“Esengo na baoyo bayikaki mpiko”
1. Na kokokisama ya Matai 24:3-8, ezalela ya mokili ezali boni kobanda 1914, mpe bilikya nini Société des Nations mpe O.N.U. bakokisi yango te?
kati na mokanda eleko oyo (lingelesi) Robert Nisbet azali kolobela “etumba ya mibu ntuku nsambo na mitano oyo ezali kongala uta 1914.” Solo, Yesu Klisto asakolaki ‘bitumba mpe lokito na bitumba’, bakisa na bitumba ya mokili mobimba, mpo na ntango ya nsuka oyo tozali kobika. (Matai 24:3-8) Na 1920, Société des Nations esalemaki “mpo na kopekisa libela bitumba”. Elongaki ata moke te. Na 1945, O.N.U, to Organisation des Nations unies esalemaki mpo na “kobatela mabota oyo makobotama nsima ete bazwa mpasi ya bitumba te”. Nzokande, tala oyo ekoki kotangama kati na mokanda Móto bipai binso (na Lingelisi), ya Max Harrelson: “Uta nsuka ya Etumba na Mibale ya mokili mobimba, mikolo oyo bato babundaki ata epai moko te kati na mokili ezali mingi te.”
2. Bato mosusu bazali koloba nini na ntina na makambo mazali lelo na mokili, kasi biso moko, likambo nini tosengeli komituna?
2 Epai mosusu, mokambo ya nsomo, ndakisa kotika bombe epai na epai, mobulu, kanyaka, bobola, drogue mpe maladi eyei nyonso kobakama likoló na mpasi oyo bato bazali na yango. Bato mosusu bakoki komituna ete: ‘Ntango boni lisusu bato bakoyika mpiko na bampasi motindo oyo?’ Nzokande, likambo ya ntina mingi koleka, biso moko tosengeli komituna: ‘Nzambe akotika nzela ete bikelamu na ye awa na mabelé bibomama nyonso? Ntango boni lisusu akotikela bato mabe nzela ete babebisa mabelé mpe kofingafinga nkombo na ye mosantu?’
3. (a) Motuna nini mosakoli Yisaya atunaki, mpe mpo na nini? (b) Eyano nini Jéhovah apesaki, mpe yango ezali komonisa nini mpo na eleko na biso?
3 Mosakoli Yisaya atunaki motuna ya motindo wana, Azwaki mokumba ya koyebisa epai na bato na mokili na ye nsango oyo eutaki epai na Jéhovah; kasi akebisamaki ete Bayuda bakoboya kondima ezala ye to Nzambe oyo atindaki ye. Yango wana atunaki ete: “E Jéhovah, kino ntango nini?” Ee, kino ntango nini esengelaki ete Yisaya asakola epai na libota wana ya batomboki, mpe kino ntango nini Jehovah asengelaki kokanga motema na kofinga oyo Bayisraele bazalaki kofinga ye, na ndenge baboyaki kotosa nsango na ye? Jéhovah ayanolaki ete: “Kino mboka ebebisami, na mofandi kuna te; mpe ndako ezangi bato mpe mokili ebebisami nyɛ.” (Yisaya 6:8-11) Motindo moko lelo, Nzambe azali kokanga motema na nsoni ya motindo moko kino ekoya ntango oyo akanaki mpo na kokokisa ekateli na ye likoló na mokili, mokili oyo eteni na yango eleki mabe ezali bongo boklisto ya mokili oyo ezangi bosembo.
