimaka toli ya Liloba na ye. Yehova akoki kokamba biso “na nzela ya seko,” kosalisa biso tókoba kotambola na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko.
4 Kasi, ezali boni soki mpo na lisumu moko monene oyo tosalaki tozali na ‘makanisi oyo etungisaka biso’? (Tángá Nzembo 32:1-5.) Koboya koyoka lisosoli oyo etungisami ekoki kosilisa moto makasi, lokola nzete oyo ekauki mpo mai ezali te. Mpo na lisumu oyo asalaki, Davidi abungisaki esengo, ekoki mpe kozala ete abɛlaki mpo na yango. Kasi, ntango ayambolaki lisumu na ye epai ya Nzambe, motema na ye ekitaki! Kanisá esengo oyo Davidi ayokaki ntango ayebaki ete Yehova ‘alimbisi botomboki na ye.’ Koyambola lisumu epai ya Nzambe ekoki kokitisa moto motema, mpe lisalisi ya bankulutu ekoki mpe kosalisa moto oyo abungi nzela azongela boyokani na ye na Yehova.—Mas. 28:13; Yak. 5:13-16.
Bondeláká Nzambe mpe tɔndáká ye
5. Kosala lilɔmbɔ epai ya Yehova elimboli nini?
5 Soki tozali komitungisa ata mpo na likambo nini, tosengeli kolanda toli oyo ya Paulo: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe.” (Flp. 4:6) Kosala “lilɔmbɔ” elimboli “kobondela na komikitisa.” Mingimingi ntango tokutani na likama to botɛmɛli tosengeli kobondela Yehova mpo asunga mpe atambwisa biso.
6, 7. Mpo na nini tosengeli mpe kotɔndaka Nzambe na mabondeli na biso?
6 Kasi, soki tobondelaka kaka mpo na kosɛnga, yango ekomonisa nini? Paulo alobaki ete tosengeli koyebisa kosɛnga na biso epai ya Nzambe “ná matɔndi.” Na ntembe te, lokola Davidi, biso mpe tokoki koloba ete: “Ee Yehova, bonene, nguya, kitoko, nkembo ná lokumu ezali ya yo; mpo eloko nyonso na likoló mpe na mabele ezali ya yo. Bokonzi ezali ya yo, Ee Yehova, Yo mokonzi oyo otombwami likoló na nyonso. . . . Ee Nzambe na biso, tozali kopesa yo matɔndi mpe kosanzola nkombo na yo monene.”—1 Nt. 29:11-13.
7 Yesu atɔndaki Nzambe mpo na bilei, limpa mpe vinyo oyo asalelaki na bilei ya mpokwa ya Nkolo. (Mat. 15:36; Mrk. 14:22, 23) Longola yango tosengeli mpe ‘kopesa Yehova matɔndi’ mpo na “misala na ye ya kokamwa epai ya bana ya bato,” mpo na ‘bikateli na ye ya lisambisi ya boyengebene,’ mpe mpo na liloba na ye, to nsango oyo ezali na Biblia.—Nz. 107:15; 119:62, 105.
Bondeláká mpo na basusu
8, 9. Mpo na nini tosengeli kobondelaka mpo na bandeko na biso bakristo?
8 Na ntembe te, tobondelaka mpo na biso moko, kasi tosengeli mpe kobondelaka mpo na basusu, ata mpo na bakristo oyo toyebi te. Atako ayebaki bakristo nyonso te ya Kolose, ntoma Paulo akomaki boye: “Topesaka ntango nyonso Nzambe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo matɔndi ntango tobondelaka mpo na bino, banda toyoká nsango ya kondima na bino na makambo oyo etali Kristo Yesu mpe bolingo oyo bozali na yango epai ya basantu nyonso.” (Kol. 1:3, 4) Paulo abondelaki mpe mpo na bakristo ya Tesaloniki. (2 Tes. 1:11, 12) Mabondeli ya ndenge wana elobaka mingi mpe emonisaka ndenge oyo totalelaka bandeko na biso na lisangá.
9 Mabondeli na biso mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe baninga na bango “bampate mosusu,” emonisaka ete tomibanzabanzaka mpo na ebongiseli ya Nzambe. (Yoa. 10:16) Paulo asɛngaki baninga na ye bakristo bábondela mpo ‘likoki ya koloba epesama na ye ntango azali kofungola monɔkɔ mpo na koyebisa polele mpe na bosembo sekele mosantu ya nsango malamu.’ (Ef. 6:17-20) Biso mpe tobondelaka bongo mpo na bakristo mosusu?
10. Kobondela mpo na basusu ekoki kosala nini epai na biso?
10 Kobondela mpo na basusu ekoki kobongola ndenge oyo totalelaka bango. Soki tosepelaka te na moto moko, kasi tozali kobondela mpo na ye, ndenge nini tokolinga ye te? (1 Yoa. 4:20, 21) Mabondeli ya ndenge wana elendisaka mpe esalaka ete tózala na bomoko na bandeko na biso. Lisusu, mabondeli yango emonisaka ete tozali na bolingo lokola oyo ya Kristo. (Yoa. 13:34, 35) Ezaleli yango ezali na kati ya mbuma ya elimo ya Nzambe. Tobondelaka mpo na kosɛnga elimo santu, tosɛngaka Yehova asalisa biso tómonisa bizaleli ya mbuma yango, na ndakisa, bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, mpe komipekisa? (Luka 11:13; Gal. 5:22, 23) Soki tozali kosala bongo, maloba mpe misala na biso ekomonisa ete totambolaka mpe tozalaka na bomoi na elimo.—Tángá Bagalatia 5:16, 25.
11. Mpo na nini tokoki koloba ete kosɛnga basusu bábondela mpo na biso, ezali mabe te?
11 Soki toyoki ete mwana na biso alukaka kobwaka liso na kaye to na papye ya baninga na ntango ya ekzamɛ na eteyelo, tosengeli kobondela mpo na ye mpe kosalela Makomami mpo na kosalisa ye azala sembo mpe asala mabe te. Paulo ayebisaki bakristo ya Korinti boye: “Tozali kobondela Nzambe ete bósala likambo moko te ya mabe.” (2 Ko. 13:7) Mabondeli wana ya komikitisa esepelisaka Yehova mpe emonisaka bizaleli na biso ya malamu. (Tángá Masese 15:8.) Tokoki mpe kosɛnga basusu bábondela mpo na biso, ndenge Paulo asalaki. Akomaki boye: “Bóbondelaka mpo na biso, mpo tondimi ya solo ete tozali na lisosoli ya sembo, mpo tolingi kozala sembo na makambo nyonso.”—Ebr. 13:18.
Mabondeli na biso elobaka mingi
12. Makambo nini esengeli kozala na esika ya libosoliboso na mabondeli na biso?
12 Mabondeli na biso emonisaka ete tosalelaka Yehova na esengo mpe na molende? Mabondeli na biso eyokanaka libosoliboso na mokano ya Nzambe, kosakola nsango ya Bokonzi, kolongisama ya bokonzi ya Yehova, mpe kosantisama ya nkombo na ye? Yango esengeli kozala makambo ya libosoliboso na mabondeli na biso, ndenge Yesu amonisaki yango na libondeli ya ndakisa; abandaki boye: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama. Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.”—Mat. 6:9, 10.
13, 14. Mabondeli na biso emonisaka nini?
13 Mabondeli na biso emonisaka makambo oyo ezali na motema na biso, makambo oyo totyelaka likebi, mpe bamposa na biso. Yehova ayebi lolenge ya bato oyo tozali. Masese 17:3, elobi boye: “Nzungu ya kopɛtola ezali mpo na palata mpe litumbu mpo na wolo, kasi Yehova nde moto oyo atalaka mitema malamumalamu.” Nzambe amonaka oyo ezali na motema na biso. (1 Sa. 16:7) Ayebi ndenge totalelaka makita na biso, mosala ya kosakola, mpe bandeko na biso na lisangá. Yehova ayebi ndenge totalelaka “bandeko” ya Kristo. (Mat. 25:40) Ayebi soki tozalaka mpenza na mposa ya oyo tosɛngaka to soki tozongelaka kaka makambo oyo tokangá na motó. Yesu alobaki boye: “Ntango ozali kobondela, kozongela kaka maloba wana mbala na mbala te, ndenge bato ya bikólo basalaka, mpo bakanisaka ete Nzambe akoyoka bango mpo bazali koloba mingi.”—Mat. 6:7.