4. Nsuka na koyika mpiko na Yobo ezalaki nini, mpe elikya nini yango ezali kopesa biso?
4 Jéhovah azali kokanga motema na matumoli ya Satana uta kala. Esili koleka penepene na mibu 3 600, mosembwi Yobo, ye mpe ayikaki mpiko, ntango alongaki ntembe oyo ebimisamaki na Satana; mpamba te Satana alobaki ete Yobo akokoka kotikala sembo te soki amekami. Nsuka ya likambo wana esepelisaki mpenza motema ya Jehovah. (Yobo 2:6-10; 27:5; Masese 25:11) Yakobo, ndeko mobali na Yesu, alobaki nsima na mikolo mingi ete: “Tala, tolobi ete tobiangi bango bato na esengo baoyo bayiki mpiko bongo. Bosili koyoka mpo na mpiko na Yobo, bosili komona nsuka na makambo na ye epai na Jéhovah, mpamba te Jéhovah atondi na mawa mpe na boboto.” Ezali mpe motindo moko na mikolo na biso, baoyo bazali koyika mpiko na kosalelaka Jéhovah bazali na elikya ete mimekamo na bango mikozwa nsuka ya kosepelisa.—Yakobo 5:11.
5. Ndenge nini Yesu amonisaki ete na eleko na biso koyika mpiko ekozala lisengami epai na libota na Nzambe, mpe kati na mosala nini libota yango ekozala na mposa ya koyika mpiko?
5 Yesu amonisaki polele ete na eleko na biso koyika mpiko ekozala ezalela moko esengami epai na libota na Nzambe. Kati na esakweli na ye na ntina etali elembo mpo na “nsuka na biloko na ntango oyo”, alobaki: “Nde ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.” Koyika mpiko, ee, kasi na mosala nini? Yesu ayanoli nokinoki na maloba oyo: “Mpe nsango malamu oyo na bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso.” (Matai 24:8, 13, 14) Bobele nsima na yango nde ‘nsuka ekoya’.—Tala Malako 13:10, 13; Luka 21:17-19.
Mpo un nini Jéhovah azali koyika mpiko
6. Mpo na nini tokoki koloba ete Jéhovah azali ndakisa eleki malamu ya koyika mpiko, mpe mpo na nini, azali koyika mpiko uta kala?
6 Ntoma Paulo alimbolaki ete ’’Nzambe akani komonisa nkanda na ye mpe kososolisa nguya na ye mpe boye ayikeli mbeki na nkanda mpiko monene, yango ekoki mpo na kobebisama nyɛ”. (Baloma 9:22.) Mpo na nini Jéhovah atiki nzela ntango molai na bato mabe, “bambeki na nkanda”? Kati na bantina mosusu, ezali mpo na komonisa ete boyangeli ya moto, kozanga kotambwisama na Mozalisi na ye, ekoki kolonga te. (Yilimia 10:23) Bokonzi na Nzambe mosika te ekolongisama, ntango akomonisa ete bobele ye nde akoki kopesa kimya, boyokani mpe bolamu epai na libota na bato, mpe akosala yango na nzela na Boyangeli na Yesu.—Nzembo 37:9-11; 45:1, 6, 7.
7. Mpo na ntina nini mosusu Jéhovah azali koyika mpiko, mpe bolamu nini bamilió na bato bazali kozwa mpo na ndenge azali koyika mpiko uta na ba 1930?
7 Lisusu, Jéhovah azali koyika mpiko “ete ayebisa motuya monene na nkembo na ye ebongisami mpo na mbeki na mawa”. (Baloma 9:23) “Bambeki ya mawa” ezali baklisto na sembo bapakolami oyo “basombami kati na bato” mpo na koyangela elongo na Klisto Yesu kati na Bokonzi na ye na likoló. Ba 144 000 babandaki kotyama bilembo na eleko ya bantoma; mosala yango molandanaki kino na mikolo na biso, mpe ekomi na nsuka na yango. (Emoniseli 7:3; 14:1, 4) Epai mosusu, uta na ba 1930, eleko oyo Jéhovah azali koyika mpiko epesi nzela na koyanganisa bamilió na bato mosusu; ezali bongo “ebele monene . . . euti na mabota nyonso”, oyo bazali kosepela na likanisi ya kobika na bolozi ya nsuka mpo na kozwa bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis. (Emoniseli 7:4, 9, 10, 13-17) Ozali kati na ebele monene yango? Soki ee, ozali na esengo te lokola kino lelo Jéhovah azali naino koyika mpiko na kotikaka bambeki wana na nkanda? Nzokande, lokola Jéhovah, esengeli na yo ete elanda koyika mpiko.
Mbano na koyika mpiko
8. Mpo na nini biso banso tozali na mposa ya koyika mpiko, mpe ndakisa nini ya koyika mpiko tosengeli kotalela yango na likebi nyonso?
8 Soki tolingi kozwa litomba na bilaka ya Jéhovah, tosengeli kolona ezaleli ya koyika mpiko, Nsima na koyebisa solo wana ya moboko, oyo ekomami kati na Baebele 10:36, ntoma Paulo ayebisi sikisiki kondima mpe koyika mpiko ya solosolo ya “lipata monene na batatoli” ya kala. Asengi na biso na nsima ete topota “na etingya na emekaneli na mbango etyami liboso na biso, awa ezali biso kotala Yesu, ye Mobandisi mpe Mosukisi na kondima. Mpo na esengo etyami liboso na ye”, Yesu ayikaki mpiko, mobimba kati na mosala na ye, kozanga kobungisa mbano kati na makanisi na ye. Ndakisa na ye ezali kopesa biso nguya na koyika mpiko biso mpe.—Baebele 12:1, 2.
9. Na eleko na biso, bandakisa na koyika mpiko ezali kobimisa matomba nini?
9 Na eleko na biso, bandakisa ya koyika mpiko ezangi te. Ekoki kozala ete oyebi to oyebaki bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bayikaki mpiko mpenza. Bosembo na bango ezali elendiseli mpo na biso. Mobu nyonso, Ba Témoins de Jéhovah bazali kopesa rapport ya mosala na bango kati na mokili epai na la Société Watch Tower mpe bazali kotinda masolo mosusu ya kosepelisa oyo mazali komonisa ete basaleli na Nzambe bazali koyika mpiko mpe bazali sembo. Tablo oyo enyatami na bankasa minei oyo elandi ezali kopesa mwa likanisi na mosala monene mosalemi na ba Témoins de Jéhovah na boumeli ya mobu 1989 ba Témoins oyo ‘babakisaki koyika mpiko likoló ya kondima na bango’.—2 Petelo 1:5, 6.
Mobu na biso oyo eboti mbuma mingi koleka
10. (a) Kati na mikili mpe bisangá boni nsango malamu na Bokonzi ezingelamaki na 1989, mpe bato boni basanganaki na mosala yango? (b) pionniers bazali boni na boumeli ya sanza oyo elekaki basanza nyonso mosusu, mpe ngonga boni elekisamaki kati na mosala ya kosakola na 1989?
10 Lokola emonisi yango tablo oyo euti koleka, Bokonzi na Jéhovah, oyo esili ebelemi sikawa, esakolamaki kati na mikili mpe bisanga 212. Ndeko motangi ya Mosenzeli, ozwaki lokumu ya kozala moko na bato 3 787 188 oyo basanganaki kati na mosala oyo monene? Ozalaki kati na ba pionniers na sanza oyo elekaki basanza nyonso na boumeli na yango basakoli 808 184 basalaki mosala yango? Ata likabo na yo ezali nini kati na bangonga 835 426 538 oyo bolekisaki kati na mosala ya kosakola na 1989, ozali na ntina ya kosepela.—Nzembo 104:33, 34; Bafilipi 4:4.
11. (a) Bato boni bayanganaki na Ekaniseli na le 22 Mars 1988, mpe mpo na nini ezali ntina ya esengo? (b) Bato boni babatisamaki, mpe, engebene tablo, mikili nini mibongi na kotyela likebi kati na likambo yango?
11 Ntina mosusu ya kosepela ezali motango kitoko ya bato 9 479 064 baoyo, kati na mokili mobimba, bayanganaki, le 22 Mars eleki, na Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Motango yango ezali komonisa ete ezali lisusu na bato 5 691 876 oyo bakoki kokoma basakoli ya Bokonzi, soki nde bato yango oyo bakokani na bampate, oyo bazali koyoka nsango na motema moko, bakotambwisama na bolingo kino kati na lopango ya bampate, mpo na kosalela Jéhovah na motema mobimba. Tokoki kosalisa bango kati na likambo oyo? (Yoane 10:16; Emoniseli 7:9, 15) Lokola ezali komonisa yango motuya ya babatisami ya sika 263 855 na boumeli ya mobu ya mosala 1989, mingi basili kobanda koyamba nsango malamu.