14 Lisusu, maloba na biso emonisaka soki totyelaka mpenza Nzambe motema. Davidi alobaki boye: “[Yehova] ozali ekimelo na ngai, Ndako molai ya makasi liboso ya monguna. Nakoyambama na hema na yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te; nakokima mpe nakomibomba na nse ya mapapu na yo.” (Nz. 61:3, 4) Ntango Nzambe ‘atandi hema na ye likoló na biso’ na ndenge ya elilingi, tozalaka na nse ya libateli na ye. (Em. 7:15) Kopusana penepene na Yehova na libondeli na elikya ete ‘azali pene na biso’ ata soki kondima na biso emekami ndenge nini ezali mpenza kobɔndisa!—Tángá Nzembo 118:5-9.
15, 16. Libondeli ekoki kosalisa biso tósosola nini na oyo etali mposa na biso ya kozala na mikumba?
15 Soki tobondeli Yehova na bosembo mpo na bamposa oyo ezali na motema na biso, akoki kosalisa biso tósosola yango. Na ndakisa, mposa oyo tozali na yango ya kozwa mikumba na lisangá ya Nzambe ezali mpenza mpo tozali na komikitisa mpe tolingi kosunga mpe kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosimba matomba ya Bokonzi? To ezali mpo tolingi kozwa “esika ya liboso” to mpo tolingi ‘kolakisa basusu bokonzi’? Esengeli kozala bongo te mpo na basaleli ya Yehova. (Tángá 3 Yoane 9, 10; Luka 22:24-27.) Soki tozali na bamposa ya mabe, ntango tobondeli Yehova Nzambe, akoki komonisa yango polele mpe kosalisa biso liboso ete bamposa yango ezwa misisa.
16 Mwasi mokristo akoki kozala na mposa ete mobali na ye akóma mosaleli na misala, mpe ntango mosusu, akóma mokɛngɛli to mpe nkulutu. Ndeko mwasi yango akoki kosala makambo oyo eyokani na mabondeli na ye, mpe koluka komitambwisa na ndenge oyo ebongi. Yango ezali na ntina, mpamba te makambo oyo bato ya libota ya ndeko yango balobaka mpe basalaka ekoki kosala ete lisangá etyela ndeko yango motema to te.
Kobondela mpo na bato ebele
17. Ntango tolingi kobondela biso moko mpo na nini ezali malamu tózala na esika oyo makɛlɛlɛ ezali te?
17 Mbala mingi, Yesu azalaki kokende na esika ya ye moko mpo na kobondela Tata na ye. (Mat. 14:13; Luka 5:16; 6:12) Biso mpe tosengeli kosalaka bongo. Ntango tozali kobondela na esika oyo makɛlɛlɛ ezali te, tokoki kozwa bikateli oyo ekosepelisa Yehova mpe oyo ekomemela biso matomba na elimo. Kasi, Yesu azalaki mpe kobondela mpo na bato ebele, mpe ezali malamu koyeba ndenge ebongi kosala yango.
18. Wapi mwa makambo oyo bandeko mibali basengeli kobosana te ntango bazali kobondela mpo na bato ebele?
18 Na makita, mibali ya sembo bazwaka libaku ya kobondela mpo na lisangá. (1 Tim. 2:8) Na nsuka ya mabondeli yango, bandeko balobaka “amen,” oyo elimboli, “ezala bongo.” Kasi, mpo bandeko báloba amen, basengeli kondima makambo oyo ndeko alobi na libondeli. Libondeli ya ndakisa oyo Yesu ateyaki ezali na likambo moko te ya kobɛtisa libaku. (Luka 11:2-4) Lisusu, atángaki te bamposa to mikakatano ya moto mokomoko oyo azalaki wana. Ezalaka malamu kolobela makambo na biso moko ntango tozali kosala libondeli ya biso moko, kasi te ntango tozali kobondela mpo na bato ebele. Lisusu, ntango tozali kosala libondeli mpo na bato ebele tosengeli te koloba makambo oyo ezali sekele.