12. Mwa makambo nini oyo tablo epesi te (a) mpo na ba imprimeries ya la Société Watch Tower? (b) bazulunalo oyo ekabolami mpe ba abonema oyo ezwamaki?
12 Nzokande, ezali na makambo mosusu oyo malakisami te kati na tablo oyo. Na ndakisa, ezali koloba te mpo na mposa makasi ya mikanda: ba Biblia, mikanda misusu, ba brochures mpe bazulunalo. Na bongo, binyateli ya la Société Watchtower na New York binyataki ba Biblia, mikanda mpe ba brochures 35 811 000, likambo oyo emonisi kobakisama ya 101% likoló na motuya oyo ebimisaki na 1988. Mpo na yango, batone ya ba papiers 25 999 esalelamaki. Kati na binyateli misusu ya minene ya la Société Watch Tower, mingi mpenza na Allemagne, na ltalie mpe na Japon, bavolontere basalaki bangonga mingi nsima na ngonga esengami na mosala mpo na kosalisa “moombo na sembo mpe na mayele” na kokabola “bilei (ya elimo) na elaka na yango.” (Matai 24:45) Na boumeli ya sanza ya Avril mpe sanza ya Mai, ntalo mingi koleka ya bazulunalo ekabolamaki mpe ba abonema ezwamaki na mikili mingi; lisusu, likebi monene etyamaki likoló na bokaboli ya banimero ya Mosenzeli oyo ekomamaki na ntina na “Babilone Monene”. (Emoniseli 17:5.) Ntembe ezali te ete na Avril oyo ezali koya ba pionniers auxiliaires mpe ba Témoins mosusu bakozala mingi kati na elanga ya mokili mobimba mpo na kosangana na mosala oyo esengeli komonana lokola kampanye na biso na mosala na kosakola oyo eleki monene kati na mobu.—Tala Yisaya 40:31; Baloma 12: 11, 12.
13. Mikili nini mitangami kati na tablo oyo nzokande mitangamaki te na mobu moleki? Limbola mpo na nini
13 Zongela kotala lisusu tablo. Omoni mikili oyo nkombo eyebisamaki te na mobu moleki? Ezali Hongrie mpe Pologne, epai kuna mosala mouti kondimama sikawa na Leta. Tozali kopesa botondi epai na mikonzi ya mikili yango mpo na ezalela bazali komonisa sikawa liboso na ba Témoins de Jéhovah. Na ntina yango, mabondeli ya libota ya bandeko kati na mokili mobimba mandimamaki, “ete totambola na bizaleli na kimya mpe na kozanga mobulu kati na losambo na Nzambe mpe na sembo na bozito”.—1 Timote 2:1, 2.
14. Tokoki koloba nini mpo na ba assemblées de distrike “Bizaleli ya moto na Nzambe” oyo esalemaki na Pologne?
14 Na ntina na bizaleli ya moto na Nzambe, mobu oyo ba assemblées ya distrike “bizaleli ya moto na Nzambe esalemaki mpe ata na Pologne; yango esalemaki na sanza ya mwambe kati na bingumba misato bikeseni. Bandeko na biso 91 024 ya Pologne bamonisaki ete bayebi solo koyamba bapaya. (Baebele 13:1, 2, 16) Lokola ekamwiseli, ebele na bandeko ya Allemagne, ya Russie, ya Tchécoslovaquie mpe ya mikili misusu bazwaki visa mpo na kokende na ba assemblées; basalaki mobembo yango na mituka, na train, mpe ata na makolo. Bankoto na bato mosusu bayaki na avion longwa na Amerike nyonso mibale, na Europe occidentale, mpe na bisanga mosika ya Pacifique mpe ya Japon. Ba stades minene, epetolamaki nyonso mpenza na bandeko na biso, mbele elingaki kozala moke mpo na koyamba bato 65 710 na Katowice, 40 442 na Poznań mpe 60 336 na Varsovie, motuya na bayangani nyonso bazalaki bato 166 518. Na esika nyonso ya assemblée, bato balelaki na ntango ya batisimo mpo esengo elekaki mingi. Na Poznań, moko na bato bazwaki batisimo azalaki na mibu 9 mpe mosusu na mibu 90. Na boumeli na ba assemblées wana misato, bato 6 093 bazwaki batisimo, na kati na bango ezalaki ebele na bilenge.Na kati ya bilenge yango, mingi bautaki na mikili epai kuna, bato bazalaki koloba ete, lingomba esengeli kolimwa nzela moko na mibange. Nzokande ezali bongo te mpo na lingomba ya solo, oyo etongami likoló na Liloba na Nzambe. (Tala Nzembo 148:12, 13; Misala 2:41; 4:4.) Mpiko ya bandeko na biso ya Europe de l’Est epesamelaki mbano na lolenge ya polele.
Batikali sembo atako bakutanaki na mimekamo
15 Mpo na nini tokoki koloba ete ba Témoins ya Liban bayikaki mpiko mpe bazalaki ngwi, mpe matomba nini basili kozwa?
15 Lokola ntoma Paulo, ba Témoins ya de Jéhovah basengeli koyika mpiko kati na makambo mingi mpe ndenge na ndenge. (2 Bakolinti 11:24-27) Na Liban, etumba ya bana mboka ezali kongala. Ndenge nini bandeko na biso bazali komitambwisa? Na mpiko mpe na molende. Mobu 1989 ezalaki na matata mingi mpo ete masasi ebetamaki mingi mpe babombe ebwakamaki epai na epai, kasi ata na bileko ya mobulu koleka, bandeko bazalaki na ekateli ete balembisa mosala na bango te. Lisangá moko ya Beyrouth elobi boye: “Makita mpo na mosala ya kosakola ezalaki kobongisama mikolo nyonso na mpokwa kati na poso. Bandeko balembaki te na ntina na yikiyiki oyo ezalaki kongala. Tosakolaki kati na bateritware mingi koleka liboso. Na Avril, tozwaki motuya mingi ya ba pionniers. Tobandaki kotambwisa boyekoli ya Biblia, mpe tokabolaki bazulunalo mingi mpe mikanda mingi.”
16. Mpo na nini tokoki koloba ete bandeko na biso na colombie bayikaki mpiko na ndenge bamemaki nsango malamu na bingumba epai kuna ba Témoin bazalaki te?
16 Mokili ya colombie ezali kolobelama mingi mikolo oyo mpo na mombongo ya drogue mpe mobulu oyo ezali kongala kuna. Atako bongo, tokoki mpe kolobela mpiko ya baklisto na sembo. Kala mingi te, ba pionniers spéciaux ya ntango mokuse batindamaki na bingumba 31 oyo mokomoko na yango ezali na bafandi soko 10 000, epai kuna ba Témoins bazalaki te. Kati na moko ya bingumba yango, bato oyo bazali kosepela na Biblia bayokaki ete ba pionniers bazalaki wana bobele mpo na mwa basanza mpe babondelaki bango ete batikala naino kuna. Kati na localite moko, bato 18 basepelaki na solo batyaki maboko na mokanda moko ya botondi mpo na koyebisa matomba ya elimo oyo bautaki kozwa na boumeli na sanza misato oyo ba pionniers balekisaki epai na bango, mpe basɛngaki lisalisi mosusu. Balobaki ete, “ezali likambo ya liseki te”. Na makambo nyonso mibale, bibongiseli bisilaki kokamatama mpo na kokolisa mposa oyo emonisamaki epai na bato wana. Esengeli koyika mpiko mpo na kosala na bateritware ya mosika, kasi milende makasi ya ba pionniers oyo bazali kokokisa mokumba yango ezali kopambolama mingi.