19. Ndenge nini tosengeli kozala na ntango ya libondeli ya bato ebele?
19 Ntango tozali kolanda libondeli, tosengeli kozala na limemya mozindo oyo eutaka na ‘kobanga Nzambe.’ (1 Pe. 2:17) Ezali na makambo mosusu oyo tosengeli te kosala ntango tozali na makita ya bokristo. (Mos. 3:1) Na ndakisa, kanisá ete ndeko moko alingi ete bandeko nyonso básimbana mabɔkɔ na ntango ya libondeli. Yango ekoki kosala ete bandeko mosusu to bapaya bábɛta libaku, to mpe ekoki kolongola likebi na bango. Babalani mosusu basimbanaka na lobɔkɔ, kasi soki bazali koyambana to kokangana na nzoto ntango libondeli ezali kosalema, baoyo bakomona yango bakoki kobɛta libaku. Yango ekoki kotinda bango bákanisa ete babalani yango bazali komonisana lolango na esika ya komonisa limemya epai ya Yehova. Na yango, tiká ete limemya mozindo etinda biso ‘tósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe’ mpe tóboya etamboli nyonso oyo ekoki kolongola likebi ya bato to kobɛtisa bango libaku.—1 Ko. 10:31, 32; 2 Ko. 6:3.
Kobondela mpo na makambo nini?
20. Ndenge nini okoki kolimbola Baroma 8:26, 27?
20 Ekoki kokóma ete tóyeba te makambo oyo tosengeli koloba na libondeli na biso. Paulo akomaki boye: “Mokakatano yango oyo: eloko oyo tosengeli kobondela mpo na yango ndenge mposa na biso ezali toyebaka te, kasi elimo [santu] yango moko elobelaka biso ntango tozali kokimela, atako maloba ezali kobima te. Nzokande [Nzambe] oyo atalaka mitema ayebaka oyo elimo ezali koluka.” (Rom. 8:26, 27) Yehova asalaki ete mabondeli mingi ekomama na Biblia. Andimaka mabondeli yango lokola biso nde tosali yango mpe ayanolaka yango. Nzambe ayebi biso, ayebi mpe ndimbola ya makambo oyo atindaki elimo na ye eloba na nzela ya bakomi ya Biblia. Yehova ayanolaka mabondeli na biso ntango elimo na ye “elobelaka” biso. Kasi, ntango tomeseni na Liloba ya Nzambe, makambo oyo tosengeli kosɛnga na libondeli ekouta na motema na biso.
21. Tokolobela nini na lisolo oyo ekolanda?
21 Ndenge tomoni yango, mabondeli na biso elobaka mingi. Na ndakisa, ekoki komonisa soki tozalaka na boninga makasi na Yehova mpe soki toyebi Liloba na ye malamu. (Yak. 4:8) Na lisolo oyo ekolanda, tokotalela mabondeli mpe maloba mosusu ya mabondeli oyo ezali na Biblia. Yango ekosala nini na mabondeli oyo tosalaka epai ya Nzambe?
Okopesa eyano nini?
• Ezaleli nini tosengeli kozala na yango ntango tozali kobondela Yehova?
• Mpo na nini tosengeli kobondelaka mpo na bandeko na biso bakristo?
• Mabondeli na biso ekoki komonisa nini mpo na biso mpe bamposa na biso?
• Ndenge nini tosengeli kozala na ntango ya libondeli ya bato ebele?
[Elilingi na lokasa 4]
Okumisaka mpe otɔndaka Yehova mbala na mbala?
[Elilingi na lokasa 6]
Ndenge tosengeli kozala na ntango ya libondeli ya bato ebele esengeli ntango nyonso kokumisa Yehova