17, 18. (a) Makambo nini ba Témoins de Jéhovah ya ltalie bazali koyikela yango mpiko? (b) Atako bato mosusu bazali kopalanganisa lokuta na ntina na bango, ba Témoin de Jéhovah bazali kobakisama.
17 Ba Témoins de Jéhovah na ltalie bazali kokutana na botemeli makasi oyo ezali kouta na bakonzi ya mangomba, kasi nguya oyo Jéhovah azali kopesa bango ezali kosalisa bango na koyika mpiko. Kati na bandakonzambe mingi, basango-mikonzi bakabolaki ba papiers oyo basengelaki kobamba yango na bikuke ya basambeli na bango; ba papiers yango ezali mpo na kopekisaka ba Témoin de Jéhovah ete babeta na bikuke na bango te. Kati na régió moko, ebele na basango babengaki bilenge mibali mpo na kopesa bango mosala ya kobamba ba papiers yango na bikuke nyonso, ata na oyo ya ba Témoin! Kasi, ba Témoin bazali kobanga eloko te, mpe mbala mingi bazali kosalela makomi wana mpo na kobanda lisolo. Lisusu, bazulunalo mpe télévizió ya mboka elobelaki mingi likambo yango; bakweisaki likunya oyo basango bazali komonisa na motindo yango mpe bayebisaki polele ete myango motindo wana ezali elembo ya bolembu na Lingomba. Profesere moko ya université ayokaki mpenza nkanda mpo na kampanye wana oyo esalemaki mpo na kotemela ba Témoins mpe azwaki ekateli ya kosala abonema ya La Tour de Garde mpe Réveillez-vous!.
18 Na ltalie, Lingomba ya katolike ezali kosalela ata bapengwi mpo na kopalanganisa lokuta na ntina na libota na Jéhovah; kasi ezali kosimba te, mpamba te basakoli 172 382 ya mokili wana bayebani malamu mpe bato bazali komemya bango. Mobali moko ayebisaki epai na ba Témoins oyo bayaki kotala ye ete atangaki makambo mabe na ntina na bango kati na mikanda oyo miutaki epai na bato oyo bazalaki ba Témoin kala. Na bongo amonaki mabe mpenza ntango ndeko na ye akomaki Témoin de Jéhovah. Nzokande, na boumeli ya mwa mikolo, amonaki ete mbongwana wana ya lingomba ezalaki na matomba malamu likoló ya ndeko na ye mpe azalaki komituna: ‘Ndenge nini eloko ya mabe ekoki kobimisa matomba malamu boye?’ Na bongo moto yango asɛngaki boyekoli ya Biblia epai na ba Témoin oyo bayaki kotala ye.—Tala Bakolose 3:8-10.
Tolemba te ata bato baboyi koyoka
19, 20. (a) Likambo nini ba Témoins ya Finlande basengeli koyikela yango mpiko, mpe nini ezali mpenza ntina kati na bolukiluki oyo esalemaki na Lingomba? (b) Likambo nini emonanaki na mosala ya kosakola emonisi ntina ya koyika mpiko kati na mosala ya kosakola nsango malamu?
19 Kati na mikili oyo ba Témoins bazali mbala na mbala kokende kotala bato, ekomaka mbala mingi ete ebele na bato baboyi koyoka nsango malamu. Ezali yango mpenza nde ezali koleka na Finlande. Bolukiluki moko ebongisamaki na Lingomba ya mboka yango emonisaki ete 70% ya bato bazali kosepela te na vizite ya ba Témoins na bandako. Nzokande, 30% bazali komona yango mabe te, kati na bango 4% balobi ete balingaka ba Témoins de Jéhovah. Motuya oyo ezali na ntina. Mpamba te, 4% ya bato na Finlande, elakisi bato 200 000, nzokande kati na mboka wana ntalo ya basakoli ya Bokonzi ezali sikawa 17 303.
20 Mokolo moko, moto moko oyo Témoin de Jéhovah moko akendaki kotala ye alobelaki ye mpo na bolukiluki wana mpe atunaki ye ete: “Oyebi te ete 70% kati na biso tolingaka bino te? Mpo na nini bozali koya ntango nyonso kotungisa biso?” Mosakoli ayanolaki: “Ee, bolukiluki yango emonisaki mpe ete 4% ya bato balingaka biso. Ezali bato wana nde tozali koluka. Ata soki bazalaki bobele 1%, tokokoba kokende ndako na ndako mpo na koluka bango.” Moto yango akanisaki mwa moke, mpe alobaki: “Nsango na bino ezali na ntina mingi mpo na bango?” Mosakoli ayanolaki na motuna oyo: “Olingi koyoka yango?” Nokinoki, moto yango amonisaki mposa mpo na nsango malamu.
Makambo mazali liboso na biso!
21. (a) Etumba nini tosengeli kobunda kati na mokili oyo, mpe mpo na nini. (b) Likambo nini mbula mosusu tosengeli koyika mpiko mpo na yango, mpe elikya nini esakweli ya habakuku ezali opesa biso?
21 Ezali boni mpo na biso banso? Tozali na ekateli ya koyika mpiko elongo na Jéhovah mpe Yesu Klisto kino na nsuka? Mbala mosusu yango ekozala molai mingi te, kasi esengeli na biso bobele koyika mpiko. Kati na mokili ya Satana, tosengeli kobunda na mpiko nyonso mpo na kondima, mpamba te pite, mabe mpe koyina ezali kozinga biso na bisika nyonso. (Yuda 3, 20, 21) Ekoki kozala ete tozali na lolenge moko to mosusu ya monyoko oyo tosengeli koyikela yango mpiko. Na eleko oyo, bankoto na bandeko na biso bazali konyokwama kati na ba boloko, mpe bamosusu bazali kobotama makasi. Tozali kobondela makasi mpo na bango. (2 Batesalonike 3:1, 2) Mosika te, mokili oyo ekozala lisusu te. Tozali kotanga kati na Habakuku: “Mpo ete, emonaneli ezali bobele mpo na ntango ebongisami, ekomi noki epai na nsuka, ekozanga te; ata ezali koumela, zela yango; ekoya solo mpenza, ekoumela mingi te.”—Habakuku 2:3.
22. Nsuka nini tokoki kozela na elikya nyonso soki toloni motema petee ya basukoli mpe mpiko ya Yobo?
22 Moyekoli Yakobo alobi na biso na bolingo nyonso ete: “Bandeko, bobila elakiseli na bolozi mpe mpiko na basakoli, baoyo balobaki na nkombo na Jéhovah.” Na ndakisa ya Yisaya, ya Yilimia, ya Danyele mpe ya basakoli mosusu, biso baoyo tozali koloba na nkombo ya Jéhovah, tokoki kotelema ngwi liboso na mimekamo makasi. Lokola Yobo, tokoki koyika mpiko. Kanisa mbano kitoko oyo azwaki mpo ete ayikaki mpiko! Kati na mawa na ye mpe na motema boboto, Jéhovah akopesa biso matomba ya motindo moko soki tokoyika mpiko kino na nsuka. Tika ete maloba oyo na Yakobo matalela moko na moko kati na biso: “Tala, tolobi ete tobiangi bango bato na esengo baoyo bayiki mpiko bongo.”—Yakobo 5:10, 11; Yobo 42:10-13.
Bozongeli
◻ Kati na likambo nini Yesu amonisaki ete tosengeli koyika mpiko?
◻ Mpo na bantina nini Jéhovah azali koyika mpiko?
◻ Mwa makambo nini mamonisi bonene ya mosala mokokisamaki na 1989?
◻ Ndenge nini mpiko ya bandeko na biso na Pologne ezwaki mbano?
◻ Bosembo nini liboso na komekama ba Témoins ya Liban, ya colombie mpe ya ltalie bamonisaki?
[Etanda na lokasa 20-23]
RAPPORT YA MOSALA YA BA TÉMOIN DE JEHOVAH NA MOKILI MOBIMBA MPO NA MOBU 1989